Sanza ya 4
Mwamitano, 1 sanza ya 4
Mpo makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo eteya biso.—Rom. 15:4.
Ozali kokutana na mokakatano moko ya mpasi mingi? Ekoki kozala ete ndeko moko ya lisangá asalaki likambo moko oyo epesaki yo mpasi. (Yak. 3:2) Mbala mosusu baninga na yo ya mosala to ya kelasi bazali kotyola yo mpo osalelaka Yehova. (1 Pe. 4:3, 4) To mpe bandeko na yo ya libota bazali koluka kopekisa yo koyangana na makita to koyebisa basusu mateya ya Biblia oyo ondimaka. (Mat. 10:35, 36) Soki mokakatano yango ezali ya makasi mpenza, mbala mosusu okoki kokanisa ete ekozala malamu otika kosalela Yehova. Kasi osengeli koyeba ete ata soki okutani na mokakatano nini, Yehova akopesa yo bwanya mpo okoka kolonga yango mpe makasi mpo oyikela yango mpiko. Na kati ya Liloba na ye Biblia, Yehova akomisá bandakisa oyo emonisi ndenge bato ya kozanga kokoka bayikelaki mikakatano mpiko. Mpo na nini? Mpo eteya biso. Yango nde likambo oyo Yehova atindaki ntoma Paulo akoma. Kotánga masolo yango ekoki kobɔndisa mpe kopesa biso elikya. Kasi mpo tózwela masolo yango matomba, tosengeli kosuka kaka te na kotánga yango. Tosengeli kotika Makomami ebongola lolenge na biso ya kokanisa mpe esimba mitema na biso. w21.03 14 par. 1-2
Mwapɔsɔ, 2 sanza ya 4
Bótala bilanga ndenge eteli mpo na bobuki mbuma.—Yoa. 4:35.
Omonaka ete bato oyo osakwalaka bazali lokola mbuma oyo bakoki kobuka mpo eteli? Soki otalelaka bango bongo, makambo misato ekomonisa yango. Ya liboso, okozongisa mosala ya kosakola nsima te. Eleko ya bobuki mbuma eumelaka te; ebongaka te kolekisa ngonga. Ya mibale, okozala na esengo ntango ozali komona ndenge bato bazali koyoka nsango malamu. Biblia elobi ete: “Bato basepelaka na ntango ya kobuka mbuma.” (Yis. 9:3) Mpe ya misato, okomona moto nyonso lokola moto oyo akoki kokóma moyekoli ya Yesu, mpe yango ekotinda yo oyebisa ye nsango malamu na ndenge ekosepelisa ye. Yesu azalaki kotyola bato ya Samaria te, atako mbala mosusu bayekoli na ye bazalaki kosala bongo. Kasi, amonaki ete bakoki kokóma bayekoli na ye. Biso mpe tosengeli komona bato ya teritware na biso lokola bato oyo bakoki kokóma bayekoli ya Kristo. Ntoma Paulo atikelá biso ndakisa moko ya malamu. Ayebaki mwa makambo oyo etali bindimeli ya bato oyo azalaki kosakwela, asosolaki makambo oyo esepelisaka bango, mpe amonaki ete bakoki kokóma bayekoli ya Yesu. w20.04 8-9 par. 3-4
Mwalomingo, 3 sanza ya 4
Nkunda mpe esika ya libebi ezali liboso ya Yehova. Ekozala boni mpo na mitema ya bana ya bato!—Mas. 15:11.
Na esika osambisa moto mpo na makambo oyo asalaka, salá makasi oyeba malamu ndenge oyo azali komiyoka. Moto kaka moko oyo ayebi biso malamumalamu ezali Yehova. Yango wana, sɛngá ye asalisa yo omonaka basusu ndenge ye amonaka bango mpo oyeba ndenge ya komonisela bango motema mawa. Tosengeli te kopona bandeko oyo tokomonisela motema mawa. Bango nyonso bakutanaka na mikakatano, oyo mingi ezali lokola ya Yona, Eliya, Agare, mpe Lota. Bandeko mosusu bazali kokutana na mikakatano oyo bango moko bamilukeli. Kasi, ezali malamu tóbosana te ete ekómelaka biso nyonso tómilukela makambo. Yango wana, ezali malamu ndenge Yehova asɛngi biso tóyokelanaka mawa. (1 Pe. 3:8) Ntango totosi Yehova, tozali kokómisa makasi bomoko ya kokamwa oyo tozali na yango na libota ya bandeko na mokili mobimba. Yango wana, na boyokani na biso na basusu, tózala na ekateli ya koyokaka bango, koyeba bango malamu, mpe komonis a motema mawa. w20.04 18-19 par. 15-17
Mwayambo, 4 sanza ya 4
Kristo mpe anyokwamaki mpo na bino, atikeli bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu.—1 Pe. 2:21.
Yesu atiká ndakisa malamu na likambo etali kotosa Yehova. Lolenge moko ya kotosa Yehova ezali ya kosala oyo tokoki mpo na kolanda matambe ya Yesu malamumalamu. (Yoa. 8:29) Mpo tókoba kotambola na kati ya solo, tosengeli komindimisa ete Yehova azali Nzambe ya solo, mpe ete makambo nyonso oyo alobaka na biso na Biblia Liloba na ye, ezali solo. Tosengeli mpe kondima ete Yesu azali Masiya oyo alakamaki. Lelo oyo bato mingi bandimaka te ete Yehova atyaki Yesu mafuta, mpo azala Mokonzi ya Bokonzi na ye. Yoane akebisaki ete ekozala na “bakosi mingi,” oyo bakopɛngwisa baoyo bandimaka solo oyo etali Yehova mpe Yesu na motema mobimba te. (2 Yoa. 7-11) Akomaki boye: “Nani azali moto ya lokuta soki ezali te moto oyo azali kowangana ete Yesu azali Kristo?” (1 Yoa. 2:22) Lolenge kaka moko oyo tosengeli kosala mpo tókosama te ezali ya koyekola Liloba ya Nzambe. Kaka soki tosali bongo nde tokoyeba Yehova ná Yesu. (Yoa. 17:3) Mpe kaka soki tosali bongo nde tokomindimisa ete tozali na kati ya solo. w20.07 21 par. 4-5
Mwamibale, 5 sanza ya 4
Bózwa mokano ya kotya te liboso ya ndeko eloko oyo ebɛtisaka libaku. —Rom. 14:13.
Lolenge moko oyo tokoki koboya kokóma ‘eloko oyo ezali kobɛtisa basusu libaku’ ezali ya komipimela makambo mosusu soki ebongi na esika ya kotingama kaka na oyo biso tolingi. (Rom. 14:19-21; 1 Ko. 8:9, 13) Na likambo yango ya ntina mingi, tokeseni na mopoti-mbangu na mimekano oyo bato basalaka, oyo asalaka nyonso mpo kaka ye nde azwa mbano. Balukaka libosoliboso matomba na bango. Na yango, bakoki kotindika baninga na nko mpo bango báleka liboso. Nzokande, na momekano ya kopota mbangu mpo na bomoi, towelanaka te. (Gal. 5:26; 6:4) Mokano na biso ezali ya kosalisa ebele ya bato bákóma na ndelo ya nsuka elongo na biso mpe bázwa mbano ya bomoi. Yango wana tosalaka makasi tósalela toli oyo ya Biblia ete ‘tótyaka likebi kaka na makambo na biso moko te, kasi tótyaka mpe likebi na makambo ya basusu.’ (Flp. 2:4) Na boboto na ye, Yehova alaki bato na ye ete soki bapoti mbangu tii na nsuka, akopesa bango mbano ya bomoi ya seko, ezala na likoló to na paradiso awa na mabele. w20.04 28 par. 10; 29 par. 12
Mwamisato, 6 sanza ya 4
Bango bazali bato oyo bauti na bolɔzi monene.—Em. 7:14.
Bamilio ya bakristo mosusu bakokɔta na mokili ya sika. Bato yango bakomona na miso bolongi mosusu likoló ya liwa ntango bamiliare ya bato oyo bakufá kala bakosekwa. Kanisá esengo tokozala na yango ntango likambo monene wana ekosalema! (Mis. 24:15) Mpe bato nyonso oyo bakomonisa mpenza ete bazali sembo epai ya Yehova, bakolonga ata liwa oyo tozwá epai ya Adama. Bakozala na likoki ya kozala na bomoi ya seko. Mokristo nyonso oyo azali na bomoi lelo asengeli kosepela na maloba ya kobɔndisa oyo ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Korinti na oyo etali lisekwa. Tosengeli mpenza kosala nyonso oyo esengeli mpo na kotosa toli ya ntoma Paulo, oyo elobi ete tósala nyonso oyo tokoki “na mosala ya Nkolo.” (1 Ko. 15:58) Soki tozali ntango nyonso kosala oyo esengeli na mosala yango, tokoki kozala na elikya ete tokozala na bomoi ya esengo na mikolo ezali koya. Bomoi yango ekozala malamu mpenza koleka bomoi nyonso oyo tokoki kokanisa. Yango ekomonisa mpenza ete mosala na biso na kati ya Nkolo ezalaki ya mpamba te. w20.12 13 par. 16-17
Mwaminei, 7 sanza ya 4
Mampinga na bango bayangani mpo na kobunda etumba na moto oyo afandi likoló ya mpunda mpe na limpinga na ye.—Em. 19:19.
Soki bisakweli oyo ezali na Ezekiele 38:10-23; Danyele 2:43-45; 11:44–12:1; mpe na Emoniseli 16:13-16, 21 ezali kolobela kaka likambo moko, tokoki kokanisa ete makambo ekosalema ndenge emonisami awa. Mwa moke nsima ya kobanda ya bolɔzi monene, “bakonzi ya mabele mobimba esika bato bafandi” bakosangana mpo na kosala etuluku moko. (Em. 16:13, 14) Biblia ebengi etuluku yango “Goge ya mokili ya Magoge.” (Ezk. 38:2) Etuluku yango ekobundisa basaleli ya Yehova mpe ekoluka kosilisa bango nyonso mpo na libela. Mpo na kolobela makambo oyo ekosalema na ntango yango, ntoma Yoane amonaki mbula ya mabanga minene ekiteli banguna ya Nzambe. Mbula ya mabanga yango ya elilingi ekoki kozala nsango ya etumbu oyo basaleli ya Yehova bakosakola, oyoekotinda Goge ya mokili ya Magoge eluka kobundisa basaleli ya Yehova na mokano ya kosilisa bango mpo na libela.—Em. 16:21. w20.05 15 par. 13-14
Mwamitano, 8 sanza ya 4
Soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi kopesa bana na bino makabo ya malamu, bongo Tata na likoló akopesa te baoyo bazali kosɛnga ye elimo santu koleka?—Luka 11:13.
Nguya ya Nzambe ezali likabo oyo tosengeli kozwa na motuya mingi. Tokoki komonisa botɔndi mingi mpo na likabo ya elimo santu soki tozali kokanisa na makambo oyo yango ezali kosala na mikolo na biso. Liboso ete Yesu amata na likoló, ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino, mpe bokozala batatoli na ngai . . . tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8) Na lisalisi ya elimo santu, bato koleka milio 8 bazali kosambela Yehova na mokili mobimba. Lisusu, tozali na esengo ya kofanda na paradiso na biso ya elimo, mpo elimo santu ezali kosalisa biso tókolisa bizaleli malamu lokola, bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, bolamu, kondima, motema pɛtɛɛ, mpe komipekisa; bizaleli yango nyonso esali “mbuma ya elimo.” (Gal. 5:22, 23) Ya solo, elimo santu ezali mpenza likabo moko ya motuya mingi! w20.05 28 par. 10; 29 par. 13
Mwapɔsɔ, 9 sanza ya 4
Lokola liwa eyei na nzela ya moto moko, lisekwa ya bakufi eyei mpe na nzela ya moto moko.—1 Ko. 15:21.
Ezali na bantina mingi oyo ekoki kotinda biso tóloba ete baoyo bakoyamba bato oyo bakosekwa, bakozala na likoki ya koyeba lisusu bandeko ya libota mpe baninga na bango. Na ndakisa, soki tokanisi ndenge oyo Yehova asekwisaki bato na ntango ya kala, tokoki koloba ete Yehova akosala ete baoyo bakosekwa bázala na likoki ya komona, ya koloba, mpe ya kokanisa kaka ndenge bazalaki na yango mwa moke liboso bákufa. Kobosana te ete Yesu akokanisaki liwa na mpɔngi, mpe lisekwa na kolamuka na mpɔngi. (Mat. 9:18, 24; Yoa. 11:11-13) Soki moto alamuki na mpɔngi, amonanaka mpe alobaka kaka ndenge azalaki kosala liboso alala. Tótalela ndakisa ya Lazare. Elekaki mikolo minei kobanda akufaki mpe nzoto na ye ebandaki kobeba. Kasi ntango Yesu asekwisaki Lazare, bandeko na ye ya basi bayebaki ye mbala moko mpe na ntembe te, Lazare mpe ayebaki bango.—Yoa. 11:38-44; 12:1, 2. w20.08 14 par. 3; 16 par. 8
Mwalomingo, 10 sanza ya 4
Lobiko na biso euti na Nzambe na biso, oyo afandi na kiti ya bokonzi, mpe na Mwana-Mpate.—Em. 7:10.
Na makambo mingi, bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bampate mosusu bazali kaka ndenge moko. Bango nyonso bazali na motuya ndenge moko na miso ya Yehova. Toyebi yango mpo asombaki bango nyonso kaka na ntalo moko: bomoi ya Mwana na ye ya bolingo. Bakeseni kaka mpo bituluku yango nyonso mibale bazali na elikya ndenge moko te. Kasi bango nyonso basengeli kotikala sembo epai ya Nzambe mpe epai ya Kristo. (Nz. 31:23) Mpe kobosana te, elimo ya Nzambe ekoki kosala ndenge moko epai ya moto nyonso, ezala atyami mafuta na elimo to te. Yehova apesaka elimo na ye na kotalela bamposa ya moto na moto. Yehova apesá basaleli na ye nyonso oyo bamipesá na ye, elikya moko kitoko mpenza mpo na mikolo ezali koya. (Yir. 29:11) Ekaniseli ya liwa ya Kristo epesaka biso nyonso libaku moko ya malamu mpenza ya kokumisa Nzambe mpe Kristo mpo na oyo basalelá biso mpo tókoka kosepela na bomoi oyo ezangá nsuka. Mbula na mbula, Ekaniseli ezalaka likita oyo eleki ntina mpo na bakristo nyonso ya solo. w21.01 18 par. 16; 19 par. 19
Mwayambo, 11 sanza ya 4
Bókoba kosalaka boye.—1 Ko. 11:25.
Bato mingi oyo bayanganaka na Ekaniseli bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabele. Kasi, mpo na nini bayanganaka na Bilei ya mpokwa ya Nkolo? Basalaka yango kaka ndenge bato bakendaka na fɛti ya libala ya moninga moko. Bakendaka na fɛti ya libala mpo na komonisa ete balingi mwasi ná mobali oyo babalani mpe balingi kopesa bango mabɔkɔ. Ndenge moko mpe, bampate mosusu bayaka na Ekaniseli mpo na komonisa ete balingaka Yesu ná bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe balingi kopesa bango mabɔkɔ. Bampate mosusu bayanganaka mpe na Ekaniseli mpo na komonisa ete bazali na botɔndi mpo na mbeka oyo Yesu apesaki; mbeka oyo epesi bango likoki ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele. Bampate mosusu bayanganaka mpe na Ekaniseli mpo na kotosa mitindo oyo Yesu apesaki. Ntango Yesu abandisaki molulu ya Ekaniseli, ayebisaki bantoma na ye ya sembo ete: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” (1 Ko. 11:23-26) Na yango, bampate mosusu bakokoba koyangana na Ekaniseli ntango nyonso oyo bakristo mosusu oyo batyami mafuta na elimo bakozala awa na mabele. w21.01 17-18 par. 13-14
Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 9 Nisana na moi) Yoane 12:12-19; Marko 11:1-11
Mwamibale, 12 sanza ya 4
Na likambo oyo nde bolingo ya Nzambe emonisamaki polele mpo na biso, mpamba te Nzambe atindaki na mokili Mwana na ye se moko oyo abotamaki mpo biso tókoka kozwa bomoi na nzela na ye.—1 Yoa. 4:9.
Bolingo ya solosolo esukaka kaka na maloba te; emonanaka mpe na misala. (Talá mpe Yakobo 2:17, 26.) Na ndakisa, Yehova alingaka biso. (1 Yoa. 4:19) Amonisi bolingo yango na maloba ya kitoko oyo akomisá na Biblia. (Nz. 25:10; Rom. 8:38, 39) Nzokande, toyebi ete Nzambe alingaka biso, kaka na maloba te, kasi mpe na makambo oyo asalaka. Yehova atikaki ete Mwana na ye ya bolingo anyokwama mpe akufa mpo na biso. (Yoa. 3:16) Na yango, ezali polele ete Yehova alingaka biso. Tokomonisa ete tolingaka Yehova ná Yesu soki tozali kotosa bango. (Yoa. 14:15; 1 Yoa. 5:3) Kutu Yesu apesaki biso mitindo ete tólinganaka. (Yoa. 13:34, 35) Tosengeli komonisa ete tolingaka bandeko na biso kaka na maloba te, kasi mpe na makambo oyo tosalelaka bango.—1 Yoa. 3:18. w21.01 9 par. 6; 10 par. 8
Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 10 Nisana na moi) Yoane 12:20-50
Mwamisato, 13 sanza ya 4
Nabengi bino baninga.—Yoa. 15:15.
Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali na elikya ya kozala elongo na Yesu libela na libela, mpe bakoyangela elongo na ye na Bokonzi ya Nzambe. Bakozala mpenza elongo na Yesu: bakomona ye, bakosolola na ye, mpe bakolekisa ntango elongo na ye. (Yoa. 14:2, 3) Baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele mpe bakomona ete Yesu alingaka bango mpe atyelaka bango likebi. Atako bakomona Yesu te, boninga na bango ná ye ekokóma lisusu makasi ntango bakosepela na bomoi ya malamu oyo Yehova ná Yesu bakosalisa bango bázwa. (Yis. 9:6, 7) Ntango tondimi libyangi ya Yesu ya kokóma baninga na ye, tokozwa mapamboli ebele. Na ndakisa, tomonaka ndenge alingaka biso mpe asalisaka biso banda sikoyo. Tozali na elikya ya kozala na bomoi libela na libela. Mpe oyo eleki ntina, boninga na biso ná Yesu ekosalisa biso tózwa eloko oyo eleki nyonso, boninga ya makasi mpe ya penepene ná Yehova, Tata ya Yesu. Ezali mpenza lokumu monene kobengama baninga ya Yesu! w20.04 25 par. 15-16
Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 11 Nisana na moi) Luka 21:1-36
Mwaminei, 14 sanza ya 4
Bakozongisama na bomoi na kati ya Kristo.—1 Ko. 15:22.
Ntoma Paulo akomaki mokanda na ye epai ya bakristo ya Korinti oyo batyamaki mafuta na elimo, mpe oyo basengelaki kosekwa mpo na kozala na bomoi na likoló. Bakristo yango ‘basantisamaki na bomoko elongo na Kristo Yesu, oyo babengamaki mpo na kozala basantu.’ Paulo alobelaki mpe “baoyo balalá na kati ya liwa na bomoko elongo na Kristo.” (1 Ko. 1:2; 15:18; 2 Ko. 5:17) Na mokanda mosusu oyo ntoma Paulo akomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, akomaki ete ‘baoyo basangani na Yesu ntango bakufi liwa lokola oyo ya ye, bakosangana mpe na ye ntango bakosekwa na lisekwa lokola oyo ya ye.’ (Rom. 6:3-5) Yesu asekwisamaki na nzoto ya elimo mpe azongaki na likoló. Yango nde makambo oyo ekokómela baoyo nyonso bazali na “bomoko elongo na Kristo,” elingi koloba, bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo. Ntoma Paulo akomaki ete Kristo asekwaki mpo na kozala “mbuma ya liboso ya baoyo balali na kati ya liwa.” (1 Ko. 15:20) Yesu azalaki moto ya liboso mpenza oyo akufaki mpe asekwisamaki na nzoto ya elimo mpo na kozwa bomoi ya seko. w20.12 5-6 par. 15-16
Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 12 Nisana na moi) Matai 26:1-5, 14-16; Luka 22:1-6
DATI YA EKANISELI
Soki moi elali
Mwamitano, 15 sanza ya 4
Tokozala ntango nyonso elongo na Nkolo.—1 Tes. 4:17.
Bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali kokufa lelo oyo, bazali kosekwa mbala moko mpo na kokende na likoló. Ntoma Paulo andimisi likambo yango na maloba oyo ekomami na 1 Bakorinti 15:51, 52. Ntango bandeko yango ya Kristo basekwaka, bazalaka na esengo monene. Biblia eyebisi biso makambo bakristo yango, oyo bakobongwana na “kobɛta ya liso,” bakosala kuna na likoló. Yesu alobi na bango boye: “Moto oyo alongi mpe abateli misala na ngai tii na nsuka, nakopesa ye bokonzi likoló ya bikólo, mpe akokamba bato na lingenda ya ebende, bongo bakopanzana lokola bambɛki ya mabele, ndenge ngai mpe nazwaki bokonzi epai ya Tata na ngai.”—Em. 2:26, 27. w20.12 12 par. 14-15
Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 13 Nisana na moi) Matai 26:17-19; Marko 14:12-16; Luka 22:7-13 (Makambo oyo esalemaki mwa 14 Nisana nsima ya kolala ya moi) Yoane 13:1-5; 14:1-3
Mwapɔsɔ, 16 sanza ya 4
Kristo alamuki uta na bakufi.—1 Ko. 15:20.
Lokola ntoma Paulo abengi Yesu “mbuma ya liboso,” yango emonisi ete ezali mpe na bato mosusu oyo bakokufa kasi bakosekwa mpo na kozala na bomoi na likoló. Ndenge moko na Yesu, bantoma ná bato mosusu oyo bazali na “bomoko elongo na Kristo.” (1 Ko. 15:18) Basengeli mpe kosekwa na ntango oyo ebongi mpo na kozala na bomoi na likoló. Ntango ntoma Paulo akomelaki Bakorinti ete baoyo bazali “na bomoko elongo na Kristo” bakosekwa mpo na kokende na likoló, lisekwa yango ebandaki naino te. Kasi, amonisaki ete ekosalema na mikolo ezali koya. Alobaki ete: “Moto na moto na ngala na ye: Kristo mbuma ya liboso, na nsima baoyo bazali bato ya Kristo na ntango ya kozala na ye.” (1 Ko. 15:23; 1 Tes. 4:15, 16) Lelo oyo, tozali na ntango yango ya “kozala” ya Kristo oyo esakolamaki. Ya solo, bantoma ná bakristo mosusu oyo batyamaki mafuta na elimo oyo bakufá, basengelaki kozela eleko yango ya kozala ya Kristo mpo na kozwa mbano na bango na likoló mpe ‘kosangana na Yesu ntango bakosekwa na lisekwa lokola oyo ya ye.’—Rom. 6:5. w20.12 5 par. 12; 6 par. 16-17
Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 14 Nisana na moi) Yoane 19:1-42
Mwalomingo, 17 sanza ya 4
Elonami na kati ya kopɔla, elamwisami na kozanga kopɔla.—1 Ko. 15:42.
Ntoma Paulo azalaki kolobela moto oyo asekwi na nzoto oyo ekoki kofanda na likoló, elingi koloba, “nzoto ya elimo.” (1 Ko. 15:43, 44) Ntango Yesu azalaki awa na mabele, azalaki na nzoto ya mosuni. Kasi ntango asekwaki, “akómaki elimo oyo apesaka bomoi” mpe azongaki na likoló. Ndenge moko mpe, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakosekwa na nzoto ya elimo. Ntoma Paulo amonisi yango na maloba oyo: “Kaka ndenge tolatá elilingi ya moto oyo asalemaki na putulu, tokolata mpe elilingi ya moto yango ya likoló.” (1 Ko. 15:45-49) Tósimba ete Yesu asekwaki na nzoto ya mosuni te. Ntoma Paulo amonisaki likambo yango polele ntango alobaki ete: “Mosuni ná makila ekoki kozwa libula ya Bokonzi ya Nzambe te” na likoló. (1 Ko. 15:50) Bantoma mpe bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakoki te kosekwa mpo na kokende na likoló na nzoto ya mosuni mpe ya makila, oyo ekoki kopɔla. w20.12 10-11 par. 10-12
Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 15 Nisana na moi) Matai 27:62-66 (Makambo oyo esalemaki mwa 16 Nisana nsima ya kolala ya moi) Yoane 20:1
Mwayambo, 18 sanza ya 4
Liwa, wapi bolongi na yo? Liwa, wapi etubeli na yo?—1 Ko. 15:55.
Na siɛklɛ ya liboso, Nzambe asalelaki elimo na ye mpo na kotinda bayekoli mosusu ya Yesu mpo bákoma makambo etali lisekwa mpo na kozala na bomoi na likoló. Ntoma Yoane alobi boye: “Sikoyo tozali bana ya Nzambe, kasi ndenge tokozala emonisami naino polele te. Toyebi ete ntango ye akomonisama biso mpe tokozala lokola ye.” (1 Yoa. 3:2) Na yango, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bayebi te ndenge bakozala ntango bakosekwisama mpo na kozala na bomoi na likoló na nzoto ya elimo. Kasi, bakomona mpenza Yehova ndenge azalaka ntango bakozwa mbano na bango. Biblia elobeli mwa makambo mosusu oyo etali lisekwa yango. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakozala elongo na Kristo ntango akokómisa “mpamba baguvɛrnema nyonso mpe bokonzi nyonso mpe nguya,” ezala mpe “liwa, monguna ya nsuka.” Na nsuka, Yesu elongo na baoyo bakoyangela na ye bakomitya na nse Yehova, mpe bakotya biloko nyonso na nse na ye. (1 Ko. 15:24-28) Ekozala ntango moko ya esengo mpenza! w20.12 8 par. 2
Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 16 Nisana na moi) Yoane 20:2-18
Mwamibale, 19 sanza ya 4
Nazali na elikya . . . ete lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.—Mis. 24:15.
Bakristo nyonso ya sembo oyo bazali na elikya te ya kokende na likoló mpo na kozala elongo na Kristo mpe bazali na elikya ya lisekwa. Biblia elobi ete ntoma Paulo ná bakristo mosusu oyo bakokende na likoló bakosekwa na “lisekwa ya liboso uta na bakufi.” (Flp. 3:11) Yango emonisi ete, longola lisekwa ya liboso, ezali mpe na lisekwa mosusu. Yango eyokani na oyo Yobo alobaki mpo na bomoi na ye na mikolo ezali koya. (Yobo 14:15) “Baoyo bazali bato ya Kristo na ntango ya kozala na ye” bakozala na likoló elongo na Yesu ntango akobebisa baguvɛrnema nyonso, makonzi nyonso, mpe nguya nyonso. Ata “liwa, monguna ya nsuka,” akosilisama makasi. Baoyo nyonso bakosekwa mpo na kozala na bomoi na likoló bakokufa lisusu te. (1 Ko. 15:23-26) Baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabele bakoki kotya elikya na maloba ya ntoma Paulo oyo ezali na mokapo ya lelo. Ezali polele ete, moto moko te oyo azangi boyengebene akoki kokɔta na likoló. Na yango, maloba wana emonisi ete lisekwa mosusu ekosalema na mikolo ezali koya awa na mabele. w20.12 6-7 par. 18-19
Mwamisato, 20 sanza ya 4
[Kristo] alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.—Gal. 2:20.
Tokoki komituna boye, ‘Ndenge nini nakoki koyeba soki Yehova alimbisá ngai mpenza?’ Soki omituni bongo, yango emonisi ete Yehova akoki kolimbisa yo. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko ya kala elobaki boye: “Ekoki kosalema ete tósala libunga moko mbala na mbala. Ekoki mpe kozala ete tozali kokoka te kolonga bolɛmbu moko oyo tozalaki na yango liboso kutu tóbanda kosalela Nzambe. . . . Kokanisa te ete osalá lisumu oyo Yehova akoki kolimbisa te. Satana alingi ete okanisaka ndenge wana. Lokola ozali koyoka mawa mpe komitungisa mingi ndenge wana, yango emonisi ete ozali te moto mabe oyo Yehova akoki kolimbisa te. Kobá komikitisa mpe kobondela Nzambe mpo alimbisa yo, asalisa yo okóma lisusu na lisosoli ya pɛto, mpe asalisa yo otika kosala lisumu yango.” Liboso akóma mokristo, ntoma Paulo asalaki makambo mingi ya mabe. Paulo abosanaki te makambo oyo asalá. (1 Tim. 1:12-15) Kasi azalaki komona ete lisiko ezali mpenza likabo oyo Nzambe apesá ye. Yango wana, akobaki komipesa foti te koleka ndelo, kasi atyaki nde makanisi na ye nyonso na ndenge oyo akoki kosalela Yehova malamu koleka. w20.11 27 par. 14; 29 par. 17
Mwaminei, 21 sanza ya 4
Soki moko na bino azangi bwanya, akoba kosɛnga Nzambe, mpo ye apesaka bato nyonso na motema mobimba mpe apamelaka te; mpe akopesa ye yango.—Yak. 1:5.
Satana asalelaka makambo mingisu mpo na komeka biso. Tokosala nini? Ekoki kozala pɛtɛɛ tókanisa ete makambo yango ezali mpenza mabe te. Na ndakisa, tokoki kokanisa boye: ‘Ata soki nasali makambo yango, nakolongolama na lisangá te, mpo makambo yango ezali mpenza mabe te.’ Makanisi ya bongo ezali mpenza libunga. Ekozala malamu tómituna boye: ‘Satana azali te kosalela komekama oyo mpo na kokabola motema na ngai? Soki nakokisi bamposa wana ya mabe, ekomema nsɔni na nkombo ya Nzambe? Likambo yango ekosala ete napusana penepene ya Nzambe na ngai to ekokómisa ngai nde mosika na ye? Manyolá na mituna yango, bondelá mpo na kosɛnga bwanya mpo oyanola na bosembo nyonso na mituna wana. Kosala bongo ekozala libateli ya solosolo. Yango ekoki kosalisa yo otɛmɛla komekama na mpiko nyonso, kaka ndenge Yesu asalaki ntango alobaki: “Longwá, Satana!” (Mat. 4:10) Kobosana te, ezali malamu te ete motema na biso ekabwana. w20.06 12-13 par. 16-17
Mwamitano, 22 sanza ya 4
Nazali koyebisa moto nyonso na kati na bino ete akanisa te ete azali koleka ndenge oyo ye azali mpenza; kasi akanisa nde na ndenge oyo ezali komonisa ete azali na makanisi malamu.—Rom. 12:3.
Totosaka mibeko ya Yehova na komikitisa nyonso, mpo toyebi ete Yehova ayebaka ntango nyonso oyo eleki malamu mpo na biso. (Ef. 4:22-24) Komikitisa etindaka biso tótya mokano ya Yehova na esika ya liboso mpe tótalela basusu ete baleki biso. Yango esalaka ete tózala na boyokani ya malamu ná Yehova mpe bandeko ya lisangá. (Flp. 2:3) Kasi soki tokebi te, tokoki komekola bato ya mokili, oyo bazalaka na lolendo mpe bakipaka basusu te. Emonani ete likambo yango ekómelaki mpe bakristo mosusu na siɛklɛ ya liboso, mpo ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Roma boye: “Nazali koyebisa moto nyonso na kati na bino ete akanisa te ete azali koleka ndenge oyo ye azali mpenza; kasi akanisa nde na ndenge oyo ezali komonisa ete azali na makanisi malamu.” Paulo ayebaki ete tosengeli kopesaka nzoto na biso kilo. Kasi komikitisa ekosalisa biso tómitalelaka na bokatikati mpe ekosalisa biso tóboya kozala na lolendo. w20.07 2 par. 1-2
Mwapɔsɔ, 23 sanza ya 4
Mokili ekómaki na kimya; mpe etumba ata moko te ebimelaki ye.—2 Nt. 14:6.
Na mikolo ya Mokonzi Asa, eleko ya kimya ekómaki na nsuka na yango. Limpinga moko monene ya basoda koleka milio moko oyo eutaki na Etiopi eyelaki bango. Zera, oyo azalaki kotambwisa limpinga yango, akanisaki ete ye ná basoda na ye bakokweisa Yuda. Kasi, Asa atyaki nde motema epai ya Yehova Nzambe na ye, kasi te na motángo ya basoda oyo azalaki na yango. Abondelaki boye: “Salisá biso, Ee Yehova, Nzambe na biso, mpo totyeli yo motema, mpe toyei kobunda na ebele ya bato oyo na nkombo na yo.” (2 Nt. 14:11) Atako motángo ya basoda ya Etiopi ezalaki soki mbala mibale koleka oyo ya ye, Asa ayebaki ete Yehova azali na nguya mpe na likoki ya kosalisa bato na ye. Mpe Yehova ayokisaki ye nsɔni te. Asa ná basoda na ye, balongaki limpinga ya bato ya Etiopi. (2 Nt. 14:8-13) Ata soki toyebi na bosikisiki te makambo nini ekokómela mokomoko na biso na mikolo ezali koya, kasi toyebi ete eleko ya kimya oyo biso basaleli ya Nzambe tozali na yango ekoumela libela te. Kutu, Yesu asakolaki ete na mikolo ya nsuka ‘bikólo nyonso bakoyina bayekoli na ye.’—Mat. 24:9. w20.09 17-18 par. 14-16
Mwalomingo, 24 sanza ya 4
Nazali kosepela . . . na mafinga.—2 Ko. 12:10.
Moko te kati na biso alingaka ete báfinga ye. Kasi soki banguna bazali kofinga biso, mpe tozali komitungisa mpo na makambo oyo bazali koloba, tokoki kolɛmba nzoto. (Mas. 24:10) Kasi, ndenge nini tosengeli kotalela mafinga yango? Lokola ntoma Paulo, tokoki “kosepela . . . na mafinga.” Mpo na nini? Mpo soki bato bazali kofinga mpe kotɛmɛla biso, yango emonisaka ete tozali bayekoli ya solo ya Yesu. (1 Pe. 4:14) Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakokutana na minyoko. (Yoa. 15:18-20) Yango nde ekómelaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso. Na ntango wana, bato oyo bazalaki kolanda mimeseno ya Bagrɛki, bazalaki komona bakristo lokola bato oyo bazangá mayele mpe bato ya bolɛmbu. Mpe Bayuda bazalaki kotalela bakristo, na ndakisa ntoma Petro mpe Yoane, lokola “bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba.” (Mis. 4:13) Bato mingi bazalaki kokanisa ete bakristo bazali bato ya bolɛmbu mpe bazangá libateli. Lokola bazalaki komikɔtisa te na makambo ya politiki, yango wana bazalaki na bopusi te na guvɛrnema. Bazalaki mpe kokɔta na mosala ya soda te, yango wana bazalaki te na makasi ya kobunda to ya komibatela. Bakristo wana batikaki makambo yango elɛmbisa bango? Te. w20.07 14-15 par. 3-4
Mwayambo, 25 sanza ya 4
Tókoba kolingana, mpo bolingo euti na Nzambe, mpe moto nyonso oyo alingaka abotami na Nzambe mpe azwi boyebi ya Nzambe.—1 Yoa. 4:7.
Ntoma Yoane azalaki kolinga bandeko mingi mpe mposa na ye ezalaki ete bázala na kondima makasi. Bolingo na ye mpe ndenge oyo azalaki komitungisa mpo na bango, emonisami polele na mikanda misato oyo akomelaki bango. Koyeba ete basi mpe mibali oyo bakoyangela ná Yesu bamonisaka mpe bizaleli malamu oyo Yoane azalaki na yango, elendisaka mpenza! (1 Yoa. 2:27) Tosengeli kozwa na motuya toli oyo apesaki. Tózwa ekateli ya kotambola na kati ya solo, mpe ya kotosa Yehova na makambo nyonso ya bomoi na biso. Yekoláká Liloba na ye mpe tyeláká yango motema. Kómisá kondima na yo makasi epai ya Yesu. Boyá mateya ya filozofi ya bato mpe ya bapɛngwi. Boyá kozala na bomoi ya liso na nse ya lokasa mpe ya komipesa na masumu. Tosáká mitinda ya sembo ya Yehova oyo etali bizaleli malamu. Lisusu, tólimbisaka baoyo bapesi biso nkanda, mpe tósalisaka baoyo bazali na bosɛnga mpo bátikala makasi. Soki tosali bongo, tokokoba kotambola na kati ya solo ata soki tokutani na mikakatano nini. w20.07 24-25 par. 15-17
Mwamibale, 26 sanza ya 4
Nzambe atye binama na nzoto yango, mokomoko na yango, ndenge asepelaki.—1 Ko. 12:18.
Yehova apesá mosaleli na ye mokomoko ya sembo esika na kati ya lisangá na ye. Atako tozali na mikumba ekeseni, biso nyonso tozali na ntina mpe tozalaka na mposa ya basusu. Ntoma Paulo amonisaki polele ete mosaleli moko te ya Yehova akoki koyebisa moninga na ye ete “Nazali na mposa na yo te.” (1 Ko. 12:21) Soki tolingi ete lisangá ezala na kimya, tosengeli kozwa ndeko mokomoko na motuya mpe kosala elongo na ye. (Ef. 4:16) Soki tozali kosala na bomoko, ndeko nyonso na kati ya lisangá akomona ete balingaka ye mpe lisangá ekozala makasi. Bankulutu nyonso na kati ya lisangá batyamaka na litambwisi ya elimo santu ya Yehova. Kasi, bango nyonso bazalaka na makabo mpe na makoki ndenge moko te. (1 Ko. 12:17) Ekoki kozala ete basusu bakómi bankulutu kala mingi te mpe bayebi naino makambo mingi te. Bobange mpe maladi ekoki mpe kopekisa basusu básala mingi. Kasi, nkulutu moko te asengeli kokanisa ete nkulutu mosusu azali na ntina te. Nzokande, nkulutu mokomoko asengeli nde kolanda toli ya Paulo oyo ezali na Baroma 12:10. w20.08 26 par. 1-2; 27 par. 4
Mwamisato, 27 sanza ya 4
Makambo ya mokili oyo ezali kobongwana.—1 Ko. 7:31.
Mpo na kokamba biso na nzela ya bomoi, Yehova azali kosalela eteni ya ebongiseli na ye oyo ezali awa na mabele. Na ntembe te, ntango ebongiseli ya Nzambe epesaka biso ndimbola ya sika ya liteya moko ya Biblia, to malako ya sika na oyo etali bizaleli malamu, tondimaka mpe tosalelaka yango. Kasi tosalaka nini ntango ebongiseli ya Nzambe esali mbongwana moko oyo ekoki kobongola makambo mosusu ya bomoi na biso, na ndakisa, soki batɛki Ndako ya Bokonzi na biso? Tokobatela esengo na biso soki tobosani te ete tozali kosalela Yehova, mpe ete ye nde azali kotambwisa ebongiseli na ye. (Kol. 3:23, 24) Mokonzi Davidi atiká ndakisa malamu mpenza na ndenge apesaki mbongo mpo na kotonga tempelo. Alobaki: “Ngai nani mpe bato na ngai banani, mpo tózala na nguya ya kopesa makabo ya bolingo ya ndenge oyo? Mpo eloko nyonso euti na yo, mpe oyo topesi yo euti na lobɔkɔ na yo moko.” (1 Nt. 29:14) Biso mpe ntango topesaka makabo, topesaka Yehova biloko oyo euti na lobɔkɔ na ye moko. Atako bongo, Yehova asepelaka ndenge topesaka ntango, makasi, mpe mbongo na biso mpo na mosala na ye.—2 Ko. 9:7. w20.11 22-23 par. 14-16
Mwaminei, 28 sanza ya 4
Ye oyo azali kotalatala mopɛpɛ akolona mboto te.—Mos. 11:4.
Mpo na biso Batatoli ya Yehova, kolonga na biso emonanaka te na motángo ya bato oyo tomemi na ebongiseli ya Yehova. (Luka 8:11-15) Yehova akomona ete tolongi na mosala na biso soki tokobi kosakola mpe koteya basusu nsango malamu. Mpo na nini? Mpo tozali kotosa ye mpe Mwana na ye. (Mrk. 13:10; Mis. 5:28, 29) Tosengeli kosala mosala ya koluka bato na lombangu mpo nsuka ya mokili oyo ekómi mpenza pene! Totikali na ntango mingi te mpo na mosala yango ya kosakola nsango malamu oyo ekoki kobikisa bomoi. Yango wana, koumisa makambo te. Kozela te ntango ya malamu mpo omipesa mobimba na mosala yango ya ntina mingi. Na yango, salá makasi obakisa molende na yo, okolisa boyebi na yo ya Liloba ya Nzambe, okóma na mpiko mingi, mpe olona ezaleli ya komipesa disiplini. Kɔtá na molɔngɔ ya bato koleka milio mwambe oyo basalaka mosala ya koluka bato na mokili mobimba, mpe okozwa esengo oyo Yehova apesaka. (Neh. 8:10; Luka 5:10) Zalá na ekateli ya komipesa mobimba na mosala yango tii ntango Yehova akoloba ete esili. w20.09 7 par. 18-20
Mwamitano, 29 sanza ya 4
Batelá eloko oyo ebombami epai na yo.—1 Tim. 6:20.
Tosengeli kotika te ete mposa ya biloko mingi ya mosuni elongola likebi na biso na makambo ya elimo. “Nguya ya bokosi ya bomɛngo” ekoki kosala ete tótika kolinga Yehova, tótika kosepela na Liloba na ye, mpe tóbungisa mposa na biso ya koteya basusu. (Mat. 13:22) Soki tolingi kobatela biloko oyo Yehova abombá epai na biso, tosengeli kosala nokinoki ntango tomoni likama. Tosengeli kobongisa liboso makambo oyo tokosala soki masolo ya bapɛngwi, mpe bililingi ya mbindo to oyo elakisaka mobulu ebimeli biso na mbalakaka ntango tozali kosalela Internet to kotala televizyo. Soki tomibongisi liboso, tokokima mbala moko eloko nyonso oyo ekoki kobebisa boninga na biso ná Yehova mpe tokotikala pɛto na miso na ye. (Nz. 101:3; 1 Tim. 4:12) Tosengeli kobatela biloko ya motuya oyo Yehova abombá epai na biso, elingi koloba, mateya ya solo oyo ezali na Biblia mpe libaku oyo tozali na yango ya koteya basusu. Yango ekosalisa biso tóbatela lisosoli ya pɛto, tózala na bomoi ya esengo, mpe tóyoka esengo ya kosalisa basusu báyeba Yehova. w20.09 30 par. 16-19
Mwapɔsɔ, 30 sanza ya 4
Miso na yo ekokóma mpenza miso oyo ezali komona Molakisi na yo Monene.—Yis. 30:20.
Osilá kozwa batisimo? Soki ezali bongo, omonisaki polele na miso ya bato nyonso ete ondimelaka Yehova, mpe ozali na mposa ya kosalela ye na kati ya ebongiseli na ye. Lelo oyo, Yehova azali kotambwisa ebongiseli na ye na ndenge oyo ezali komonisa bomoto na ye, mokano na ye, mpe mibeko na ye. Talá bizaleli misato ya Yehova oyo ezali komonana na kati ya ebongiseli na ye. Ya liboso, “Nzambe aponaka bilongi te.” (Mis. 10:34) Bolingo nde etindaki Yehova apesa Mwana na ye “lisiko . . . mpo na bato nyonso.” (1 Tim. 2:6; Yoa. 3:16) Yehova azali kosalela basaleli na ye mpo básakola nsango malamu epai ya moto nyonso oyo akoyoka; na ndenge yango, azali kosalisa bato mingi bázwa litomba na lisiko. Ya mibale, Yehova azali Nzambe ya kimya mpe asalaka makambo na molɔngɔ. (1 Ko. 14:33, 40) Yango wana, bato oyo basambelaka ye basalaka yango na molɔngɔ mpe na kimya. Ya misato, Yehova azali ‘Molakisi Monene.’ (Yis. 30:21) Yango wana, ebongiseli na ye esalaka makasi eteya bato Liloba na ye, Biblia, ezala na lisangá to mpe na mosala ya kosakola. w20.10 20 par. 1-3