Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • es20 nk. 37-47
  • Sanza ya 4

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sanza ya 4
  • Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2020
  • Mitó ya makambo mike
  • Mwamisato, 1 sanza ya 4
  • Mwaminei, 2 sanza ya 4
  • Mwamitano, 3 sanza ya 4
  • Mwapɔsɔ, 4 sanza ya 4
  • Mwalomingo, 5 sanza ya 4
  • Mwayambo, 6 sanza ya 4
  • Dati ya Ekaniseli
    Soki moi elali
    Mwamibale, 7 sanza ya 4
  • Mwamisato, 8 sanza ya 4
  • Mwaminei, 9 sanza ya 4
  • Mwamitano, 10 sanza ya 4
  • Mwapɔsɔ, 11 sanza ya 4
  • Mwalomingo, 12 sanza ya 4
  • Mwayambo, 13 sanza ya 4
  • Mwamibale, 14 sanza ya 4
  • Mwamisato, 15 sanza ya 4
  • Mwaminei, 16 sanza ya 4
  • Mwamitano, 17 sanza ya 4
  • Mwapɔsɔ, 18 sanza ya 4
  • Mwalomingo, 19 sanza ya 4
  • Mwayambo, 20 sanza ya 4
  • Mwamibale, 21 sanza ya 4
  • Mwamisato, 22 sanza ya 4
  • Mwaminei, 23 sanza ya 4
  • Mwamitano, 24 sanza ya 4
  • Mwapɔsɔ, 25 sanza ya 4
  • Mwalomingo, 26 sanza ya 4
  • Mwayambo, 27 sanza ya 4
  • Mwamibale, 28 sanza ya 4
  • Mwamisato, 29 sanza ya 4
  • Mwaminei, 30 sanza ya 4
Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2020
es20 nk. 37-47

Sanza ya 4

Mwamisato, 1 sanza ya 4

[Yesu] alobaki na [Petro] ete: “Leká nsima na ngai, Satana! . . . Ozali kokanisa makanisi ya Nzambe te, kasi oyo ya bato.”​—Mat. 16:23.

Bongo yo? Okanisaka lokola Yesu to lokola bato ya mokili? Ya solo, lokola tozali bakristo, tosalaka makasi tósala makambo oyo Nzambe asɛngi. Bongo makanisi na yo? Osalaka makasi okanisaka lokoka Yehova, elingi koloba otalelaka makambo ndenge ye atalelaka yango? Esɛngaka milende mingi mpo na kosala yango. Kasi, kokanisa lokola bato ya mokili ezali mpasi ata moke te, mpo elimo ya mokili ezali bisika nyonso. (Ef. 2:2) Lisusu, mbala mingi bato ya mokili balukaka liboso bolamu na bango moko, mpe makanisi yango ekoki kokɔtela biso. Ya solo, ezali mpasi kokanisa lokola Yehova, kasi ezali pɛtɛɛ kokanisa lokola bato ya mokili. Soki tozali kolanda makanisi ya mokili, tokokóma na moimi mpe tokoluka kozala na lipanda. (Mrk. 7:21, 22) Na yango, ezali na ntina mingi tóyekola kozala na “makanisi ya Nzambe,” kasi te “oyo ya bato.” w18.11 18 par. 1; 19 par. 3-4

Mwaminei, 2 sanza ya 4

Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi.​—Mat. 3:17.

Mbala misato mongongo ya Yehova eyokanaki na likoló mpo na komonisa Mwana na ye ete alingaka ye. Yango elendisaki Yesu mingi mpenza! Kaka ntango Yesu azwaki batisimo na ebale Yordani, Yehova alobaki maloba ya mokapo ya lelo. Emonani ete longola Yesu, kaka Yoane Mobatisi nde ayokaki maloba wana. Mbula soki moko na nsima liboso Yesu akufa, bantoma na ye misato bayokaki ndenge Yehova alobaki mpo na Yesu ete: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi; bóyoka ye.” (Mat. 17:5) Mpe ya nsuka, Yehova asololaki lisusu na Yesu, mwa mikolo liboso Yesu akufa. (Yoa. 12:28) Yesu ayebaki ete bato bakobenga ye mofingi mpe akokufa liwa moko ya nsɔni. Kasi, abondelaki ete mokano ya Nzambe esalema kasi oyo ya ye te. (Mat. 26:39, 42) “Ayikelaki nzete ya mpasi mpiko, atyolaki nsɔni” mpo alingaki ete andimama na Tata na ye, kasi na bato ya mokili te.​—Ebr. 12:2. w18.07 10-11 par. 15-16

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 9 Nisana nsima ya kolala ya moi) Marko 14:3-9

Mwamitano, 3 sanza ya 4

Tata, soki olingi, longolelá ngai kɔpɔ oyo.​—Luka 22:42.

Mwa moke nsima ya kobandisa Bilei ya mpokwa ya Nkolo, Yesu amonisaki mpiko ya kokamwa mpenza. Na ndenge nini? Andimaki kosala mokano ya Tata na ye, atako ayebaki ete yango ekosɛnga ete akufa liwa ya nsɔni mpo bakoloba ete afingi Nzambe. (Mat. 26:65, 66) Yesu abatelaki bosembo na ye tii na nsuka mpo akumisa nkombo ya Yehova, alongisa boyangeli ya Nzambe, mpe afungwela bato oyo bakobongola motema nzela ya kozwa bomoi ya seko. Yesu abongisaki mpe bayekoli na ye mpo na makambo oyo basengelaki kokutana na yango mosika te. Lisusu, Yesu amonisaki mpiko na ndenge atyaki te makanisi na ye na mitungisi oyo akokaki kozala na yango, kasi atyaki likebi na ye na bamposa ya bantoma na ye ya sembo. Molulu wana oyo ezangi mindɔndɔ, oyo abandisaki ntango Yudasi abimaki, ezalaki mpo na kosalisa baoyo bakokóma bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo bábosanaka te mapamboli oyo bakozwa na nzela ya makila oyo Yesu asopaki mpe ya kokɔta na kondimana ya sika.​—1 Ko. 10:16, 17. w19.01 22 par. 7-8

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 9 Nisana na moi) Marko 11:1-11

Mwapɔsɔ, 4 sanza ya 4

Tata, pesá nkombo na yo nkembo.​—Yoa. 12:28.

Na mbala moko, Tata ya Yesu alobaki uta na likoló, ete: “Nasili kopesa yango nkembo mpe nakopesa yango nkembo lisusu.” Yesu atungisamaki mpo na mokumba monene oyo azalaki na yango ya kotikala sembo epai ya Yehova. Ayebaki ete etikalaki moke anyokwama makasi mpe akufa liwa ya mpasi. (Mat. 26:38) Mpo na Yesu, kokumisa nkombo ya Tata na ye ezalaki likambo oyo elekaki ntina. Bafundaki Yesu ete atuki Nzambe, mpe azalaki komitungisa mpo na ndenge oyo liwa na ye ekokaki komema nsɔni na nkombo ya Tata na ye. Lokola Yesu, biso mpe tokoki komitungisa mpo na nsɔni oyo ekoki kobwakama na nkombo ya Yehova. Ekoki kozala ete lokola Yesu, basaleli biso makambo oyo ezali sembo te. To ekoki kozala ete bansango ya lokuta oyo banguna bapanzaka mpo na biso ezali kotungisa biso. Tokoki kokanisa nsɔni oyo maloba ya ndenge wana ekoki kobwaka na nkombo ya Yehova mpe ebongiseli na ye. Na ntango wana, maloba ya Yehova ebɔndisaka biso mingi. Yehova akotika te kopesa nkombo na ye nkembo.​—Nz. 94:22, 23; Yis. 65:17. w19.03 11-12 par. 14-16

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 10 Nisana na moi) Marko 11:12-19

Mwalomingo, 5 sanza ya 4

Yesu Kristo abandaki komonisa bayekoli na ye ete . . . bakonyokola ye mingi, mpe akobomama.​—Mat. 16:21.

Bayekoli ya Yesu bakamwaki makasi! Bakanisaki ete Yesu akozongisa bokonzi na Yisraele, kasi Yesu alobaki ete mosika te akonyokwama mpe akokufa. Ntoma Petro nde azwaki maloba liboso; alobaki: “Komitungisa te, Nkolo; likambo wana ekokómela yo te.” Yesu alobaki na ye: “Leká nsima na ngai, Satana! Ozali eloko oyo ezali kobɛtisa ngai libaku, mpo ozali kokanisa makanisi ya Nzambe te, kasi oyo ya bato.” (Mat. 16:21-23; Mis. 1:6) Na maloba wana, Yesu amonisaki polele ete makanisi ya Yehova ekeseni na makanisi ya mokili oyo eyangelami na Satana. (1 Yoa. 5:19) Petro alendisaki Yesu aluka bolamu na ye, ezaleli ya moimi oyo emonanaka epai ya bato mingi na mokili. Kasi, Yesu ayebaki ete Yehova alingi amibongisa mpo mosika te akokutana na minyoko mpe akokufa. Eyano ya Yesu emonisaki polele ete andimaki makanisi ya Yehova mpe abwakaki makanisi ya mokili. w18.11 18 par. 1-2

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 11 Nisana na moi) Marko 11:20–12:27, 41-44

Mwayambo, 6 sanza ya 4

Bókoba kosakola liwa ya Nkolo, tii ntango akoya.​—1 Ko. 11:26.

Yehova amonaka nini ntango bamilio ya bato bayangani na mokili mobimba mpo na molulu ya Bilei ya mpokwa ya Nkolo? Asukaka kaka te na komona ebele ya bato; amonaka mpe moto mokomoko oyo ayei. Na ndakisa, amonaka baoyo bayaka na Ekaniseli mbula na mbula. Na kati na bango, basusu bayanganaka atako bazali kokutana na minyoko ya makasi mpenza. Bato mosusu bayaka mbala na mbala te na makita, kasi bamonaka ete Ekaniseli ezali molulu ya kozangisa te. Yehova amonaka mpe baoyo bayei na Ekaniseli mpo na mbala ya liboso, mbala mosusu kaka mpo na kotala ndenge esalemaka. Na ntembe te, Yehova asepelaka komona ebele ya bato oyo bayanganaka na Ekaniseli. (Luka 22:19) Kasi, atalaka mingimingi kaka motángo ya bato te. Atyaka likebi mingi nde na ntina oyo bato bayanganaka. Ozalaka na mposa makasi ya koteyama na Yehova mpe na ebongiseli oyo azali kosalela?​—Yis. 30:20; Yoa. 6:45. w19.01 26 par. 1-3

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 12 Nisana na moi) Marko 14:1, 2, 10, 11; Matai 26:1-5, 14-16

Dati ya Ekaniseli
Soki moi elali
Mwamibale, 7 sanza ya 4

Kristo akufelaki biso.​—Rom. 5:8.

Yesu amonisaki yango na ndenge andimaki kokufa mpo na bayekoli na ye, mpe na ndenge azalaki kotya matomba na bango na esika ya liboso na bomoi na ye ya mokolo na mokolo. Na ndakisa, alekisaki ntango elongo na bayekoli na ye ata ntango azalaki ya kolɛmba to ntango atungisamaki mingi. (Luka 22:39-46) Azalaki kolinga kosalela basusu, kasi te koluka ete basusu básalela ye. (Mat. 20:28) Tozali na kati ya libota kaka moko ya bakristo ya solo, mpe tosepelaka kolekisa ntango mingi mpo na kobenga basusu bákɔta mpe na libota na biso. Kasi, tolingaka kosalisa libosoliboso baoyo bazali “bandeko na biso na kati ya kondima,” kasi batiká kosakola to koyangana na makita. (Gal. 6:10) Tokomonisa ete tolingaka bango ntango tolendisi bango báyanganaka na makita, mingimingi na Ekaniseli. Ndenge moko na Yehova mpe Yesu, tosepelaka mingi soki ndeko oyo atiká kosakola to koyangana na makita azongeli Yehova.​—Mat. 18:14. w19.01 29 par. 12, 14; 30 par. 15

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 13 Nisana na moi) Marko 14:12-16; Matai 26:17-19 (Makambo oyo esalemaki mwa 14 Nisana nsima ya kolala ya moi) Marko 14:17-72

Mwamisato, 8 sanza ya 4

Oyo elakisi nzoto na ngai. . . . Oyo elakisi ‘makila ya kondimana’ na ngai.​—Mat. 26:26-28.

Ntango Yesu abandisaki Ekaniseli ya liwa na ye, asalelaki kaka limpa ezangi levire mpe vinyo oyo bazalaki na yango, oyo basalelaki na fɛti ya Elekeli. Yesu ayebisaki bantoma na ye ete limpa wana ezali komonisa nzoto na ye ya kokoka mpe vinyo ezali komonisa makila na ye oyo akopesa mbeka mpo na bango. Mbala mosusu bantoma bakamwaki te ndenge Yesu abandisaki molulu yango ya ntina mingi na ndenge ya mindɔndɔ te. Mpo na nini bakamwaki te? Mwa basanza liboso, Yesu akendaki kotala baninga na ye: Lazare, Marta, mpe Maria. Ntango bafandaki na ndako, Yesu abandaki koteya. Marta azalaki, kasi atyaki makanisi na kobongisa bilei ebele mpo na kosepelisa mopaya na bango. Ntango Yesu amonaki yango, asembolaki Marta na boboto, asalisaki ye amona ete kosala biloko ya mindɔndɔ mbala mosusu ezalaka na ntina te. (Luka 10:40-42) Na nsima, ntango etikalaki kaka mwa bangonga mpo apesa bomoi na ye mbeka, ye moko asalelaki toli oyo apesaki Marta. Abandisaki Ekaniseli na ndenge oyo ezangi mindɔndɔ. w19.01 20-21 par. 3-4

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 14 Nisana na moi) Marko 15:1-47

Mwaminei, 9 sanza ya 4

Tata, pesá ngai nkembo pembeni na yo moko na nkembo oyo nazalaki na yango.​—Yoa. 17:5.

Yehova akumisaki Yesu na ndenge moko ya kokamwa. Ntango Nzambe asekwisaki ye, mpe azongaki na likoló, “atombolaki ye likoló koleka.” Mpe akómisaki Yesu ekelamu ya elimo oyo akokufa lisusu te, eloko oyo apesaki ata moto mosusu te liboso! (Flp. 2:9; 1 Tim. 6:16) Ndenge oyo Yehova andimaki Yesu mpo na mosala na ye ya sembo, ezali mpenza kokamwisa! Nini ekosalisa biso tóluka kondimama na Yehova, kasi na mokili te? Tosengeli kotya motema ete Yehova ayebaka ntango nyonso basaleli na ye ya sembo mpe apesaka bango mbano, mpe mbala mingi asalaka yango na ndenge oyo bakoki kokanisa te. Tokoki kaka komeka kokanisa ndenge oyo Yehova akopesa biso mbano na mikolo ezali koya. Kasi mpo na sikoyo, ntango tozali koyika mpiko na mikakatano mpe bampasi na mokili oyo mabe, tosengeli kobosana te ete mokili oyo ezali koleka. (1 Yoa. 2:17) Tata na biso ya bolingo, Yehova akobosana soki moke te mosala na biso mpe bolingo oyo tozali komonisela nkombo na ye mpo “azangi boyengebene te.”​—Ebr. 6:10. w18.07 11 par. 17-18

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 15 Nisana na moi) Matai 27:62-66 (Makambo oyo esalemaki mwa 16 Nisana nsima ya kolala ya moi) Marko 16:1

Mwamitano, 10 sanza ya 4

Nazali [kosɛnga] . . . bango nyonso bázala moko, ndenge yo, Tata, ozali na bomoko elongo na ngai.​—Yoa. 17:20, 21.

Yesu amitungisaki mpo na bomoko ntango bazalaki kolya elongo na bantoma na ye mpo na mbala ya nsuka. Ntango azalaki kobondela elongo na bango, alobaki ete alingi bayekoli na ye bázala moko to na bomoko, ndenge kaka ye ná Tata na ye bazali na bomoko. Soki bayekoli bazali na bomoko, yango ekomonisa ete Yehova atindaki Yesu na mabele mpo na kosala mokano ya Nzambe. Bato bakoyeba bayekoli ya solo ya Yesu soki bazali na bolingo kati na bango mpe yango ekosala ete bázala lisusu na bomoko makasi. (Yoa. 13:34, 35) Yesu alobelaki bomoko na butu wana mpo amonaki ete bantoma na ye bazalaki mpenza na bomoko te. Na ndakisa, ndenge esalemaki liboso, bantoma bawelanaki lisusu mpo “na koyeba nani na kati na bango amonani ete aleki bango nyonso.” (Luka 22:24-27; Mrk. 9:33, 34) Mokolo moko, Yakobo ná Yoane basɛngaki Yesu apesa bango esika ya lokumu na Bokonzi ya likoló, pembeni na ye.​—Mrk. 10:35-40. w18.06 8 par. 1-2

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 16 Nisana na moi) Marko 16:2-8

Mwapɔsɔ, 11 sanza ya 4

Mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe asengeli kokangama na mwasi na ye mpe basengeli kokóma mosuni moko.​—Eba. 2:24.

Yehova alingi ete bato oyo babalani bálinganaka mingi mpo bolingo na bango eumela bomoi mobimba. (Mat. 19:3-6) Ekobo ezali moko ya makambo oyo eleki mabe, oyo emonisaka mpenza kozanga bolingo. Yango wana, mobeko ya nsambo kati na Mibeko Zomi epekisaki ekobo. (Mib. 5:18) Kosala ekobo ezali ‘kosalela Nzambe lisumu’ mpe kosala molongani mabe mpenza. (Eba. 39:7-9) Moto oyo molongani na ye asali ekobo akoki koyoka mpasi na yango bambula ebele mpenza. Yehova alingaka mpe ete bana bázala na esengo mpe bábatelama malamu. Yehova asɛngaki baboti bákokisa kaka bamposa ya mosuni te, kasi mpe bamposa ya elimo ya bana na bango. Baboti basengelaki kosalela mabaku nyonso mpo na kosalisa bana bákanga ntina ya Mibeko ya Yehova mpe báyekola kolinga yango. (Mib. 6:6-9; 7:13) Baboti basengelaki te komona bana lokola biloko mpamba oyo bakokaki kosakanela, kasi nde lokola libula, to likabo oyo euti na Yehova, oyo basengeli kozwa na motuya.​—Nz. 127:3. w19.02 21 par. 5, 7

Mwalomingo, 12 sanza ya 4

Nzambe akoyeba bosembo na ngai.​—Yobo 31:6.

Kozala ntango nyonso na elikya ete Nzambe akopesa ye mbano esalisaki Yobo abatela bosembo na ye. Yobo andimaki ete Nzambe azalaki kosepela na bosembo na ye. Atako amekamaki makasi, atyaki motema ete nsukansuka Yehova akopesa ye mbano. Na ntembe te, yango esalisaki ye akangama na bosembo na ye. Yehova asepelaki mpenza na bosembo ya Yobo mpe apambolaki ye mingi, atako azalaki kaka moto ya kozanga kokoka! (Yobo 42:12-17; Yak. 5:11) Yobo akozwa lisusu mbano monene koleka na mikolo oyo ezali koya. Nzambe na biso abongwani te. (Mal. 3:6) Soki tozali kobosana te ete azwaka bosembo na biso na motuya, tokoki kobatela na motema na biso elikya kitoko mpo na mikolo oyo ezali koya. (1 Tes. 5:8, 9) Na bantango mosusu, okoki komona ete bato nyonso zingazinga na yo bazali sembo te kaka yo, kasi yebá ete ozali yo moko te. Ozali na kati ya bamilio ya bato ya sembo oyo bazali kobatela bosembo na bango na mokili mobimba. Okozala mpe na molɔngɔ ya mibali ná basi ya kondima oyo babatelaki bosembo na bango na ntango ya kala, ata liboso ya liwa.​—Ebr. 11:36-38; 12:1. w19.02 7 par. 15-16

Mwayambo, 13 sanza ya 4

Bózalaka na likanisi moko, bómityaka na esika ya bamosusu, bózalaka na bolingo ya bondeko, bato oyo bayokelaka bamosusu mawa mpenza, bato ya komikitisa.​—1 Pe. 3:8.

Lokola Ekaniseli ezali kopusana, tokoki komituna boye: ‘Ndenge nini nakoki komekola Yesu mingi koleka na likambo etali komonisa bolingo? Nakanisaka bamposa ya bandeko na ngai bakristo mingi koleka bamposa na ngai moko? Nalukaka ete bandeko na ngai bakristo básalela ngai makambo oyo eleki makoki na bango, to nayebaka ete bakoki te kosala makambo mosusu?’ Tókoba ntango nyonso komekola Yesu mpe ‘tómityaka na esika ya basusu.’ Mosika te, Ekaniseli ya liwa ya Kristo ekosalema lisusu te. Ntango Yesu “akoya” na ntango ya bolɔzi monene, akoyanganisa “bato oyo ye aponá” mpo bákende likoló, mpe tokotika kosala Ekaniseli. (1 Ko. 11:26; Mat. 24:31) Ata ntango Ekaniseli ekosalema lisusu te, kozanga ntembe basaleli ya Yehova bakobosana te molulu yango oyo ezangi mindɔndɔ, oyo emonisaka komikitisa, mpiko, mpe bolingo monene ya Yesu. w19.01 25 par. 17-19

Mwamibale, 14 sanza ya 4

Yo osepeli na bosolo oyo ezali na kati ya motema; mpe na kati na ngai moko osala ete nayeba bwanya mpenza.​—Nz. 51:6.

Tózwa ndakisa ya kolɔngɔnɔ ya nzoto na biso mpo tómona ntina ya koyeba ndenge oyo tozali na kati. Ya liboso, mpo na kozala nzoto kolɔngɔnɔ, tosengeli kolyaka biloko ya malamu, mpe kosala ngalasisi mbala na mbala. Ndenge moko mpe, mpo na kozala malamu na elimo, tosengeli kolyaka bilei ya elimo ya malamu mpe komonisa mbala na mbala kondima na biso epai ya Yehova. Mpo na komonisa yango, tosengeli kosalela makambo oyo toyekolaka mpe kolobela bindimeli na biso. (Rom. 10:8-10; Yak. 2:26) Ya mibale, soki tozali kotalela kaka ndenge oyo tozali komonana na libándá, tokoki kokanisa ete tozali nzoto kolɔngɔnɔ, nzokande tozali na maladi na kati ya nzoto. Ndenge moko mpe, soki tozali kotalela kaka makambo ya elimo oyo tomesaná kosala, tokoki kokanisa ete kondima na biso ezali makasi, nzokande, bamposa ya mabe ezali kokola na kati na biso. (1 Ko. 10:12; Yak. 1:14, 15) Tosengeli kobosana te ete Satana akosepela soki tokómi na makanisi lokola ya ye. w19.01 15 par. 4-5

Mwamisato, 15 sanza ya 4

Kende mpe yo moko salá se bongo.​—Luka 10:37.

Tokoki komituna boye: ‘Nasalaka mpe bongo? Nayokelaka basusu mawa lokola Mosamaria wana?’ (Luka 10:30-35) ‘Ntango basusu bazali konyokwama, nakoki kosala mwa eloko mpo na kosalisa bango? Na ndakisa, na lisangá na biso, nakoki kosalisa mibange, moto oyo molongani na ye akufá, to bana oyo baboti na bango basalelaka Yehova te? Nakoki ‘koloba na ndenge ya kobɔndisa epai ya baoyo banyokwami na makanisi’ mpo na kolendisa bango?’ (1 Tes. 5:14; Yak. 1:27) Ntango tozali kosalela basusu makambo oyo emonisi motema mawa, toyokaka esengo ya kopesa, ndenge Yesu alobaki. Lisusu, kosala bongo esepelisaka Yehova. (Mis. 20:35; Ebr. 13:16) Mpo na moto oyo amonisaka motema mawa, Mokonzi Davidi alobaki: “Yehova ye moko akokɛngɛla ye mpe akobatela ye na bomoi. Akotángama moto ya esengo na mabele.” (Nz. 41:1, 2) Soki tozali komonisela basusu motema mawa, Yehova mpe akomonisela biso motema mawa mpe tokoki kozala na esengo libela na libela.​—Yak. 2:13. w18.09 19 par. 11-12

Mwaminei, 16 sanza ya 4

Kobanga te, mpo nazali na yo. Kotala epai na epai te, mpo nazali Nzambe na yo. Nakopesa yo makasi. Nakosalisa yo mpenza.​—Yis. 41:10.

Ndeko mwasi moko ya sembo na nkombo Yoshiko azwaki nsango moko ya mabe. Monganga ayebisaki ye ete akokufa nsima ya mwa basanza. Yoshiko asalaki nini? Akanisaki vɛrsɛ moko oyo alingaki mingi, mokapo ya lelo. Na nsima, ayebisaki monganga na ye na kimya nyonso ete azali kobanga te, mpo Yehova asimbi ye na lobɔkɔ. Maloba ya kobɔndisa oyo ezali na vɛrsɛ wana esalisaki ndeko na biso atyela Yehova motema mobimba. Vɛrsɛ yango ekoki mpe kosalisa biso tózala motema kimya ntango tokutani na komekama makasi. Yehova ayebisaki Yisaya akoma maloba yango libosoliboso mpo na kobɔndisa Bayuda oyo na nsima bamemamaki na boombo na Babilone. Kasi, Yehova asalaki ete maloba yango ekomama mpo na kosalisa kaka Bayuda oyo bamemamaki na boombo te, kasi mpe basaleli na ye mosusu nyonso tii lelo. (Yis. 40:8; Rom. 15:4) Lelo oyo, tozali na “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano,” mpe tozali mpenza na mposa ya maloba ya kolendisa oyo ezali na mokanda ya Yisaya.​—2 Tim. 3:1. w19.01 2 par. 1-2

Mwamitano, 17 sanza ya 4

Soki oyo azali mondimi te azali koluka kokabwana, akabwana.​—1 Ko. 7:15.

Soki mwasi ná mobali bakabwani, libala na bango ezali kaka, mpe bakozala na mikakatano. Ntoma Paulo apesaki ntina oyo mwasi ná mobali basengeli kofanda elongo. Akomaki boye: “Mobali wana oyo azali mondimi te asantisami mpo na mwasi na ye, mpe mwasi wana oyo azali mondimi te asantisami mpo na ndeko mobali wana; soki te, bana na bino bakozala mpenza mbindo, kasi sikoyo bazali basantu.” (1 Ko. 7:14) Bakristo mingi ya sembo bazwaki ekateli ya kofanda na molongani na bango oyo azalaki kosambela Yehova te atako ezalaki mpasi mingi. Basepelaki mpenza ndenge basalaki yango, ntango na nsima molongani na bango akómaki Motatoli ya Yehova. (1 Ko. 7:16; 1 Pe. 3:1, 2) Lelo oyo, masangá ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba etondi na mabala ya esengo. Na ntembe te, na lisangá na bino mpe bandeko ebele bazali na esengo na mabala na bango. Mibali bazali sembo mpe balingaka basi na bango, mpe basi batosaka mibali na bango. Bango nyonso bamonisaka ete libala ekoki kokumisama.​—Ebr. 13:4. w18.12 14 par. 18-19

Mwapɔsɔ, 18 sanza ya 4

Yehova Nzambe alonaki elanga na Edene, . . . mpe kuna atyaki moto oyo ye asalaki.​—Eba. 2:8.

Liloba “Edene” elimboli “Esengo,” mpe elanga yango ezalaki mpenza esika ya bisengo. Ezalaki kitoko mingi, etondaki na bilei, mpe kimya ezalaki kati na bato mpe banyama. (Eba. 1:29-31) Liloba ya Ebre oyo ebongolami “elanga,” na Grɛki ebongolami paradéïsos. Buku moko (Cyclopædia ya M’Clintock ná Strong) elobi ete ntango Mogrɛki ayoki liloba paradéïsos, na makanisi na ye akomona elanga moko kitoko, ya monene, oyo ebatelami malamu mpo likama ebima te, oyo ezali na nzete minene ya mbuma ndenge na ndenge, ezali na bibale ya mai ya pɛto mpe ebele ya matiti oyo mboloko mpe mpate ekoki kolya. (Talá mpe Ebandeli 2:15, 16.) Yehova atyaki Adama ná Eva na elanga ya ndenge wana, na paradiso. Kasi lokola batosaki Yehova te, bakokaki lisusu kofanda na Paradiso te, ata mpe bakitani na bango. (Eba. 3:23, 24) Atako moto moko te azalaki lisusu kofanda na Paradiso yango, emonani ete ezalaki kaka tii na Mpela na mikolo ya Noa. w18.12 3-4 par. 3-5

Mwalomingo, 19 sanza ya 4

Ngai Yehova nazali . . . Moto oyo azali koteya yo mpo na litomba na yo moko.​—Yis. 48:17.

Baboti basalaka makasi báteya bana na bango bizaleli malamu. Soki bana baponi komitambwisa na kolanda bizaleli malamu oyo baboti bateyaki bango, na ntembe te bakozwa bikateli ya malamu mpe bakokima mindɔndɔ, mitungisi, mpe bakoyoka te mpasi oyo bato bayokaka mpo bazwaki bikateli ya mabe. Lokola moboti ya malamu, Yehova alingi bana na ye bázala na bomoi ya malamu mpenza. (Yis. 48:18) Yango wana, apesi biso mitinda ya ntina mingi na oyo etali bizaleli malamu mpe ndenge ya kosalela basusu makambo. Asɛngi biso tóyekola kotalela makambo lokola ye mpe tómonisa yango na etamboli na biso. Ezali te mpo na kotya biso nkaka. Epesaka biso bwanya mpe esalisaka biso tóyeba kotalela makambo malamu. (Nz. 92:5; Mas. 2:1-5; Yis. 55:9) Tokobanda kozwa bikateli ya malamu oyo ekopesa biso esengo mpe tokozala kaka na makambo oyo tolingaka. (Nz. 1:2, 3) Makanisi ya Yehova ezali mpenza malamu mpo na biso! w18.11 19-20 par. 7-8

Mwayambo, 20 sanza ya 4

Bazali kobulungana mpe kofinga bino.​—1 Pe. 4:4.

Mpo tókoba kotambola na kati ya solo, tosengeli te komitika na mbamba ya bato oyo basalelaka Yehova te. Ntango toyekolaki solo, boyokani na biso na bandeko mpe baninga na biso oyo basalelaka Yehova te ebongwanaki. Ekoki kozala ete basusu basalaki biso matata te, kasi, basusu batɛmɛlaki biso. Bato ya libota na biso, baninga ya mosala mpe baninga ya kelasi bakoki kolinga ete tósangana na bafɛti na bango. Nini ekosalisa biso tótɛmɛla mbamba ya kosangana na mimeseno mpe bafɛti oyo esepelisaka Yehova te? Tosengeli kobatela na makanisi na biso ntina oyo Yehova asepelaka na makambo yango te. Tokoki kosala bolukiluki na mikanda na biso mpo na koyeba ndenge oyo bafɛti yango ebandaki. Soki tomanyoli bantina oyo Biblia epesi ya kosangana na bafɛti yango te, tokomona mpenza ete tozali kotambola na nzela oyo ‘endimami na Nkolo.’ (Ef. 5:10) Soki tozali kotyela Yehova mpe Liloba na ye motema, tokokwea te na motambo ya “kolɛnga liboso ya bato.”​—Mas. 29:25. w18.11 11 par. 10, 12

Mwamibale, 21 sanza ya 4

Yehova azalaki elongo na Yozefe mpe oyo ye azalaki kosala, Yehova azalaki kolongisa yango.​—Eba. 39:23.

Soki bomoi na biso ebongwani na mbalakaka, tokoki komitungisa mingi mpe kotya likebi nyonso na mikakatano na biso. Likambo ya bongo ekokaki kokómela Yozefe. Kasi, amonaki malamu asala ata mwa likambo oyo Yehova akokaki kopambola. Ntango azalaki na bolɔkɔ, azalaki kokokisa malamu mokumba nyonso oyo kapita-mokonzi ya bolɔkɔ apesi ye, kaka ndenge azalaki kosala na ndako ya Potifare. (Eba. 39:21-22) Lokola Yozefe, makambo mosusu ekoki kokómela biso mpe tozangi eloko ya kosala. Kasi, soki tomonisi motema molai mpe tosali nyonso oyo tokoki, Yehova akopambola biso. (Nz. 37:5) Ata soki tobulungani to tozali komitungisa, ‘tokozanga mwa nzela ya kobima te.’ (2 Ko. 4:8) Yehova akozala elongo na biso, mingimingi soki tokobi kotya makanisi na mosala ya kosakola. w18.10 29 par. 11, 13

Mwamisato, 22 sanza ya 4

Nzambe azangi boyengebene te mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomoniselaki nkombo na ye.​—Ebr. 6:10.

Oyokaka ndenge nini ntango moto oyo oyebi mpe omemyaka abosani nkombo na yo to mpe azali koyeba yo lisusu te? Ekoki mpenza kolɛmbisa yo nzoto. Mpo na nini? Mpo moto nyonso azalaka na mposa ete báyeba ye. Kasi tolingaka ete básuka kaka te na koyeba biso. Tolingaka báyeba bomoto na biso mpe bándima mosala oyo tosali. (Mit. 11:16; Yobo 31:6) Kasi soki tokebi te, mposa na biso ya koluka ete bato báyeba biso ekoki koleka ndelo mpe kokóma mabe. Mokili ya Satana elingi ete tókóma na mposa ya koyebana mingi mpe tómimona ete tozali na ntina koleka. Soki esalemi bongo, tokopesa te Tata na biso ya likoló, Yehova Nzambe lokumu mpe losambo oyo ebongi na ye.​—Em. 4:11. w18.07 7 par. 1-2

Mwaminei, 23 sanza ya 4

Mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.​—1 Yoa. 5:19.

Tokamwaka te ndenge Satana ná bademo na ye batindaka bato minene ya mokili oyo ‘bálobaka lokuta.’ (1 Tim. 4:1, 2) Ezalaka mabe koleka soki bakonzi ya mangomba bazali koloba lokuta. Mpo na nini? Mpo soki moto andimi mateya na bango ya lokuta mpe asali makambo oyo Nzambe ayinaka, moto yango akoki kozanga bomoi ya seko. (Hos. 4:9) Yesu ayebaki ete bakonzi ya mangomba ya ntango na ye bazalaki kokosa bato. Na mpiko nyonso ayebisaki bango: “Mawa na bino, bakomeli ná Bafarisai, bakosi! mpamba te bozali kokatisa mbu mpe mokili mpo na kokómisa moto prozelite, mpe ntango akómi bongo bozali kokómisa ye moto oyo abongi kokende na Gehena [libebi ya seko] koleka bino mbala mibale.” (Mat. 23:15) Yesu alobaki ete bakonzi yango ya mangomba bazalaki kaka lokola tata na bango Zabolo, oyo azali “mobomi-bato.”​—Yoa. 8:44. w18.10 7 par. 5-6

Mwamitano, 24 sanza ya 4

Esengo na bino ntango bazali kolobela bino mabe mpe konyokola bino . . . mpo na ngai.​—Mat. 5:11.

Yesu alingaki koloba nini? Abakisaki boye: “Bósepela mpe bópumbwa na esengo, mpo mbano na bino ezali monene na likoló; mpo ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.” (Mat. 5:12) Ntango babɛtaki bantoma mpe bayebisaki bango bátika kosakola, “balongwaki liboso ya Sanedrina, bazali kosepela.” Ya solo, basepelaki te ndenge babɛtaki bango. Kasi, bazalaki na esengo “mpo batángamaki bato oyo babongi kosambwisama” mpo na nkombo ya Yesu. (Mis. 5:41) Lelo oyo, basaleli ya Yehova mpe babatelaka esengo ntango bazali konyokola bango mpo na nkombo ya Yesu to ntango bakutani na komekama. (Yak. 1:2-4) Ndenge moko na bantoma, tosepelaka te mpo tozali na mpasi to tozali konyokwama. Kasi, soki totikali sembo na komekama, Yehova akopesa biso makasi ya koyika mpiko mpe ya kobatela esengo na biso. Soki toyebi ete Yehova, “Nzambe ya esengo,” azali kosepela na biso, tokoki kozala na esengo atako tozali konyokwama to bato ya libota bazali kotɛmɛla biso.​—1 Tim. 1:11. w18.09 21 par. 18-20

Mwapɔsɔ, 25 sanza ya 4

Etondi kaka na mawa mpe na makambo oyo eyokisaka mpasi.​—Nz. 90:10.

Na ‘ntango oyo ya mpasi mpenza,’ ebele ya bato bakómi komona ete basuki. (2 Tim. 3:1-5) Baankɛtɛ emonisi ete mbula na mbula, bato koleka 800 000 bamibomaka; yango elakisi ete nsima ya segɔnde 40, moto moko amibomaka. Likambo ya mawa, ata bandeko mosusu na lisangá bamonaki ete basuki mpe bamibomaki. Lelo oyo, bandeko na biso mingi bazali na mikakatano oyo ezali kotungisa bango mpe bazali na mposa tómoniselaka bango bolingo. Bandeko mosusu bazali kokutana na minyoko to bato bazali kotyola bango. Basusu bazali koyika mpiko mpo baninga ya mosala batumolaka bango mpe balobaka na bango mabe nsima ya mokɔngɔ na bango. To bazali kolɛmba mingi mpo esɛngaka bálekisa lisusu bangonga mingi nsima ya mosala, to mpe mosala eleki ebele. Basusu mpe bazali na mikakatano minene na libota, mbala mosusu molongani azali mosaleli ya Yehova te mpe atyolaka moninga ntango nyonso. Mpo na mitungisi wana mpe mitungisi mosusu, bandeko mingi na lisangá bazali komona ete makasi esili bango mpe bazali lisusu na ntina te. w18.09 13 par. 3, 5

Mwalomingo, 26 sanza ya 4

Nazali na ntina mosusu ya botɔndi te koleka makambo oyo: nayokaka ete bana na ngai bazali kokoba kotambola na kati ya solo.​—3 Yoa. 4.

Baboti basalaka elongo na Yehova ntango bazali kosalisa bana na bango bámityela mikano ya elimo. Baboti mingi basalaki yango. Na nsima, bana na bango bazwaki ekateli ya kosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso, ata mpe mosika na baboti na bango. Basusu bazali bamisionɛrɛ, basusu bazali babongisi-nzela esika mposa ya basakoli ezali monene, mpe basusu basalaka na Betele. Ya solo, soki bana bazali mosika, baboti bakolekisa ntango mingi te elongo na bana na bango ndenge bakoki kolinga. Atako bongo, baboti oyo bazali na elimo ya komipimela balendisaka bana na bango bákoba kosalela Nzambe esika nyonso oyo bazali. Mpo na nini? Mpo bayokaka esengo mingi ndenge bana na bango bazali kotya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na bango. Baboti yango mosusu bayokaka lokola Hana, oyo alobaki ete ‘adefisi’ Samwele epai ya Yehova. Bamonaka ete ezali lokumu monene kosala elongo na Yehova na ndenge wana.​—1 Sa. 1:28. w18.08 24 par. 4

Mwayambo, 27 sanza ya 4

Ekozala mpasi mozwi akɔta na bokonzi ya likoló.​—Mat. 19:23.

Yesu alobaki te ete ekoki kosalema te. Alobaki mpe ete: “Esengo na bino babola, mpo bokonzi ya Nzambe ezali ya bino.” (Luka 6:20) Kasi, yango elingi koloba te ete babola nyonso bazalaki kondima koyoka Yesu mpe bazwaki mapamboli minene. Babola mingi balandaki Yesu te. Mpo na koloba solo, boyokani ya moto na Yehova etalelaka te biloko ya mosuni oyo azali na yango. Na ebongiseli ya Yehova, bandeko mosusu bazali bazwi mpe basusu bazali babola, kasi bango nyonso balingaka Yehova mpe basalelaka ye na motema mobimba. Biblia eyebisi bazwi ete “bátya elikya na bango te na bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi, kasi nde epai ya Nzambe.” (1 Tim. 6:17-19) Biblia ekebisi mpe basaleli nyonso ya Yehova, bazwi to babola, ete bázala na bolingo ya mbongo te. (1 Tim. 6:9, 10) Soki tozali komona bandeko ndenge Yehova amonaka bango, tokosambisa bango te na kolanda biloko oyo bazali na yango to oyo bazali na yango te. w18.08 11 par. 11-12

Mwamibale, 28 sanza ya 4

Bómikitisa liboso ya Nzambe.​—Yak. 4:7.

Tozali mpenza na mposa ya komonisa botɔndi na biso epai ya Yehova ndenge tozali bato na ye. Toyebi ete ntango topesaki bomoi na biso epai na ye, tozwaki mpenza ekateli oyo eleki malamu. Mpo na yango, tozali na ekateli ya koboya kosala eloko nyonso oyo Yehova ayini. Lisusu, tolingaka mpe tomemyaka bandeko na biso mpo bango mpe bazali bato ya Yehova. (Rom. 12:10) Biblia epesi elaka oyo: “Yehova akosundola bato na ye te.” (Nz. 94:14) Yango ezali ndanga mpo na biso. Ezala likambo nini ekómeli biso, Yehova akozala na biso. Ata soki tokufi, akobosana biso te. (Rom. 8:38, 39) “Ezala tozali na bomoi, ezala tokufi, tozali bato ya Yehova.” (Rom. 14:8) Tozali kozela ntango oyo Yehova akozongisa na bomoi baninga na ye ya sembo oyo basilá kokufa. (Mat. 22:32) Kutu ata sikoyo, tozali kosepela na makabo ebele ya kitoko oyo euti epai ya Tata na biso. Ndenge Biblia elobi yango, “esengo na ekólo oyo Yehova azali Nzambe na yango, bato oyo ye aponi bázala libula na ye.”​—Nz. 33:12. w18.07 26 par. 18-19

Mwamisato, 29 sanza ya 4

Makambo nyonso epesami nzela; kasi makambo nyonso te nde ezali na litomba. Makambo nyonso epesami nzela; kasi makambo nyonso te nde etongaka.​—1 Ko. 10:23.

Bato mosusu bakoki komona ete lokola ezali makambo oyo etali bango moko, bazali na bonsomi ya kopona nyonso oyo balingi soki lisosoli na bango etungisi bango te. Bamosusu batángaka maloba oyo Paulo akomelaki bakristo ya Korinti ete: “Ntina nini bonsomi na ngai esambisama na lisosoli ya moto mosusu?” (1 Ko. 10:29) Atako tozali na bonsomi ya kopona oyo tolingi na oyo etali kotánga kelasi mpe mosala oyo tokomipesa na yango, tosengeli kobosana te ete bonsomi na biso ezali na ndelo mpe ete bikateli na biso nyonso ezalaka na mbuma na yango. Yango wana ntoma Paulo alobaki maloba ya mokapo ya lelo. Na yango, ata soki tozali na bonsomi ya kozwa bikateli na makambo oyo etali biso moko, ezali na makambo mosusu oyo eleki ntina, oyo tosengeli kotalela. w18.04 10 par. 10

Mwaminei, 30 sanza ya 4

Bózongela ngai, mpe ngai nakozongela bino.​—Mal. 3:7.

Lelo oyo, mokristo akoki koloba ete asambelaka Yehova mpe kaka na ntango yango asalaka makambo oyo Yehova ayinaka. (Yuda 11) Ekoki kozala ete asakolaka mpe azangisaka makita te. Kasi, kaka na ntango yango, akoki kotika ete makanisi ya mbindo, ya lokoso, to makanisi ya koyina basusu ezwa misisa na motema na ye. (1 Yoa. 2:15-17; 3:15) Makanisi ya ndenge wana ekoki komema na kosala lisumu. Atako basusu bakoki te koyeba makanisi mpe misala na biso, kasi Yehova ayebi yango. Ayebi soki tozali mpenza na ngámbo na ye. (Yir. 17:9, 10) Ata ntango tosali mabunga, Yehova abwakaka biso mbala moko te. Ntango tobandi kokende na nzela moko ya mabe, Yehova alobaka na biso ete: “Bózongela ngai.” Yehova ayebi ete tozali na bolɛmbu oyo tobundaka na yango. Kasi alingi ete tózala makasi mpe tótɛmɛla oyo ezali mabe. (Yis. 55:7) Soki tosali yango, alaki ete akosalisa biso mpe akopesa biso makasi oyo tosengeli na yango mpo na kolonga bamposa mabe.​—Eba. 4:7. w18.07 18 par. 5-6

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto