Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • es20 nk. 108-118
  • Sanza ya 11

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sanza ya 11
  • Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2020
  • Mitó ya makambo mike
  • Mwalomingo, 1 sanza ya 11
  • Mwayambo, 2 sanza ya 11
  • Mwamibale, 3 sanza ya 11
  • Mwamisato, 4 sanza ya 11
  • Mwaminei, 5 sanza ya 11
  • Mwamitano, 6 sanza ya 11
  • Mwapɔsɔ, 7 sanza ya 11
  • Mwalomingo, 8 sanza ya 11
  • Mwayambo, 9 sanza ya 11
  • Mwamibale, 10 sanza ya 11
  • Mwamisato, 11 sanza ya 11
  • Mwaminei, 12 sanza ya 11
  • Mwamitano, 13 sanza ya 11
  • Mwapɔsɔ, 14 sanza ya 11
  • Mwalomingo, 15 sanza ya 11
  • Mwayambo, 16 sanza ya 11
  • Mwamibale, 17 sanza ya 11
  • Mwamisato, 18 sanza ya 11
  • Mwaminei, 19 sanza ya 11
  • Mwamitano, 20 sanza ya 11
  • Mwapɔsɔ, 21 sanza ya 11
  • Mwalomingo, 22 sanza ya 11
  • Mwayambo, 23 sanza ya 11
  • Mwamibale, 24 sanza ya 11
  • Mwamisato, 25 sanza ya 11
  • Mwaminei, 26 sanza ya 11
  • Mwamitano, 27 sanza ya 11
  • Mwapɔsɔ, 28 sanza ya 11
  • Mwalomingo, 29 sanza ya 11
  • Mwayambo, 30 sanza ya 11
Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2020
es20 nk. 108-118

Sanza ya 11

Mwalomingo, 1 sanza ya 11

Moto oyo azali kolya limpa oyo akozala na bomoi libela.​—Yoa. 6:58.

Ndenge tozali kosalela Yehova, akopesa biso nyonso oyo Adama ná Eva babungisaki, ezala mpe libaku ya kozala na bomoi ya seko. Adama ná Eva batikaki kolanda nzela ya Yehova mpo bakobaki te kolinga Yehova mingi na mitema na bango. Atako bongo, Yehova atikaki bango báumela lisusu mingi na bomoi mpo bábota bana mpe bábɔkɔla bango na kolanda mibeko oyo bango moko bamityeli. Eumelaki te, emonanaki polele ete ekateli oyo Adama ná Eva bazwaki ya koboya ete Yehova atambwisa bango ezalaki mpenza bozoba. Mwana na bango ya liboso abomaki ndeko na ye oyo asalaki ata mabe moko te; na nsima mobulu ekómaki mingi na mokili mpe bato mingi bakómaki koluka kaka matomba na bango moko. (Eba. 4:8; 6:11-13) Kasi, Yehova azwaki ebongiseli moko mpo na kobikisa bana nyonso ya Adama ná Eva oyo baponi kosalela ye. (Yoa. 6:38-40, 57) Soki oyebi malamu ndenge oyo Yehova atondi na bolingo mpe na motema molai, na ntembe te, okolinga ye lisusu mingi. Okondima te kolanda nzela oyo Adama ná Eva baponaki, mpe okomipesa na Yehova na nzela ya libondeli. w19.03 2 par. 3; 4 par. 9

Mwayambo, 2 sanza ya 11

Bino nyonso . . . bómityaka na esika ya bamosusu.​—1 Pe. 3:8.

Mpo omityaka na esika ya basusu, salá makasi oyeba mikakatano oyo bato ya libota na yo mpe bandeko ya lisangá bazali kokutana na yango. Na kati ya lisangá, monisá ete okipaka bilenge, bandeko oyo bazali kobɛla, mibange, mpe bandeko oyo moto moko ya libota na bango akufi. Tunáká mpo na koyeba soki bazali malamu. Yokáká malamu ntango bazali koloba. Salisá bango bámona ete ozali mpenza komitya na esika na bango. Luká kosalisa bango na ndenge oyo okoki kosala yango. Soki tosali bongo, tokomonisa ete bolingo na biso ezali kaka ya maloba te, kasi mpe ya misala. (1 Yoa. 3:18) Tosengeli kozala makambo makasimakasi te ntango tolingi kosalisa basusu. Mpo na nini? Mpo bato nyonso basalaka ndenge moko te ntango bakutani na mikakatano. Bato mosusu balobaka polele, kasi basusu balingaka koyebisa bato mpasi na bango te. Yango wana, tosengeli koluka kosalisa bango, kasi tosengeli koboya kotuna mituna oyo ekomonisa ete tolingi kokɔta na makambo oyo etali kaka bango moko. (1 Tes. 4:11) Bamosusu bakoki koyebisa biso ndenge oyo bazali komiyoka, kasi biso tokoki komona ete tosengeli te kondima makanisi na bango. Atako bongo, tosengeli koyeba ete ezali ndenge wana nde bango bazali komiyoka. Tosengeli koyoka noki, kasi kowelela koloba te.​—Mat. 7:1; Yak. 1:19. w19.03 19 par. 18-19

Mwamibale, 3 sanza ya 11

Nabangaki mingi mpenza.​—Neh. 2:2.

Obangaka ntango ozali koyebisa basusu solo ya Biblia? Kanisá Nehemia. Azalaki kosala na ndako ya mokonzi moko ya nguya. Nehemia azalaki mawamawa mpo ayokaki ete bifelo mpe baporte ya Yerusaleme ebebisamaki. (Neh. 1:1-4) Kanisá ndenge motema ya Nehemia ebɛtaki mbangumbangu mpe abangaki ntango mokonzi atunaki ye ntina oyo azalaki na esengo te! Nehemia abondelaki mbala moko mpe na nsima apesaki eyano. Na yango, mokonzi asalaki mingi mpo na kosalisa basaleli ya Nzambe. (Neh. 2:1-8) Kanisá mpe Yona. Ntango Yehova atindaki ye akende kosakwela bato ya Ninive, Yona abangaki makasi mpe akendaki esika mosusu. (Yona 1:1-3) Kasi, Yehova asalisaki Yona akokisa mokumba yango. Mpe nsango oyo asakolaki esalisaki mpenza bato ya Ninive. (Yona 3:5-10) Ndakisa ya Nehemia eteyi biso ntina ya kobondela liboso ya kopesa eyano. Mpe ndakisa ya Yona eteyi biso ete Yehova akoki kosalisa biso tósalela ye ata soki tozali kobanga makasi ndenge nini. w19.01 11 par. 12

Mwamisato, 4 sanza ya 11

Moto moko te atiki ndako, to [libota] mpo na ngai mpe mpo na nsango malamu akozanga kozwa mbala nkama moko (100) sikoyo na eleko oyo . . . mpe na ntango oyo ezali koya bomoi ya seko.​—Mrk. 10:29, 30.

Ntango tobandi kosalela makambo oyo tozali koyekola na Biblia, boyokani na biso na baninga mpe bato ya libota na biso ekoki kobongwana. Mpo na nini? Yesu abondelaki mpo na bayekoli na ye ete: “Santisá bango na solo; liloba na yo ezali solo.” (Yoa. 17:17) Liloba ‘kosantisa’ ekoki mpe kolimbola ‘kotya pembeni.’ Ntango tobandi kosalela solo ya Biblia na bomoi na biso, ezali lokola totyami pembeni, mpo totiki kolanda makambo oyo bato mingi basalaka mpe tokómi kolanda mitinda ya Biblia. Ata soki tosali makasi mpo tóbatela boyokani ya malamu ná baninga mpe bandeko ya libota, bamosusu bakolinga biso lisusu te ndenge ezalaki liboso, mpe bamosusu bakoki kutu kotɛmɛla mateya oyo tokómi kondima. Yango ekamwisaka biso te. Yesu alobaki: “Banguna ya moto bakozala bato ya ndako na ye moko.” (Mat. 10:36) Kasi, ata soki totikaki nini mpo na kosomba solo, Yesu alakaki mpe ete mbano oyo tokozwa ekoleka mosika biloko oyo totikaki! w18.11 6 par. 11

Mwaminei, 5 sanza ya 11

Masangá nyonso ya bikólo mosusu tozali kotɔnda bango.​—Rom. 16:4.

Ntoma Paulo azalaki kozwa bandeko na motuya mpe amonisaki yango na maloba na ye. Azalaki ntango nyonso kotɔnda Nzambe mpo na bango na mabondeli na ye. Lisusu, amonisaki botɔndi na ye ntango akomelaki bango. Na Baroma mokapo 16, kobanda vɛrsɛ ya liboso tii ya 15, ntoma Paulo atángi nkombo ya bandeko 27. Alobaki polele ete Priska ná Akila “batyaki bomoi na bango na likama” mpo na ye, mpe ete Foebe “asungaki bato mingi,” ata mpe ye moko Paulo. Apesaki longonya na bandeko yango nyonso oyo bazalaki kosala mosala makasi. (Rom. 16:1-15) Ntoma Paulo ayebaki malamu ete bandeko yango bazali bato ya kozanga kokoka, kasi amonaki malamu alobela nde bizaleli na bango ya malamu. Kanisá ndenge balendisamaki ntango maloba ya Paulo etángamaki na mongongo makasi na lisangá! Na ntembe te, yango esalaki ete boninga na bango na Paulo ekóma lisusu makasi. Yo mpe omonisaka botɔndi mbala na mbala mpo na makambo ya malamu oyo bandeko ya lisangá na bino balobaka mpe basalaka? w19.02 16 par. 8-9

Mwamitano, 6 sanza ya 11

Nakotika bosembo na ngai te!​—Yobo 27:5.

Tosengeli nde kozala bato ya kokoka mpo tómonisa bosembo? Mbala mosusu tomonaka ete tozali mpenza bato ya kozanga kokoka, to kutu tosalaka mabunga ebele. Tosengeli te kokanisa ete esengeli tózala bato ya kokoka mpo tómonisa bosembo mpo Yehova atyaka likebi na mabunga na biso te. Liloba na ye elobi: “Soki otalaka kaka mabunga, Ee Yah, Ee Yehova, nani akotɛlɛma?” (Nz. 130:3) Yehova ayebi ete tozali bato ya kozanga kokoka, bato ya masumu mpe mbala mingi alimbisaka biso. (Nz. 86:5) Lisusu, Yehova ayebi esika makoki na biso esuki, mpe asɛngaka biso te tósala makambo oyo tokokoka te. (Nz. 103:12-14) Bolingo nde etindaka basaleli ya Yehova bámonisa bosembo. Tosengeli kolinga Tata na biso ya likoló mpe kokangama na ye makasi, na ndenge ya mobimba, ya kozanga mbeba mpe ya ndambo te. Soki bolingo na biso etikali bongo, ata na ntango ya komekama, wana tomonisi bosembo. (1 Nt. 28:9; Mat. 22:37) Toyebi ete Yehova atyá mibeko ya sembo, mpe tolingaka kosala makambo oyo ekosepelisa Tata na biso ya likoló. Bolingo oyo tolingaka Yehova etindaka biso tózwa bikateli oyo ekosepelisa ye. Na ndenge yango, tomonisaka bosembo na biso. w19.02 3 par. 4-5

Mwapɔsɔ, 7 sanza ya 11

Batelá motema na yo.​—Mas. 4:23.

Ntango nyonso oyo tomoni matomba ya kosala oyo ezali malamu, kondima na biso ekómaka lisusu makasi. (Yak. 1:2, 3) Tomiyokaka malamu mpo tosali ete Yehova asepela kobenga biso bana na ye, mpe mposa na biso ya kosepelisa ye ekómaka lisusu makasi. (Mas. 27:11) Tokómaka komona ete komekama nyonso ezali libaku ya komonisa ete tolingaka mpenza kosalela Tata na biso oyo atyelaka biso likebi. (Nz. 119:113) Tomonisaka ete tolingaka Yehova na motema na biso mobimba mpe tozalaka na ekateli makasi ya kotosa mibeko na ye mpe kosala mokano na ye. (1 Bak. 8:61) Tokosala mabunga? Ɛɛ, mpo tozali bato ya kozanga kokoka. Soki obɛti libaku, kanisá ndakisa ya Mokonzi Hizikiya. Asalaki mabunga. Kasi abongolaki motema mpe akobaki kosalela Yehova na “motema mobimba.” (Yis. 38:3-6; 2 Nt. 29:1, 2; 32:25, 26) Na yango, tótɛmɛla milende oyo Satana azali kosala mpo na kobebisa makanisi na biso. Tóbondela mpo Nzambe asalisa biso tókóma na “motema ya botosi” mpe tótikala sembo.​—1 Bak. 3:9; Nz. 139:23, 24. w19.01 18-19 par. 17-18

Mwalomingo, 8 sanza ya 11

Tópesa Nzambe mbeka ya lisanzoli ntango nyonso, elingi koloba, mbuma ya mbɛbu na biso oyo ezali kosakola nkombo na ye polele.​—Ebr. 13:15.

Tozwaka matomba ntango topesaka biyano na makita. (Yis. 48:17) Na ndenge nini? Ya liboso, soki tomityeli mokano ya kopesa eyano, ekotinda biso tómibongisa malamu mpo na likita yango. Ntango tomibongisi malamu, tokangaka mpenza ntina ya Liloba ya Nzambe. Soki tokangi malamu ntina ya Liloba ya Nzambe, tokoyeba kosalela makambo oyo toyekoli. Ya mibale, tokosepela mingi na makita mpo biso mpe tozali kopesa biyano. Ya misato, lokola kopesa eyano esɛngaka milende, biyano oyo topesi ekoki kotikala biso na motó ntango molai nsima ya makita. Lisusu, tosepelisaka Yehova ntango tolobelaka bindimeli na biso. Tóyeba ete Yehova ayokaka biso mpe azwaka na motuya milende oyo tosalaka mpo na kopesa biyano na makita. (Mal. 3:16) Amonisaka yango na ndenge apambolaka biso ntango tosali nyonso mpo na kosepelisa ye. (Mal. 3:10) Tomoni polele ete tozali na bantina malamu ya kopesa biyano na makita. w19.01 8 par. 3; 9-10 par. 7-9

Mwayambo, 9 sanza ya 11

Bóyina oyo ezali mabe, bókangama na oyo ezali malamu.​—Rom. 12:9.

Yehova asalelaka biso makambo na bwanya mpenza. Na esika ya kotyela biso mibeko ebeleebele, amoniselaka biso motema molai ntango azali koteya biso bolingo. Ateyaka biso ndenge ya kosalela mitinda na ye na bomoi na biso mpe koyina oyo ezali mabe. Na Lisolo likoló ya Ngomba, Yesu asalisi biso tóyeba ntina oyo bato basalaka mabe. (Mat. 5:27, 28) Mpe na mokili ya sika, Yesu, Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, akokoba koteya biso tótalelaka malamu ná mabe ndenge ye atalelaka yango. (Ebr. 1:9) Yesu akokómisa biso bato ya kokoka; ezala na nzoto to na makanisi. Kanisá ndenge makambo ekozala ntango moto moko te akoyoka mposa ya kosala mabe mpe tokonyokwama te mpo na kozanga kokoka. Mpe nsukansuka, tokozwa ‘bonsomi oyo etondi na nkembo,’ oyo Yehova alaki biso. (Rom. 8:21) Ata na mokili ya sika, bonsomi na biso ekozala kaka na ndelo. Bolingo mpo na Nzambe mpe bato nde ekotambwisa biso.​—1 Yoa. 4:7, 8. w18.12 23 par. 19-20

Mwamibale, 10 sanza ya 11

Asengeli kokomela ye mokanda ya koboma libala . . . mpe kobengana ye na ndako na ye.​—Mib. 24:1.

Mibeko epesaki nzela ete Moyisraele ya mobali aboma libala soki “akuti likambo moko ya nsɔni” epai ya mwasi na ye. Mibeko emonisaki polele te soki ‘likambo yango ya nsɔni’ ezalaki nini. Kasi, na ntembe te ezalaki likambo ya mabe mpenza to ya monene, kasi te kaka mbeba ya moke. (Mib. 23:14) Likambo ya mawa, na mikolo ya Yesu, Bayuda mingi bazalaki koboma libala na basi na bango “mpo na likambo nyonso.” (Mat. 19:3) Tosengeli te kokóma na makanisi ya ndenge wana. Na mikolo ya mosakoli Malaki, mibali mingi bakómaki na momeseno ya koboma libala na ‘basi ya bolenge na bango,’ mbala mosusu mpo na kobala bilenge basi oyo bazalaki kosambela Yehova te. Kasi, Nzambe amonisaki polele ndenge oyo azalaki kotalela koboma libala. Malaki alobaki ete: “Ye ayini koboma libala.” (Mal. 2:14-16) Likanisi ya Nzambe mpo na libala ebongwanaki te banda na ebandeli, ntango alobaki ete mobali “asengeli kokangama na mwasi na ye mpe basengeli kokóma mosuni moko.” (Eba. 2:24) Yesu mpe amonisaki ete andimaka likanisi ya Tata na ye mpo na libala ntango alobaki: “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.”​—Mat. 19:6. w18.12 11 par. 7-8

Mwamisato, 11 sanza ya 11

Mbuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke.​—Mat. 9:37.

Bomoi ya bandeko mosusu epesaka bango nzela ya kokende mosika mpo na kosalisa. Bamonisaka elimo oyo mosakoli Yisaya amonisaki. Ntango Yehova atunaki: “Nakotinda nani, mpe nani akokende mpo na biso?” Alobaki: “Ngai oyo! Tindá ngai.” (Yis. 6:8) Ozali na mposa mpe likoki ya kosala lokola bandeko yango? Mpo na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli, Yesu alobaki: “Bósɛnga Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma atinda basali na mosala na ye ya kobuka mbuma.” (Mat. 9:38) Okokoka kosala esika mposa ezali monene, mbala mosusu lokola mobongisi-nzela? To okoki kosalisa moto mosusu asala yango? Bandeko mingi bamoni ete ndenge eleki malamu ya komonisa ete balingaka Nzambe mpe bazalani na bango ezali ya kosala mosala ya mobongisi-nzela na bateritware oyo mposa ya basakoli ezali monene. Omoni ndenge mosusu ya komipesa mingi na mosala ya Nzambe? Soki osali yango, okozala na esengo mingi. w18.08 27 par. 14-15

Mwaminei, 12 sanza ya 11

Bomoi na bino ezala na bolingo ya mbongo te, bósepela na biloko oyo bozali na yango sikoyo.​—Ebr. 13:5.

Lisolo oyo elobeli mbotama ya Yesu emonisi polele makanisi ya Yehova mpo na biloko ya mokili. Nzambe ye moko aponaki Maria ná Yozefe bázala baboti ya Mwana na ye, atako bazalaki bazwi te. (Lev. 12:8; Luka 2:24) Ntango Yesu abotamaki, Maria “alalisaki ye na elyelo ya bibwɛlɛ, mpo bazwaki esika te na bandako oyo bapaya bazalaki kolala.” (Luka 2:7) Soki Yehova alingaki ete Yesu abotama na esika ya malamu koleka, akokaki kosala yango. Kasi, alingaki Yesu abɔkwama na libota ya bato oyo batyaka losambo ya Nzambe na esika ya liboso. Yango nde elekaki ntina mpo na Yehova. Lisolo yango ezali koteya biso ndenge Yehova atalelaka biloko ya mokili. Baboti mosusu balingaka bana na bango bázala na biloko ya mokili oyo eleki malamu, ata soki yango ekobebisa boyokani ya bana na Yehova. Kasi, ezali polele ete mpo na Yehova, makambo ya elimo nde ezali na ntina mingi koleka. Otalelaka likambo yango lokola Yehova? Makambo oyo osalaka emonisaka nini? w18.11 24 par. 7-8

Mwamitano, 13 sanza ya 11

Esengo na bato oyo Yehova azali Nzambe na bango!​—Nz. 144:15.

Lokola esengo eutaka epai ya Yehova, alingi biso mpe tózala na esengo, mpe abongisi makambo ebele oyo ekoki kopesa biso esengo. (Mib. 12:7; Mos. 3:12, 13) Kasi mpo na nini ekoki kozala mpasi kozala na esengo lelo oyo? Esengo na biso ekoki kosila ntango moto oyo tolingaki akufi to alongolami na lisangá, to ntango libala na biso ekufi to tolongwe mosala. Esengo ekoki mpe kosila soki kimya ezali te na ndako mpo koswana ezali ntango nyonso, soki baninga ya mosala to ya kelasi bazali kotyola biso, soki batye biso na bolɔkɔ to mpe tozali konyokwama mpo na kondima na biso. Ekoki mpe kozala ete kolɔngɔnɔ ya nzoto na biso ezali kobeba, tozali na maladi moko oyo eumeli mingi, to tozali konyokwama na makanisi. Kasi, kobosana te ete awa na mabele, Yesu Kristo, oyo azali “Nkumu ya esengo,” azalaki kosepela kobɔndisa mpe kopesa bato esengo. (1 Tim. 6:15; Mat. 11:28-30) Na Lisolo likoló ya Ngomba, Yesu alobelaki bizaleli oyo ekoki kosalisa biso tózala na esengo atako tozali na mikakatano ebele na mokili oyo ya Satana. w18.09 17-18 par. 1-3

Mwapɔsɔ, 14 sanza ya 11

Bosengeli komikatakata nzoto te mpe kosala libandi na elongi na bino te mpo na moto oyo akufi.​—Mib. 14:1.

Kotika mimeseno mosusu oyo esepelisaka Yehova te ezali moko ya bambongwana ya mpasi oyo esɛngaka tósala mpo na kosomba solo. (Mas. 23:23) Mpo na basusu, ata nsima ya koyekola ndenge oyo Yehova atalelaka makambo yango, ezalaka kaka mpasi mpo bátika yango. Bamitunaka soki bato ya libota, baninga ya mosala to baninga mosusu bakosala nini. Bayebaka ete mindɔndɔ ekoki kobima mpo na momeseno moko boye, na ndakisa kopesa bato oyo bakufá lokumu. Ndakisa ya bato oyo basalaki bambongwana ya ndenge wana ntango bayekolaki solo ekoki kosalisa biso tóboya mimeseno oyo esepelisaka Nzambe te. Na engumba Efese, bato mingi bazalaki kosala misala ya maji. Bato oyo bakómaki bakristo basalaki nini mpo na kotika momeseno yango mpe kosomba solo? Biblia elobi: “Basangisaki babuku na bango esika moko mpe batumbaki yango na miso ya bato nyonso. Mpe batángaki ntalo na yango nyonso mpe bamonaki ete ekokanaki na motuya ya mbongo ya bibende ya palata nkóto ntuku mitano (50 000).” (Mis. 19:19, 20) Bakristo yango ya sembo bandimaki kotika babuku na bango ya ntalo, mpe Yehova apambolaki bango mingi. w18.11 7 par. 15-16

Mwalomingo, 15 sanza ya 11

Ntango basilisaki kokata ekólo mobimba ngenga, batikalaki na bisika na bango na kaa tii ntango bazwaki makasi lisusu.​—Yos. 5:8.

Mwa moke nsima ya kokatisa Yordani elongo na Bayisraele, Yosua akutanaki na mobali moko asimbi mopanga. Mobali yango alobaki ete azali “mokonzi ya limpinga ya Yehova,” anzelu oyo ayaki kobatela ekólo ya Nzambe. (Yos. 5:13-15) Anzelu wana ayebisaki Yosua polele makambo oyo asengelaki kosala mpo na kolonga Yeriko. Na ebandeli, malako yango mosusu ekokaki komonana lokola bozoba. Na ndakisa, anzelu ayebisaki Yosua akata basoda nyonso ngenga. Yango elimbolaki ete bakozala na makasi ya kobunda te mpo na mwa mikolo. (Eba. 34:24, 25; Yos. 5:2) Mbala mosusu basoda yango bamitunaki, ‘Ndenge nini tokobatela mabota na biso soki banguna bayei kobundisa biso?’ Kasi likambo moko ya kokamwa esalemaki! Na esika mibali ya Yeriko bábundisa Bayisraele, babandaki nde kobanga bango. (Yos. 6:1) Na ntembe te, nsango wana etindaki Bayisraele bátyela litambwisi ya Nzambe motema mingi koleka! w18.10 23 par. 5-7

Mwayambo, 16 sanza ya 11

Mpo na nini bozali kosala makambo oyo? Biso mpe tozali bato oyo bazali na bolɛmbu ndenge moko na oyo ya bino.​—Mis. 14:15.

Ndenge nini tokoki komekola komikitisa ya Paulo? Tosengeli ata moke te koluka bato básepela na biso mpo na mokumba ya kosakola oyo Yehova apesi biso mpe likoki ya kosala makambo mosusu. Lisusu, mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Ndenge nini natalelaka bato oyo nasakwelaka? Nakaniselaka bato mosusu mabe?’ Na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova basalaka makasi báluka baoyo bakoyoka nsango malamu. Na bantango mosusu, esɛngaka kutu koyekola monɔkɔ to mimeseno ya bato oyo basusu bamonaka ete bazali na ntina te. Kasi, Batatoli bamonaka ata moke te ete baleki bato yango. Basalaka nde makasi bámitya na esika ya moto mokomoko mpo na kosalisa bato ebele bándima nsango ya Bokonzi. w18.09 5 par. 9, 11

Mwamibale, 17 sanza ya 11

Yudasi Mogalile atɛlɛmaki . . . , mpe abendaki bato na nsima na ye.​—Mis. 5:37.

Baroma babomaki Yudasi yango. Longola kaka Bazelote, Bayuda ebele bazalaki kozela koya ya Masiya na mposa makasi. Bayebaki ete Masiya akolongola bango na boombo ya Baroma mpe akokómisa lisusu Yisraele ekólo moko monene na ntango wana. (Luka 2:38; 3:15) Mingi na bango bandimaki ete Masiya akotya bokonzi moko na mabele, na ekólo Yisraele. Soki likambo yango esalemaka, Bayuda nyonso oyo bakimaki na bisika ndenge na ndenge na mokili balingaki kozonga na ekólo na bango. Ata mpe Yoane mobatisi atunaki Yesu ete: “Yo ozali Moto oyo azali koya, to tosengeli nde kozela mosusu?” (Mat. 11:2, 3) Mbala mosusu Yoane azalaki na mposa ya koyeba soki moto mosusu akoya kolongola Bayuda na boombo. Mwa moke na nsima, ntango Yesu asekwaki bayekoli mibale bakutanaki na ye na nzela ya Emause. Bazalaki na elikya ete Yesu nde moto akosikola Yisraele. (Luka 24:21) Mpe bantoma batunaki Yesu ete: “Nkolo, ozali kozongisela Yisraele bokonzi na ntango oyo?”​—Mis. 1:6. w18.06 4 par. 3-4

Mwamisato, 18 sanza ya 11

Moto nyonso oyo azangi mayele andimaka liloba nyonso.​—Mas. 14:15.

Tosengeli kokeba mingimingi ntango toyoki makambo oyo etali basaleli ya Yehova. Kobosana te ete Satana azali “mofundi ya bandeko na biso.” (Em. 12:10) Yesu alobaki ete banguna ‘bakokosela biso makambo ya ndenge nyonso.’ (Mat. 5:11) Soki tobateli na makanisi maloba ya Yesu, tokomitungisa mingi te soki toyoki makambo ya mabe mpo na basaleli ya Yehova. Osepelaka mingi kotindela baninga na yo bamesaje na nzela ya Internet to na telefone? Soki omoni likambo moko ya sika oyo bapanzi-nsango babimisi to oyoki lisolo moko ya kokamwa, olingaka kozala moto ya liboso ya kopanza yango? Liboso ya kotindela yango basusu, omituna boye: ‘Nayebi mpenza soki ezali solo? Nataleli mpenza likambo yango malamu?’ Soki te, okoki kopanza bansango ya lokuta epai ya bandeko. Soki oyebi te soki likambo yango ezali mpenza solo, kotindela yango basusu te. w18.08 3 par. 3; 4 par. 6-7

Mwaminei, 19 sanza ya 11

Bópesaka, mpe bato bakopesa bino.​—Luka 6:38.

Yesu alingi ete tókabaka mpo tóyoka esengo ya kopesa. Mbala mingi, soki moto akabaka, basusu mpe bakabelaka ye. Ya solo, ntango ozali kopesa, moto nyonso te akomonisa botɔndi. Kasi, ntango bato mosusu bamonisi botɔndi, ekoki kotinda bango mpe bápesa basusu. Na yango, ata soki ezali komonana lokola ete bato bazali na botɔndi te, kobá kopesa. Okoki koyeba te matomba oyo ekoki kobima mpo opesaki epai ya moto moko. Moto oyo akabaka na motema moko asalaka yango te mpo na nsima bázongisela ye. Yesu alobaki: “Ntango osali fɛti, bengisá babola, bibɔsɔnɔ, batɛngumi, bato oyo bakufá miso; mpe okozala na esengo, mpo bazali na eloko ya kozongisela yo te.” (Luka 14:13, 14) Biblia elobi: “Ye oyo azali na liso ya boboto akopambwama, mpo apesi bilei na ye na moto oyo azangá.” Elobi mpe: “Esengo na moto oyo azali kotya likebi na moto oyo azangá.” (Mas. 22:9; Nz. 41:1) Ya solo, tosengeli kokaba mpo tolingi mpenza kosalisa basusu. w18.08 21-22 par. 15-16

Mwamitano, 20 sanza ya 11

Tyelá Yehova motema na yo mobimba mpe kondimela mayele na yo moko te. Na banzela na yo nyonso, kanisá ye, mpe ye akosembola banzela na yo.​—Mas. 3:5, 6.

Lelo oyo, ezali mpasi mpenza koyeba makambo oyo ezali solo mpe kotalela yango malamu mpo toyokaka bansango mosusu oyo ezali mpenza solo te, bansango mosusu ezalaka kaka ndambo, mpe tozali bato ya kozanga kokoka. Nini ekosalisa biso? Koyeba mitinda ya Biblia mpe kosalela yango! Na ndakisa, Biblia elobi ete koyanola na likambo liboso ya koyoka yango ezali bozoba. (Mas. 18:13) Etinda mosusu esalisaka biso tómona ete tosengeli te kondima liloba nyonso kozanga koyeba soki ezali mpenza solo. (Mas. 14:15) Mpe ata soki tosalelaka Yehova banda kala, tosengeli te kondimela mayele na biso moko. Mitinda ya Biblia ekobatela biso soki tozali kotalela makambo malamu mpo tókóma na makanisi oyo ebongi mpe tózwa bikateli ya malamu. w18.08 7 par. 19

Mwapɔsɔ, 21 sanza ya 11

Tata ya bomoi na biso ya elimo, tokomikitisa liboso na ye te?​—Ebr. 12:9.

Tomonisaka botɔndi na biso epai ya Yehova ntango tomipesaka na ye mpe tozwaka batisimo. Na ndenge yango bato nyonso bamonaka ete tokómi bato ya Yehova mpe tolingi kotosa ye. Yesu asalaki likambo ya ndenge wana ntango azwaki batisimo. Atako azalaki na kati ya ekólo oyo emipesaki na Yehova, ye moko mpe amipesaki lisusu na Yehova. Ezalaki lokola nde alobaki boye: “Ee Nzambe na ngai, nasepeli kosala mokano na yo.” (Nz. 40:7, 8) Yehova ayokaki ndenge nini ntango Yesu azwaki batisimo? Biblia elobi ete: “Nsima ya kobatisama, na mbala moko Yesu abimaki na mai; mpe talá! likoló efungwamaki, mpe amonaki elimo ya Nzambe ezali kokitela ye lokola ebenga. Mpe talá! Mongongo moko eutaki na likoló elobi: ‘Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi.’” (Mat. 3:16, 17) Banda kala Yesu azalaki moto ya Yehova. Kasi Yehova asepelaki ntango Yesu apesaki bomoi na ye mpo na kosala mokano na ye. Ndenge moko mpe, Yehova asepelaka ntango tomipesaka na ye, mpe akopambola biso.​—Nz. 149:4. w18.07 23 par. 4-5

Mwalomingo, 22 sanza ya 11

Tóbimisela bino mai na libanga oyo?​—Mit. 20:10.

Ntango Moize alobaki “to,” ekoki kozala ete azalaki koloba mpo na ye ná Arona. Likambo oyo Moize alobaki emonisaki ete azangaki botosi mpo apesaki Yehova lokumu te mpo na likamwisi wana. Nzembo 106:32, 33 elobi boye: “Lisusu na mai ya Meriba, batumolaki, bongo makambo ebebelaki Moize mpo na bango. Mpo basilikisaki elimo na ye mpe na mbɛbu na ye, abandaki koloba maloba oyo akanaki te.” (Mit. 27:14) Moize apesaki te Yehova lokumu oyo ebongi na ye. Yehova alobaki na Moize ná Arona ete: “Bino botombokelaki etinda na ngai.” (Mit. 20:24) Ezalaki lisumu monene mpenza! Mwa moke liboso, lokola libota mobimba ya ekólo Yisraele etombokaki, Yehova azwaki ekateli ete ekɔta te na Mokili ya Ndaka. (Mit. 14:26-30, 34) Na yango lokola Moize atombokaki, ezalaki likambo ya bosembo mpe ya boyengebene ete Yehova apesa ye etumbu kaka ndenge apesaki Bayisraele mosusu. Bakɔtaki te na Mokili ya Ndaka. w18.07 14 par. 9, 12; 15 par. 13

Mwayambo, 23 sanza ya 11

Ezali malamu koboya kolya mosuni ya nyama to komɛla vinyo to kosala eloko moko boye oyo ezali kobɛtisa ndeko na yo libaku.​—Rom. 14:21.

Ata soki tozali na lotomo ya komɛla masanga, kasi tosengeli kondima komipimela lotomo yango soki toyebi ete komɛla masanga ekotungisa lisosoli ya ndeko mosusu. Mbala mosusu ndeko moko azalaki moombo ya masanga liboso ya koyekola solo mpe azwi ekateli ya komɛla lisusu te. Tokolinga te kosala eloko moko oyo ekoki kotinda ndeko na biso azongela bizaleli na ye ya kala. (1 Ko. 6:9, 10) Soki toyambi ndeko yango na ndako na biso, tokotya ye mbamba amɛla masanga ata soki aboyi? Te. Ntango Timote azalaki na mbula pene na 20, mpo abɛtisa Bayuda oyo azalaki koteya libaku te, andimaki kokatama ngenga, atako ezalaki pɛtɛɛ te. Alandaki ndakisa ya ntoma Paulo. (Mis. 16:3; 1 Ko. 9:19-23) Lokola Timote, yo mpe ozali pene ya komipimela makambo mosusu mpo na bolamu ya basusu? w18.06 18-19 par. 12-13

Mwamibale, 24 sanza ya 11

Nakopesa bato ya bikólo monɔkɔ moko ya pɛto.​—Sef. 3:9.

Ntango okutani mpo na mbala ya liboso na moto oyo asambelaka Yehova te, makambo nini oyebi mpo na ye? Okoki koyeba nkombo na ye mpe ndenge azali komonana, kasi oyebi makambo mingi te mpo na ye. Nzokande, ntango okutani na moto oyo asambelaka Yehova, oyebi ete alingaka Yehova. Oyebi ete Yehova amonaki eloko moko ya malamu epai na ye, mpe abendaki ye na losambo ya solo. (Yoa. 6:44) Ata soki auti wapi to abɔkwamá ndenge nini, oyebi makambo mingi mpo na ye, ye mpe ayebi makambo mingi mpo na yo! Na ndakisa, oyebi ete ata soki minɔkɔ ya mboka na bino ekeseni, bino nyonso bolobaka ‘monɔkɔ ya pɛto,’ elingi koloba solo ya Biblia. Yango elingi koloba ete bondimelaka Nzambe, botosaka mibeko moko oyo etali bizaleli malamu, mpe bozali na elikya moko mpo na mikolo oyo ezali koya. Makambo yango ekosala ete bótyelana motema mpe bósala boninga ya solosolo oyo ekoumela libela. w18.12 21 par. 9-10

Mwamisato, 25 sanza ya 11

Soki bokatami ngenga te . . . , bokoki kobikisama te.​—Mis. 15:1.

Kristo atambwisaki lisangani ya mikóló-bakambi mpo emonisa polele ete bakristo oyo bazalaki Bayuda te basɛngisamaki kokatama ngenga te. (Mis. 15:19, 20) Atako bongo, nsima ya bambula mingi, bakristo mingi oyo bazalaki Bayuda bakobaki kokata bana na bango ngenga. Nzokande, mbala mosusu tomitunaka: ‘Mpo na nini Yesu atikaki likambo ya kokatama ngenga ekoba kobimisa matata ntango molai, atako liwa na ye esukisaki Mibeko ya Moize?’ (Kol. 2:13, 14) Ekoki kozwa ntango mpo na komesana na makambo ya sika. Esɛngaki ntango eleka mpo bakristo oyo bazalaki Bayuda bándima ete bazalaki lisusu na nse ya Mibeko te. (Yoa. 16:12) Banda kala, bazalaki komona ete kokatama ngenga nde emonisaka boyokani malamu na Nzambe. (Eba. 17:9-12) Bamosusu bazalaki kobanga ete Bayuda mosusu bányokola bango soki bamonisi ete bakeseni na bango. (Gal. 6:12) Kasi na nsima, Kristo apesaki malako mosusu na nzela ya mikanda oyo Paulo akomaki.​—Rom. 2:28, 29; Gal. 3:23-25. w18.10 24-25 par. 10-12

Mwaminei, 26 sanza ya 11

Kaifa . . . moto oyo apesaki Bayuda toli ete ezali mpo na litomba na bango moto moko akufa mpo na bato.​—Yoa. 18:14.

Kaifa atindaki basoda bákanga Yesu na butu. Kasi lokola Yesu ayebaki likambo yango, ntango alyaki elongo na bantoma na ye mpo na mbala ya nsuka, ayebisaki bango bázwa mwa mipanga. Mipanga mibale elingaki kokoka mpo na koteya bantoma liteya moko ya ntina mingi. (Luka 22:36-38) Mwa moke na nsima kaka na butu yango, bato bayaki kokanga Yesu, mpe Petro asilikaki makasi mpo likambo yango ezalaki sembo te, abimisaki mopanga mpe abɛtaki mobali moko. (Yoa. 18:10) Kasi Yesu alobaki na Petro ete: “Zongisá mopanga na yo na esika na yango, mpo baoyo nyonso basalelaka mopanga bakokufa na mopanga.” (Mat. 26:52, 53) Liteya nini ya ntina Yesu apesaki bayekoli na ye? Basengelaki kokɔta na makambo ya mokili te. Eyokani mpenza na libondeli oyo Yesu autaki kosala kaka na butu wana. (Yoa. 17:16) Kaka Nzambe nde azali na lotomo ya kobunda mpo na makambo oyo ezali sembo te. Yango wana, biso tozali na kimya mpe na bomoko. Ntango Yehova amonaka ndenge bato bakabwaná lelo na mokili, na ntembe te azali na esengo ndenge biso basaleli na ye tozali na bomoko.​—Sef. 3:17. w18.06 7 par. 13-14, 16

Mwamitano, 27 sanza ya 11

Dragɔ eyokelaki mwasi yango nkanda, mpe ekendaki kobunda etumba na bato ya momboto ya mwasi yango oyo batikalaki.​—Em. 12:17.

Satana asalelaka minyoko mpe alukaka kobangisa biso mpo tótikala sembo te epai ya Yehova. Na ndakisa, akoki kosalela baguvɛrnema mpo na kopekisa mosala ya kosakola. Akoki mpe kosalela baninga na biso ya mosala to ya kelasi mpo na kosɛka biso mpo totosaka mitinda ya Biblia. (1 Pe. 4:4) Akoki kosalela bandeko na biso ya libota oyo bazali bandimi te, oyo bakoki kozala na makanisi malamu, kasi bakoki kopekisa biso kokende makita. (Mat. 10:36) Tosengeli kosala nini mpo na kotɛmɛla minyoko ya Satana? Makaneli ya Satana ekamwisaka biso te, mpo toyebi ete abundisaka biso. (Em. 2:10) Likambo eleki ntina oyo tosengeli mpe kobosana te ezali ete Satana alobaki ete tosalelaka Yehova kaka soki makambo ezali malamu mpe tokotika Nzambe soki makambo ekómi mabe. (Yobo 1:9-11; 2:4, 5) Na yango, tosengeli ntango nyonso kosɛnga Yehova apesa biso makasi. Kobosana te ete Yehova akosundola biso ata mokolo moko te.​—Ebr. 13:5. w18.05 26 par. 14

Mwapɔsɔ, 28 sanza ya 11

Oyebi te epai wapi yango ekolonga.​—Mos. 11:6.

Tosengeli kobosana ata moke te bolamu oyo mosala ya kosakola ememelaka bato, ata soki emonani lokola ete nsango yango ezali kosimba mitema ya bato te. Bato mingi baboyaka koyoka nsango na biso, kasi atako bongo batalaka biso. Bamonaka ndenge tolataka malamu, tozali na bokonde mpe ndenge tosepelaka na bato. Yango ekoki kokamwisa bango, mpe na bantango mosusu ata mpe baoyo bazalaki kokanisela biso mabe bakoki kobongola makanisi na bango. Ndeko Sergio ná mwasi na ye Olinda, oyo bazali babongisi-nzela balobi boye: “Na boumeli ya mwa ntango maladi esalaki ete tókende te kosakola esika tozalaki kokende. Ntango tozongaki, moleki-nzela moko atunaki biso, ‘Likambo nini ekómelaki bino? Tolukaki bino.’” Soki tozali ‘kopemisa lobɔkɔ na biso te’ na ndenge tozali koyebisa basusu nsango ya Bokonzi ya Nzambe, tozali kopesa mabɔkɔ na mosala moko ya ntina mingi ya kopesa “litatoli na bikólo nyonso.” (Mat. 24:14) Likambo eleki ntina ezali ete tokoki kozala na esengo makasi mpo toyebi ete tozali kosepelisa Yehova. Alingaka baoyo nyonso ‘babotaka mbuma wana bazali koyika mpiko’!​—Luka 8:15. w18.05 16 par. 16-18

Mwalomingo, 29 sanza ya 11

Nzambe . . . apambwama . . . oyo abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso.​—2 Ko. 1:3, 4.

Yehova azali Nzambe oyo alendisaka. Asalaka bongo banda moto asalá lisumu mpe kozanga kokoka ekɔtá. Kutu, kaka ntango Adama ná Eva batombokaki na elanga ya Edene, Yehova asakolaki likambo oyo esengelaki kolendisa mpe kopesa elikya na bana oyo basengelaki kobota na nsima. Esakweli yango oyo ezali na Ebandeli 3:15 elobaki ete “nyoka ya kalakala,” elingi koloba Satana Zabolo, akobebisama ná misala na ye nyonso ya mabe. (Em. 12:9; 1 Yoa. 3:8) Kanisá ndenge Yehova alendisaki mosaleli na ye Noa. Na ntango na ye, bato bazalaki mobulu mpe kosala makambo ya mbindo; kaka Noa ná libota na ye nde bazalaki kosambela Yehova. Na yango, Noa akokaki komona ete elikya ezali lisusu te, mpe akokaki kolɛmba nzoto. (Eba. 6:4, 5, 9, 11; Yuda 6) Kasi, Yehova ayebisaki Noa ete akobebisa mokili yango ya mabe, mpe alimbwelaki ye oyo asengelaki kosala mpo na kobikisa libota na ye. (Eba. 6:13-18) Ya solo, Noa amonaki ete Yehova azali Nzambe oyo alendisaka. w18.04 15 par. 1-2

Mwayambo, 30 sanza ya 11

Bókoba kobɔndisana mpe kolendisana, ndenge kutu bozali kosala yango.​—1 Tes. 5:11.

Okosala nini soki omonaka ete okokaka te kolendisa basusu na maloba? Mpo na koloba solo, kolendisa ezalaka mpasi mpenza te. Okoki kaka kosɛkisa moto mwa moke. Soki asɛkisi yo te, mbala mosusu azali na likambo oyo ezali kotungisa ye. Mpe soki oyoki ye na likebi, ekoki kolendisa ye. (Yak. 1:19) Mokomoko na biso akoki kobɔndisa mpe kolendisa bandeko. Mokonzi Salomo akomaki ete: “Liloba oyo elobami na ntango na yango mpenza ezali malamu mingi! Kongɛnga ya miso esepelisaka motema; nsango oyo ezali malamu ekómisaka mikuwa mafutamafuta.” (Mas. 15:23, 30) Paulo amonisaki ete ata koyemba nzembo ya Bokonzi elongo ekoki kolendisa. (Kol. 3:16; Mis. 16:25) Kolendisana ekokóma lisusu na ntina mingi awa mokolo ya Yehova “ezali kobɛlɛma.”​—Ebr. 10:25. w18.04 23 par. 16; 24 par. 18-19

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto