Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • es23 nk. 26-36
  • Sanza ya 3

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sanza ya 3
  • Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2023
  • Mitó ya makambo mike
  • Mwamisato, 1 sanza ya 3
  • Mwaminei, 2 sanza ya 3
  • Mwamitano, 3 sanza ya 3
  • Mwapɔsɔ, 4 sanza ya 3
  • Mwalomingo, 5 sanza ya 3
  • Mwayambo, 6 sanza ya 3
  • Mwamibale, 7 sanza ya 3
  • Mwamisato, 8 sanza ya 3
  • Mwaminei, 9 sanza ya 3
  • Mwamitano, 10 sanza ya 3
  • Mwapɔsɔ, 11 sanza ya 3
  • Mwalomingo, 12 sanza ya 3
  • Mwayambo, 13 sanza ya 3
  • Mwamibale, 14 sanza ya 3
  • Mwamisato, 15 sanza ya 3
  • Mwaminei, 16 sanza ya 3
  • Mwamitano, 17 sanza ya 3
  • Mwapɔsɔ, 18 sanza ya 3
  • Mwalomingo, 19 sanza ya 3
  • Mwayambo, 20 sanza ya 3
  • Mwamibale, 21 sanza ya 3
  • Mwamisato, 22 sanza ya 3
  • Mwaminei, 23 sanza ya 3
  • Mwamitano, 24 sanza ya 3
  • Mwapɔsɔ, 25 sanza ya 3
  • Mwalomingo, 26 sanza ya 3
  • Mwayambo, 27 sanza ya 3
  • Mwamibale, 28 sanza ya 3
  • Mwamisato, 29 sanza ya 3
  • Mwaminei, 30 sanza ya 3
  • Mwamitano, 31 sanza ya 3
Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2023
es23 nk. 26-36

Sanza ya 3

Mwamisato, 1 sanza ya 3

Ntango nyonso oyo bosalelaki yango moko ya bato oyo baleki mike na kati ya bandeko na ngai oyo, bosalelaki ngai.​—Mat. 25:40.

“Bampate” oyo mokanda ya Matai 25:31-36 ezali bato ya sembo oyo bazali kobika na ntango ya nsuka, oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele, elingi koloba, bampate mosusu. Na bosembo nyonso, bapesaka batikali kati na bandeko ya Kristo mabɔkɔ libosoliboso na ndenge basalisaka bango básala mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli na mokili mobimba. (Mat. 24:14; 28:19, 20) Mbula na mbula, mwa bapɔsɔ liboso Ekaniseli esalema, bampate mosusu bapesaka bandeko ya Kristo mabɔkɔ na ndenge bamipesaka na kosala kampanye na mokili mobimba mpo na kobengisa bato na Ekaniseli. Bapesaka mpe mabɔkɔ na ndenge bazwaka bibongiseli nyonso oyo esengeli mpo Ekaniseli esalema na masangá nyonso na mokili mobimba. Bampate mosusu basepelaka kopesa bandeko ya Kristo mabɔkɔ na ndenge wana. Bampate yango bayebi ete Yesu amonaka makambo nyonso oyo basalaka mpo na bandeko na ye oyo batyami mafuta na elimo, lokola nde basalaka yango mpo na ye moko.​—Mat. 25:37-40. w22.01 22-23 par. 11-12

Mwaminei, 2 sanza ya 3

Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.​—Yoa. 14:9.

Tokoki komekola bizaleli ya Yesu mpe ndenge oyo azalaki kosalela basusu makambo. Na ndakisa, ayokelaki moto moko ya maba mawa, amityaki na esika ya mwasi moko oyo azalaki kobɛla makasi, mpe amonisaki motema mawa mpo na baoyo bandeko na bango bakufaki. Ntango tozali komekola Yesu, tozali mpe komekola Yehova. (Mrk. 1:40, 41; 5:25-34; Yoa. 11:33-35) Soki tozali komekola bizaleli ya Yehova mingi mpenza, boninga na biso ná ye ekokóma lisusu makasi. Kolanda matambe ya Yesu esalisaka biso tótya makanisi na biso nyonso na mosala ya Yehova. Na butu ya nsuka oyo Yesu alekisaki awa na mabele, alobaki boye: “Ngai nalongi mokili.” (Yoa. 16:33) Alingaki koloba ete azalaki kolanda te makanisi, mikano, mpe makambo oyo bato ya mokili basalaka. Yesu abosanaki ata moke te ntina oyo ayaki awa na mabele, elingi koloba, kolongisa boyangeli ya Yehova. Tokoloba nini mpo na biso? Mokili oyo ezali na makambo ebele oyo ekoki kosala ete tólongola likebi na biso na mosala ya Yehova. Kasi, ndenge moko na Yesu, soki tokobi kotya makanisi na biso nyonso na mosala ya Yehova, biso mpe ‘tokolonga’ mokili.​—1 Yoa. 5:5. w21.04 3-4 par. 7-8

Mwamitano, 3 sanza ya 3

[Eloko moko te] ekokoka kokabola biso na bolingo ya Nzambe.​—Rom. 8:39.

Ntoma Paulo ayebaki mpe elaka ya Yesu oyo elobi ete ‘moto nyonso oyo azali kondimela Yesu akozwa bomoi ya seko.’ (Yoa. 3:16; Rom. 6:23) Ya solo, Ntoma Paulo azalaki na kati ya bato oyo bazalaki kondimela lisiko. Amindimisaki ete Yehova asepelaka kolimbisa ata baoyo basalá masumu ya minene soki babongoli motema. (Nz. 86:5) Ntoma Paulo azalaki mpe na kondima ete Nzambe alingaki ye mingi mpo ayebaki ete atindaki Yesu akufa mpo na ye. Tótala maloba kitoko oyo ezali na nsuka ya Bagalatia 2:20. Ntoma Paulo alobaki: “Mwana ya Nzambe . . . alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.” Ntoma Paulo amonaki te ete azalaki moto mabe mpo Nzambe alinga ye te. Akanisaki mpe te ete: ‘Namoni ntina oyo Yehova alingaka bandeko na ngai, kasi akoki kolinga ngai te.’ Ntoma Paulo ayebisaki bakristo ya Roma boye: “Ntango tozalaki naino basumuki, Kristo akufelaki biso.” (Rom. 5:8) Eloko moko te ekoki kopekisa Nzambe alinga biso! Ntoma Paulo ayebaki ete bolingo ya Nzambe ezali mpenza na nguya. Ntoma Paulo ayebaki ndenge oyo Yehova amoniselaki Bayisraele motema molai. w21.04 22-23 par. 8-10

Mwapɔsɔ, 4 sanza ya 3

Mpo bolingo ya Nzambe elakisi boye: ete tótosaka mibeko na ye.​—1 Yoa. 5:3.

Ntango ozali kotambwisa boyekoli ya Biblia, salisá moyekoli na yo akóma kolinga Yehova. Ndenge nini okoki kosala yango? Luká mabaku mpo na kobenda likebi na ye na bizaleli ya Yehova. Salisá moyekoli na yo amona ete Yehova azali Nzambe ya esengo mpe ete asalisaka baoyo balingaka ye. (1 Tim. 1:11; Ebr. 11:6) Salisá ye amona ete akozwa matomba soki asaleli makambo oyo azali koyekola mpe monisá ye ete matomba oyo akoki kozwa emonisi bolingo oyo Yehova azalaka na yango mpo na ye. (Yis. 48:17, 18) Wana bolingo na ye mpo na Yehova ezali kokóma makasi, yango ekotinda ye asala bambongwana minene na bomoi na ye. Mpo moyekoli akola mpe azwa batisimo, asengeli komipimela makambo mosusu. Bayekoli mosusu ya Biblia basengeli kondima kotika biloko mosusu ya mosuni. Ekoki kosɛnga mpe ete mingi kati na bango bátika baninga na bango oyo balingaka Yehova te. Lisusu, ekoki kozala ete bandeko ya libota ya bayekoli ya Biblia oyo balingaka Yehova te basundoli bango. Yesu alakaki ete baoyo bazali kolanda ye bakosundolama te. Yehova akopambola bango na ndenge akopesa bango libota na kati ya basaleli na ye.​—Mrk. 10:29, 30. w21.06 4-5 par. 8-9

Mwalomingo, 5 sanza ya 3

Bótombola miso na bino mpe bótala bilanga, ndenge eteli mpo na bobuki mbuma.​—Yoa. 4:35.

Ntoma Paulo akokanisaki mosala ya kokómisa bato bayekoli na mosala ya bilanga. Amonisaki ete tosengeli kosuka kaka te na kolona mboto. Ayebisaki bakristo ya lisangá ya Korinti ete: “Ngai nalonaki, Apolosi amwangisaki mai . . . Bino bozali elanga ya Nzambe oyo ezali kolonama.” (1 Ko. 3:6-9) Lokola tozali basali na “elanga ya Nzambe,” tosengeli kosuka kaka te na kolona mboto, kasi tosengeli mpe komwangisaka mai mpe kolandelaka mbala na mbala bokoli ya milona na biso. Kasi toyebi ete Nzambe nde akolisaka milona yango. Ezali mpenza lokumu monene kosakola mpe koteya basusu mateya ya Biblia! Mosala yango epesaka biso mpenza esengo. Ntoma Paulo, oyo asalisaki bato mingi na Tesaloniki bákóma bayekoli, alobeli esengo oyo ayokaki na maloba oyo: “Elikya na biso to esengo na biso to motole na biso ya nsai ezali nini​—ɛɛ, ezali bino te?​—liboso ya Nkolo na biso Yesu na ntango ya kozala na ye? Ya solo, bino nde nkembo na biso mpe esengo na biso.”​—1 Tes. 2:19, 20; Mis. 17:1-4. w21.07 3 par. 5; 7 par. 17

Mwayambo, 6 sanza ya 3

Bótyola moko ya bana mike oyo te.​—Mat. 18:10.

Yehova abendi mokomoko na biso epai na ye. (Yoa. 6:44) Yango elingi mpenza koloba nini? Ntango Yehova atalaki bamilio ya bato oyo bazali na mokili oyo, amonaki eloko moko ya motuya epai na yo. Amonaki ete ozali na motema sembo mpe ete okolinga ye. (1 Nt. 28:9) Yehova ayebi yo malamu mpe alingaka yo. Yango esengeli mpenza kokitisa motema! Yehova atyelaka yo mpenza likebi, ata mpe bandeko na yo nyonso bakristo. Mpo na kosalisa biso tóyeba likambo yango malamu, Yesu akokanisaki Yehova na mobateli ya mpate. Mobateli ya mpate asalaka nini soki mpate moko kati na bampate 100 ya etonga na ye ebungi? ‘Akotika 99 na bangomba mpe akokende koluka oyo ebungi.’ Soki amoni mpate yango, akosilikela yango te, kasi akosepela nde. Yango eteyi biso ete mpate mokomoko ezali na motuya mingi na miso ya Yehova. Yesu alobaki: “Tata na ngai oyo azali na likoló alingaka te ete moko ya bato mike oyo abeba.”​—Mat. 18:12-14. w21.06 20 par. 1-2

Mwamibale, 7 sanza ya 3

Bópusana penepene na Nzambe.​—Yak. 4:8.

Ntango tokanisaka na bolingo monene ya Nzambe mpo na biso, tokómaka mpe kolinga Ye mingi mpe boyokani na biso ná Ye ekómaka lisusu makasi. (Rom. 8:38, 39) Yango etindaka biso tólanda ndakisa ya Yesu. (1 Pe. 2:21) Mwa mikolo liboso ya Ekaniseli, totángaka masolo oyo elobeli pɔsɔ ya nsuka oyo Yesu alekisaki awa na mabele, liwa na ye, mpe lisekwa na ye. Mpe na mpokwa ya mokolo ya Ekaniseli, diskur oyo esalemaka ekundwelaka biso bolingo oyo Yesu amoniselaki biso. (Ef. 5:2; 1 Yoa. 3:16) Ntango tozali kotánga ndakisa ya Yesu na oyo etali komipimela mpe tozali komanyola likambo yango, etindaka biso ‘tókoba kotambola ndenge atambolaki.’ (1 Yoa. 2:6) Tokómaka na ekateli makasi ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe. (Yuda 20, 21) Tokotikala na kati ya bolingo ya Nzambe soki tozali kosala nyonso oyo tokoki mpo na kotosa ye, kosantisa nkombo na ye, mpe kosepelisa motema na ye. (Mas. 27:11; Mat. 6:9; 1 Yoa. 5:3) Ekaniseli etindaka biso tókóma na ekateli makasi ya kosalela bomoi na biso ya mokolo na mokolo lokola nde tozali koloba na Yehova: ‘Nalingi kotikala na kati ya bolingo na yo mpo na libela!’ w22.01 23-25 par. 17-19

Mwamisato, 8 sanza ya 3

Bópona bino moko . . . nani bino bokosalela.​—Yos. 24:15.

Yehova apesá biso bonsomi ya kopona. Tokoki kopona makambo oyo tokosala na bomoi na biso. Tata na biso ya bolingo asepelaka ntango toponaka kosalela ye. (Nz. 84:11; Mas. 27:11) Tokoki kosalela bonsomi na biso ya kopona mpo na kozwa bikateli mingi ya malamu. Tokoki komekola Yesu soki toponi kotya matomba ya basusu na esika ya liboso. Mokolo moko ntango Yesu ná bantoma na ye balɛmbaki makasi, bakendaki na esika moko oyo bakanisaki ete bakopema mwa moke. Kasi esalemaki bongo te. Ebele ya bato bamonaki bango, mpe bazalaki na mposa ete Yesu ateya bango. Kasi Yesu asilikaki te. Kutu ayokelaki bato yango mawa. Na yango, asalaki nini? “Abandaki koteya bango makambo mingi.” (Mrk. 6:30-34) Ntango tosalelaka makasi mpe ntango na biso mpo na kosalisa basusu, topesaka Tata na biso ya likoló nkembo.​—Mat. 5:14-16. w21.08 3-5 par. 7-8

Mwaminei, 9 sanza ya 3

Moto na moto . . . azwa likambo ya komikumisa na yango mpo na ye moko, kasi mpo azali komikokanisa na moto mosusu te.​—Gal. 6:4.

Yehova asepelaka na bokeseni oyo ezali kati na bikelamu na ye. Toyebi yango mpo akelá biloko mpe bato ndenge na ndenge. Moto na moto azali na ndenge na ye moko. Na yango, Yehova akokanisaka biso soki moke te na basusu. Atalaka motema na yo, elingi koloba, bomoto na yo ya kati. (1 Sa. 16:7) Ayebi makasi na yo, bolɛmbu na yo, mpe makambo oyo okutaná na yango na bomoi. Mpe asɛngaka yo te osala makambo oyo okokoka te. Tosengeli komitalela ndenge Yehova atalelaka biso. Kosala bongo ekosalisa biso tózala na “makanisi malamu.” Tokokanisa te ete tozali na ntina mingi koleka basusu, to mpe basusu bazali na ntina mingi koleka biso. (Rom. 12:3) Tokoki kozwa mateya na ndakisa malamu ya basusu. Na ndakisa, tokoki koyeba ndeko moko oyo ayebi kosakola malamu. (Ebr. 13:7) Tokoki koyekola epai ya ndeko yango mpe kobongisa lolenge na biso ya kosakola. (Flp. 3:17) Kasi ezali na bokeseni kati na kolanda ndakisa malamu ya moto moko mpe komikokanisa na moto yango. w21.07 20 par. 1-2

Mwamitano, 10 sanza ya 3

Bótombola miso na bino likoló mpe bómona. Nani azalisaki biloko oyo nyonso?​—Yis. 40:26.

Okoki kokómisa kondima na yo makasi epai ya Mozalisi, soki ozali kotala na likebi mpenza banyama, milona, mpe minzoto. (Nz. 19:1) Soki ozali koyekola biloko yango mingi, yango ekosalisa yo omindimisa ete Yehova azali Mozalisi. Ntango ozali kotala biloko oyo Nzambe akelá, tyá likebi na makambo oyo emonisi ete Mozalisi azali. (Rom. 1:20) Na ndakisa, moi epesaka molunge mpe pole oyo ezalaka na ntina mpo na mabele. Kasi ebimisaka mpe pole mosusu oyo ekoki kozala likama mpo na bomoi. Yango wana, esengeli eloko moko ebatela biso mpo pole yango esala biso mabe te. Eloko yango nini? Ezali etando moko ya mopɛpɛ oyo ezingi mabele nde ebatelaka biso. Ntango pole yango ya mabe ezali kokóma makasi mingi, etando yango ya mopɛpɛ ebakisamaka. Sikoyo omoni te ete esengeli kozala na moto moko oyo abongisá makambo ndenge wana? Na ntembe te, asengeli kozala Mozalisi ya bolingo mpe ya mayele. w21.08 17 par. 9-10

Mwapɔsɔ, 11 sanza ya 3

Moto oyo alingaka Nzambe alinga mpe ndeko na ye.​—1 Yoa. 4:21.

Tosengeli kokoba kolinga bandeko mpe komonisela bango limemya ata nsima ya batisimo na bango. (1 Yoa. 4:20) Ndenge nini tosalaka yango? Lolenge moko oyo tosalaka yango ezali ndenge tondimaka ete bandeko na biso basalaka makambo na makanisi ya malamu. Na ndakisa, soki toyebi mpenza te ntina oyo ndeko moko asali likambo boye to boye, tosengeli te kokanisela ye mabe mpe koloba ete asali likambo yango mpo na koluka matomba na ye moko. Kasi tokomonisa ete tozali kopesa ndeko na biso lokumu soki tozali kotalela ye ete aleki biso. (Rom. 12:10; Flp. 2:3) Na ntembe te, tosengeli komonisa motema mawa mpe kozala na boboto epai ya moto nyonso. Soki tolingi kozala na kati ya bato oyo bakobenga Yehova Tata na bango mpo na seko, tosengeli kosalela toli ya Liloba na ye na bomoi na biso. Na ndakisa, Yesu ateyaki ete tosengeli komonisa motema mawa mpe kozala na boboto epai ya moto nyonso, ata mpe epai ya banguna na biso. (Luka 6:32-36) Na bantango mosusu tokoki komona ete ezali mpasi kosala bongo. Soki ezali bongo, tosengeli koyekola kokanisa mpe kosala makambo lokola Yesu. Ntango tosalaka nyonso oyo tokoki mpo na kotosa Yehova mpe komekola Yesu, tomonisaka Tata na biso ya likoló ete tolingi kozala na libota na ye mpo na seko. w21.08 6 par. 14-15

Mwalomingo, 12 sanza ya 3

Bómona soki nakofungwela bino baporte ya mai ya likoló te mpe soki nakosopela bino lipamboli te.​—Mal. 3:10.

Tyeláká Yehova motema. Alaki ete akopambola biso soki totyeli ye motema mpe soki topesi ye oyo eleki malamu. Biblia ezali na ebele ya bandakisa ya bato oyo bamipesaki mobimba na mosala ya Yehova. Bandakisa yango mingi emonisi ete Yehova apambolaki bato yango kaka nsima ya kosala likambo moko oyo emonisaki ete batyelaki ye motema. Na ndakisa, Yehova apambolaki Abrahama kaka nsima ya kolongwa na engumba na ye “atako ayebaki te epai wapi azalaki kokende.” (Ebr. 11:8) Yakobo azwaki lipamboli ya ntina mingi kaka nsima ya kobunda na anzelu. (Eba. 32:24-30) Lisusu, liboso Bayisraele bákɔta na mokili ya Ndaka basengelaki kokatisa Ebale Yordani. Kasi ntango kaka banganga-nzambe batyaki makolo na bango na ebale yango nde na nsima bato bakómaki na likoki ya kokatisa. (Yos. 3:14-16) Okoki mpe kozwa matomba na ndakisa ya Batatoli ya Yehova ya mikolo na biso oyo batyelaki Yehova motema mpe bakokisaki mikano na bango. w21.08 29-30 par. 12-14

Mwayambo, 13 sanza ya 3

Koloba te ete: “Mpo na nini mikolo ya liboso elekaki mikolo oyo na malamu?”​—Mos. 7:10.

Bino bandeko oyo bokómi mibange boyebi ndenge makambo ezalaki kosalema na kala, kasi bomonaka mpe ete bosengeli komesana na makambo ya sika. Bino mibange oyo bozwi batisimo kala mingi te, bokoki mpe kosalisa bandeko mosusu na makambo mingi. Bilenge bakosepela koyoka makambo oyo bokutaná na yango na bomoi mpe mateya oyo bozwá. Soki “bozali kosalela” makambo oyo boyekolá na bomoi mpo na kopesa basusu formasyo, Yehova akopambola bino mpenza. (Luka 6:38) Ntango bino mibange bozali kosala boninga ná bilenge, bokosalisana. (Rom. 1:12) Mokomoko azali na likambo ya motuya oyo mosusu azali na yango te. Mibange bazali na bwanya. Longola yango, bayebi mpe bakutaná na makambo mingi na bomoi. Bilenge bazali na makasi mpe na nguya. Ntango mibange mpe bilenge basali boninga, bapesaka Tata na biso ya likoló lokumu mpe bazalaka lipamboli mpo na moto nyonso na lisangá. w21.09 8-9 par. 3; 13 par. 17-18

Mwamibale, 14 sanza ya 3

Biso tozali nde kosakola Kristo abakami na nzete, likambo oyo ezali kobɛtisa Bayuda libaku.​—1 Ko. 1:23.

Mpo na nini ndenge oyo Yesu akufaki likoló ya nzete ya mpasi ebɛtisaki Bayuda mingi libaku? Mpo na bango, ndenge oyo Yesu abakamaki likoló ya nzete ya mpasi emonisaki ete azalaki Masiya te, kasi nde mosali-mabe mpe mosumuki. (Mib. 21:22, 23) Bayuda oyo babɛtaki libaku mpo na Yesu baboyaki koyeba ete azalaki na ngambo te, ete bakoselaki ye makambo, mpe ete basalelaki ye makambo na kozanga bosembo. Baoyo basambisaki Yesu basalaki yango te na kolanda ndenge mibeko esɛngaki. Bazuzi ya tribinale monene ya Bayuda bayanganaki nokinoki mpo na kosambisa Yesu, mpe basambisaki ye te na kolanda mibeko. (Luka 22:54; Yoa. 18:24) Bazuzi yango bazalaki sembo te ntango bayokaki makambo oyo bato bafundaki Yesu mpo na yango, mpe makambo oyo bato balobaki. Lisusu, bango moko mpe balukaki “batatoli ya lokuta bákosela Yesu makambo mpo báboma ye.” (Mat. 26:59; Mrk. 14:55-64) Mpe nsima ya lisekwa ya Yesu, bazuzi yango oyo bazalaki sembo te bafutaki basoda ya Roma “shekele ya palata oyo ekoki mpenza” mpo bápanza bansango ya lokuta mpe bámonisa ntina oyo lilita ya Yesu etikalaki mpamba.​—Mat. 28:11-15. w21.05 11 par. 12-13

Mwamisato, 15 sanza ya 3

Mpo na mokolo yango mpe ngonga yango moto moko ayebi te, ezala baanzelu ya likoló ezala Mwana, kaka Tata nde ayebi.​—Mat. 24:36.

Yehova akokaki koboma mokili oyo banda kala, kasi motema molai na ye ememeli biso mapamboli mingi! Ntango bakitani nyonso ya Adama ná Eva babotamaka, bazalaka bato ya kozanga kokoka. Atako bongo, Yehova alingaka bango mpe akokisaka bamposa na bango, mpe alaki ete akotya nsuka na makambo ya ebongiseli ya mokili oyo mabe. (1 Yoa. 4:19) Mpe atyá mokolo moko oyo akosilisa bampasi nyonso ya bato. Bolingo oyo Yehova amoniselaka biso, esengeli kotinda biso tókoba koyika mpiko elongo na ye, boye te? Yehova azali ndakisa eleki malamu na likambo etali koyika mpiko. Yesu mpe amekolaki ezaleli ya koyika mpiko ya Tata na ye. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, ayikaki mpiko na mikakatano ndenge na ndenge, na ndakisa, maloba mabe, nsɔni, mpe nzete ya mpasi. Asalaki bongo mpo na bolamu na biso. (Ebr. 12:2, 3) Na ntembe te, ndakisa ya Yehova ya koyika mpiko epesaki Yesu makasi ya koyika mpiko. Yango ekoki mpe kopesa biso makasi. w21.07 12-13 par. 15-17

Mwaminei, 16 sanza ya 3

Bókoba kokóma bato ya motema mawa, ndenge Tata na bino azali moto ya motema mawa.​—Luka 6:36.

Mokolo na mokolo, Tata na biso ya likoló alimbisaka biso. (Nz. 103:10-14) Bayekoli ya Yesu bazalaki bato ya kozanga kokoka. Atako bongo, Yesu azalaki kolimbisa bango. Andimaki kutu kopesa bomoi na ye mpo masumu na biso elimbisama. (1 Yoa. 2:1, 2) Bolingo oyo tozalaka na yango mpo na bandeko na biso ya elimo ekómaka makasi ntango ‘tolimbisanaka na motema moko.’ (Ef. 4:32) Na ntembe te, na bantango mosusu ekoki kozala mpasi tólimbisa bandeko. Yango wana tosengeli kosala makasi tólimbisaka basusu. Ndeko mwasi moko amonaki ete lisolo “Tólimbisanaka na motema moko” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli esalisaki ye. Akomi boye: “Lisolo yango elobaki ete kolimbisa basusu elakisi te ete osepelaki na makambo oyo basalelaki yo, mpe elingi koloba te ete likambo yango esalaki yo mpasi te. Kasi elimboli kobatela kimya ya motema mpe koboya kobomba nkanda mpo na makambo mabe oyo basalelaki yo.” Ntango tolimbisaka bandeko na biso na motema moko, tomonisaka ete tolingaka bango mpe ete tozali komekola Yehova, Tata na biso. w21.09 23-24 par. 15-16

Mwamitano, 17 sanza ya 3

Baoyo bazali kosambela [Nzambe] basengeli kosambela . . . na solo.​—Yoa. 4:24.

Yesu alingaki solo, elingi koloba, solo oyo etali Nzambe mpe mikano na ye. Ayebisaki yango basusu mpe azalaki kosala makambo na boyokani na solo yango. (Yoa. 18:37) Bayekoli ya Yesu mpe balingaki solo makasi mpenza. (Yoa. 4:23) Kutu ntoma Petro abengaki lingomba ya bokristo “nzela ya solo.” (2 Pe. 2:2) Lokola bakristo ya liboso balingaki solo mingi, baboyaki makanisi ya bakonzi ya mangomba, mimeseno ya bonkɔkɔ, mpe makanisi nyonso ya bato oyo eyokanaki te na solo. (Kol. 2:8) Ndenge moko mpe lelo oyo, bakristo ya solo ‘batambolaka na kati ya solo’ na ndenge basalaka makasi ete mateya mpe lolenge ya bomoi na bango esimbama na Liloba ya Yehova. (3 Yoa. 3, 4) Lelo oyo, Batatoli ya Yehova balobaka te ete bayebi makambo nyonso oyo ezali na Biblia. Na bantango mosusu, basalaki mabunga na ndenge na bango ya kolimbola mateya ya Biblia to mpe na ndenge ya kotambwisa makambo. Soki bamoni ete ezali na liteya moko oyo tosengeli kosembola, bakakatanaka te mpo na kosala bambongwana oyo esengeli. w21.10 22 par. 11-12

Mwapɔsɔ, 18 sanza ya 3

Moto oyo azali kotyela Yehova motema, motema boboto ezingaka ye.​—Nz. 32:10.

Bifelo oyo ezingaki engumba ezalaki kobatela yango mpe bato oyo bazalaki kofanda na kati. Ndenge moko mpe, bolingo ya sembo ya Yehova ezingaka biso lokola efelo mpe ebatelaka biso na makambo nyonso oyo ekoki kobebisa boyokani na biso ná ye. Lisusu, bolingo ya sembo ya Yehova etindaka ye apusana penepene na biso. (Yir. 31:3) Mokomi ya Nzembo Davidi akokanisaki mpe ndenge oyo Yehova abatelaka basaleli na ye na eloko mosusu. Akomaki boye: “Nzambe azali esika na ngai ya kobombana oyo etombwaná, Nzambe ya motema boboto epai na ngai.” Davidi alobaki lisusu boye mpo na Yehova: “[Azali] motema boboto na ngai mpe esika makasi ya libateli na ngai, esika na ngai ya kobombana oyo etombwaná mpe Mobikisi na ngai, nguba na ngai mpe ye oyo nakimi epai na ye.” (Nz. 59:17; 144:2) Mpo na nini Davidi akokanisaki bolingo ya sembo ya Yehova na esika ya kobombana mpe ya libateli? Ata soki tofandaka wapi, lokola tozali basaleli na ye, Yehova akopesa biso libateli oyo tosengeli na yango mpo na kosalisa biso tóbatela boyokani ya malamu elongo na ye. w21.11 6 par. 14-15

Mwalomingo, 19 sanza ya 3

Nakomanyola likoló ya mosala na yo nyonso.​—Nz. 77:12.

Ntango Yesu ná bayekoli na ye bakutanaki na mopɛpɛ moko makasi na mbu, Yesu asalelaki likambo yango mpo na kosalisa bango bámona bisika oyo basengelaki kokómisa kondima na bango makasi. (Mat. 8:23-26) Wana mopɛpɛ etombokaki makasi mpenza, mpe mai etondaki na masuwa na bango, Yesu azalaki na ye kolala. Ntango bayekoli na ye oyo bazalaki kobanga makasi balamusaki ye mpe basɛngaki ye abikisa bango, na boboto mpenza Yesu atunaki bango: “Mpo na nini bozali kobangabanga, bino bato ya kondima moke?” Mbala mosusu yo mpe ozali kokutana na mikakatano oyo ezali lokola mopɛpɛ makasi. Ekoki kozala ete ozali konyokwama mpo na makama oyo ebimaka yango moko. Ntango mosusu mpe ozali na maladi moko ya makasi mpenza oyo elɛmbisi yo nzoto mpe ozali koyeba te oyo osengeli kosala. Na bantango mosusu yango ekoki kotungisa yo, kasi kotika te ete mitungisi yango epekisa yo kotyela Yehova motema. Pusanáká penepene na ye na nzela ya libondeli. Kanisá ndenge Yehova asalisaki yo na kala; yango ekokómisa kondima na yo makasi. (Nz. 77:11) Yebá ete akosundola yo ata mokolo moko te. w21.11 22-23 par. 7, 10

Mwayambo, 20 sanza ya 3

Bosengeli koyiba te.​—Lev. 19:11.

Moto mosusu akokaki kokanisa ete soki azwá naino te eloko ya moto mosusu, yango elimboli ete azali kotosa mobeko yango. Kasi akokaki koyiba na lolenge mosusu. Na ndakisa, mosali-mombongo oyo azalaki kosalela kilo ya sikisiki te mpo na kobuba bakiliya na ye, azalaki nde koyiba bango. Bavɛrsɛ mosusu na Balevi 19:13 elobi ete kobuba moto na makambo ya mombongo ezali ndenge moko na koyiba, elobi boye: “Osengeli te kobuba moninga na yo.” Na yango, kobuba moto na makambo ya mombongo ezali ndenge moko na koyiba. Mobeko ya mwambe elobi ete koyiba ezali mabe. Kasi makambo mosusu oyo mokanda ya Balevi ebakisi, esalisaka biso tóyeba ndenge oyo tokoki kosalela mitinda oyo ezali na mobeko yango. Ezali malamu tóyeba ndenge oyo Yehova atalelaka likambo etali kozanga bosembo mpe koyiba. Tokoki komituna boye: ‘Ntango natángaka Balevi 19:11-13, namonaka ete ezali na makambo mosusu oyo nasengeli kosembola na bomoi na ngai, mingimingi na likambo etali mombongo?’ w21.12 9-10 par. 6-8

Mwamibale, 21 sanza ya 3

Kaka ndenge Yehova alimbisaki bino na motema moko, bino mpe bósala bongo.​—Kol. 3:13.

Mikolo nyonso na mabondeli na yo moko, yebisáká Yehova mabunga oyo osali mpe sɛngáká ye alimbisa yo. Kasi soki osali lisumu moko ya monene, ekosɛnga mpe oluka lisalisi ya bankulutu. Bakoyoka yo mpe bakopesa yo toli ya malamu oyo euti na Liloba ya Nzambe. Bakobondela elongo na yo mpe bakosɛnga Yehova alimbisa yo mpo ozongela lisusu boyokani ya malamu elongo na ye. (Yak. 5:14-16) Ekozala malamu komanyola na lisiko. Okoki koyoka bongo soki okanisi ndenge oyo Mwana ya Nzambe anyokwamaki mingi. Kasi soki ozali kokanisa na mozindo na mbeka oyo Yesu apesaki, bolingo na yo mpo na ye mpe mpo na Tata na ye ekokóma lisusu makasi. Mbula na mbula, tokómisaka lisusu makasi botɔndi na biso mpo na lisiko na ndenge toyanganaka na Ekaniseli ya liwa ya Yesu, mpe na ndenge tobengisaka bato báya kosangana elongo na biso na molulu yango. Yehova apesá biso lokumu monene ya koteya basusu makambo etali Mwana na ye. w21.04 18-19 par. 13-16

Mwamisato, 22 sanza ya 3

Abandaki koteya bango makambo mingi.​—Mrk. 6:34.

Kanisá ndenge Yesu asalaki ntango ebele ya bato bayaki epai na ye pembeni ya ngomba moko. Yesu alekisaki butu mobimba na kobondela. Na ntembe te alɛmbaki mingi, kasi ntango amonaki ebele yango ya bato, ayokelaki babola mpe bato ya maladi oyo bazalaki kati na bango mawa. Asukaki kaka na kobikisa bango te, kasi asalaki mpe moko ya masolo ya kafukafu oyo etiká nsango, elingi koloba Lisolo likoló ya Ngomba. (Luka 6:12-20) Yesu azalaki mpe kopesa basusu ntango na ye moko. Okoki kokanisa ndenge oyo Yesu amiyokaki ntango ayebaki ete babomi moninga na ye Yoane Mobatisi? Biblia elobi: “Ntango Yesu ayokaki [ete Yoane Mobatisi akufi], alongwaki wana na masuwa akei na esika oyo bato bazalaki te mpo azala ye moko.” (Mat. 14:10-13) Kasi ebele ya bato bakómaki na esika yango liboso na ye. (Mrk. 6:31-33) Amonaki ete bazalaki mpenza na mposa ya kobɔndisama na elimo, mpe abandaki mbala moko kokokisa mposa yango.​—Luka 9:10, 11. w22.02 21-22 par. 4, 6

Mwaminei, 23 sanza ya 3

Bózala na kimya na bato nyonso.​—Rom. 12:18.

Tosengeli kosala nini soki toyebi ete tosali likambo oyo epesi ndeko na biso mpasi? Tosengeli kobondela Yehova na motema mobimba. Tokoki kosɛnga ye apambola milende oyo tozali kosala mpo na kotya kimya elongo na ndeko na biso. Tosengeli mpe kozwaka ntango mpo na komitalelaka biso moko. Tokoki komituna boye: ‘Nandimaka mabunga na ngai, namikitisaka mpo na kosɛnga bolimbisi, mpe natyaka kimya? Yehova ná Yesu bakoyoka ndenge nini soki nazwi bibongiseli mpo na kotya kimya elongo na ndeko na ngai?’ Biyano oyo tokopesa ekoki kotinda biso tóyoka Yesu mpe tókende kokutana na ndeko na biso mpo na kotya kimya. Ntango tokei koluka ndeko na biso mpo na kotya kimya, tosengeli mpenza komikitisa. (Ef. 4:2, 3.) Mokano na biso esengeli kozala ya kozongisa kimya elongo na ye mpe kokitisa mpasi oyo ayokaki na motema. Kobosana te ete kotya kimya elongo na ndeko na yo ezali na ntina koleka koluka komilongisa.​—1 Ko. 6:7. w21.12 25-26 par. 13-16

Mwamitano, 24 sanza ya 3

Atalaki engumba mpe alelaki yango.​—Luka 19:41.

Yesu ayokaki mpasi mpo ayebaki ete bato yango mingi basilaki komonisa ete bakondima nsango ya Bokonzi te. Mpo na yango, Yerusaleme ekobebisama mpe Bayuda oyo bakobika nsima ya libebi yango bakomemama bakangami. (Luka 21:20-24) Likambo ya mawa, kaka ndenge Yesu alobaki yango, bato mingi baboyaki ye. Ndenge nini bato mingi batalelaka nsango ya Bokonzi na esika ofandi? Soki bato moke kaka nde bandimaka ete oteya bango solo, liteya nini okoki kozwa na mpisoli oyo Yesu abimisaki? Yehova atyelaka bato likebi. Mpisoli ya Yesu ezali kosalisa biso tómona ete Yehova atyelaka mpenza bato likebi. “Alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.” (2 Pe. 3:9) Lelo oyo, tomonisaka ete tolingaka bazalani na biso soki tozali kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosalisa bango bándima nsango malamu ya Bokonzi.​—Mat. 22:39. w22.01 16 par. 10-12

Mwapɔsɔ, 25 sanza ya 3

Molimo na ngai elandi yo penepene; lobɔkɔ na yo ya mobali ezali kosimba ngai makasi.​—Nz. 63:8.

Kondima na yo ekokóma lisusu makasi, soki ozali kokanisa na mozindo na makambo oyo Yehova asili kosalela basaleli na ye mpe oyo asaleli yo moko. Oyo eleki ntina, bolingo na yo mpo na Yehova ekokóma lisusu makasi. Bolingo, oyo eleki bizaleli mosusu nyonso, ekotinda yo otosa Yehova, omipimela makambo mosusu mpo na kosepelisa ye, mpe oyika mpiko ata na komekama ya ndenge nini. (Mat. 22:37-39; 1 Ko. 13:4, 7; 1 Yoa. 5:3) Eloko moko te ezali na motuya koleka kozala na boninga makasi mpe ya malamu elongo na Yehova! (Nz. 63:1-7) Kobosana te ete kobondela, koyekola, mpe komanyola ezali na kati ya losambo na biso. Lokola Yesu, lukáká bisika ya kimya epai okoki kolekisa ntango elongo na Yehova. Boyá makambo oyo ekoki kolongola likebi na yo. Sɛngá Yehova asalisa yo mpo otya makanisi na yo esika moko ntango ozali kosala makambo ya elimo. Soki osaleli ntango na yo malamu sikoyo, Yehova akopesa yo bomoi libela na libela na mokili ya sika oyo Nzambe alaki.​—Mrk. 4:24. w22.01 30-31 par. 18-20

Mwalomingo, 26 sanza ya 3

Bóyina oyo ezali mabe.​—Rom. 12:9.

Makambo oyo tokanisaka nde etindaka biso tósala likambo boye to boye. Yango wana Yesu ateyaki biso tóboya makanisi oyo ekoki komema biso na lisumu moko ya monene. (Mat. 5:21, 22, 28, 29) Na ntembe te, tolingaka kosepelisa Tata na biso ya likoló! Yango wana, ezali na ntina mingi tóboya mbala moko likanisi nyonso ya mabe oyo eyeli biso na bɔɔngɔ! Yesu alobaki: “Makambo oyo ebimaka na monɔkɔ eutaka na motema.” (Mat. 15:18) Ya solo, maloba na biso emonisaka lolenge ya bato oyo tozali. Yango wana, omituna boye: ‘Naboyaka kokosa, ata soki koloba solo ekobendela ngai mindɔndɔ? Lokola nabalá, nakebaka ete nakangamakangama te na moto oyo azali molongani na ngai te? Naboyaka kobimisa maloba ya mbindo, oyo ezalaka lokola maladi mabe? Ntango moto moko apesi ngai nkanda, nazongiselaka ye maloba na boboto?’ Ekozala malamu okanisa na mituna yango na likebi. Soki osali makasi otika maloba mabe, lokuta, mpe maloba ya mbindo, ekozala mpasi te olongola bomoto ya kala. w22.03 5 par. 12-14

Mwayambo, 27 sanza ya 3

Bwanya ezali epai ya baoyo bapesanaka makanisi.​—Mas. 13:10.

Baoyo basɛngaka toli na esika bázela moto moko aya kopesa bango yango, bakozala na mayele mingi na elimo koleka baoyo balukaka toli te. Yango wana, yo moko mpe sɛngáká toli. Na makambo nini tokoki kosɛnga bandeko bápesa biso toli? Tótalela mwa bandakisa. (1) Ndeko mwasi moko asɛngi mosakoli oyo ayebi kosakola malamu bábima elongo mpo báyekola na moto moko; na nsima, asɛngi mosakoli yango toli mpo abongisa lolenge na ye ya koteya. (2) Ndeko mwasi moko ya monzemba alingi kosomba mwa bilamba; na yango, asɛngi ndeko mwasi moko oyo akɔmɛli na elimo ayebisa ye polele bilamba nini apona. (3) Ndeko mobali moko azwi mokumba ya kosala diskur na ye ya liboso. Asɛngi na ndeko moko oyo asalaka badiskur malamu ayoka ye na likebi ntango azali kosala diskur na ye mpe na nsima ayebisa ye bisika oyo akoki kobongisa. Ata ndeko mobali oyo asalaka badiskur banda bambula mingi akoki kosɛnga toli ya ndenge wana epai ya molobi moko ya malamu, mpe na nsima kosalela yango.​—Mas. 19:20. w22.02 13 par. 15-17

Mwamibale, 28 sanza ya 3

Nazali ngai moko te, kasi Tata oyo atindaki ngai azali elongo na ngai.​—Yoa. 8:16

Yehova alingaka biso kaka ndenge alingaki Yesu ntango azalaki awa na mabele. (Yoa. 5:20) Akokisaki bamposa ya Yesu ya mosuni mpe ya elimo, mpe atyaki likebi na mayoki na ye. Lisusu, Yehova akakatanaki te mpo na koloba polele ete azalaki kolinga mpe kondima Mwana na ye. (Mat. 3:16, 17) Lokola Yesu azalaki ntango nyonso kotyela Tata na ye motema, amiyokaki soki moke te ete azalaki ye moko. Lokola Yesu, biso nyonso tokutaná na makambo mingi oyo emonisi ete Yehova alingaka biso. Kanisá naino: Yehova akómisá biso baninga na ye mpe apesá biso bandeko basi mpe mibali oyo basalisaka biso tózala na esengo mpe balendisaka biso na ntango ya mpasi. (Yoa. 6:44) Yehova apesaka biso mpe nyonso oyo tosengeli na yango mpo tókoba kobatela kondima na biso makasi. Lisusu, akokisaka bamposa na biso ya mosuni ya mokolo na mokolo. (Mat. 6:31, 32) Ntango tokanisaka ndenge oyo Yehova alingaka biso, bolingo na biso mpo na ye ekómaka lisusu makasi. w21.09 22 par. 8-9

Mwamisato, 29 sanza ya 3

Bólongola bomoto ya kala elongo na misala na yango.​—Kol. 3:9.

Bomoi na yo ezalaki ndenge nini liboso obanda koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova? Mingi kati na biso tolingaka kutu kokanisa yango te. Na ntembe te ndenge na biso ya kotalela bomoi mpe bomoto na biso ezalaki kolanda mibeko ya mokili na oyo etali mabe ná malamu. Soki bongo, ‘tozalaki na elikya te mpe tozalaki na Nzambe te na mokili.’ (Ef. 2:12) Kasi, ntango okómaki koyekola Biblia, oyaki koyeba ete ozali na Tata moko na likoló oyo alingaka yo mingi mpenza. Omonaki ete mpo osepelisa Yehova mpe okɔta na libota ya basambeli na ye, ekosɛnga obongola mpenza bomoi na yo, ndenge na yo ya kotalela makambo, mpe makanisi na yo. Ekosɛnga otosa mibeko na ye na oyo etali mabe ná malamu. (Ef. 5:3-5) Yehova, Mozalisi mpe Tata na biso ya likoló, azali na lotomo ya kokata soki bizaleli nini bato oyo bazali na libota na ye basengeli komonisa. Mpe asɛngi ete liboso tózwa batisimo, tósala makasi mpenza mpo na ‘kolongola bomoto ya kala elongo na misala na yango.’ w22.03 2 par. 1-3

Mwaminei, 30 sanza ya 3

Nazali na bampate mosusu.​—Yoa. 10:16.

Bampate mosusu mpe basepelaka koya na Ekaniseli lokola batali mpamba mpe bakanisaka elikya na bango. Bazelaka na mposa makasi diskur ya Ekaniseli, mpo diskur yango elobelaka mingimingi oyo Kristo ná bato 144 000 oyo bakoyangela elongo na ye bakosala mpo na bato ya sembo na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto. Na nse ya litambwisi ya Yesu Kristo, baoyo bakoyangela kuna na likoló bakosalisa na kokómisa mabele paradiso, bakosalisa mpe bato ya botosi bákóma bato ya kokoka. Bamilio ya bato oyo bayaka na Ekaniseli lokola batali mpamba basepelaka mpenza ntango bakanisaka ndenge bisakweli ya Biblia ekokokisama na mikolo ezali koya, na ndakisa oyo elobelami na Yisaya 35:5, 6; 65:21-23; mpe na Emoniseli 21:3, 4. Ntango bamimonaka na mokili ya sika elongo na bato oyo balingaka, yango ekómisaka elikya ba bango makasi mpo na mikolo ezali koya, mpe bakómaka na ekateli makasi ya kokoba kosalela Yehova.​—Mat. 24:13; Gal. 6:9. w22.01 21-22 par. 5-7

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 9 Nisana nsima ya kolala ya moi) Matai 26:6-13

Mwamitano, 31 sanza ya 3

Mwana ya moto ayaki . . . mpo na kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.​—Mrk. 10:45.

Lisiko ezali nini? Motuya oyo Yesu apesaki mpo na kosomba eloko oyo Adama abungisaki. (1 Ko. 15:22) Mpo na nini tosengeli na lisiko? Mpamba te na kotalela mibeko oyo Yehova apesaki na likambo etali bosembo, esɛngaki kopesa bomoi mpo na bomoi. (Kob. 21:23, 24) Adama abungisaki bomoi na ye ya kokoka. Mpo na kokokisa bosembo ya Nzambe, Yesu apesaki bomoi na ye ya kokoka. (Rom. 5:17) Na ndenge yango, akómaki “Tata ya Seko” ya baoyo nyonso bazali komonisa kondima na mbeka ya lisiko. (Yis. 9:6; Rom. 3:23, 24) Bolingo makasi mpo na Tata na ye ya likoló mpe mpo na biso nde etindaki Yesu andima kopesa bomoi na ye mbeka. (Yoa. 14:31; 15:13) Bolingo yango nde etindaki ye abatela bosembo na ye tii na nsuka mpe akokisa mokano ya Tata na ye. Yesu asalaki yango na ndenge atikalaki sembo tii na liwa. Yango ekosala ete mokano oyo Yehova azalaki na yango na ebandeli mpo na bato mpe mpo na mabele ekokisama. w21.04 14-16 par. 2-3

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 9 Nisana na moi) Matai 21:1-11, 14-17

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto