Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 28
  • Babikisi Moize

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Babikisi Moize
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Moize aponaki kosambela Yehova
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • “Bóyembela Yehova”!
    Mekolá kondima na bango
  • Eloko oyo eleki biloko ya motuya ya Ezipito
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Kondima ya baboti epesameli mbano
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 28

Lisolo 28

Babikisi Moize

MWANA moke oyo bozali komona awa azali kolela mpe asimbi mosapi ya elenge mwasi moko, ezali Moize. Elenge mwasi kitoko wana ezali mwana ya Farao, mokonzi ya Ezipito.

Mama ya Moize abombaki ye sanza misato mobimba, mpo alingaki te ete Baezipito báboma ye. Kasi ayebaki ete akokoka kobomba ye ntango molai lisusu te. Asalaki nini?

Akamati kitunga, apakoli yango gudrɔ mpo mai ekɔta te. Alalisi Moize na kati, mpe atye yango na matiti na Ebale Nile. Bongo ayebisi Miriame, yaya ya Moize, ete atikala pembenipembeni wana atalaka nini ekokómela mwana.

Mosika te, mwana mwasi ya Farao akiti na Ebale Nile mpo na kosukola. Abwaki miso na matiti mpe amoni kitunga moko kuna na kati. Atindi mosaleli na ye azwa yango. Ntango afungoli kitunga, amoni mwana ya kitoko mpenza. Moize azali kolela mpe mwana mwasi ya mokonzi ayokeli ye mawa. Alingaki te ete báboma ye.

Na ntango yango Miriame ayei. Bozali komona ye na elilingi? Miriame atuni mwana mwasi ya Farao ete: ‘Olingi ete nakende kobenga mwasi moko Moyisraele mpo amɛlisela yo mwana oyo mabɛlɛ?’

Mwana mwasi ya mokonzi alobi na ye ete: ‘Kende.’

Bongo Miriame akei mbangu kobenga mama na ye. Ntango mama ya Moize akómi, mwana mwasi ya mokonzi alobi na ye ete: ‘Zwá mwana oyo mpe mɛliselá ngai ye mabɛlɛ mpe nakofuta yo.’

Na yango, mama ya Moize abɔkɔlaki mwana na ye ye moko. Ntango Moize akoli, mama na ye akei kotika ye epai ya mwana mwasi ya Farao mpe akómaki mwana na ye. Ezali na ndenge wana nde Moize abɔkwamaki na ndako ya Farao.

Kobima 2:1-10.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto