Sanza ya 12
Mwaminei, 1 sanza ya 12
Moto oyo azali kobɛta ntembe azali lokola mbonge ya mbu oyo mopɛpɛ ezali komema mpe kotindika epai na epai.—Yak. 1:6.
Na bantango mosusu, tokoki kokanga malamu te ntina ya mateya mosusu ya Biblia. To mpe Yehova akoki koyanola na mabondeli na biso te na ndenge oyo tokanisaki. Yango ekoki kosala ete tókóma na mwa bantembe. Soki tokangi miso na bantembe yango, yango ekoki kolɛmbisa kondima na biso mpe kobebisa boyokani na biso elongo na Yehova. (Yak. 1:7, 8) Kutu yango ekoki kosala ete tóbungisa ata elikya na biso mpo na mikolo ezali koya. Ntoma Paulo akokanisaki elikya na biso mpo na mikolo ezali koya na longo. (Ebr. 6:19) Longo etɛlɛmisaka masuwa na ntango ya mopɛpɛ makasi mpe esalisaka yango mpo etutana na mabanga te. Kasi longo ezalaka na ntina kaka soki nsinga oyo ekangisaka yango na masuwa ekatani te. Soki totiki bantembe ezwa esika na motema na biso, yango ekoki kolɛmbisa kondima na biso ndenge kaka mwa koguga elɛmbisaka nsinga ya longo. Soki moto oyo azali na bantembe akutani na mikakatano, akoki kobungisa kondima na ye epai ya Yehova ete akokokisa bilaka na ye. Soki tobungisi kondima na biso, tobungisi mpe elikya na biso. Moto ya ndenge wana akoki kozala na esengo ata moke te. w21.02 30 par. 14-15
Mwamitano, 2 sanza ya 12
Abrahama andimelaki Yehova.—Yak. 2:23.
Ekoki kozala ete Abrahama azalaki na mbula koleka 70 ntango ye ná libota na ye balongwaki na Ure. (Eba. 11:31–12:4) Mpe na boumeli ya bambula soki nkama, Abrahama azalaki kofanda na bahema mpe kotambolatambola na mokili ya Kanana. Ntango Abrahama akufaki, azalaki na mbula 175. (Eba. 25:7) Kasi amonaki te kokokisama ya elaka ya Yehova ya kopesa bakitani na ye mokili ya Kanana. Mpe amonaki te engumba, elingi koloba, Bokonzi ya Nzambe oyo etyami. Atako bongo, Biblia elobi mpo na Abrahama ete, ntango akufaki ‘anunaki mpe atondaki na mikolo.’ (Eba. 25:8) Atako Abrahama akutanaki na mikakatano, azalaki kaka na kondima makasi, mpe na esengo mpenza azelaki Yehova akokisa bilaka na ye. Nini esalisaki Abrahama ayika mpiko? Na boumeli ya bomoi na ye, Yehova abatelaki ye mpe asalelaki ye makambo lokola moninga. (Eba. 15:1; Yis. 41:8; Yak. 2:22) Lokola Abrahama, biso mpe tozali kozela engumba oyo ezali na miboko ya solosolo. (Ebr. 11:10) Kasi, tozali kozela te ete engumba yango etongama. Bokonzi ya Nzambe etyamaki kobanda 1914, mpe ezali koyangela kuna na likoló. (Em. 12:7-10) Kasi tozali kozela ete eyangela mpe mabele mobimba. w20.08 4-5 par. 11-12
Mwapɔsɔ, 3 sanza ya 12
Makanisi na motema ya moto ezali lokola mai mozindo, kasi moto ya bososoli nde akotoka yango. —Mas. 20:5.
Mpo na koyoka basusu na likebi, tosengeli kozala na komikitisa mpe motema molai. Tosengeli kosala yango mpo na bantina ata misato. Ya liboso, tokokwea te na motambo ya kokanisela basusu mabe nokinoki. Ya mibale, tokoki kososola mayoki mpe makanisi ya ndeko na biso, mpe yango ekosalisa biso tómitya na esika na ye. Mpe ya misato, tokoki kosalisa ndeko amiyeba lisusu malamu. Na bantango mosusu, biso moko toyebaka mpenza mayoki oyo tozali na yango kaka ntango tobimisi yango na maloba. Bandeko mosusu bakokaka te koyebisa basusu mitungisi na bango mpo na ndenge oyo babɔkwamá, mpo na bonkɔkɔ ya mboka na bango, to mpe bomoto na bango. Ekoki kosɛnga ntango eleka liboso bámona ete bakoki koyebisa biso ndenge oyo bazali komiyoka; mpe tokososola mpenza mayoki na bango kaka ntango bakoloba. Soki tomekoli Yehova mpe tozali na motema molai, bakoki kobanda kotyela biso motema. Mpe ntango balingi koyebisa biso ndenge oyo bazali komiyoka, tosengeli koyoka bango na likebi. w20.04 15-16 par. 6-7
Mwalomingo, 4 sanza ya 12
Okobanda kokanga bato na bomoi.—Luka 5:10.
Mbala mingi, mbisi elingaka kofanda na mai oyo yango esepeli mpe na esika oyo biloko ya kolya ezali mingi. Moluki-mbisi asengelaki mpe koyeba ntango ya malamu ya kokanga mbisi. Na likambo yango, tótala oyo ndeko mobali moko oyo afandaka na esanga ya Pacifique ayebisaki ndeko moko oyo azali misionɛrɛ. Mokolo moko, ndeko yango asɛngaki misionɛrɛ yango bákende koluka mbisi. Misionɛrɛ yango ayebisaki ndeko yango ete bákutana mokolo oyo elandi na ntɔngɔ na ngonga ya libwa. Ndeko yango ayebisaki ye ete: “Tokendaka koluka mbisi na ngonga oyo ebongi mpo na kokanga yango, kasi te na ngonga oyo ebongi mpo na biso.” Ndenge moko mpe, na siɛklɛ ya liboso, bayekoli ya Yesu oyo bakómaki baluki-bato bazalaki kokende na bisika oyo bakoki kokuta bato mpe na ngonga oyo ebongi. Na ndakisa, bayekoli ya Yesu bazalaki koteya na tempelo mpe basinagoga, na ndako na ndako, mpe na zando. (Mis. 5:42; 17:17; 18:4) Biso mpe tosengeli koyeba mimeseno ya bato ya teritware na biso, mpe tosengeli kobongola programɛ na biso mpo na kosakola na bisika mpe na ngonga oyo tokoki kokutana na bango.—1 Ko. 9:19-23. w20.09 4 par. 8-9
Mwayambo, 5 sanza ya 12
Wana tozali koloba solo, tókola na bolingo na makambo nyonso na boyokani na moto oyo azali motó, Kristo.—Ef. 4:15.
Lolenge moko ya kokómisa makasi boninga na biso elongo na Yesu ezali ya kopesa mabɔkɔ na bibongiseli ya lisangá. Boninga na biso na Yesu mokonzi ya lisangá ekokóma makasi ntango tozali kosala na bomoko elongo na bato oyo atye mpo na kokɛngɛla biso. (Ef. 4:16) Na ndakisa, mikolo oyo, tozali kosala makasi mpo Bandako ya Bokonzi esalelama malamu mpenza. Mpo na yango, masangá mosusu esangisami. Ebongiseli yango esalisi mingi na kobatela mbongo ya makabo. Kasi, esɛngaki mpe basakoli mosusu básala bambongwana mpo bámesana na makambo ya sika. Mbala mosusu basakoli yango ya sembo bazalaki na lisangá moko banda bambula mingi mpe bamesaná na bandeko ebele kuna. Kasi sikoyo basɛngi bango bákende na lisangá mosusu. Na ntembe te, Yesu asepelaka mingi komona bayekoli na ye yango ya sembo bazali kopesa mabɔkɔ na ebongiseli yango! w20.04 24 par. 14
Mwamibale, 6 sanza ya 12
Mokonzi ya sudi akotindikana na ye.—Dan. 11:40.
Mokonzi ya nɔrdi mpe mokonzi ya sudi bazali kokoba kowelana mpo mokomoko azali na mposa ya kozala na bokonzi oyo eleki na nguya na mokili mobimba. Na ndakisa, tótalela makambo oyo esalemaki nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ntango Union soviétique ekómaki koyangela bikólo mingi na Mpoto. Mokonzi ya sudi ayokanaki na bikólo mosusu mpo esangisa mampinga na yango mpo na kobundisa mokonzi ya nɔrdi. Ebongiseli yango ebengamaki OTAN (Organisation du traité de l’Atlantique Nord). Mokonzi ya nɔrdi ná mokonzi ya sudi babimisaki mbongo mingi mpo na koluka kokóma na mampinga ya basoda oyo eleki na nguya na mokili mobimba. Mokonzi ya nɔrdi mpe ya sudi babundaka mpe na ndenge mosusu. Mokonzi ya nɔrdi apesaka banguna ya mokonzi ya sudi mabɔkɔ, ezala na Afrika, na Azia mpe na Amérique latine. Mokonzi ya sudi mpe asalaka bongo. Na bambula oyo eleki, Russie mpe bikólo oyo epesaka yango mabɔkɔ ekómi na nguya mingi na mokili mobimba. Bazali mpe kobundisa mokonzi ya sudi na nzela ya baprogramɛ ya baordinatɛrɛ. Bakonzi yango bazali mpe kofundana ete mokomoko azali kosalela baprogramɛ yango na mokano ya kobebisa nkita mpe ebongiseli ya politiki ya moninga. Ndenge Danyele asakolaki yango, mokonzi ya nɔrdi azali kokoba kobundisa basaleli ya Nzambe.—Dan. 11: 41. w20.05 13 par. 5-6
Mwamisato, 7 sanza ya 12
Ngai moko, mpe nakoluka bampate na ngai mpe nakobatela yango.—Ezk. 34:11.
Na mikolo ya mosakoli Yisaya, Yehova atunaki motuna oyo: “Mwasi akoki nde kobosana mwana na ye oyo ye azali komɛlisa mabɛlɛ?” Abakisaki boye: “Ata basi wana bakoki kobosana, kasi ngai nakobosana yo te.” (Yis. 49:15) Mbala mingi, Yehova azalaki te komikokanisa na mama. Kasi na libaku oyo, asalaki yango. Yehova azwaki ndakisa ya bolingo makasi oyo ezalaka kati na mama ná mwana na ye mpo na komonisa ndenge oyo alingaka mpenza basaleli na ye. Bamama mingi bayokaka lokola ndeko mwasi moko na nkombo Jasmin oyo alobi boye: “Ntango mama azali komɛlisa mwana mabɛlɛ, yango esalaka ete bakóma kolingana makasi bomoi na bango mobimba.” Yehova ayebaka ntango mosaleli na ye moko atiki kosakola mpe koyangana na makita. Tosepelaka mingi ntango bandeko oyo batiká kosakola mpe koyangana na makita, bazongeli makambo ya elimo. Yehova mpe asepelaka mingi soki basali bongo.—1 Pe. 2:25. w20.06 18 par. 1-3
Mwaminei, 8 sanza ya 12
[Tyá miso na yo] . . . na biloko oyo emonanaka te. Mpo biloko oyo emonanaka ezali ya ntango mokuse, kasi biloko oyo emonanaka te ezali ya seko.—2 Ko. 4:18.
Tokoki te komona biloko nyonso ya motuya. Kutu biloko oyo eleki motuya ezali nde oyo emonanaka te. Na Lisolo likoló ya Ngomba, Yesu alobelaki biloko ya motuya ya likoló oyo ezali na valɛrɛ mingi koleka bozwi to mbongo. Na nsima, abakisaki boye: “Epai eloko na yo ya motuya ezali, motema na yo ekozala mpe kuna.” (Mat. 6:19-21) Ntango tomoni eloko moko ya motuya mingi, motema ekotinda biso tóluka kozwa yango. Soki tozali kosala nyonso mpo na kozala na boyokani ya malamu na Nzambe, yango ekomonisa ete tozali komibombela “biloko ya motuya na likoló.” Yesu alobaki ete biloko ya motuya ya ndenge wana ekoki kobebisama soki moke te, bakoki mpe koyiba yango te. Ntoma Paulo alendisi biso ‘tótya miso na biso na biloko oyo emonanaka te.’ (2 Ko. 4:17, 18) Biloko yango oyo emonanaka te ezali makabo ya motuya; na kati na yango tokoki mpe kotánga ebele ya mapamboli oyo tokozwa na mokili ya sika ya Nzambe. Omonisaka botɔndi mpo na makabo yango ya motuya oyo emonanaka te? w20.05 26 par. 1-2
Mwamitano, 9 sanza ya 12
Liteya na ngai ekosopana lokola mbula.—Mib. 32:2.
Kaka ndenge mai ya ya mbula ekolisaka milona, makambo oyo Moize ateyaki Bayisraele ekómisaki kondima na bango makasi mpe elendisaki bango. Tokoki kosala nini mpo tóteyaka mpe bongo? Ntango tozali kosakola ndako na ndako to na esika ya bato ebele, tokoki kosalela Biblia mpo na kolakisa bato nkombo ya Nzambe, Yehova. Tokoki kopesa bango mikanda, kolakisa bango bavideo to mpe makambo oyo ezali na jw.org mpo na kokumisa Yehova. Ezala na mosala, na eteyelo, to ntango tozali kosala mibembo, tokoki kozwa mabaku ya kolobela makambo oyo etali Tata na biso ya bolingo mpe bomoto na ye. Ntango toyebisi bato oyo tokutani na bango mokano ya Tata na biso ya bolingo mpo na bato mpe mabele, mpe soki bayoki makambo yango, bakoki komona mpo na mbala ya liboso ndenge Yehova alingaka biso. Ntango tozali koyebisa bato mosusu makambo ya solo oyo etali Tata na biso ya bolingo, tozali kopesa mabɔkɔ na kosantisama ya nkombo ya Nzambe. Makambo oyo toteyaka bato na Biblia ekitisaka bango motema.—Yis. 65:13, 14. w20.06 10 par. 8-9
Mwapɔsɔ, 10 sanza ya 12
Bózongela ngai, mpe ngai nakozongela bino.—Mal. 3:7.
Bizaleli nini tosengeli komonisa ntango tozali kosalisa baoyo babungá bázongela Yehova? Tokoki kozwa mateya na ndakisa oyo Yesu apesaki ya mwana oyo alongwaki na ndako. (Luka 15:17-24) Mwana yango azongelaki makanisi malamu mpe azwaki ekateli ya kozonga na ndako. Tata apotaki mbangu mpo na kokutana na mwana na ye mpe apwɛpwaki ye mpo mwana yango ayeba ete tata na ye azalaki kolinga ye. Mwana yango ayokaki mpasi mpo na makambo oyo asalaki mpe amonaki ete abongi lisusu te kobengama mwana ya tata yango. Ntango mwana yango abimisaki mayoki na ye, tata amityaki na esika ya mwana yango. Na nsima, tata asalaki likambo oyo emonisaki ete asepelaki ndenge mwana na ye azongaki na ndako lokola mwana oyo alingami. Mpo na komonisa yango, tata asalaki fɛti mpe apesaki mwana na ye oyo abongolaki motema bilamba ya kitoko. Yehova akokani na tata oyo ndakisa yango elobeli. Alingaka bandeko na biso oyo batiká kosakola mpe koyangana na makita, mpe alingi ete bázongela ye. Mpo na komekola Yehova, tokoki kosalisa bango bázongela ye. Mpo na kosala yango, tosengeli kozala na motema molai, komitya na esika na bango, komonisela bango boboto mpe bolingo. w20.06 25-26 par. 8-9
Mwalomingo, 11 sanza ya 12
Soki botikali na kati ya liloba na ngai, bozali mpenza bayekoli na ngai, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.—Yoa. 8:31, 32.
Yesu alobaki ete bato mosusu bakondima solo “na esengo,” kasi kondima na bango ekolɛmba ntango bakutani na mikakatano. (Mat. 13: 3-6, 20, 21) Mbala mosusu bato yango bayebaki te ete baoyo bazali kolanda Yesu bakokutana na mikakatano. (Mat. 16:24) To mbala mosusu bazalaki kokanisa ete kozala mokristo elimboli kozala na bomoi oyo ezangi mikakatano, ezangi mpasi, mpe etondi kaka na mapamboli. Kasi na mokili ya lelo, mikakatano ekozanga te. Makambo ekoki kobongwana mpe yango ekoki kosilisa esengo na biso mpo na mwa ntango. (Nz. 6:6; Mos. 9:11) Bandeko na biso mingi bandimaka ete bazali na kati ya solo mpe bamonisaka yango. Na ndenge nini? Mpo kondima na bango eninganaka te ata soki ndeko moko azokisi bango, to mpe asali likambo moko oyo ebongi te mpo na bakristo. (Nz. 119:165) Mbala nyonso oyo bakutanaka na mikakatano, kondima na bango elɛmbaka te, kutu ekómaka nde makasi. (Yak. 1:2-4) Tosengeli kokóma na kondima ya ndenge wana. w20.07 8 par. 1; 9 par. 4-5
Mwayambo, 12 sanza ya 12
Soki moko na bino azangi bwanya, akoba kosɛnga Nzambe.—Yak. 1:5.
Liboso obanda kotánga Biblia, sɛngá Yehova asalisa yo mpo oyeba ndenge oyo okoki kozwa matomba na makambo oyo olingi kotánga. Na ndakisa, soki ozali koluka toli mpo oyeba ndenge ya kolonga mokakatano moko, sɛngá Yehova asalisa yo mpo omona mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo mpo ozwa ekateli ya malamu. (Flp. 4:6, 7) Yehova apesá biso likoki ya komona makambo na makanisi. Ezali likoki moko ya kokamwa mpenza! Mpo na kosalisa yo omona ndenge lisolo moko ya Biblia esalemaki, meká komona na makanisi ndenge makambo yango ezali kosalema mpe salá lokola yo nde moto oyo bazali kolobela na lisolo yango. Meká komona makambo oyo moto yango amonaki mpe ndenge oyo azalaki komiyoka. Na nsimá, manyolá. Komanyola elimboli kokanisa na mozindo na makambo oyo ozali kotánga mpe ndenge oyo makambo yango etali mpenza yo. Esalisaka moto akanga malamu ntina ya makambo oyo azali kotánga. Kotánga Biblia kozanga komanyola, ezali lokola biteni ya velo ya sika oyo ezali na kati ya kartɔ. Komanyola esalisaka biso tómona eloko na mobimba na yango. w21.03 15 par. 3-5
Mwamibale, 13 sanza ya 12
Nazali kotɔnda Nzambe, . . . nabosanaka te kokanisa yo na malɔmbɔ na ngai, butu moi.—2 Tim. 1:3.
Ntoma Paulo akokaki kotya makanisi na bomoi oyo azalaki na yango kala, mpe kokanisa ete soki aboyaka kokóma mokristo, mbɛlɛ balingaki kokanga ye te. Akokaki koyokela mibali ya etúká ya Azia oyo basundolaki ye nkanda, mpe akokaki kotika kotyela baninga na ye mosusu motema. Kasi Paulo asalaki bongo te. Atako Paulo ayebaki ete etikali moke báboma ye, abosanaki te ete kopesa Yehova nkembo nde likambo eleki ntina. Mpe akobaki kokanisa ndenge oyo akokaki kolendisa basusu. Azalaki mpe kotyela Yehova motema na ndenge azalaki kobondela ye mbala na mbala. Na esika atya makanisi na ye nyonso epai ya bato oyo basundolaki ye, amonisaki nde botɔndi mpo na lisalisi oyo baninga na ye ya sembo bapesaki ye na ntango wana. Lisusu, Paulo akobaki koyekola Liloba ya Nzambe. (2 Tim. 3:16, 17; 4:13) Likambo eleki ntina, ayebaki ete Yehova ná Yesu balingaka ye. w21.03 18 par. 17-18
Mwamisato, 14 sanza ya 12
Se ndenge bapikolaka matiti mabe mpe batumbaka yango na mɔtɔ, ekozala mpe bongo na bosukisi ya makambo ya ntango yango.—Mat. 13:40.
Na ntango moko boye na boumeli ya siɛklɛ ya 2 T.B., lisangá ya bokristo ya solo ezalaki koyebana lisusu te mpo bakristo ya lokuta, oyo bakómaki kolanda mateya ya bapakano mpe kobomba mateya ya solo ya Liloba ya Nzambe, bakómaki mingi. Kobanda na ntango wana tii na nsuka ya bambula ya 1800, Nzambe azalaki na ebongiseli moko te awa na mabele. Bakristo ya lokuta bakómaki mingi lokola matiti mabe, mpe koyeba bakristo ya solo ekómaki mpasi. (Mat. 13:36-43) Mpo na nini ezali na ntina tóyeba yango? Mpo yango emonisi ete mokonzi to guvɛrnema moko te ekokaki kozala mokonzi ya nɔrdi to mokonzi ya sudi oyo Daniele mokapo 11 elobeli kobanda na siɛklɛ ya 2 T.B., tii na mobu 1870. Mpamba te na ntango wana, ezalaki te na ebongiseli ya basaleli ya Nzambe awa na mabele oyo bakonzi yango bakokaki konyokola. Kasi, mwa moke nsima ya 1870, mokonzi ya nɔrdi mpe mokonzi ya sudi bakokaki komonana lisusu. w20.05 3 par. 5
Mwaminei, 15 sanza ya 12
Ekólo moko ekɔti na mokili na ngai.—Yoe. 1:6.
Yoele asakolaki ete ebele ya mayoyo ekobebisa mokili ya Yisraele mpe ekolya nyonso oyo emoni! (Yoe. 1:4) Banda bambula mingi, esakweli yango ezalaki kosalelama mpo na kolobela ndenge oyo basaleli ya Yehova bamipesaka na mosala ya kosakola, lokola liboke ya mayoyo oyo moto akoki kokanga te. Tozalaki komona ete mosala yango ebebisaka “mokili,” elingi koloba etungisaka bato oyo balandaka bakonzi ya mangomba. Kasi, soki totaleli malamu bavɛrsɛ mosusu ya esakweli yango, tokomona ete ezali na ndimbola mosusu. Talá elaka oyo Yehova apesaki mpo na ebele ya mayoyo yango: “Moto ya nɔrdi [elingi koloba mayoyo], nakolongola ye epai na bino.” (Yoe. 2:20) Soki mayoyo ezali komonisa Batatoli ya Yehova, oyo batosaka etinda ya Yesu ya kosakola mpe kokómisa bato bayekoli, ndenge nini Yehova alaka kolongola bango? (Ezk. 33:7-9; Mat. 28:19, 20) Ezali polele ete Yehova azali kolongola basaleli na ye ya sembo te, kasi nde eloko to moto mosusu oyo atɛmɛlaka basaleli na ye. w20.04 3 par. 3-5
Mwamitano, 16 sanza ya 12
Soki moko na bino azangi bwanya, akoba kosɛnga Nzambe.—Yak. 1:5.
Tosengeli kosala nini soki Yehova ayanoli mbala moko te na libondeli na biso? Yakobo alobi ete tosengeli ‘kokoba kosɛnga Nzambe.’ Yehova amonaka mabe te soki tokobi kosɛnga ye bwanya. Akosilikela biso te. Tata na biso ya likoló ‘apesaka na motema mobimba’ soki tosɛngi ye bwanya mpo tóyika mpiko na mikakatano na biso. (Nz. 25:12, 13) Amonaka mikakatano na biso, ayokaka mawa ntango tozali konyokwama, mpe azalaka na mposa ya kosalisa biso. Na ntembe te, yango epesaka biso esengo mpenza! Kasi ndenge nini Yehova apesaka biso bwanya? Na nzela ya Liloba na ye. (Mas. 2:6) Mpo na kozwa bwanya yango, tosengeli koyekolaka Liloba ya Nzambe mpe mikanda na biso. Kasi, tosengeli kosuka kaka te na kozwa boyebi. Tosengeli mpe kosala makambo oyo Nzambe asɛngi biso. Yakobo akomaki boye: “Bókóma batosi ya liloba kasi bayoki kaka te.” (Yak. 1:22) Soki tozali kosalela batoli oyo Nzambe apesaka biso, tokokóma mpenza bato oyo batyaka kimya, bato ya makambo makasimakasi te, mpe bato ya motema mawa. (Yak. 3:17) Ezaleli yango esalisaka biso tóyika mpiko ata na minyoko ya ndenge nini kozanga ete tóbungisa esengo na biso. w21.02 29 par. 10-11
Mwapɔsɔ, 17 sanza ya 12
Enama mokomoko . . . ezali kosalisa na bokoli ya nzoto.—Ef. 4:16.
Soki bandeko ya lisangá basalisi moyekoli ya Biblia, ezalaka mpasi te mpo akola tii azwa batisimo. Mosakoli mokomoko akoki kopesa mabɔkɔ mpo na bokoli ya lisangá. Ndeko mwasi moko ya mobongisi-nzela alobi boye: “Lisese moko elobaka ete mboka mobimba esengeli kopesa mabɔkɔ mpo mwana akola. Namoni ezali mpe bongo na likambo etali kokómisa bato bayekoli. Mbala mingi esɛngaka ete bandeko nyonso ya lisangá bápesa mabɔkɔ mpo na kosalisa moto akóma Motatoli ya Yehova.” Baboti, bandeko ya libota, baninga, mpe balakisi na eteyelo, bango nyonso basengeli kopesa mabɔkɔ mpo mwana akola. Basalaka bongo na ndenge balendisaka mwana, mpe bateyaka ye makambo ya ntina. Ndenge moko mpe, bandeko ya lisangá basengeli kopesa toli, kolendisa, mpe kozala ndakisa malamu epai ya bayekoli ya Biblia mpo na kosalisa bango bákola tii bázwa batisimo. (Mas. 15:22) Mpo na nini mosakoli oyo azali koyekola na moto Biblia asengeli kondima lisalisi oyo bandeko mosusu bazali kopesa moto yango? Mpo bato mingi bakoki kosalisa moyekoli yango akola na elimo. w21.03 8 par. 1-3
Mwalomingo, 18 sanza ya 12
Soki tolobi ete: “Tozali na lisumu te,” tozali komikosa mpe solo ezali na biso te.—1 Yoa. 1:8.
Bakristo nyonso, ezala bilenge to mikóló, basengeli kokeba kozala na bomoi ya liso na nse ya lokasa. Ntoma Yoane amonisaki ete tokoki te kokoba kotambola na kati ya solo mpe kozala na bomoi ya mbindo. (1 Yoa. 1:6) Soki tolingi ete Yehova asepela na biso, tosengeli kobosana te ete amonaka makambo nyonso oyo tosalaka. Ata soki bato bamonaka te makambo oyo tosalaka na nkuku, Yehova akoki komona makambo nyonso. (Ebr. 4:13) Tosengeli te kotalela lisumu ndenge mokili etalelaka yango. Na mikolo ya Yoane, bapɛngwi bazalaki kokanisa ete moto akoki kaka kozala na boyokani ya malamu ná Nzambe, ata soki azali kokoba kosala masumu na nko. Lelo oyo, tofandi na bato oyo bakanisaka mpe bongo. Bato mingi balobaka ete bandimelaka Nzambe, kasi baboyaka kondima ndenge oyo atalelaka lisumu, mingimingi soki ezali likambo etali kosangisa nzoto. Likambo oyo Yehova amonaka ete ezali lisumu, bato yango balobaka ete ezali likambo oyo etali moto na moto, to ezali lolenge mosusu ya bomoi. w20.07 22 par. 7-8
Mwayambo, 19 sanza ya 12
Tólingaka . . . na misala mpe na solo.—1 Yoa. 3:18.
Ntango bandeko basi bazalaka na mposa ya lisalisi, osalaka yango? Tózwa ndakisa moko. Bandeko ya lisangá bamoni ete ndeko mwasi moko oyo mobali na ye azali Motatoli te ayaka na makita na retare, mpe soki kaka makita esili, azongaka mbala moko. Mpe bamoni ete amemaka mpenza bana na ye na makita te. Na yango, bakómi koloba mabe mpo na ndeko yango, mpe koloba ete asengelaki kotya mobali na ye mbamba mpo amemaka bana na makita. Kasi, bandeko bazali kobosana ete ndeko mwasi yango azali kosala oyo akoki. Mpe babosani ete mobali na ye akoki kosɛnga ye asala makambo mosusu na ngonga boye to boye. Lisusu, ezali ye te moto azali na liloba ya nsuka mpo na bana na ye. Soki olobi malamu mpo na ye mpe oyebisi bato mosusu makambo ya malamu oyo azali kosala, yango ekoki kosala ete bátika kolobela ye mabe. Bankulutu bayebi ete Yehova alingaka ete básalelaka bango makambo na boboto. (Yak. 1:27) Na yango, na ndakisa ya Yesu, bazalaka makambo makasimakasi te, baboyaka kotingama na mibeko soki esɛngi ete bámonisa boboto mpe bososoli. (Mat. 15:22-28) Ntango bankulutu basalisaka bandeko basi, bandeko yango bamonaka ete Yehova mpe ebongiseli na ye batyelaka bango likebi. w20.09 24-25 par. 17-19
Mwamibale, 20 sanza ya 12
[Nzambe] ayebisi Mokonzi Nebukadenezare makambo oyo ekosalema.—Dan. 2:28.
Mosakoli Danyele azalaki na komikitisa mpe azalaki ntango nyonso kolanda litambwisi ya Yehova. Na ndakisa, ntango alimbolaki ndɔtɔ ya Mokonzi Nebukadenezare, Danyele alobaki te ete alimbolaki yango na mayele na ye moko. Kasi na komikitisa nyonso, azongisaki lokumu epai ya Yehova. (Dan. 2:26-28) Yango eteyi biso nini? Soki bandeko basepelaka na badiskur oyo tosalaka, to soki mosala na biso ya kosakola ezali kobota mbuma, tosengeli kozongisa lokumu nyonso epai ya Yehova. Tosengeli kobosana te ete tokokoka te kosala makambo wana soki Yehova asalisi biso te. (Flp. 4:13) Kosala bongo ekomonisa ete tozali mpe kolanda ndakisa ya Yesu. Yesu atyelaki Yehova motema. (Yoa. 5:19, 30) Ata mokolo moko te ameká kobɔtɔla bokonzi ya Tata na ye ya likoló. Bafilipi 2:6 eyebisi biso mpo na Yesu ete, “azwaki makanisi te ya kobɔtɔla bokonzi, elingi koloba, ete akokana na Nzambe.” Lokola azalaki mwana ya botosi, Yesu ayebaki esika makoki na ye esuki mpe atosaki bokonzi ya Tata na ye. w20.08 11 par. 12-13
Mwamisato, 21 sanza ya 12
Bópota mbangu na ndenge oyo ekosala ete bózwa yango.—1 Ko. 9:24.
Bandeko mosusu oyo bazali kopota mbangu na nzela ya bomoi bazali na mikakatano oyo basusu bakoki komona yango te mpe mbala mosusu koyeba yango te. Soki ozalaka na mokakatano moko mpe soki omonaka ete basusu bamityaka na esika na yo te, ndakisa ya Mefiboshete ekoki kopesa yo makasi. (2 Sa. 4:4) Mefiboshete azalaki ebɔsɔnɔ, mpe Mokonzi Davidi asambisaki likambo na ye na bosembo te. Kasi, akómaki na makanisi ya mabe te; azalaki nde kosepela na makambo oyo ezalaki kotambola malamu na bomoi na ye. Azalaki na botɔndi mpo na boboto oyo Davidi amoniselaki ye na kala. (2 Sa. 9:6-10) Na yango, ntango Davidi akaniselaki ye mabe, Mefiboshete atalelaki likambo na mobimba na yango. Atikaki te ete libunga ya Davidi ekómisa ye nkandankanda. Mpe asilikelaki Yehova te mpo na likambo oyo Davidi asalaki. Mefiboshete alukaki kosala oyo akokaki mpo na kopesa mabɔkɔ na mokonzi oyo Yehova atyaki. (2 Sa. 16:1-4; 19:24-30) Yehova akomisaki ndakisa malamu ya Mefiboshete na Liloba na Ye mpo na bolamu na biso.—Rom. 15:4. w20.04 26 par. 3; 30 par. 18-19
Mwaminei, 22 sanza ya 12
Tozali bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe.—1 Ko. 3:9.
Bandeko mosusu na kati ya lisangá bakoki kozala bamisionɛrɛ, babongisi-nzela monene, to mpe babongisi-nzela ya sanza na sanza. Bamipesá mobimba na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli. Atako bandeko yango bazalaka te na biloko ebele ya mosuni, Yehova apesá bango biloko mingi ya malamu. (Mrk. 10:29, 30) Tozwaka bandeko yango na motuya mingi, mpe tozalaka na botɔndi ndenge bazalaka na kati ya lisangá! Kaka bandeko mibali oyo bazali na mikumba na kati ya lisangá mpe bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso nde bazali na esika na kati ya lisangá? Te! Mosakoli nyonso ya nsango malamu azali na motuya na miso ya Nzambe mpe na kati ya lisangá. (Rom. 10:15; 1 Ko. 3:6-8) Kutu, mosala ya kokómisa bato bayekoli ya Nkolo na biso Yesu Kristo ezali moko kati na mikano ya ntina mingi ya lisangá. (Mat. 28:19, 20; 1 Tim. 2:4) Bandeko nyonso oyo basakolaka, ezala baoyo bazwá batisimo to te, basalaka nyonso bátya mosala yango na esika ya liboso na bomoi na bango.—Mat. 24:14. w20.08 21 par. 7-8
Mwamitano, 23 sanza ya 12
Nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.—Mat. 28:20.
Ndenge maloba ya mokapo ya lelo emonisi yango, ntango tokutani na mikakatano, Yesu asalisaka biso. Kutu, elaka yango ya Yesu ezali mpenza kolendisa biso. Mpo na nini? Mpo mikolo mosusu ezalaka mpasi tóyika mpiko. Na ndakisa, ntango ndeko to moninga na biso moko akufi, toyokaka mpasi mpenza mpe mpasi yango ekoki koumela bambula mingi. Bamosusu bazali kobunda na mikakatano ya bobange. Bamosusu mpe bazali konyokwama na makanisi. Atako bongo, tozwaka makasi ya koyika mpiko mpo toyebi ete Yesu azali elongo na biso “mikolo nyonso,” elingi koloba, ata na mikolo oyo eleki mpasi na bomoi na biso. (Mat. 11:28-30) Liloba ya Nzambe emonisi ete Yehova asalisaka biso na nzela ya baanzelu na ye. (Ebr. 1:7, 14) Na ndakisa, baanzelu basungaka biso mpe bakambaka biso ntango tozali kosakola “nsango malamu ya Bokonzi” epai ya ‘bato ya bikólo nyonso, mabota nyonso, mpe minɔkɔ nyonso.’—Mat. 24:13, 14; Em. 14:6. w20.11 13-14 par. 6-7
Mwapɔsɔ, 24 sanza ya 12
Makanisi na motema ya moto ezali lokola mai mozindo, kasi moto ya bososoli nde akotoka yango.—Mas. 20:5.
Tolingi moyekoli ayeba ete makambo oyo azali koyekola euti na Biblia. (1 Tes. 2:13) Ndenge nini tokoki kosala yango? Lendisá moyekoli ayebisaka bato makambo azali koyekola. Na esika olimbwelaka ye bavɛrsɛ ya Biblia ntango nyonso, sɛngáká ye mpe alimbwela yo bavɛrsɛ mosusu. Salisá moyekoli amona ndenge akoki kosalela Liloba ya Nzambe na bomoi na ye. Tuná ye mituna oyo ekosalisa ye abimisa makanisi mpe mayoki na ye mpo na bavɛrsɛ ya Biblia oyo azali kotánga. (Luka 10:25-28) Na ndakisa, tuná ye boye: “Ndenge nini vɛrsɛ oyo esalisi yo omona moko ya bizaleli ya Yehova?” “Ndenge nini makambo oyo oyekoli ezali kosalisa yo?” “Ndenge nini ozali komiyoka mpo na makambo outi koyekola?” Likambo ya ntina mingi ezali te ete moyekoli ayeba makambo mingi kasi nde alinga makambo oyo ayebi mpe asalela yango. Osalela Biblia malamu mpenza ntango ozali koteya. Osengeli kozala na komikitisa soki olingi kokóma moteyi malamu. w20.10 15 par. 5-6
Mwalomingo, 25 sanza ya 12
Na ntɔngɔ, loná mboto na yo mpe tii na mpokwa kopemisa lobɔkɔ na yo te.—Mos. 11:6.
Toyebi ete mosala ya kosakola Bokonzi ekosuka mpenza na ntango oyo Yehova atyá. Tótalela makambo oyo esalemaki na mikolo ya Noa. Yehova amonisaki ete asalaka ntango nyonso makambo na ntango oyo ebongi. Bambula soki 120 liboso, Yehova atyaki ntango oyo Mpela esengelaki kobanda. Bambula mingi na nsima, apesaki Noa mokumba ya kotonga masuwa. Bambula soki 40 to 50 liboso Mpela ebanda, Noa akobaki kosala mosala makasi. Ata soki bato bazalaki koyoka ye te, Noa akobaki kosakola nsango ya likebisi tii ntango Yehova ayebisaki ye ete ngonga ekoki mpo akɔta na masuwa. Mpe na nsima, na ntango oyo ebongi, “Yehova akangaki porte.” (Eba. 6:3; 7:1, 2, 16) Mosika te, Yehova akosukisa mosala ya kosakola Bokonzi. Na nsima, akobebisa ebongiseli mabe oyo ya Satana mpe akotya mokili ya sika oyo ekotonda na bato oyo batosaka Nzambe. Liboso ntango yango ekoka, tiká ete tózwa ekateli ya komekola Noa, mpe bato mosusu oyo bapemisaki lobɔkɔ na bango te. Tókoba kotya mosala ya kosakola na esika ya liboso, komonisa motema molai mpe kobatela kondima makasi epai ya Yehova, mpe na bilaka na ye. w20.09 13 par. 18-19
Mwayambo, 26 sanza ya 12
Kasi makambo nyonso esalema na ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ.—1 Ko. 14:40.
Soki Yehova amonisaka polele te nani nde azali mokonzi, libota na ye elingaki kozala na esengo te mpe makambo elingaki kotambola na mobulu. Na ndakisa, moto moko te alingaki koyeba soki nani nde asengeli kozwa bikateli ya nsuka mpe soki nani nde asengeli kolandela mpo ete bikateli yango etosama. Soki ezali malamu ete mibali bázala na bokonzi na kati ya libota, mpo na nini basi mingi bamonaka ete yango banyokolaka bango? Ezali mpo mibali mingi batosaka te mibeko oyo Yehova atyá mpo na libota, kasi baponaka kolanda mimeseno to bonkɔkɔ ya mboka na bango. Mibali misusu mpe banyokolaka basi na bango mpo bámiyoka malamu. Na ndakisa, mobali akoki kokonza mwasi na ye mpo atosa ye to mpo amonisa basusu ete azali mpenza “mobali ya solosolo.” Akoki kokanisa ete lokola akoki te kotinda mwasi na ye na makasi ete alinga ye, akoki kosala ete mwasi yango abanga ye. Mpe akoki kosalela kobanga yango mpo na kokonza mwasi na ye. Mibali oyo bakanisaka mpe basalaka makambo ndenge wana, bazali mpenza na libunga. Bapesaka te basi lokumu oyo babongi na yango; yango eyokani te likanisi ya Yehova.—Ef. 5:25, 28. w21.02 3 par. 6-7
Mwamibale, 27 sanza ya 12
[Bóbwakela] ye mitungisi na bino nyonso, mpo atyelaka bino likebi.—1 Pe. 5:7.
Ntango ozali komitungisa mpo na mokakatano moko boye, okoki kobondela Yehova asalisa yo. Mpo na koyanola na mabondeli na yo, Yehova akoki kopesa yo “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso” ya bato. (Flp. 4:6, 7) Yehova akopesa yo kimya yango na nzela ya elimo santu na ye. (Gal. 5:22) Ntango ozali kobondela Yehova, yebisá ye makambo nyonso oyo ezali kotungisa yo. Yebisá ye makambo na bosikisiki. Yebisá ye ndenge likambo ezali mpenza, mpe monisá ye ndenge ozali komiyoka mpo na yango. Soki ezali na mwa likambo moko oyo okokoka kosala mpo na kosilisa yango, sɛngá ye bwanya mpe makasi mpo oyeba ndenge ya kosala yango. Soki ezali na likambo moko te oyo okoki kosala mpo na kosilisa mokakatano yango, sɛngá Yehova apesa yo makasi obatela makanisi na yo mpo omitungisa mingi te mpe olɛmba nzoto te. Soki ozali koloba makambo ya sikisiki na mabondeli na yo, ekozala mpasi te mpo omona polele eyano ya Yehova. Soki ozwi eyano mbala moko te nsima ya kobondela, kotika kobondela te. Yehova alingi kaka te obondelaka ye na bosikisiki, kasi alingi mpe otingamaka na mabondeli.—Luka 11:8-10. w21.01 3 par. 6-7
Mwamisato, 28 sanza ya 12
[Yesu] alobaki na bango ete: “Bato nyonso te nde bakokaka likambo yango, kasi kaka baoyo bazali na likabo yango.”—Mat. 19:11.
Masangá mingi lelo oyo ezali na mabota mpe na bandeko oyo babalá. Kasi ezali mpe na ebele ya bandeko basi mpe mibali oyo bazali minzemba. Ndenge nini tosengeli kotalela bandeko oyo bazali minzemba? Tosengeli komekola ndenge oyo Yesu azalaki kotalela bango. Ntango Yesu azalaki awa na mabele abalaki te. Atikalaki monzemba, asalelaki ntango na ye malamu, mpe atyaki likebi nyonso na mosala na ye. Yesu ateyaki ata mokolo moko te ete esengeli kaka moto abala to atikala monzemba. Kasi alobaki ete ekozala na bakristo mosusu oyo bakopona kotikala minzemba. (Mat. 19:12) Yesu azalaki komemya baoyo bazalaki minzemba. Azalaki te kotalela minzemba lokola bato oyo bazangá ntina to lokola bato oyo bazangá eloko moko. Ndenge moko na Yesu, ntoma Paulo mpe atikalaki mozemba na boumeli ya mosala na ye. Ata mokolo moko te ateyaki ete ezali mabe mokristo abala. Ayebaki ete yango ezali likambo etali moto na moto. w20.08 28 par. 7-8
Mwaminei, 29 sanza ya 12
Nzambe azali bolingo.—1 Yoa. 4:16.
Ntoma Yoane aumelaki na bomoi mpe akutanaki na makambo mingi ya malamu. Akutanaki mpe na mikakatano ya ndenge na ndenge oyo ekokaki kolɛmbisa kondima na ye. Kasi, asalaki ntango nyonso makasi mpo atosa mitindo ya Yesu, ata mpe mobeko ya kolinga bandeko. Mpo na yango, Yoane ayebaki ete Yehova ná Yesu balingaki ye, mpe ete bakokaki kopesa ye makasi ya kolonga ata komekama ya ndenge nini. (Yoa. 14:15-17; 15:10) Eloko moko te oyo Satana ná mokili na ye bakokaki kosala ekokaki kopekisa Yoane alinga bandeko na maloba mpe na misala. Ndenge moko na Yoane, biso mpe tozali kofanda na mokili oyo Satana azali koyangela; alingaka ata moto moko te. (1 Yoa. 3:1, 10) Mposa na ye ezali ete tótika kolinga bandeko na biso, kasi akolonga te; lobá kaka soki biso moko topesi ye nzela. Tiká ete tózwa ekateli ya kolinga bandeko na biso, tómonisela bango bolingo kaka na maloba te kasi mpe na makambo oyo tosalelaka bango. Soki tosali bongo, tokoyoka esengo ya kozala na kati ya libota ya Yehova, mpe tokozala na bomoi ya esengo.—1 Yoa. 4:7. w21.01 13 par. 18-19
Mwamitano, 30 sanza ya 12
Nzambe apesaka ezaleli ya koyika mpiko.—Rom. 15:5.
Bomoi na mokili oyo eyangelami na Satana ezali mpasi. Mpe na bantango mosusu, tokoki koyeba te tósala nini. (2 Tim. 3:1) Kasi tosengeli komitungisa te mpe kobanga te. Yehova ayebi mikakatano oyo tozali kokutana na yango. Soki tozali na mposa ya lisalisi, alaki ete akosimba biso na lobɔkɔ na ye ya mobali ya nguya. (Yis. 41:10, 13) Toyebi ete Yehova akosalisa biso, mpe Biblia epesaka biso makasi oyo tosengeli na yango mpo tóyikela ata mokakatano ya ndenge nini mpiko. Bavideo ná badrame ya koyoka, mpe molɔngɔ ya masolo “Mekolá kondima na bango,” esalisaka biso tómona ndenge masolo ya bato oyo Biblia elobeli esalemaki. Liboso ya kotala, ya koyoka, to mpe ya kotánga masolo yango, sɛngá Yehova asalisa yo ozwa mateya ya ntina mingi oyo okoki kosalela. Meká komitya na esika ya moto oyo bazali kolobela na lisolo yango. Manyolá na makambo oyo basaleli yango ya Yehova basalaki mpe ndenge oyo Yehova asalisaki bango bálonga mikakatano na bango. Na nsima, salelá mateya oyo ozwi. Pesá Yehova matɔndi mpo na lisalisi oyo asili kopesa yo mpe luká mabaku ya kolendisa mpe ya kosalisa basusu, mpo na komonisa ete osepeli na lisalisi oyo Yehova apesi yo. w21.03 19 par. 22-23
Mwapɔsɔ, 31 sanza ya 12
Bana bazali libula oyo euti na Yehova.—Nz. 127:3.
Soki babalani balingi kobota bana, basengeli komituna boye: ‘Tozali mpenza bato ya komikitisa, oyo balingaka Yehova mpe Liloba na ye? Yehova akoki mpenza kopona biso mpo tóbatela mwana oyo tokobota?’ (Nz. 127:4) Soki ozali moboti, omituna boye: ‘Nateyaka bana na ngai báyeba ntina ya kosala mosala makasi?’ (Mos. 3:12, 13) ‘Nasalaka nyonso mpo nabatela bana na ngai na makambo oyo bakoki kokutana na yango, oyo ekoki kobebisa nzoto mpe bizaleli na bango?’ (Mas. 22:3) Okoki te kobatela bana na yo na makama nyonso. Kasi, okoki koyebisa bango makambo oyo bakoki kokutana na yango na bomoi, mpe na bolingo nyonso koteya bango ndenge ya kotyela Biblia motema. (Mas. 2:1-6) Na ndakisa, soki moto moko ya libota na bino atiki kosalela Yehova, salisá bana na yo, na nzela ya Liloba ya Nzambe, báyeba ntina oyo basengeli kotikala sembo epai ya Yehova. (Nz. 31:23) To soki moto moko oyo bolingaka mingi akufi, lakisá bana na yo bavɛrsɛ ya Biblia oyo ekoki kosalisa bango báyikela likambo yango mpiko mpe bázwa kimya.—2 Ko. 1:3, 4; 2 Tim. 3:16. w20.10 27 par. 7