Sanza ya 12
Mwamitano, 1 sanza ya 12
Ekoyoka mongongo na ngai.—Yoa. 10:16.
Yesu akokanisaki bolingo makasi oyo azalaka na yango mpo na bayekoli na ye na bolingo makasi oyo mobateli ya mpate azalaka na yango mpo na bampate na ye. (Yoa. 10:14) Yango ebongi mpenza. Mpate eyebaka mobateli na yango mpe eyokaka mongongo na ye. Mosali-mibembo moko amonaki bosolo ya likambo yango. Alobi boye: “Mokolo moko ntango tozalaki kosala mobembo, tomonaki mwa etuluku moko ya bampate. Ntango tomekaki kobenga bampate yango mpo na kokanga yango fɔtɔ, ata moko eyaki te mpo eyebaki mongongo na biso te. Nzokande ntango kaka elenge mobali moko oyo azalaki kobatela yango abengaki yango, na mbala moko bampate yango elandaki ye.” Makambo oyo mosali-mibembo yango amonaki ekundweli biso maloba oyo Yesu alobaki mpo na bampate na ye, elingi koloba, bayekoli na ye. Alobaki boye: “Ekoyoka mongongo na ngai.” Kasi Yesu azali na likoló; na yango, ndenge nini tokoki koyoka mongongo na ye? Lolenge eleki malamu ya komonisa ete toyokaka mongongo ya Nkolo na biso ezali ya kosalela mateya na ye na bomoi na biso.—Mat. 7:24, 25. w21.12 16 par. 1-2
Mwapɔsɔ, 2 sanza ya 12
Bato nyonso basali lisumu mpe bakómaka na nkembo ya Nzambe te.—Rom. 3:23.
Ntoma Paulo azalaki konyokola bakristo na molende mpenza. Kasi na nsima, andimaki ete azalaki kosala mabe, mpe andimaki kobongola makanisi na ye mpe bomoto na ye. (1 Tim. 1:12-16) Yehova asalisaki Paulo, mpe akómaki mobateli ya mpate ya bolingo, ya motema mawa mpe ya komikitisa. Aponaki kotya motema ete Yehova akosalisa ye, na esika atya makanisi nyonso kaka na bolɛmbu na ye. (Rom. 7:21-25) Azalaki koluka te kozala moto ya kokoka. Kasi, asalaki makasi abongisa bomoto na ye ya bokristo mpe na komikitisa nyonso, atyaki motema ete Yehova akosalisa ye akokokisa mosala na ye. (1 Ko. 9:27; Flp. 4:13) Soki bandeko batyamaka bankulutu, ezali te mpo bazali bato ya kokoka. Kasi Yehova alingi ete bándimaka mabunga na bango mpe bábongisa bomoto na bango ya bokristo. (Ef. 4:23, 24) Nkulutu asengeli kosalela Liloba ya Nzambe mpo esalisa ye amona bisika oyo asengeli kobongisa, mpe na nsima kosala mbongwana nyonso oyo esengeli. Bongo Yehova akosalisa ye azala na esengo mpe azala nkulutu ya malamu.—Yak. 1:25. w22.03 29-30 par. 13-15
Mwalomingo, 3 sanza ya 12
Bótika kosambisa.—Mat. 7:1.
Tosengeli kosala nini soki tomoni ete tosambisaki ndeko moko? Tosengeli kobosana te ete tosengeli kolinga bandeko na biso. (Yak. 2:8) Lisusu, tosengeli kobondela mpenza Yehova, kosɛnga ye asalisa biso tótika kosambisaka basusu. Tokoki kosala na boyokani na mabondeli na biso soki tozwi bibongiseli mpo na kolekisa ntango elongo na ndeko oyo tozalaki kosambisa. Tokoki kosɛnga ye tóbima elongo na mosala ya kosakola to mpe tólya mwa eloko. Wana tozali koyeba ndeko na biso malamu, tokosala makasi tómekola Yehova mpe Yesu soki tozali kotya likebi na bizaleli na ye ya malamu. Na ndenge yango, tokomonisa ete tozali koyoka toli ya mobateli ya mpate ya malamu oyo asɛngi biso tótika kosambisa basusu. Kaka ndenge bampate eyokaka mongongo ya mobateli na yango, bayekoli ya Yesu mpe bayokaka mongongo na ye. Ezala tozali na kati ya “etonga moke” to “bampate mosusu,” tókoba koyoka mongongo ya mobateli ya mpate ya malamu mpe kotosa ye.—Luka 12:32; Yoa. 10:11, 14. w21.12 19 par. 11; 21 par. 17-18
Mwayambo, 4 sanza ya 12
Ye atikaki toli ya mikóló, oyo bapesaki ye.—1 Bak. 12:8.
Ntango Rehoboame akómaki mokonzi ya Yisraele, bato ya ekólo bayaki kosɛnga likambo moko. Basɛngaki ye alɛmbisa mokumba oyo tata na ye Salomo atyelaki bango. Likambo ya esengo, Rehoboame asololaki na mikóló ya Yisraele mpo básalisa ye azwa eyano ya kopesa bato yango. Mikóló bayebisaki ye ete soki asali makambo oyo bato basɛngi ye, bato yango bakosalela ye ntango nyonso. (1 Bak. 12:3-7) Emonani ete Rehoboame asepelaki na toli wana te; na yango akendaki kotuna makanisi ya baninga oyo bakolaki elongo. Bayebisaki ye abakisela bato ya ekólo mikumba ya kilo. (1 Bak. 12:9-11) Rehoboame akokaki kosɛnga Yehova mpo asalisa ye ayeba toli nini asengeli kolanda. Nzokande, alandaki toli ya baninga na ye. Yango ememaki mikakatano mpo na ye moko mpe bato ya Yisraele. Ndenge moko mpe, na bantango mosusu bakoki kopesa biso toli oyo tolingi koyoka te. Nzokande, soki toli yango euti na Liloba ya Nzambe, tosengeli kondima yango. w22.02 9 par. 6
Mwamibale, 5 sanza ya 12
Kitoko ya bilenge ezali nguya na bango.—Mas. 20:29.
Moto oyo azali na komikitisa mpe na bopɔlɔ atyaka makanisi na ye nyonso kaka te na makambo oyo bilenge bayebi te, kasi nde na makasi oyo bazali na yango. Atalelaka bango te lokola bato oyo bazali kosala mpo báleka ye, kasi nde lokola baninga ya mosala. Bandeko oyo bakómi mibange batalelaka bilenge lokola makabo oyo euti epai ya Yehova mpe bazalaka na botɔndi mpo na oyo bilenge basalaka. Wana makasi na bango ya nzoto ezali kosila, bandeko oyo bakómi mibange bazalaka na botɔndi ndenge baoyo bazali naino na makasi ya bolenge bandimaka kosalisa lisangá. Na Biblia, Naomi azali ndakisa malamu ya mobange oyo andimaki lisalisi ya elenge. Ntango mobali ya Ruta akufaki, Naomi asɛngaki Ruta azonga epai na bango. Kasi ntango Ruta atingamaki mpo azonga ná Naomi na Beteleme, Naomi andimaki lisalisi na ye. (Ruta 1:7, 8, 18) Yango ememelaki bango nyonso mibale mapamboli! (Ruta 4:13-16) Mibange oyo bazalaka na komikitisa, balandaka ndakisa ya Naomi. w21.09 10-11 par. 9-11
Mwamisato, 6 sanza ya 12
Nzambe azangi boyengebene te mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomonisaki. —Ebr. 6:10.
Tata na biso ya likoló ayebi makambo oyo mokomoko na biso akoki kosala. Mbala mosusu okoki kosala mingi koleka bato oyo oyebi mpe oyo olingaka. Mbala mosusu mpe okoki kosala mingi te lokola basusu, ntango mosusu mpo okómi mokóló, ozali na maladi, to mpe mpo na mikumba ya libota. Kolɛmba nzoto te. (Gal. 6:4) Yehova akobosana mosala na yo te. Soki ozali kosala makasi opesa eloko na yo oyo eleki malamu mpe ozali na makanisi ya malamu, akosepela na yango. Yehova amonaka ata makanisi ya motema na yo. Alingaka ete ozala na esengo mpe osepela na makambo oyo okoki kosala mpo na kosambela ye. Banda sikoyo tozali na kimya ya makanisi mpo toyebi ete Yehova asalisaka biso ntango tokutani na mikakatano. (Yis. 41:9, 10) Tozali mpenza na bantina mingi ya kozala na esengo wana tozali kosambela Tata na biso ya bolingo, oyo abongi “kozwa nkembo mpe lokumu” oyo euti na bikelamu na ye nyonso!—Em. 4:11. w22.03 24-25 par. 16; 25 par. 18
Mwaminei, 7 sanza ya 12
Nasalaki nokinoki, mpe naumelaki te mpo na kobatela mitindo na yo.—Nz. 119:60.
Tolingi komekola Yesu, kasi tosengeli kolɛmba nzoto te soki tozali kokoka te komekola Yesu na ndenge ya kokoka. (Yak. 3:2) Moto oyo azali koyekola kosala mayemi akoki te komekola na ndenge ya kokoka liyemi ya molakisi. Kasi soki moyekoli yango azali komona bisika oyo asali mabunga mpe azali kosala makasi alanda mpenza ndakisa ya molakisi, moyekoli yango akokoba kobongisa mosala na ye. Ndenge moko mpe, soki tozali kosalela makambo oyo toyekoli na boyekoli na biso moko ya Biblia, mpe tosali makasi mpo tóbongisa makambo oyo tosengeli kobongisa, tokokoka kolanda ndakisa oyo Yesu atikelá biso. (Nz. 119:59) Lelo oyo, bato mingi na mokili bazali na ezaleli ya moyimi. Kasi biso basaleli ya Yehova tokeseni na bango. Elimo ya komipimela oyo Yesu amonisaki esimbaka mpenza mitema na biso, mpe tozali na ekateli ya kolanda ndakisa na ye. (1 Pe. 2:21) Soki tozali kosala oyo tokoki mpo na komekola elimo ya komipimela oyo Yesu amonisaki, biso mpe tokozala na esengo mpo Yehova akondima biso. w22.02 24-25 par. 16, 18
Mwamitano, 8 sanza ya 12
Makambo mosusu ezali mpasi moto akanga ntina na yango.—2 Pe. 3:16.
Lolenge moko oyo Yehova azali kotambwisa bato na ye ezali na nzela ya Biblia, Liloba na ye. Soki tozwaka ntango mpo na kokanisa na mozindo makambo oyo Yehova ateyaka biso, tokozala na likoki ya kolanda litambwisi na ye mpe ya kokokisa mokumba na biso ya kosakola. (1 Tim. 4:15, 16) Lolenge mosusu oyo Yehova apesaka biso litambwisi ezali na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45) Na bantango mosusu, moombo yango akoki kopesa litambwisi oyo tozali kokanga ntina na yango te. Na ndakisa, tokoki kozwa malako ya sikisiki na oyo etali komibongisa mpo na makama oyo ebimaka yango moko, oyo biso tokanisi ete ekoki kosalema te na esika oyo tofandi. Tosengeli kosala nini soki tomoni lokola ete malako oyo epesami ebongi te? Kanisá masolo mosusu ya Biblia oyo totángá. Na bantango mosusu basaleli ya Yehova bazwaki litambwisi oyo emonanaki ete ebongi te na ndenge ya bomoto kasi nsukansuka ebikisaki bomoi na bango.—Bas. 7:7; 8:10. w22.03 18-19 par. 15-16
Mwapɔsɔ, 9 sanza ya 12
Tata, natiki elimo na ngai na mabɔkɔ na yo.—Luka 23:46.
Na kondima nyonso Yesu alobaki maloba ya mokapo ya lelo. Yesu ayebaki ete elikya na ye ya kozala na bomoi na mikolo ezali koya, ezalaki na mabɔkɔ ya Yehova. Mpe ayebaki ete Tata na ye akobosana ye te. Maloba ya Yesu ekoki koteya biso nini? Kobá kobatela bosembo na yo epai ya Yehova ata soki bomoi na yo ezali na likama. Mpo na kosala yango, osengeli ‘kotyela Yehova motema na yo mobimba.’ (Mas. 3:5) Tótalela ndakisa ya Joshua, Motatoli ya Yehova moko ya mbula 15 oyo abɛlaki maladi moko oyo ememaki ye na liwa. Aboyaki kondima lisalisi ya monganga oyo ekokaki kotinda ye abuka mibeko ya Nzambe. Mwa moke liboso akufa, ayebisaki mama na ye boye: “Mama, nazali na mabɔkɔ ya Yehova. Mama, nazali koyebisa yo na bosembo nyonso: nayebi mpenza ete Yehova akosekwisa ngai. Ayebi makambo oyo ezali na motema na ngai mpe nalingaka ye mingi mpenza.” Na yango, mokomoko na biso asengeli komituna boye: “Soki kondima na ngai emekami na likambo moko oyo ekoki kosala ete nabungisa bomoi na ngai, nakotikala sembo epai ya Yehova, mpe nakotyela ye motema ete akobosana ngai te?” w21.04 12-13 par. 15-16
Mwalomingo, 10 sanza ya 12
Moto oyo amwangiselaka bato mosusu mai mingi, ye mpe bakomwangisela ye mai mingi.—Mas. 11:25.
Basaleli ya Yehova bazwaka makasi na nzela ya mosala ya kosakola. Ntango toyebisaka basusu mateya ya solo oyo ezali na Biblia, tomiyokaka malamu ezala bato bandimi koyoka biso to te. Makambo ya bomoi ekoki kosala ete bandeko mosusu bákóma kokanisa ete bazali na likoki te ya kosakola mingi. Soki yo mpe omiyokaka bongo, kobosana te ete Yehova asepelaka na oyo osalaka na kotalela makoki na yo. Yehova amonaka mpe asepelaka na mposa oyo tozalaka na yango ya kosakola ata soki tokɔtá ndako. Na yango, akoki kosalisa biso tósakwela baoyo bayaka kotala biso to mpe minganga. Soki tokokanisi makambo oyo tozali kosala sikoyo ná oyo tozalaki kosala kala, tokoki kolɛmba nzoto. Kasi soki tobosani te ndenge oyo Yehova azali kosalisa biso sikoyo, tokozala na makasi ya koyika mpiko mpe ya kobatela esengo na biso ata soki tokutani na mokakatano nini. Toyebi te soki mboto nini ya solo oyo tozali kolona ekozwa misisa mpe ekobanda kokola.—Mos. 11:6. w21.05 24-25 par. 14-17
Mwayambo, 11 sanza ya 12
Mpo na nini otyoli liloba ya Yehova mpe osali oyo ezali mabe na miso na ye?—2 Sa. 12:9.
Lokoso etindaki Mokonzi Davidi abosana biloko oyo Yehova apesaki ye, na ndakisa bomɛngo, lokumu mpe ndenge oyo alongaki banguna na ye mingi. Davidi ayebaki malamu ete makabo ya Nzambe ezalaki ‘ebele koleka oyo akokaki koyebisa!’ (Nz. 40:5) Kasi na ntango moko boye, Davidi abosanaki oyo Yehova apesaki ye. Atako azalaki na basi ebele, akómaki kolula mwasi ya moto mosusu, likambo oyo Yehova alobaki ete ezali mabe. Nkombo ya mwasi yango ezalaki Bate-sheba mpe mobali na ye Uria Mohiti. Davidi asangisaki nzoto na Bate-sheba mpe akómaki na zemi. Davidi asukaki kaka te na kosala ekobo ná mwasi yango, kasi abomisaki mpe mobali na ye! (2 Sa. 11:2-15) Davidi azalaki kokanisa nini? Azalaki nde kokanisa ete Yehova akomona likambo yango te? Atako Davidi azalaki kosalela Yehova na boumeli ya bambula mingi, akómaki na lokoso mpe yango ememelaki ye mpasi mpenza. Kasi likambo ya esengo ezali ete na nsima, Davidi andimaki lisumu oyo asalaki mpe abongolaki motema. Asepelaki mpenza ndenge oyo Yehova alimbisaki ye!—2 Sa. 12:7-13. w21.06 17-18 par. 10
Mwamibale, 12 sanza ya 12
Ezali te ete biso tobongi mpenza na ndenge na biso moko . . . , kasi kobonga na biso mpenza euti nde na Nzambe.—2 Ko. 3:5.
Tokoki kokanisa ete tokokoka te koyekola na bato Biblia. Mbala mosusu tokanisaka ete tosengeli kozala na boyebi mpe na makoki mingi liboso tóbanda koyekola na moto Biblia. Soki yo mpe okanisaka bongo, talá makambo misato oyo ekoki kosalisa yo. Ya liboso, Yehova amonaka ete ozali na makoki ya koteya basusu. Ya mibale, Yesu oyo azali na “bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele,” apesi yo ndingisa ya koteya. (Mat. 28:18) Ya misato, bandeko mosusu bakoki kosalisa yo. Yesu azalaki koyebisa bato makambo oyo Tata na ye ateyaki ye, yo mpe okoki kosala bongo. (Yoa. 8:28; 12:49) Longola yango, okoki kosɛnga mokɛngɛli ya etuluku na bino ya mosala ya kosakola, mobongisi-nzela moko ya makoki, to mpe mosakoli moko oyo ayebi koteya asalisa yo obanda koyekola na bato Biblia. Kobima na mosala ya kosakola elongo na bandeko yango mpe kotya likebi ndenge bazali koyekola na bato Biblia ezali moko ya makambo oyo ekosalisa yo okolisa makoki na yo. w21.07 6 par. 12
Mwamisato, 13 sanza ya 12
Moto oyo azali sembo na likambo ya moke azali mpe sembo na likambo ya monene, mpe moto oyo azali moyengebene te na likambo ya moke azali mpe moyengebene te na likambo ya monene.—Luka 16:10.
Lokola nsuka ya mokili oyo ekómi mpenza pene, tosengeli lisusu kotyela lolenge oyo Yehova asalaka makambo motema mingi koleka. Mpo na nini? Na ntango ya bolɔzi monene, tokoki kozwa malako oyo ekoki kokamwisa biso, oyo ekoki komonana ete ebongi te to ete ezangá motó ná makolo. Yehova akoloba epai na biso mbala moko boye te. Na ntembe te akopesa litambwisi na nzela ya bato oyo atyá mpo bátambwisa biso. Wana ekozala te ntango ya kokanisa ete ekateli ya ndenge mosusu ekobima, to ya koboya kondima yango, mpe komituna: ‘Malako yango euti mpenza epai ya Yehova, to bandeko oyo bazali kokamba bazali kosala makambo na ndenge na bango?’ Okotyela Yehova motema mpe ebongiseli na ye na ntango yango oyo makambo ekozala ndongo? Ndenge oyo otalelaka malako oyo tozwaka sikoyo ekosalisa yo oyanola na motuna yango. Soki ondimaka litambwisi oyo tozwaka lelo mpe olandaka yango mbala moko, na ntembe te okosala mpe bongo na ntango ya bolɔzi monene. w22.02 6 par. 15
Mwaminei, 14 sanza ya 12
Eloko nini nasali koleka bino?—Bas. 8:2.
Yehova asalisaki Gideone ná mibali 300 bálonga etumba moko, mpe yango ekokaki kotinda bango bákóma na lolendo makasi. Mibali ya Efraime bayaki kokutana na Gideone mpo na kopesa ye longonya te kasi nde mpo na koswanisa ye mpo babengisaki bango te na etumba. (Bas. 8:1) Gideone amonisaki ndenge oyo Yehova asalisaki mibali ya Efraime básala makambo ya minene. Na yango, nkanda ya mibali yango “ekitaki.” (Bas. 8:3) Gideone andimaki komikitisa mpo na kobatela kimya na kati ya basaleli ya Nzambe. Ndakisa ya mibali ya Efraime eteyi biso ete, na esika ya koluka lokumu na biso moko, tosengeli nde kopesaka Yehova lokumu. Batata ya mabota mpe bankulutu bakoki kozwa liteya na ndakisa ya Gideone. Soki tosali likambo oyo esilikisi ndeko moko, tosengeli koluka koyeba ntina oyo ndeko yango asiliki. Tokoki mpe kopesa moto yango longonya mpo na makambo ya malamu oyo asalá. Mpo na kosala yango, tosengeli kozala na komikitisa. Kasi kotya kimya ezali na ntina mingi koleka lokumu na biso moko. w21.07 16-17 par. 10-12
Mwamitano, 15 sanza ya 12
Tósala moto na elilingi na biso.—Eba. 1:26.
Yehova apesá biso lokumu na ndenge asalá biso na elilingi na ye. Lokola Nzambe asalá biso na elilingi na ye, tokoki kokolisa mpe komonisa bizaleli mingi oyo azalaka na yango; na ndakisa bolingo, motema mawa, bosembo mpe boyengebene. (Nz. 86:15; 145:17) Ntango tokolisaka bizaleli wana, topesaka Yehova lokumu mpe tomonisaka ete tozali na botɔndi mpo na oyo asalá. (1 Pe. 1:14-16) Ntango tosalaka makambo oyo esepelisaka Tata na biso ya likoló, yango epesaka biso esengo. Mpe lokola Yehova asalá biso na elilingi na ye, tokoki kozala lolenge ya bato oyo alingaka bázala na libota na ye. Yehova abongiselá biso esika moko ya malamu mpenza. Bambula mingi liboso akela mobali ya liboso, Yehova abongisaki mabele mpo na bato. (Yobo 38:4-6; Yir. 10:12) Lokola azali na boboto mpe akabaka, apesá biso biloko mingi ya kitoko mpo tózala na esengo. (Nz. 104:14, 15, 24) Na ntango moko boye, atalaki na likebi biloko oyo akelaki mpe “amonaki ete ezali malamu.”—Eba. 1:10, 12, 31. w21.08 3 par. 5-6
Mwapɔsɔ, 16 sanza ya 12
Mbuma ya elimo ezali bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, bolamu, kondima, motema pɛtɛɛ, komipekisa.—Gal. 5:22, 23.
Biso nyonso tozali na mokumba ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli. (Mat. 28:19, 20; Rom. 10:14) Ndenge nini okoki kokolisa mayele na yo na mosala yango ya ntina mingi? Tyá mikano ya sikisiki ntango ozali koyekola mpe kosalela makambo oyo oyekoli na mwa buku Koteya. Ntango ozali koluka mikano oyo okomityela, kobosana te ete mokano oyo eleki ntina ezali ya kokolisa bizaleli ya bokristo. (Kol. 3:12; 2 Pe. 1:5-8) Na ntembe te, biso nyonso tozalaka na mposa ya kosala mingi na mosala ya Yehova koleka ndenge tozali kosala sikoyo. Na mokili ya sika, tokozala na likoki ya kosalela Nzambe mingi mpenza. Wana tozali kozela ntango yango ekoka, soki tosali nyonso oyo tokoki na mosala oyo tozali na yango sikoyo, tokobakisa esengo na biso mpe tokotungisama mingi te na makambo oyo ekoki kolɛmbisa biso nzoto. Oyo eleki ntina, tokopesa Yehova, ‘Nzambe na biso ya esengo,’ lokumu mpe nkembo. (1 Tim. 1:11) Na yango, tiká ete tósepela na mikumba oyo tozali na yango! w21.08 25 par. 18-20
Mwalomingo, 17 sanza ya 12
Moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali.—Ebr. 11:6.
Soki obɔkwamá na libota ya Batatoli ya Yehova, na ntembe te oyekolaki makambo etali Yehova banda bomwana. Bateyaki yo ete azali Mozalisi, azali na bizaleli ya kitoko, mpe ete akokómisa mabele paradiso. (Eba. 1:1; Mis. 17:24-27) Nzokande bato mingi bandimaka te ete Nzambe azali. Basusu bandimaka te ete ye nde akelá biloko nyonso. Balobaka ete ebandaki na biloko mikemike ya bomoi, mpe malɛmbɛmalɛmbɛ biloko yango ekolaki mpe ebimisá bikelamu ndenge na ndenge ya bomoi. Bato mosusu oyo batángá mingi mpe bandimaka likambo yango. Balobaka ete siansi emonisaka polele ete Biblia elobaka solo te, mpe bato oyo bandimaka ete Mozalisi azali batángá te, bazali mayele te, mpe bakoki kokosama na pɛtɛɛ nyonso. Ata soki tozali Batatoli ya Yehova eleki sikoyo bambula mingi to te, biso nyonso tosengeli kokoba kokómisa kondima na biso makasi. Soki tosali bongo, tokokosama te na “filozofi mpe na bokosi ya mpambampamba” ya bato oyo batyaka ntembe ete Biblia elobaka solo.—Kol. 2:8. w21.08 14 par. 1-3
Mwayambo, 18 sanza ya 12
Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya.—Em. 4:11.
Abele, Noa, Abrahama, mpe Yobo bamonisaki ete bazalaki komemya Yehova mpe kolinga ye na ndenge bazalaki kotosa ye, bazalaki na kondima, mpe bazalaki kopesa ye bambeka. Emonani ete basalaki nyonso oyo bakoki mpo na kopesa Yehova lokumu, mpe andimaki losambo na bango. Na nsima, Yehova apesaki Bayisraele mibeko na nzela ya Moize. Na kati ya mibeko yango, ezalaki na malako ya oyo emonisi ndenge oyo Yehova alingaki bato básambela ye. Nsima ya liwa ya Yesu mpe lisekwa na ye, Yehova atikaki kosɛnga ete bato básambela ye na kolanda Mibeko ya Moize. (Rom. 10:4) Bakristo basengelaki kolanda mobeko moko ya sika: “mobeko ya Kristo.” (Gal. 6:2) Kotosa “mobeko” yango esɛngaki te kolanda liste moko molai ya makambo ya kosala to ya kosala te; esɛngaki nde kolanda ndakisa ya Yesu mpe kosalela mateya na ye. Lelo oyo mpe, bakristo basalaka oyo bakoki mpo na kolanda Kristo mpo básepelisa Yehova mpe mpo ‘milimo na bango epema.’—Mat. 11:29. w22.03 20-21 par. 4-5
Mwamibale, 19 sanza ya 12
Atikalaki ye moko na esobe mpe azalaki kobondela.—Luka 5:16.
Yehova ayokaka bana na ye. Ayokaki mabondeli mingi oyo Mwana na ye asalaki ntango azalaki awa na mabele. Ayokaki mabondeli oyo Yesu asalaki mpo na kozwa bikateli ya minene, na ndakisa liboso apona bantoma na ye 12. (Luka 6:12, 13) Yehova ayokaki mpe mabondeli oyo Yesu asalaki ntango azalaki komitungisa. Kaka liboso Yudasi atɛka ye, Yesu abondelaki Tata na ye na motema mobimba mpo na makambo ya mpasi oyo asengelaki kokutana na yango. Yehova asukaki kaka te na koyoka Yesu, Mwana na ye oyo alingaka mingi, kasi atindaki mpe anzelu moko mpo na kolendisa ye. (Luka 22:41-44) Lelo oyo, Yehova ayokaka mabondeli ya basaleli na ye, mpe ayanolaka yango na ntango oyo ebongi mpe na lolenge eleki malamu. (Nz. 116:1, 2) Ndeko mwasi moko na Inde amonaki mpenza ndenge oyo Yehova ayanolaki na mabondeli na ye. Azalaki konyokwama mingi na makanisi, mpe abondelaki Yehova mingi mpo na likambo yango. Akomi boye: “Programɛ ya TV JW ya sanza ya 05/2019 oyo elobelaki makambo oyo tokoki kosala ntango tozali komitungisa mingi, esalisaki ngai mpenza. Ezalaki mpenza eyano ya mabondeli na ngai.” w21.09 21-22 par. 6-7
Mwamisato, 20 sanza ya 12
[Bókima] na bangomba.—Luka 21:21.
Meká kokanisa ndenge ezalaki mpasi mpo na bakristo yango ya siɛklɛ ya liboso kotika biloko pene na nyonso oyo bazalaki na yango, mpe kobanda bomoi ya sika na esika mosusu! Basengelaki mpenza kozala na kondima ete Yehova akokokisa bamposa na bango. Kasi ezalaki na eloko moko oyo ekokaki kosalisa bango. Mbula mitano liboso mampinga ya Baroma ezinga Yerusaleme, ntoma Paulo apesaki Baebre toli mosusu ya ntina mingi; ayebisaki bango boye: “Bomoi na bino ezala na bolingo ya mbongo te, bósepela na biloko oyo bozali na yango sikoyo. Mpo alobaki ete: ‘Nakotika yo soki moke te, mpe nakosundola yo ata moke te.’ Mpo tózala na mpiko mpenza mpe tóloba: ‘Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te. Moto akoki kosala ngai nini?’” (Ebr. 13:5, 6) Na ntembe te, mpo na baoyo basalelaki toli ya Paulo liboso ete Baroma báya, ezalaki mpasi te báyekola kosepela na oyo bakokaki kozwa na esika oyo bakómaki kofanda. Bayebaki ete Yehova akokokisa bamposa na bango. w22.01 4 par. 7, 9
Mwaminei, 21 sanza ya 12
Motema mawa ya [Yehova] ezali likoló ya misala na ye nyonso.—Nz. 145:9.
Ntango tozali kolobela moto ya motema mawa, tokoki komona na makanisi moto moko oyo azali na boboto, bolingo mpe oyo akabaka. Mbala mosusu lisolo oyo Yesu abɛtaki ya Mosamaria ya motema malamu, ekoki koyela biso na makanisi. Mobali yango ya ekólo mosusu ‘amonisaki motema mawa’ epai ya Moyuda oyo miyibi babɛtaki mpe bayibaki biloko na ye. Mosamaria wana “ayokaki mawa” mpo na Moyuda yango oyo azokaki, mpe na boboto nyonso asalisaki ye. (Luka 10:29-37) Ndakisa yango emonisi ezaleli kitoko oyo Nzambe na biso azalaka na yango: motema mawa. Nzambe azali na motema mawa mpo alingaka biso. Mpe mokolo na mokolo, amoniselaka biso ezaleli yango na ndenge oyo asalelaka biso makambo. Ezali na lolenge mosusu ya komonisa motema mawa. Moto ya motema mawa akoki komona malamu apesa moto etumbu te ata soki azali na bantina ya kosala yango. Yehova asalaka mpe bongo mpo na biso. Mokomi ya Nzembo akomaki boye: “Asaleli biso makambo na kolanda masumu na biso te.” (Nz. 103:10) Kasi na bantango mosusu, Yehova akoki kopesa moto oyo asalaki lisumu etumbu ya makasi. w21.10 8 par. 1-2
Mwamitano, 22 sanza ya 12
Motema boboto na ngai ekolongolama epai na yo te.—Yis. 54:10.
Yehova amonisaka bolingo na ye ya sembo kaka epai ya baoyo bazalaka na boyokani ya malamu elongo na ye, elingi koloba basaleli na ye. Yango emonisami polele na makambo oyo Mokonzi Davidi mpe mosakoli Danyele balobaki. Na ndakisa, Mokonzi Davidi alobaki: “Kobá komonisela baoyo bayebi yo motema boboto [to bolingo ya sembo] na yo.” Alobaki lisusu: “Motema boboto [to bolingo ya sembo] ya Yehova ezali libela na libela epai ya baoyo bazali kobanga ye.” Mpe Danyele alobaki: “Ah Yehova, Nzambe ya solo, Ye . . . oyo abatelaka kondimana mpe motema boboto [to bolingo ya sembo] epai ya baoyo balingaka ye mpe epai ya baoyo batosaka mitindo na ye.” (Nz. 36:10; 103:17; Dan. 9:4) Na kotalela bavɛrsɛ oyo, Yehova amonisaka motema boboto, to bolingo ya sembo, epai ya basaleli na ye mpo bayebi ye, babangaka ye, balingaka ye, mpe batosaka mibeko na ye. Amonisaka ezaleli yango epai ya baoyo basalelaka ye na bosembo. Liboso tóbanda kosalela Yehova, azalaki komonisela biso bolingo oyo amoniselaka bato nyonso. (Nz. 104:14) Kasi lokola tozali basambeli na ye, amoniselaka biso mpe bolingo na ye ya sembo. w21.11 3-4 par. 8-9
Mwapɔsɔ, 23 sanza ya 12
Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo.—Mat. 4:10.
Ata soki basali biso nini, tozalaka na ekateli ya kotosa maloba oyo ya Yesu oyo azali na mokapo ya lelo. Lelo oyo, bato mingi basepelaka koyoka mateya ya bakonzi ya mangomba oyo bayebani mingi. Lokola balingaka bateyi yango mingi mpenza, na bantango mosusu, bakómaka kosambela bango. Bato mingi mpenza bakendaka na mangomba ya bateyi yango, basombaka babuku na bango, mpe bapesaka bango mbongo mingi mpo na kopesa bango mabɔkɔ. Bato mosusu bandimaka makambo nyonso oyo bakonzi yango ya mangomba balobaka. Basepelaka na bakonzi ya mangomba yango mingi mpenza kaka ndenge balingaki kosepela soki bámonaka Yesu! Kasi baoyo basambelaka Nzambe na ndenge oyo andimaka balandaka bato te. Atako totosaka baoyo bakamba biso, tondimaka maloba ya Yesu oyo alobaki ete: “Bino nyonso bozali bandeko.” (Mat. 23:8-10) Tosambelaka bato te, ezala bazali bakonzi ya mangomba to ya politiki. Topesaka bango mpe mabɔkɔ te. Kutu, toboyaka kokɔta na makambo ya mokili. Makambo nyonso oyo touti kolobela emonisi ete tokeseni mpenza na mangomba mosusu oyo bandimi na yango balobaka ete bazali bakristo.—Yoa. 18:36. w21.10 20 par. 6-7
Mwalomingo, 24 Sanza ya 12
Ngai nazali Yehova Nzambe na bino . . . Osengeli kozala na banzambe mosusu te mpo na kotɛmɛla ngai.—Kob. 20:2, 3.
Mokristo nyonso oyo alingi kokóma mosantu, asengeli komindimisa ete moto to eloko moko te ekómi na ntina mingi koleka boyokani na ye elongo na Nzambe. Mpe lokola tobengami Batatoli ya Yehova, tozali na ekateli ya koboya kosala likambo nyonso oyo ekoki kosambwisa to mpe kofingisa nkombo na ye mosantu. (Lev. 19:12; Yis. 57:15) Bayisraele bazalaki komonisa ete bandimi Yehova azala Nzambe na bango na ndenge bazalaki kotosa mibeko na ye. Balevi 18:4 elobi: “Bokosalela bikateli na ngai ya lisambisi, mpe bokotosa mibeko na ngai mpo bótambola na yango. Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.” Mokapo 19 etángi mwa “mibeko” oyo Bayisraele basengelaki kotosa. Na ndakisa, vɛrsɛ 5-8, 21, 22 elobeli likambo etali kopesa bambeka ya banyama. Bambeka yango esengelaki te kopesama na ndenge oyo ‘ekokómisa eloko mosantu ya Yehova eloko mpamba.’ Kotánga bavɛrsɛ yango esengeli kotinda biso tósepelisa motema ya Yehova mpe tópesa ye bambeka ya masanzoli oyo akondima, ndenge Baebre 13:15 esɛngi biso tósala. w21.12 5-6 par. 14-15
Mwayambo, 25 sanza ya 12
Sepelá na mwasi ya bolenge na yo.—Mas. 5:18.
Babalani oyo bazali naino bilenge bakoki koyekola makambo mingi epai ya bandeko mosusu oyo batyelaka Yehova motema. Na ndakisa, ezali na babalani mosusu oyo balekisi bambula mingi na mosala ya ntango nyonso. Soki bozali kotalela mikano oyo bolingi komityela na mosala ya Yehova, ekozala malamu bósɛnga bango toli. Yango ezali lolenge ya komonisa ete botyelaka Yehova motema. (Mas. 22:17, 19) Bóbosana te, libala ezali likabo oyo euti na Yehova. (Mat. 19:5, 6) Alingaka ete babalani básepela na likabo yango. Bino babalani oyo bozali naino bilenge, ekozala malamu bótalela lisusu ndenge oyo bozali kosalela bomoi na bino. Bozali kosala nyonso oyo bokoki mpo na komonisa Yehova ete bosepelaka na makabo oyo apesá bino? Bósololaka na Yehova na nzela ya libondeli. Bóluka toli ya Liloba na ye oyo eyokani na makambo ya bomoi na bino. Mpe na nsima, bólanda batoli oyo Yehova azali kopesa bino. Bóyeba ete bokozala na bomoi ya esengo mpe Yehova akopambola bino mingi soki botye mosala na ye na esika ya liboso na bomoi na bino! w21.11 19 par. 16, 18
Mwamibale, 26 sanza ya 12
Biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.—Yak. 3:2.
Yakobo azalaki komitalela na ndenge oyo ebongi. Yakobo azalaki komona te ete, ndenge azalaki leki ya Yesu mpe ndenge azalaki na mikumba minene na lisangá, azalaki na ntina mingi koleka bandeko mosusu nyonso. Abengaki bakristo mosusu ete “bandeko na ngai ya bolingo.” (Yak. 1:16, 19; 2:5) Alukaki te komimonisa lokola nde azalaki moto ya kokoka. Liteya: Kobosana te ete biso nyonso tozali bato ya masumu. Tosengeli te kokanisa ete toleki bato oyo toteyaka. Mpo na nini? Soki tozali komimonisa lokola ete tosalaka mabunga te, moyekoli na biso akoki kolɛmba nzoto mpo akokanisa ete akokoka te kotosa makambo nyonso oyo Nzambe asɛngi. Kasi soki tondimi ete ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te ata mpo na biso kotosa mitinda ya Biblia mpe toyebisi ye ndenge oyo Yehova asalisaki biso tósala bambongwana, tokosalisa moyekoli na biso amona ete ye mpe akoki kosalela Yehova. w22.01 11-12 par. 13-14
Mwamisato, 27 sanza ya 12
Bóbatela na kati na bino makanisi oyo Kristo Yesu mpe azalaki na yango.—Flp. 2:5.
Soki tozali kokanisa mingi lokola Yesu, tokobanda mpe kosala makambo mingi lokola ye mpe tokolonga kozala na bomoto lokola oyo ya ye. (Ebr. 1:3) Mbala mosusu tokoki kokanisa boye: ‘Yesu azali moto ya kokoka. Nakokoka ata moke te kozala lokola ye!’ Soki okanisaka bongo, kobosana makambo oyo te: Ya liboso, okelamaki na likoki ya kozala lokola Yehova mpe Yesu. Na yango, okoki kopona komekola bango, mpe okoki kolonga, ata soki ekozala na ndenge ya kokoka te. (Eba. 1:26) Ya mibale, elimo santu ya Nzambe ezali nguya oyo eleki makasi na molɔ́ngɔ́. Na lisalisi ya elimo yango, okoki kolonga kosala makambo oyo okokoka kosala na makasi na yo moko te. Ya misato, Yehova azali kozela te ete omonisa mbuma ya elimo na ndenge ya kokoka banda sikoyo. Kutu, Tata na biso ya bolingo atyeli bato oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele mbula 1000 mpo bákóma bato ya kokoka. (Em. 20:1-3) Mpo na sikoyo, Yehova asɛngi biso tósala oyo tokoki mpe tótyela ye motema mpo asalisa biso. w22.03 9-10 par. 5-6
Mwaminei, 28 sanza ya 12
Mpo liloba moko te ezali na lolemo na ngai, kasi talá! Ee Yehova, osili koyeba yango nyonso.—Nz. 139:4.
Kaka kobondela te nde ekoki kokómisa boyokani na biso ná Yehova makasi. Koyekola Liloba ya Nzambe mpe koyangana na makita ekoki mpe kosalisa biso mpo tópusana lisusu penepene ya Nzambe. Okoki kosala nini mpo ntango oyo olekisaka na koyekola mpe na makita ya lisangá ememela yo mpenza matomba? Omituna boye: ‘Makambo nini elongolaka likebi na ngai na makita to ntango nazali koyekola?’ Ezalaka nde kobenga oyo babengaka ngai na telefone, to bamesaje oyo batindelaka ngai na telefone to na aparɛyi mosusu? Soki omoni ete makanisi na yo ezali koyengayenga ntango ozali koyekola yo moko, to ntango ozali na makita, sɛngá Yehova asalisa yo otyá makanisi. Ekoki kozala mpasi otika makambo na yo pembeni mpe otya makanisi nyonso na makambo ya elimo, kasi ezali na ntina mingi osala yango. Sɛngá Yehova apesa yo kimya oyo ekobatela kaka motema na yo te, kasi mpe “makanisi na yo.”—Flp. 4:6,7. w22.01 29-30 par. 12-14
Mwamitano, 29 sanza ya 12
Sembolá litoi na yo mpe yoká maloba ya bato ya bwanya.—Mas. 22:17.
Mokonzi Uzia aboyaki toli. Akɔtaki na eteni ya tempelo ya Yehova oyo ezalaki kaka mpo na banganga-nzambe, mpe alukaki kotumba mpaka ya malasi. Banganga-nzambe ya Yehova bayebisaki ye: “Ee Uzia, mosala ya kotumbela Yehova mpaka ya malasi ezali ya yo te, kasi mosala ya kotumba mpaka ya malasi ezali nde mosala ya banganga-nzambe.” Uzia asalaki nini? Soki andimaka toli na komikitisa nyonso mpe abimaka mbala moko na tempelo, mbala mosusu Yehova akokaki kolimbisa ye. Kasi, “Uzia . . . atombokaki.” Mpo na nini ayokaki toli te? Emonani ete akanisaki lokola azalaki mokonzi, azalaki na lotomo ya kosala nyonso oyo alingaki. Kasi Yehova azalaki komona bongo te. Lokola Uzia asalaki likambo oyo azalaki na lotomo ya kosala te, azwaki maladi ya maba mpe “atikalaki moto ya maba kino mokolo ya liwa na ye.” (2 Nt. 26:16-21) Ndakisa ya Uzia eteyi biso ete ata soki tozali nani, soki toboyi toli oyo euti na Biblia, Yehova akondima lisusu biso te. w22.02 9 par. 7
Mwapɔsɔ, 30 sanza ya 12
Na yango, bóbongola mitema mpe bóbongwana mpo masumu na bino ebomama, mpo bileko ya kopema euta epai ya Yehova ye moko.—Mis 3:19.
Mbala mingi moto oyo azali na “bomoto ya kala” akanisaka mpe asalaka makambo na ndenge ya mosuni. (Kol. 3:9) Akoki kozala na ezaleli ya moyimi, asilikaka noki, azalaka na botɔndi te, mpe azalaka na lolendo. Mbala mosusu mpe asepelaka na pornografi, mpe atalaka bafilme oyo elakisaka makambo ya mbindo to makambo ya mobulu. Na ntembe te azali na bizaleli mosusu ya malamu, mpe ntango mosusu akoki komitungisa mpo na makambo ya mabe oyo alobi to asali. Kasi azalaka na mposa makasi te ya kobongola makanisi mpe bizaleli na ye. (Gal. 5:19-21; 2 Tim. 3:2-5) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, moko te kati na biso akoki kolongola makanisi nyonso mpe bamposa nyonso ya mabe na motema mpe na bɔɔngɔ na biso. Na bantango mosusu, tokosala to tokoloba makambo mosusu oyo ekopesa biso mawa na nsima. (Yir. 17:9; Yak. 3:2) Kasi ntango tolongoli bomoto ya kala, makanisi mpe misala ya nzoto ekotambwisa biso lisusu te. Tokokóma bato ya ndenge mosusu.—Yis. 55:7. w22.03 3 par. 4-5
Mwalomingo, 31 sanza ya 12
Na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino.—Flp. 2:3.
Bankulutu, bólukaka komona bizaleli malamu oyo bandeko ya lisangá bazali na yango. Moto nyonso azali moto ya kozanga kokoka, kasi moto nyonso azalaka na bizaleli ya malamu oyo tokoki kosepela na yango. Ya solo, na bantango mosusu esɛngaka bankulutu bápesa ndeko mobali to ndeko mwasi moko toli. Kasi ndenge moko na ntoma Paulo, bankulutu basengeli kosala makasi bátala kaka te maloba mabe oyo moto yango alobi, to makambo ya mabe oyo asali. Kasi, ekozala malamu bátala mingimingi bolingo oyo moto yango azali na yango mpo na Yehova, ndenge oyo ayikaka mpiko mpo na kosalela Yehova, mpe mposa na ye ya kosala oyo ezali malamu. Bankulutu oyo bazalaka na makanisi malamu mpo na bandeko basalaka ete moto nyonso na lisangá amona ete balingaka ye. Bóbosana te ete Yehova asɛngi bino te bózala bato ya kokoka; asɛngi bino nde ete bózala sembo. (1 Ko. 4:2) Bokoki kondima ete Nzambe asepelaka mpe na makambo oyo bosalaka na mosala na ye. Yehova akobosana ata mokolo moko te “mosala na bino mpe bolingo oyo bomoniselaki nkombo na ye, na ndenge bosalelaki basantu mpe bozali kokoba kosalela bango.”—Ebr. 6:10. w22.03 31 par. 19, 21