Sanza ya 3
Mwapɔsɔ, 1 sanza ya 3
Elikya yango eyokisaka nsɔni te.—Rom. 5:5.
Ya solo, mokili ya sika eyei naino te. Kasi, taláká mwa biloko oyo ezali awa na mabele, elingi koloba, minzoto, banzete, banyama, mpe bato. Moto moko te akotya ntembe ete biloko nyonso wana ezalaka te, atako bongo, na ntango moko boye biloko yango ezalaki te. Biloko yango ezali mpo Yehova nde akelaki yango. (Eba. 1:1, 26, 27) Nzambe na biso azali mpe na mokano ya kosala mokili ya sika. Akokokisa elaka yango. Na mokili ya sika, bato bakosepela na bomoi ya seko mpe bakozala na nzoto ya kokoka. Tondimi ete mokili yango ya sika ekoya na ntango oyo Nzambe atyá. (Yis. 65:17; Em. 21:3, 4) Na yango, salá nyonso oyo okoki mpo na kokómisa kondima na yo makasi. Zaláká na botɔndi mpo na lisiko. Kanisáká nguya oyo Yehova azali na yango. Lekisáká ntango na makambo ya elimo. Soki osali bongo, okoki kozala na kati ya “baoyo bazali kozwa libula ya bilaka na nzela ya kondima mpe motema molai.”—Ebr. 6:11, 12. w23.04 31 par. 18-19
Mwalomingo, 2 sanza ya 3
Nayebisaki yo te ete soki ondimi, okomona nkembo ya Nzambe? —Yoa. 11:40.
Yesu atombolaki miso na likoló mpe abondelaki na miso ya bato nyonso. Alingaki kopesa Yehova lokumu mpo na makambo nyonso oyo esengelaki kosalema na nsima. Bongo Yesu agangaki na mongongo makasi ete “Lazare, bimá!” (Yoa. 11:43) Mpe Lazare abimaki na lilita! Yesu asalaki likambo oyo bato mosusu bakoki komona ete ekoki kosalema te. Lisolo oyo ekómisi kondima na biso makasi na elikya ya lisekwa. Na ndenge nini? Kobosana te ete Yesu alakaki Marta ete: “Ndeko na yo ya mobali akosekwa.” (Yoa. 11:23) Ndenge moko na Tata na ye, Yesu azali na mposa mpe na nguya ya kokokisa elaka yango. Mpisoli oyo abimisaki emonisi ete azali na mposa makasi ya kosekwisa bato oyo bakufá mpe ya kosilisa mpasi nyonso oyo bato bayokaka mpo na liwa. Mpe na ntango oyo Lazare abimaki na lilita, Yesu amonisaki ete azali na nguya ya kosekwisa bakufi. Lisusu, kanisá makambo oyo Yesu ayebisaki Marta oyo ezali na mokapo ya lelo. Tozali na ntina mpenza ya kondima ete elaka ya Nzambe oyo etali lisekwa ekokokisama. w23.04 11-12 par. 15-16
Mwayambo, 3 sanza ya 3
Yehova azali pene na baoyo nyonso bazali kobelela ye, na baoyo nyonso babelelaka ye na bosolo.—Nz. 145:18.
Ekoki kosɛnga ete tóbongola likambo oyo tozalaki kobondela mpo na yango, ntango tokangi polele ntina ya mokano ya Yehova. Tóbosana te ete Yehova azali na mokano moko, mpe akokokisa yango na ntango oyo atyá. Mokano yango ezali mpe ya kosilisa libela makambo nyonso oyo ezali konyokola bato lelo oyo, elingi koloba makama oyo ebimaka yango moko, maladi, mpe liwa. Yehova akokokisa mokano na ye na nzela ya Bokonzi na ye. (Da. 2:44; Em. 21:3, 4) Nzokande liboso ntango yango ekoka, Yehova atiki nzela ete Satana ayangela mokili oyo. (Yoa. 12:31; Em. 12:9) Soki Yehova asilisaka mikakatano ya bato lelo oyo, mbɛlɛ elingaki komonana lokola nde Satana azali koyangela malamu. Na yango, atako tosengeli kozela ete Yehova akokisa mikano na ye mosusu, yango elimboli te ete asundoli biso. Yehova akosalisa biso. w23.05 8 par. 4; 9-10 par. 7-8
Mwamibale, 4 sanza ya 3
[Bosengeli] koyeba ndenge oyo bosengeli kopesa moto mokomoko eyano.—Kol. 4:6.
Ndenge nini tokoki kosalisa basusu mpe bázwa litomba ya Ekaniseli? Likambo ya liboso ezali ya kobengisa bango. Longola bato oyo tokutanaka na bango mbala na mbala na mosala ya kosakola, tokoki kokoma bankombo ya bato oyo tokobengisa. Tokoki kotya bandeko na biso ya libota, baninga ya mosala, baninga ya kelasi, mpe bato mosusu oyo toyebi. Ata soki tozali na lokasa ya libyangi ya papye te, tokoki kotindela bango na telefone. Tokoki kokamwa komona bato oyo bakondima koya! (Mos. 11:6) Kobosana te ete bato oyo tobengisi bakoki kozala na mituna, mingimingi soki bayanganá naino te na likita na biso ata moko. Tokoki kokanisa liboso mituna oyo bakoki kotuna, mpe kobongisa biyano ya kopesa bango. Ata nsima ya koyangana na Ekaniseli, bato ya sika bakoki kozala na mituna mosusu. Mposa na biso ezali ete tósala nyonso oyo tokoki, ezala liboso ya Ekaniseli, na mokolo ya Ekaniseli, to mpe nsima na yango, mpo na kosalisa baoyo bazali “na ezaleli oyo ebongi” bázwa litomba ya molulu yango.—Mis. 13:48. w24.01 12 par. 13, 15; 13 par. 16
Mwamisato, 5 sanza ya 3
Ozali londende oyo ebimaka mpo na mwa ntango moke mpe na nsima elimwaka.—Yak. 4:14.
Biblia elobeli masolo mwambe ya bato oyo basekwaki awa na mabele. Mpo na nini te kotánga lisolo yango mokomoko na likebi? Wana ozali kosala yango, luká mateya oyo okoki koyekola na masolo yango. Kanisá ndenge oyo ndakisa yango mokomoko ezali komonisa mposa mpe nguya oyo Nzambe azali na yango ya kozongisa bakufi na bomoi. Likambo eleki ntina, kanisáká na lisekwa oyo eleki nyonso, elingi koloba, lisekwa ya Yesu. Kobosana te ete bato mingi bamonaki ndenge oyo asekwaki mpe yango ezali kokómisa kondima na biso makasi. (1 Ko. 15:3-6, 20-22) Tozali mpenza na botondi epai ya Yehova mpo na elaka ya lisekwa! Tóyeba ete elaka yango ekokokisama, mpo Yehova azali na mposa mpe na nguya ya kokokisa yango. Tosengeli kozala na ekateli ya kokómisa kondima na biso makasi na elikya wana ya kitoko. Soki tosali bongo, tokopusana lisusu penepene na Nzambe oyo alaki mokomoko na biso ete, “Ndeko na yo akosekwa!”—Yoa. 11:23. w23.04 8 par. 2; 12 par. 17; 13 par. 20
Mwaminei, 6 sanza ya 3
Otambola na bopɔlɔ elongo na Nzambe na yo!—Mik. 6:8.
Bopɔlɔ ezali ndeko ya komikitisa. Tomonisaka ete tozali bato ya bopɔlɔ ntango tomitalelaka na ndenge ebongi mpe toyebaka esika makoki na biso esuki. Tomonisaka ete tozali bato ya komikitisa ntango tomemyaka basusu mpe tomonaka ete baleki biso. (Flp. 2:3) Mbala mingi, moto ya bopɔlɔ azalaka mpe moto ya komikitisa. Gideone azalaki moto ya bopɔlɔ mpe ya komikitisa. Ntango anzelu ya Yehova ayebisaki Gideone ete aponamaki mpo na kobikisa Yisraele na mabɔkɔ ya Bamidiane oyo bazalaki na nguya, mobali yango ya komikitisa ayanolaki boye: “Libota na ngai ezali libota oyo eleki moke na kati ya Manase, mpe ngai nazali moto oyo aleki moke na ndako ya tata na ngai.” (Bas. 6:15) Amonaki ete abongaki te mpo na mokumba yango, kasi Yehova ayebaki malamu ete akokoka kosala yango. Na lisalisi ya Yehova, Gideone akokisaki malamu mokumba na ye. Bankulutu basalaka makasi mpo na komonisa bopɔlɔ mpe komikitisa na makambo nyonso. (Mis. 20:18, 19) Bamikumisaka te mpo na makoki na bango to makambo oyo basalaka, mpe bamonaka te ete bazali na ntina te mpo na mabunga oyo basalaka. w23.06 3 par. 4-5
Mwamitano, 7 sanza ya 3
Ye akopanza motó na yo. —Eba. 3:15.
Bakopanza Satana motó nsima ya bambula koleka nkóto. (Em. 20:7-10) Liboso yango esalema, Biblia esakolaki makambo minene oyo ekoningisa mabele. Ya liboso, bikólo ekoloba “kimya, likambo ya kobanga ezali te!” (1 Tes. 5:2, 3) “Na mbala moko,” bolɔzi monene ekobanda ntango bikólo ekobundisa mangomba nyonso ya lokuta. (Em. 17:16) Na nsima, Yesu akosambisa bato, akokabola bampate ná bantaba. (Mat. 25:31-33, 46) Na ntango yango, Satana akokoba kaka kotɛmɛla Yehova. Lokola ayinaka bato ya Nzambe, akotinda etuluku ya bikólo oyo esangani oyo Biblia ebengi Goge ya mokili ya Magoge ebundisa basaleli ya Yehova. (Ezk. 38:2, 10, 11) Na ntango moko boye, bakristo oyo batyami mafuta oyo bakozala naino na mabele bakoyanganisama na likoló mpo bázala elongo na Kristo mpe mampinga ya likoló mpo na kobunda na etumba ya Armagedone, oyo ekosukisa bolɔzi monene. (Mat. 24:31; Em. 16:14, 16) Na nsima, Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo ekobanda na mabele mobimba.—Em. 20:6. w23.10 20-21 par. 9-10
Mwapɔsɔ, 8 sanza ya 3
Ngai mosaleli na yo nabangaka Yehova banda bolenge na ngai.—1 Bak. 18:12.
Lelo oyo, Batatoli ya Yehova mingi bazali kofanda na mikili epai mosala na biso epekisami. Lokola Obadia, atako bakobaka komemya bakonzi ya Leta, bandeko wana ya basi mpe ya mibali bakobaka kopesa Yehova losambo oyo ebongi kaka na ye! (Mat. 22:21) Bamonisaka ete babangaka Nzambe ntango batosaka ye na esika ya kotosa bato. (Mis. 5:29) Basalaka bongo na ndenge bakobaka kosakola nsango malamu mpe bayanganaka elongo na makita na kobombana. (Mat. 10:16, 28) Balukaka koyeba soki bandeko na bango bazali na bilei ya elimo oyo basengeli na yango mpo bákoba kozala penepene na Yehova. Tózwa ndakisa ya Henri, oyo afandaka na ekólo moko ya Afrika epai mosala na biso epekisamaki na ntango moko boye. Na ntango ya epekiseli, Henri amipesaki na bolingo na ye moko mpo na kokabolela bandeko na ye Batatoli mikanda oyo elimbolaka Biblia. Akomaki boye: “Nazalaka moto ya nsɔninsɔni. . . . Yehova . . . apesaki ngai mpiko oyo nasengelaki na yango.” Yo mpe okoki kokóma na mpiko lokola Henri? Ɛɛ, soki ozali koyekola kobanga Nzambe na ndenge ya malamu. w23.06 16 par. 9, 11
Mwalomingo, 9 sanza ya 3
Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko.—Rom. 5:12.
Ntango Adama ná Eva batombokaki, emonanaki lokola ete Satana abebisaki mokano ya Nzambe ya kotondisa mabele na bato ya kokoka mpe ya botosi. Mbala mosusu Satana akanisaki ete Yehova azalaki na likambo mosusu te ya kosala. Ntango mosusu akanisaki ete Yehova akoboma Adama ná Eva mpe akosala mobali ná mwasi mosusu ya kokoka oyo bakokokisa mokano na ye mpo na bato. Kasi soki Nzambe asalaka bongo, Satana alingaki koloba ete Nzambe azali moto ya lokuta. Mpo na nini? Mpo na Ebandeli 1:28, Yehova ayebisaki Adama ná Eva ete bana na bango nde bakotondisa mabele. To mbala mosusu Satana akanisaki ete Yehova akotika Adama ná Eva bábota bana ya kozanga kokoka oyo bakokóma ata moke te bato ya kokoka. (Mos. 7:20; Rom. 3:23) Soki esalemaka bongo, na ntembe te Satana alingaki koloba ete Yehova alongi te kokokisa mokano na ye. Mpo na nini? Mpo yango elingaki kokokisa te mokano ya Nzambe ya kotondisa paradiso awa na mabele, na bana ya Adama ná Eva oyo bazali bato ya kokoka mpe ya botosi. w23.11 6 par. 15-16
Mwayambo, 10 sanza ya 3
Bókende mosika te koleka makambo oyo ekomamá.—1 Ko. 4:6.
Yehova apesaka biso malako ya polele na nzela ya Liloba na ye mpe ebongiseli na ye. Tozali na ntina te ya kobakisa malako mosusu na oyo apesaka. (Mas. 3:5-7) Yango wana, tokendeke mosika te na makambo oyo ekomamá na Biblia to totyelaka bandeko na biso bakristo mibeko te na makambo oyo Biblia esɛngi te. Satana asalelaka “bokosi ya mpambampamba” mpe “makambo mikemike ya mokili” mpo na kokosa mpe kokabola bato. (Kol. 2:8) Na siɛklɛ ya liboso, yango esangisaki bafilozofi oyo eutaki na makanisi ya bato, mateya ya Bayuda oyo ezalaki na Makomami te, mpe liteya oyo elobaki ete bakristo basengeli kotosa Mibeko ya Moize. Bato bakosamaki na makanisi yango ya lokuta mpo makanisi yango ememaki bato mosika na Yehova, ye oyo azali Mopesi Monene ya bwanya ya solosolo. Lelo oyo, Satana asalelaka baradio to batelevizyo mpe basite Internet ya kosolola na baninga mpo na kopanza banungunungu ya lokuta, mpe bansango ya lokuta oyo bakonzi ya politiki balendisaka. w23.07 16 par. 11-12
Mwamibale, 11 sanza ya 3
Ee Yehova, misala na yo ezali mpenza minene! Makanisi na yo ezali mozindo mingi!—Nz. 92:5.
Likambo oyo Yehova asalaki mpo na botomboki ya Satana mpe ya Adama ná Eva, na ntembe te ekamwisaki mpenza Satana. Na esika amonisa ete azali moto ya lokuta, Yehova amonisaki ete alobaka solo na ndenge atikaki Adama ná Eva bábota bana. Mpe Yehova amonisaki ete ntango alobi akosala likambo moko, eloko moko te ekoki kopekisa ye kosala yango. Asalaki likambo moko mpo na kokokisa mokano na ye, apesaki “mwana” to momboto oyo asengelaki kobikisa bana ya Adama ná Eva ya botosi. (Eba. 3:15; 22:18) Na ntembe te Satana akamwaki mpenza ndenge Yehova azwaki ebongiseli ya kopesa lisiko! Mpo na nini? Mpo lisiko euti na bolingo oyo ezangi moimi. (Mat. 20:28; Yoa. 3:16) Satana azalaka na ezaleli yango te, azali moimi. Sikoyo, makambo nini ekosalema lokola lisiko epesamaki? Na nsuka ya Mbula Nkóto, bana ya Adama ná Eva oyo bazali bato ya kokoka mpe ya botosi bakofanda na paradiso awa na mabele, kaka ndenge Yehova akanaki yango na ebandeli. w23.11 6 par. 17
Mwamisato, 12 sanza ya 3
Nzambe akosambisa.—Ebr. 13:4.
Totosaka mobeko ya Yehova na oyo etali komemya bomoi mpe makila mpo ezali mosantu. Mpo na nini? Mpo Yehova alobi ete makila elakisi bomoi, likabo ya motuya oyo euti epai na ye. (Lev. 17:14) Ntango Yehova apesaki bato mbala liboso etinda ya kolya misuni ya banyama, apesaki bango mitindo ete basengeli kolya makila te. (Eba. 9:4) Azongelaki mobeko yango ntango apesaki Yisraele Mibeko ya Moize. (Lev. 17:10) Lisusu, apesaki lisangani ya mikóló-bakambi ya siɛklɛ ya liboso malako ete bakristo nyonso ‘bákoba koboya makila.’ (Mis. 15:28, 29) Totosaka mobeko yango mpenza ntango tozwaka bikateli na likambo etali kozwa lisalisi ya minganga. Totosaka mpe tokakolaka te mibeko ya Yehova na oyo etali malamu ná mabe. Ntoma Paulo asaleli maloba ya elilingi, ntango apesi biso toli ya ‘koboma’ biteni ya nzoto na biso, elingi koloba, tosengeli kosala nyonso tóbengana bamposa mabe ya nzoto. Toboyaka kotala to kosala likambo nyonso oyo ekoki kotinda biso tósala pite.—Kol. 3:5; Yobo 31:1. w23.07 15 par. 5-6
Mwaminei, 13 sanza ya 3
Nsukansuka afungolelaki ye motema.—Bas. 16:17.
Ekoki nde kozala ete Samsone atyelaki Dalila motema mingi, ete bolingo oyo alingaki Dalila ezipaki ye miso, yango wana akokaki te kososola makambo oyo akanaki kosala? Ezala bongo to te, Dalila azalaki se kotya Samsone mbamba mpo ayebisa ye esika oyo makasi na ye ezalaki kouta, mpe nsukansuka Samsone ayebisaki ye sekele na ye. Likambo ya mawa, libunga wana ya Samsone esalaki ete abungisa makasi na ye mpe abebisa boyokani na ye na Yehova mpo na mwa ntango. (Bas. 16:16-20) Samsone akutanaki na makambo mingi ya mpasi mpo atyelaki Dalila motema na esika atyela Yehova motema. Bafilistia bakangaki Samsone mpe batɔbɔlaki ye miso. Batyaki ye na bolɔkɔ na Gaza, mpe bakómisaki ye moombo mpo anikaka mbuma. Na nsima ntango Bafilistia bayanganaki mpo na kosala fɛti bazalaki kotyola ye. Bapesaki nzambe na bango ya lokuta Dagone mbeka monene, mpo bamonaki ete asalisaki bango bákanga Samsone. Babimisaki Samsone na bolɔkɔ mpe bamemaki ye na fɛti yango mpo akende “kosɛkisa” bango.—Bas. 16:21-25. w23.09 5-6 par. 13-14
Mwamitano, 14 sanza ya 3
Bósalaka nde makambo oyo ezali malamu na miso ya bato nyonso.—Rom. 12:17.
Moninga moko ya mosala to ya kelasi akoki kotuna biso ntina oyo Batatoli ya Yehova basalaka to te likambo moko boye. Tokosala makasi tókɔtela bindimeli na biso, kasi tokomonisa mpe limemya mpo na makanisi na ye. (1 Pe. 3:15) Mbala mingi, ezalaka malamu soki totaleli motuna yango lokola libaku ya koyeba makambo oyo atyelaka likebi, kasi te lokola alingi kolukela yo makambo to kobimisa ntembe. Ata soki likambo nini nde etindi moto moko atuna motuna, ekozala malamu tózongisa eyano na boboto, tómonisa ete tozali na motema pɛtɛɛ. Na ndenge yango, eyano na biso ekoki kotinda ye abongola makanisi na ye. Na ndakisa, soki moninga ya mosala atuni ntina oyo tosalaka fɛti ya mbotama te, kanisá naino: Ekoki nde kozala ete azali komituna soki tozwaka mpe ntango ya komisepelisa? Mpo na kokitisa ye motema, tokoki komonisa ye ete tosepeli ndenge azali komibanzabanza mpo na baninga ya mosala. Yango ekoki kopesa biso libaku ya kosolola malamu makambo oyo Biblia emonisi mpo na fɛti ya mbotama. w23.09 17 par. 10-11
Mwapɔsɔ, 15 sanza ya 3
Bókeba mpo bómemama te elongo na bango na libunga ya bato oyo babukaka mibeko mpe bókwea te awa bopikami makasi.—2 Pe. 3:17.
Ezali mpenza lokumu monene ndenge tozali kosalela ntango oyo etikali mpo na kopesa litatoli epai ya bato ya bikólo nyonso. Ntoma Petro alendisi biso ‘tóbatela mokolo ya Yehova na makanisi.’ (2 Pe. 3:11, 12) Ndenge nini tokoki kosala yango? Ekozala malamu tómanyolaka na mapamboli oyo tokozwa na mokili ya sika, mokolo na mokolo, soki likoki ezali. Omimona na makanisi ndenge ozali kopema mopɛpɛ ya pɛto, kolya bilei ya malamu, koyamba baninga mpe bandeko oyo basekwi, mpe koteya bato oyo bazalaki na bomoi na ntango ya kala ndenge bisakweli ya Biblia ekokisami. Komanyola ndenge wana ekosalisa yo okoba kozela mpe ekobatela yo mpo obosana te ete nsuka ya mokili ekoya mosika te. Lokola ‘toyebi liboso’ makambo oyo ekosalema, ‘tokomemama te’ na bateyi ya lokuta. w23.09 27 par. 5-6
Mwalomingo, 16 sanza ya 3
Bótosaka baboti na bino na boyokani na Nkolo, mpo yango ezali sembo.—Ef. 6:1.
Bilenge bazalaka na baninga mosusu oyo “batosaka baboti te.” (2 Tim. 3:1, 2) Mpo na nini bilenge mingi batosaka baboti na bango te? Basusu bamonaka ete baboti na bango basalaka makambo na bokosi. Baboti basɛngaka bango básala makambo oyo bango moko basalaka te. Bilenge mosusu bamonaka ete toli ya baboti na bango ezali makambo ya kala, ebongi te, mpe etyaka bango nkaka mingi. Soki ozali elenge, yo mpe omonaka bongo? Bilenge mingi bamonaka ete ezali mpasi kotosa mobeko oyo ya Yehova oyo ezali na mokapo ya lelo. Nini ekoki kosalisa yo osala yango? Okoki koyekola botosi soki olandi ndakisa oyo eleki malamu, ndakisa ya Yesu. (1 Pe. 2:21-24) Yesu azalaki moto ya kokoka mpe baboti na ye bazalaki bato ya kozanga kokoka. Kasi Yesu azalaki kokumisa baboti na ye ata ntango basali mabunga to bakangi ntina te ya likambo oyo asali.—Kob. 20:12. w23.10 7 par. 4-5
Mwayambo, 17 sanza ya 3
Balongolaki mibeko ya liboso mpo ezalaki makasi te mpe ezalaki na litomba te.—Ebr. 7:18.
Ntoma Paulo alimbolaki ete bambeka oyo Mobeko esɛngaki ekokaki te kolongola lisumu mpo na libela. Mpo na ntina wana nde “balongolaki” Mobeko. Yango wana Paulo alingaki koteya bango mateya mosusu ya mozindo. Akundwelaki bakristo yango ete mbeka ya Yesu epesi “elikya moko oyo eleki malamu,” oyo na nzela na yango bakoki “kopusana penepene na Nzambe.” (Ebr. 7:19) Paulo alimbolelaki bandeko na ye Baebre ntina oyo losambo ya bakristo elekaki mosika oyo bazalaki kopesa na kala. Makambo oyo ezalaki na losambo ya Bayuda ezalaki kaka “elili ya makambo oyo ekoya, kasi bosolo ezali nde Kristo.” (Kol. 2:17) Elili emonisaka lolenge ya eloko, kasi ezali mpenza eloko yango te. Ndenge moko mpe, losambo ya kala ya Bayuda ezalaki kaka elili ya bosolo oyo esengelaki koya. Tosengeli kokanga ntina ya ebongiseli oyo Yehova atye mpo na kolimbisama ya masumu na biso, mpo tókoka kopesa ye losambo oyo akondima. w23.10 25 par. 4-5
Mwamibale, 18 sanza ya 3
Na ntango ya nsuka, mokonzi ya sudi akobunda na ye, bakotindikana, mpe mokonzi ya nɔrdi akokitela ye.—Dan. 11:40.
Danyele mokapo 11 elobeli bakonzi mibale, to baguvɛrnema mibale oyo ezali kobunda mpo na koyangela mokili. Soki tokokanisi esakweli oyo na bisakweli mosusu oyo ezali na Biblia, tokomona ete “mokonzi ya nɔrdi” ezali Russie ná bikólo oyo epesaka yango mabɔkɔ mpe “mokonzi ya sudi” ezali bokonzi ya Anglo-Américain, oyo eleki na nguya na mokili mobimba. Basaleli ya Nzambe oyo bafandi na nse ya boyangeli ya “mokonzi ya nɔrdi” bazali koyika mpiko na minyoko oyo ezali kouta epai ya mokonzi yango. Batatoli mosusu bazali kobɛtama mpe bakangami mpo na kondima na bango. Na esika ebangisa bandeko na biso, makambo oyo “mokonzi ya nɔrdi” azali kosala bango ezali nde kokómisa kondima na bango makasi. Mpo na nini? Mpo bandeko na biso bayebi ete minyoko oyo basaleli ya Nzambe bazali kokutana na yango ezali kokokisa maloba ya bisakweli oyo ezali na mokanda ya Danyele. (Dan. 11:41) Koyeba yango ekoki kosalisa biso tóbatela elikya na biso makasi mpe bosembo na biso etengatenga te. w23.08 11 par. 15-16
Mwamisato, 19 sanza ya 3
Moto oyo asimbi bino asimbi mbuma ya liso na ngai.—Zek. 2:8.
Lokola Yehova alingaka biso, atyaka likebi mingi na mayoki na biso mpe alukaka kobatela biso. Ayokaka mpasi ntango tozali koyoka mpasi. Na yango, tokoki kobondela ye ete: “Batelá ngai lokola mbuma ya liso na yo.” (Nz. 17:8) Liso ezali eteni ya pɛtɛpɛtɛ mpe ya motuya mingi na nzoto. Na yango, ntango Yehova akokanisi biso na liso na ye, ezali lokola nde azali koloba, ‘Moto oyo asali bino bato na ngai mabe, asali eloko na ngai ya motuya mabe.’ Yehova alingi tóndima mpenza ete alingaka mokomoko na biso. Kasi ayebi ete na kotalela makambo mosusu ya kala ya bomoi na biso, tokoki komituna soki akoki kolinga biso. To mbala mosusu tozali kokutana na mikakatano sikoyo, mpe tozali komituna soki Yehova alingaka biso. Nini ekosalisa biso tóndima mpenza ete Yehova alingaka biso? Koyekola ndenge Yehova amonisaka ete alingaka Yesu, bakristo oyo batyami mafuta na elimo, mpe mokomoko na biso. w24.01 27 par. 6-7
Mwaminei, 20 sanza ya 3
Nzambe na biso azalaki elongo na biso, mpe abikisaki biso na mabɔkɔ ya banguna.—Ezr. 8:31.
Ezera amonaki ndenge Yehova asalisaki bato na ye na ntango ya mikakatano. Bambula liboso, na mobu 484 L.T.B., ekoki kozala ete Ezera azalaki na Babilone ntango Mokonzi Ahasueruse abimisaki mobeko ya koboma Bayuda nyonso oyo bazalaki na ampire ya Perse. (Est. 3:7, 13-15) Bomoi ya Ezera ezalaki na likama! Ntango Bayuda “na etúká nyonso” bayokaki yango, bakilaki bilei mpe balelaki, na ntembe te babondelaki Yehova mpo asalisa bango. (Est. 4:3) Kanisá ndenge Ezera ná bandeko na ye Bayuda bayokaki ntango bayebaki ete baoyo bazalaki koluka koboma Bayuda, bango nde babomamaki! (Est. 9:1, 2) Makambo wana ya mpasi ebongisaki Ezera mpo na makambo ya mpasi oyo ekoya mpe na ntembe te esalaki ete atya lisusu motema mingi na likoki ya Yehova ya kobatela bato na ye. w23.11 17 par. 12-13
Mwamitano, 21 sanza ya 3
Nzambe atángi ye moto ya sembo mpo na misala te.—Rom. 4:6.
Ntoma Paulo azalaki kolobela libosoliboso “misala ya mibeko,” mibeko ya Moize, oyo epesamaki na Ngomba Sinai. (Rom. 3:21, 28) Emonani ete na ntango ya Paulo, Bayuda mosusu oyo bakómaki bakristo bazalaki na mokakatano mpo na kondima ete Mobeko ya Moize mpe makambo to misala oyo Mobeko yango esɛngaki ezalaki lisusu na ntina te. Yango wana, Paulo apesaki ndakisa ya Abrahama mpo na komonisa ete mpo moto azala sembo na miso ya Nzambe esɛngi te atosa “misala ya mibeko.” Esɛngi nde azala na kondima. Yango ezali likambo ya kolendisa mpo endimisi biso ete tozali na likoki ya kozala na boyokani ya malamu na Nzambe. Yango elimboli ete tokoki kozala na kondima epai ya Nzambe mpe Kristo, mpe na ndenge yango Nzambe akondima biso. Nzokande, “misala” oyo Yakobo mokapo 2 elobeli ezali te “misala ya mibeko” oyo Paulo alobelaki. Yakobo azalaki kolobela misala, to makambo, oyo bakristo basalaka na bomoi na bango ya mokolo na mokolo. (Yak. 2:24) Makambo yango emonisaka soki mokristo azali na kondima ya solosolo epai ya Nzambe to te. w23.12 3 par. 8; 4-5 par. 10-11
Mwapɔsɔ, 22 sanza ya 3
Mobali azali mokonzi ya mwasi na ye.—Ef. 5:23.
Bandeko basi oyo bazali kokanisa kobala, basengeli kopona balongani na bango na likebi mpenza. Kobosana te, okozala na nse ya bokonzi ya mobali oyo okobala. (Rom. 7:2; Ef. 5:33) Na yango omituna boye: ‘Azali mokristo oyo akɔmɛli na elimo? Atyaka Yehova na esika ya liboso na bomoi na ye? Azwaka bikateli ya bwanya? Andimaka mabunga na ye? Azalaka na limemya epai ya basi? Azali na makoki oyo esengeli ya kokokisa bamposa na ngai ya elimo, ya mosuni, mpe ya mayoki?’ Nzokande, soki olingi kozwa mobali ya malamu, yo mpe osengeli kozala mwasi ya malamu. Mwasi ya malamu azali “mosungi” mpo na mobali na ye mpe “akokani” na ye. (Eba. 2:18) Mpe lokola alingaka Yehova, mwasi yango asalaka nyonso mpo mobali na ye azala na lokumu. (Mas. 31:11, 12; 1 Tim. 3:11) Okoki komibongisa mpo na mokumba yango oyo ekoki koya na mikolo ezali koya soki ozali kokómisa bolingo na yo makasi mpo na Yehova mpe ozali mosungi mpo na basusu, ezala na ndako mpe na lisangá. w23.12 22-23 par. 18-19
Mwalomingo, 23 sanza ya 3
Soki moko na bino azangi bwanya, akoba kosɛnga Nzambe.—Yak. 1:5.
Yehova alaki ete akopesa biso bwanya oyo tosengeli na yango mpo tózwa bikateli ya malamu. Tozalaka mingimingi na mposa ya bwanya ntango tozali kozwa bikateli oyo ekobongola bomoi na biso. Apesaka biso mpe makasi mpo tóyika mpiko. Kaka ndenge asalaki mpo na ntoma Paulo, Yehova akopesa biso makasi oyo tosengeli na yango mpo tóyikela mikakatano na biso mpiko. (Flp. 4:13) Lolenge moko ezali ndenge asalelaka bandeko na biso bakristo. Na butu liboso Yesu akufa, abondelaki na motema na ye mobimba. Asɛngaki Yehova asalisa ye mpo bato bátalela ye te lokola moto oyo afingi Nzambe. Na esika Yehova asala bongo, atindaki nde anzelu moko alendisa ye. (Luka 22:42, 43) Yehova akoki mpe kosalela bandeko na biso mpo na kolendisa biso, bakoki kobenga biso na nzela ya telefone to koya kotala biso na ndako. Biso nyonso tokoki koluka mabaku ya kolendisa bandeko na biso na ‘liloba moko ya malamu’.—Mas. 12:25. w23.05 10-11 par. 9-11
Mwayambo, 24 sanza ya 3
Bókoba kobɔndisana mpe kolendisana.—1 Tes. 5:11.
Bandeko oyo batiká koyangana na makita oyo bayaka na Ekaniseli bakoki kobanga ete bato bakoyamba bango malamu te. Na yango, tóboya kotuna bango mituna oyo ekoyokisa bango nsɔni, to koloba likambo oyo ekoki kopesa bango mpasi. Bandeko yango bazali bandimi lokola biso. Tozali na esengo ya kosambela lisusu Yehova elongo na bango! (Nz. 119:176; Mis. 20:35) Tozalaka na botɔndi mingi ndenge Yesu abongisaki ete tósalaka Ekaniseli ya liwa na ye mbula nyonso! Ntango tosalaka bongo, biso moko mpe bato mosusu tozwaka matomba ebele. (Yis. 48:17, 18) Tokómaka kolinga Yehova mpe Yesu mingi. Tomonisaka ete tozali na botɔndi mingi mpo na oyo basalelá biso. Tokómaka na boyokani makasi na bandeko ya lisangá. Mpe tosalisaka basusu báyeba ndenge oyo bango mpe bakoki kozwa matomba oyo lisiko ememeli biso. Yango wana, biso nyonso tósala oyo tokoki mpo tómibongisa mpo na Ekaniseli ya mbula oyo, mokolo oyo eleki ntina na mbula! w24.01 14 par. 18-19
Mwamibale, 25 sanza ya 3
Ngai Yehova . . . Moto oyo azali kotambwisa yo.—Yis. 48:17.
Ndenge nini Yehova atambwisaka biso? Asalaka yango libosoliboso na nzela ya Liloba na ye, Biblia. Kasi, asalelaka mpe bato lokola bamonisi na ye. Na ndakisa, azali kosalela “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na kopesa biso bilei ya elimo oyo esalisaka biso tózwa bikateli ya malamu. (Mat. 24:45) Yehova asalelaka mpe mibali mosusu ya makoki mpo na kotambwisa biso. Na ndakisa, bakɛngɛli-batamboli mpe bankulutu ya lisangá balendisaka biso mpe bateyaka biso makambo oyo ekoki kosalisa biso tóyika mpiko na mikakatano. Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yehova azali kotambwisa biso malamu na mikolo ya nsuka oyo etondi na mpasi! Litambwisi yango esalisaka biso tóbatela boyokani malamu na Yehova mpe tótikala na nzela ya bomoi. Atako bongo, na bantango mosusu tokoki komona ete ezali mpasi kolanda litambwisi ya Yehova, mingimingi ntango bato ya kozanga kokoka nde bayebisi biso yango. Na bantango ya ndenge wana, tosengeli mpenzampenza kotya motema ete Yehova nde azali kokamba bato na ye mpe ete kolanda litambwisi na ye ememaka mapamboli. w24.02 20 par. 2-3
Mwamisato, 26 sanza ya 3
Tosengeli kolingaka, na maloba to na mbɛbu te, kasi na misala mpe na solo.—1 Yoa. 3:18.
Tokoki kokolisa bolingo na biso mpo na Yehova soki tozali koyekola Liloba na ye na molende. Ntango ozali kotánga Biblia, luká koyeba soki vɛrsɛ mokomoko oyo ozali kotánga emonisi nini mpo na Yehova. Omituna boye: ‘Ndenge nini lisolo oyo emonisi ete Yehova alingaka ngai? Bantina nini vɛrsɛ yango epesi ngai mpo nalinga Yehova?’ Kofungolela Yehova motema na biso ntango nyonso na libondeli ezali lolenge mosusu oyo tokoki kokolisa bolingo na biso mpo na ye. (Nz. 25:4, 5) Yehova, na ngala na ye, akoyanola na mabondeli na biso. (1 Yoa. 3:21, 22) Tosengeli mpe kokolisa bolingo na biso mpo na basusu. Mwa moke nsima ya kokóma mokristo, ntoma Paulo akutanaki na elenge mobali moko na nkombo Timote. Timote azalaki kolinga Yehova mpe bato. Paulo ayebisaki bakristo ya Filipi boye: “Nazali na moto mosusu te oyo azali na makanisi lokola ya [Timote], oyo azali komitungisa mpenza mpo na bolamu na bino.” (Flp. 2:20) Paulo azalaki kolobela nde bolingo oyo Timote azalaki na yango mpo na bandeko. Kozanga ntembe, bandeko ya masangá oyo Timote azalaki kokende kotala bazalaki kozela ye na mposa makasi.—1 Ko. 4:17. w23.07 9 par. 7-10
Mwaminei, 27 sanza ya 3
Nakosundola yo ata moke te. —Ebr. 13:5.
Liboso Yisraele ekɔta na Mokili ya Ndaka, Moize akufaki. Lokola Moize moto ya sembo azalaki lisusu te, Yehova atikaki nde kosalisa bato na ye? Te. Ntango nyonso oyo bazalaki sembo, Yehova abatelaki bango. Liboso Moize akufa, Yehova ayebisaki ye atya Yosua mpo na kokamba bato. Moize apesaki Yosua formasyo bambula mingi. (Kob. 33:11; Mib. 34:9) Lisusu, ezalaki na mibali mosusu mingi ya makoki oyo bazalaki kokamba bato: bakonzi ya bato nkóto, bakonzi ya bato nkama, bakonzi ya bato ntuku mitano, ata mpe ya bato zomi. (Mib. 1:15) Bato ya Nzambe babatelamaki malamu. Tólobela mpe ndakisa ya Eliya. Alongisaki losambo ya pɛto bambula mingi na Yisraele. Kasi na nsima, Yehova alongolaki ye mpe apesaki ye mokumba mosusu mosika na sudi, na Yuda. (2 Bak. 2:1; 2 Nt. 21:12) Bato ya sembo oyo bazalaki na bokonzi ya mabota zomi ya Yisraele basundolamaki nde? Te. Eliya apesaki Elisha formasyo bambula mingi. Mokano ya Yehova ekobaki kokende liboso, mpe abatelaki basambeli na ye ya sembo. w24.02 5 par. 12
Mwamitano, 28 sanza ya 3
Bókoba kotambola lokola bana ya pole.—Ef. 5:8.
Bakristo ya Efese bandimaki pole, solo oyo ezali na Makomami. (Nz. 119:105) Bato yango basundolaki misala ya lingomba na bango ya lokuta mpe etamboli ya mbindo. Bakómaki “bamekoli ya Nzambe” mpe bazalaki kosala makasi básambela Yehova mpe básepelisa ye. (Ef. 5:1) Ndenge moko mpe, liboso tóyeba solo, tozalaki na molili na makambo ya losambo mpe na bizaleli. Basusu kati na biso bazalaki kosala bafɛti ya mangomba ya lokuta; basusu bazalaki na bomoi ya mbindo. Kasi, ntango toyekolaki mibeko ya Yehova na oyo etali malamu ná mabe, tosalaki bambongwana. Tobandaki koyokanisa bomoi na biso na masɛngami na ye ya sembo. Mpe yango ememeli biso matomba mingi. (Yis. 48:17) Kasi, ata sikoyo etumba ezali kaka. Tosengeli kozala ntango nyonso mosika na molili oyo totiká mpe ‘kokoba kotambola lokola bana ya pole.’ w24.03 21 par. 6-7
Mwapɔsɔ, 29 sanza ya 3
Ata soki tokei liboso tii wapi, tókoba kaka kotambola na molɔngɔ na nzela moko wana.—Flp. 3:16.
Okoki komona ete okoki naino te mpo na komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo. Mbala mosusu osengeli kosala mwa bambongwana na bomoi na yo mpo eyokana na mibeko ya Yehova, to mbala mosusu osengeli na ntango mpo na kokolisa kondima na yo. (Kol. 2:6, 7) Bayekoli ya Biblia nyonso bakolaka ndenge moko te, mpe bilenge nyonso bakokisaka masɛngami mpo na komipesa mpe kozwa batisimo na mbula ndenge moko te. Meká kolandela bokoli na yo ya elimo na kotalela makambo oyo okoki kosala mpe komikokanisa na moto mosusu te. (Gal. 6:4, 5) Ata soki omoni ete okoki naino te mpo na komipesa na Yehova, kobá kosala nyonso mpo okokisa mokano yango. Bondelá Yehova apambola milende na yo mpo osala bambongwana oyo esengeli. (Flp. 2:13) Tyá motema ete akoyoka mabondeli na yo mpe akoyanola na yango.—1 Yoa. 5:14. w24.03 5 par. 9-10
Mwalomingo, 30 sanza ya 3
Mibali, . . . bókoba kofanda na [basi na bino] na boyebi.—1 Pe. 3:7.
Mokolo moko, Sara azalaki na nkanda, ayebisaki Abrahama ndenge azalaki komiyoka mpe apesaki kutu Abrahama foti mpo na likambo yango. Abrahama ayebaki ete Sara azalaki mwasi ya komikitisa mpe azalaki kosalisa ye mingi. Ayokaki ye mpe alukaki kosilisa likambo yango. (Eba. 16:5, 6) Yango ekoki koteya biso nini? Mobali, ya solo ozali na bokonzi ya kozwa bikateli mpo na libota na yo. (1 Ko. 11:3) Kasi, soki ozali koyoka na likebi mpe oluki koyeba makanisi ya mwasi na yo liboso ozwa ekateli moko, mingimingi na makambo oyo etali ye, yango ekomonisa mpenza ete olingaka ye. (1 Ko. 13:4, 5) Na libaku mosusu, Abrahama azwaki ekateli ya koyamba bapaya oyo bayaki na mbalakaka. Asɛngaki Sara atika makambo oyo azalaki kosala mpo asala mampa ebele. (Eba. 18:6) Sara andimaki mpe asalaki ndenge mobali na ye asɛngaki. Basi, bokomekola Sara soki bozali kopesa mibali na bino mabɔkɔ na bikateli oyo bazali kozwa. Soki bosali bongo, bokokómisa makasi libala na bino.—1 Pe. 3:5, 6. w23.05 24-25 par. 16-17
Mwayambo, 31 sanza ya 3
Bwanya oyo euti na likoló . . . esepelaka kotosa.—Yak. 3:17.
Ntango Gideone akómaki mosambisi, botosi mpe mpiko na ye emekamaki. Azwaki mokumba moko monene ya kobebisa etumbelo ya Baala oyo tata na ye asalaki. (Bas. 6:25, 26) Na nsima, wana azalaki koyanganisa limpinga ya basoda, Yehova ayebisaki Gideone mbala mibale mobimba ete akitisa motángo ya basoda na ye. (Bas. 7:2-7) Nsukansuka, ayebisaki ye akende kobundisa kaa ya banguna na katikati ya butu. (Bas. 7:9-11) Bankulutu basengeli ‘kosepelaka kotosa.’ Nkulutu oyo azali na botosi asepelaka kotosa makambo oyo Biblia elobi mpe malako oyo ebongiseli ya Nzambe epesaka. Na ndenge yango, apesaka ndakisa malamu mpo na basusu. Kasi na bantango mosusu, botosi na ye ekoki komekama. Na ndakisa, ekoki kokóma mpasi mpo na ye atosa malako ndenge na ndenge oyo ezali kopesama. Na bantango mosusu, akoki komituna soki malako moko oyo epesami ebongi mpenza to ezali ya bwanya. To bakoki kosɛnga ye akokisa mokumba moko oyo ekoki kotya bonsomi na ye na likama. Ndenge nini bankulutu bakoki komekola botosi ya Gideone na makambo ya ndenge wana? Landáká na likebi mpenza malako mpe saleláká yango. w23.06 4-5 par. 9-11