Sanza ya 4
Mwapɔsɔ, 1 sanza ya 4
Mpo Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki.—Yoa. 3:16.
Yesu amonisaki bolingo monene na ndenge andimaki kopesa bomoi na ye mpo na biso. (Yoa. 15:13) Tozali na eloko moko te oyo tokoki kofuta Yehova ná Yesu mpo na bolingo oyo bamoniselá biso. Kasi tokoki komonisa botɔndi na makambo oyo tosalaka na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. (Kol. 3:15) Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazwaka lisiko na motuya mingi mpo yango nde esali ete elikya na bango ekokisama. (Mat. 20:28) Lokola bamonisaka kondima na mbeka ya Kristo, Yehova atángi bango bayengebene mpe akómisá bango bana na ye. (Rom. 5:1; 8:15-17, 23) Bampate mosusu mpe bazalaka na botɔndi mpo na lisiko. Lokola bamonisaka kondima na makila oyo Yesu asopá, bazalaka pɛto na miso ya Yehova, mpe bazali na elikya ya ‘kouta na bolɔzi monene.’ (Em. 7:13-15) Lolenge moko oyo bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bampate mosusu bamonisaka botɔndi mpo na lisiko ezali ndenge bayanganaka mbula na mbula na Ekaniseli. w22.01 23 par. 14-15
Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 10 Nisana na moi) Matai 21:18, 19; 21:12, 13; Yoane 12:20-50
Mwalomingo, 2 sanza ya 4
Kristo asikolaki biso.—Gal. 3:13.
Yesu azalaki komitungisa mpo na makambo oyo bafundaki ye mpe oyo mpo na yango asengelaki kobomama. Bafundaki ye ete afingi Nzambe, elingi koloba, azalaki ata na limemya moko te mpo na Nzambe mpe mpo na nkombo na ye. (Mat. 26:64-66) Likambo yango etungisaki Yesu mingi mpe atyaki motema ete Tata na ye akotika nzela te ete ayokisama nsɔni ndenge wana. (Mat. 26:38, 39, 42) Yesu asengelaki kokakisama na nzete mpo na kosikola Bayuda na elakeli mabe. (Gal. 3:10) Bandimaki ete bakotosa mibeko ya Nzambe kasi batosaki yango te. Mpo na yango, balakelamaki mabe. Elakeli mabe yango ebakisamaki na etumbu ya liwa oyo bazalaki na yango mpo bazalaki bana ya Adama. (Rom. 5:12) Mibeko oyo Nzambe apesaki Yisraele elobaki ete soki moto asali lisumu oyo ebongi na liwa, moto yango asengelaki kobomama. Na nsima, nzoto ya moto yango esengelaki kokakisama likoló ya nzete. (Mib. 21:22, 23; 27:26) Na yango, lokola bakakisaki Yesu likoló ya nzete, Bayuda bakokaki kosikolama na elakeli mabe yango, mpe mbeka oyo Yesu apesaki ekokaki kosalisa bango atako baboyaki ye. w21.04 16 par. 5-6
Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 11 Nisana na moi) Matai 21:33-41; 22:15-22; 23:1-12; 24:1-3
Mwayambo, 3 sanza ya 4
Nazali kokaba molimo na ngai.—Yoa. 10:17.
Kanisá makambo oyo esalemaki na mokolo ya nsuka oyo Yesu alekisaki awa na mabele liboso akufa. Basoda ya Roma bákanga ye mpe bábɛta ye kozanga mawa. (Mat. 26:52-54; Yoa. 18:3; 19:1) Babɛti ye na fimbo moko oyo ezokisi ye makasi mpenza. Na nsima, bamemisi ye nzete moko ya kilo mpenza na mokɔngɔ na ye oyo etondi na bampota. Yesu abandi komema nzete yango tii na esika oyo basengeli koboma ye. (Mat. 27:32) Ntango Yesu akómi na esika oyo asengeli kobomama, basoda yango babɛti ye nsɛtɛ na mabɔkɔ mpe na makolo likoló ya nzete yango. Kilo ya nzoto ya Yesu ebandi kopasola misuni na ye na bisika oyo babɛti ye bansɛtɛ. Baninga na ye bazali na mawa makasi mpe mama na ye azali kolela, kasi bakonzi ya Bayuda bazali kotyola Yesu. (Luka 23:32-38; Yoa. 19:25) Yesu azali kolekisa bangonga moko ya mpasi mpenza. Ndenge oyo bakakisi ye likoló ya nzete, esali ete motema mpe mimpululu (poumons) na ye esala lisusu malamu te. Yango wana akómi kopema na mpasi. Yesu ayebi ete atikali sembo epai ya Yehova, yango wana liboso akufa, abondeli ye mpo na mbala ya nsuka. Na nsima, akitisi motó na ye mpe akati motema. (Mrk. 15:37; Luka 23:46; Yoa. 10:18; 19:30) Ezalaki liwa moko ya nsɔni, ya mpasi mpenza, mpe ezwaki ntango mingi! w21.04 16 par. 4
Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 12 Nisana na moi) Matai 26:1-5, 14-16; Luka 22:1-6
DATI YA EKANISELI
Soki moi elali
Mwamibale, 4 sanza ya 4
Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.—Luka 22:19.
Yesu ayebisi bayekoli na ye 11 ya sembo kondimana mibale: kondimana ya sika mpe kondimana mpo na Bokonzi. (Luka 22:19, 20, 28-30) Kondimana yango mibale epesaki bantoma yango mpe na mwa ndambo ya bato mosusu libaku ya kokóma bakonzi mpe banganga-nzambe na likoló. (Em. 5:10; 14:1) Kaka batikali kati na bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali na kati ya kondima yango mibale, nde balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo na Ekaniseli. Yehova apesi bango elikya moko kitoko mpenza—kozala na bomoi kozanga kokufa mpe ya kozanga kopɔla na likoló, kosala elongo na Yesu Kristo oyo asekwá mpe bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo basilá kokende likoló, mpe oyo eleki nyonso, likoki ya komona mpenza Yehova Nzambe! (1 Ko. 15:51-53; 1 Yoa. 3:2) Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bayebaka ete basengeli kotikala sembo tii na liwa na bango.—2 Tim. 4:7, 8. w22.01 21 par. 4-5
Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 13 Nisana na moi) Matai 26:17-19; Luka 22:7-13 (Makambo oyo esalemaki mwa 14 Nisana nsima ya kolala ya moi) Matai 26:20-56
Mwamisato, 5 sanza ya 4
Okozala na ngai na Paradiso.—Luka 23:43.
Basali-mabe mibale bazalaki mpe likoló ya nzete ya mpasi elongo na Yesu. (Luka 23:40, 41) Moko na bango abalukaki epai Yesu mpe ayebisaki ye boye: “Yesu, kanisá ngai ntango okokɔta na bokonzi na yo.” (Luka 23:42) Yesu apesaki mosali-mabe yango elaka wana mpo ayebaki ete Tata na ye azali na motema mawa. (Nz. 103:8; Ebr. 1:3) Yehova alingaka kolimbisa biso mpe komonisela biso motema mawa. Kasi akosala yango kaka soki toyoki mpenza mawa mpo na makambo mabe oyo tosalá kala, mpe tomonisi kondima na mbeka ya Yesu Kristo. (1 Yoa. 1:7) Ekoki kozala mpasi mpo basusu bándima ete Yehova akoki kolimbisa bango mpo na mabunga oyo basalá kala. Soki na bantango mosusu oyokaka mpe bongo, kobosana likambo oyo te: Mwa moke liboso akufa, Yesu amonisaki motema mawa epai ya mosali-mabe oyo abandaki kondimela ye. Kanisá naino: soki Yesu amoniselaki moto ya ndenge wana motema mawa, na ntembe te Yehova akomonisa motema mawa mingi koleka epai ya basambeli na ye ya sembo.—Nz. 51:1; 1 Yoa. 2:1, 2. w21.04 9 par. 5-6
Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 14 Nisana na moi) Matai 27:1, 2, 27-37
Mwaminei, 6 sanza ya 4
Yesu alobaki: Ekokisami!—Yoa. 19:30.
Lokola abatelaki bosembo na ye tii na liwa, Yesu akokisaki makambo mingi. Ya liboso, amonisaki ete Satana azali mobuki-lokuta. Yesu amonisaki ete moto ya kokoka akoki kobatela bosembo na ye ata soki Satana asali ye nini. Ya mibale, Yesu apesaki bomoi na ye lisiko. Lokola apesaki bomoi na ye mbeka, yango esalisi bato ya kozanga kokoka bázala na boyokani malamu ná Nzambe mpe bázwa elikya ya kozala na bomoi libela na libela. Ya misato, Yesu amonisaki ete Yehova azali Moyangeli oyo aleki malamu mpe alongolaki nsɔni nyonso na nkombo ya Tata na ye. Tósalela bomoi na biso ya mokolo na mokolo lokola libaku ya nsuka oyo tozali na yango ya komonisa bosembo na biso! Mpe ata soki liwa eyei, tokozala na likoki ya koloba: “Yehova, nasalaki nyonso mpo na kobatela bosembo na ngai, komonisa ete Satana azali mobuki-lokuta, mpe kolongisa nkombo mpe boyangeli na yo!” w21.04 12 par. 13-14
Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 15 Nisana na moi) Matai 27:62-66 (Makambo oyo esalemaki mwa 16 Nisana nsima ya kolala ya moi) Matai 28:2-4
Mwamitano, 7 sanza ya 4
Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi; bóyoka ye.—Mat. 17:5.
Nsima ya kofunda Yesu mpe kosambisa ye mpo na makambo ya mabe oyo asalaki te, bato bazali kotyola ye, banyokoli ye mabe mpenza, mpe na nsima, babaki ye likoló ya nzete ya mpasi. Babɛti ye bansɛtɛ na mabɔkɔ mpe na makolo. Mbala nyonso oyo azali kopema mpe koloba, azali koyoka mpasi makasi. Kasi asengeli kokanga monɔkɔ te mpo azali na makambo ya ntina mingi oyo asengeli koloba. Tokoki kozwa mateya ya ntina mingi na maloba ya nsuka oyo Yesu alobaki liboso akufa. Esalisi biso tómona ete tosengeli kolimbisaka basusu mpe kotya motema ete Yehova akolimbisa biso. Tozali na libaku moko kitoko ya kozala na bandeko basi mpe bandeko mibali ya elimo oyo balingaka kosalisa biso. Kasi soki tozali na mposa ya lisalisi, tosengeli kokakatana te mpo na kosɛnga bango básalisa biso. Toyebi ete Yehova akosalisa biso tóyika mpiko na mokakatano nyonso oyo tokokutana na yango. Tomoni mpe ntina ya kosalela bomoi na biso ya mokolo na mokolo lokola libaku ya nsuka oyo tozali na yango ya komonisa bosembo na biso mpe ya kotya motema ete Yehova akosekwisa biso soki tokufi. w21.04 8 par. 1; 13 par. 17
Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki mwa 16 Nisana na moi) Matai 28:1, 5-15
Mwapɔsɔ, 8 sanza ya 4
Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.—Yoa. 17:3.
Kolanda matambe ya Yesu ememaka na bomoi ya seko. Ntango elenge mobali moko mozwi atunaki soki asengeli kosala nini mpo azwa bomoi ya seko, Yesu alobaki na ye: “Yaká, landá ngai.” (Mat. 19:16-21) Yesu ayebisaki Bayuda mosusu oyo bazalaki kondima te ete azali Kristo ete: “Bampate na ngai . . . elandaka ngai. Mpe nazali kopesa bango bomoi ya seko.” (Yoa. 10:24-29) Tomonisaka ete tondimelaka Yesu soki tozali kosalela makambo oyo ateyaki mpe komekola makambo oyo asalaki. Soki tosali bongo, tokotikala na nzela ya bomoi ya seko. (Mat. 7:14) Liboso tólanda matambe ya Yesu malamumalamu, tosengeli naino koyeba ye. “Koyekola koyeba Yesu” ezali likambo oyo tosengeli kokoba kosala. Tosengeli kokoba koyekola makambo mingi oyo etali ye, elingi koloba bizaleli na ye, ndenge oyo azalaki kokanisa, mpe mibeko na ye. Ata soki toumeli bambula boni na kati ya solo, tosengeli kokoba koyekola koyeba Yehova mpe Mwana na ye. w21.04 4 par. 9-10
Mwalomingo, 9 sanza ya 4
Liboso nazalaki kofinga mpe konyokola.—1 Tim. 1:13.
Ekoki kozala ete ntoma Paulo azalaki komitungisa mpo na makambo oyo asalaki liboso akóma mokristo. Tokoki kokamwa te ndenge amibengaki mosumuki “ya liboso mpenza.” (1 Tim. 1:15) Liboso ayeba solo, ntoma Paulo anyokolaki bakristo na engumba moko nsima ya mosusu. Atyaki basusu na bolɔkɔ mpe apesaki tribinale mabɔkɔ ntango bazwaki ekateli ya koboma bakristo mosusu. (Mis. 26:10, 11) Kanisá ndenge oyo ntoma Paulo azalaki komiyoka soki akutani na elenge mokristo moko oyo ye apesaki nzela ete báboma baboti na ye. Ntoma Paulo azalaki koyoka mawa makasi mpo na mabunga oyo asalá, kasi ayebaki ete akoki kobongola yango te. Andimaki ete Kristo akufaki mpo na ye, yango wana akomaki boye: “Mpo na boboto monene ya Nzambe nazali ndenge nazali.” (1 Ko. 15:3, 10) Yango eteyi biso nini? Osengeli kondima ete Kristo akufaki mpo na yo, mpe yango epesi yo likoki ya kozala na boyokani ya malamu elongo na Yehova. (Mis. 3:19) Eloko eleki ntina na miso ya Nzambe, ezali makambo oyo tozali kosala sikoyo mpe oyo tokosala na mikolo ezali koya. Kasi ezali te mabunga oyo tosalá kala.—Yis. 1:18. w21.04 23 par. 11
Mwayambo, 10 sanza ya 4
Bómekaka maloba yango mpo na komona soki euti mpenza na ye, mpo ebele ya basakoli ya lokuta babimi na mokili.—1 Yoa. 4:1.
Atako Bayuda mingi na mikolo ya Yesu bazalaki komizela te ete Masiya akokufa, talá makambo oyo Makomami esakolaki: “Asopaki molimo na ye kino na liwa, mpe atángamaki nde elongo na bato oyo babukaka mibeko; mpe ye moko amemaki lisumu ya bato ebele, mpe akómaki kokɔtela bato oyo babukaka mibeko.” (Yis. 53:12) Na yango, Bayuda bazalaki te na ntina ya kobɛta libaku ntango Yesu abomamaki lokola mosumuki. Lelo oyo mpe, tokoki koboya kobɛta libaku ntango toluki koyeba makambo malamumalamu. Na lisolo na ye likoló ya ngomba, Yesu ayebisaki bayoki na ye ete bato mosusu ‘bakokosela bango makambo ya ndenge nyonso.’ (Mat. 5:11) Makambo yango ya lokuta eutaka epai ya Satana. Atindaka batɛmɛli bápanza makambo ya lokuta mpo na baoyo balingaka solo. (Em. 12:9, 10) Tosengeli koboya makambo ya lokuta oyo banguna na biso balobaka. Tosengeli kotika soki moke te ete makambo yango ya lokuta ebangisa biso to mpe elɛmbisa kondima na biso. w21.05 11-12 par. 14; 12 par. 16
Mwamibale, 11 sanza ya 4
Bóbanga te: Bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya.—Mat. 10:31.
Salisá moyekoli na yo atyelaka Yehova motema. Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete Yehova akosalisa bango mpo alingaka bango. (Mat. 10:19, 20, 29, 30) Yebisáká moyekoli na yo ete Yehova akosalisa mpe ye. Okoki kosalisa ye atyelaka Yehova motema soki ozali kobondela elongo na ye mpo na mikano oyo azali na yango. Francizek, oyo afandaka na Pologne alobi boye: “Ndeko oyo ayekolaki na ngai Biblia azalaki kolobela mbala na mbala mikano oyo nazalaki na yango na mabondeli na ye. Ntango namonaki ndenge Yehova ayanolaki na mabondeli ya ndeko yango, nabandaki mbala moko kobondela. Nazalaki komona ndenge Yehova azalaki kosalisa ngai ntango nazalaki kosɛnga nzela na mosala mpo nakende makita mpe liyangani ya etúká.” Yehova atyelaka mpenza bayekoli na biso ya Biblia likebi. Ayebi milende oyo tosalaka mpo na kosalisa bato bápusana penepene na ye, mpe alingaka biso mingi mpo na yango. (Yis. 52:7) Soki ozali te na moto oyo oyekolaka na ye Biblia, okoki kaka kosalisa bayekoli ya Biblia bákola mpe bázwa batisimo soki ozali kokende elongo na basakoli mosusu ntango bakei koyekola na bato Biblia. w21.06 7 par. 17-18
Mwamisato, 12 sanza ya 4
Asepelaka na mobeko ya Yehova, Mpe atángaka mobeko na ye na mongongo ya nse butu moi.—Nz. 1:2.
Tokomonisa ete tosepelaka na Liloba ya Nzambe soki tozali kotánga yango mbala na mbala. Tosengeli kotya ntango mpo na kotánga mpe koyekola Biblia, kasi te kosala yango kaka mpo tozangi makambo ya kosala. Soki tozali na programɛ malamu ya boyekoli, tokokómisa kondima na biso makasi. Na kokesana na “bato ya bwanya mpe ya mayele” ya mokili oyo, tozalaka na kondima makasi oyo esimbami na Liloba ya Nzambe. (Mat. 11:25, 26) Biblia emonisi biso ntina oyo makambo ya mokili ezali kobeba se kobeba mpe oyo Yehova akosala mpo na yango. Na yango, tózwa ekateli ya kokómisa kondima na biso makasi mpe ya kosalisa ebele ya bato bákóma na kondima epai ya Mozalisi na biso. (1 Tim. 2:3, 4) Mpe tókoba kozela ntango bikelamu nyonso ya bomoi awa na mabele bakokumisa Yehova mpe bakoloba maloba oyo ezali na Emoniseli 4:11 ete: “Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo . . . mpo ozalisaki biloko nyonso.” w21.08 19 par. 18-20
Mwaminei, 13 sanza ya 4
Na bolingo ya bondeko bólinganaka na motema.—Rom. 12:10.
Lokola bazali babateli ya mpate, bankulutu bazali na mokumba ya kopesa toli ntango esengeli. Basengeli kosala makasi bápesa toli na ndenge oyo ekosalisa, ekolendisa mpe ‘ekosepelisa motema.’ (Mas. 27:9) Bankulutu balingaka bandeko ya lisangá. Mpo na komonisa bolingo yango, na bantango mosusu esɛngaka bápesa ndeko oyo azali kokende na nzela ya mabe toli. (Gal. 6:1) Kasi liboso ya kosolola na ndeko yango, ekozala malamu nkulutu atala makambo mosusu oyo ntoma Paulo alobaki na ntina etali bolingo. “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto. . . . Ekangaka motema na makambo nyonso, endimaka makambo nyonso, elikyaka makambo nyonso, mpe eyikaka mpiko na makambo nyonso.” (1 Ko. 13:4, 7) Kokanisa maloba ya bavɛrsɛ yango na mozindo ekosalisa nkulutu ayeba soki bolingo nde ezali kotinda ye apesa toli mpe asolola na ndeko na ye na ndenge oyo ebongi. Soki ndeko oyo bazali kopesa toli amoni mpenza ete nkulutu azali kotyela ye likebi, na ntembe te, yango ekosala ete andima toli yango. w22.02 14-15 par. 3, 5
Mwamitano, 14 sanza ya 4
Bango batombokaki mpe bayokisaki elimo santu na ye mpasi.—Yis. 63:10.
Yehova akelaki bikelamu ya elimo mpe bato na ndenge ya kokoka mpe bazalaki ata na mbeba moko te. Kasi na nsima, Satana (oyo elimboli “Motɛmɛli”) atindaki Adama ná Eva, oyo bazalaki bato ya kokoka, bápesa Yehova mokɔngɔ. Baanzelu mpe bato mosusu basanganaki mpe na botomboki yango. (Yuda 6) Yehova amiyokaki ete batɛki ye mpenza. Kobanda ntango wana, azali kokoba koyika mpiko tii ntango ekokoka mpo aboma batomboki nyonso. Na nsima, Yehova elongo na basaleli na ye sembo bakosepela mpo bakoyika lisusu mpiko te na makambo mabe ya mokili oyo! Satana afundaki Yobo, oyo azalaki mosaleli ya sembo ya Yehova, mpe alobaki ete basaleli nyonso ya sembo ya Yehova basalelaka ye kaka mpo na matomba na bango moko. (Yobo 1:8-11; 2:3-5) Tii lelo oyo, Zabolo azali kokoba kofunda bato ndenge wana. (Em. 12:10) Tokomonisa ete Satana azali mobuki-lokuta soki tozali koyika mpiko na mikakatano na biso mpe totikali sembo epai ya Yehova mpo tolingaka ye. w21.07 9 par. 7-8
Mwapɔsɔ, 15 sanza ya 4
Bólongola liboso ya miso na ngai mabe ya misala na bino; bótika kosala mabe.—Yis. 1:16.
Ntoma Paulo asalelaki maloba ya elilingi ya makasi mpenza mpo na koteya biso ete tosengeli te kozwa na lisɛki likambo etali kobongola bomoto na biso. Akomaki ete tosengeli kobaka bomoto na biso ya kala “na nzete.” (Rom. 6:6) Na maloba mosusu, tosengeli komekola Yesu oyo andimaki kobakama na nzete mpo na kosepelisa Yehova. Biso mpe tosengeli kotika bizaleli mpe mimeseno oyo Yehova ayinaka mpo na kosepelisa ye. Kaka soki tosali makambo yango nde tokozala na lisosoli ya pɛto mpe tokozala na elikya ya kozwa bomoi ya seko. (Yoa. 17:3; 1 Pe. 3:21) Yehova akobongola te mibeko na ye mpo na kosepelisa biso. Kasi, biso nde tosengeli kobongola bomoto na biso mpe koyokanisa yango na mibeko na ye. (Yis. 1:16-18; 55:9) Ata nsima ya kozwa batisimo, ekosɛnga ete okoba kobundisa bamposa ya mabe. Bondelá Yehova asalisa yo, mpe tyá motema na elimo na ye, kasi na makasi na yo moko te. (Gal. 5:22; Flp. 4:6) Tosengeli kosala makasi mpo na kolongola bomoto ya kala mpe kozongela yango te. w22.03 6-7 par. 15-17
Mwalomingo, 16 sanza ya 4
[Yehova] ye moko akosunga yo.—Nz. 55:22.
Yehova alaki ete akopesa biso bilei, bilamba, mpe esika ya kolala soki toluki liboso Bokonzi na ye, mpe totosi mibeko na ye ya sembo. (Mat. 6:33) Lokola totyelaka elaka yango motema, tokanisaka te ete biloko ya mokili oyo ekobatela biso to ekopesa biso esengo ya solosolo. Toyebi ete lolenge kaka moko oyo tokoki kozwa kimya ya makanisi ezali ya kosala mokano ya Yehova. (Flp. 4:6, 7) Ata soki tozali na mbongo ya kosomba biloko mingi, tosengeli kotala soki tokozala mpenza na ntango to makasi ya kosalela mpe kobatela biloko yango. Ekoki kotinda biso te tókóma kokangama mingi na biloko na biso ya mosuni? Tóbosana te ete Yehova apesá biso mosala na kati ya libota na ye. Yango wana, tosengeli kotika te ete eloko moko elongola likebi na biso na mosala yango. Tokolinga soki moke te kozala lokola mobali oyo akangamaki mingi na biloko ya mokili mpe aboyaki kolanda Yesu. Na yango, azangaki libaku ya kosalela Yehova mpe ya kokóma moko ya bana na ye!—Mrk. 10:17-22. w21.08 6-7 par. 17
Mwayambo, 17 sanza ya 4
Lobá liboso ya moto nyonso.—1 Pe. 3:15.
Ntango ozali koyekola Biblia, okoyeba bomoto ya Yehova mpe bizaleli na ye. Okomona mpe ete azalaka na bizaleli yango soki oyekoli biloko oyo akelá. Koyekola bizaleli ya Yehova endimisaka biso ete azalaka mpenza. (Kob. 34:6, 7; Nz. 145:8, 9) Wana ozali kokoba koyekola koyeba Yehova, kondima na yo epai na ye ekokóma makasi, okokóma kolinga ye mingi, mpe boninga na yo ná ye ekokóma lisusu makasi koleka. Yebisáká basusu makambo oyo ondimaka mpo na Nzambe. Kasi okosala nini soki na mosala ya kosakola moto moko aboyi kondima ete Nzambe azalaka mpe oyebi te eyano ya kopesa ye? Luká koyeba eyano oyo Biblia epesi mpo na likambo yango na moko ya mikanda na biso, mpe na nsima pesá ye eyano yango. Okoki mpe kosɛnga Motatoli ya Yehova moko oyo ayebi makambo mingi asalisa yo. Ata soki moto yango andimi biyano oyo euti na Biblia to te, okozwa matomba na bolukiluki oyo osalaki. Kondima na yo ekokóma lisusu makasi koleka. w21.08 18 par. 14-15
Mwamibale, 18 sanza ya 4
Namipekisaki te koyebisa bino.—Mis. 20:20.
Esengeli kaka te tósundola biloko na biso nyonso mpo na kosepelisa Yehova. (Mos. 5:19, 20) Nzokande, soki toboyi kosala mingi na mosala ya Yehova kaka mpo toboyi komipimela makambo mosusu, tokoki kosala libunga oyo mobali moko asalaki na ndakisa oyo Yesu apesaki. Moto yango asalaki mosala makasi mpo na kozwa biloko mingi, kasi azalaki kokipe makambo ya Nzambe te. (Luka 12:16-21) Soki tokutani na mikakatano, tobondelaka mpo na kosɛnga lisalisi mpe tokanisaka na oyo tokoki kosala mpo na kolonga yango. (Mas. 3:21) Yehova apambolaka biso na ndenge mingi. Tokomonisa ete tosepelaka na nyonso oyo apesaka biso soki tozali kosala oyo tokoki mpo na kopesa ye lokumu. (Ebr. 13:15) Na ndakisa, tokoki koluka kosala makambo mingi na mosala na ye, mpe yango ekoki kosala ete apambola biso mingi mpenza. Mokolo na mokolo, tóluka mabaku ya ‘komeka mpe ya komona bolamu ya Yehova.’ (Nz. 34:8) Soki tosali bongo, tokozala lokola Yesu, oyo alobaki: “Bilei na ngai nde kosala mokano ya moto oyo atindaki ngai mpe kosilisa mosala na ye.”—Yoa. 4:34. w21.08 30-31 par. 16-19
Mwamisato, 19 sanza ya 4
Lolendo ezalaka liboso ya kokwea, mpe elimo ya komikumisa liboso ya kobɛta libaku.—Mas. 16:18.
Satana alingi ete tókóma na lolendo. Ayebi ete soki tokómi na lolendo tokokóma lokola ye mpe yango ekosala ete tóbungisa elikya ya kozala na bomoi ya seko. Yango wana ntoma Paulo alobaki ete moto akoki ‘kovimba na lolendo mpe kozwa etumbu oyo bakatelá Zabolo.’ (1 Tim. 3:6, 7) Yango ekoki kokómela biso nyonso, ezala tozali bato ya sika na kati ya solo to mpe tosalelaka Yehova banda bambula mingi. Bato ya lolendo balukaka kaka matomba na bango moko. Satana alukaka kotinda biso tókanisa mingi mpo na biso moko na esika tókanisa mpo na Yehova, mingimingi ntango tokutani na mikakatano. Na ndakisa, Satana akosepela soki topesi Yehova foti ntango moto moko akoseli biso makambo to asaleli biso makambo na kozanga bosembo. Zabolo alingi mpe tókanisa ete lolenge eleki malamu ya kosilisa likambo yango ezali ya kosala makambo ndenge tozali kokanisa na esika tólanda litambwisi oyo Yehova apesaka biso na nzela ya Liloba na ye.—Mos. 7:16, 20. w21.06 15 par. 4-5
Mwaminei, 20 sanza ya 4
“Bino nyonso bato ya mboka oyo, bózala makasi mpe bósala mosala,” yango nde liloba ya Yehova. “Mpo nazali elongo na bino,” yango nde liloba ya Yehova ya mampinga.—Hag. 2:4.
Yehova apesaki mosakoli Hagai mokumba moko ya ntina mingi. Ekoki kozala ete Hagai azalaki na kati ya bato oyo bautaki bakangami na Babilone mpe bazongaki na Yerusaleme na mobu 537 liboso ya ntango na biso. Mwa moke nsima ya kokóma na Yerusaleme, basaleli yango ya sembo ya Yehova batyaki moboko ya ndako ya Yehova, to tempelo. (Ezr. 3:8, 10) Kasi eumelaki te, likambo moko ya mpasi esalemaki. Balɛmbaki nzoto mpe batikaki kotonga tempelo mpo bato mosusu bakómaki kotɛmɛla bango. (Ezr. 4:4; Hag. 1:1, 2) Yango wana na mobu 520 liboso ya ntango na biso, Yehova apesaki Hagai mokumba ya kolendisa Bayuda bázongela lisusu molende na bango mpe básilisa kotonga tempelo. (Ezr. 6:14, 15) Nsango oyo Hagai asakolaki ezalaki na mokano ya kolendisa bato bákóma na kondima makasi epai ya Yehova. Na ntembe te, maloba “Yehova ya mampinga,” esengelaki kolendisa bango. Yehova azali na ebele ya mampinga na ye ya baanzelu; yango wana Bayuda basengelaki kotyela ye motema mpo bálonga. w21.09 15 par. 4-5
Mwamitano, 21 sanza ya 4
Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.—Yoa. 13:35.
Lelo oyo, Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bamoniselanaka bolingo mpe bazalaka na bomoko. Tokeseni na mangomba mosusu nyonso mpo tozalaka libota moko ata soki tokeseni bikólo, loposo, mpe mimeseno. Tomonaka mpenza bolingo yango na makita ya lisangá, ata mpe na mayangani ya mike mpe ya minene. Yango endimisaka biso mpenza ete tosambelaka Yehova na ndenge oyo andimaka. (Yoa. 13:34) Biblia eyebisi biso ete ‘tólinganaka makasi.’ (1 Pe. 4:8) Tomonisaka bolingo yango ndenge tolimbisanaka mpe tokangaka motema na mabunga ya basusu. Tolukaka mpe mabaku ya komonisa ezaleli ya koyamba bapaya mpe ya kokabela bato nyonso na lisangá, ata mpe baoyo bapesaki biso mpasi. (Kol. 3:12-14) Bolingo ya ndenge wana emonisaka ete tozali mpenza bakristo ya solo. w21.10 22 par. 13-14
Mwapɔsɔ, 22 sanza ya 4
Moto oyo alingi [mwana na ye] alukaka ye mpenza na disiplini.—Mas. 13:24.
Kolongola moto na lisangá ekoki kotinda mosumuki abongola makanisi na ye mpe abongola motema? Ɛɛ. Bato mingi oyo bakweaki na masumu ya minene bamonaki ete ekateli ya makasi oyo bankulutu bazwaki, esalisaki bango bázongela makanisi ya malamu, bátika etamboli na bango ya mabe mpe bázongela Yehova. (Ebr. 12: 5, 6) Tózwa ndakisa moko. Kanisá ete mobateli ya mpate amoni ete mpate na ye moko ezali kobɛla maladi moko mabe. Ayebi ete mpo asalisa mpate yango, asengeli kotya yango mosika na bampate mosusu. Nzokande bampate elingaka kofanda na etonga elongo na baninga na yango mpe ekoki kobanga soki batye yango mosika na bampate mosusu. Yango elingi nde koloba ete mobateli ya mpate azali motema mabe ndenge aponi kotya mpate oyo ezali kobɛla mosika na bamosusu? Te. Ayebi ete soki atye mpate yango esika moko na bampate mosusu, bampate yango ekozwa maladi yango. Kotya yango mosika na bampate mosusu, ekobatela etonga mobimba. w21.10 10 par. 9-10
Mwalomingo, 23 sanza ya 4
Tiká pole na bino engɛnga liboso ya bato, mpo bámona misala na bino ya malamu mpe bápesa Tata na bino oyo azali na likoló nkembo.—Mat. 5:16.
Ezali mpenza lokumu kozala na kati ya libota ya basambeli ya Yehova ya mokili mobimba oyo bamoniselanaka bolingo! Tolingi ete bato ebele báya kosambela Nzambe elongo na biso. Yango wana tosengeli kokeba ete tósala te likambo moko oyo ekobebisa lokumu ya basaleli ya Yehova, to ya Tata na biso ya likoló. Tosalaka makasi tózala na bizaleli oyo ekotinda bato bándima nsango malamu. Na bantango mosusu, bato bakoki koloba na biso mabe to konyokola biso mpo tozali kotosa Tata na biso ya likoló. Tokosala nini soki tozali kobanga koyebisa bato mosusu mateya oyo tondimaka? Tokoki kotyela Yehova mpe Mwana na ye motema mpo básalisa biso. Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete basengelaki kobanga te mpo na ndenge oyo bakoloba mpe makambo oyo bakoloba. Mpo na nini? Alobaki boye: “Bakopesa bino oyo bokoloba kaka na ngonga wana; mpo baoyo bazali koloba ezali kaka bino moko te, kasi elimo ya Tata na bino nde ezali koloba na nzela na bino.”—Mat. 10:19, 20. w21.09 24 par. 17-18
Mwayambo, 24 sanza ya 4
Nakoloba na Yehova: “Ozali ekimelo na ngai mpe esika makasi ya libateli na ngai.”—Nz. 91:2.
Moize mpe asalelaki maloba ya ndenge wana mpo na kolobela esika ya komibomba. (Nz. 90:1) Lisusu, liboso Moize akufa, alobaki maloba mosusu ya kolendisa. Akomaki boye: “Nzambe ya ntango ya kala azali esika ya komibomba, mpe mabɔkɔ oyo ezali koumela seko ezali na nse na yo.” (Mib. 33:27) Maloba “mabɔkɔ oyo ezali koumela seko ezali na nse na yo” emonisi nini mpo na Yehova? Soki tomindimisi ete Yehova azali esika na biso ya komibomba, tokoyoka ete tobatelami. Kasi na bantango mosusu tokoki kolɛmba nzoto mpe kokoka te kotɛlɛma mpo na kosala makambo mosusu. Na bantango ya ndenge wana, Yehova asalaka nini mpo na biso? (Nz. 136:23) Na boboto mpenza atyaka mabɔkɔ na ye oyo ezali koumela seko na nse na biso mpo na kotɛlɛmisa biso mpe kopesa biso makasi. (Nz. 28:9; 94:18) Koyeba ete tokoki ntango nyonso kotyela lisalisi ya Nzambe motema esalisaka biso tóbosana te mapamboli oyo mibale: Ya liboso, tozali na esika malamu ya komibomba ata soki tofandaka wapi, mpe ya mibale, Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo atyelaka biso likebi. w21.11 6-7 par. 15-16
Mwamibale, 25 sanza ya 4
Esengeli bóyoka mawa na komekama ndenge na ndenge.—1 Pe. 1:6.
Yesu ayebaki ete makambo ya kozanga bosembo ekotya kondima ya bayekoli na ye na komekama. Mpo na kosalisa bango báyika mpiko, apesaki ndakisa moko oyo ezali na mokanda ya Luka. Abɛtɛlaki bango lisolo ya mwasi moko oyo mobali akufá oyo azalaki kosɛnga zuzi moko ya motema mabe akata likambo na ye na bosembo. Mwasi yango ayebaki ete soki akobi kosɛnga, zuzi yango akokata likambo na ye na bosembo. Mpe nsukansuka, zuzi yango andimaki kosalisa ye. Yango eteyi biso nini? Yehova azali te Nzambe oyo azangi bosembo. Yango wana Yesu alobaki: “Bongo Nzambe akosala te ete likambo ya bato na ye oyo aponaki, oyo babelelaka ye butu moi, ekatama na bosembo?” (Luka 18:1-8) Na nsima Yesu abakisaki: “Ntango Mwana ya moto akoya, akokuta mpenza kondima awa na mabele?” Ntango tokutani na makambo ya kozanga bosembo, tokomonisa ete tozali na kondima makasi lokola ya mwasi wana soki tozali na motema molai mpe tolɛmbi te. Soki tozali na kondima ya ndenge wana, tokoki kotya motema ete nsukansuka Yehova akosalisa biso. Tosengeli mpe kondima ete libondeli ezalaka mpenza na nguya. w21.11 23 par. 12; 24 par. 14
Mwamisato, 26 sanza ya 4
Ndenge nini elenge mobali akopɛtola nzela na ye? Soki amibateli mpe asaleli liloba na yo.—Nz. 119:9.
Bilenge, na bantango mosusu bomonaka ete mibeko ya Yehova etyaka bomoi na bino nkaka? Satana alingaka ete bókanisa bongo. Akolinga ete bótya makanisi na bino na makambo oyo bato oyo bazali na nzela ya monene basalaka, mpo emonanaka lokola bazali mpenza na bomoi ya esengo. Akoki kotinda bino bókanisa ete bozali kozanga makambo mosusu mpo bosalaka te makambo oyo baninga na bino ya kelasi to mpe bato mosusu oyo botalaka na Internet basalaka. Satana alingi bókanisa ete mibeko ya Nzambe epekisaka bino bózala na bomoi ya esengo. Kasi bóbosana likambo oyo te: Satana alingaka te ete baoyo bazali kotambola na nzela na ye bámona epai nzela yango ekomema bango. (Mat. 7:13, 14) Kasi Yehova alingi oyeba ete okozala na bomoi ya esengo soki otikali na nzela ya bomoi.—Nz. 37:29; Yis. 35:5, 6; 65:21-23. w21.12 23 par. 6-7
Mwaminei, 27 sanza ya 4
Limbisá ndeko na yo na motema mobimba.—Mat. 18:35.
Toyebi ete tosengeli kolimbisaka, mpe yango nde likambo oyo tosengeli kosala. Kasi kosala bongo ekoki kozala pɛtɛɛ te. Ekoki kozala ete na ntango moko boye ntoma Petro mpe amiyokaki bongo. (Mat. 18:21, 22) Nini ekoki kosalisa biso? Ya liboso, kanisá ndenge oyo Yehova alimbisaka yo. (Mat. 18:32, 33) Tobongi te ete alimbisaka biso, kasi asalaka yango na motema moko. (Nz. 103:8-10) Lisusu, biso mpe “tosengeli kolingana.” Kolimbisa ezali te likambo oyo tokoki kosala soki tolingi. Tozali na mokumba ya kolimbisaka bandeko na biso bakristo. (1 Yoa. 4:11) Ya mibale, kanisá matomba oyo okozwa soki olimbisi. Tokoki kosalisa moto oyo asalaki likambo oyo epesaki biso mpasi, kobatela bomoko ya lisangá, boyokani na biso ná Yehova, mpe kolongola kilo na mapeka na biso. (2 Ko. 2:7; Kol. 3:14) Likambo ya nsuka, bondeláká Yehova oyo asɛngi biso tólimbisaka. Kotika te Satana abebisa boyokani malamu oyo ozalaka na yango ná bandeko ya lisangá. (Ef. 4:26, 27) Tosengeli na lisalisi ya Yehova mpo tókwea te na motambo ya Satana. w21.06 22 par. 11; 23 par. 14
Mwamitano, 28 sanza ya 4
Okokóma mokonzi ya Yisraele.—1 Sa. 23:17.
Davidi azalaki kokimakima mpo na kobikisa bomoi na ye, mpo Saulo, mokonzi ya nguya ya Yisraele, azalaki koluka koboma ye. Ntango Davidi azalaki na mposa ya biloko ya kolya, atɛlɛmaki na engumba Nobe, epai asɛngaki Ahimeleke apesa ye kaka mampa mitano. (1 Sa. 21:1, 3) Na nsima, ye ná bato na ye babombanaki na kati ya mobenga moko. (1 Sa. 22:1) Mpo na nini Davidi akómaki na mokakatano yango? Mokonzi Saulo azalaki koyokela Davidi zuwa makasi mpo bato mingi bazalaki kolinga ye mpe kokumisa ye mpo alongaki bitumba mingi. Saulo ayebaki mpe ete Yehova aponaki Davidi azala mokonzi na esika na ye. (1 Sa. 23:16, 17) Kasi, lokola Saulo azalaki naino mokonzi ya Yisraele, azalaki na basoda ebele mpe bato mingi bazalaki kopesa ye mabɔkɔ; yango wana Davidi asengelaki kokima mpo na kobikisa bomoi na ye. Saulo akanisaki mpenza ete akokaki kopekisa Nzambe atya Davidi azala mokonzi ndenge akanaki? (Yis. 55:11) Biblia elobeli yango te, kasi toyebi likambo moko: Saulo azalaki komitya na likama, mpo bato oyo babundisaka Nzambe balongaka te. w22.01 2 par. 1-2
Mwapɔsɔ, 29 sanza ya 4
Nikodeme . . . ayaki epai na ye na butu.—Yoa. 3:1, 2.
Yesu asakolaki na molende mpenza. Amonisaki ete alingaki bato ndenge akobaki koteya bango na libaku nyonso. (Luka 19:47, 48) Nini etindaki ye asala bongo? Yesu azalaki koyokela bango mawa. Na bantango mosusu, bato mingi bazalaki na mposa ya koyoka maloba ya Yesu, mpe ye ná bayekoli na ye “bakokaki ata kolya eloko te.” (Mrk. 3:20) Mpe ntango mobali moko azalaki na mposa ya kosolola na Yesu na butu, Yesu andimaki kokutana na ye na ntango yango. Bato mingi oyo na ebandeli bayokaki mateya ya Yesu bakómaki bayekoli na ye te. Kasi apesaki bayoki na ye nyonso litatoli malamumalamu. Lelo oyo, tolingaka kopesa moto nyonso libaku ya koyoka nsango malamu. (Mis. 10:42) Na esika tókangama kaka na programɛ oyo tomoni ete ezali malamu mpo na biso, tosengeli kondima kobongola programɛ na biso mpo tósakolaka na bantango oyo tokoki kokutana na bato. Soki tosali bongo, tóyeba ete Yehova akosepela mpenza. w22.01 17 par. 13-14
Mwalomingo, 30 sanza ya 4
Moto ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi.—Mos. 8:9.
Lelo oyo, bato mingi bamonaka ete ezali mpasi kotyela bakonzi motema. Bamonaka ete mbala mingi bakonzi ya guvɛrnema mpe mibeko oyo batyaka ezalaka mpo na kobatela bato ya mbongo mpe bato minene, kasi te mpo na kosalisa babola. Lisusu, bakonzi mosusu ya mangomba basalaka makambo ya mabe mpenza, mpe yango esali ete bato mosusu bátyela lisusu Nzambe motema te. Na yango, ntango moto andimi tóyekola na ye Biblia, tozali na mokumba monene ya kosalisa ye ayekola kotyela Yehova motema mpe bamonisi na Ye awa na mabele. Nzokande, ezali kaka bayekoli ya Biblia te nde basengeli koyekola kotyela Yehova mpe ebongiseli na ye motema. Ata soki tosalelaka Yehova banda bambula mingi, tosengeli ata mokolo moko te kotika kondima ete lolenge na ye ya kosala makambo nde eleki malamu. Na bantango mosusu, ekoki kozala na makambo mosusu oyo ekoki kosala ete ezala mpasi tóndima likambo yango. w22.02 2 par. 1-2