Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • be liteya 23 lok. 157-lok. 159 par. 4
  • Komonisa ndenge ya kosalela makambo oyo ozali koloba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Komonisa ndenge ya kosalela makambo oyo ozali koloba
  • Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Masolo mosusu
  • Makanisi mabongi na koteya, malakisami polele
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Eteya mpenza bato oyo bakoyoka yo
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Maloba ya ebandeli oyo ekolamusa mposa ya bato
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Makanisi mabongi na mosala ya kosakola
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
Makambo mosusu
Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
be liteya 23 lok. 157-lok. 159 par. 4

LITEYA 23

Komonisa ndenge ya kosalela makambo oyo ozali koloba

Osengeli kosala nini?

Osengeli kosalisa bato oyo bazali koyoka yo bámona ete lisolo na yo etali mpenza bomoi na bango to bámona ndenge oyo bakoki kosalela makambo yango mpo na litomba na bango moko.

Yango ezali na ntina nini?

Soki bato bazali komona ntina ya makambo oyo ozali koloba te, bakoki koyebisa yo ete ezali kosepelisa bango te to bakoki kobanda kokanisa makambo mosusu mpe makanisi na bango ekoyengayenga.

EZALA ozali koloba na moto moko to na bato mingi, ezali malamu te kokanisa ete moto to bato oyo bazali koyoka yo bakosepela na makambo oyo ozali koloba kaka mpo yo moko ozali kosepela na yango. Nsango oyo ozali kopesa ezali na ntina, kasi soki omonisi mpenza ntina yango te, okokoka te kobenda likebi ya bato oyo bazali koyoka yo na boumeli ya ntango molai.

Ezali mpenza bongo, ata ntango ozali koloba liboso ya bato na Ndako ya Bokonzi. Bakoki kolanda yo na likebi mpenza ntango ozali kosalela bandakisa to masolo oyo bayoká naino te. Kasi mbala mosusu, bakolanda yo te ntango ozali kolobela likambo moko oyo bayebi, mingimingi soki ozali kosala lisolo na yo kozanga kotalela makambo oyo bango bayebi. Osengeli kosalisa bango báyeba mpo na nini mpe ndenge nini makambo oyo ozali koloba ezali mpenza mpo na litomba na bango.

Biblia ezali kolendisa biso tókanisaka ndenge oyo tosengeli kosalela mayele na biso. (Mas. 3:21) Yehova asalelaki Yoane Mobatisi mpo na komema bato na “bwanya oyo ebongi ya bayengebene.” (Luka 1:17) Bwanya yango euti na ezaleli ya kobanga Yehova. (Nz. 111:10) Baoyo basepelaka na bwanya yango, bazali kosalisama mpo na koyika mpiko na bomoi oyo mpe mpo na kozwa bomoi ya solosolo, elingi koloba, bomoi ya seko oyo ezali koya.​—1 Tim. 4:8; 6:19.

Monisá bato ndenge ya kosalela makambo oyo ozali kolobela na lisukulu na yo. Soki olingi ete bato bámona ntina ya lisukulu na yo, osengeli kotalela malamumalamu kaka makambo oyo okoloba te, kasi mpe bato oyo bakoyoka yo. Komona bango kaka lokola liboke moko te. Na kati ya liboke wana, ezali na bato mpe na mabota. Bato yango bakoki kozala bana mike, bilenge, mikóló mpe bamosusu na kati na bango bazali mibange mpenza. Ekoki mpe kozala na bato ya sika oyo babandi kosepela na solo mpe bato mosusu oyo bazali kosalela Yehova bandá kala, liboso kutu yo obotama. Basusu bakoki kozala baklisto oyo bateli na elimo; basusu bazali mbala mosusu kolanda naino bizaleli mpe misala mosusu ya mokili oyo. Omituna boye: ‘Ndenge nini makambo oyo nakoloba ekoki kozala na litomba mpo na bato oyo bakoyoka ngai? Ndenge nini nakoki kosalisa bango bákanga ntina na yango?’ Okoki kopona kotya likebi na yo mingimingi na lolenge moko to mibale ya bato oyo tolobeli awa. Kasi, kobosana mpenza bamosusu te.

Bongo soki basɛngi yo olobela liteya moko ya ebandeli ya Biblia? Ndenge nini okoki kosala ete lisolo yango ezala na litomba mpo na bato oyo bazali koyoka yo, atako bandimaka liteya yango? Salá makasi olendisa kondima na bango na liteya yango. Ndenge nini? Talelá na bango elongo bavɛrsɛ oyo esimbi liteya yango. Okoki mpe kosala ete básepela na liteya yango mingi lisusu. Mpo na yango, okoki komonisa bango ndenge likambo yango eyokani mpenza na makambo mosusu ya Biblia mpe na bomoto ya Yehova ye moko. Salelá bandakisa, ata mpe makambo oyo ekómelaki bato mosusu, mpo na komonisa bango ndenge bato mosusu bazwaki litomba mpo bakangaki ntina ya liteya yango mpe ndenge yango ebongolaki likanisi na bango mpo na bomoi na mikolo ezali koya.

Mpo na komonisa bato ndenge ya kosalela makambo yango, kosuka kaka te na kopesa bango mwa toli na nsuka ya lisolo na yo. Kaka ntango obandi lisolo na yo, moto mokomoko oyo azali koyoka yo asengeli koloba mpenza na motema ete “makambo oyo etali ngai mpe.” Lokola obandi bongo, ntango ozali kolobela likanisi mokomoko ya ntina, ezala na katikati ya lisolo na yo to na nsuka na yango, monisá ntango nyonso ndenge ya kosalela makambo yango.

Ntango ozali komonisa bato ndenge ya kosalela makambo yango, salá yango na lolenge oyo eyokani na mitinda ya Biblia. Yango elimboli nini? Elimboli ete osengeli kosala yango na bolingo mpenza mpe omonisa ete ozali komitya na esika ya basusu. (1 Pet. 3:8; 1 Yoa. 4:8) Ata ntango azalaki kolobela mikakatano minene oyo ebimaki na Tesalonika, ntoma Paulo asalaki makasi ete abimisa makambo malamu oyo ezalaki komonisa ete bandeko na ye baklisto ya mboka wana bazalaki kokola na elimo. Amonisaki mpe ete andimaki ete bato yango bakolinga kosala oyo ezali malamu na likambo yango. (1 Tes. 4:1-12) Azali mpenza ndakisa oyo tosengeli kolanda!

Lisolo na yo esengeli kolendisa bato básala mingi lisusu na mosala ya kosakola mpe ya koteya nsango malamu? Salisá bato bázala na esengo mpe básepela na mokumba wana. Ntango ozali kosala bongo, kobosana te ete moto na moto asakolaka na kotalela makoki na ye mpe Biblia endimi yango. (Mat. 13:23) Koluka te kobakisa kilo na mitó ya bandeko, noki te bakomiyoka lokola nde bamemi ngambo. Baebele 10:24 ezali kotinda biso “tótyelanaka likebi mpo na kopusama na kozala na bolingo mpe na misala ya malamu.” Soki tozali kolendisa bandeko bámonisa bolingo, bakosala misala oyo ekouta na makanisi malamu. Na esika ya kotinda bango na makasi bámikokanisa na baklisto mosusu, yebá ete oyo Yehova alingi ezali ete tólendisa bato bázala na “botosi na nzela ya kondima.” (Lom. 16:26) Lokola toyebi yango, tozali koluka kolendisa kondima na biso moko mpe oyo ya bandeko na biso.

Ndenge ya kosalisa basusu bákanga ntina ya nsango na biso. Ntango ozali kopesa basusu litatoli, kobosana te komonisa bango ntina ya nsango malamu. Mpo na kosala yango, osengeli kotalela makanisi ya bato oyo bazali na teritware na yo. Ndenge nini okoki koyeba yango? Landáká bansango oyo bapesaka na radio to na televizyo. Tángáká mitó ya masolo ya bazulunalo. Saláká mpe makasi mpo na kobanda lisolo na bato mpe yokáká bango ntango bazali koloba. Okomona ete bazali kobunda na mikakatano oyo ezali kosɛnga ete básalisa bango nokinoki, na ndakisa: kozanga mosala, kofutela ndako, maladi, kokufela moto, babandi bazali koboma bato, bakonzi bazangi bosembo, mabala ezali kokufa, bana ya mike bazali kobatelama malamu te, mpe bongo na bongo. Biblia ekoki kosalisa bango? Ɛɛ, ekoki mpenza kosalisa bango.

Ntango obandi kosolola na moto, ekozala malamu ozala na likambo moko oyo olingi koloba. Nzokande soki moto yango amonisi ete ezali na likambo mosusu oyo ezali mpenza kotungisa ye na ntango wana, kokakatana te mpo na kolobela likambo yango soki okokoka, to okoki kosɛnga ye ete ozongela ye mbala ya nsima mpo na koyebisa ye makambo oyo ekosalisa ye. Ya solo, tolingi te ‘komikɔtisa na makambo oyo etali biso te,’ kasi tosepelaka koyebisa basusu toli ebongi oyo Biblia ezali kopesa. (2 Tes. 3:11) Emonani polele ete, ezali toli ya Biblia nde ekosimba mpenza bato, mpamba te elobelaka mpenza bomoi na bango.

Soki bato bazali komona te ete nsango na biso etali mpenza bomoi na bango, bakoki mbala moko kokata lisolo. Ata soki batiki biso tóloba, soki tomonisi bango ntina ya likambo oyo tozali koloba te, nsango na biso ekosimba mpenza bomoi na bango te. Nzokande, soki tomonisi polele mpenza ntina ya nsango na biso, lisolo na biso ekobongola mpenza bomoi ya bato yango.

Ntango ozali kotambwisa boyekoli ya Biblia, kotika te komonisa ndenge ya kosalela makambo yango na bomoi na bango. (Mas. 4:7) Salisá bayekoli bákanga ntina ya toli, mitinda mpe bandakisa ya Makomami oyo ezali komonisa bango ndenge ya kotambola na nzela ya Yehova. Lobelá mpenza matomba oyo tokoki kozwa soki tosaleli yango. (Yis. 48:17, 18) Yango ekotinda bayekoli básala mbongwana oyo esengeli na bomoi na bango. Salisá bango bálinga Yehova mpe bázala na mposa ya kosepelisa ye, mpe tiká motema na bango etinda bango básalela toli oyo euti na Liloba ya Nzambe.

NDENGE YA KOSALA YANGO

  • Ntango ozali kobongisa lisukulu, kotalela kaka makambo oyo okoloba te, kasi talelá mpe bato oyo bakoyoka yo. Salá lisolo yango na ndenge oyo ebongi mpo bázwela yango litomba.

  • Kozela kaka nsuka ya lisolo na yo te mpo na komonisa bango ndenge ya kosalela makambo oyo ozali kolobela. Monisá yango na lisolo na yo mobimba.

  • Ntango ozali komibongisa mpo na kokende kopesa litatoli, talelá makanisi ya bato oyo bazali na esika ofandi.

  • Ntango ozali kopesa litatoli, yoká na likebi mpenza moto oyo azali koloba mpe sololá na ye na kotalela makambo oyo alobi.

DEVUARE: Talá na Mosala na biso ya Bokonzi ya kala oyo ozali na yango mpe poná lolenge moko to mibale ya kobanda lisolo oyo omoni ete ebongi mpenza mpo na teritware na bino. Meká kosalela yango na mosala ya kosakola.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto