Maloba ya ebandeli ya eteni 14
Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bapalanganisaki nsango malamu ya Bokonzi tii na bisika eleki mpenza mosika na mabele. Yesu atambwisaki bango bisika basengelaki kosakola mpe na ndenge ya likamwisi apesaki bango likoki ya koteya bato na minɔkɔ na bango moko. Yehova apesaki bango mpiko mpe nguya ya kolonga mikakatano ya makasi.
Na emonaneli moko, Yesu alakisaki ntoma Yoane nkembo ya Yehova. Na emonaneli mosusu, ntoma Yoane amonaki Bokonzi ya likoló elongi Satana mpe esukisi boyangeli na ye libela. Yoane amonaki Yesu azali koyangela elongo na bato 144 000. Yoane amonaki mpe mabele mobimba ekómi paradiso esika bato nyonso bazali kosambela Yehova na kimya mpe na bomoko.