Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • es23 nk. 108-118
  • Sanza ya 11

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sanza ya 11
  • Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2023
  • Mitó ya makambo mike
  • Mwamisato, 1 sanza ya 11
  • Mwaminei, 2 sanza ya 11
  • Mwamitano, 3 sanza ya 11
  • Mwapɔsɔ, 4 sanza ya 11
  • Mwalomingo, 5 sanza ya 11
  • Mwayambo, 6 sanza ya 11
  • Mwamibale, 7 sanza ya 11
  • Mwamisato, 8 sanza ya 11
  • Mwaminei, 9 sanza ya 11
  • Mwamitano, 10 sanza ya 11
  • Mwapɔsɔ, 11 sanza ya 11
  • Mwalomingo, 12 sanza ya 11
  • Mwayambo, 13 sanza ya 11
  • Mwamibale, 14 sanza ya 11
  • Mwamisato, 15 sanza ya 11
  • Mwaminei, 16 sanza ya 11
  • Mwamitano, 17 sanza ya 11
  • Mwapɔsɔ, 18 sanza ya 11
  • Mwalomingo, 19 sanza ya 11
  • Mwayambo, 20 sanza ya 11
  • Mwamibale, 21 sanza ya 11
  • Mwamisato, 22 sanza ya 11
  • Mwaminei, 23 sanza ya 11
  • Mwamitano, 24 sanza ya 11
  • Mwapɔsɔ, 25 sanza ya 11
  • Mwalomingo, 26 sanza ya 11
  • Mwayambo, 27 sanza ya 11
  • Mwamibale, 28 sanza ya 11
  • Mwamisato, 29 sanza ya 11
  • Mwaminei, 30 sanza ya 11
Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2023
es23 nk. 108-118

Sanza ya 11

Mwamisato, 1 sanza ya 11

Bango nyonso bakoteyama na Yehova.​—Yoa. 6:45.

Yehova asalisaka biso na lolenge mingi. Akoki kosalisa yo obatela kimya na yo ntango moto moko atɛmɛli yo na mosala ya kosakola. Akoki mpe kosalisa yo omikundwela na mokapo moko oyo ebongi mpo na kotangela moto moko oyo asepeli. Akopesa yo mpe makasi okoba atako bato mingi bazali kosepela te. (Yir. 20:7-9) Yehova amoniselaka biso mpe bolamu na ye na ndenge apesaka biso formasyo na mosala ya kosakola. Na likita na biso ya kati ya pɔsɔ, toyekolaka ndenge malamu ya kobanda na bato masolo mpe balendisaka biso tósalela makanisi yango na mosala ya kosakola. Na ebandeli, tokoki kobanga mwa moke kosalela mayele ya sika. Kasi soki tomeki, tokomona ete mayele yango ya sika ezali kosimba na teritware na biso. Lisusu, na makita mpe na mayangani, balendisaka biso tósalela lolenge mosusu ya kosakola oyo tomeká naino te. Yango mpe ekoki kobangisa biso, kasi soki tomeki yango, Yehova akopambola biso. w21.08 27 par. 5-6

Mwaminei, 2 sanza ya 11

Bómisombela ntango oyo ebongi, mpo mikolo ezali mabe.​—Ef. 5:16.

Na mokanda moko oyo akomelaki Bakorinti, ntoma Paulo apesaki toli ya makasi. Nsima ya kokoma mokanda yango, atindelaki bango Tito. Kanisá esengo na ye ntango ayebaki ete bandimaki toli na ye mpe basalelaki yango! (2 Ko. 7:6, 7) Na ndakisa ya Paulo, bankulutu basengeli kolekisaka ntango ná bandeko ya lisangá. Lolenge moko oyo bakoki kosala yango ezali ya kokóma liboso makita ebanda mpo na kosolola na basusu mpe kolendisa bango. Mbala mingi ezwaka kaka mwa miniti moke mpo na koyebisa ndeko mobali moko to ndeko mwasi moko maloba ya kolendisa oyo asengeli na yango. (Rom. 1:12) Nkulutu oyo alandaka ndakisa ya Paulo akosalela mpe Liloba ya Nzambe mpo na kolendisa kondima ya bandeko ya lisangá, mpe kosalisa bango bámona ete Nzambe alingaka bango. Alukaka mabaku ya kopesa bango longonya. Ntango nkulutu alingi kopesa toli, azwaka makanisi na Liloba ya Nzambe. Asimbaka mosisa ya likambo, kasi asalaka yango na boboto mpo mposa na ye ezalaka ete ndeko andima toli yango mpe asalela yango.​—Gal. 6:1. w22.03 28-29 par. 11-12

Mwamitano, 3 sanza ya 11

Tozali na eloko oyo ya motuya na kati ya bambɛki ya mabele, mpo nguya oyo eleki makasi ezala ya Nzambe kasi oyo euti na biso moko te.​—2 Ko. 4:7.

Lelo oyo, Yehova apesaka basaleli na ye “nguya oyo eleki makasi” mpo bákoba kosalela ye na bosembo nyonso. Lolenge moko oyo apesaka biso makasi ezali na nzela ya libondeli. Ndenge Baefese 6:18 emonisi yango, ntoma Paulo alendisi biso tóbondelaka Nzambe “na libaku nyonso.” Nzambe akoyanola na mabondeli na biso mpe akosalisa biso. Na bantango mosusu, tokoki komiyoka lokola tokokoka te koyikela mikakatano na biso mpiko. Tokoki mpe koyeba te makambo oyo tosengeli kobondela mpo na yango. Kasi Yehova asɛngi biso tóbondela ye ata soki ezali mpasi tóyebisa ye ndenge oyo tozali komiyoka. (Rom. 8:26, 27) Apesaka mpe biso makasi na nzela ya Biblia. Kaka ndenge Paulo atyelaki Makomami motema mpo azwa makasi mpe libɔndisi, biso mpe tosengeli kosalaka bongo. (Rom. 15:4) Ntango tozali kotánga Liloba ya Nzambe mpe kokanisa na mozindo likoló na yango, Yehova akoki kosalela elimo na ye mpo na kosalisa biso tóyeba malamu ndenge oyo Biblia ekoki kosalisa biso.​—Ebr. 4:12. w21.05 22 par. 8-10

Mwapɔsɔ, 4 sanza ya 11

Nzambe . . . asepeli kosala, azali kosala na kati na bino mpo bino bólinga mpe bósala.​—Flp. 2:13.

Tozwaka na lisɛki te mokumba na biso ya kokómisa bato bayekoli mpe ya koteya bango atako tokutanaka na mikakatano oyo ekoki kopekisa biso kosala mingi ndenge tolingaka. Ekoki kozala ete makambo ya bomoi na biso ezali kopekisa biso kosala mingi. Na ndakisa, basakoli mosusu bazali mibange to mpe babɛlaka. Yo mpe ozali na mokakatano ya ndenge wana? Soki ezali bongo, kobosana te toyekoli ete tokoki kotambwisa boyekoli ya Biblia na nzela ya baaparɛyi! Na yango, okoki kobanda mpe koyekola na bato Biblia wana ofandi na ndako na yo moko. Ezali mpe na litomba mosusu. Bato mosusu bakoki kosepela koyekola Biblia, kasi mbala mingi bazalaka na bandako te ntango bandeko na biso balekaka mpo na kosakola. Kasi bakoki kozala na ndako na ntɔngɔntɔngɔ to mpe na mpokwa. Okondima kosomba ntango mpo na kosakwela bango na bangonga wana? Yesu ateyaki Nikodeme na butu mpo yango nde ezalaki ntango malamu mpo na Nikodeme.​—Yoa. 3:1, 2. w21.07 5-6 par. 10-11

Mwalomingo, 5 sanza ya 11

Lokola bato oyo babɛlɛmi na ngai na monɔkɔ na bango, mpe bakumisi ngai kaka na mbɛbu na bango, mpe batye motema na bango mosika na ngai.​—Yis. 29:13.

Bayekoli ya Yoane Mobatisi bakamwaki mpo bayekoli ya Yesu bazalaki kokila bilei te. Yesu ayebisaki bango ete bazalaki na ntina ya kokila bilei te lokola azalaki naino na bomoi. (Mat. 9:14-17) Atako bongo, Bafarisai mpe batɛmɛli mosusu ya Yesu bafundaki ye mpo azalaki te kolanda bonkɔkɔ mpe mimeseno na bango. Basilikaki mpo azalaki kobikisa bato ya maladi na mokolo ya Sabata. (Mrk. 3:1-6; Yoa. 9:16) Bazalaki komikumisa ete batosaka mibeko oyo etali Sabata, nzokande bazalaki komitungisa te ndenge bazalaki kosala mombongo na tempelo. Ntango Yesu apamelaki bango mpo na likambo yango, basilikaki mpenza. (Mat. 21:12, 13, 15) Lisusu, bato oyo Yesu ateyaki na sinagoga ya Nazarete basilikaki makasi mpenza ntango asalelaki bandakisa ya lisolo ya bana ya Yisraele mpo na komonisa bango ete bazalaki bato ya moimi mpe bazangaki kondima. (Luka 4:16, 25-30) Bato mingi baboyaki kondimela Yesu mpo aboyaki kosala makambo oyo bakanisaki ete asengelaki kosala.​—Mat. 11:16-19. w21.05 5-6 par. 13-14

Mwayambo, 6 sanza ya 11

Toyebi malamu mayele na ye. ​—2 Ko. 2:11.

Lolenge moko oyo Yehova akoki kokebisa biso mpo tózala te na lolendo mpe lokoso, ezali ntango azali kolendisa biso tóyekola makambo oyo ezali kokómela biso na bomoi. Ntango tolobelaka lokoso, na ntembe te makanisi na biso ekendaka mbala moko epai ya Satana Zabolo. Lokola azalaki anzelu ya Yehova, na ntembe te Satana azalaki na mikumba mingi ya malamu, kasi atondaki kaka te. Azalaki na mposa ya kozwa losambo oyo kaka Yehova nde abongi na yango. Satana alingaka tózala lokola ye, yango wana alingaka kotinda biso tósepela te na oyo tozali na yango. Mbala ya liboso oyo amekaki kosala yango ezali ntango asololaki na Eva. Na bolingo mpenza, Yehova apesaki Eva ná mobali na ye biloko mingi ya kitoko ya kolya. Bakokaki kolya mbuma ya “nzete nyonso ya elanga,” longola kaka moko. (Eba. 2:16) Atako bongo, Satana akosaki Eva mpe atindaki ye akanisa ete asengelaki kolya mbuma ya nzete oyo epekisamaki. Eva atondaki te biloko oyo azalaki na yango; azalaki na mposa ya kozwa lisusu mingi. Toyebi oyo esalemaki na nsima. Eva asalaki lisumu mpe nsukansuka akufaki.​—Eba. 3:6, 19. w21.06 14-15 par. 2-3; 17 par. 9

Mwamibale, 7 sanza ya 11

Bóbota mpe bókóma mingi mpe bótondisa mabele mpe bótya yango na nse na bino.​—Eba. 1:28.

Nzambe alingaki ete Adama ná Eva bábota bana mpe bábatela mabele. Soki batosaká ye mpe basalaká makambo oyo ayebisaki bango, Adama ná Eva mpe bana na bango balingaki kotikala na kati ya libota na ye mpo na libela. Yehova apesaki Adama ná Eva esika ya lokumu na libota na ye. Na Nzembo 8:5, Davidi alobaki boye mpo na ndenge oyo Nzambe akelaki moto: “Osalaki ye mwa moke na nse ya baanzelu, mpe olatisaki ye motole ya nkembo mpe ya lokumu.” Ya solo, Yehova apesá bato mayele, makasi, mpe makoki ndenge moko te na baanzelu. (Nz. 103:20) Kasi bato bazali kaka “mwa moke na nse” ya baanzelu yango ya nguya. Likambo ya mawa, Adama ná Eva babungisaki esika oyo bazalaki na yango na libota ya Yehova. Likambo yango ebimiselá bakitani na bango mikakatano mingi. Kasi mokano ya Yehova ebongwani te. Alingi ete bato ya botosi bázala bana na ye mpo na libela. w21.08 2-3 par. 2-4

Mwamisato, 8 sanza ya 11

“Na limpinga ya basoda te, na nguya mpe te, kasi nde na elimo na ngai,” Yehova ya mampinga alobi bongo.​—Zek. 4:6.

Lelo oyo, basaleli mingi ya Yehova bazali kokutana na botɛmɛli. Na ndakisa, bamosusu bafandi na bikólo oyo makambo mosusu ya losambo na biso epekisami mpe bakangaka bandeko mosusu mpe ‘bamemaka bango liboso ya baguvɛrnɛrɛ mpe bakonzi,’ mpe bandeko yango bapesaka bango litatoli. (Mat. 10:17, 18) To mpe zuzi moko ya boboto akoki kozwa ekateli oyo epesi biso nzela ya kokoba na losambo na biso. Batatoli mosusu bazali kokutana na botɛmɛli ya ndenge mosusu. Na bikólo oyo bafandi, bazali na bonsomi ya kosambela Yehova, kasi bazali kokutana na botɛmɛli oyo euti epai ya bato ya mabota na bango oyo bazali na ekateli ya kopekisa bango básalela Yehova. (Mat. 10:32-36) Mbala mingi, ntango bato oyo bazalaki kotɛmɛla biso bamoni ete balongi te kopekisa biso kosambela Yehova, batikaka kotɛmɛla biso. Mpe bato mosusu oyo kala bazalaki batɛmɛli ya makasi mpenza bakómá Batatoli ya molende. Ntango okutani na botɛmɛli, kotika te kosalela Yehova! Zalá na mpiko. Yehova azali na yo, elimo santu na ye mpe ekosalisa yo; yango wana kobanga eloko te! w22.03 16 par. 8

Mwaminei, 9 sanza ya 11

Ee bino baoyo bolingaka Yehova, bóyina oyo ezali mabe.​—Nz. 97:10.

Biblia elobi ete Yehova ayinaka “miso ya lolendo, lolemo ya lokuta, mpe mabɔkɔ oyo ezali kosopa makila ya moto oyo azali na likambo te.” (Mas. 6:16, 17) Ayinaka mpe “moto oyo asopaka makila [to moto ya mobulu] mpe oyo akosaka.” (Nz. 5:6) Yehova ayinaka mpenza bizaleli mpe misala yango; yango wana abomaki bato mabe nyonso na mikolo ya Noa mpo batondisaki mabele na mobulu. (Eba. 6:13) Lisusu, na nzela ya mosakoli Malaki, Yehova alobaki ete ayinaka baoyo basalaka makambo na kozanga bosembo mpo na koboma libala na molongani oyo asali likambo te. Yehova andimaka losambo ya bato yango te mpe akosambisa bango mpo na etamboli na bango. (Mal. 2:13-16; Ebr. 13:4) Yehova alingi ete ‘tóyina oyo ezali mabe.’ (Rom. 12:9) Liloba ‘koyina’ na vɛrsɛ yango emonisaka mayoki ya makasi mpenza; elimboli koboya eloko na motema mobimba, koyoka yango mabe mpenza. Ndenge moko mpe, tosengeli koyoka mabe mpenza ntango kaka tokanisi kosala likambo moko oyo Yehova ayiná. w22.03 4-5 par. 11-12

Mwamitano, 10 sanza ya 11

Esengo na baoyo nyonso bazali kokoba kozela ye.​—Yis. 30:18.

Mosika te, Tata na biso ya likoló akosopela biso mapamboli ebele na nzela ya Bokonzi na ye. Baoyo bakobaka kozela Yehova bakozwa mapamboli mingi lelo mpe na mokili ya sika. Ntango basaleli ya Nzambe bakokɔta na mokili ya sika, bakoyika lisusu mpiko te na mitungisi mpe na mikakatano oyo bazali kokutana na yango lelo oyo. Makambo ya kozanga bosembo ekosila, mpe mpasi ekozala lisusu te. (Em. 21:4) Tokomitungisa lisusu te mpo na biloko oyo tosengeli na yango mpamba te biloko yango ekozala ebele. (Nz. 72:16; Yis. 54:13) Ekozala mpenza lipamboli! Yehova azali kobongisa biso sikoyo mpo tófanda na nse ya boyangeli na ye, na ndenge azali kosalisa biso tólonga bizaleli na biso ya mabe, mpe tókolisa bizaleli oyo ebongi mpo na bakristo. Kolɛmba nzoto te mpe kotika te kosalela Yehova. Makambo ya malamu ezali kozela biso! Wana tozali kozela ntango yango ya kitoko, tiká ete tókoba kozela Yehova akokisa makambo oyo alaki! w21.08 13 par. 17-19

Mwapɔsɔ, 11 sanza ya 11

Bóbosana te kosala malamu mpe kokabela bamosusu biloko, mpo Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.​—Ebr. 13:16.

Mwa moke nsima ya kozwa mokanda ya ntoma Paulo, bakristo yango basengelaki kotika bandako na bango, mombongo na bango mpe bandeko ya mabota na bango oyo bazali bakristo te, mpe basengelaki ‘kobanda kokima na bangomba.’ (Mat. 24:16) Na ntembe te, wana ezalaki mpenza ntango oyo basengelaki kosalisana. Soki bamesanaki kosalela toli ya ntoma Paulo ya kokabela basusu biloko oyo bazalaki na yango, boye ezalaki mpasi te mpo bámesana na bomoi na bango ya sika. Mbala mosusu bandeko na biso bakoki te ntango nyonso koyebisa biso makambo oyo bazali na mposa na yango. Na yango, tosengeli kopusana pene na bango. Na ntembe te na lisangá na bino oyebi bandeko oyo bazalaka ntango nyonso pene mpo na kosalisa basusu. Bamonaka te ete tozali kotungisa bango. Toyebi ete tokoki kokende epai na bango ntango tozali na mposa ya lisalisi, mpe tolingaka kozala lokola bango! w22.02 23-24 par. 13-15

Mwalomingo, 12 sanza ya 11

Bóbatela bomoko ya elimo na ekanganeli ya kimya oyo esangisaka.​—Ef. 4:3.

Na bambula oyo eleki, babongisaki masangá mpe bazongazonga na ndenge mosusu. Soki basɛngi biso tókende na lisangá mosusu, tokoki komona ete ezali mpasi kotika baninga mpe bato ya libota na biso. Bankulutu bazwaka nde malako epai ya Nzambe oyo elakisaka bango esika oyo basengeli kotinda mosakoli mokomoko? Te. Na yango, ekoki kozala mpasi mpo tótosa malako oyo bapesi biso. Kasi Yehova atyelaka bankulutu motema mpe atikaka bango bázwa bikateli ya ndenge wana. Biso mpe tosengeli kotyela bango motema. Mpo na nini tosengeli kondima bikateli oyo bankulutu bazwi ata soki tosepeli na yango te? Mpo soki tosali bongo, tokosalisa mpo bomoko ekoba kozala na kati ya basaleli ya Nzambe. Lisangá ekómaka makasi ntango basakoli nyonso bamonisi komikitisa mpe bandimi bikateli oyo lisangani ya bankulutu ezwi. (Ebr. 13:17) Oyo eleki ntina, tokomonisa Yehova ete totyelaka ye motema, mpo tosali na bomoko na bato oyo apesi mokumba ya kobatela biso.​—Mis. 20:28. w22.02 4-5 par. 9-10

Mwayambo, 13 sanza ya 11

Kobá komipesa na kotánga liboso ya bato nyonso, na kolendisa, na koteya.​—1 Tim. 4:13.

Soki ozali ndeko mobali oyo azwá batisimo, okoki kosala makasi okóma molobi malamu to moteyi malamu. Mpo na nini? Mpo soki ‘omipesi mobimba’ mpo okóma motángi, molobi, mpe moteyi malamu, okosalisa baoyo bazali koyoka yo. (1 Tim. 4:15) Omityela mokano ya koyekola mpe ya kosalela toli mokomoko ya koloba malamu oyo ezali na mwa buku Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya. Yekolá liteya mokomoko, mpe mekáká na ndako ndenge ya kosalela yango na likebi mpenza. Ntango ozali kosala masolo, salelá makambo oyo oyekoli. Lukáká toli epai ya mopesi-toli mosungi to bankulutu mosusu “oyo basalaka mosala makasi ya koloba mpe ya koteya.” (1 Tim. 5:17) Koluka kaka te oyeba ndenge ya kosalela mayele oyo ozwi na mwa buku yango, kasi osengeli mpe kosala makasi osalisa bayoki na yo bákómisa kondima na bango makasi mpe kolendisa bango básalela makambo oyo bazali koyekola. Soki osali bongo, esengo na yo mpe oyo ya bango ekobakisama. w21.08 24 par. 17

Mwamibale, 14 sanza ya 11

Na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino.​—Flp. 2:3.

Soki tozali kotalela basusu ete baleki biso, tokowelana te na baoyo bazali na makoki koleka biso. Kutu, tokosepela nde na makambo oyo bazali kosala, mingimingi soki bazali kosalela makoki na bango na mosala ya Yehova mpo na kokumisa ye. Yango ekosala ete kimya mpe bomoko ezala na kati ya lisangá. Tokoki kobundisa ezaleli ya komimona ete toleki basusu, soki tozali na bopɔlɔ, elingi koloba, koyeba esika makoki na biso esuki. Soki tozali na bopɔlɔ, tokoluka te komonisa basusu ete tozali na makoki mingi koleka bango to mpe toyebi kosala makambo mingi koleka bango. Kasi, tokoluka nde koyekola makambo epai ya baoyo bazali na makoki mingi koleka biso. Na ndakisa, kanisá ete ndeko moko asalaka badiskur malamu na lisangá. Tokoki kotuna ye ndenge oyo asalaka mpo na kobongisa badiskur yango. Soki ndeko mwasi moko ayebi mpenza kolamba, tokoki kotuna ye makanisi mpo biso mpe tókóma kolamba bongo. w21.07 15-16 par. 8-9

Mwamisato, 15 sanza ya 11

[Yehova] epai na ye kozanga bosembo ezali te.​—Mib. 32:4.

Na mokanda ya Mitángo, lisolo moko emonisi ete Yehova akatelaki Moyisraele moko etumbu ya liwa mpo alɔkɔtaki nkoni na mokolo ya Sabata. Na mokanda ya mibale ya Samwele, totángaka ete bambula mingi na nsima, ntango Davidi asalaki ekobo mpe abomaki moto, Yehova alimbisaki ye. (Mit. 15:32, 35; 2 Sa. 12:9, 13) Mbala mosusu tokoki komituna: ‘Mpo na nini Yehova alimbisaki Davidi ndenge abomaki moto mpe asalaki ekobo, kasi akatelaki moto wana etumbu ya liwa mpo na likambo oyo emonanaki ete ezalaki lisumu monene te?’ Na masolo mosusu, Biblia elobeli te makambo nyonso ya mikemike. Na ndakisa, toyebi ete Davidi abongolaki mpenza motema mpo na makambo oyo asalaki. (Nz. 51:2-4) Kasi moto oyo abukaki mobeko ya Sabata azalaki moto ya lolenge nini? Ayokaki mawa mpo na likambo oyo asalaki? Abuká mibeko ya Yehova liboso? Atyaki likebi te to kutu aboyaki nde koyoka makebisi oyo bapesaki ye? Biblia elobi eloko moko te mpo na yango. Kasi, makambo oyo toyebi mpo na Nzambe na biso ekoki mpenza mpo na kondimisa biso ete “azali moyengebene na banzela na ye nyonso.”​—Nz. 145:17. w22.02 2-3 par. 3-4

Mwaminei, 16 sanza ya 11

Bwanya ezali elongo na bato ya bopɔlɔ.​—Mas. 11:2.

Moto ya bopɔlɔ alukaka te kosala makambo oyo akokoka te. Yango esalaka ete abatela esengo na ye mpe akoba kosala mosala makasi. Tokoki kokokanisa moto ya bopɔlɔ na sofɛlɛ oyo azali kokumba motuka mpe komata ngomba. Sofɛlɛ yango asengeli kokitisa vitɛsi mpo akoba komata ngomba. Ata soki akokende malɛmbɛmalɛmbɛ, kasi akokoba kokende liboso. Ndenge moko mpe, moto ya bopɔlɔ ayebaka ntango nini asengeli “kokitisa vitɛsi na ye,” elingi koloba, kosala mbongwana mpo akoba kosalela Yehova mpe kosalisa basusu. (Flp. 4:5) Tótalela ndakisa ya Barazilai oyo azalaki na mbula 80. Ntango Mokonzi Davidi asɛngaki ye aya kofanda na ndako ya mokonzi, Barazilai aboyaki. Lokola Barazilai ayebaki ete akokoka kosala makambo mosusu te, asɛngaki Davidi ete elenge mobali moko na nkombo Kimehame akende na esika na ye. (2 Sa. 19:35-37) Ndenge moko na Barazilai, bandeko oyo bakómi mibange basepelaka kotikela bilenge libaku ya kokokisa mikumba mosusu. w21.09 10 par. 6-7

Mwamitano, 17 sanza ya 11

Moto moko te ayebi Mwana longola kaka Tata; mpe moto moko te ayebi Tata longola kaka Mwana ná moto oyo Mwana asepeli komonisa ye Tata.​—Luka 10:22.

Ozalaka na mokakatano ya komona ete Yehova azali Tata ya bolingo? Bamosusu kati na biso bazalaka na mokakatano yango. Soki tata oyo abotá biso azalaki boboto te, ekoki kozala mpasi tókanisa ete ezali na tata moko oyo akoki kolinga biso. Kasi koyeba ete Yehova ayebi mpenza ndenge oyo tozali komiyoka, ekitisaka biso motema! Alingaka kozala penepene na biso, yango wana Liloba na ye elendisi biso na maloba oyo: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yak. 4:8) Yehova alingaka biso mingi mpe azali Tata na biso oyo aleki malamu. Yesu akoki kosalisa biso tópusana penepene na Yehova. Ayebi Yehova malamu mpe amonisaka bizaleli na ye na ndenge ya kokoka. Yango wana alobaki: “Moto oyo amoni ngai, amoni mpe Tata.” (Yoa. 14:9) Lokola Yesu azali yaya na biso, yango wana ateyaka biso ndenge ya kotosa Tata na biso, ndenge ya koboya koyokisa ye mpasi, mpe oyo tokoki kosala mpo asepela na biso. Kasi bomoi ya Yesu awa na mabele emonisaki mpenza bolingo mpe boboto oyo Yehova azalaka na yango. w21.09 21 par. 4-5

Mwapɔsɔ, 18 sanza ya 11

Bóbatela etonga ya Nzambe oyo bapesi na mabɔkɔ na bino.​—1 Pe. 5:2.

Basaleli ya Yehova basambelaka kaka Nzambe ya solo moko mpe na bomoko. Yehova apesi bankulutu mokumba monene ya kobatela lisangá na ye pɛto. Soki mokristo moko asali lisumu ya monene, Yehova asɛngi na bankulutu bátalela soki moto yango akoki kotikala na lisangá to te. Na ndakisa, basengeli koluka koyeba soki moto yango abongoli mpenza motema. Akoki koloba ete abongoli motema, kasi azali mpenza koyina mabe oyo asalaki? Azwi ekateli ya kozongela lisumu yango te? Soki kozala na baninga mabe nde ememaki ye na lisumu, andimi kokabwana na baninga yango? Bankulutu basalaka libondeli, batalelaka likambo oyo esalemi mpe oyo Biblia elobi mpo na yango, mpe batalelaka ndenge oyo mosali-mabe azali komiyoka mpo na likambo oyo asalaki. Na nsima nde bazwaka ekateli soki akoki kotikala na lisangá to te. Ntango mosusu, asengeli kolongolama na lisangá.​—1 Ko. 5:11-13. w22.02 5 par. 11-12

Mwalomingo, 19 sanza ya 11

Bólata bomoto ya sika.​—Kol. 3:10.

Ezala tozwi batisimo eleki mwa mikolo to eleki bambula mingi, mposa na biso nyonso ezalaka ete tózala na bomoto oyo Yehova alingaka. Mpo tózala na bomoto ya ndenge wana, tosengeli koyeba kobatela makanisi na biso. Mpo na nini? Mpo makanisi na biso ezalaka na bopusi mingi likoló ya bomoto na biso. Soki tokanisaka mbala nyonso makambo oyo esepelisaka nzoto, tokobanda koloba mpe kosala makambo ya mabe. (Ef. 4:17-19) Nzokande, soki totondisi bɔɔngɔ na biso na makanisi ya malamu, mbala mingi tokobanda koloba mpe kosala makambo na ndenge oyo ekosepelisa Tata na biso, Yehova. (Gal. 5:16) Kasi tokoki te kopekisa makanisi nyonso ya mabe ekɔta na bɔɔngɔ na biso. Kasi tokoki koboya kosala makambo oyo eyokani na makanisi ya ndenge wana. Liboso ya kozwa batisimo, tosengeli kotika koloba mpe kosala makambo oyo Yehova ayinaka. Yango ezali likambo ya liboso mpe oyo eleki ntina mpo na kolongola bomoto ya kala. Kasi mpo tósepelisa Yehova malamumalamu, tosengeli mpe kolata bomoto ya sika. w22.03 8 par. 1-2

Mwayambo, 20 sanza ya 11

Na makambo nyonso, bomimonisaki ete bozali pɛto na likambo yango.​—2 Ko. 7:11.

Ezalaka pɛtɛɛ te bankulutu báyeba soki moto moko oyo asalaki lisumu ya monene abongoli mpenza motema. Mpo na nini? Bankulutu bakoki koyeba te makambo oyo ezali na motema ya moto. Yango wana basengeli koluka makambo oyo endimisi bango ete ndeko oyo asalaki lisumu abongoli mpenza makanisi mpo na lisumu oyo asalaki. Na yango, ekosɛnga ete bankulutu bámona makambo oyo emonisi ete moto yango abongoli mpenza makanisi, mayoki, mpe bizaleli na ye. Ekosɛnga mpenza ntango mpo moto yango asala mbongwana oyo emonisi ete abongoli mpenza motema. Mpo moto oyo alongolami na lisangá amonisa ete abongoli mpenza motema, asengeli koyanganaka na makita, mpe kolanda toli oyo bankulutu bapesaki ye ya kobondelaka mpe koyekolaka Biblia mbala na mbala. Asengeli mpe koboya makambo oyo esalaki ete akwea na lisumu wana. Soki asali makasi abongisa boyokani na ye ná Yehova, akoki komindimisa ete Yehova akolimbisa ye mpe bankulutu bakozongisa ye na lisangá. w21.10 6-7 par. 16-18

Mwamibale, 21 sanza ya 11

Osengeli te komisalela ekeko oyo eyemami to elilingi oyo ekokani na eloko nyonso oyo ezali kuna na likoló to oyo ezali na mabele awa na nse . . . Osengeli te kogumbamela yango.​—Kob. 20:4, 5.

Lokola Yesu alingaki Yehova mingi, yango wana asambelaki kaka ye ezala ntango azalaki na likoló to awa na mabele. (Luka 4:8) Ateyaki bayekoli na ye básalaka mpe bongo. Ezala Yesu to mpe bayekoli na ye, basalelaki te bililingi mpo na kosambela Nzambe. Lokola Nzambe azali elimo, eloko moko te oyo moto akoki kosala ekoki kokokana na ye! (Yis. 46:5) Kasi tokoloba nini mpo na bililingi ya basantu oyo bato mosusu basalaka mpe basambelaka yango? Na mobeko ya mibale na kati ya Mibeko Zomi oyo Yehova apesaki, alobaki maloba oyo ezali na mokapo ya lelo. Baoyo balingaka kosepelisa Nzambe, bayebi ete alingaka te básambela bikeko. Bato ya istware balobi ete na siɛklɛ ya liboso, bakristo bazalaki kosambela kaka Nzambe. Lelo oyo, Batatoli ya Yehova balandaka ndakisa oyo bakristo ya siɛklɛ ya liboso batiká na likambo yango. w21.10 19-20 par. 5-6

Mwamisato, 22 sanza ya 11

Moto oyo azali likoló ya ndako akita te kokamata biloko oyo ezali na ndako na ye.​—Mat. 24:17.

Yesu ayebisaki bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso oyo bazalaki kofanda na Yudea ete na ntango moko boye, bakomona “mampinga ezingi [engumba] Yerusaleme na bakaa.” (Luka 21:20-24) Ntango likambo yango esalemi, basengelaki ‘kobanda kokima na bangomba.’ Kokima yango ezalaki mpo na kobikisa bomoi na bango, kasi basengelaki kotika biloko na bango mingi. Eleki mwa bambula, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko elobaki boye: “Basundolaki bilanga ná bandako, batikaki ata biloko oyo bazalaki na yango na bandako. Elikya na bango nyonso ezalaki na libateli mpe na lisungi ya Yehova, batyaki losambo na ye liboso ya eloko mosusu nyonso oyo ekokaki komonana ete ezali na ntina.” Ebakisi boye: “Mbala mosusu tokokutana na komekama na ndenge oyo totalelaka biloko ya mosuni; biloko yango nde eleki ntina mpo na biso, to lobiko oyo Nzambe akopesa mpo na bato nyonso nde eleki ntina? Ɛɛ, kokima na biso ekoki kobimisa mikakatano to kozanga biloko. Ekosɛnga ete tózala pene ya kosala nyonso oyo esengeli.” w22.01 4 par. 7-8

Mwaminei, 23 sanza ya 11

Ee Nzambe, motema boboto na yo ezali mpenza kitoko!​—Nz. 36:7.

Mwa moke ntango bana ya Yisraele babimaki na Ezipito, Yehova ayebisaki Moize makambo etali nkombo mpe bizaleli na ye. Alobaki boye: “Yehova, Yehova, Nzambe ya motema mawa mpe ya ngɔlu, ayokaka nkanda noki te mpe atondi na motema boboto [to bolingo ya sembo], mpe solo, abatelaka motema boboto mpo na bankóto, alimbisaka libunga ná kobuka mibeko mpe lisumu.” (Kob. 34:6, 7) Na maloba wana ya kitoko, Yehova ayebisaki Moize likambo moko oyo etali motema boboto to bolingo na ye ya sembo. Likambo yango nini? Yehova ayebisaki Moize kaka te ete azali na motema boboto to bolingo ya sembo, kasi alobaki nde ete “atondi” na yango. Maloba ‘kotonda na motema boboto’ to bolingo ya sembo ezali mpe na bisika mosusu motoba na Biblia. (Mit. 14:18; Neh. 9:17; Nz. 86:15; 103:8; Yoe. 2:13; Yona 4:2) Na mbala nyonso, maloba yango esalelami kaka mpo na kolobela Yehova kasi bato te. Ezali mpenza likambo ya kokamwa ndenge Yehova ye moko azali kolobela ezaleli na ye ya motema boboto to bolingo ya sembo! w21.11 2-3 par. 3-4

Mwamitano, 24 sanza ya 11

Bótika komitungisa mpo na milimo na bino.​—Mat. 6:25.

Babalani bakoki kozwa mateya na ndakisa ya ntoma Petro ná mwasi na ye. Sanza soki motoba to mbula moko nsima ya kokutana na Yesu, Petro asengelaki kozwa ekateli moko ya ntina mingi. Azalaki kosala mosala ya koboma mbisi mpo na kosalisa libota na ye. Na yango, ntango Yesu asɛngaki Petro akóma kolanda ye ntango nyonso, Petro asengelaki mpe kokanisa mwasi na ye ntango azalaki kozwa ekateli yango. (Luka 5:1-11) Ntoma Petro aponaki kokende elongo na Yesu na mosala ya kosakola. Mpe na ntembe te, mwasi na ye apesaki ye mabɔkɔ. Biblia elobi ete nsima ya lisekwa ya Yesu, mwasi yango asalaki mpe mibembo elongo na Petro mpo na mwa ntango. (1 Ko. 9:5) Na ntembe te, lokola mwasi yango azalaki mokristo moko malamu, yango esalaki ete Petro akoka kopesa babalani toli ya polele. (1 Pe. 3:1-7) Ezali polele ete Petro ná mwasi na ye batyaki motema na elaka ya Yehova oyo elobi ete akokokisa bamposa na bango soki batye Bokonzi na esika ya liboso.​—Mat. 6:31-34. w21.11 18 par. 14

Mwapɔsɔ, 25 sanza ya 11

Bókóma bamekoli na ngai.​—1 Ko. 11:1.

Ntoma Paulo azalaki kolinga bandeko. Azalaki koboma nzoto mpo na bango. (Mis. 20:31) Yango wana bandeko basi mpe mibali bazalaki kolinga Paulo mingi. Na libaku moko boye, “mpisoli mingi esopamaki” ntango bankulutu ya Efese bayebaki ete bakomona ye lisusu te. (Mis. 20:37) Ndenge moko mpe, bankulutu na biso ya molende balingaka mingi mpenza bandeko mibali mpe bandeko basi ya lisangá, mpe basalaka nyonso oyo bakoki mpo na kosalisa bango. (Flp. 2:16, 17) Kasi na bantango mosusu, bankulutu bakutanaka na mikakatano. Nini ekoki kosalisa bango bálonga mikakatano yango? Bankulutu na biso, oyo basalaka mosala makasi, bakoki kotalela ndakisa ya Paulo. Azalaki na makoki lokola anzelu te. Paulo azalaki moto ya kozanga kokoka, mpe na bantango mosusu azalaki kobunda mpo na kosala oyo ezali malamu. (Rom. 7:18-20) Lisusu, azalaki na mikakatano ndenge na ndenge. Kasi Paulo atikaki te kosalela bandeko mpe abungisaki esengo na ye te. Soki bankulutu bazali komekola Paulo, ekosalisa bango bálonga mikakatano oyo bazali na yango, mpe bábatela esengo na bango ntango bazali kosalela Yehova. w22.03 26 par. 1-2

Mwalomingo, 26 sanza ya 11

Bokotosa basabata na ngai. Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.​—Lev. 19:3.

Balevi 19:3 elobeli likambo ya kotosa Sabata. Kasi biso bakristo tozali na nse ya Mibeko te, yango wana totosaka Sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ te. Atako bongo, tokoki koyekola makambo mingi na ndenge oyo Bayisraele bazalaki kotosa Sabata mpe matomba oyo bazalaki kozwa na kosala bongo. Sabata ezalaki ntango oyo bato bazalaki kopema na misala na bango mpe komipesa mingi na makambo ya elimo. Yango wana na mokolo ya Sabata, Yesu azalaki kokende na Sinagoga ya mboka na ye mpe kotánga Liloba ya Nzambe. (Kob. 31:12-15; Luka 4:16-18) Mobeko oyo Nzambe apesaki ya ‘kotosa basabata na ye’ esengeli kotinda biso tósombaka ntango na makambo na biso ya mokolo na mokolo mpo tókoka komipesa mingi na makambo ya elimo. Omoni ete osengeli kobongisa makambo mosusu mpo na kotya makambo ya elimo na esika ya liboso? Soki ozali kozwa ntango mbala na mbala mpo omipesa mingi na makambo ya elimo, okokóma na boyokani ya malamu elongo na Yehova, mpe yango ekosala ete okóma mosantu. w21.12 5 par. 13

Mwayambo, 27 sanza ya 11

Nayei kobenga bayengebene te, kasi basumuki mpo bábongola motema.​—Luka 5:32.

Ntango Yesu azalaki awa na mabele, alekisaki ntango elongo na bato ya lolenge nyonso. Azalaki kolya elongo na bato oyo bazalaki na bozwi mpe bato ya lokumu, kasi azalaki mpe kolekisa ntango na ye mingi elongo na babola mpe bato oyo bazalaki na moto ya kosalisa bango te. Lisusu, azalaki koyokela baoyo bazalaki kobengama basumuki mawa. Bato mosusu ya lolendo baboyaki Yesu mpo na makambo oyo asalaki. Batunaki bayekoli na ye boye: “Mpo na nini bozali kolya mpe komɛla elongo na bakɔngɔli-mpako mpe basumuki?” Yesu ayanolaki bango na maloba ya mokapo ya lelo. (Luka 5:29-31) Bambula mingi liboso Masiya aya, mosakoli Yisaya alobaki ete bato mingi bakondimela ye te. Asakolaki boye: “Azalaki kotyolama mpe bato bazalaki kokima ye . . . Ezalaki lokola nde tozali koboya kotala elongi ya moto moko boye. Atyolamaki, mpe tomonaki ye mpamba.” (Yis. 53:3) Esakweli elobaki ete “bato” bakoboya Masiya, yango wana Bayuda ya siɛklɛ ya liboso basengelaki koyeba ete bato bakoboya Yesu. w21.05 8-9 par. 3-4

Mwamibale, 28 sanza ya 11

Yehova akotɛlɛmisa ye.​—Yak. 5:15.

Bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kosalela toli noki te. (Yak. 1:22) Basusu bazalaki kosepela na bazwi koleka babola. (Yak. 2:1-3) Basusu mpe bazalaki na mokakatano ya kopekisa lolemo na bango. (Yak. 3:8-10) Bakristo yango bazalaki mpenza na bolɛmbu, kasi Yakobo ayebaki ete bakokaki kobongwana. Apesaki bango toli na boboto kasi na ndenge ya polele, mpe alendisaki baoyo bazalaki na mikakatano na elimo báluka lisalisi epai ya bankulutu. (Yak. 5:13, 14) Liteya: Taleláká makambo na ndenge ebongi, kasi zalá na makanisi ya malamu mpo na basusu. Bato mingi oyo toyekolaka na bango Biblia bakoki kozala na mokakatano ya kosalela toli na yango. (Yak. 4:1-4) Ekoki kosɛnga bango mwa ntango mpo bátika bizaleli mabe oyo epikamá makasi mpe bákóma na bizaleli ya bokristo. Tosengeli kozala na mpiko ya koyebisa bayekoli na biso makambo oyo basengeli kobongisa. Tosengeli mpe kobatela makanisi ya malamu, na elikya ete Yehova akobenda bato ya komikitisa epai na ye mpe ete akopesa bango makasi mpo básala bambongwana na bomoi na bango.​—Yak. 4:10. w22.01 11 par. 11-12

Mwamisato, 29 sanza ya 11

Moto nyonso oyo azali kokanga litoi na ye na koganga ya komilelalela ya moto oyo azangá, ye moko mpe akobenga kasi bakoyanola ye te.​—Mas. 21:13.

Bakristo nyonso bamekolaka motema mawa ya Yehova. Mpo na nini? Ntina ya liboso ezali ete Yehova aboyaka koyoka mabondeli ya baoyo balingaka te komonisela basusu motema mawa. Moko te kati na biso akolinga ete Yehova aboya koyoka mabondeli na ye, yango wana tosengeli koboya kozala motema makasi. Na esika ya koboya kotyela ndeko na biso oyo azali na mpasi likebi, tosengeli nde koyoka “komilelalela ya moto oyo azangá.” Ndenge moko mpe, tobosanaka te toli ya Biblia oyo elobaka ete: “Moto oyo azalaka na motema mawa te akosambisama na motema mawa te.” (Yak. 2:13) Soki na komikitisa nyonso tobosani te ete tozalaka na mposa makasi bámonisela biso motema mawa, yango ekosalisa biso tómonisela mpe basusu motema mawa. Tosengeli komonisa motema mawa mingimingi ntango mosumuki oyo abongoli motema azongisami na lisangá. Biblia ezali na bandakisa oyo ekoki kosalisa biso tómonisa motema mawa mpe tóboya kozala motema makasi. w21.10 12 par. 16-17

Mwaminei, 30 sanza ya 11

Bófanda awa ntango ngai nakei kobondela kuna.​—Mat. 26:36.

Na butu ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabele, lokola mosala na ye ekómaki na nsuka, Yesu alukaki lisusu esika ya kimya epai akokaki komanyola mpe kobondela. Azwaki esika yango na elanga ya Getesemane. Na libaku yango, Yesu apesaki bayekoli na ye toli oyo ebongaki na likambo etali kobondela. Ntango bakómaki na elanga ya Getesemane, ngonga epusanaki mpenza, mbala mosusu midi ya butu elekaki. Yesu ayebisaki bantoma na ye bákoba kosɛnzɛla, mpe akendaki kobondela. (Mat. 26:37-39) Kasi ntango azalaki kobondela, bantoma na ye balalaki mpɔngi. Ntango akutaki bango bazali kolala, Yesu ayebisaki bango lisusu: “Bosɛnzɛlaka mpe bobondelaka ntango nyonso.” (Mat. 26:40, 41) Amonaki ete bazalaki mpenza komitungisa mpe balɛmbaki makasi. Ayokelaki bango mawa mpe alobaki ete “nzoto ezali na bolɛmbu.” Kasi, Yesu azongaki kobondela mbala mibale lisusu, mpe ntango azongaki, akutaki bayekoli na ye balali na esika bábondela.​—Mat. 26:42-45. w22.01 28 par. 10-11

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto