Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 21 lok. 54-lok. 55 par. 2
  • Bolɔzi ya zomi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bolɔzi ya zomi
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Bakei epai ya Farao
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Malɔzi misato ya liboso
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Jéhovah azali nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Bayisraele bakómi baombo
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 21 lok. 54-lok. 55 par. 2
Moyisraele azali kopakola makila na makonzí ya porte

LITEYA 21

Bolɔzi ya zomi

Moize ayebisaki Farao ete akoluka lisusu komona ye te. Kasi liboso akende, alobaki na Farao: ‘Na midi ya butu, mwana nyonso ya liboso na Ezipito akokufa, kobanda na mwana na yo tii na bana ya baombo.’

Yehova ayebisaki Bayisraele básala molulu moko ya ntina mingi. Alobaki: ‘Bóboma mpate to ntaba ya mobali oyo ezali na mbula moko, mpe bópakola ndambo ya makila na yango na libaya ya likoló oyo esimbaka makonzí ya porte. Bótumba mosuni, mpe bólya yango ná bagato ezangá levire. Bólata libela, ná sandale na makolo, mpo bókoka kokende mbala moko. Na butu oyo nakosikola bino.’ Kanisá esengo makasi oyo Bayisraele bazalaki na yango!

Na midi ya butu, anzelu ya Yehova alekaki na ndako nyonso ya Ezipito. Na bandako oyo makila ezalaki te na makonzí ya porte, mwana ya liboso abomamaki. Kasi anzelu yango asalaki eloko te na bandako oyo bapakolaki makila. Na mabota nyonso ya Baezipito, ezala ya babola to ya bazwi, bana ya liboso bakufaki. Kasi mwana moko te ya Bayisraele akufaki.

Ata mwana ya Farao mpe akufaki. Farao akokaki lisusu kokanga motema te. Na mbala moko alobaki na Moize ná Arona: ‘Bótɛlɛma. Bólongwa awa. Bókende mpe bósambela Nzambe na bino. Bózwa banyama na bino mpe bókende!’

Wana sanza ezalaki mobimba mpenza, Bayisraele babimaki na Ezipito na kolanda mabota mpe bituluka na bango. Ezalaki na mibali 600 000, mpe basi ná bana ebele mpenza. Bato mosusu ebele mpe bakendaki elongo na bango mpo bákóma mpe kosambela Yehova. Nsukansuka, Bayisraele balongwaki na boombo!

Mpo na kokanisa ndenge Yehova abikisaki bango, bakómaki kosala molulu wana ya ntina mingi mbula na mbula. Bazalaki kobenga yango Elekeli.

Bayisraele bazali kobima na Ezipito

“Soki natiki yo ozala na bomoi ezali mpo na ntina oyo mpenza: mpo na nzela na yo nalakisa nguya na ngai, mpe mpo nkombo na ngai esakolama na mabele mobimba.”​—Baroma 9:17

Mituna: Bolɔzi ya zomi ezalaki nini? Bayisraele basengelaki kosala nini mpo bolɔzi yango ezwa bango te?

Kobima 11:1–12:42; 13:3-10

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto