Sanza ya 11
Mwamibale, 1 sanza ya 11
Ntango moto azali koyanola na likambo liboso ya koyoka yango, wana ezali bozoba mpo na ye mpe kosambwa.—Mas. 18:13.
Soki totali kaka likambo oyo Yona asalaki, tokoki kokanisa ete azalaki moto ya kotyela motema te, to kutu azalaki sembo te. Yehova atindaki Yona akende kosakola nsango ya lisambisi na Ninive. Kasi na esika Yona atosa, amataki na masuwa moko oyo ezalaki kokende na ngámbo mosusu, “mpo alongwa liboso ya Yehova.” (Yona 1:1-3) Olingaki kopesa Yona libaku mosusu ya kokokisa mokumba na ye? Ntango mosusu te. Kasi, Yehova amonaki ete ebongi kopesa Yona libaku mosusu ya kotosa ye. (Yona 3:1, 2) Yona amonisaki lolenge ya moto oyo azalaki mpenza na libondeli oyo asalaki ntango azalaki na kati ya libumu ya mbisi. (Yona 2:1, 2, 9) Libondeli yango, oyo na ntembe te ezali moko ya mabondeli ebele oyo Yona asalaki, ezali kosalisa biso tómona ye te kaka moto oyo akimaki mokumba na ye. Maloba na ye emonisi ete azalaki na komikitisa, na botɔndi, mpe azalaki na ekateli ya kotosa Yehova. Tomoni ntina oyo Yehova atyaki libunga ya Yona mopanzi, ayanolaki na libondeli na ye, mpe akobaki kosalela ye lokola mosakoli! Ezali mpenza na ntina ete nkulutu nyonso alukaka ‘koyoka likambo’ liboso ya kopesa toli! w20.04 15 par. 4-6
Mwamisato, 2 sanza ya 11
[Paulo] azalaki kosalela Makomami mpo na kosolola na bango, azalaki kolimbola mpe kopesa bilembeteli na makomi.—Mis. 17:2, 3.
Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bandimaki mateya ya bokristo, mpe batyaki motema ete elimo ya santu ekosalisa bango bákanga ntina ya Liloba ya Nzambe. Bazalaki kosala bolukiluki mpo bámindimisa ete mateya yango eutaki mpenza na Makomami. (Mis. 17:11, 12; Ebr. 5:14) Kondima na bango esimbamaki kaka te na mayoki na bango, mpe bazalaki kosalela Yehova kaka te mpo na esengo oyo bazalaki koyoka ntango bazali elongo na bandeko mosusu. Kasi, kondima na bango esimbamaki nde na “boyebi ya solosolo ya Nzambe.” (Kol. 1:9, 10) Solo oyo ezali na Liloba ya Nzambe ebongwanaka te. (Nz. 119:160) Na ndakisa, ebongwanaka te ata soki ndeko moko azokisi biso to asali lisumu moko ya monene. Ebongwanaka mpe te ata soki tokutani na mikakatano. Yango wana, tosengeli koyeba mateya ya Biblia malamumalamu mpe komindimisa ete ezali solo. Ndenge kaka longo esalaka ete masuwa etɛlɛma ngwi na ntango ya mopɛpɛ makasi, kondima na biso mpe oyo esimbami makasi na mateya ya solo ya Biblia, ekosalisa mpe biso tótɛlɛma ngwi na ntango ya komekama. w20.07 9 par. 6-7
Mwaminei, 3 sanza ya 11
Apesaki biso mitindo ya kosakwela bato mpe kopesa litatoli.—Mis. 10:42.
Yesu amonaka ete makambo oyo tosalelaka bandeko na ye oyo batyami mafuta na elimo mabɔkɔ, tosalelaka yango nde ye. (Mat. 25:34-40) Lolenge ya libosoliboso ya kopesa bandeko ya Kristo mabɔkɔ ezali ya komipesa mobimba na mosala ya kokómisa bato bayekoli ndenge Yesu apesaki etinda. (Mat. 28:19, 20) Bandeko ya Kristo bakoki kokokisa mosala monene ya kosakola oyo ezali kosalema lelo na mokili mobimba kaka na lisalisi ya “bampate mosusu.” (Yoa. 10:16) Soki ozali na kati ya bampate mosusu, yebá ete mbala nyonso oyo obimi na mosala yango, ozali komonisa ete olingaka kaka te bandeko ya Yesu oyo batyami mafuta na elimo, kasi mpe Yesu ye moko. Tokokóma mpe baninga ya Yehova ná Yesu ntango tozali kosalela mbongo na biso mpo na kosimba mosala oyo bazali kotambwisa. (Luka 16:9) Na ndakisa, tokoki kotya makabo mpo na mosala ya Bokonzi na mokili mobimba, oyo esalisaka mpe na kosunga bandeko oyo bazwi likama mpe babungisi biloko na bango. Tokoki mpe kotya makabo mpo na kokokisa bamposa ya lisangá na biso; tokoki mpe kosalisa baoyo toyebi ete bazali kokelela.—Mas. 19:17. w20.04 24 par. 12-13
Mwamitano, 4 sanza ya 11
Akotyela Nzambe ya batata na ye likebi te . . . Kasi . . . akopesa nkembo nde na nzambe ya bandako makasi.—Dan. 11:37, 38.
Na kokokisama ya esakweli yango, mokonzi ya nɔrdi ‘atyelaki Nzambe ya batata na ye likebi te.’ Na ndenge nini? Lokola Union soviétique ezalaki na mokano ya kosilisa mangomba, elukaki kolɛmbisa nguya ya mangomba yango. Mpo na kokokisa mokano yango, na 1918, guvɛrnema ya Union soviétique epesaki mitindo ete liteya oyo elobaka ete Nzambe azalaka te, ebanda koteyama na biteyelo. Kasi, ndenge nini mokonzi ya nɔrdi “akopesa nkembo nde na nzambe ya bandako makasi”? Union soviétique ebimisaki mbongo mingi mpo na kokómisa limpinga ya basoda na yango makasi mpe esalaki bibundeli ebele ya nikleere mpo na kokómisa bokonzi na yango makasi. Nsukansuka, mokonzi ya nɔrdi mpe mokonzi ya sudi bakómaki na bibundeli minene ya makasi mpo na koboma ebele ya bato. Mokonzi ya nɔrdi apesaki mokonzi ya sudi mabɔkɔ mpo na ‘kotya mpenza eloko ya bosɔtɔ oyo ezali koyeisa libebi’—ONU.—Dan. 11:31. w20.05 6-7 par. 16-17
Mwapɔsɔ, 5 sanza ya 11
Ndeko na yo . . . abungaki mpe amonani.—Luka 15:32.
Nani azali na mokumba ya koluka baoyo batiká lisangá? Biso nyonso. Ezala bankulutu, babongisi-nzela, bandeko ya libota mpe basakoli nyonso ya lisangá bakoki kosalisa. Ozali na moninga to ndeko moko ya libota oyo atiká lisangá? Okosala nini soki okutani na ndeko moko oyo atiká lisangá ntango ozali kosakola ndako na ndako to na bisika ya bato nyonso? Yebisá ndeko yango ete soki asepeli, okopesa adrɛsi mpe nimero na ye ya telefone epai ya bankulutu ya lisangá na bino mpo báya kotala ye. Nkulutu moko na nkombo Thomas alobi boye: “Natunaka naino bandeko ndenge na ndenge soki bayebi bisika oyo bato yango bafandaka. Natunaka mpe basakoli soki bayebi ndeko moko oyo atiká koyangana na makita. Na nsima, ntango nakei kotala bandeko yango oyo batiká lisangá, natunaka soki bana mpe bandeko na bango mosusu ya libota bazali ndenge nini. Bandeko mosusu oyo batiká lisangá bazalaki komema bana na bango na makita mpe ekoki kozala ete bana yango mpe mosusu bazalaki basakoli. Bango mpe bazali na mposa ya lisalisi mpo bázongela Yehova.” w20.06 24 par. 1; 25 par. 6-7
Mwalomingo, 6 sanza ya 11
Nakokanisa misala ya Yah; Mpo nakokanisa misala na yo ya kokamwa ya ntango ya kala.—Nz. 77:11.
Na bikelamu nyonso oyo ezali na mabele, kaka bato nde bazali na likoki ya kokanisa makambo oyo eleká, kotalela yango malamumalamu mpo na kozwa mateya ya ntina na oyo etali bizaleli na bango. Yango esalaka ete tózala na likoki ya koyekola bizaleli ya malamu, mpe tóbongola lolenge na biso ya kokanisa mpe makambo oyo tosalaka na bomoi na biso. (1 Ko. 6:9-11; Kol. 3:9, 10) Kutu, tokoki koteya lisosoli na biso mpo eyeba kokesenisa malamu ná mabe. (Ebr. 5:14) Tokoki mpe koyekola kokóma na bizaleli lokola, bolingo, koyokelaka basusu mawa, mpe komekola bosembo ya Yehova. Tokomonisa ete tozali na botɔndi mpo na likabo oyo Nzambe apesá biso ya kokanisaka makambo soki tozali kopona kokanisa ntango nyonso ndenge oyo Yehova asalisaki to abɔndisaki biso na kala. Yango ekokómisa lisusu kondima na biso makasi ete akosalisa biso mpe na mikolo ezali koya. (Nz. 77:12; 78:4, 7) Tokomonisa mpe botɔndi na biso mpo na likabo yango soki tozali kokanisa makambo malamu oyo bato mosusu basalelaka biso mpe kopesa bato yango matɔndi mpo na lisalisi na bango. Bato ya mayele balobi ete mbala mingi bato oyo bamonisaka botɔndi bazalaka na esengo. w20.05 23 par. 12-13
Mwayambo, 7 sanza ya 11
[Bangá] nkombo oyo ya nkembo mpe ya nsɔmɔ, ɛɛ Yehova, Nzambe na yo.—Mib. 28:58.
Kanisá ndenge Moize amiyokaki ntango azalaki na mobenga moko mpe amonaki emonaneli ya nkembo ya Yehova ezali koleka. Buku Étude perspicace des Écritures elobi boye: “Yango ezalaki likambo ya kokamwa oyo moto akokaki komona.” Na ntembe te, Moize ayokaki maloba oyo ya anzelu: “Yehova, Yehova, Nzambe ya motema mawa mpe ya ngɔlu, ayokaka nkanda noki te mpe atondi na motema boboto mpe na solo, abatelaka motema boboto mpo na bankóto, alimbisaka libunga ná kobuka mibeko mpe lisumu.” (Kob. 33:17-23; 34:5-7) Ekoki kozala ete ntango Moize azalaki kosalela nkombo Yehova, na maloba ya mokapo ya lelo, makambo oyo amonaki na emonaneli yango ezalaki kozongela ye na makanisi. Ntango tozali kokanisa mpo na nkombo Yehova, tosengeli mpe kokanisa bomoto na ye. Tosengeli mpe kokanisa mpo na bizaleli na ye, na ndakisa nguya, bwanya, bosembo, mpe bolingo na ye. Kokanisa na bizaleli yango mpe bizaleli mosusu ekoki kotinda biso tózala na limemya makasi mpo na ye.—Nz. 77:11-15. w20.06 8-9 par. 3-4
Mwamibale, 8 sanza ya 11
Kangamá na makambo oyo oyekolaki mpe oyo basalisaki yo ondima.—2 Tim. 3:14.
Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakoyebana na bolingo oyo bamoniselanaka. (Yoa. 13:34, 35) Kasi mpo tózala na kondima makasi, ezali na makambo mingi oyo tosengeli kosala. Kondima na biso esengeli kosimbama kaka te na bolingo oyo Kristo asɛngaki bayekoli na ye bámoniselanaka. Mpo na nini? Mpo soki kondima na biso esimbami kaka na bolingo oyo bakristo bamoniselanaka, tokoki kobungisa yango. Na ndakisa, tokoki kotika kosalela Yehova soki ndeko moko na lisangá, ata mpe nkulutu to mobongisi-nzela, asali lisumu moko ya monene. Tokoki mpe kotika kosalela Yehova soki ndeko moko apesi biso nkanda to akómi mopɛngwi mpe akómi koloba ete mateya oyo tondimaka ezali lokuta. Na yango, mpo kondima na biso ezala makasi, esengeli kosimbama na boyokani malamu oyo tozalaka na yango ná Yehova. Yango eteyi biso nini? Soki ondimelaka Nzambe kaka mpo na makambo oyo bato mosusu basalaka, kasi te mpo na boyokani oyo ozali na yango ná Yehova, kondima na yo ekozala makasi te. Ndenge oyo oyokaka mpo na Yehova mpe mpo na basaleli na ye ekoki kokolisa kondima na yo. Kasi ezali mpe na ntina mingi oyekola Biblia na mozindo, okanga ntina ya makambo oyo ozali koyekola, mpe osala bolukiluki mpo omindimisa ete makambo oyo ozali koyekola mpo na Yehova ezali solo. Osengeli komindimisa ete Biblia eteyaka biso solo na ntina etali Yehova.—Rom. 12:2. w20.07 8 par. 2-3
Mwamisato, 9 sanza ya 11
Bosengeli kosalisa baoyo bazali bato ya bolɛmbu.—Mis. 20:35.
Bandakisa mingi emonisi ete baanzelu basalisaka biso tókutana na bandeko oyo batiká kosakola mpe koyangana na makita oyo bazali na mposa ya kozongela Yehova. (Em. 14:6) Na ndakisa, ndeko mobali moko oyo atikaki kosakola mpe koyangana na makita na nkombo Silvio, oyo afandaka na ekólo Équateur, abondelaki Yehova atinda moto moko mpo na kosalisa ye. Ntango azalaki kobondela, bankulutu mibale babɛtaki na porte na ye, bayaki kotala ye. Na boumeli ya ntango oyo balekisaki, bankulutu yango basepelaki ndenge basalisaki ye. Tokozwa esengo mingi ntango tosalisi moto oyo alɛmbaki na elimo azongela Yehova. Tótala oyo ndeko mobali moko na nkombo Salvador, oyo azali mobongisi-nzela, mpe atyelaka bandeko oyo balɛmbá na elimo likebi alobi: “Ntango nakanisaka bandeko oyo batikaki lisangá kasi bazongeli Yehova, nakokaka te kokanga motema mpe na bantango mosusu, esengo esalaka ete nalela. Nayokaka esengo mingi ndenge nazwi likoki ya kosala elongo na Yehova mpo na kosalisa mosaleli na ye alongwa na mokili ya Satana mpe azongela lisangá.” Ata Soki otiká koyangana na makita mpe kosakola, yebá ete Yehova alingaka yo kaka. Yehova azali kozela ete ozongela ye mpe akoyamba yo na esengo. w20.06 29 par. 16-18.
Mwaminei, 10 sanza ya 11
[Okomona] Molakisi na yo Monene.—Yis. 30:20.
Lokola azali ‘Molakisi na biso Monene,’ Yehova akomisá bandakisa mosusu na kati ya Liloba na ye mpo na koteya biso. (Yis. 30:21) Tozwaka mateya ntango tomanyolaka na masolo ya Biblia ya baoyo bamonisaki bizaleli oyo esepelisaka Nzambe. Tozwaka mpe mateya ntango toyekolaka makambo oyo ekómelaki bato oyo bamonisaki bizaleli yango te. (Nz. 37:37; 1 Ko. 10:11) Kanisá makambo oyo ekómelaki Mokonzi Saulo. Ntango azalaki elenge azalaki na bopɔlɔ. Ayebaki esika makoki na ye esuki mpe aboyaki kutu kondima mikumba mosusu. (1 Sa. 9:21; 10:20-22) Kasi mwa moke nsima ya kokóma mokonzi, Saulo akómaki na lofundo. Na libaku moko boye, azangaki motema molai mpo na kozela mosakoli Samwele mpe atumbaki mbeka, atako azalaki na lotomo te ya kosala yango. Mpo na yango, Yehova asepelaki lisusu na ye te mpe nsukansuka alongolaki Saulo na bokonzi. (1 Sa. 13:8-14) Tokomonisa bwanya soki tozwi liteya na ndakisa na ye mpe toboyi kosala makambo oyo tozali na lotomo ya kosala te. w20.08 10 par. 10-11
Mwamitano, 11 sanza ya 11
Bózala na limemya epai ya baoyo bazali . . . kokamba bino na kati ya Nkolo mpe kokebisa bino.—1 Tes. 5:12.
Ezali solo ete na nzela ya Kristo, Yehova apesá lisangá na ye “makabo oyo ezali bato.” (Ef. 4:8) Na kati ya ‘makabo yango oyo ezali bato’, tokoki kotánga bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ná basungi na bango, bandeko ya bakomite ya filiale, bakɛngɛli-batamboli, balakisi na biteyelo ya teokrasi, bankulutu ya masangá, mpe basaleli na misala. Bandeko mibali yango nyonso batyamaki na litambwisi ya elimo santu mpo na kobatela etonga ya Yehova mpe mpo na kolendisa lisangá. (1 Pe. 5:2, 3) Bandeko mibali batyamaka na nzela ya elimo santu mpo na kokokisa mikumba ndenge na ndenge na kati ya lisangá. Kaka ndenge mabɔkɔ mpe makolo to biteni mosusu ya nzoto esalaka mpo na litomba ya nzoto mobimba, bandeko mibali oyo batyamaka na nzela ya elimo santu, basalaka mosala makasi mpo na litomba ya lisangá mobimba. Bandeko yango balukaka lokumu na bango moko te. Kasi, balukaka nde kolendisa mpe kopesa bandeko ya lisangá makasi. (1 Tes. 2:6-8) Topesaka Yehova matɔndi mpo na bandeko mibali yango oyo batyaka matomba ya basusu na esika ya liboso! w20.08 21 par. 5-6
Mwapɔsɔ, 12 sanza ya 11
Bókende mpe bókómisa bato bayekoli.—Mat. 28:19.
Ntina mosusu oyo etindaka biso tósakola ezali mpo bato bazali ‘konyokwama mpe basundolami,’ mpe mpo bazali na mposa makasi ya koyekola solo oyo etali Bokonzi. (Mat. 9:36) Yehova alingi ete bato ya lolenge nyonso bázwa boyebi ya sikisiki ya solo mpe bábika. (1 Tim. 2:4) Ntango tokanisaka ndenge oyo mosala na biso ya kosakola ekoki kobikisa bato, yango etindaka biso tósakola. (Rom. 10:13-15; 1 Tim. 4:16) Tosengeli mpe kozala na bisaleli oyo ebongi mpo na mosala ya kosakola. Mpe tosengeli koyeba kosalela yango malamu. Yesu apesaki bayekoli na ye malako ya polele mpo na ndenge ya kosakola nsango malamu. Ayebisaki bango eloko basengeli komema, esika oyo basengeli kosakola, mpe makambo oyo basengeli koloba. (Mat. 10:5-7; Luka 10:1-11) Lelo oyo, ebongiseli ya Yehova epesi biso Bisaleli mpo na koteya oyo esalisaka biso tókokisa mosala yango malamu. Esalisaka mpe biso tóyeba ndenge ya kosalela malamu bisaleli yango. Formasyo yango esalisaka biso tóbangaka te ntango tozali kosakola, mpe tóyekola ndenge ya kokóma bateyi malamu.—2 Tim. 2:15. w20.09 4 par. 6-7, 10
Mwalomingo, 13 sanza ya 11
Nazali na ntina mosusu ya botɔndi te koleka makambo oyo: nayokaka ete bana na ngai bazali kokoba kotambola na kati ya solo.—3 Yoa. 4.
Kanisá esengo oyo ntoma Yoane azalaki na yango, ntango ayokaki ete bato oyo asalisaki báyeba solo, bazalaki kokoba kosalela Yehova na bosembo! Bakutanaki na mikakatano mingi, mpe ntoma Yoane asalaki makasi mpo na kolendisa kondima ya bakristo yango oyo bazalaki lokola bana na ye ya elimo. Ndenge moko mpe, toyokaka esengo ntango toyoki ete bana na biso to mpe bato oyo tosalisá bayeba solo, bamipesi na Yehova mpe bazali kokoba kosalela ye. (3 Yoa. 3) Na mobu soki 98 T.B, elimo santu etindaki Yoane akoma mikanda misato. Mikanda yango ezalaki na mokano ya kolendisa bakristo ya sembo mpo bábatela kondima na bango epai ya Yesu mpe bákoba kotambola na kati ya solo. Yoane azalaki komitungisa mpo na bopusi oyo bateyi ya lokuta bazalaki na yango na masangá. (1 Yoa. 2:18, 19, 26) Bapɛngwi yango bazalaki koloba ete bayebi Nzambe, kasi bazalaki kotosa mibeko ya Yehova te. w20.07 20 par. 1-3
Mwayambo, 14 sanza ya 11
Bóndimela Nzambe, bóndimela mpe ngai.—Yoa. 14:1.
Tondimaka ete nsango oyo tosakolaka ezali solo, yango wana tosepelaka koyebisa yango bato ebele. Tondimaka mpe bilaka oyo ezali na Liloba ya Nzambe. (Nz. 119:42; Yis. 40:8) Tozali komona ndenge bisakweli ya Biblia ezali kokokisama na mikolo na biso. Tomonaka mpe ndenge bato babongolaka bomoi na bango ntango babandi kosalela toli oyo ezali na Biblia. Yango endimisaka biso ete nsango malamu ya Bokonzi nde nsango oyo moto nyonso asengeli koyoka. Tozalaka mpe na kondima epai ya Yehova mpo nsango oyo toteyaka eutaka nde epai na ye. Tondimelaka mpe Yesu, Moto oyo Yehova atyá mpo azala Mokonzi ya Bokonzi na ye. Ata soki tokutani na mikakatano nini, Yehova akozala ntango nyonso ekimelo na biso mpe makasi na biso. (Nz. 46:1-3) Longola yango, toyebi ete Yesu nde azali kotambwisa mosala ya kosakola mpe azali kosalela nguya mpe bokonzi oyo Yehova apesá ye. (Mat. 28:18-20) Kondima esalisaka biso tótya motema ete Yehova akopambola milende na biso. w20.09 12 par. 15-17
Mwamibale, 15 sanza ya 11
Asaleli ngai likambo moko ya malamu. . . . Asali oyo ekoki na ye.—Mrk. 14:6, 8.
Na bantango mosusu, bandeko basi bakoki kozala na mposa ete moto moko asalisa bango ntango bakutani na mokakatano moko boye. (Yis. 1:17) Na ndakisa, ndeko mwasi oyo mobali akufá to oyo libala ekufá, akoki kozala na mposa ete moto moko asalisa ye na makambo mosusu oyo mobali na ye azalaki kosala. Ndeko mwasi oyo akómi mobange akoki kozala na mposa ete moto moko asalisa ye mpo na kosolola na minganga. To mpe ndeko mwasi moko ya mobongisi-nzela oyo apesaka mpe mabɔkɔ na misala mosusu ya teokrasi, akoki kozala na mposa ete ndeko moko aloba mpo na ye ntango basusu bazali koloba mabe ndenge azali lisusu kosakola mingi te. Tólobela ndakisa ya Yesu. Yesu azalaki kokakatana te mpo na kolongisa bandeko basi ya sembo ntango bato mosusu bakaniseli bango mabe. Na ndakisa, alongisaki Maria ntango Marta azalaki koloba mabe mpo na ye. (Luka 10:38-42) Alongisaki lisusu Maria ntango bato mosusu bapamelaki ye mpo bakanisaki ete azwaki ekateli ya mabe. (Mrk. 14:3-9) Yesu ayebaki makanisi oyo etindaki Maria asala likambo yango, mpe apesaki ye longonya mpo na yango. Kutu asakolaki ete “epai nyonso bakosakola nsango malamu na mokili mobimba,” bakolobela mpe likambo oyo mwasi yango asalaki. w20.09 24 par. 15-16
Mwamisato, 16 sanza ya 11
Bóbatela etonga ya Nzambe oyo bapesi na mabɔkɔ na bino, bósala yango na kotindikama te, kasi na motema moko.—1 Pe. 5:2.
Mobateli ya mpate ya malamu azalaki koyeba ete bampate ekoki kobunga. Mpe soki mpate moko etiki etonga, mobateli ya mpate azalaki kopesa yango etumbu te. Tótala ndakisa moko oyo emonisi ndenge Nzambe asalisaki basaleli na ye mosusu, oyo na ntango moko boye, batikaki kosalela ye. Mosakoli Yona akimaki mokumba oyo Nzambe apesaki ye. Atako bongo, Yehova asundolaki ye te. Lokola mobateli ya mpate ya malamu, Yehova abikisaki ye mpe apesaki ye makasi oyo esengeli mpo akokisa mokumba na ye. (Yona 2:7; 3:1, 2) Na nsima, Nzambe asalelaki molona ya ekutu mpo na kosalisa Yona ayeba ete bomoi ya moto nyonso ezali na ntina. (Yona 4:10, 11) Yango eteyi biso nini? Bankulutu basengeli nokinoki te kosundola baoyo batiká kosakola mpe koyangana na makita. Kasi, basengeli nde koluka koyeba ntina oyo mpate moko etiki etonga. Mpe ntango mpate yango ezongeli Yehova, bankulutu bakobaka komonisela yango bolingo mpe kotyela yango likebi. w20.06 20-21 par. 10-12
Mwaminei, 17 sanza ya 11
Bakosalisama na lisalisi moko ya moke.—Dan. 11:34.
Nsima ya kokwea ya Union soviétique na 1991, basaleli ya Nzambe oyo bazalaki na ekólo yango ya monene, bazwaki bonsomi mpo na mwa ntango. Esakweli ya Danyele ebengi yango “lisalisi moko ya moke.” Na yango, bakómaki kosakola na bonsomi nyonso. Mpe eumelaki te, basakoli bakómaki ebele mpenza na bikólo yango oyo ezalaki liboso na Union soviétique. Kasi nsima ya mwa bambula, Russie ná bikólo oyo epesaka yango mabɔkɔ ekómaki mokonzi ya nɔrdi. Mpo guvɛrnema moko ezala mokonzi ya nɔrdi to mokonzi ya sudi esengeli kokokisa makambo misato oyo elandi: (1) Esengeli kobundisa basaleli ya Nzambe, (2) esengeli komonisa na misala na yango ete ezali monguna ya Yehova mpe ya basaleli na ye, mpe (3) esengeli kowelana na mokonzi mosusu. Russie mpe bikólo oyo epesaka yango mabɔkɔ Ebundisaka basaleli ya Nzambe na ndenge epekisaka mosala ya kosakola mpe enyokolaka ebele ya bandeko basi mpe mibali. Makambo yango emonisi ete eyinaka Yehova mpe basaleli na ye. Mpe ewelanaka na mokonzi ya sudi, elingi koloba bokonzi ya Anglo-américain. w20.05 12-13 par. 3-4
Mwamitano, 18 sanza ya 11
Okeba na mateya na yo ntango nyonso.—1 Tim. 4:16.
Lokola tosengeli koteya bato mpo na kokómisa bango bayekoli, mateya na biso esengeli kozala malamu mpenza. Toyekolaka na bamilio ya bato Biblia mbala na mbala. Lokola tolingaka makambo oyo toteyaka, tokoki kokwea na motambo ya koloba mingi. Nzokande, kaka ndenge ezalaka mpo na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to mpe boyekoli ya Biblia na lisangá, mosakoli oyo azali koyekola na moto Biblia mpe asengeli kolobaka mingi te. Moteyi nyonso asengeli kosalela Biblia malamumalamu ntango azali koteya, yango wana, asengeli kokeba ete alobaka mingi te ata ntango bazali kolobela makambo oyo ayebi malamu mpenza. (Yoa. 16:12) Kanisá naino, boyebi ya Biblia oyo ozalaki na yango ntango ozwaki batisimo ná oyo ozali na yango lelo, ekokani? Na ntango wana, oyebaki kaka mwa mateya oyo moto asengeli koyeba na ebandeli. (Ebr. 6:1) Esɛngaki bambula ebele mpo oyeba makambo oyo oyebi lelo, yango wana koluka te koteya moyekoli ya sika makambo nyonso na mbala moko. w20.10 14-15 par. 2-4
Mwapɔsɔ, 19 sanza ya 11
Oyo mosali ya mabaya, mwana ya Maria.—Mrk. 6:3.
Yehova aponelaki Yesu baboti ya malamu mpenza. (Mat. 1:18-23; Luka 1:26-38) Maloba ya Maria oyo eutaki mpenza na motema, mpe oyo ekomami na Biblia, emonisi ete azalaki kolinga Yehova mpe Liloba na ye mingi mpenza. (Luka 1:46-55) Mpe ndenge oyo Yozefe atosaki makambo oyo Yehova asɛngaki ye, emonisi ete azalaki kolinga Nzambe, mpe azalaki na mposa ya kosepelisa ye. (Mat. 1:24) Kobosana te ete Yehova aponelaki Yesu te baboti oyo bazalaki na bozwi. Mbeka oyo Maria ná Yozefe bapesaki nsima ya kobotama ya Yesu, emonisi ete bazalaki babola. (Luka 2:24) Emonani ete bazalaki na bomoi ya mindɔndɔ te, mingimingi lokola bakómaki na bana nsambo to koleka. (Mat. 13:55, 56) Yehova abatelaki Yesu na makama mosusu, kasi abatelaki ye te na mikakatano nyonso. (Mat. 2:13-15) Na ndakisa, Yesu azalaki na bandeko ya libota oyo na ebandeli, bazalaki kondima te ete azali Masiya. (Mrk. 3:21; Yoa. 7:5) Ekoki mpe kozala ete Yozefe, tata-mobɔkɔli na ye, akufaki ntango Yesu azalaki naino elenge. Kanisá ndenge likambo yango epesaki ye mpasi! w20.10 26-27 par. 4-6
Mwalomingo, 20 sanza ya 11
Nakotika yo soki moke te, mpe nakosundola yo ata moke te.—Ebr. 13:5.
Osilá koyoka lokola osundolami mpe moto ya kosalisa yo azali te ntango okutanaki na mokakatano? Likambo wana ekómelá bato mingi, ata mpe basaleli ya sembo ya Yehova. (1 Bak. 19:14) Soki yango ekómeli yo, kanisá elaka ya Yehova oyo ete: “Nakotika yo soki moke te, mpe nakosundola yo ata moke te.” Yango wana, tokoki koloba na mpiko nyonso ete: “Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga eloko te.” (Ebr. 13:5, 6) Ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Yudea maloba oyo na mobu soki 61 ya ntango na biso. Maloba yango ezali kosalisa biso tóbosana te makambo oyo mokomi ya nzembo akomaki na Nzembo 118:5-7. Ndenge moko na mokomi ya nzembo, ntoma Paulo ayebaki, na nzela ya makambo oyo akutanaki na yango, ete Yehova azali mosungi na ye. Na ndakisa, mbula mibale liboso akoma mokanda na ye epai ya Baebre, Paulo abikaki na mopɛpɛ makasi ntango azalaki kosala mobembo na mbu. (Mis. 27:4, 15, 20) Na boumeli ya mobembo yango mpe bambula mingi liboso, Yehova asalisaki Paulo na ndenge mingi. w20.11 12 par. 1-2
Mwayambo, 21 sanza ya 11
Koloba te ete: “Mpo na nini mikolo ya liboso elekaki mikolo oyo na malamu?”—Mos. 7:10.
Mpo na nini ezali mabe kokanisaka ete bomoi oyo tozalaki na yango kala ezalaki malamu koleka? Kokanisakanisa bomoi ya kala, ekotinda biso tókanisa kaka makambo ya malamu oyo tokutanaki na yango na ntango wana. Tótalela ndakisa ya Bayisraele ya kala. Nsima ya kolongwa na Ezipito, babosanaki mbala moko bomoi ya mpasi oyo bazalaki na yango kuna. Kasi, bazalaki kokanisa kaka bilei ya kitoko oyo bazalaki kolya na Ezipito. Balobaki boye: “Talá tozali kokanisa mbisi oyo tomesanaki kolya na Ezipito mpambampamba, ná bakɔkɔmbrɛ, ná bapastɛkɛ, ná bapwaro, ná matungulu, ná ayi!” (Mit. 11:5) Kasi ezali mpenza solo ete bazalaki kolya bilei yango “mpambampamba” to ofele? Te. Bayisraele banyokwamaki mabe mpenza na boombo na Ezipito; bamonaki mpenza bwale. (Kob. 1:13, 14; 3:6-9) Kasi na nsima, babosanaki bampasi nyonso wana mpe bakómaki kosepela na bomoi na bango ya kala. Batyaki makanisi na bango nyonso na bantango ya kitoko oyo balekisaki, na esika ya kotya makanisi na makambo ya malamu oyo Yehova azalaki kosalela bango. Yehova asepelaki te na ezaleli na bango wana.—Mit. 11:10. w20.11 25 par. 5-6
Mwamibale, 22 sanza ya 11
Yehova azali pene na baoyo motema ebukani; mpe abikisaka baoyo elimo etutami.—Nz. 34:18.
Na bantango mosusu, tokoki kokanisa ndenge oyo bomoi ezalaka mokuse mpe ‘etondi na mpasi.’ (Yobo 14:1) Yango wana, na bantango mosusu tokoki kolɛmba nzoto. Basaleli mingi ya Yehova na ntango ya kala mpe balɛmbaki nzoto. Bamosusu kutu basɛngaki bákufa. (1 Bak. 19:2-4; Yobo 3:1-3, 11; 7:15, 16) Kasi Yehova azalaki ntango nyonso kobɔndisa bango mpe kopesa bango makasi. Makambo oyo bakutanaki na yango ekomamaki mpo na kobɔndisa mpe koteya biso. (Rom. 15:4) Tólobela Yozefe mwana ya Yakobo. Na mwa ntango moke, bomoi ya Yozefe ebongwanaki mpenza; mwana oyo tata na ye azalaki kolinga mingi akómaki nde moombo mpamba epai ya mokonzi moko ya Ezipito oyo azalaki mopakano. (Eba. 37:3, 4, 21-28; 39:1) Na nsima, mwasi ya Potifare akoselaki Yozefe makambo ete alingaki kosangisa na ye nzoto na makasi. Na esika Potifare aluka ata koyeba ndenge makambo elekaki, abwakaki Yozefe mbala moko na bolɔkɔ, mpe bakangaki makolo na ye na minyɔlɔlɔ ya ebende. (Eba. 39:14-20; Nz. 105:17, 18) Na ntembe te, likambo wana ekokaki mpenza kolɛmbisa Yozefe nzoto! w20.12 16-17 par. 1-4
Mwamisato, 23 sanza ya 11
Nkombo na yo esantisama.—Mat. 6:9.
Yesu alobaki ete yango nde likambo oyo tosengeli kotya na esika ya liboso na mabondeli na biso. Kasi, Yesu alingaki mpenza koloba nini? Kosantisa eloko moko elimboli kokómisa yango mosantu to pɛto. Kasi bato mosusu bakoki komituna boye: ‘Nkombo Yehova ezalaka mosantu mpe pɛto, boye te?’ Mpo na koyanola na motuna yango, tosengeli koyeba soki nkombo esangisaka makambo nini. Nkombo ezali kaka te liloba moko oyo ekomami na papye to oyo ekoki kobengama. Talá oyo Biblia elobi: “Nkombo esengeli kolingama mingi koleka ebele ya bomɛngo.” (Mas. 22:1; Mos. 7:1) Mpo na nini nkombo ezali na ntina mingi? Mpo yango emonisaka lokumu ya moto, mpe ndenge oyo bato mosusu batalelaka moto oyo amemi nkombo yango. Na yango, likambo ya ntina ezali te ndenge oyo nkombo moko ekomami to ebengamaka; kasi oyo eleki ntina ezali nde lolenge oyo bato mosusu bakanisaka ntango bamonaka to bayokaka nkombo yango. Ntango bato balobaka lokuta mpo na Yehova, babebisaka nde lokumu na ye. Ntango babebisi lokumu na ye, bazali nde kosambwisa nkombo na ye. w20.06 3 par. 5-7
Mwaminei, 24 sanza ya 11
Molimo na ngai ebulungani mingi mpenza; mpe yo, Ee Yehova—kino ntango nini?—Nz. 6:3.
Mitungisi ekoki kopesa biso mpasi mingi mpe kosala ete tózanga ata ntango ya kokanisa makambo mosusu. Na ndakisa, tokoki komitungisa mpo tokozala na mbongo mingi te mpo na kosomba biloko oyo tosengeli na yango, to mpo tokobɛla mpe tokozala na makasi te ya kokende na mosala to mpo bakolongola biso na mosala. Tokoki mpe komitungisa soki tokanisi ete tokotikala sembo te ntango tomekami mpo na kobuka mibeko ya Nzambe. Mosika te Satana akotinda bato na ye bábundisa basaleli ya Nzambe, yango wana, tokoki komitungisa mpo na oyo tokosala ntango bakoya kobundisa biso. Tokoki komituna boye: ‘Ezali mabe namitungisa mpo na makambo wana?’ Toyebi ete Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Bótika komitungisa.” (Mat. 6:25) Yesu alingaki nde koloba ete tosengeli komitungisa ata mpo na likambo moko te? Ezali bongo te! Kobosana te, basaleli mosusu ya Yehova ya sembo ya ntango ya kala mpe bamitungisaki, kasi Yehova aboyaki bango te. (1 Bak. 19:4) Yesu azalaki nde kobɔndisa biso. Alingaki te ete tómitungisaka mingi mpo na biloko ya mokili oyo, mpe tóbosana ete kosalela Yehova nde likambo eleki ntina na bomoi na biso. w21.01 3 par. 4-5
Mwamitano, 25 sanza ya 11
Mokonzi ya mwasi ezali mobali.—1 Ko. 11:3.
Mobali akozongisa monɔkɔ epai ya Yehova mpe Yesu na kotalela ndenge oyo asalelaka bato ya libota na ye makambo. (1 Pe. 3:7) Lokola Yehova azali Mokonzi ya libota na ye oyo ezali na likoló mpe oyo ezali awa na mabele, azali na lotomo ya kotya mibeko mpo na ndenge oyo bana na ye basengeli komitambwisa, mpe komindimisa ete bazali kotosa mibeko yango. (Yis. 33:22) Lokola Yesu mpe azali mokonzi ya lisangá, azali mpe na lotomo ya kotya mibeko mpe ya kosɛnga bato bátosa yango. (Gal. 6:2; Kol. 1:18-20) Ndenge moko na Yehova mpe Yesu, tata ya libota mpe azali na bokonzi ya kotyela bato ya libota na ye mibeko. (Rom. 7:2; Ef. 6:4) Atako bongo, bokonzi na ye ezali na ndelo. Na ndakisa, mibeko oyo akotya esengeli koyokana na mitinda oyo ezali na liloba ya Nzambe. (Mas. 3:5, 6) Mpe tata ya libota azali na bokonzi te ya kotyela bato oyo bazali na libota na ye te mibeko. (Rom. 14:4) Lisusu, soki bana na ye bakoli mpe balongwe na ndako, bakokoba kotosa ye, kasi bazali lisusu te na nse ya bokonzi na ye.—Mat. 19:5. w21.02 2-3 par. 3-5
Mwapɔsɔ, 26 sanza ya 11
[Pesá] bato na [yo] . . . biloko oyo basengeli na yango.—1 Tim. 5:8.
Likambo moko ya ntina mingi oyo tata asengeli kosala mpo na komonisa ete alingaka bato ya libota na ye ezali ya kokokisa bamposa na bango ya mosuni. Kasi, asengeli kobosana te ete biloko ya mosuni ekoki te kokokisa bamposa ya elimo ya bato ya libota na ye. (Mat. 5:3) Ntango Yesu azalaki konyokwama likoló ya nzete ya mpasi, azwaki bibongiseli mpo na kokokisa bamposa ya Maria. Atako Yesu azalaki koyoka mpasi makasi mpenza, asɛngaki ntoma Yoane abatela Maria, mama na ye. (Yoa. 19:26, 27) Ndeko oyo azali tata ya libota akoki kozala na mikumba mingi. Asengeli kozala gɔigɔi te na mosala na ye, mpo akoka kopesa Yehova lokumu. (Ef. 6:5, 6; Tito 2:9, 10) Akoki mpe kozala na mikumba mingi na lisangá, na ndakisa, kobatela bandeko mpe kolendisa bango na elimo, mpe kozala ndakisa na mosala ya kosakola. Asengeli mpe koyekolaka Biblia mbala na mbala na mwasi mpe bana na ye. Soki asali bongo, bato ya libota na ye bakozala na botɔndi na eloko nyonso oyo akosala mpo na kosalisa bango bázalaka nzoto kolɔngɔnɔ mpe na esengo. Bakosepela mpe na ndenge azali kosalisa bango bákoba kosalela Yehova.—Ef. 5:28, 29; 6:4. w21.01 12 par. 15, 17
Mwalomingo, 27 sanza ya 11
[Mwasi ya makoki] azali kotya likebi na makambo ya bato ya ndako na ye.—Mas. 31:27.
Biblia elobeli makambo oyo mwasi ya makoki akoki kosala. Na ndakisa, akoki kokamba misala oyo esalemaka na ndako, kosomba mpe kotɛka bilanga, mpe kosala mombongo. (Mas. 31:15, 16, 18) Azali moombo te oyo akoki te kopesa makanisi na ye. Kutu, mobali na ye atyelaka ye motema mpe ayokaka makanisi na ye. (Mas. 31:11, 26) Soki mobali azali kosalela mwasi na ye makambo na boboto mpe kopesa ye lokumu, mwasi na ye akondima komikitisa liboso na ye. Atako Yesu asalaki makambo mingi ya minene, amonaki te ete kotosa bokonzi ya Yehova ezali kokitisa ye. (1 Ko. 15:28; Flp. 2:5, 6) Ndenge moko mpe, mwasi ya makoki oyo alandaka ndakisa ya Yesu, akomona te ete bakitisi ye ndenge basɛngi ye ete atosaka mobali na ye. Akopesa mobali na ye mabɔkɔ kaka te mpo alingaka ye, kasi libosoliboso mpo alingaka mpe atosaka Yehova. Nzokande, mwasi oyo atosaka mobali na ye akopesa mobali na ye mabɔkɔ te soki asɛngi ye abuka mibeko ya Nzambe to asala makambo oyo eyokani te na mitinda ya Biblia. w21.02 11 par. 14-15; 12 par. 19
Mwayambo, 28 sanza ya 11
Bolɔzi ebotaka ezaleli ya koyika mpiko.—Rom. 5:3.
Kolinga Nzambe esalisaka basaleli ya Yehova báyika mpiko ntango bazali konyokola bango. Na ndakisa, ntango tribinale monene ya Bayuda epekisaki bantoma bátika kosakola, bolingo etindaki bango ‘bátosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.’ (Mis. 5:29; 1 Yoa. 5:3) Bolingo ya ndenge wana mpe epesaka bandeko na biso makasi lelo oyo, mpe mingi na bango bazali kotikala ngwi atako baguvɛrnema ya nguya ezali konyokola bango. Na esika tólɛmba nzoto, tomonaka ete ezali libaku malamu koyika mpiko ata soki mokili ezali koyina biso. (Mis. 5:41; Rom. 5:3-5) Ekoki kozala mpasi mingi tóyika mpiko soki bato ya libota na biso moko bazali kotɛmɛla biso. Ntango bato ya libota na biso bamoni ete tokómi koyekola makambo etali Yehova, bakoki kokanisa ete tobungi nzela. Basusu bakoki kokanisa ete tobɛli motó. (Talá mpe Marko 3:21.) Bakoki kutu kotɛmɛla biso makasi mpenza. Yango esengeli kokamwisa biso te. Yesu alobaki: “Banguna ya moto bakozala bato ya ndako na ye moko.”—Mat. 10:36. w21.03 21 par. 6-7
Mwamibale, 29 sanza ya 11
Moto nyonso asengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te, koyokaka nkanda noki te.—Yak. 1:19.
Ntango okei na mosakoli mosusu mpo na koyekola Biblia na moto, yokáká na likebi ntango ndeko azali kosolola na moyekoli ya Biblia. Yango ekosalisa yo oyeba ntango ya malamu oyo osengeli kopesa likanisi na yo. Toboyi te, osengeli kokanisa liboso ya koloba likambo moko. Na ndakisa, osengeli te kolobaka mingi, kokata ndeko oyo azali kotambwisa boyekoli maloba, to mpe kokɔtisa lisolo mosusu oyo eyokani te na makambo oyo bozali koyekola. Kasi soki opesi likanisi ya mokuse, osaleli ndakisa moko, to mpe otuni motuna, okoki kosala ete lisolo oyo bozali koyekola ekóma lisusu polele. Na bantango mosusu, okoki komona ete ozali na makambo mingi te ya kobakisa na lisolo oyo bozali koyekola. Kasi, soki opesi moyekoli ya Biblia longonya mpe otyeli ye likebi, okosalisa ye mpo akola na elimo. Soki esengeli, okoki koyebisa moyekoli ya Biblia na mokuse ndenge oyo oyebaki solo, ndenge oyo olongaki mokakatano moko boye, to mpe ndenge oyo omonaki lobɔkɔ ya Yehova na bomoi na yo. (Nz. 78:4, 7) Ntango mosusu yango nde makambo oyo moyekoli ya Biblia azali na mposa ya koyoka. Makambo yango ekoki kokómisa kondima na ye makasi, to mpe kolendisa ye mpo akoba kokola tii azwa batisimo. w21.03 10 par. 9-10
Mwamisato, 30 sanza ya 11
Bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.—Mat. 28:19.
Soki mosala na biso ya kosakola ezali kobota mbuma, nani asengeli kozwa lokumu? Ntoma Paulo apesaki eyano na motuna yango ntango akomelaki lisangá ya Korinti. Akomaki boye: “Ngai nalonaki, Apolosi amwangisaki mai, kasi Nzambe azalaki kokolisa. Na yango, moto oyo azali kolona azali eloko te ndenge moko mpe oyo azali komwangisa mai, kasi kaka Nzambe moto azali kokolisa.” (1 Ko. 3:6, 7) Ndenge moko na Paulo, tosengeli ntango nyonso kopesa Yehova lokumu soki mosala na biso eboti mbuma. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na libaku oyo tozali na yango ya “kosala elongo” na Nzambe, Yesu, mpe baanzelu? (2 Ko. 6:1) Tokomonisa botɔndi soki tozali koluka na molende mpenza mabaku nyonso mpo na kosakwela basusu nsango malamu. Tosengeli kosuka kaka te na kolona mboto ya solo, kasi tosengeli mpe komwangisela yango mai. Ntango moto moko asepeli na nsango na biso, tosengeli kosala nyonso mpo tózongela ye mpo na kobanda koyekola na ye Biblia. Tozalaka na esengo ya komona ndenge oyo Yehova asalisaka moto yango abongola makanisi mpe mayoki na ye. w20.05 30 par. 14, 16-18