Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • es20 nk. 98-108
  • Sanza ya 10

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sanza ya 10
  • Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2020
  • Mitó ya makambo mike
  • Mwaminei, 1 sanza ya 10
  • Mwamitano, 2 sanza ya 10
  • Mwapɔsɔ, 3 sanza ya 10
  • Mwalomingo, 4 sanza ya 10
  • Mwayambo, 5 sanza ya 10
  • Mwamibale, 6 sanza ya 10
  • Mwamisato, 7 sanza ya 10
  • Mwaminei, 8 sanza ya 10
  • Mwamitano, 9 sanza ya 10
  • Mwapɔsɔ, 10 sanza ya 10
  • Mwalomingo, 11 sanza ya 10
  • Mwayambo, 12 sanza ya 10
  • Mwamibale, 13 sanza ya 10
  • Mwamisato, 14 sanza ya 10
  • Mwaminei, 15 sanza ya 10
  • Mwamitano, 16 sanza ya 10
  • Mwapɔsɔ, 17 sanza ya 10
  • Mwalomingo, 18 sanza ya 10
  • Mwayambo, 19 sanza ya 10
  • Mwamibale, 20 sanza ya 10
  • Mwamisato, 21 sanza ya 10
  • Mwaminei, 22 sanza ya 10
  • Mwamitano, 23 sanza ya 10
  • Mwapɔsɔ, 24 sanza ya 10
  • Mwalomingo, 25 sanza ya 10
  • Mwayambo, 26 sanza ya 10
  • Mwamibale, 27 sanza ya 10
  • Mwamisato, 28 sanza ya 10
  • Mwaminei, 29 sanza ya 10
  • Mwamitano, 30 sanza ya 10
  • Mwapɔsɔ, 31 sanza ya 10
Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2020
es20 nk. 98-108

Sanza ya 10

Mwaminei, 1 sanza ya 10

Bólela elongo na bato oyo bazali kolela.​—Rom. 12:15.

Biso tozali te na likoki ya koyeba makambo oyo ezali na mitema ya bato lokola Yehova ná Yesu. Atako bongo, tokoki koyeba ndenge oyo moto azali komiyoka mpe nini asengeli na yango. (2 Ko. 11:29) Tokeseni na bato mingi na mokili, oyo balukaka kaka bolamu na bango moko; biso ‘totyaka likebi kaka na makambo na biso moko te, kasi totyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.’ (Flp. 2:4) Mingimingi, bankulutu ya lisangá basengeli komonisa ete bamityaka na esika ya basusu. Bayebi ete bakozongisa monɔkɔ mpo na bampate oyo bazali kokɛngɛla. (Ebr. 13:17) Mpo na kosalisa bandeko na bango bakristo, bankulutu basengeli koyeba komitya na esika ya basusu. Ndenge nini bankulutu bakoki komonisa ete bamityaka na esika ya basusu? Nkulutu oyo amityaka na esika ya basusu alekisaka ntango mingi elongo na bandeko ya lisangá. Atunaka mituna, ayokaka na likebi mpe azalaka na motema molai. Yango ezali na ntina, mingimingi ntango mpate moko alingi kobimisa makambo oyo azali na yango na motema, kasi azali kobundana mpo na koluka maloba oyo ebongi. (Mas. 20:5) Soki nkulutu azali kolekisa ntango mingi elongo na bandeko, bakotyela ye motema, akokóma moninga na bango, mpe bakolinga ye mingi.​—Mis. 20:37. w19.03 17 par. 14-17

Mwamitano, 2 sanza ya 10

Liloba oyo elobami na ntango na yango ezali lokola bapɔme ya wolo na kati ya eloko ya mayemi ya palata.​—Mas. 25:11.

Botɔndi ezali lokola bilei ya kitoko; esepelisaka mingi koleka soki tokaboli yango na baninga. Soki toyebi ete bato mosusu bazali na botɔndi mpo na makambo oyo tosaleli bango, toyokaka esengo. Ntango biso mpe tomonisi botɔndi, basusu bakoyoka esengo. Moto oyo tomoniseli botɔndi akoyeba ete ebongaki mpenza asala milende mpo na kosalisa biso, to mpo na kopesa biso eloko oyo tosengelaki na yango. Yango ekosala ete boninga na biso ekóma lisusu makasi. Komonisa botɔndi ezali na motuya mingi, ndenge emonisami na mokapo ya lelo. Pɔme oyo basali na wolo mpe batye yango na eloko moko ya liyemi oyo esalemi na palata emonanaka kitoko! Mpe na ntembe te ezalaka na motuya! Okomiyoka ndenge nini soki bapesi yo likabo ya ndenge wana? Yebá ete maloba ya botɔndi oyo okoki koyebisa basusu ekoki kozala na motuya ndenge wana. Mpe kanisá naino: pɔme oyo basali na wolo ekoki koumela ntango molai mpenza. Ndenge moko mpe, soki omoniseli moto botɔndi ekoki kofanda na motema na ye mpe akoki kokanisaka yango bomoi na ye mobimba. w19.02 15 par. 5-6

Mwapɔsɔ, 3 sanza ya 10

Moto akómi lokola moko na biso na ndenge ayebi malamu ná mabe.​—Eba. 3:22.

Ntango Adama ná Eva balyaki mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe, bamonisaki polele ete baboyi kotyela Yehova motema mpe kolanda mibeko na ye. Baponaki kotya mibeko na bango moko na oyo etali malamu mpe mabe. Kasi, kanisá nyonso oyo babungisaki. Babungisaki boninga oyo bazalaki na yango na Yehova. Babungisaki mpe libaku ya kozala na bomoi ya seko, mpe batikelá bana na bango lisumu mpe liwa. (Rom. 5:12) Tótalela ndenge oyo Adama ná Eva basalaki mpe ndenge oyo mokube moko moto ya Etiopi asalaki ntango Filipe asakwelaki ye. Mokube yango akómaki na botɔndi mingi mpo na nyonso oyo Yehova ná Yesu basalaki mpo na ye, yango wana, na mbala moko, azwaki batisimo. (Mis. 8:34-38) Ntango tomipesi na Nzambe na nzela ya libondeli mpe lokola mokube wana, tozwi batisimo, tomonisi polele ete tozali na botɔndi mpo na nyonso oyo Yehova ná Yesu basali mpo na biso. Tomonisi mpe ete totyelaka Yehova motema mpe tondimaka ete kaka ye nde asengeli kotya mibeko na oyo etali malamu mpe mabe. w19.03 2 par. 1-2

Mwalomingo, 4 sanza ya 10

Nakotika bosembo na ngai te!​—Yobo 27:5.

Mpo na biso basaleli ya Nzambe, bosembo elimboli kolinga Yehova na motema mobimba mpe kokangama makasi na ye; yango ekosala ete tózwaka ntango nyonso bikateli oyo ekosepelisa ye. Na Biblia, liloba “bosembo” elimboli libosoliboso mobimba, oyo ezangi mbeba to oyo ezali ndambo te. Na ndakisa, nyama oyo bazalaki kopesa Yehova mbeka esengelaki kozala na mbeba ata moko te. (Lev. 22:21, 22) Basaleli ya Nzambe basengelaki te kopesa nyama oyo ezangi lokolo moko, litoi moko, to liso moko; basengelaki mpe te kopesa nyama oyo ezali na maladi. Mpo na Yehova, ezalaki na ntina ete nyama ezala ya mobimba, ezanga mbeba, mpe ezala ya ndambo te. (Mal. 1:6-9) Tokoki komona ntina oyo Yehova alingaka eloko oyo ezangi mbeba to oyo ezali mobimba. Soki tozali kosomba eloko moko, ezala mbuma, buku, to esaleli moko boye, tozwaka te oyo ezali na mbeba to oyo ezali ndambo. Tolingaka oyo ezali ya mobimba, ezangi mbeba, to ezali ya ndambo te. Yehova mpe amiyokaka bongo mpo na bolingo oyo tolingaka ye mpe bosembo na biso. Esengeli kozala ya mobimba, ezanga mbeba, mpe ezala ya ndambo te. w19.02 3 par. 3

Mwayambo, 5 sanza ya 10

Nalingaka mobeko na yo mingi mpenza! Ezali lobanzo na ngai mokolo mobimba.​—Nz. 119:97.

Mpo na kobatela motema na biso, tosengeli kosuka kaka te na koboya makanisi ya mabe, tosengeli mpe kondima makanisi ya malamu. Na ntango ya kala, na engumba oyo ezingami na efelo, mokɛngɛli ya porte azalaki kokanga baporte ya engumba mpo banguna bákɔta te, kasi na bantango mosusu azalaki kofungola yango mpo na kokɔtisa bilei mpe biloko mosusu. Soki baporte ezalaki ntango nyonso ya kokangama, bato ya engumba balingaki kokufa nzala. Ndenge moko mpe, tosengeli kofungola motema na biso mbala na mbala mpo na kokɔtisa makanisi ya Nzambe. Biblia ezali na makanisi ya Yehova; na yango ntango nyonso oyo totángaka yango, totikaka makanisi ya Yehova ebongisa ndenge na biso ya kokanisa, ya kotalela makambo, mpe ya kosala makambo. Tokoki kosala nini mpo tózwa matomba mingi na botángi na biso ya Biblia? Libondeli ezali na ntina mingi mpo na kosalisa biso tómona “makambo ya kokamwa” oyo ezali na Liloba na ye. (Nz. 119:18) Tosengeli mpe komanyola makambo oyo tozali kotánga. Soki tobondeli, totángi, mpe tomanyoli, Liloba ya Nzambe ekokɔta mpenza “na kati ya motema” na biso mpe tokokóma kolinga makanisi ya Yehova.​—Mas. 4:20-22. w19.01 18 par. 14-15

Mwamibale, 6 sanza ya 10

Tópesa Nzambe mbeka ya lisanzoli ntango nyonso.​—Ebr. 13:15.

Yehova ayebi ete makoki mpe makambo ya bomoi na biso ezali ndenge moko te, mpe azwaka na motuya mpenza bambeka oyo tokoki kopesa ye. Kanisá bambeka oyo azalaki kondima epai ya Bayisraele. Bayisraele mosusu bazalaki na likoki ya kopesa mwana-mpate to ntaba. Kasi Moyisraele oyo azalaki mobola akokaki kopesa “bipopo mibale to bana mibale ya bibenga.” Mpe soki Moyisraele azali na makoki te ya kopesa ndɛkɛ mibale, Yehova azalaki kondima “moko ya bandambo zomi ya efa ya farini ya malamu.” (Lev. 5:7, 11) Farini ezalaki ntalo mingi te, kasi Yehova azalaki kaka kozwa mbeka yango na motuya, soki ezali “farini ya malamu.” Nzambe na biso ya boboto abongwani te. Ntango topesaka biyano, azelaka te ete mokomoko na biso azala molobi malamu lokola Apolosi, to azala na mayele ya kondimisa lokola Paulo. (Mis. 18:24; 26:28) Yehova alingi kaka ete tópesaka biyano ya malamu, na kotalela makoki na biso. Kanisá mwasi oyo mobali akufá, oyo apesaki mbongo ya bibende mibale. Azalaki na motuya na miso ya Yehova mpo apesaki na kotalela makoki na ye.​—Luka 21:1-4. w19.01 8-9 par. 3-5

Mwamisato, 7 sanza ya 10

Bato nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai.​—Mat. 10:22.

Lokola tozali bayekoli ya Kristo, toyebaka ete bato bakoyina biso. Yesu asakolaki ete bakonyokola mpenza bayekoli na ye na mikolo ya nsuka. (Mat. 24:9; Yoa. 15:20) Esakweli ya Yisaya elobaki ete banguna na biso bakosuka kaka te na koyina biso; bakosalela mpe bibundeli ndenge na ndenge mpo na kobundisa biso. Bibundeli yango ekoki kozala mayele mabe, lokuta ya polele, to mpe minyoko ya makasi. (Mat. 5:11) Yehova akopekisa te banguna na biso básalela bibundeli wana mpo na kobundisa biso. (Ef. 6:12; Em. 12:17) Kasi, tosengeli kobanga te. Yehova alobaki ete “ebundeli nyonso” oyo bakosalela mpo na kobundisa biso “ekolonga te.” (Yis. 54:17) Ndenge kaka efelo ekoki kobatela moto na mbula ya mopɛpɛ makasi, Yehova mpe abatelaka biso na “mopɛpɛ ya banyokoli.” (Yis. 25:4, 5) Banguna na biso bakolonga te kosala biso mabe mpo na libela. (Yis. 65:17) Banguna nyonso ya basaleli ya Nzambe “bakokóma eloko mpamba mpe bakokufa.”​—Yis. 41:11, 12. w19.01 6-7 par. 13-16

Mwaminei, 8 sanza ya 10

Esika elimo ya Yehova ezali, bonsomi ezali wana.​—2 Ko. 3:17.

Elenge, Yehova alingaka bonsomi, mpe atyaki mposa yango na motema na yo. Kasi, alingi ete osalela bonsomi na yo na bwanya mpo ebatela yo. Mbala mosusu oyebi bato oyo batalaka pornografi, basalaka pite, batyaka bomoi na bango na likama na masano ya mobulu, to mpe bamɛlaka makaya to masanga mingi. Na ebandeli, makambo yango ekoki komonana lokola masɛki to kosepelisa, kasi mbala mingi ebimisaka mbuma ya mabe, na ndakisa maladi, ekómisaka moto moombo, to ekoki ata komema na liwa. (Gal. 6:7, 8) Bilenge oyo bamipesi na makambo yango bakoki kokanisa ete bazali na bonsomi, nzokande bazali na bonsomi te. (Tito 3:3) Kasi, kotosa Yehova ezali mpo na bolamu na biso. Esalisaka biso tózala nzoto kolɔngɔnɔ mpe tózala na bonsomi ya solosolo. (Nz. 19:7-11) Mpe ntango ozali kosalela bonsomi na yo na bwanya, elingi koloba oponi kotosa mibeko mpe mitinda ya Nzambe, okomonisa Nzambe mpe baboti na yo ete bakoki kotyela yo motema. Yango ekoki kosala ete baboti na yo bápesa yo bonsomi mingi koleka.​—Rom. 8:21. w18.12 22-23 par. 16-17

Mwamitano, 9 sanza ya 10

Mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe asengeli kokangama na mwasi na ye mpe basengeli kokóma mosuni moko.​—Eba. 2:24.

Ntango Adama asalaki lisumu, makambo mingi ebongwanaki. Na ndakisa, bato bakómaki kokufa mpe yango ebongolaki ebongiseli ya libala. Ntoma Paulo ayebisaki bakristo ete ntango molongani moko akufi, libala esuki, mpe molongani oyo atikali azali na bonsomi ya kobala lisusu. (Rom. 7:1-3) Mibeko oyo Nzambe apesaki ekólo Yisraele elobaki makambo mosusu ebele mpo na libala. Na ndakisa, Mibeko epesaki Moyisraele ya mobali nzela ya kobala basi ebele. Momeseno yango ebandaki liboso kutu Nzambe apesa Yisraele Mibeko. Kasi ezalaki na mibeko oyo ebatelaki basi ná bana mpo bányokwama te. Na ndakisa, soki Moyisraele ya mobali abalaki mwasi oyo azalaki moombo mpe na nsima abali mwasi ya mibale, asengelaki kokoba kopesa mwasi ya liboso bilei, bilamba mpe lotomo na ye ya libala. Nzambe asɛngaki ete akoba kobatela mpe kokokisa bamposa na ye. (Kob. 21:9, 10) Tolandaka Mibeko ya Moize te lelo. Kasi, eteyaka biso ete Nzambe azwaka libala na motuya mingi. Yango esalisaka biso mpenza tókumisa libala. w18.12 10 par. 3; 11 par. 5-6

Mwapɔsɔ, 10 sanza ya 10

Bokondima te atako bayebisi bino yango.​—Hab. 1:5.

Nsima ya koyebisa Yehova mitungisi na ye, mbala mosusu Habakuku amitunaki soki Yehova akosala nini. Lokola Yehova azali Tata ya boboto, amityaki na esika ya Habakuku. Ayebaki ete Habakuku azalaki konyokwama mpe asɛngaki lisalisi. Na yango, Yehova apamelaki ye te. Alobelaki likambo ya Bayuda oyo bazangaki bosembo mpe ayebisaki Habakuku makambo oyo akosala mosika te. Ekoki mpenza kozala ete Habakuku nde moto ya liboso oyo Yehova ayebisaki ye ete akopesa bato ya mobulu etumbu mosika te. Yehova ayebisaki Habakuku ete mosika te akosala. Akopesa bato mabe mpe ya mobulu ya Yuda etumbu. Ntango Yehova asalelaki maloba “na mikolo na bino,” amonisaki ete ntango lisambisi yango ekoya Habakuku to bato ya eleko na ye bakozala na bomoi. Eyano ya Yehova ekamwisaki mpenza Habakuku. Likambo oyo Yehova akanaki kosala elingaki kobakisela Yuda mpasi. w18.11 15 par. 7-8

Mwalomingo, 11 sanza ya 10

Mokano [ya Nzambe] ezali ete bato ya ndenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.​—1 Tim. 2:4.

Ndenge nini otalelaka bato nyonso oyo bayebi naino solo te? Ntoma Paulo asakwelaki Bayuda oyo bayebaki mwa makambo etali Yehova. Kasi, asakwelaki mpe baoyo bazalaki kosambela banzambe ya lokuta. Na ndakisa, na mobembo na ye ya liboso ya misionɛrɛ, Paulo ná Barnabasi bakendaki na engumba Listra, na Likaonia. Kuna, bato babengaki Paulo na nkombo ya nzambe na bango Hermesi mpe Barnabasi na nkombo ya nzambe na bango Zeusi. Paulo ná Barnabasi basepelaki na likambo yango? Bamonaki nde ete bakonyokola bango te ndenge ezalaki na bingumba mibale epai bautaki liboso? Bamonaki nde ete likebi oyo batyeli bango ekosalisa mpo bato ebele báyoka nsango malamu? Te! Bayokaki mabe mpe bagangaki ete: “Mpo na nini bozali kosala makambo oyo? Biso mpe tozali bato oyo bazali na bolɛmbu ndenge moko na oyo ya bino.”​—Mis. 14:8-15. w18.09 4-5 par. 8-9

Mwayambo, 12 sanza ya 10

Boyebi te ete bato bazangi boyengebene bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te? . . . Nzokande bamosusu na kati na bino bazalaki ndenge wana. Kasi bosukwami pɛɛ, . . . botángami bayengebene.​—1 Ko. 6:9, 11.

Ntango tobandi koyekola solo mpe tokómi kotosa mibeko oyo ezali na Biblia, tosengeli kondima kobongisa makanisi mpe etamboli na biso. Ntoma Petro akomaki: “Lokola bana ya botosi, bótika kolanda bamposa oyo bozalaki na yango kala ntango bozalaki na boyebi te.” Na nsima abakisaki: “Bókóma basantu na etamboli na bino mobimba.” (1 Pe. 1:14, 15) Na engumba Korinti, bato mingi bazalaki na etamboli ya mbindo. Na yango mpo na kosomba solo esɛngaki básala bambongwana minene na bomoi na bango. Lelo oyo mpe, bato mingi basalaka mbongwana ya ndenge wana mpo na kosomba solo. Ntoma Petro alobelaki yango na maloba oyo: “Ntango oyo esili koleka ekoki bongo oyo bino bosalaki mokano ya bikólo ntango botambolaki na misala ya etamboli ya nsɔni, na bamposa makasi, na kolekisa ndelo na vinyo, na bafɛti ya lokoso, na komɛla mingi, mpe na losambo mabe ya bikeko.”​—1 Pe. 4:3. w18.11 6 par. 13

Mwamibale, 13 sanza ya 10

Baoyo nyonso bazalaki na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko bakómaki bandimi.​—Mis. 13:48.

Ndenge nini tokoki komona bato oyo bazali na “ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko”? Na siɛklɛ ya liboso, lolenge kaka moko ya komona bato yango ezalaki ya kobima na mosala ya kosakola. Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Na engumba nyonso to mboka nyonso bokokɔta, bóluka nani na kati na yango abongi.” (Mat. 10:11) Tosengeli kosala mpe bongo lelo. Toyebi malamu ete bato oyo babongi te, oyo bazali na lolendo to oyo bakipaka mpenza makambo ya Nzambe te balingaka koyoka nsango malamu te. Tozali koluka bato ya mitema sembo, oyo bazali na komikitisa, mpe oyo balingi mpenza koyeba solo. Tokoki kokokanisa mosala na biso ya koluka bato na mosala ya Yesu lokola mosali-mabaya. Mpo asala biloko ya ndako, porte, ekanganeli, to eloko mosusu, asengelaki liboso koluka libaya ya malamu. Na nsima, akokaki kozwa kɛsi na ye ya bisaleli, kosalela mayele na ye, mpe kosala eloko oyo esengeli. Biso mpe tosengeli liboso koluka bato oyo babongi, na nsima tokoki kosalisa bango bákóma bayekoli.​—Mat. 28:19, 20. w18.10 12 par. 3-4

Mwamisato, 14 sanza ya 10

Filipe akitaki na engumba ya Samaria mpe abandaki kosakola Kristo epai na bango.​—Mis. 8:5.

Filipe mopalangani ya nsango malamu azali ndakisa malamu ya moto oyo akobaki kotya makanisi na mosala ya kosakola atako bomoi na ye ebongwanaki. Na eleko moko, azwaki mokumba moko ya sika na Yerusaleme. (Mis. 6:1-6) Na nsima, makambo ebongwanaki. Nsima ya kobomama ya Stefano, bakristo bakutanaki na minyoko ya makasi mpe bakimaki Yerusaleme. Lokola Filipe alingaki kokoba kosala mingi mpo na Yehova, akendaki na engumba Samaria, epai bato mingi bazalaki na mposa ya koyoka nsango malamu. (Mat. 10:5; Mis. 8:1) Filipe andimaki kokende esika nyonso oyo elimo ya Nzambe ekotinda ye. Na yango, Yehova asalelaki ye mpo na kosakola na bisika oyo bato bayokaki naino nsango malamu te. Bayuda mingi bazalaki kotyola Basamaria. Kasi Filipe azalaki kokanisela bango mabe te mpe asakwelaki bango nsango malamu. Yango wana Basamaria bayokaki ye “na bomoko mpenza”! (Mis. 8:6-8) Filipe akobaki kotya makanisi na mosala ya kosakola, mpe Yehova akobaki kopambola ye ná libota na ye.​—Mis. 21:8, 9. w18.10 30 par. 14-16

Mwaminei, 15 sanza ya 10

Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu.​—Ebr. 10:24.

Mokolo moko ntango Yesu azalaki na Dekapolisi, “bamemelaki ye moto moko oyo akufá matoi mpe azalaki na mokakatano ya koloba.” (Mrk. 7:31-35) Yesu abikisaki ye, kasi na miso ya bato te, “atyaki ye pembeni.” Mpo na nini? Lokola moto yango azalaki matoi ekufá, ekoki kozala ete amiyokaki malamu te kozala na kati ya ebele ya bato. Yango wana Yesu abikisa ye esika bato bazalaki te. Ya solo, biso tokoki kosala makamwisi te, kasi tosengeli kotyela bandeko likebi, komitya na esika na bango mpe komonisela bango boboto. Yesu amityaki na esika ya moto yango oyo akufá matoi mpe amoniselaki ye boboto. Tosengeli mpe kopesa mibange mpe bibɔsɔnɔ lokumu. Na lisangá, bolingo nde eleki ntina, kasi te makoki ya moto. (Yoa. 13:34, 35) Bolingo ekotinda biso tósala nyonso oyo tokoki mpo na kosalisa bandeko oyo bazali mibange to bibɔsɔnɔ báya na makita mpe bábima na mosala ya kosakola, ata soki bakosala mingi te.​—Mat. 13:23. w18.09 29-30 par. 7-8

Mwamitano, 16 sanza ya 10

Moto na moto na kati na biso asepelisa mozalani na ye na oyo ezali malamu mpo alendisa ye.​—Rom. 15:2.

Mosaleli mokomoko ya Yehova azali na motuya na miso na ye mpe na miso ya Yesu. (Gal. 2:20) Lokola tolingaka bandeko na biso mingi, tosengeli komonisela bango boboto mpenza. Mpo na kobɔndisa bango, tosengeli ‘kolanda makambo oyo etyaka kimya mpe makambo oyo elendisaka.’ (Rom. 14:19) Biso nyonso tozali kozela Paradiso, epai moto moko te akozala na ntina ya kolɛmba nzoto! Maladi ekozala lisusu te, bitumba mpe te. Bato bakokufa lisusu te mpo na lisumu ya Adama, monyoko, mikakatano ya libota, to kolɛmba nzoto ekozala te. Na nsuka ya Boyangeli ya mbula nkóto, bato nyonso bakokóma bato ya kokoka. Bato oyo bakotikala sembo na komekama ya nsuka, Yehova akokómisa bango bana na ye awa na mabele mpe bakozwa “bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.” (Rom. 8:21) Na yango, biso nyonso tosengeli komoniselana bolingo oyo etongaka mpo tósalisana mpo na kokɔta na mokili ya sika oyo Nzambe alaki. w18.09 14 par. 10; 16 par. 18

Mwapɔsɔ, 17 sanza ya 10

Nalingaka mobeko na yo mingi mpenza! Ezali lobanzo na ngai mokolo mobimba.​—Nz. 119:97.

Koyekola Liloba ya Nzambe ezali te kotánga kaka likolólikoló to kotya mokɔlɔtɔ na biyano na mituna ya boyekoli. Ntango tozali koyekola, tosengeli kokanisa soki makambo yango eteyi biso nini mpo na Yehova, ndenge na ye ya kosala makambo, mpe makanisi na ye. Tosengeli koluka koyeba ntina oyo Yehova asɛngi biso tósala likambo moko mpe aboyi tósala mosusu. Tosengeli mpe kokanisa bambongwana oyo tosengeli kosala na bomoi na biso mpe na makanisi na biso. Ya solo, ntango mosusu tokotalela makambo nyonso wana te mbala nyonso oyo tozali koyekola. Kasi, ezali malamu tózwaka ntango, ata katikati ya ntango oyo tokolekisa na koyekola, mpo na komanyola makambo oyo tozali kotánga. (1 Tim. 4:15) Soki tozali komanyola Liloba ya Nzambe mbala na mbala, ‘tokomindimisa biso moko’ ete makanisi ya Yehova ezali ya kokoka. Tokobanda koyeba ndenge na ye ya kotalela makambo, mpe nsukansuka biso mpe tokobanda kotalela yango bongo. Na ndenge yango, makanisi na biso ekokómisama sika mpe tokobanda kokanisa ndenge mosusu. (Rom. 12:2) Mokemoke, tokobanda kokanisa lokola Yehova. w18.11 24 par. 5-6

Mwalomingo, 18 sanza ya 10

Tozali bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe.​—1 Ko. 3:9.

Na siɛklɛ ya liboso, ntoma Paulo alobaki ete ye ná bakristo mosusu bazalaki “bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe” mpo bazalaki kosakola mpe koteya bato solo. (1 Ko. 3:6) Lelo oyo, biso mpe tokoki kozala “bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe” soki tozali kopesa ntango, makasi mpe biloko na biso mpo na kosala mosala ya kosakola oyo Nzambe apesi biso. Ezali lokumu monene mpenza! Kopesa ntango mpe makasi na biso na mosala ya kosakola mpe ya koteya epesaka esengo mpenza. Bandeko oyo bazwá libaku ya koyekola Biblia na bato oyo bakolaki na elimo bakoyebisa yo ete ezali mosala ya esengo. Toyokaka esengo mingi ntango bayekoli na biso ya Biblia bazali kosepela mpo bakangi mpenza ntina ya makambo oyo Biblia eteyaka, bakómi na kondima makasi, basali mbongwana na bomoi na bango, mpe babandi koyebisa basusu makambo oyo bazali koyekola. Yesu mpe asepelaki mingi ntango basakoli 70 oyo atindaki bákende kosakola “bazongaki na esengo” mpo bakutanaki na makambo ya malamu.​—Luka 10:17-21. w18.08 20 par. 11-12

Mwayambo, 19 sanza ya 10

Ye oyo azali kondimela motema na ye moko azali zoba.​—Mas. 28:26.

Kondimela mayele na biso moko ekoki kokóma motambo. Tokoki kobanda kokanisa ete tokoki koyeba likambo malamu ata soki totaleli makambo nyonso te. Lisusu, ntango tozali koyokana malamu te na ndeko moko ekoki mpe kosala ete tótalela makambo malamu te. Soki tozali kaka kokanisa matata na biso, tokoki kobanda kokanisela ndeko na biso mabe. Na ntango wana, soki toyoki likambo ya mabe mpo na ndeko yango, tokoki kondima yango mbala moko, ata soki ezali solo te. Liteya ezali nini? Soki tozali na makanisi ya mabe mpo na bandeko na biso, tokoki kokanisela bango makambo oyo ezali mpenza solo te. (1 Tim. 6:4, 5) Yango wana, tólongola likunya mpe zuwa na mitema na biso. Tóbosana ata mokolo moko te ete Yehova asɛngi biso tólinga bandeko na biso mpe tólimbisaka bango na motema moko.​—Kol. 3:12-14. w18.08 6 par. 15; 7 par. 18

Mwamibale, 20 sanza ya 10

Likoló ezali ya Yehova . . . ná mabele ná nyonso oyo ezali na kati.​—Mib. 10:14.

Lokola Yehova akelá bato, biso nyonso tozali bato na ye. (Nz. 100:3, Em. 4:11) Kasi, na boumeli ya lisolo ya bato, Nzambe asilá kopona etuluku moko ya bato mpo bázala bato na ye moko mpenza. Na ndakisa, Nzembo 135 elobeli basaleli ya Yehova ya sembo na Yisraele ya kala lokola “eloko na ye moko.” (Nz. 135:4) Lisusu, Hosea asakolaki ete bato mosusu oyo bazali Bayisraele te bakokóma bato ya Yehova. (Hos. 2:23) Esakweli wana ekokisamaki ntango Yehova akómaki mpe kopona bato oyo bazalaki Bayisraele te mpo báyangela elongo na Kristo na likoló. (Mis. 10:45; Rom. 9:23-26) Bato yango oyo batyami mafuta na elimo babengami “ekólo moko mosantu.” Bazali ‘eloko ya Yehova ye moko.’ (1 Pe. 2:9, 10) Kasi tokoloba nini mpo na bakristo ya sembo nyonso oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele? Yehova abengi mpe bango “bato na ngai” mpe “bato oyo naponi.”​—Yis. 65:22. w18.07 22 par. 1-2

Mwamisato, 21 sanza ya 10

Bóbatela na kati na bino makanisi oyo Kristo Yesu mpe azalaki na yango . . . Amikómisaki nde mpamba mpe akómaki lokola moombo.​—Flp. 2:5, 7.

Biso bakristo ya solo tomekolaka Yesu, oyo atikelá biso ndakisa ya kokoka na likambo etali kokaba. (Mat. 20:28) Na yango, mokomoko na biso amituna boye: ‘Nakoki lisusu kolanda ndakisa ya Yesu malamumalamu?’ (1 Pe. 2:21) Yehova asepelaka ntango tolandi ndakisa ya kokoka oyo ye ná Yesu bapesá biso. Tomonisaka yango soki tozali kotyela bato likebi mpe koluka ndenge ya kosalisa bango. Yesu amonisaki yango polele ntango abɛtaki lisolo ya Mosamaria ya motema malamu mpo na koteya bayekoli na ye ete basengeli kosalisa basusu, ata soki bazali banani to bauti wapi. (Luka 10:29-37) Mpo na nini Yesu abɛtaki lisolo yango? Mpo Moyuda moko atunaki ye: “Nani mpenza azali mozalani na ngai?” Eyano ya Yesu ezali koteya biso ete lokola Mosamaria wana, tosengeli kokabaka soki tolingi kosepelisa Yehova. w18.08 19 par. 5-6

Mwaminei, 22 sanza ya 10

[Anzelu] alobaki ete: “Mbote, moto oyo Nzambe amoniseli boboto mingi, Yehova azali na yo.”​—Luka 1:28.

Lokola Maria abɔkɔlaki Yesu mpe abatelaki ye malamu, Yehova akobaki kondima ye? Ɛɛ. Kutu Nzambe akomisaki na Biblia makambo mosusu oyo Maria alobaki mpe asalaki. Emonani ete Maria azalaki lisusu te na likoki ya kotambola elongo na Yesu na boumeli ya mbula misato na ndambo ntango azalaki kosakola. Mbala mosusu mpo mobali na ye akufaki, yango wana asengelaki kotikala na Nazarete. Ya solo, amonaki te makambo mosusu ebele ya malamu oyo Yesu asalaki. Kasi ntango Yesu akufaki azalaki wana. (Yoa. 19:26) Na nsima Maria azalaki na Yerusaleme elongo na bayekoli ya Yesu liboso bázwa elimo santu na Pantekote. (Mis. 1:13, 14) Na ntembe te, atyamaki mafuta elongo na bayekoli oyo bazalaki wana. Soki esalemaki bongo, yango emonisi ete azwaki libaku ya koyangela elongo na Yesu na likoló mpo na libela. Ezali mpenza mbano moko kitoko mpo na mosala na ye ya sembo! w18.07 9 par. 11; 10 par. 14

Mwamitano, 23 sanza ya 10

Bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.​—1 Ko. 10:31.

Yesu asalelaki mitinda mpo na koteya bayekoli na ye ete bizaleli mpe misala mosusu ekoki kobimisa makama. Na ndakisa, ateyaki ete nkanda ekoki komema na mobulu, mpe makanisi ya mbindo ekoki komema na ekobo. (Mat. 5:21, 22, 27, 28) Mpo tózala na lisosoli oyo eteyami malamu, tosengeli kotika mitinda ya Yehova etambwisa biso mpe tokozwa bikateli ya malamu oyo ekopesa Nzambe nkembo. Ata bakristo mibale oyo lisosoli na bango eteyami na Biblia, bakoki kozala na makanisi ekeseni na likambo moko. Tótalela likambo etali komɛla masanga. Biblia elobi te ete komɛla masanga ezali mabe, kasi ekebisi biso ete tosengeli te komɛla koleka ndelo to kolangwa. (Mas. 20:1; 1 Tim. 3:8) Yango elimboli nde ete soki mokristo alekisi ndelo te na komɛla masanga, asengeli te kotalela makambo mosusu mpo na kozwa ekateli? Te. Ata soki lisosoli na ye epesi ye nzela ya komɛla masanga, asengeli mpe kotalela lisosoli ya basusu. w18.06 18 par. 10-11

Mwapɔsɔ, 24 sanza ya 10

Bókeba na levire ya Bafarisai mpe na levire ya Erode.​—Mrk. 8:15.

Yesu akebisaki bayekoli na ye na “levire,” to mateya ya bituluku ya Bafarisai, Basadukai, mpe bato ya etuluku ya Erode. (Mat. 16:6, 12) Ezali malamu mpo Yesu akebisaki bango mwa moke nsima ya libaku oyo bato balukaki kokómisa ye mokonzi. Mbala mingi mobulu ebimaka soki mangomba ekɔti na makambo ya politiki. Yesu ateyaki bayekoli na ye bákɔta na makambo ya politiki te. Ezalaki moko ya likambo oyo etindaki banganga-nzambe mpe Bafarisai báluka koboma Yesu. Bazalaki kobanga ete bato bákoba koyoka ye mpe bátika kolanda bango. Soki esalemaki bongo, balingaki kobungisa bokonzi na bango na lingomba mpe na politiki. Balobaki ete: “Soki totiki ye kaka boye, bango nyonso bakondimela ye, mpe Baroma bakoya kobɔtɔla esika na biso mpe ekólo na biso.” (Yoa. 11:48) Na yango, Kaifa, nganga-nzambe monene alukaki kobomisa Yesu.​—Yoa. 11:49-53; 18:14. w18.06 6-7 par. 12-13

Mwalomingo, 25 sanza ya 10

Bolingo na bino ezala na bokosi te.​—Rom. 12:9.

Motambo mosusu Satana asalelaka ezali mposa oyo bato bazalaka na yango ya koluka koyeba makambo oyo eleki mayele ya bato. Lelo oyo, asalelaka mangomba ya lokuta mpe kominanola mpo bato bákóma kosepela na misala ya bademo. Bafilme, masano ya video, mpe lolenge mosusu ya kominanola esalaka ete bato básepela na makambo oyo eleki mayele ya bato. Ndenge nini tokoki kokima motambo yango? Tókanisa te ete ebongiseli ya Nzambe ekosalela biso liste ya lolenge ya kominanola oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. Tosengeli koteya lisosoli na biso mpo tózwa bikateli ya malamu oyo esimbami na mitinda ya Yehova. (Ebr. 5:14) Lisusu, soki tosaleli toli ya ntoma Paulo oyo ezali likoló, tokozwa bikateli ya malamu. Na yango ntango tolingi kopona kominanola moko, tokoki komituna boye: ‘Nasalelaka mitinda oyo nayebisaka basusu básalela? Bato oyo nayekolaka na bango Biblia mpe bato oyo nazongelaka na mosala ya kosakola bakoloba nini mpo na kominanola oyo naponi?’ Ntango tozali kosalela mitinda ya Biblia oyo toyebisaka basusu mpe básalela, ekozala mpasi te tókima mitambo ya Satana.​—1 Yoa. 3:18. w18.05 25 par. 13

Mwayambo, 26 sanza ya 10

Mposa ya motema na ngai mpe lilɔmbɔ na ngai epai ya Nzambe mpo na bango ezali mpenza ete bábika.​—Rom. 10:1.

Ndenge nini tokoki komekola Paulo? Ya liboso, tosengeli kosala nyonso mpo na koluka ‘baoyo nyonso bazali na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko.’ Ya mibale, kobondela Yehova asalisa bato ya mitema sembo mpo bándima koyoka ntango tozali kosakwela bango. (Mis. 13:48; 16:14) Ndeko Silvana, oyo alekisi mbula pene na 30 na mosala ya mobongisi-nzela, alobi boye: “Liboso ya kokende kosakola na ndako moko na teritware na ngai, nabondelaka Yehova, nasɛngaka ye asalisa ngai nazala na makanisi malamu.” Tosengeli mpe kobondela mpo baanzelu básalisa biso tómona bato oyo bakondima koyoka. (Mat. 10:11-13; Em. 14:6) Ndeko Robert, oyo azali mobongisi-nzela koleka mbula 30, alobi boye: “Kosala elongo na baanzelu oyo bayebi malamu bomoi ya bato oyo tokei kotala, epesaka ngai esengo.” Ya misato, tosalaka makasi tómona makambo ya malamu epai ya bato mpe makoki na bango ya kosalela Yehova. Nkulutu moko na nkombo Carl, alobi: “Nalukaka komona ata elembo moke oyo ekoki komonisa bosembo ya moto, na ndakisa, kosɛka na ye, ndenge azali kotala bato na boboto, to motuna oyo euti mpenza na motema na ye.” Ndenge moko na Paulo, makambo wana ekoki kosalisa biso ‘tóbota mbuma wana tozali koyika mpiko.’ w18.05 15 par. 13; 16 par. 15

Mwamibale, 27 sanza ya 10

Tótyelanaka likebi . . . , tólendisanaka, mpe tósalaka bongo mingi koleka awa tozali komona mokolo yango ezali kobɛlɛma.​—Ebr. 10:24, 25.

Koyoka nsango ete bato oyo tosalisaki kala bazali kaka sembo elendisaka biso, ndenge ntoma Yoane akomaki: “Nazali na ntina mosusu ya botɔndi te koleka makambo oyo: nayokaka ete bana na ngai bazali kokoba kotambola na kati ya solo.” (3 Yoa. 4) Babongisi-nzela ebele basepelaka soki bayoki ete moto moko oyo basalisaki ayeba solo eleki bambula azali kaka sembo epai ya Yehova, to kutu akómá mpe mobongisi-nzela. Na yango, soki mobongisi-nzela abandi kolɛmba nzoto, tokolendisa ye soki toyebisi ye bolamu nyonso oyo asalá mpo na kosalisa basusu. Bakɛngɛli ya zongazonga mingi balobi ete bango ná basi na bango balendisamaki ntango lisangá oyo bautaki kotala etindelaki bango mwa mokanda mpo na kopesa bango matɔndi. Soki tokomeli mpe bankulutu, bamisionɛrɛ, babongisi-nzela, mpe bandeko oyo basalaka na Betele mpo nakopesa bango matɔndi ndenge bazali kosalela Yehova na bosembo, tokoki kolendisa bango mingi. w18.04 23 par. 14-15

Mwamisato, 28 sanza ya 10

[Mokonzi] asengeli mpe te kokóma na basi ebele, noki motema na ye epɛngwa.​—Mib. 17:17.

Salomo atosaki mobeko yango te, mpe nsukansuka abalaki basi 700 mpe akómaki na bamakango 300! (1 Bak. 11:3) Mingi kati na basi yango bazalaki bapaya oyo bazalaki kosambela banzambe ya lokuta. Na yango, Salomo abukaki mpe mobeko ya Nzambe oyo epekisaki kobala basi-bapaya. (Mib. 7:3, 4) Mokemoke, Salomo atikaki kolinga Yehova mpe mibeko na ye. Nsukansuka, asalaki makambo ya mabe mpenza. Atongaki etumbelo mpo na nzambe-mwasi Ashitorete mpe Kemoshe, na nsima akómaki kosambela banzambe yango elongo na basi na ye. Kutu, Salomo atongaki bitumbelo yango na ngomba oyo etalani na Yerusaleme, esika oyo atongaki tempelo ya Yehova! (1 Bak. 11:5-8; 2 Bak. 23:13) Mbala mosusu Salomo azalaki kokanisa ete lokola azalaki kokoba kopesa bambeka na tempelo, Yehova akolandela te makambo mabe oyo azalaki kosala. Kasi, Yehova alekisaka masumu kaka boye te. w18.07 18-19 par. 7-9

Mwaminei, 29 sanza ya 10

Bókamata nguba monene ya kondima, oyo na yango, bokokoka koboma mɔtɔ ya mbanzi nyonso oyo ezali kopela ya moto mabe.​—Ef. 6:16.

‘Mbanzi oyo ezali kopela’ oyo Satana akoki kobwakela biso ezali nini? Akoki kosalela lokuta na ntina na Yehova. Satana alingi ete omona ete Yehova alingaka yo te mpe ete moto moko te akipaka yo. Ida, oyo azali na mbula 19, alobi: “Mbala mingi namiyokaka ete Yehova azali mosika na ngai mpe alingaka kozala moninga na ngai te.” Asalaka nini ntango amiyokaka ndenge wana? Abakisi: “Makita esalaka ete nabakisa kondima. Liboso nazalaki kopesa biyano te, mpe kokanisa ete moto moko te akolinga koyoka makambo nazali koloba. Sikoyo, nabongisaka makita malamu mpe nasalaka makasi napesa biyano mbala mibale to misato.” Nguba ya basoda nyonso ezalaka monene ndenge moko. Kasi ndenge ndakisa ya Ida emonisi yango, kondima ezalaka bongo te. Kondima na biso ekoki kobakisama to kokita, kokóma makasi to kolɛmba. Biso nde tosengeli kopona. (Mat. 14:31; 2 Tes. 1:3) Mpo ‘nguba ya kondima’ ebatela biso, tosengeli kokoba kokómisa yango monene mpe makasi! w18.05 29-30 par. 12-14

Mwamitano, 30 sanza ya 10

Nasala nini mpo nabika?​—Mis. 16:30.

Ezalaki kaka nsima ya koningana ya mabele nde mokɛngɛli ya bolɔkɔ abongolaki makanisi na ye mpe andimaki lisalisi. (Mis. 16:25-34) Ndenge moko mpe, bato mosusu oyo bandimaka nsango ya Biblia te bakoki kobongola makanisi na bango mpe koluka lisalisi ntango likambo moko ya mpasi ekómeli bango. Na ndakisa, bato mosusu bakoki koyoka mabe soki babungisi mosala na bango. Basusu bakoki koyoka mawa makasi mpo minganga bayebisi bango ete bazali na maladi moko ya makasi to mpo moto moko oyo bazalaki kolinga akufi. Mbala mosusu bato bamitunaka soki ntina ya bomoi ezali nini, likambo oyo bakanisaki te liboso. Bakoki komituna boye, ‘Nasala nini mpo nabika?’ Mpo na mbala ya liboso na bomoi na bango bakoki kokóma na mposa ya koyoka nsango na biso oyo epesaka elikya. Na yango, soki tokobi kosakola na bosembo, tokozala wana ntango bato bakosepela koyoka mpe kondima libɔndisi oyo tokopesa bango.​—Yis. 61:1. w18.05 19-20 par. 10-12

Mwapɔsɔ, 31 sanza ya 10

Elimo ya Yehova ezali na ngai, mpo atye ngai mafuta mpo [nasakola] . . . nsango malamu.​—Luka 4:18.

Lelo, Satana azipi bato ebele miso mpe bazali komona te ete bazali baombo ya mangomba ya lokuta, ya biloko ya mokili, mpe ya ebongiseli ya politiki. (2 Ko. 4:4) Ndenge moko na Yesu, tozali na lokumu ya kosalisa basusu báyeba mpe básambela Yehova, Nzambe oyo apesaka bonsomi. (Mat. 28:19, 20) Mosala ya kosakola ezali pɛtɛɛ te. Na bisika mosusu, bato basepelaka na makambo ya Nzambe te, mpe bato mosusu kutu basilikaka soki toyei koteya bango. Kasi, lokola Yehova atindi biso tósakola, tosengeli komituna boye: ‘Nasalela bonsomi na ngai mpo namipesa lisusu mingi na mosala ya Yehova?’ Ezali mpenza likambo ya kolendisa komona ete basaleli mingi ya Yehova bakangi ntina ete mokili oyo ekómi mpenza na nsuka, bakómisi bomoi na bango pɛpɛlɛ mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela. (1 Ko. 9:19, 23) Bandeko mosusu bazali babongisi-nzela na bamboka na bango; basusu bakendá kosala esika mposa ezali monene. Ezali esengo mpenza komona ete bato ebele bazali kosalela bomoi na bango mpo na kosalela Yehova na ndenge yango!​—Nz. 110:3. w18.04 11-12 par. 13-14

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto