Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 2/15 nk. 6-7
  • Bizaleli malamu oyo esilaka ngala te—Bolingo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bizaleli malamu oyo esilaka ngala te—Bolingo
  • Lamuká!—2015
  • Masolo mosusu
  • Mitinda oyo esilaka ngala te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Etanda ya makambo ezali na kati
    Lamuká!—2015
  • Ndenge ya kokóma na bolingo ya solosolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mabe ná malamu: Biblia nde ebongi kotambwisa biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2024
Makambo mosusu
Lamuká!—2015
g 2/15 nk. 6-7

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BIBLIA EZALI NA NTINA LELO OYO?

Bizaleli malamu oyo esilaka ngala te​—Bolingo

TOLI YA BIBLIA: “Bólata bolingo, mpo ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.”​—Bakolose 3:14.

MATOMBA: Bolingo oyo Biblia elobeli mingi ezali te bolingo ya mwasi ná mobali. Ezali nde bolingo oyo emonanaka na bizaleli lokola motema mawa, kolimbisa, komikitisa, bosembo, boboto, motema pɛtɛɛ mpe motema molai. (Mika 6:8; Bakolose 3:12, 13) Na kokesana na lolango oyo ezwaka moto soki amoni mwasi to mobali moko ya kitoko, oyo mbala mingi esilaka nsima ya mikolo, bolingo oyo Biblia elobeli ekobaka nde kobakisama.

Brenda, oyo abalá eleki sikoyo mbula soki 30, alobi boye: “Bolingo oyo baoyo bauti kobalana sika bazalaka na yango ekopusana ata moke te na bolingo oyo mwasi ná mobali bakómaka na yango ntango bambula ezali koleka na libala na bango.”

Sam, mobali oyo abalá eleki sikoyo mbula koleka 12, alobi boye: “Ngai ná mwasi na ngai tosepelaka mingi mpe tokamwaka na ndenge oyo batoli ya Biblia esalisaka mpenza mpe ezalaka mindɔndɔ te! Soki osaleli yango, makambo etambolaka malamu. Kasi, atako nakoki koloba ete nasalelaka ntango nyonso batoli na yango, kasi ekómaka mpe nasalela yango te, na ndakisa soki nakómi kosilika mpambampamba, koluka mwa moke matomba na ngai moko to soki nalɛmbi. Na bantango ya ndenge wana, nabondelaka Yehova asalisa ngai nalongola makanisi wana ya mabe. Na nsima, napesaka mwasi na ngai bizi mpe tobosanaka nyonso oyo eleki!”

“Bwanya ya moto emonanaka na makambo ya boyengebene oyo asalaka”

Yesu Kristo alobaki ete “bwanya ya moto emonanaka na makambo ya boyengebene oyo asalaka.” (Matai 11:19) Na yango, Biblia ezali mpenza na bwanya ya solosolo. Mateya mpe bizaleli oyo yango elendisaka esalisaka mpenza bato. Esilaka ngala te. Ekipaka mimeseno to ekólo ya moto te. Lokola emonisaka mpenza bomoto na biso, yango emonisi ete ezali buku ya Yehova Nzambe, Mozalisi na biso. Yango emonanaka ntango tozali kosalela batoli na yango. Yango wana Biblia esɛngi biso ‘tómeka mpe tómona ete Yehova azali malamu.’ (Nzembo 34:8) Okondima kosala bongo?

BIBLIA EBONGISAKI BOMOI NA NGAI

Linh afandaka na sudi-ɛsti ya Azia. Alobaki na zulunalo Lamuká! ndenge oyo Biblia esalisaki ye abongisa bomoi na ye.

Ozalaki mondimi ya lingomba nini?

Nautá na libota ya bandimi ya Buda oyo balandelaka mpenza mimeseno ya lingomba yango. Nayebaki ata eloko te mpo na Nzambe ya solo.

Bomoi oyo ozalaki na yango ezalaki kopesa yo esengo?

Te! Kutu nazalaki nde na mikakatano ebele. Nazalaki koyeba te ndenge ya kosalela mbongo malamu, kozwa baninga ya malamu mpe nazalaki kokoka te kosalisa baboti na ngai na mikakatano na bango.

Yebisá biso ndenge bomoi na yo ebongaki.

Bana basi mosusu oyo bazalaki Batatoli ya Yehova bakómaki koteya ngai Biblia. Soki nakutani na mikakatano, nazalaki koluka lisalisi na bango. Atako nazalaki mokóló na bango, bazalaki kopesa ngai batoli ya malamu mpenza oyo ezalaki kouta na makanisi na bango moko te. Bazalaki kolakisa ngai oyo Biblia elobi.

Sikoyo lokola namoni ndenge kosalela batoli ya Biblia epesaka matomba, nandimisami mpenza ete buku yango euti epai ya Nzambe mpe ekoki kosalisa moto nyonso oyo azali kosalela batoli na yango. Ata soki kotánga bakelasi mingi ezali na ntina, ekoki kosalisa moto ndenge wana te.

Olingi mpenza koloba nini?

Baboti na ngai batángá mingi mpe bazali bato minene ya mboka. Ata bongo, bazwá solisyo te na mikakatano na bango. Kutu, babomá libala mpe bazali na esengo te. Ntango nakɔtaki iniversite, bateyaki ngai ete na bantango mosusu esɛngaka kosala mobulu mpo mboka ekende liboso. Kasi, Biblia elobaka ete milende moko te ya bato ekoki kobongisa makambo mpo na ntango molai mpo Nzambe apesá bato likoki to bokonzi ya komiyangela te. Yango wana biyangeli nyonso ya bato elongaka te mpe endimaka kanyaka.a Kasi soki tomikitisi epai ya Nzambe, tokoki mpenza kobongisa bomoi na biso mpe kozala ndakisa malamu mpo na basusu.

Biblia esalisaki yo na nini?

Na makambo mingi. Sikoyo namitungisaka mingi te mpe nazwá baninga ya malamu. Nayekoli ndenge ya kosalela mbongo malamu mpe nakoki kokangisa mbongo mpo na kosala mwa mobembo. Oyo eleki, nakoki kosalisa basusu ntango bakeleli.

a Talá Mosakoli 8:9; Yirimia 10:23.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto