Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • es20 nk. 47-57
  • Sanza ya 5

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sanza ya 5
  • Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2020
  • Mitó ya makambo mike
  • Mwamitano, 1 sanza ya 5
  • Mwapɔsɔ, 2 sanza ya 5
  • Mwalomingo, 3 sanza ya 5
  • Mwayambo, 4 sanza ya 5
  • Mwamibale, 5 sanza ya 5
  • Mwamisato, 6 sanza ya 5
  • Mwaminei, 7 sanza ya 5
  • Mwamitano, 8 sanza ya 5
  • Mwapɔsɔ, 9 sanza ya 5
  • Mwalomingo, 10 sanza ya 5
  • Mwayambo, 11 sanza ya 5
  • Mwamibale, 12 sanza ya 5
  • Mwamisato, 13 sanza ya 5
  • Mwaminei, 14 sanza ya 5
  • Mwamitano, 15 sanza ya 5
  • Mwapɔsɔ, 16 sanza ya 5
  • Mwalomingo, 17 sanza ya 5
  • Mwayambo, 18 sanza ya 5
  • Mwamibale, 19 sanza ya 5
  • Mwamisato, 20 sanza ya 5
  • Mwaminei, 21 sanza ya 5
  • Mwamitano, 22 sanza ya 5
  • Mwapɔsɔ, 23 sanza ya 5
  • Mwalomingo, 24 sanza ya 5
  • Mwayambo, 25 sanza ya 5
  • Mwamibale, 26 sanza ya 5
  • Mwamisato, 27 sanza ya 5
  • Mwaminei, 28 sanza ya 5
  • Mwamitano, 29 sanza ya 5
  • Mwapɔsɔ, 30 sanza ya 5
  • Mwalomingo, 31 sanza ya 5
Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2020
es20 nk. 47-57

Sanza ya 5

Mwamitano, 1 sanza ya 5

Bosengeli kolinga moto oyo afandi mopaya.​—Mib. 10:19.

Na bambula oyo eleki, bato mingi bakimaki bamboka na bango mpo na kokende kofanda na bamboka ya bapaya. Tokoki koyekola ndenge ya kopesa mbote na monɔkɔ na bango. Tokoki mpe koyekola mwa maloba oyo ekosalisa biso tósolola na bango. Na nsima, tokoki kolakisa bango bavideo mpe mikanda ya minɔkɔ na bango oyo ezali na jw.org. Yehova apesaka biso mpenza oyo tosengeli na yango mpo na kosakola malamu. Na ndakisa, makambo oyo toyekolaka na likita Bomoi mpe mosala esalisaka biso tósepela kozongela bato mpe tóbanda boyekoli ya Biblia elongo na bango. Okoki koteya bana na yo bápesaka biyano na maloba na bango moko. Bato mosusu basepelaki na solo ntango bayokaki bana bazali komonisa kondima na bango polele mpe na motema mobimba.​—1 Ko. 14:25. w18.06 22-23 par. 7-9

Mwapɔsɔ, 2 sanza ya 5

Bóyambanaka ndenge Kristo mpe ayambaki biso.​—Rom. 15:7.

Ezali malamu tóbosana te ete biso nyonso tozalaki mosika na Nzambe. (Ef. 2:12) Kasi, na bolingo na ye, Yehova abendaki biso epai na ye. (Hos. 11:4; Yoa. 6:44) Mpe Kristo ayambaki biso. Andimaki tókɔta na libota ya Nzambe. Atako tozali bato ya kozanga kokoka, Yesu ayambaki biso na boboto nyonso, na yango tosengeli ata moke te kobengana moto mosusu! Lokola tozali kobɛlɛma na nsuka ya ebongiseli oyo, na ntembe te bokabwani, kokanisela basusu mabe mpe koyinana ekobakisama mingi koleka. (Gal. 5:19-21; 2 Tim. 3:13) Biso basaleli ya Yehova tolukaka “bwanya oyo euti na likoló,” oyo esalisaka biso tóponaka bilongi te mpe tótya kimya. (Yak. 3:17, 18) Tozali na esengo ya kozala na baninga ya bikólo mosusu, kondima lolenge basalaka makambo mpe mbala mosusu koyekola monɔkɔ na bango. Ntango tosalaka bongo tozalaka na kimya “lokola ebale” mpe boyengebene “lokola mbonge ya mbu.”​—Yis. 48:17, 18. w18.06 12 par. 18-19

Mwalomingo, 3 sanza ya 5

Makolo na bino [elata] bisaleli ya nsango malamu ya kimya.​—Ef. 6:15.

Soda ya Roma akokaki te kokende etumba kozanga sapato na ye. Sapato na ye esalemaki na mposo misato ya nyama, yango wana ezalaki makasi mpenza. Kasi sapato yango ebongaki mpenza, na yango, soda akokaki kotambola kozanga mpasi mpe kozanga kotengatenga. Ndenge kaka sapato ya soda ya Roma ezalaki kosalisa ye alonga etumba, sapato na biso mpe ya elilingi esalisaka biso tósakola ‘nsango malamu ya kimya.’ (Yis. 52:7; Rom. 10:15) Kasi, ntango mosusu esɛngaka mpenza mpiko mpo na kosakola. Bo, oyo azali na mbula 20, alobi: “Kopesa litatoli na baninga ya kelasi ezalaki kobangisa ngai mpe ezalaki kopesa ngai nsɔni. Ntango nazongisaka makanisi nsima, nayebaka mpenza te ntina oyo nazalaki komiyoka bongo. Lelo oyo, nazali na esengo ya kopesa baninga na ngai litatoli.” Bilenge mingi bamonaka ete basakolaka malamu soki bamibongisi liboso. w18.05 29 par. 9-11

Mwayambo, 4 sanza ya 5

Bókoba kobota mbuma mingi.​—Yoa. 15:8.

Yesu alobaki na bantoma na ye: “Napesi bino kimya na ngai.” (Yoa. 14:27) Ndenge nini kimya ya Yesu esalisaka biso tókoba kosakola? Ntango tokobaka kosakola, toyokaka kimya mpo toyebi ete tozali kosepelisa Yehova ná Yesu. (Nz. 149:4; Rom. 5:3, 4; Kol. 3:15) Nsima ya koyebisa bantoma na ye ete alingi bázala na esengo, Yesu alimbolelaki bango ntina oyo basengelaki komonisa bolingo oyo elukaka matomba na yango moko te. (Yoa. 15:11-13) Na nsima alobaki ete: “Nabengi bino baninga.” Ezali mpenza libaku malamu kozala moninga ya Yesu! Nini elingaki kosalisa bantoma bákoba kozala baninga ya Yesu? Alobaki boye: “Bókende mpe bókoba kobota mbuma.” (Yoa. 15:14-16) Mbula mibale liboso, Yesu ayebisaki bantoma na ye: “Ntango bozali kokende, bósakola mpe bóloba ete: ‘Bokonzi ya likoló ekómi pene.’” (Mat. 10:7) Na yango, na butu liboso akufa, Yesu alendisaki bayekoli na ye báyika mpiko na mosala ya kosakola.​—Mat. 24:13; Mrk. 3:14. w18.05 20-21 par. 15-16

Mwamibale, 5 sanza ya 5

Mpo nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.​—Gal. 6:7.

Elenge, zwá ekateli ya kotya makanisi na makambo oyo esepelisaka Yehova mpe omityela mikano ya elimo. Kasi, mbala mosusu bilenge mingi oyo bazali na mbula na yo balingaka kaka komisepelisa mpe bakoki kosɛnga yo osala mpe bongo. Kasi nsukansuka, ekosɛnga omonisa basusu ete ozwi mpenza ekateli ya kokokisa mikano na yo ya elimo. Kotika te baninga bábosanisa yo yango. Okoki kosala nini mpo otɛmɛla mbamba ya baninga? Kimá makambo oyo ekoki kotya yo na komekama makasi. (Mas. 22:3) Kanisá mbuma mabe ya kolanda makambo mabe ya basusu. Zalá na komikitisa mpe ndimá ete ozali na mposa ya toli. Yoká makambo oyo baboti na yo mpe bandeko oyo bakɔmɛli na elimo bazali koyebisa yo. (1 Pet. 5:5, 6) Ozalaka na komikitisa mpe oyokaka toli? w18.04 28-29 par. 14-16

Mwamisato, 6 sanza ya 5

Bósimba makasi eloko oyo bozali na yango tii nakoya. Mpe moto oyo alongi mpe abateli misala na ngai tii na nsuka nakopesa ye bokonzi likoló ya bikólo.​—Em. 2:25, 26.

Ntango Yesu atindelaki masangá mosusu ya Azia Moke bansango, amonisaki botɔndi mpo na mosala oyo bayekoli na ye basalaki. Na ndakisa, na lisangá ya Tyatire abandaki na maloba oyo: “Nayebi makambo oyo osalaka, mpe bolingo na yo mpe kondima na yo mpe mosala na yo mpe ezaleli na yo ya koyika mpiko, nayebi mpe ete makambo oyo ozali kosala sikoyo ezali mingi koleka oyo ya kala.” (Em. 2:19) Yesu alobelaki kaka te ndenge mosala na bango ezalaki kokola, kasi apesaki bango mpe longonya mpo na bizaleli oyo etindaki bango básala makambo ya malamu. Atako esɛngaki ete Yesu apesa mwa batoli na lisangá ya Tyatire, maloba na ye ya ebandeli mpe ya nsuka ezalaki ya kolendisa. (Em. 2:27, 28) Yesu azali Mokonzi ya lisangá. Na yango, asɛngisami te kopesa biso matɔndi mpo na mosala oyo tosali mpo na ye. Atako bongo, azangaka te komonisa botɔndi na ye. Ezali mpenza ndakisa malamu mpo na bankulutu! w19.02 16 par. 10

Mwaminei, 7 sanza ya 5

Yudasi ná Silasi . . . balendisaki bandeko yango na masukulu mingi mpe bapesaki bango makasi.​—Mis. 15:32.

Na siɛklɛ ya liboso, Yehova asalelaki lisangani ya mikóló-bakambi mpo na kolendisa bakristo nyonso, ata mpe baoyo bazalaki kokamba masangá. Batindaki bandeko mibale kati na bango, Petro ná Yoane, na Samaria mpo bábondela mpo na bandimi yango ya sika, mpo bázwa elimo santu. (Mis. 8:5, 14-17) Filipe ná bandeko wana balendisamaki mpenza ndenge lisangani ya mikóló-bakambi esungaki bango! Lelo, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova elendisaka bandeko ya Betele mpe bandeko oyo bamipesi kaka na mosala ya ntango nyonso, ata mpe biso nyonso. Ndenge moko na bandeko ya siɛklɛ ya liboso, tosepelaka na elendiseli yango! Lisusu, na 2015, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebimisaki mwa buku Zongelá Yehova mpo na kolendisa baoyo balɛmbá na elimo. w18.04 19 par. 18-20

Mwamitano, 8 sanza ya 5

Bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.​—Yoa. 8:32.

Bato mosusu bakanisaka ete elingaki koleka malamu soki bazalaki na bonsomi oyo ezangi ndelo. Kasi, likanisi wana ezali libunga. Osilá kokanisa ndenge mokili elingaki kozala soki bandelo ezalaki te? Buku moko (The World Book Encyclopedia) emonisi ete na esika oyo bato ebele bafandi, esengeli kozala na mibeko mpo na kobatela bonsomi na bango mpe kotyela bango bandelo. Kosala yango ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Yango wana bato babimisaka ebele ya mibeko mpe baavoka ná bazuzi ndenge na ndenge balukaka kolimbola mpe komonisa ndenge ya kosalela mibeko yango. Na yango, mpo tózala na bonsomi ya solosolo, tosengeli kosala makambo mibale oyo: kondima mateya ya Yesu mpe kokóma bayekoli na ye. Kosala makambo wana mibale nde ekopesa biso bonsomi ya solosolo. Bonsomi na likambo nini? Yesu abakisaki: “Moto nyonso oyo asalaka lisumu azali moombo ya lisumu. . . . Soki Mwana apesi bino bonsomi, bokokóma mpenza na bonsomi.”​—Yoa. 8:34, 36. w18.04 6-7 par. 13-14

Mwapɔsɔ, 9 sanza ya 5

Bino nyonso . . . bómityaka na esika ya bamosusu.​—1 Pe. 3:8.

Tosepelaka mingi kozala elongo na bato oyo batyaka likebi na ndenge oyo tozali komiyoka mpe balukaka bolamu na biso. Basalaka makasi bámitya na esika na biso, báyeba makanisi na biso mpe ndenge oyo tozali komiyoka. Bayebaka nini tosengeli na yango mpe basalisaka biso, mbala mosusu liboso kutu tósɛnga lisalisi. Tosepelaka mingi na bato oyo bamonisaka ete ‘bamityaka na esika na biso.’ Lokola tozali bakristo, biso nyonso tolingaka koyokela basusu mawa, to komitya na esika ya basusu. Kasi mpo na koloba solo, ntango mosusu kosala yango ezalaka pɛtɛɛ te. Mpo na nini? Ya liboso, mpo tozali bato ya kozanga kokoka. (Rom. 3:23) Yango wana, tosengeli kobundisa ezaleli oyo tobotamá na yango ya koluka kaka matomba na biso moko. Ya mibale, ekoki kozala ete basusu kati na biso bayebaka te komitya na esika ya basusu mpo na ndenge oyo babɔkwamá to mpo na makambo oyo bakutaná na yango na bomoi. Ya misato, ekoki kozala ete tolandaka makanisi ya bato oyo tofandi na bango esika moko. Na mikolo oyo ya nsuka, bato mingi bakipaka te ndenge oyo basusu bazali komiyoka. Kutu, mingi bazali nde “bato oyo bamilingaka.” (2 Tim. 3:1, 2) Kasi, tokoki kokóma na momeseno ya komitya na esika ya basusu soki tolandi ndakisa ya Yehova Nzambe mpe Mwana na ye, Yesu Kristo. w19.03 14 par. 1-3

Mwalomingo, 10 sanza ya 5

Batelá motema na yo.​—Mas. 4:23.

Mobeko ya nsuka na kati ya Mibeko Zomi epekisaki kolula, to kokolisa mposa makasi ya kozwa eloko ya moto mosusu. (Mib. 5:21; Rom. 7:7) Yehova apesaki mobeko yango mpo na koteya basaleli na ye likambo moko ya ntina mingi: basengeli kobatela motema na bango, elingi koloba makanisi, mayoki, mpe bamposa na bango. Ayebi ete makanisi mpe mayoki ya mabe nde etindaka moto asala makambo ya mabe. Mokonzi Davidi akweaki na motambo yango. Mpo na koloba solo, azalaki moto malamu. Kasi na libaku moko, alulaki mwasi ya moto mosusu. Mposa wana ememaki ye na lisumu. (Yak. 1:14, 15) Davidi asalaki ekobo, alukaki kobuba mobali ya mwasi yango, mpe na nsima abomisaki ye. (2 Sa. 11:2-4; 12:7-11) Yehova atalaka kaka te ndenge oyo moto azali komonana libándá. Amonaka ndenge tozali mpenza na kati, na motema na biso. (1 Sa. 16:7) Likanisi moko te, mposa moko te to likambo moko te ekoki kobombama na miso ya Yehova. Alukaka makambo ya malamu epai na biso mpe alendisaka biso tókoba kosala bongo. Kasi, alingi ete tóyeba mpe tópekisa makanisi ya mabe liboso ete emonana na misala na biso.​—2 Nt. 16:9; Mat. 5:27-30. w19.02 21 par. 9; 22 par. 11

Mwayambo, 11 sanza ya 5

Bóluka Yehova, bino nyonso bato ya komikitisa ya mabele . . . Bóluka komikitisa.​—Sef. 2:3.

Biblia elobi ete Moize azalaki “na komikitisa mingi koleka bato nyonso oyo bazalaki na mabele.” (Mit. 12:3) Elingi nde koloba ete Moize azalaki makasi te, azalaki kobanga kozwa bikateli, to azalaki kobanga komonisa ngámbo oyo azali? Bato mosusu balobaka ete moto ya komikitisa azalaka bongo. Kasi likanisi wana ezali solo ata moke te. Moize azalaki na makasi, na mpiko mpe azalaki kozwa bikateli. Na lisalisi ya Yehova, akendaki kokutana na mokonzi ya nguya ya Ezipito, akambaki bato soki milio 3 na esobe, mpe asalisaki Bayisraele bálonga banguna na bango. Tozali te na mikakatano oyo Moize alongaki, kasi mokolo na mokolo tokoki kokutana na bato to makambo oyo esalaka ete kobatela ezaleli ya komikitisa ezala mpasi. Nzokande, elaka moko ya malamu esengeli kolendisa biso tólona ezaleli yango. Yehova alobi ete “bato ya komikitisa bakozwa mabele.” (Nz. 37:11) Omonaka ete ozali na komikitisa? Bato mosusu mpe bakoloba bongo? w19.02 8 par. 1-2

Mwamibale, 12 sanza ya 5

Mawa na baoyo bazali koloba ete . . . mabe ezali malamu.​—Yis. 5:20.

Yehova apesá bato lisosoli. Ata Adama ná Eva mpe bazalaki na lisosoli, mpo nsima ya kobuka mobeko ya Nzambe, bamibombaki. Yango emonisi ete lisosoli na bango ezalaki kotungisa bango. Lisosoli ezali lokola mongongo moko oyo ezalaka kati na biso, eyebisaka biso soki likambo moko ezali malamu to mabe; esalisaka biso tómitambwisa malamu. Moto oyo lisosoli na ye esalaka malamu te azali lokola masuwa oyo busole na yango ebebá. Mopɛpɛ mpe mbonge ya mbu ekoki komema masuwa na nzela ya mabe. Kasi soki busole ezali kosala malamu ekosalisa kapitɛni ya masuwa atambwisa masuwa malamu. Ndenge moko mpe, soki toteyi lisosoli na biso malamu, ekotambwisa biso mpe malamu. Soki lisosoli na biso eteyami malamu te, ekokebisa biso te ntango tolingi kosala likambo moko ya mabe. (1 Tim. 4:1, 2) Ekoki ata kondimisa biso ete “mabe ezali malamu.” w18.06 16 par. 1-3

Mwamisato, 13 sanza ya 5

Bótika kolanda makambo ya ntango oyo.​—Rom. 12:2.

Tosengeli mpe koyeba makanisi ya mokili oyo emonisami polele te mpe kobwaka yango. Na ndakisa, bansango mosusu epesamaka na ndenge oyo ekotinda bato básepela na makanisi moko boye ya politiki. Mpe mosusu etindaka bato bámityela mikano mpe bámipesa na makambo oyo mokili esepelaka na yango. Bafilme mpe babuku mosusu elendisaka bato báluka liboso matomba na bango moko mpe ya libota na bango, mpe emonisaka yango lokola ezali makanisi oyo ebongi, oyo esepelisaka, ata mpe oyo ezali malamu. Nzokande, makanisi yango eyokani te na Biblia, oyo elobi ete moto ná libota na ye bakozala na esengo ya solosolo soki balingi Yehova koleka nyonso. (Mat. 22:36-39) Yango elingi koloba te ete ezali mabe kominanola na makambo ya malamu. Kasi, tosengeli komituna boye: ‘Nayebaka makanisi ya mokili ata soki emonisami na ndenge ya polele te? Namibatelaka mpe nabatelaka bana na ngai na makanisi ya mokili oyo emonisamaka na nzela ya televizyo mpe na babuku? Nasalisaka bana na ngai báyeba kotalela makambo ndenge Yehova atalelaka yango mpo bálanda te makambo ya mokili, oyo bayoki to bamoni?’ w18.11 22 par. 18-19

Mwaminei, 14 sanza ya 5

Kobanga te, mpo nazali na yo.​—Yis. 41:10.

Yehova amonisaka ete azali na biso na ndenge atyelaka biso likebi mingi mpe alingaka biso. Talá ndenge amonisi boboto mpe bolingo na ye epai na biso. Alobi boye: “Lokola ozali na motuya na miso na ngai, . . . ozali na lokumu, mpe ngai nalingi yo.” (Yis. 43:4) Eloko moko te na molɔ́ngɔ́ mobimba ekoki kosala ete Yehova atika kolinga basaleli na ye; akozala ntango nyonso sembo epai na biso. (Yis. 54:10) Yehova alobi te ete akolongola mikakatano na bomoi na biso, kasi alobi ete akotika te “bibale,” elingi koloba ebele ya mikakatano ezindisa biso to “lolemo ya mɔtɔ,” elingi koloba komekama ya makasi esala biso mabe mpo na libela. Apesi biso elaka ete akozala na biso, akosalisa biso ‘tóleka’ mikakatano yango. Yehova akosala nini? Akosalisa biso tólongola kobanga mpo tóbatela bosembo na biso, ata ntango esɛngi tókufa. (Yis. 41:13; 43:2) Soki totye motema na elaka oyo ya Nzambe ete “Nakozala elongo na yo,” biso mpe tokozala na mpiko mpe na makasi ntango tokutani na komekama. w19.01 3 par. 4-6

Mwamitano, 15 sanza ya 5

Myango ebele ezalaka na motema ya moto, kasi mokano ya Yehova nde ekotɛlɛma.​—Mas. 19:21.

Soki ozali elenge, mbala mosusu balakisi, bapesi-toli, to bato mosusu bayebisaka yo ete osengeli kotánga kelasi ya milaimilai to koluka mosala ya mbongo mingi. Kasi, Yehova apesi yo toli ya ndenge mosusu. Yebá ete alingi otánga malamu na kelasi mpo esalisa yo ozwa mwa eloko ya kobikela. (Kol. 3:23) Kasi ayebi mpe ete ntango ozali elenge, osengeli kozwa bikateli minene oyo etali bomoi na yo ya lobi. Na yango, apesi mitinda mpo na kotambwisa mpe kosalisa yo ozala na bomoi oyo eyokani na mokano na ye na mikolo oyo ya nsuka. (Mat. 24:14) Yehova ayebi makambo oyo ekosalema na mikolo oyo ezali koya, mpe ayebi ete nsuka ya mokili oyo ekómi mpenza pene. (Yis. 46:10; Mat. 24:3, 36) Yehova ayebi mpe yo. Ayebi nini ekopesa yo esengo ya solosolo mpe nini ekomemela yo mpasi. Toli ya bato ekoki komonana lokola ezali malamu, kasi soki eyokani te na Liloba ya Nzambe, ezali ya bwanya te. w18.12 19 par. 1-2

Mwapɔsɔ, 16 sanza ya 5

Moto mabe akozala lisusu te.​—Nz. 37:10.

Kasi, “bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.” Davidi alobaki mpe: “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.” (Nz. 37:11, 29; 2 Sa. 23:2) Okanisi ete bilaka yango esalaki nini epai ya bato oyo bazalaki kolinga kosala mokano ya Nzambe? Ezalaki kopesa bango ntina ya kondima ete mokolo mosusu kaka bayengebene nde bakofanda na mabele mpe ete ekokóma lisusu paradiso lokola elanga ya Edene. Nsima ya bambula, Bayisraele mingi baboyaki Yehova mpe batikaki losambo ya solo. Na yango, Nzambe atikaki bato ya Babilone bálonga bango, bábebisa mokili na bango, mpe bákanga Bayisraele ebele. (2 Nt. 36:15-21; Yir. 4:22-27) Kasi, basakoli ya Nzambe bayebisaki ete Bayisraele bakozonga na mokili na bango nsima ya mbula 70. Bisakweli yango nyonso ekokisamaki. Kasi bisakweli yango etali mpe biso​—paradiso ekozala awa na mabele. w18.12 4 par. 9-10

Mwalomingo, 17 sanza ya 5

Ndenge likoló etombwani mosika koleka mabele, ndenge mpe banzela na ngai etombwani mosika koleka banzela na bino, mpe makanisi na ngai koleka makanisi na bino.​—Yis. 55:9.

Toli mingi ya mokili oyo eyokani te na mateya ya Biblia. Kasi, makanisi mosusu ya mokili ebongi mpo na mikolo na biso, koleka toli ya Biblia? Yesu alobaki: “Bwanya ya moto emonanaka na makambo ya boyengebene oyo asalaka.” (Mat. 11:19) Atako mikolo oyo bato ya mokili bakómi na mayele mingi na makambo ya teknoloji, balongi te kosilisa makambo minene oyo epekisaka bato bázala na esengo, na ndakisa bitumba, koyina bato ya loposo mosusu, mpe mobulu. Longola yango, mokili emonaka ete pite ezali mabe te. Kasi, bato mingi bamoni ete yango epanzaka mabota, ememaka maladi, mpe ememaka makambo mosusu ya mabe. Bongo toli ya Yehova? Bakristo oyo balandaka makanisi ya Yehova bazalaka na mabota ya esengo, bazwaka te bamaladi oyo eutaka na pite, mpe bazali na boyokani ya kimya na lisangá ya bandeko na bango na mokili mobimba. (Yis. 2:4; Mis. 10:34, 35; 1 Ko. 6:9-11) Yango emonisi polele ete makanisi ya Yehova eleki mosika makanisi ya mokili. w18.11 20 par. 8-10

Mwayambo, 18 sanza ya 5

Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.​—1 Ko. 15:33.

Ezali solo ete tosalaka makasi tóyokana malamu na bandeko ya libota na biso mpe tózala na boboto. Kasi tosengeli te kotya mibeko ya Yehova pembeni mpo na kosepelisa bango. Baninga na biso ya motema basengeli kozala kaka bato oyo balingaka Yehova. Mpo tókoba kotambola na kati ya solo, tosengeli kozala basantu, to pɛto na miso ya Yehova. (Yis. 35:8; 1 Pe. 1:14-16) Ntango toyekolaki solo, tosalaki bambongwana mpo bomoi na biso eyokana na mateya ya Biblia. Basusu basalaki bambongwana ya minene. Kasi, tosengeli kaka kokeba ete tótika te etamboli na biso ya pɛto mpo na kokóma na etamboli ya mbindo ya mokili oyo. Nini ekosalisa yo okwea te na etamboli ya mbindo? Kanisá eloko oyo Yehova apesá mpo tózala basantu: bomoi ya kokoka ya Mwana na ye Yesu Kristo. (1 Pe. 1:18, 19) Mpo tókoba kozala pɛto na miso ya Yehova, tosengeli ntango nyonso kokanisaka motuya ya mbeka ya lisiko. w18.11 11 par. 10-11

Mwamibale, 19 sanza ya 5

Nakomonisa ete nazali kozela Nzambe ya lobiko na ngai. Nzambe na ngai akoyoka ngai.​—Mika 7:7.

Bandeko mingi oyo bazali na mosala ya ntango nyonso balobaka ete kotya makanisi na mosala ya kosakola esalisaka bango bábatela esengo mpe makanisi ya malamu soki makambo ebongwani. Ndenge bandakisa na bango emonisi yango, soki tosali oyo tokoki ntango bomoi na biso ebongwani mpe totyeli Yehova motema mobimba, tokobatela kimya na biso ya motema ata na likambo nini. Na nsima, tokoki komona ete komesana na mbongwana esali ete boyokani na biso na Yehova ekóma makasi koleka. Na mokili oyo, bomoi na biso ekoki kobongwana na mbalakaka. Tokoki kozwa mokumba mosusu na mosala ya Yehova, tokoki kobɛla maladi moko, to kokóma na mikumba mosusu ya libota. Ata soki nini esalemi, yebá ete Yehova atyelaka yo likebi mpe akosalisa yo na ntango oyo ebongi. (Ebr. 4:16; 1 Pe. 5:6, 7) Mpo na sikoyo, salá makasi omesana na bomoi oyo okómi na yango. Bondelá Tata na yo Yehova mpe yekolá kotyela ye motema mobimba. Soki osali bongo, okobatela kimya ya motema atako makambo ebongwani. w18.10 30 par. 17; 31 par. 19, 22

Mwamisato, 20 sanza ya 5

[Yehova] ayebi malamu ndenge oyo tosalemá, azali kobosana te ete tozali putulu.​—Nz. 103:14.

Biblia elobeli bandakisa ebele oyo emonisi ndenge Yehova apesaka basaleli na ye lokumu. Na ndakisa, talá ndenge asalisaki elenge Samwele na boboto mpo ayebisa Nganga-nzambe monene Eli nsango moko ya lisambisi, ndenge emonisami na 1 Samwele 3:1-18. Mibeko ya Yehova esɛngaki bana bámemyaka mikóló, mingimingi baoyo bazali na bokonzi. (Kob. 22:28; Lev. 19:32) Na yango, kanisá ndenge ezalaki mpasi mwana moke lokola Samwele akende epai ya Eli na ntɔngɔ mpe ayebisa ye na mpiko nyonso nsango makasi ya lisambisi oyo Nzambe atindaki! Kutu, Biblia elobi ete Samwele “azalaki kobanga koyebisa Eli likambo oyo amonaki.” Kasi, Nzambe amonisaki Eli polele ete Ye nde azalaki kobenga Samwele. Na yango, Eli ayebisaki Samwele abombela ye ata likambo moko te na maloba nyonso oyo Nzambe alobaki. Samwele atosaki Eli mpe ‘ayebisaki ye maloba yango nyonso,’ mpe maloba yango eyokanaki na nsango oyo moto moko ayaki koyebisa ye liboso. (1 Sa. 2:27-36) Lisolo yango ezali komonisa bwanya ya Yehova mpe ndenge apesaka bato lokumu. w18.09 23 par. 2; 24 par. 4-5

Mwaminei, 21 sanza ya 5

Ee Yehova, nani akoyambama na hema na yo? . . . Ye oyo . . . azali koloba solo na motema na ye.​—Nz. 15:1, 2.

Lelo oyo, kaka bakonzi te nde bakosaka basusu. Lisolo “Mpo na nini tokosaka,” oyo mwasi moko na nkombo Bhattacharjee akomaki, elobi ete “kokosa ekɔteli bato na makila.” Na maloba mosusu, bato bakanisaka ete kokosa ezali mabe te mpe bomoi esɛngi kaka bongo. Mbala mingi, bato bakosaka mpo na komibatela, ntango mosusu mpo na kobomba mabunga to mabe oyo basali. Bakosaka mpe mpo na kozwa mbongo to litomba moko boye. Lisolo yango elobi mpe ete bato bakosaka na pɛtɛɛ nyonso “bapaya, bato oyo basalaka na bango esika moko, baninga, mpe bato oyo balingaka.” Lokuta ya ndenge wana ebimisi mbuma nini? Bato bazali lisusu kotyelana motema te, mpe boyokani ya bato ezali kobeba. Davidi abondelaki Yehova ete: “Osepeli na bosolo oyo ezali na kati ya motema.” (Nz. 51:6) Davidi ayebaki ete bomoto ya kati nde ezali na ntina. Biso bakristo ‘tolobanaka solo’ ntango nyonso.​—Zek. 8:16. w18.10 7 par. 4; 8 par. 9-10; 10 par. 19

Mwamitano, 22 sanza ya 5

Akambaki mpe abatelaki bango, mpe bayokaki nsɔmɔ ata moke te.​—Nz. 78:53.

Ntango Bayisraele babimaki na Ezipito na mobu 1513 L.T.B., mbala mosusu bazalaki bato koleka milio 3. Kati na bango, ezalaki na bana, mibange, mpe mbala mosusu bato ya maladi mpe bibɔsɔnɔ. Ebele ya bato wana bazalaki na mposa ya Mokambi moko ya boboto, oyo ayebi komitya na esika ya basusu. Yehova azalaki Mokambi ya ndenge wana, mpe amonisaki yango na nzela ya Moize. Na yango, Bayisraele bazalaki kobanga te ntango balongwaki mboka kaka moko oyo bayebaki. (Nz. 78:52) Ndenge nini Yehova asalisaki bato na ye bázala na kimya mpe bábanga te? Abongisaki bango na “bituluku ya etumba” ntango babimaki na Ezipito. (Kob. 13:18) Lokola babongisamaki malamu, yango esalisaki bango bámona ete Nzambe na bango azwi makambo nyonso na mabɔkɔ. Lisusu, Yehova apesaki bango “lipata na moi” mpe “pole ya mɔtɔ” na butu. (Nz. 78:14) Ezali lokola nde Yehova alobaki na bango: “Bóbanga te. Nazali elongo na bino mpo na kokamba bino mpe kobatela bino.” w18.09 26 par. 11-12

Mwapɔsɔ, 23 sanza ya 5

Aa soki obombaka ngai ata na Nkunda, . . . soki okatelaka ngai ata ntango mpo okanisa ngai.​—Yobo 14:13.

Na ntango ya kala, basaleli mosusu ya sembo ya Nzambe babulunganaki mpo na mikakatano na bango mpe mposa ya bomoi esilaki. Na ndakisa, Yobo amonaki ete mpasi eleki mpe alobaki: “Naboyi; nalingi kozala na bomoi te.” (Yobo 7:16) Ntango Yona amonaki ndenge makambo esukaki na mokumba oyo bapesaki ye, alobaki: “Ee Yehova, nabondeli yo, longolá [bomoi] na ngai, mpo malamu nakufa na esika ya kozala na bomoi.” (Yona 4:3) Lisusu, likambo moko etungisaki mosakoli Eliya mingi tii asɛngaki liwa. Alobaki: “Ekoki! Sikoyo, Ee Yehova, longolá [bomoi] na ngai.” (1 Bak. 19:4) Kasi, Yehova azalaki kolinga basaleli na ye wana ya sembo mingi mpe alingaki bázala na bomoi. Apamelaki bango te mpo na mayoki oyo babimisaki. Kasi, asalisaki bango básepela lisusu na bomoi mpo bákoba kosalela ye na bosembo. w18.09 13 par. 4

Mwalomingo, 24 sanza ya 5

Tozali bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe.​—1 Ko. 3:9.

Bato oyo basalaka elongo na Nzambe bazalaka na ezaleli ya koyamba bapaya. Na Biblia, liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “ezaleli ya koyamba bapaya” elimboli “komonisela bapaya boboto.” (Ebr. 13:2) Biblia ezali na masolo ebele oyo eteyaka biso ndenge ya komonisa boboto yango. (Eba. 18:1-5) Tokoki, kutu tosengeli kosalisa basusu mbala nyonso oyo libaku ya kosala yango emonani, bázala “bandeko na biso na kati ya kondima” to te. (Gal. 6:10) Okoki mpe kosala elongo na Yehova soki ozali koyamba bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso mpo bálala epai na bino. (3 Yoa. 5, 8) Mbala mingi, kosala bongo epesaka libaku ya ‘kolendisana.’ (Rom. 1:11, 12) Biblia elendisi bandeko mibali bákokisa masɛngami mpo na kokóma basaleli na misala to bankulutu; na ndenge yango bakosala elongo na Yehova. (1 Tim. 3:1, 8, 9; 1 Pe. 5:2, 3) Baoyo basalaka yango balingaka kosalisa basusu na makambo ya losambo mpe na makambo mosusu ya bomoi. (Mis. 6:1-4) Mpe bandeko oyo basalaka makambo mpo na lisangá bakoyebisa yo ete kosalisa basusu epesaka esengo mingi. w18.08 24 par. 6; 25 par. 7, 10

Mwayambo, 25 sanza ya 5

Kopamela mokóló na maloba makasi te. Kasi bondelá ye lokola tata.​—1 Tim. 5:1.

Atako Timote azalaki na mwa bokonzi likoló ya bandeko mibali ya mikóló, asengelaki komonisela bango motema mawa mpe kopesa bango limemya. Bongo soki moto oyo azali mokóló azali kosala masumu na nko to azali kolendisa likambo moko oyo esepelisaka Yehova te? Yehova akosambisa te na kolanda oyo ezali komonana na libándá mpe akokanga miso te soki moto azali kosala masumu na nko, ata soki azali mokóló. Talá maloba oyo ezali na Yisaya 65:20: “Mosumuki, atako akómi na mbula nkama moko, bakolakela ye mabe.” Emonaneli ya Ezekiele mpe elobeli likambo ya ndenge wana. (Ezk. 9:5-7) Na yango, tosengeli koluka libosoliboso komemya Yehova, oyo azali “Mokóló na Mikolo.” (Dan. 7:9, 10, 13, 14) Soki tozali komemya Yehova, tokozala na mpiko mpo na kosembola moto oyo asengeli kozwa lisalisi, ata soki azali na mbula boni.​—Gal. 6:1. w18.08 11 par. 13-14

Mwamibale, 26 sanza ya 5

Moto nyonso oyo azangi mayele andimaka liloba nyonso, kasi moto ya ekɛngɛ atyaka likebi na matambe na ye.​—Mas. 14:15.

Biso bakristo ya solo tosengeli kokolisa likoki ya kotalela makambo malamu mpe kokóma na makanisi oyo ebongi. (Mas. 3:21-23; 8:4, 5) Soki te, Satana ná mokili na ye bakoki kobebisa makanisi na biso. (Ef. 5:6; Kol. 2:8) Kasi, mpo na kokóma na makanisi oyo ebongi, tosengeli kotalelaka makambo malamu liboso ya kondima yango. Lelo oyo, bansango eutaka na bisika ndenge na ndenge. Eyaka na nzela ya Internet, ya televizyo, mpe na banzela mosusu. Na yango, tosengeli kozala ekɛngɛ. Tokoki mpe kozwa bamesaje na nzela ya Internet, ya telefone, to koyoka masolo epai ya bato mpe baninga oyo mbala mosusu bazali na makanisi ya mabe te. Lokola bato mosusu bapanzaka bansango mpe makambo ya lokuta na nko, tosengeli koyeba kotalela makambo malamu. w18.08 3 par. 1, 3

Mwamisato, 27 sanza ya 5

Nzambe amoniseli yo boboto.​—Luka 1:30.

Yehova aponaki Maria, elenge mwasi moko ya komikitisa mpo azala mama ya Mwana na ye, Yesu. Maria azalaki kofanda na Nazarete, engumba moko ya moke oyo ezalaki mosika na Yerusaleme mpe tempelo na yango ya kitoko. (Luka 1:26-33) Makambo oyo Maria ayebisaki Elizabeti mwa moke na nsima, emonisaki ete azalaki mpenza moninga ya Yehova. (Luka 1:46-55) Ya solo, Yehova atyelaki Maria likebi, mpe apambolaki ye na ndenge ya kokamwa mpo azalaki sembo epai na ye. Yehova ayebisaki banani ete Yesu abotami? Ayebisaki ata moto moko te ya lokumu to mokonzi moko na Yerusaleme to na Beteleme. Kasi, atindaki baanzelu mpe babimelaki babateli ya mpate, bato ya komikitisa oyo bazalaki kobatela mpate na bango na elanga, libándá ya Beteleme. (Luka 2:8-14) Na nsima, babateli ya mpate yango bakendaki kotala mwana oyo abotamaki. (Luka 2:15-17) Yozefe ná Maria bakamwaki komona ndenge Yesu akumisamaki. w18.07 9 par. 11-12

Mwaminei, 28 sanza ya 5

Yehova asilikelaki Salomo.​—1 Bak. 11:9.

Mpo na nini Yehova asilikelaki Salomo? Biblia elobi ete: “Mpamba te motema na ye ebendamaki, etiki Yehova . . .  oyo abimelaki ye mbala mibale. Mpe mpo na likambo yango, apesaki ye mitindo ete alanda banzambe mosusu te; kasi ye atosaki te makambo oyo Yehova apesaki ye mitindo.” Na yango, Nzambe andimaki ye lisusu te mpe asundolaki ye. Bakitani ya Salomo bayangelaki te na libota mobimba ya Yisraele, mpe mabota oyo elandaki nsima enyokwamaki mingi mpenza. (1 Bak. 11:9-13) Ndenge esalemaki mpo na Salomo, soki toponi baninga oyo batosaka mitinda ya Yehova te, bakoki kobebisa makanisi na biso mpe kobebisa boninga na biso na Yehova. Ekoki kozala ete basusu bazali bandeko na biso ya lisangá, kasi bazali na boninga makasi te na Yehova. To mpe bakoki kozala bandeko ya libota, baninga ya kartye, ya mosala, to ya kelasi oyo basambelaka Yehova te. Soki tozali kolekisa ntango na bato oyo batosaka mitinda ya Yehova te, tokoki kokóma mpenza lokola bango mpe tokoki kobebisa boninga na biso na Nzambe. w18.07 19 par. 9-10

Mwamitano, 29 sanza ya 5

Mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.​—1 Yoa. 5:19.

Satana asalelaka bafilme mpe baprogramɛ ya televizyo mpo na kopanza makanisi na ye. Ayebi ete masolo to masapo esalemaka kaka te mpo ezala kominanola; eteyaka ndenge ya kokanisa, ya kotalela makambo, mpe ya kosala makambo. Yesu asalelaki mayele wana ya koteya, kasi na ndenge ya malamu. Kanisá ndakisa oyo apesaki ya Mosamaria ya motema malamu mpe ya mwana oyo atikaki ndako ya baboti mpe asakanaki na biloko na ye ya kobikela. (Mat. 13:34; Luka 10:29-37; 15:11-32) Nzokande, bato oyo Satana abebisá makanisi na bango bakoki kosalela masolo to masapo mpo na kobebisa biso. Tosengeli kozala na bokatikati. Bafilme mpe baprogramɛ ya televizyo ekoki kosepelisa biso mpe kolakisa biso makambo kozanga ete ebebisa makanisi na biso. Na yango, tosengeli kozala ekɛngɛ. Ntango tozali kopona kominanola, tosengeli komituna boye: ‘Filme oyo to programɛ oyo ya televizyo ezali koteya ngai ete ezali mabe te nalanda bamposa na ngai ya nzoto?’ (Gal. 5:19-21; Ef. 2:1-3) Osengeli kosala nini soki omoni ete programɛ moko ezali kolobela makanisi ya Satana? Kimá yango ndenge kaka okimaka maladi moko ya mabe! w19.01 15-16 par. 6-7

Mwapɔsɔ, 30 sanza ya 5

Bózwa ekɔti ya lobiko.​—Ef. 6:17.

Ndenge kaka ekɔti ebatelaka bɔɔngɔ ya soda, “elikya ya lobiko” ebatelaka makanisi na biso. (1 Tes. 5:8; Mas. 3:21) Ndenge nini Satana alukaka kokosa biso mpo tólongola ekɔti na biso? Kanisá ndenge amekaki kosala yango epai ya Yesu. Satana ayebaki ete Yesu akokóma mokonzi mpo na koyangela bato. Kasi, liboso asengelaki konyokwama mpe kokufa. Na nsima, asengelaki kozela tii ntango oyo Yehova akokómisa ye mokonzi. Na yango, Satana apesaki ye libaku ya kobanda koyangela na esika azela. Alakaki ye ete soki asali ata likambo moko ya losambo, akokóma mbala moko mokonzi ya mokili. (Luka 4:5-7) Satana ayebi ete Yehova alaki biso makambo malamu mpenza na mokili ya sika. Kasi tosengeli kozela tii ekokisama, mpe liboso ete makambo yango esalema tokoki kokutana na mikakatano ebele. Na yango, lelo oyo Satana alukaka kopesa biso bomoi oyo etondi na biloko ya mokili. Alingi tótya mposa na biso ya kozala na bomoi ya bongo na esika ya liboso mpe tótya Bokonzi ya Nzambe na nsima.​—Mat. 6:31-33. w18.05 30-31 par. 15-17

Mwalomingo, 31 sanza ya 5

Motema na yo esala yo malamu na mikolo ya bolenge na yo.​—Mos. 11:9.

Yehova alingi bilenge bázala na esengo. Tyá makanisi na mikano ya elimo mpe landá toli ya Yehova ntango ozali kozwa bikateli. Soki osali yango ntango ozali elenge, okomona ndenge Yehova akotambwisa yo, akobatela yo, mpe akopambola yo. Kanisá toli nyonso ya malamu oyo apesi yo na Liloba na ye, mpe salelá maloba oyo: “Kanisá Mozalisi na yo Monene na mikolo ya bolenge na yo.” (Mos. 12:1) Bilenge, bobongi mpenza kozwa longonya mpo bozali na ekateli ya kotya makanisi na mosala ya Yehova. Bozali komityela mikano ya elimo mpe komona ete mosala ya kosakola nde eleki ntina na bomoi na bino. Lisusu, bozali kotika te ete mokili ebosanisa bino mikano na bino. Na yango, bóyeba ete mosala oyo bozali kosala ezali ya mpamba te. Bandeko balingaka bino mpe bazali kopesa bino mabɔkɔ. Yango wana, ‘bótikela Yehova misala na bino mpe myango na bino ekopikama makasi.’ w18.04 29 par. 17, 19

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto