Lisolo 32
Malɔzi zomi
BÓTALA bililingi oyo. Elilingi mokomoko ezali kolakisa moko ya malɔzi oyo Yehova atindelaki Ezipito. Na elilingi ya liboso tozali komona Arona azali kobɛta Ebale Nile na lingenda na ye. Bongo mai ebongwani makila. Mbisi ekufi mpe mai ya ebale ekómi nsolo mabe.
Na nsima, Yehova atindi mbemba, eutaki na Ebale Nile. Mbemba ezalaki bipai nyonso: ata na bisika batumbaka mampa, na nzungu ya kosala patɛ, ata mpe na mbeto. Ntango mbemba ekufi, Baezipito basangisi yango mabondo mabondo mpe mboka mobimba ekómi nsolo mabe.
Na nsima, Arona abɛti mabele na lingenda na ye mpe putulu ebongwani ngungi. Ezalaki koswa bato ná banyama. Yango nde bolɔzi ya misato.
Malɔzi oyo elandaki ezwaki kaka Baezipito kasi Bayisraele te. Bolɔzi ya minei ezalaki mapokopoko; ekɔtaki na bandako nyonso ya Baezipito. Bolɔzi ya mitano ebomaki bibwɛlɛ. Ebele ya bangɔmbɛ, bampate ná bantaba ya Baezipito ekufaki.
Na nsima, Moize ná Arona bazwi putulu ya mɔtɔ mpe babwaki yango na likoló. Yango ebimisaki bato ná banyama mbuma mineneminene na nzoto. Wana bolɔzi ya motoba.
Nsima ya oyo, Moize atomboli lobɔkɔ na ye na likoló, mpe Yehova atindi bankake ná mbula ya mabanga. Bamoná naino mbula ya mabanga ya ndenge wana te na Ezipito.
Bolɔzi ya mwambe ezalaki ebele ya mayoyo. Mayoyo ebele ndenge wana emonaná naino liboso te. Mayoyo elyaki eloko nyonso oyo mbula ya mabanga etikaki.
Bolɔzi ya libwa ezalaki molili makasi. Molili ya makasi mpenza ezipaki mokili mikolo misato, kasi esika Bayisraele bazalaki molili ezalaki te.
Na nsuka, Nzambe alobi na Bayisraele ete bápakola makila ya mwana-mpate to mwana-ntaba na makonzí ya baporte na bango. Na nsima, anzelu ya Nzambe alekaki na mokili ya Ezipito. Soki amoni makila na porte, aleki ndako wana. Kasi na bandako nyonso oyo makila ezalaki na makonzí ya baporte te, anzelu abomaki bana ya liboso, ezala mwana ya moto to ya nyama. Wana nde bolɔzi ya zomi.
Nsima ya bolɔzi oyo ya nsuka, Farao ayebisaki Bayisraele bákende. Libota ya Nzambe bamibongisaki mpo bákende, mpe kaka na butu wana, balongwe na Ezipito, bakei.