Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • es22 nk. 26-36
  • Sanza ya 3

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sanza ya 3
  • Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2022
  • Mitó ya makambo mike
  • Mwamibale, 1 sanza ya 3
  • Mwamisato, 2 sanza ya 3
  • Mwaminei, 3 sanza ya 3
  • Mwamitano, 4 sanza ya 3
  • Mwapɔsɔ, 5 sanza ya 3
  • Mwalomingo, 6 sanza ya 3
  • Mwayambo, 7 sanza ya 3
  • Mwamibale, 8 sanza ya 3
  • Mwamisato, 9 sanza ya 3
  • Mwaminei, 10 sanza ya 3
  • Mwamitano, 11 sanza ya 3
  • Mwapɔsɔ, 12 sanza ya 3
  • Mwalomingo, 13 sanza ya 3
  • Mwayambo, 14 sanza ya 3
  • Mwamibale, 15 sanza ya 3
  • Mwamisato, 16 sanza ya 3
  • Mwaminei, 17 sanza ya 3
  • Mwamitano, 18 sanza ya 3
  • Mwapɔsɔ, 19 sanza ya 3
  • Mwalomingo, 20 sanza ya 3
  • Mwayambo, 21 sanza ya 3
  • Mwamibale, 22 sanza ya 3
  • Mwamisato, 23 sanza ya 3
  • Mwaminei, 24 sanza ya 3
  • Mwamitano, 25 sanza ya 3
  • Mwapɔsɔ, 26 sanza ya 3
  • Mwalomingo, 27 sanza ya 3
  • Mwayambo, 28 sanza ya 3
  • Mwamibale, 29 sanza ya 3
  • Mwamisato, 30 sanza ya 3
  • Mwaminei, 31 sanza ya 3
Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2022
es22 nk. 26-36

Sanza ya 3

Mwamibale, 1 sanza ya 3

Esengo na bino ntango bato bazali koyina bino.​—Luka 6:22.

Tosepelaka te ete bato báyina biso. Tosepelaka mpe te bato bányokola biso mpo na kondima na biso. Kasi, mpo na nini tokoki kosepela ntango bato bazali koyina biso? Tólobela bantina misato. Ya liboso, ntango tozali koyika mpiko, tosepelisaka motema ya Nzambe. (1 Pe. 4:13, 14) Ya mibale, kondima na biso ekómaka na motuya mpe ekómaka lisusu makasi koleka. (1 Pe. 1:7) Mpe ya misato, tokozwa mbano monene mpenza, elingi koloba bomoi ya seko. (Rom. 2:6, 7) Mwa moke nsima ya lisekwa ya Yesu, bantoma na ye bazwaki esengo oyo alobelaki. Nsima ya kobɛta bango fimbo mpe ya kopesa bango mitindo ete bátika kosakola, bantoma basepelaki. Mpo na nini? ‘Mpo batángamaki bato oyo babongi kosambwisama mpo na nkombo ya Yesu.’ (Mis. 5:40-42) Bolingo mpo na Nkolo na bango ezalaki makasi koleka kobanga oyo bazalaki na yango mpo na banguna na bango. Mpe bamonisaki bolingo na bango na ndenge basakolaki nsango malamu “kozanga kotika.” Lelo oyo, bandeko na biso mingi bazali kokoba kosalela Yehova na bosembo atako mikakatano. Bayebi ete Yehova akobosana te mosala mpe bolingo oyo bazali komonisa mpo na nkombo na ye. w21.03 25 par. 18-19

Mwamisato, 2 sanza ya 3

Likanisi ya kozala na bomoi ya seko, atye yango na motema na bango.​—Mos. 3:11.

Bakristo oyo batyami mafuta na elimo babotamaka te na elikya ya kokende na likoló. Nzambe nde atyaka elikya yango na mitema na bango. Bakanisaka elikya na bango, babondelaka mpo na yango, mpe bazalaka na mposa makasi ya kozwa mbano na bango na likoló. Bayebaka mpenza te ndenge nzoto na bango ekozala ntango bakokóma kuna na likoló. (Flp. 3:20, 21; 1 Yoa. 3:2) Atako bongo, bazelaka na mposa makasi ya kozwa bisika na bango na bokonzi ya likoló. Bampate mosusu bazwaka na motuya elikya oyo moto nyonso azalaka na yango, ya kozala na bomoi libela na libela awa na mabele. Bazelaka na mposa makasi mokolo oyo bakopesa mabɔkɔ mpo na kokómisa mabele mobimba paradiso. Bazelaka mpe na mposa makasi mokolo bakotonga bandako na bango moko, bakolona bilanga na bango moko, mpe bakobɔkɔla bana na bango oyo bakozala na nzoto ya kokoka. (Yis. 65:21-23) Lisusu, bazelaka na esengo kosala mibembo na mokili mobimba, kotala bangomba, bazamba, bibale minene, mpe koyekola ebele ya biloko oyo Yehova akelá. Oyo eleki nyonso, basepelaka koyeba ete boninga na bango ná Yehova ekokóma lisusu makasi koleka. w21.01 18-19 par. 17-18

Mwaminei, 3 sanza ya 3

Abandaki kotumba ndako ya Nzambe ya solo . . . mpe abebisaki eloko nyonso.​—2 Nt. 36:19.

Ntango bato ya Babilone basilisaki kobebisa mokili yango, bato bakokaki kaka koloba ete: “Etikali mpamba, moto azali te mpe nyama ya mboka azali te. Epesami na lobɔkɔ ya Bakaladea.” (Yir. 32:43) Mbula soki 200 nsima ya esakweli ya Yoele, Yehova asalelaki Yirimia mpo asakola likambo mosusu oyo etali koya ya limpinga yango. Alobaki ete bato oyo bayei etumba bakoluka malamumalamu Bayisraele oyo bamipesaki na makambo ya mabe mpe bakokanga bango nyonso. Yehova alobaki boye: “‘Talá nazali kotinda báluka baluki-mbisi ebele, . . . bongo bakoluka bango ndenge balukaka mbisi mpe bakokanga bango; mpe na nsima nakotinda báluka babomi-nyama ebele, bongo bakoluka bango ndenge balukaka nyama na ngomba nyonso mpe na ngomba nyonso ya moke mpe na madusu ya mabanga. . . . Nakopesa bango lifuti mobimba ya libunga na bango mpe ya lisumu na bango.’” Ezala bibale to zamba ekokoka te kobomba Bayisraele oyo baboyi kobongola motema mpo bato ya Babilone bázwa bango te.​—Yir. 16:16, 18. w20.04 5 par. 12-13

Mwamitano, 4 sanza ya 3

[Lota] azalaki koumela.​—Eba. 19:16.

Na eleko moko ya ntina mingi na bomoi na ye, Lota amonisaki mwa bopɔtu mpo na kotosa malako ya Yehova. Tokoki kokanisa ete Lota azalaki mafumafu, to kutu motó makasi. Kasi, Yehova asundolaki ye te. Kutu, “mpo na motema mawa oyo Yehova amoniselaki ye,” baanzelu basimbaki bango na mabɔkɔ mpe babimisaki bango na engumba. (Eba. 19:15, 16) Ekoki kozala na bantina mingi oyo etindaki Yehova amonisela Lota motema mawa. Mbala mosusu Lota azalaki kokakatana kobima nokinoki na ndako na ye mpo azalaki kobanga bato oyo bazalaki libándá ya engumba. Makama mosusu mpe ezalaki. Na ntembe te Lota ayebaki ete bakonzi mibale oyo bazalaki kokima bakweaki na mabulu ya gudrɔ na lobwaku moko oyo ezalaki mosika te. (Eba. 14:8-12) Lokola azalaki mpe na mwasi ná bana, na ntembe te amitungisaki mpo na bato ya libota na ye. Lisusu, lokola Lota azalaki na bozwi, mbala mosusu azalaki na ndako moko kitoko na Sodoma. (Eba. 13:5, 6) Ya solo, moko te na nyonso wana ezalaki ntina oyo ebongi mpo Lota aboya kotosa Yehova mbala moko. Kasi, Yehova atyaki mabunga ya Lota mopanzi mpe amonaki ye ete azali “moyengebene.”​—2 Pe. 2:7, 8. w20.04 18 par. 13-14

Mwapɔsɔ, 5 sanza ya 3

Ozali na etuluku na yo ya bilenge lokola matangá ya mamwɛ ya kotana ya ntɔngɔ.​—Nz. 110:3.

Elenge, ekoki kosɛnga ntango mpo bato oyo bayebaki yo lokola mwana moke bábanda komona yo ete okɔmeli. Kasi yebá ete, Yehova atalelaka yo te ndenge bato batalelaka yo. Ayebi lolenge ya moto oyo ozali, mpe makambo oyo ozali na likoki ya kosala. (1 Sa. 16:7) Na yango, kómisá makasi boyokani na yo elongo na Nzambe. Mpo na kosala bongo, Davidi azalaki kotala na likebi mpenza biloko oyo Yehova akelá. Azalaki kokanisa na monzindo na mateya oyo akoki kozwa na nzela ya biloko yango. (Nz. 8:3, 4; 139:14; Rom. 1:20) Likambo mosusu oyo okoki kosala, ezali ya kosɛnga Yehova apesa yo makasi oyo osengeli na yango. Na ndakisa, baninga na yo mosusu ya kelasi batyolaka yo mpo ozali Motatoli ya Yehova? Soki ezali bongo, bondelá Yehova mpo asalisa yo olonga mokakatano yango. Mpe saleláká batoli oyo ezali na Liloba ya Nzambe, na mikanda mpe na bavideo na biso. Mbala nyonso oyo omoni ndenge Yehova asalisi yo olonga mokakatano moko, okokóma lisusu kotyela ye motema mingi koleka. Oyo eleki ntina, ntango bato mosusu bakomona ete otyelaka Yehova motema, yango ekotinda bango mpe bákóma kotyela yo motema. w21.03 4 par. 7

Mwalomingo, 6 sanza ya 3

Libondeli ya bato ya kolongobana esepelisaka [Yehova].​—Mas. 15:8.

Baninga ya motema basololaka. Ezali mpe bongo mpo na boninga na biso na Nzambe. Yehova asololaka na biso na nzela ya Liloba na ye, oyo na kati na yango ayebisaka biso makanisi mpe mayoki na ye. Biso mpe tosololaka na ye na nzela ya libondeli. Ntango tobondelaka, toyebisaka ye makanisi na biso ya motema mpe ndenge oyo tomiyokaka mpenza. Lokola azali moninga na biso ya motema, asukaka kaka te na koyoka mabondeli na biso kasi ayanolaka mpe biso. Na bantango mosusu ayanolaka noki, kasi na bantango mosusu mpe ekoki kosɛnga tókoba kobondela mpo na likambo moko. Kasi ezala ndenge nini, tondimaka ete akoyanola biso na ntango oyo ebongi mpe na lolenge oyo eleki malamu. Ya solo, eyano oyo Nzambe akoki kopesa ekoki kokesana na oyo tokanisaki. Na ndakisa, na esika Nzambe alongola biso mokakatano moko, akoki nde kopesa biso bwanya mpe makasi “ya koyikela yango mpiko.” (1 Ko. 10:13) Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na botɔndi mpo na libondeli, likabo ya motuya mingi? Lolenge moko ya komonisa botɔndi ezali ya kotosa toli ya Biblia oyo esɛngi biso ‘tóbondelaka ntango nyonso.’​—1 Tes. 5:17. w20.05 27-28 par. 7-8

Mwayambo, 7 sanza ya 3

Moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye nde akobika.​—Mat. 24:13.

Bapoti-mbangu oyo bazali kosala momekano batalaka se liboso na nzela oyo bazali kolanda mpo bábɛta libaku te. Soki bakwei, batɛlɛmaka mpe bakobaka kopota mbangu. Batyaka makanisi libosoliboso na ndelo ya nsuka mpe na mbano oyo bazali na elikya ya kozwa, kasi te na makambo oyo ebɛtisi bango libaku. Na momekano ya kopota mbangu mpo na bomoi, tobɛtaka mabaku mbala mingi; tosalaka mabunga na maloba to na misala na biso. To mpe, bandeko oyo tozali kopota na bango mbangu mpo na bomoi bakoki kosala mabunga oyo esali biso mpasi. Yango esengeli kokamwisa biso te. Biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka, mpe tozali biso nyonso na nzela ya nkaka oyo ezali komema na bomoi. Na yango, ekoki kokóma ete “tótutana” na bandeko mpe kokóma na ‘likambo ná basusu.’ (Kol. 3:13) Kasi, na esika tótya makanisi na makambo oyo ebɛtisi biso libaku, tótya nde makanisi na mbano oyo ezali kozela biso mpe tókoba kopota mbangu. Soki tokómi nkandankanda mpe toboyi kotɛlɛma, tokokóma na ndelo ya nsuka te mpe tokozanga mbano. Lisusu, tokoki kokóma eloko oyo ezali kobɛtisa basusu libaku na nzela ya nkaka oyo ezali komema na bomoi, ndenge kaka mopoti-mbangu oyo akwei mpe atɛlɛmi te akoki kokanga basusu nzela. w20.04 26 par. 1; 28 par. 8-9

Mwamibale, 8 sanza ya 3

Bokonzi yango . . . ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso.​—Dan. 2:44.

Mosakoli Danyele alobeli kolandana ya baguvɛrnema oyo ezalaki na bopusi likoló ya basaleli ya Nzambe. Baguvɛrnema yango eyangelaki na bileko ekeseni mpe emonisami na biteni ndenge na ndenge ya ekeko moko monene. Makolo ya ekeko yango esalemi na ebende oyo esangani na mabele ya lima. Yango emonisi guvɛrnema ya nsuka, elingi koloba bokonzi ya Anglo-américain. Esakweli yango emonisi ete ntango Bokonzi ya Nzambe ekoya mpo na kotuta mpe kosukisa baguvɛrnema ya bato, ekokuta yango ezali koyangela. Ntoma Yoane mpe alobeli kolandana ya baguvɛrnema ya bato oyo eyangelaki bikólo oyo basaleli mingi ya Yehova bazalaki kofanda. Yoane amonaki nyama mabe moko ya mitó nsambo oyo ezalaki elilingi ya baguvɛrnema yango. Motó ya nsambo ya nyama yango emonisi bokonzi ya Anglo-américain. Ezali na ntina koyeba yango mpo ezali na motó mosusu te oyo ekobima na nsima. Motó yango ya nsambo ekokoba koyangela tii ntango Kristo mpe mampinga ya likoló bakobebisa yango elongo na nyama mabe.​—Em. 13:1, 2; 17:13, 14. w20.05 14 par. 11-12

Mwamisato, 9 sanza ya 3

Nzambe azali bolingo.​—1 Yoa. 4:8.

Toyebi ete Nzambe nde akelaki bomoi. Kasi, mwa maloba yango esalisi biso tómona ete bolingo mpe eutaka epai na ye. Yehova alingaka biso! Bolingo na ye, esalisaka biso tómiyoka ete tobatelami mpe epesaka biso esengo mpenza. Bakristo bakoki te kopona soki bakomonisa bolingo to te. Ezali nde mobeko. (Mat. 22:37-40) Soki toyebi Yehova malamu, ekozala mpasi te tótosa mobeko na ye ya liboso. Lokola Yehova azali Nzambe ya kokoka, atyelaka biso likebi mpe asalelaka biso makambo na boboto. Kasi ekoki kozala mpasi mpo tótosa mobeko na ye ya mibale. Mpo na nini? Mpo bandeko na biso ya lisangá, oyo bazali mpe bazalani na biso, bazali bato ya kozanga kokoka. Yango wana na bantango mosusu, bakoki koloba to mpe kosalela biso makambo na boboto te. Yehova ayebaki ete ekozala mpasi tótosa mobeko wana; yango wana asalelaki bato mosusu oyo bakomaki Biblia mpo báteya biso ntina oyo tosengeli komoniselana bolingo mpe ndenge ya kosala yango. Ntoma Yoane azalaki moko ya bato yango.​—1 Yoa. 3:11, 12. w21.01 8 par. 1-2

Mwaminei, 10 sanza ya 3

Satana alonga [bino] te.​—2 Ko. 2:11.

Ezala tobandi kosalela Yehova sika to tosalelaka ye bambula mingi, tosengeli komituna boye: ‘Nakimaka mitambo ya Satana oyo ekoki kokabola motema na ngai?’ Na ndakisa, okosala nini soki na televizyo to na Internet omoni bililingi oyo ekoki kolamwisa mposa ya nzoto? Okoki koloba ete elilingi yango to filme yango ezali mpenza pornografi te. Kasi ekoki kozala te milende oyo Satana azali kosalela mpo na kokabola motema na yo? Elilingi yango ekoki kozala lokola epasola oyo moto asaleli mpo na kopanza eteni ya nzete. Ntango azali kobɛtabɛta epasola makasi, eteni ya nzete yango ekopanzana. Bililingi wana ya mabe ezali lokola epasola. Kotala yango na ebandeli ekoki komonana lokola ezali na likama te, kasi ekoki kotinda moto asala lisumu oyo ekoki kokabola motema na ye mpe kobebisa bosembo na ye. Yango wana, boyá kokɔtisa eloko nyonso ya mbindo na kati ya motema na yo! Kobá kobatela motema na yo mobimba mpo na kobanga nkombo ya Nzambe, Yehova! w20.06 11-12 par. 14-15

Mwamitano, 11 sanza ya 3

Tosengeli komema bolɛmbu ya baoyo bazali makasi te.​—Rom. 15:1.

Tosengeli kokoba kosalisa mpe kolendisa bandeko oyo batiká kosakola mpe koyangana na makita. Ndenge moko na mwana oyo abungaki na ndakisa oyo Yesu apesaki, bandeko yango bakoki kozala na mawa oyo ekoki koumela. (Luka 15:17-24) Mpe lokola bazali na mokili ya Satana, ekoki kozala ete bazali lisusu na boyokani ya malamu te na Yehova. Tosengeli kosalisa bango bákóma lisusu na kondima makasi epai ya Yehova. Na ndakisa ya mpate oyo ebungaki, Yesu amonisi ndenge mobateli ya mpate amemi mpate na mapeka mpe azongisi yango na etonga. Mobateli ya mpate alekisaki ntango mingi mpe apesaki makasi na ye mpo na komona mpate oyo ebungaki. Kasi ayebi ete mpate yango ezali kaka na mposa ya lisalisi. Amemi yango mpo ezali na makasi te ya kotambola yango moko kino na etonga. (Luka 15:4, 5) Ekoki kosɛnga ntango mpe makasi mpo na tósalisa baoyo batiká koyangana na makita mpe kosakola bálonga makambo oyo ezali kopekisa bango kozongela Yehova. Kasi na nzela ya elimo ya Yehova, Liloba na ye, mpe mikanda oyo ebongiseli ya Yehova ezali kobimisa, tokoki kosalisa bango bázongisa lisusu boyokani ya malamu ná Yehova. Soki basɛngi yo oyekola Biblia ná ndeko moko oyo atiká kosakola mpe koyangana na makita, osengeli kosepela mpenza na libaku yango. w20.06 28 par. 14-15

Mwapɔsɔ, 12 sanza ya 3

Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.​—Yoa. 13:35.

Mokomoko na biso asengeli komonisa bolingo; elembo oyo emonisaka bakristo ya solo. Kasi, tosengeli mpe kokóma na “boyebi ya solosolo ná bososoli mingi mpenza.” (Flp. 1:9) Soki te, tokoki “komemama epai na epai na mopɛpɛ nyonso ya mateya na nzela ya bokosi ya bato,” ata mpe bapɛngwi. (Ef. 4:14) Ntango bayekoli mingi ya Yesu na siɛklɛ ya liboso batikaki kolanda ye, ntoma Petro amonisaki polele ete azalaki na kondima makasi ete Yesu azalaki na “maloba ya bomoi ya seko.” (Yoa. 6:67, 68) Atako na ntango wana Petro ayebaki te makambo nyonso ya maloba yango, atikalaki sembo mpo akangaki ntina ya mateya ya solo oyo etali Yesu. Yo mpe okoki kokómisa kondima na yo makasi na makambo oyo Biblia eteyaka. Soki osali bongo, kondima na yo ekozala kaka makasi ata soki okutani na mokakatano nini mpe okosalisa basusu bákóma na kondima makasi.​—2 Yoa. 1, 2. w20.07 8 par. 2; 13 par. 18

Mwalomingo, 13 sanza ya 3

Bana, tólingaka, na maloba te mpe na lolemo te, kasi na misala mpe na solo.​—1 Yoa. 3:18.

Mpo na kosalisa bandeko na biso bátikala na kati ya solo, tosengeli komonisa motema mawa. (1 Yoa. 3:10, 11, 16, 17) Tosengeli komoniselana bolingo, kaka te na ntango ya bisengo, kasi mpe na ntango ya mpasi. Na ndakisa, oyebi moto moko oyo ndeko to moninga na ye akufi mpe azali na mposa ya kobɔndisama to ya lisalisi na lolenge moko boye? To mpe oyoki ete bandeko na biso babungisi biloko na bango na likama moko boye mpe bazali na mposa bátongela bango lisusu Bandako na bango ya Bokonzi to bisika na bango ya kofanda? Tokomonisela bandeko na biso bolingo mpe motema mawa, kaka na maloba te kasi nde na misala. Tomekolaka Tata na biso ya bolingo oyo azali na likoló, ntango tomoniselanaka bolingo. (1 Yoa. 4:7, 8) Likambo ya ntina oyo tosengeli kosala mpo na komoniselana bolingo, ezali ya kolimbisana. Na ndakisa, moto moko akoki kopesa biso nkanda mpe na nsima asɛngi bolimbisi. Tokomonisa bolingo soki tolimbisi ye mpe tobosani likambo yango.​—Kol. 3:13. w20.07 24 par. 14-15

Mwayambo, 14 sanza ya 3

Lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.​—Mis. 24:15.

Ekosɛnga ete moto mokomoko oyo akosekwa azala na moto oyo akoteya ye kaka ndenge toyekolaka na bato Biblia lelo oyo? Bakotinda bato yango oyo bakosekwa na masangá mpo bázwa formasyo mpo na koteya baoyo bakosekwa nsima na bango? Tosengeli kozela mpo tómona. Kasi toyebi ete na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo, “mabele ekotonda na boyebi ya Yehova.” (Yis. 11:9) Tokozala mpenza na mosala mingi ya kosala oyo ekopesa biso esengo na boumeli ya mbula nkóto! Na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo, basaleli nyonso ya Yehova bakokoba kosala mbongwana mpo na kosepelisa ye. Na yango, bango nyonso bakomitya mpenza na esika ya baoyo bakosekwa wana bazali kosalisa bango básala mbongwana mpo na kolonga makanisi mpe bamposa ya mabe, mpe bázala na bomoi oyo eyokani na mitinda ya Yehova. (1 Pe. 3:8) Na ntembe te, baoyo bakosekwa, bakomona ete basaleli ya Yehova bazali na komikitisa mpe bazali kokoba kosala mbongwana mpo na kosepelisa ye. Mpe bato yango bakosepela kosalela Yehova elongo na basaleli na ye.​—Flp. 2:12. w20.08 16 par. 6-7

Mwamibale, 15 sanza ya 3

Moto na moto ameka mosala na ye moko ndenge ezali, . . . kasi mpo azali komikokanisa na moto mosusu te.​—Gal. 6:4.

Soki tosaleli toli ya ntoma Paulo mpe tomeki mosala na biso moko, tokobanda komona ete tozali na makoki oyo bamosusu bazali na yango te. Na ndakisa, nkulutu moko akoki kozala na makoki ya kosala diskur malamu te, kasi akoki kozala makasi na mosala ya kokómisa bato bayekoli. To ekoki kozala ete ayebi kobongisa makambo malamu te na lisangá lokola bankulutu mosusu, kasi mbala mosusu azali mobateli ya mpate moko ya boboto mpe ya bolingo, oyo bandeko basepelaka koluka toli epai na ye. To mpe ekoki kozala ete ayebani lokola moyambi-bapaya. (Ebr. 13:2, 16) Soki toyebi malamu makabo oyo tozali na yango, tokosepela mingi mpo na oyo tokoki kosala mpo na lisangá. Mpe ekozala mpasi tóyokela bandeko zuwa mpo bazali na makoki oyo biso tozali na yango te. Ata soki tosalaka likambo nini na kati ya lisangá, biso nyonso tosengeli kosala makasi tóbongisa lisusu mosala na biso mpe tókolisa makoki oyo tozali na yango. w20.08 24 par. 16-18

Mwamisato, 16 sanza ya 3

Namonaki . . . ebele mpenza ya bato, oyo ata moto moko te akokaki kotánga.​—Em. 7:9.

Ndeko Joseph Rutherford asalaki diskur oyo etiká nsango, oyo ezalaki na motó ya likambo “Ebele monene” na liyangani moko ya etúká oyo esalemaki na 1935 na engumba Washington, na États-Unis. Na diskur yango, ndeko Rutherford alimbolaki soki banani bazali “ebele monene” (Biblia haut fleuve), to “ebele mpenza ya bato,” oyo Emoniseli 7:9 elobeli. Tii na ntango wana, Bayekoli ya Biblia bazalaki kokanisa ete “ebele mpenza ya bato” ezali etuluku ya mibale ya bato oyo bakokende mpe na likoló, kasi bazalaki sembo mingi te lokola bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Ndeko Rutherford asalelaki Biblia mpo na komonisa ete “ebele mpenza ya bato” wana baponamaki te mpo na kokende na likoló, kasi bazali nde bampate mosusu ya Kristo oyo bakobika na “bolɔzi monene” mpe bakozala na bomoi ya seko awa na mabele. (Em. 7:14) Yesu apesaki elaka oyo: “Nazali na bampate mosusu, oyo ezali ya lopango oyo te; yango mpe nasengeli komema yango, mpe ekoyoka mongongo na ngai, mpe ekokóma etonga kaka moko, na mobateli kaka moko.” (Yoa. 10:16) “Bampate mosusu” yango ezali Batatoli ya Yehova oyo bazali sembo, oyo bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko na Paradiso awa na mabele.​—Mat. 25:31-33, 46. w21.01 14 par. 1-2

Mwaminei, 17 sanza ya 3

Bato nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai; kasi moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye wana nde akobika.​—Mat. 10:22.

Tosengeli komipesa disiplini mpo tóyika mpiko tii mosala na biso ekokóma na nsuka. (Mat. 28:19, 20) Tobotamaka te na ezaleli ya komipesa disiplini. Mbala mingi, tosepelaka kosala makambo oyo ezali pɛtɛɛ. Tosengeli koyekola komipekisa mpo na komipesa disiplini. Yango wana, tosengeli koluka lisalisi mpo tóyekola kosala makambo oyo ekoki kozala mpasi mpo na biso. Yehova apesaka biso lisalisi yango na nzela ya elimo santu na ye. (Gal. 5:22, 23) Ntoma Paulo ayebaki komipesa disiplini. Kasi alobaki ete asengelaki “kobɛtabɛta” nzoto na ye mpo na kosala oyo ezali malamu. (1 Ko. 9:25-27) Alendisaki bandeko bámipesaka disiplini, mpe básalaka makambo “na ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ.” (1 Ko. 14:40) Tosengeli komipesa disiplini mpo tókoba kosala makambo ya losambo na biso mpo na Yehova, na ndakisa, kosakola nsango malamu mbala na mbala.​—Mis. 2:46. w20.09 6-7 par. 15-17

Mwamitano, 18 sanza ya 3

Nsango malamu esengeli liboso kosakolama na bikólo nyonso.​—Mrk. 13:10.

Na bikólo mingi lelo oyo, tozali na bonsomi ya kosakola. Ofandaka na moko ya bikólo yango? Soki ezali bongo, omituna boye: ‘Ndenge nini nasalelaka bonsomi yango?’ Mikolo ya nsuka ezali ntango moko ya malamu mpo na basaleli ya Yehova, mpo bazali kosala mosala monene ya kosakola mpe ya koteya oyo esalemá naino te. Tozali na makambo mingi oyo tokoki kosala na mosala yango. Ndenge nini okoki kosalela malamu eleko ya kimya? (2 Tim. 4:2) Ekozala malamu soki otaleli makambo ya bomoi na yo mpo oyeba soki yo to moto moko ya libota na bino bokoki komipesa lisusu mingi na mosala ya kosakola, mbala mosusu mpe kosala ata mosala ya mobongisi-nzela. Sikoyo ezali te ntango ya konduka bozwi to biloko ya mokili; biloko yango ekobika ná biso te na ntango ya bolɔzi monene. (Mas. 11:4; Mat. 6:31-33; 1 Yoa. 2:15-17) Basakoli mingi bayekoli monɔkɔ mosusu mpo bákoka kosalela yango na mosala ya kosakola mpe ya koteya. Ebongiseli ya Yehova esalisaka bango na ndenge ezali kokoba kobimisa na minɔkɔ ebele bavideo mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ koleka 1 000! w20.09 16 par. 9-11

Mwapɔsɔ, 19 sanza ya 3

Okoba kobunda etumba ya malamu.​—1 Tim. 1:18.

Soda ya malamu azalaka sembo. Abundaka makasi mpo na kobatela moto oyo ye alingaka to eloko oyo azwaka na motuya. Paulo alendisaki Timote akolisa ezaleli ya kokangama na Nzambe, elingi koloba, atikala sembo epai ya Nzambe. (1 Tim. 4:7) Soki tolingi Nzambe mingi mpe tokangami na ye, yango ekosala ete tótika solo te. (1 Tim. 4:8-10; 6:6) Soda asengeli mpe komipesa disiplini mpo azala ntango nyonso pene mpo na kokende etumba. Timote abundisaki makanisi mabe ya Satana mpo alandaki toli oyo ntoma Paulo apesaki ye ete asala makasi mpo na kobundisa bamposa mabe, kokolisa bizaleli malamu, mpe kolekisaka ntango elongo na baninga na ye bakristo. (2 Tim. 2:22) Yango esɛngaki ete Timote amipesa disiplini. Biso mpe, tosengeli komipesa disiplini mpo tólonga kobundisa bamposa na biso ya kosala masumu. (Rom. 7:21-25) Longola yango, tosengeli komipesa disiplini mpo tólongola bomoto ya kala mpe tólata oyo ya sika. (Ef. 4:22, 24) Lisusu, nsima ya kolekisa mokolo mobimba na mosala, ekoki kosɛnga tómipesa disiplini mpo na kokende makita.​—Ebr. 10:24, 25. w20.09 28 par. 9-11

Mwalomingo, 20 sanza ya 3

Na motema na ngai nakani kosalela malako na yo mpo na ntango oyo etyami ndelo te, tii na nsuka. ​—Nz. 119:112.

Tosengeli komonisa motema molai ntango tozali kosalisa moyekoli ya Biblia mpo amipesa na Yehova mpe azwa batisimo. Kasi na bantango mosusu, tosengeli mpe koluka koyeba soki alingi kosalela Yehova Nzambe to te. Ezali na makambo oyo emonisi ete moyekoli yango azali kosala makasi atosa mitindo ya Yesu? To alingi kaka koyekola makambo ya kosepelisa oyo ezali na Biblia? Mbala na mbala, taleláká bokoli oyo moyekoli azali kosala. Na ndakisa, alingaka Yehova? Abondelaka Ye? (Nz. 116:1, 2) Asepelaka kotánga Biblia? (Nz. 119:97) Ayanganaka na makita nyonso ya lisangá? (Nz. 22:22) Asali mbongwana oyo esengeli na bomoi na ye mpo na komonisa ete azali kosalela makambo oyo azali koyekola? Abandá koyebisa bandeko mpe baninga na ye makambo oyo azali koyekola? (Nz. 9:1) Likambo eleki ntina, alingi mpenza kokóma Motatoli ya Yehova? (Nz. 40:8) Soki moyekoli azali kokola na elimo te ata na moko ya makambo oyo tolobeli awa, na mayele mpenza, luká koyeba ntina oyo azali kokola te, mpe na nsima sololá na ye polelepolele kasi na boboto mpenza. w20.10 18 par. 14-15

Mwayambo, 21 sanza ya 3

Moto oyo atindaki ngai azali elongo na ngai; atiki ngai ngai moko te, mpo nasalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka ye.​—Yoa. 8:29.

Yehova, Tata ya Yesu, azwaka ntango nyonso bikateli ya malamu. Baboti ya Yesu mpe awa na mabele bazwaki bikateli ya malamu. Nzokande, ntango Yesu akómaki mokóló asengelaki kozwa bikateli na ye moko. (Gal. 6:5) Ndenge moko na biso, azalaki na bonsomi ya kopona kosala oyo alingi. Akokaki kopona koluka matomba na ye moko. Kasi, aponaki nde kosala makambo oyo ekosalisa ye azala na boyokani malamu ná Yehova. Lokola Yesu ayebaki mokumba na ye na kati ya mokano ya Yehova, aponaki kosala oyo Yehova alingi. (Yoa. 6:38) Ayebaki ete bato mingi bakoyina ye, mpe na ntembe te, azwaki ntango ya kokanisa likambo yango malamumalamu mpenza. Atako bongo, aponaki komikitisa liboso ya Yehova. Ntango Yesu azwaki batisimo na mobu 29 ya ntango na biso, likambo ya ntina na bomoi na ye ezalaki ya kosala mokano ya Yehova. (Ebr. 10:5-7) Ata ntango Yesu azalaki konyokwama likoló ya nzete ya mpasi, azalaki kaka na ekateli makasi ya kosala mokano ya Tata na ye.​—Yoa. 19:30. w20.10 29 par. 12; 30 par. 15

Mwamibale, 22 sanza ya 3

Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.​—Ebr. 13:5.

Oyebi bandeko ya lisangá na bino oyo bazali konyokwama mpo na maladi to mpe bazali kokutana na mikakatano mosusu? To ntango mosusu, ndeko to moninga na bango moko akufi. Soki toyebi ndeko moko oyo azali kokelela, tokoki kosɛnga Yehova asalisa biso tóloba to tósalela ye makambo na boboto. Ntango mosusu, bandeko na biso bazalaka kaka na mposa ya maloba mpe misala na biso mpo bálendisama. (1 Pe. 4:10) Toyebi ete tokoki kozwa mpiko mpo Yehova azali na biso. Asalisaka biso na nzela ya Yesu mpe ya baanzelu. Lisusu, soki likambo moko eyokani na mokano na ye, Yehova akoki kosalisa biso na nzela ya bato oyo bazali na bokonzi. Mpe ndenge mokomoko na biso ayebi yango, Yehova asalelaka elimo santu na ye mpo na kotinda bandeko na biso ya lisangá básalisa biso. Yango wana, ndenge moko na ntoma Paulo, tozali mpenza na ntina ya koloba na mpiko ete: “Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te. Moto akoki kosala ngai nini?”​—Ebr. 13:6. w20.11 17 par. 19-20

Mwamisato, 23 sanza ya 3

Nguya na bino ekomonana mpenza soki bofandi nyɛɛ mpe botye motema.​—Yis. 30:15.

Bantoma bayebaki mpenza ete Yehova azalaki elongo na bango. Apesaki bango nguya ya kosala makamwisi. (Mis. 5:12-16; 6:8) Lelo oyo, Yehova apesi biso te nguya ya kosala makamwisi. Atako bongo, ayebisi biso na nzela ya Liloba na ye ete, ntango tozali konyokwama mpo na bosembo, tosepelisaka motema na ye mpe elimo santu na ye ezalaka elongo na biso. (1 Pe. 3:14; 4:14) Yango wana, tosengeli komitungisa te mpo na oyo tokosala soki banyokoli biso na mikolo ezali koya. Kasi tosengeli nde kosala nyonso oyo tokoki mpe kotya motema ete Yehova akoki kosalisa mpe kobikisa biso. Tosengeli kotya motema na elaka oyo Yesu apesaki ete: “Nakopesa bino monɔkɔ mpe bwanya oyo batɛmɛli na bino nyonso bakokoka te kotɛmɛla to kotyela ntembe.” Yesu alaki biso ete: “Na ezaleli na bino ya koyika mpiko bokobikisa milimo na bino.” (Luka 21:12-19) Mpe tóbosana te ete Yehova ayebi malamu mpenza ata makambo mikemike ya basaleli na ye ya sembo oyo bakufá, mpe yango ekosala ete asekwisa bango. w21.01 4 par. 12

Mwaminei, 24 sanza ya 3

Nazali na elikya epai ya Nzambe . . . ete lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.​—Mis. 24:15.

Ntoma Paulo azalaki moto ya liboso te oyo alobelaki lisekwa. Yobo mpe alobelaki yango. Azalaki na kondima ete Nzambe akokanisa ye mpe akozongisa ye na bomoi. (Yobo 14:7-10, 12-15) “Lisekwa ya bakufi” ezali na kati ya mateya ya “moboko,” to “mateya ya ebandeli,” oyo bakristo bandimaka. (Ebr. 6:1, 2) Lisolo ya Paulo oyo elobeli lisekwa ezali na 1 Bakorinti mokapo 15. Makambo oyo akomaki elendisaki mpenza bakristo ya ntango na ye. Ezala tobandá kondimela lisekwa kala to te, mokapo yango ekopesa biso makasi mpe ekolendisa mpenza kondima na biso ete lisekwa ekosalema mpenza. Lisekwa ya Yesu Kristo ezali kopesa biso elikya ete bandeko mpe baninga na biso oyo bakufá bakosekwa. Yango ezalaki na kati ya “nsango malamu” oyo Paulo ayebisaki bakristo ya Korinti. (1 Ko. 15:1, 2) Kutu alobaki ete, soki mokristo azali kondima lisekwa te, kondima na ye ezali mpamba.​—1 Ko. 15:17. w20.12 2 par. 2-4

Mwamitano, 25 sanza ya 3

Petro akanisaki liloba oyo Yesu alobaki . . . Mpe abimaki na libándá mpe alelaki na mawa makasi.​—Mat. 26:75.

Nini esalisaki ntoma Petro? Ya liboso, Yesu abondelaki na butu wana ete kondima ya Petro elɛmba te. Yehova apesaki eyano na libondeli wana, oyo Yesu asalaki na motema mobimba. Na nsima, Yesu abimelaki Petro; mbala mosusu mpo na kolendisa ye. (Luka 22:32; 24:33, 34; 1 Ko. 15:5) Lisusu, ntango bantoma bakendaki koluka mbisi butu mobimba kasi bazwaki eloko te, Yesu abimelaki bango. Na mbala oyo mpe, Yesu apesaki lisusu Petro libaku ya komonisa ete alingaka Yesu mingi. Yesu alimbisaki moninga na ye ya motema mpe apesaki ye mosala monene mpenza. (Yoa. 21:15-17) Ndenge oyo Yesu asalelaki Petro makambo emonisi ete azali na motema mawa kaka lokola Tata na ye. Yango wana, soki tosali mabunga, tosengeli kokanisa soki moke te ete Yehova akolimbisa biso te. Tóbosana te ete, Satana nde alingaka ete tókanisaka bongo. Kutu, tosengeli nde kokanisa na likebi ndenge Yehova alingaka biso, mpe ayebi esika makoki na biso esuki, mpe azalaka na mposa makasi ya kolimbisa biso. Yango wana, biso mpe tosengeli komekola ye ntango basusu basaleli biso makambo oyo epesi biso mpasi.​—Nz. 103:13, 14. w20.12 20-21 par. 17-19

Mwapɔsɔ, 26 sanza ya 3

Nakotya motema.​—Nz. 27:3.

Tokoki kozwa mateya na makambo oyo ekómelaki baoyo balongaki te kofanda nyɛɛ mpe kotyela Yehova motema. Koyekola bandakisa na bango ya mabe ekosalisa biso tósala te mabunga oyo basalaki. Na ndakisa, ntango Asa akómaki mokonzi, alukaki Yehova ntango akutanaki na mikakatano. Kasi na nsima, atyelaki Nzambe na ye motema te mpo asalisa ye. Alukaki nde kosilisa makambo yango na ndenge na ye moko. (2 Nt. 16:1-3, 12) Na ebandeli, tokoki komona lokola ete ndenge Asa asɛngaki ete bato ya Siri báya kosalisa ye mpo na kobunda na Yisraele ezalaki malamu. Kasi kimya yango eumelaki te. Yehova ayebisaki ye boye na nzela ya mosakoli moko: “Lokola otyeli mokonzi ya Siri motema mpe otyeli Yehova Nzambe na yo motema te, yango wana limpinga ya basoda ya mokonzi ya Siri ekimi, elongwe na lobɔkɔ na yo.” (2 Nt. 16:7) Tosengeli kokeba mpe kokanisa ata moke te ete tokoki kosilisa mikakatano na ndenge na biso moko, ata soki toluki litambwisi ya Yehova te na nzela ya Liloba na ye. Ata ntango tolingi kozwa ekateli moko nokinoki, tosengeli kofanda nyɛɛ, mpe kotyela Yehova motema na biso mobimba. Soki tosali bongo, akosalisa biso tózwa ekateli ya malamu. w21.01 6 par. 13-15

Mwalomingo, 27 sanza ya 3

Bakoyoka lisusu nzala te.​—Em. 7:16.

Lelo oyo, basaleli mosusu ya Yehova bazali konyokwama na nzala mpo bazali na mbongo mingi te ya kosomba biloko ya kolya oyo basengeli na yango, to mpo na mikakatano oyo ebimaka mpo na mobulu ya bana-mboka to bitumba. Bamosusu bazali kokɔta bolɔkɔ mpo na kondima na bango. Nzokande, ebele mpenza ya bato yango bazali na esengo mpo bayebi ete, nsima ya kobika ntango mokili oyo mabe ekobomama, bakozala ntango nyonso na biloko ebele ya kolya mpe Yehova akoteya bango makambo mingi. Ntango mokili mabe ya Satana ekobomama, Yehova akosala ete ebele mpenza ya bato yango bábatelama, mpo nkanda na ye oyo ezali lokola “molunge makasi,” oyo akosopela bikólo ezwa bango te. Na nsuka ya bolɔzi monene, Yesu akomema bato oyo bakobika awa na mabele na “mai ya bomoi” ya seko. (Em. 7:17) Kanisá naino: Ebele mpenza ya bato bazali na elikya moko kitoko mpenza. Na bamilio ya bato oyo bafandá awa na mabele, ebele mpenza ya bato bazali na likoki ya kokufa soki moke te! (Yoa. 11:26) Bampate mosusu bazali na elikya moko kitoko mpenza, yango wana bazali kopesa Yehova ná Yesu matɔndi mpo na yango! w21.01 16-17 par. 11-12

Mwayambo, 28 sanza ya 3

Nkolo azali sembo, mpe akopesa bino makasi mpe akobatela bino na moto mabe.​—2 Tes. 3:3.

Na butu ya nsuka oyo alekisaki awa na mabele, Yesu azalaki kokanisa mikakatano oyo bayekoli na ye basengelaki kokutana na yango. Lokola alingaki bayekoli na ye, Yesu asɛngaki Tata na ye ete ‘akɛngɛla bango mpo na moto mabe.’ (Yoa. 17:14, 15) Yesu ayebaki ete ntango akozonga na likoló, Satana akokoba kobundisa moto nyonso oyo alingi kosalela Yehova. Yango wana basaleli ya Yehova basengelaki kozala na mposa ya libateli. Lelo oyo, tozali mpenza na mposa ya libateli ya Yehova. Lokola babenganá Satana na likoló, yango wana azali na “nkanda makasi.” (Em. 12:12) Atindaka bato mosusu bákanisa ete soki bazali konyokola biso, ‘bazali kosalela Nzambe mosala mosantu.’ (Yoa. 16:2) Bato mosusu oyo bandimelaka Nzambe te banyokolaka biso mpo tokeseni na bato ya mokili oyo. Ata soki bato bazali konyokola biso ndenge nini, tobangaka te. Mpo na nini? Eyano ezali na mokapo ya mokolo ya lelo. w21.03 26 par. 1, 3

Mwamibale, 29 sanza ya 3

[Eloko moko te] ekokoka te kokabola biso na bolingo ya Nzambe oyo ezali na Kristo Yesu Nkolo na biso.​—Rom. 8:39.

Bolingo nde etindaka Yehova asala likambo boye to boye. Na bolingo nyonso, akokisaka bamposa na biso nyonso ya elimo. Bolingo nde etindaki ye apesa lisiko mpo na biso. Yesu mpe alingaka biso mingi. Yango wana, apesaki bomoi na ye mpo na biso. (Yoa. 3:16; 15:13) Eloko moko te ekoki kopekisa Yehova ná Yesu bátika kolinga baoyo bazali sembo epai na bango. (Yoa. 13:1; Rom. 8:35) Ndenge moko mpe, bolingo nde esengeli kotinda tata ya libota asalaka likambo boye to boye. Mpo na nini yango ezali na ntina? Ntoma Yoane ayanoli boye: “Moto oyo azali kolinga ndeko na ye te [to libota na ye] oyo ye amoni, akoki kolinga Nzambe te, oyo ye amoni te.” (1 Yoa. 4:11, 20) Na yango, mobali oyo alingaka libota na ye mpe oyo alingi komekola Yehova ná Yesu, akosalisa bato ya libota na ye bázala na boyokani ya malamu ná Yehova, akomonisa bango ete alingaka bango, mpe akokokisa bamposa na bango ya mosuni. (1 Tim. 5:8) Akoteya mpe akopesa bana na ye disiplini. Lisusu, akokoba kozwa bikateli oyo ekokumisa Yehova mpe oyo ekozala mpo na bolamu ya bato ya libota na ye. w21.02 5 par. 12-13

Mwamisato, 30 sanza ya 3

Bwakelá Yehova ye moko mokumba na yo ya kilo, mpe ye moko akosunga yo.​—Nz. 55:22.

Tata na biso ya bolingo ayebi ndenge oyo makanisi mabe mpe makambo mabe oyo tokutaná na yango kala ekoki kosala biso. Kasi amonaka mpe bizaleli na biso ya malamu ata soki tokanisi ete tozalaka na yango te. (1 Yoa. 3:19, 20) Moto oyo azali kobunda mpo na kolonga likambo moko ya mabe oyo epiká misisa na bomoi na ye, akoki kolɛmba nzoto soki akwei lisusu na likambo yango. Ya solo, ezali mabe te tómitungisa soki tosali lisumu. (2 Ko. 7:10) Kasi, tosengeli te komitungisa koleka ndelo mpe kokanisa ete: ‘tozali ata na ntina moko te mpe Yehova akolimbisa biso ata moke te.’ Makanisi mabe ya ndenge wana euti na mateya ya solo te, mpe yango ekoki kotinda biso tótika kosalela Yehova. Kasi, tosengeli nde kobondela Yehova mpo na ‘kobongisa makambo ya mabe’ oyo tosaleli ye mpe kosɛnga ye bolimbisi. (Yis. 1:18) Soki Yehova amoni ete obongoli mpenza motema, akolimbisa yo. Lisusu, yebisá bankulutu likambo yango. Na motema molai mpenza bakosalisa yo mpo ozongela boyokani malamu oyo ozalaki na yango na Yehova.​—Yak. 5:14, 15. w20.12 23 par. 5-6

Mwaminei, 31 sanza ya 3

[Zwá] basi oyo bazali mikóló lokola bamama, bilenge basi lokola bandeko basi.​—1 Tim. 5:2.

Yesu azalaki kopesa basi lokumu. Amekolaki te Bafarisai oyo bazalaki koloba ete mibali bazali na ntina mingi koleka basi, mpe oyo bazalaki te kosolola na basi na esika ya bato nyonso. Bafarisai bazalaki mpe te kosolola na basi makambo etali Makomami. Kasi, Yesu azalaki koteya makambo mozindo ya makomami ezala epai ya basi to mibali. (Luka 10:38, 39, 42) Andimaki mpe ete basi bákende elongo na ye na mosala ya kosakola. (Luka 8:1-3) Mpe Yesu apesaki basi lokumu ya kokende koyebisa na bantoma ete asekwisamaki uta na bakufi. (Yoa. 20:16-18) Ntoma Paulo ayebisaki Timote apesaka bandeko basi lokumu. Paulo ayebaki ete mama ya Timote mpe nkɔkɔ na ye nde bato ya liboso oyo bateyaki ye “makomi mosantu.” (2 Tim. 1:5; 3:14, 15) Na mokanda na ye epai ya Baroma, Paulo apesaki bandeko basi mbote na bankombo na bango. Alobelaki makambo bandeko basi yango basalaki, mpe amonisaki botɔndi mpo na makambo yango.​—Rom. 16:1-4, 6, 12; Flp. 4:3. w21.02 15 par. 5-6

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto