Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g18 No. 2 lok. 10
  • 7 Komonisa bizaleli malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 7 Komonisa bizaleli malamu
  • Lamuká!—2018
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • YANGO ELIMBOLI NINI?
  • MPO NA NINI EZALI NA NTINA?
  • OYO OKOKI KOSALA
  • Bizaleli malamu
    Lamuká!—2019
  • Bizaleli oyo ebongisaka mpenza bomoi
    Lamuká!—2014
  • Mitinda ezali se kobongwana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Kɔtisá na mitó ya bana na yo bizaleli ya malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Lamuká!—2018
g18 No. 2 lok. 10
Tata ná mwana na ye bazali kosalela boussole mpo na koyeba nzela ya kolanda

Lokola boussole, bizaleli malamu ekoki kosalisa mwana na yo ayeba nzela nini asengeli kolanda

MPO NA BABOTI

7 Komonisa bizaleli malamu

YANGO ELIMBOLI NINI?

Bizaleli malamu ezali mibeko oyo moto aponi kolanda na bomoi na ye. Na ndakisa, osalaka makasi ozala sembo na makambo nyonso? Na ntembe te, olingi ete bana na yo mpe bálanda bizaleli wana ya malamu.

Na kati ya bizaleli malamu, tokoki mpe kotánga mibeko oyo etali kokesenisa malamu ná mabe. Na ndakisa, moto oyo ayebi kokesenisa malamu ná mabe azalaka makasi na mosala, azalaka sembo, mpe azalaka na limemya mpo na basusu, bizaleli oyo moto alonaka ntango azali naino elenge.

TOLI YA BIBLIA: “Bɔkɔlá mwana mobali na kolanda nzela oyo esengeli mpo na ye; ata ntango akokóma mobange akopɛngwa na yango te.”​—Masese 22:6.

MPO NA NINI EZALI NA NTINA?

Lokola mayele ya tekinoloji ekoli mingi, bizaleli malamu ezali na ntina mingi. Mama moko na nkombo Karyn alobi: “Makambo mabe etondi na baaparɛyi mingi ya mikolo oyo mpe okoki komona yango ata na ntango nini. Mwana akoki kofanda pene na yo, nzokande azali kotala makambo ya mabe na aparɛyi na ye!”

TOLI YA BIBLIA: ‘Bato oyo bakɔmɛli bazali na makoki ya kososola oyo emesaná kokesenisa ná mabe ná malamu.’​—Baebre 5:14.

Bizaleli malamu ezali na ntina mingi. Bizaleli malamu elimboli mpe komonisa mimeseno malamu (na ndakisa koloba “nabondeli yo” to “matɔndi mingi”) mpe kotyela basusu likebi, ezaleli oyo emonanaka lisusu mingi te lelo oyo, mpo bato mingi bakómi kotyela biloko ya mokili, na ndakisa baaparɛyi, likebi mingi koleka bato.

TOLI YA BIBLIA: “Kaka ndenge bino bolingaka bato básalela bino, bósalela bango mpe bongo.”​—Luka 6:31.

OYO OKOKI KOSALA

Yebisá basusu bizaleli malamu oyo olingaka. Na ndakisa, baankɛtɛ mingi emonisi ete bilenge baboyaka kosangisa nzoto liboso ya kobala soki bateyaki bango polele ete kosala bongo ezali mabe.

TOLI: Lobelá likambo moko oyo esalemi mikolo oyo mpo na komonisa bizaleli malamu. Na ndakisa, soki bapanzi-nsango balobeli likambo moko ya mobulu oyo esalemi, okoki koloba: “Ezali mpenza nsɔmɔ komona ndenge oyo bato mosusu basilikaka makasi. Mpo na yo, nini etindaka bato básilika ndenge wana?”

“Ezali mpasi bana báyeba kokesenisa mabe ná malamu soki bango moko bayebi te nini ezali malamu mpe nini ezali mabe.”​—Brandon.

Teyá bana bizaleli malamu. Ata bana oyo bazali naino mike bakoki koyekola koloba “nabondeli yo” mpe “matɔndi mingi” mpe komonisela basusu limemya. Buku moko (Parenting Without Borders) elobi: “Soki bana bayebi ete bazali na kati ya ebongiseli moko monene (libota, eteyelo, to mboka oyo bafandi), yango ekosalisa bango básala makambo na boboto, mpo na matomba ya bato nyonso, kasi te kaka mpo na matomba na bango moko.”

TOLI: Pesáká bana na yo misala ya ndako mpo na kosalisa bango báyekola kosalela basusu.

“Soki bana na biso bameseni kosala misala ya ndako sikoyo, bakozala na mokakatano te ntango bakofanda epai na bango moko. Ekozala mpasi te bákokisa mikumba oyo bakozala na yango na bomoi.”​—Tara.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto