Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • es25 nk. 37-46
  • Sanza ya 4

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sanza ya 4
  • Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Mwamibale, 1 sanza ya 4
  • Mwamisato, 2 sanza ya 4
  • Mwaminei, 3 sanza ya 4
  • Mwamitano, 4 sanza ya 4
  • Mwapɔsɔ, 5 sanza ya 4
  • Mwalomingo, 6 sanza ya 4
  • Mwayambo, 7 sanza ya 4
  • Mwamibale, 8 sanza ya 4
  • Mwamisato, 9 sanza ya 4
  • Mwaminei, 10 sanza ya 4
  • Mwamitano, 11 sanza ya 4
  • MOKOLO YA EKANISELI
    Nsima ya kolala ya moi
    Mwapɔsɔ, 12 sanza ya 4
  • Mwalomingo, 13 sanza ya 4
  • Mwayambo, 14 sanza ya 4
  • Mwamibale, 15 sanza ya 4
  • Mwamisato, 16 sanza ya 4
  • Mwaminei, 17 sanza ya 4
  • Mwamitano, 18 sanza ya 4
  • Mwapɔsɔ, 19 sanza ya 4
  • Mwalomingo, 20 sanza ya 4
  • Mwayambo, 21 sanza ya 4
  • Mwamibale, 22 sanza ya 4
  • Mwamisato, 23 sanza ya 4
  • Mwaminei, 24 sanza ya 4
  • Mwamitano, 25 sanza ya 4
  • Mwapɔsɔ, 26 sanza ya 4
  • Mwalomingo, 27 sanza ya 4
  • Mwayambo, 28 sanza ya 4
  • Mwamibale, 29 sanza ya 4
  • Mwamisato, 30 sanza ya 4
Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2025
es25 nk. 37-46

Sanza ya 4

Mwamibale, 1 sanza ya 4

Likambo nini osali ngai? . . . Mpo na nini okosi ngai?—Eba. 29:25.

Basaleli ya Yehova ya ntango ya kala bakutanaki na mikakatano oyo bazalaki komizela na yango te. Tótalela ndakisa ya Yakobo. Tata na ye ayebisaki ye ete abala mwana mwasi moko ya Labana, ndeko na ye moko ya libota oyo azalaki kosambela Yehova, mpe tata na ye ayebisaki ye ete Yehova akopambola ye mingi. (Eba. 28:​1-4) Yakobo asalaki likambo ya malamu. Asalaki mobembo longwa na Kanana mpo na kokende epai ya Labana, oyo azalaki na bana basi mibale: Lea ná Rashele. Yakobo alingaki mingi Rashele, leki ya Lea, mpe andimaki kosalela tata na ye mosala mbula nsambo liboso abala ye. (Eba. 29:18) Kasi makambo esalemaki te ndenge Yakobo akanisaki. Labana akosaki ye na ndenge abalisaki ye Lea, mwana na ye ya liboso. Labana andimaki ete Yakobo abala Rashele pɔsɔ moko na nsima, kaka soki asaleli ye mosala mbula nsambo mosusu. (Eba. 29:​26, 27) Labana azalaki mpe sembo te ntango asalaki makambo ya mombongo ná Yakobo. Labana abubaki Yakobo mbula 20 mobimba!—Eba. 31:​41, 42. w23.04 15 par. 5

Mwamisato, 2 sanza ya 4

Bófungolela ye mitema na bino. —Nz. 62:8.

Tokoki koluka libɔndisi mpe litambwisi epai ya nani? Eyano na motuna yango ezali polele. Tokoki kozwa litambwisi mpe libɔndisi epai ya Yehova na nzela ya libondeli. Kutu yango nde Yehova asɛngaka biso tósala. Alingi ete tóbondelaka ye mbala mingi to “ntango nyonso.” (1 Tes. 5:17) Tokoki kopusana penepene na ye na nzela ya libondeli mpe kosɛnga ye atambwisa biso na makambo nyonso ya bomoi na biso. (Mas. 3:​5, 6) Lokola Yehova azali na boboto, atyelaka biso te ntango to mbala boni oyo tosengeli kobondelaka ye. Yesu ayebaki ete Yehova azwaka na motuya mingi mabondeli na biso. Liboso aya awa na mabele, amonaki ndenge Tata na ye azalaki koyanola na mabondeli ya basi mpe mibali ya sembo. Yesu amonaki ndenge Tata na ye ayanolaki na mabondeli ya bato ya sembo, na ndakisa, Ana, Davidi, Eliya mpe basaleli mosusu ya sembo. (1 Sa. 1:​10, 11, 20; 1 Bak. 19:​4-6; Nz. 32:5) Yango wana, Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka mbala na mbala mpe na kondima.—Mat. 7:​7-11. w23.05 2 par. 1, 3

Mwaminei, 3 sanza ya 4

Kolɛnga liboso ya bato ezali motambo, kasi moto oyo azali kotyela Yehova motema akobatelama.—Mas. 29:25.

Nganga-nzambe monene Yehoyada azalaki kobanga Nzambe. Yango emonanaki ntango Atalia, mwana ya Yezabele, abɔtɔlaki kiti ya bokonzi mpe akómaki mokonzi-mwasi na Yuda. Mpo azalaki na nkanza mpe na lokoso ya bokonzi, yango wana, alukaki koboma bana nyonso ya mokonzi, elingi koloba, bankɔkɔ na ye moko! (2 Nt. 22:​10, 11) Yehoashe, moko ya bana yango abikaki mpo mwasi ya Yehoyada, Yehoshabeate, abikisaki ye. Yehoshabeate ná mobali na ye babombaki mwana yango mpe babatelaki ye. Na ndenge yango nde Yehoyada ná Yehoshabeate bapesaki mabɔkɔ mpo na kobatela molɔngɔ ya bakonzi ya libota ya Davidi. Yehoyada azalaki sembo epai ya Yehova mpe alɛngaki te liboso ya mokonzi Atalia. Ntango Yehoashe azalaki na mbula nsambo, Yehoyada amonisaki lisusu ete azalaki sembo epai ya Yehova. Asalelaki mayele moko oyo esengelaki kosala ete Yehoashe akóma mokonzi, mpo azalaki na lotomo ya kozala mokonzi na kiti ya bokonzi ya Davidi. Kasi, soki mayele yango elongaka te, na ntembe te Yehoyada alingaki kobomama. Na lisalisi ya Yehova, mayele yango elongaki. w23.06 17 par. 12-13

Mwamitano, 4 sanza ya 4

Okoyeba ete Oyo-Aleki-Likoló azali Moyangeli na bokonzi ya bato, mpe ete apesaka yango na moto oyo ye alingi.—Dan. 4:25.

Mokonzi Nebukadenezare akokaki kokanisa ete Danyele akómaki motomboki mpe akokaki koboma ye. Kasi Danyele amonisaki mpiko mpe alimbolaki ndɔtɔ yango. Ekoki kozala nini esalisaki Danyele azala na mpiko bomoi na ye mobimba? Ntango azalaki elenge, na ntembe te Danyele azwaki mateya na ndakisa ya mama mpe tata na ye. (Mib. 6:​6-9) Danyele ayebaki kaka te Mibeko ya miboko, na ndakisa Mibeko Zomi, kasi mpe makambo mikemike etali Mibeko yango. Na ndakisa, biloko oyo Moyisraele akokaki kolya to te. (Lev. 11:​4-8; Dan. 1:​8, 11-13) Danyele ayekolaki mpe lisolo ya bato ya Nzambe mpe ayebaki makambo oyo ekómelaki bango ntango baboyaki kotosa mibeko ya Yehova. (Dan. 9:​10, 11) Makambo oyo Danyele akutanaki na yango na bomoi na ye endimisaki ye ete Yehova mpe baanzelu na ye ya nguya bazalaki kosalisa ye.—Dan. 2:​19-24; 10:​12, 18, 19. w23.08 3 par. 5-6

Mwapɔsɔ, 5 sanza ya 4

Bwanya ezali elongo na bato ya bopɔlɔ.—Mas. 11:2.

Rebeka azalaki mwasi ya bwanya oyo na boumeli ya bomoi na ye azwaki bikateli ya mpiko mpe ayebaki ntango nini mpe ndenge nini kosala likambo. (Eba. 24:58; 27:​5-17) Kasi Rebeka azalaki na limemya mpe na komikitisa. (Eba. 24:​17, 18, 65) Soki ozali na komikitisa mpe kopesa mabɔkɔ na bibongiseli ya Yehova, ndenge Rebeka asalaki, okozala mpenza ndakisa malamu epai ya bato ya libota na yo mpe na lisangá. Bopɔlɔ ezali ezaleli oyo bakristo nyonso bakɔmɛli na elimo basengeli na yango. Estere azalaki na bopɔlɔ mpe azalaki kobanga Nzambe. Ezaleli na ye ya bopɔlɔ epekisaki ye asala makambo na lofundo. Ayokaki toli ya ndeko na ye ya mokóló mpe alandaki yango. (Est. 2:​10, 20, 22) Yo mpe okoki komonisa bopɔlɔ ya ndenge wana soki olukaka toli ya malamu mpe osalelaka yango. (Tito 2:​3-5) Estere amonisaki mpe bopɔlɔ na ndenge mosusu. Estere azalaki “nzoto kitoko mpe elongi kitoko”; kasi azalaki kobenda likebi mingi epai na ye moko te.—Est. 2:​7, 15. w23.12 19-20 par. 6-8

Mwalomingo, 6 sanza ya 4

Nzambe azali monene koleka mitema na biso mpe ayebi makambo nyonso.—1 Yoa. 3:20.

Komipesaka foti koleka ndelo ezali kilo oyo tosengeli te komema. Soki toyamboli lisumu na biso, tobongoli mpenza motema, mpe tosali nyonso mpo tózongela yango lisusu te, tokoki kondima ete Yehova alimbisi biso. (Mis. 3:19) Soki tosali makambo wana nyonso, Yehova alingaka te tókoba komiyoka ete tomemi ngambo. Ayebi ete ekozala likama mpo na biso soki tosali bongo. (Nz. 31:10) Soki tokómi na mawa koleka ndelo, tokoki kotika kopota mbangu mpo na bomoi. (2 Ko. 2:7) Soki ozali kokoba komitungisa koleka ndelo, tyá makanisi na ndenge Nzambe ‘alimbisaka mpenza.’ (Nz. 130:4) Ntango alimbisaka baoyo babongolaka mpenza motema, alaki boye: “Nakokanisa lisumu na bango lisusu te.” (Yir. 31:34) Yango elimboli ete Yehova akokanisa lisusu te masumu oyo así alimbisá yo. Komipesa foti te mpo obungisi mikumba oyo ozalaki na yango na lisangá. Yehova akanisaka lisusu te masumu na yo, yo mpe osengeli kosala bongo. w23.08 30-31 par. 14-15

Mwayambo, 7 sanza ya 4

Bópikama makasi, bóninganaka te.—1 Ko. 15:58.

Na eleko ya maladi ya Coronavirus, Batatoli ya Yehova oyo bazalaki kotosa malako oyo ebongiseli na biso ezalaki kopesa bamitungisaki te ndenge bato oyo bazalaki koyoka bansango ya lokuta bazalaki komitungisa mpambampamba. (Mat. 24:45) Tosengeli kotya makanisi na “makambo oyo eleki ntina.” (Flp. 1:​9, 10) Makambo oyo ekoki kolongola likebi na biso ekoki kolya biso ntango mingi mpe kosilisa biso makasi. Makambo oyo tosalaka mokolo na mokolo, na ndakisa kolya, komɛla, kolekisa mwa mopɛpɛ, mpe mosala ya mosuni, ekoki kokóma makambo oyo ekoki kolongola likebi na biso soki tokómisi yango makambo oyo eleki ntina na bomoi na biso. (Luka 21:​34, 35) Longola yango, mokolo na mokolo toyokaka mpe totángaka bansango etali kowelana ya bato mpe bantembe na makambo ya politiki. Tosengeli komindimisa ete bantembe yango ezali te kolongola likebi na biso. Lisusu, tokoki kobanda kokɔtela ngambo moko na makanisi mpe na motema. Satana asalelaka mayele ndenge na ndenge na mokano ya kolɛmbisa ekateli na biso ya kosala oyo ezali malamu. w23.07 16-17 par. 12-13

Mwamibale, 8 sanza ya 4

Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.—Luka 22:19.

Mpo na basaleli ya Yehova, mokolo ya Ekaniseli ya liwa ya Kristo ezali mokolo oyo eleki ntina na mbula. Ezali molulu kaka moko oyo Yesu atindaki mpenza bayekoli na ye básalaka. (Luka 22:​19, 20) Ekundwelaka biso ndenge oyo tokoki komonisa botɔndi mpo na mbeka ya Yesu. (2 Ko. 5:​14, 15) Lisusu, epesaka biso libaku ya ‘kolendisana’ elongo na bandeko ya lisangá. (Rom. 1:12) Mpe bato mingi bakamwaka makambo oyo bamoni mpe bayoki, mpe yango etindaka bango bábanda koyekola Biblia. Kanisá mpe ndenge Ekaniseli esangisaka biso na bandeko ya mokili mobimba. Ezali likambo ya kokamwa te ndenge tomonaka ete Ekaniseli ezali na ntina mingi! w24.01 8 par. 1-3

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki na moi: 9 Nisana) Luka 19:​29-44

Mwamisato, 9 sanza ya 4

Nzambe alingaki mokili mingi mpenza yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo akomonisa kondima epai na ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.—Yoa. 3:16.

Soki tozali komanyola mingi na eloko ya motuya oyo Yehova ná Yesu bapesaki, tokomona mpenza ete balingaka mokomoko na biso mingi mpenza. (Gal. 2:20) Lisiko emonisaka bolingo ya Nzambe. Yehova amonisaki ete alingaka biso na ndenge apesaki mbeka ya moto oyo aleki motuya mpo na ye, Yesu. Yehova atikaki Mwana na ye amona mpasi mpe akufa mpo na biso. Yehova abombaka te bolingo na ye epai na biso, amonisaka yango. (Yir. 31:3) Yehova abendi biso epai na ye mpo alingaka biso. (Talá mpe Kolimbola Mibeko 7:​7, 8.) Eloko moko te mpe moto moko te akoki kokabola biso na bolingo yango. (Rom. 8:​38, 39) Bolingo yango etindi yo omiyoka ndenge nini? w24.01 28 par. 10-11

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki na moi: 10 Nisana) Luka 19:​45-48; Matai 21:​18, 19; 21:​12, 13

Mwaminei, 10 sanza ya 4

Mpo na elikya . . . , biloko oyo ezalisamá . . . ekozwa bonsomi —Rom. 8:​20, 21.

Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazwaka mpenza elikya na bango ya kokende likoló na motuya. Moko na bango, ndeko Frederick Franz, abimisaki makanisi na ye na maloba oyo: “Elikya na biso ezali solo, ekokokana mpenza mpe koleka na oyo tokoki kokanisa likoló na mokomoko ya basangani 144000 ya etonga moke.” Na 1991 ndeko Franz alobaki: “Tobungisi naino te motuya ya elikya yango. . . . Motuya na yango ezali se kobakisama na miso na biso awa ezali biso se kozela yango. Ezali eloko oyo tosengeli mpenza kozela na motema molai . . . nazali kotalela elikya yango lokola eloko eleki mpenza na motuya.” Ezala tokozwa bomoi ya seko na likoló to na mabele, tozali na elikya kitoko oyo epesi biso ntina ya kosepela. Mpe elikya na biso oyo epesaka esengo ekoki kokóma lisusu makasi. w23.12 9 par. 6; 10 par. 8

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki na moi: 11 Nisana) Luka 20:​1-47

Mwamitano, 11 sanza ya 4

Makila ya bangɔmbɛ-mibali mpe ya bantaba ekoki kolongola masumu te.—Ebr. 10:4.

Pene na monɔkɔ ya tabernakle ya kala, ezalaki na etumbelo ya kwivre esika bazalaki kotumbela Yehova bambeka ya banyama. (Kob. 27:​1, 2; 40:29) Kasi, bambeka yango ekokaki te kosala ete masumu ya bato elimbisama mpo na libela. (Ebr. 10:​1-3) Ndenge bazalaki kopesa bambeka yango mbala na mbala na tabernakle emonisaki ete mbeka moko ekopesama mpo na kosikola bato na masumu mpo na libela. Yesu ayebaki ete Yehova atindaki ye na mabele mpo apesa bomoi na ye mbeka ya lisiko mpo na bato nyonso. (Mat. 20:28) Na yango, na batisimo na ye, Yesu amimonisaki mpo na kosala oyo Yehova alingaki. (Yoa. 6:38; Gal. 1:4) Bomoi ya Yesu epesamaki “mbala moko mpo na libela” mpo na kozipa, mpo na libela, masumu ya moto nyonso oyo azali komonisa kondima epai ya Kristo.—Ebr. 10:​5-7, 10. w23.10 26-27 par. 10-11

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki na moi: 12 Nisana) Luka 22:​1-6; Marko 14:​1, 2, 10, 11

MOKOLO YA EKANISELI
Nsima ya kolala ya moi
Mwapɔsɔ, 12 sanza ya 4

Likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko na nzela ya Kristo Yesu Nkolo na biso.—Rom. 6:23.

Na ndenge na biso moko, tokokaki ata moke te komisikola na lisumu mpe na liwa. (Nz. 49:​7, 8) Atako ezalaki mbeka monene mpo na ye moko mpe Mwana na ye ya bolingo, Yehova abongisaki ete Yesu apesa bomoi na ye mpo na biso. Soki tozali komanyola mingi na likambo oyo Yehova ná Yesu basalaki, tokozala mpe na botɔndi mingi mpo na lisiko. Ntango Adama asalaki lisumu, abungisaki elikya ya kozala na bomoi ya seko kaka mpo na ye moko te, kasi mpe mpo na bana na ye nyonso. Mpo na kozongisa eloko oyo Adama abungisaki, Yesu apesaki bomoi na ye ya kokoka lokola mbeka. Na bomoi na ye mobimba awa na mabele, Yesu “asalaki lisumu te, mpe lokuta ezwamaki na monɔkɔ na ye te.” (1 Pe. 2:22) Ntango Yesu akufaki, bomoi na ye ya kokoka ekokanaki mpenza na bomoi oyo Adama abungisaki.—1 Ko. 15:45; 1 Tim. 2:6. w24.01 10 par. 5-6

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki na moi: 13 Nisana) Luka 22:​7-13; Marko 14:​12-16 (Makambo oyo esalemaki nsima ya kolala ya moi: 14 Nisana) Luka 22:​14-65

Mwalomingo, 13 sanza ya 4

Akɔtaki na esika mosantu na makila ya bantaba mpe ya bana-ngɔmbɛ ya mibali te, kasi nde na makila na ye moko, mbala moko mpo na libela, mpe azwelaki biso kosikolama ya seko.—Ebr. 9:12.

Nsima ya kosekwa, Yesu akɔtaki na Esika Eleki Mosantu ya tempelo ya elimo. Tokoki sikoyo komona polele ndenge ebongiseli oyo Yehova atye mpo na losambo ya pɛto na nzela ya mbeka ya lisiko mpe bonganga-nzambe ya Yesu Kristo eleki malamu. Nganga-nzambe monene na Yisraele azalaki kokɔta na Esika Eleki Mosantu oyo moto asalá ná makila ya bambeka ya banyama, kasi Yesu akɔtaki na “likoló mpenza,” esika oyo eleki nyonso na bosantu, mpo na komonana liboso ya Yehova. Kuna, amonisaki motuya ya bomoi na ye ya moto ya kokoka mpo na biso, “mpo na kolongola lisumu na [nzela ya] mbeka na ye moko.” (Ebr. 9:​24-26) Ezala tozali na elikya ya bomoi na likoló to awa na mabele, biso nyonso tokoki kosambela Yehova na tempelo na ye ya elimo. w23.10 28 par. 13-14

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki na moi: 14 Nisana) Luka 22:​66-71

Mwayambo, 14 sanza ya 4

Na yango, tópusana kozanga kobanga penepene na kiti ya bokonzi ya boboto monene.—Ebr. 4:16.

Kanisá mokumba oyo Yesu azali na yango na likoló lokola Mokonzi na biso oyo azali koyangela mpe Nganga-nzambe monene oyo atondi na motema mawa. Na nzela na ye tokoki kopusana penepene “na kiti ya bokonzi ya boboto monene” ya Nzambe na libondeli mpe kosɛnga ye ayokela biso mawa mpe asalisa biso na “ntango tozali na mposa ya lisalisi.” (Ebr. 4:​14, 15) Tólekisaka ata mokolo moko te kozanga tókanisa makambo oyo Yehova ná Yesu basali mpe bazali kosala mpo na biso. Ndenge oyo balingaka biso esengeli kosimba mpenza mitema na biso mpe kotinda biso tózala na molende na mosala na biso mpe na losambo na biso. (2 Ko. 5:​14, 15) Lolenge moko oyo eleki malamu ya komonisa ete tozali mpenza na botɔndi ezali ya kosalisa basusu bákóma Batatoli ya Yehova mpe bayekoli ya Yesu. (Mat. 28:​19, 20) Yango nde ntoma Paulo asalaki. Ayebaki ete mposa ya Nzambe ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.”—1 Tim. 2:​3, 4. w23.10 22-23 par. 13-14

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki na moi: 15 Nisana) Matai 27:​62-66

Mwamibale, 15 sanza ya 4

Liwa ekozala lisusu te, matánga te, koganga te, mpasi mpe ekozala lisusu te.—Em. 21:4.

Mingi na biso tosalelaka vɛrsɛ oyo esimbaka motema ntango tosakwelaka basusu ndenge bomoi ekozala na paradiso. Ndenge nini tokoki komindimisa mpe kondimisa basusu ete mapamboli oyo Emoniseli 21:​3, 4 elobeli ekokokisama? Yehova asukaki kaka te na kopesa elaka oyo esimbaka motema, kasi apesaki mpe bantina oyo emonisi ete tokoki kotyela yango motema. Tozali komona bantina ya kotya motema na elaka ya Yehova ya paradiso na bavɛrsɛ oyo elandi. Bavɛrsɛ yango elobi: “Moto oyo afandi na kiti ya bokonzi alobaki ete: ‘Talá! Nazali kosala biloko nyonso biloko ya sika.’ Alobaki lisusu ete: ‘Komá, mpo maloba oyo ezali sembo mpe solo.’ Mpe alobaki na ngai ete: ‘Ekokisami! Ngai nazali Alfa ná Omega, ebandeli mpe nsuka.’”—Em. 21:​5, 6a. w23.11 3 par. 3-5

Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli: (Makambo oyo esalemaki na moi: 16 Nisana) Luka 24:​1-12

Mwamisato, 16 sanza ya 4

Kobá mpe kolendisa bilenge mibali bázala na makanisi malamu.—Tito 2:6.

Elenge mobali akomonisa ete akolisi likoki ya kokanisa na molato mpe monzɛlɛ oyo azali kopona. Mbala mingi, bato oyo babimisaka midɛlɛ ya sika ya bilamba mpe basalaka bapiblisite na yango bazalaka na limemya te mpo na Yehova to bazalaka na bomoi ya mbindo. Makanisi na bango ya mbindo emonanaka na midɛlɛ ya bilamba oyo ekangaka nzoto to oyo esalaka ete bana mibali bábima lokola bana basi. Ntango azali kopona elamba na ye ya kolata, elenge mobali oyo azali kokɔmɛla na elimo akolanda mitinda ya Biblia mpe bandakisa malamu oyo amonaka na lisangá. Akoki komituna boye: ‘Elamba oyo nakolata ekomonisa ete nazali na makanisi malamu mpe na limemya mpo na basusu? Molato na ngai ekosalisa basusu bámona na pɛtɛɛ nyonso ete nazali mpenza mosaleli ya Nzambe?’ (1 Ko. 10:​31-33) Soki elenge mobali azali na likoki ya kokanisa, bandeko na ye ya basi mpe ya mibali na lisangá bakopesa ye limemya mpe Tata na ye na likoló akosepela na ye. w23.12 26 par. 7

Mwaminei, 17 sanza ya 4

Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te. Soki Bokonzi na ngai ezalaki ya mokili oyo, mbɛlɛ basaleli na ngai babundi.—Yoa. 18:36.

Na ntango ya kala, “mokonzi ya sudi” anyokolaki mpe basaleli ya Yehova. (Dan. 11:40) Na ndakisa, na ebandeli ya siɛklɛ ya 20, bandeko mingi bakangamaki na babolɔkɔ mpo baboyaki kokɔta na makambo ya politiki mpe babenganaki bana mosusu ya Batatoli ya Yehova na biteyelo kaka mpo na ntina moko wana. Na bambula oyo eleki, bosembo ya basaleli ya Yehova oyo bazali kofanda na nse ya boyangeli ya mokonzi ya sudi emekamaki na lolenge mingi. Na ndakisa, na eleko ya maponami, mokristo akoki komekama mpo na kopesa mabɔkɔ na parti politiki moko to na kandida moko. Atako akoki te kopona moto yango na ntango ya maponami; kasi na makanisi mpe na motema na ye, akoki kokanisa ete moto boye to boye abongi bápona ye. Kasi, mpo tóboya kokɔta mpenza na makambo ya politiki, tosengeli kozala ekɛngɛ na makambo oyo tosalaka mpe oyo tokanisaka mpe mayoki na biso!—Yoa. 15:​18, 19. w23.08 12 par. 17

Mwamitano, 18 sanza ya 4

Yehova asanzolama, ye oyo mokolo na mokolo amemaka mokumba na biso.—Nz. 68:19.

Lokola tozali kopota mbangu mpo na bomoi, tosengeli ‘kopota mbangu na ndenge oyo ekosala ete tózwa yango.’ (1 Ko. 9:24) Yesu alobaki ete tokoki ‘kokóma kilo na kolekisa ndelo na kolya, na komɛla mingi mpe na mitungisi ya bomoi.’ (Luka 21:34) Bavɛrsɛ oyo mpe mosusu ekoki kosalisa yo oyeba bisika nini osengeli kobongisa wana ozali kopota mbangu mpo na bomoi. Tokoki komindimisa ete tokolonga kopota mbangu mpo na bomoi mpo Yehova akopesa biso makasi oyo tosengeli na yango. (Yis. 40:​29-31) Yango wana, kotika te! Mekolá ntoma Paulo, oyo asalaki nyonso mpo na kozwa mbano oyo etyamaki liboso na ye. (Flp. 3:​13, 14) Moto moko te akoki kopota mbangu na esika na yo, kasi na lisalisi ya Yehova okoki kolonga. Yehova akoki kosalisa yo omema mikumba na yo mpe olongola kilo oyo ezangá ntina. Na lisalisi na ye, okozala na likoki ya koyika mpiko ntango ozali kopota mbangu mpe okolonga! w23.08 31 par. 16-17

Mwapɔsɔ, 19 sanza ya 4

Kumisá tata na yo mpe mama na yo.—Kob. 20:12.

Ntango Yesu azalaki na mbula 12, baboti na ye bayebaki te ete atikalaki na Yerusaleme. (Luka 2:​46-52) Yozefe ná Maria nde bazalaki na mokumba ya kotala soki bana na bango nyonso bazalaki na kati ya bato oyo bazali kozonga ndako nsima ya fɛti. Nsukansuka, ntango Yozefe ná Maria bakendaki koluka Yesu mpe bamonaki ye, Maria apamelaki Yesu mpo na mpasi oyo amonisaki bango! Yesu akokaki komonisa ete bango nde basalaki mabe. Kasi, apesaki baboti na ye eyano ya mindɔndɔ te mpe ya limemya. Atako bongo, Yozefe ná Maria “bakangaki ntina te ya makambo oyo azalaki koloba na bango.” Kasi, Yesu “azalaki kaka kotosa bango.” Bilenge, esilá kokómela bino bómona ete ezali mpasi kotosa baboti na bino ntango basali mabunga to ntango bakangi ntina te ya likambo oyo bosali? Nini ekoki kosalisa bino? Bókanisa ndenge oyo Yehova akoyoka. Biblia elobi ete ntango bozali kotosa baboti na bino, “yango esepelisaka mpenza Nkolo.” (Kol. 3:20) Yehova ayebaka ntango oyo baboti na bino bakangi mpenza te ntina ya likambo oyo bosali to ntango oyo batye mibeko oyo ebongi mpenza te. Kasi ntango bondimi kotosa yango, bokosepelisa Yehova. w23.10 7 par. 5-6

Mwalomingo, 20 sanza ya 4

Bázala nde bato ya makambo makasimakasi te, bámonisela bato nyonso boboto.—Tito 3:2.

Moninga moko ya kelasi akoki koloba ete Batatoli ya Yehova basengeli kobongola ndenge na bango ya kotalela likambo ya kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi. Ekoki kosɛnga tóyebisa ye ete tomemyaka lotomo oyo moto azali na yango ya kopona oyo alingi. (1 Pe. 2:17) Na bongo, tokoki kozwa libaku ya komonisa ye matomba ya kotosa mibeko ya Biblia. Ntango moto aboyi mpenza likanisi na biso, tókanisa mbala moko te ete toyebi makambo oyo andimaka. Na ndakisa, moninga moko ya kelasi akoki koloba ete ezali bozoba kondima ete Nzambe azali! Osengeli nde kokanisa mbala moko ete andimaka evolisyo mpe ayebi yango malamu? Kutu, mbala mosusu naino akanisá yango na mozindo te. Mbala mosusu okoki kolakisa ye masolo oyo elobeli bozalisi, oyo ezali na jw.org. Na nsima, akoki kondima bólobela lisolo to video moko oyo amoni kuna. Ya solo, soki osali makambo na limemya, ekoki kotinda ye abongola likanisi na ye. w23.09 17 par. 12-13

Mwayambo, 21 sanza ya 4

Yo, Ee Yehova, ozali malamu mpe osepelaka kolimbisa; otondi na bolingo ya sembo mpo na baoyo nyonso babelelaka yo.—Nz. 86:5.

Tózala na kondima ete ata soki tosali mabunga, Yehova akosalela biso mpe akopambola biso, soki tosali nyonso mpo na kobongisa etamboli na biso mpe tokobi kotyela ye motema. (Mas. 28:13) Samsone azalaki moto ya kokoka te; kasi, atikaki te kosalela Yehova, ata nsima ya libunga oyo asalaki na likambo ya Dalila. Mpe Yehova asundolaki ye te. Nzambe asalelaki ye lisusu na ndenge moko ya kokamwa. Yehova akobaki kotalela ye lokola mobali moko ya kondima makasi, mpe akomisaki nkombo na ye na molɔngɔ ya mibali ya sembo oyo mokanda ya Baebre mokapo 11 elobeli. Koyeba ete tosalelaka Tata moko ya bolingo na likoló, oyo azalaka na mposa ya kopesa biso makasi ntango tolɛmbi, elendisaka biso mpenza! Na yango, ndenge moko na Samsone, biso mpe tóbondelaka Yehova ete: “Kanisá ngai, nabondeli yo, mpe pesá ngai makasi.”—Bas. 16:28. w23.09 7 par. 18-19

Mwamibale, 22 sanza ya 4

[Bóbatela] na makanisi kozala ya mokolo ya Yehova.—2 Pe. 3:12.

Kobatela mokolo ya Yehova na makanisi, ekotinda biso tóyebisaka basusu nsango malamu. Atako bongo, na mabaku mosusu tokoki kokakatana mpo na koloba. Mpo na nini? Ntango mosusu mpo tobangi bato. Yango ekómelaki Petro. Na butu oyo bazalaki kosambisa Yesu, Petro abangaki kondima ete azali moyekoli ya Yesu mpe awanganaki mbala misato ete ayebi ye te. (Mat. 26:​69-75) Kasi bambula na nsima, ntoma yango alobaki na mpiko ete: “Bóbanga te oyo bango babangaka, mpe bóbulungana te.” (1 Pe. 3:14) Maloba yango ya Petro endimisi biso ete tokoki kolonga ezaleli ya kobanga bato. Nini ekoki kosalisa biso tólonga ezaleli ya kobanga bato? Petro alobi: “Bósantisa Kristo lokola Nkolo na mitema na bino.” (1 Pe. 3:15) Yango esɛngi komanyola na mokumba mpe na nguya ya Nkolo mpe Mokonzi na biso, Kristo Yesu. w23.09 27-28 par. 6-8

Mwamisato, 23 sanza ya 4

Pite mpe mbindo ya ndenge nyonso to lokoso etángama ata kotángama te na kati na bino.—Ef. 5:3.

Biso tosengeli kokoba kobunda mpo tómikɔtisa te na “misala oyo ezangi kobota mbuma, oyo ezali ya molili.” (Ef. 5:11) Bandakisa mingi emonisi ete ezalaka mpasi te mpo moto oyo ameseni kotala, koyoka, to kolobela makambo ya mbindo, asala makambo ya mabe. (Eba. 3:6; Yak. 1:​14, 15) Mokili ya Satana elukaka kokosa biso, kotinda biso tóndima ete makambo oyo Yehova alobi ete ezali lisumu mpe mbindo ezali mabe te. (2 Pe. 2:19) Moko ya mayele mabe oyo Zabolo asalelaka banda kala ezali ya kotya mobulu na mitó ya bato mpo báyeba te kokesenisa malamu ná mabe. (Yis. 5:20; 2 Ko. 4:4) Ezali likambo ya kokamwa te ndenge bafilme, baemisyo ya televizyo, mpe basite Internet mingi elendisaka makanisi oyo eyokani te na mibeko ya sembo ya Yehova! Satana alukaka kokosa biso tókanisa ete misala mpe bomoi ya mbindo ezali na likama te.—Ef. 5:6. w24.03 22 par. 8-10

Mwaminei, 24 sanza ya 4

Bato yango bazali kosala mosala mosantu oyo ezali ndakisa mpe elili ya makambo oyo ezali na likoló.—Ebr. 8:5.

Tabernakle ezalaki hema moko oyo na ebandeli Bayisraele bazalaki komema bisika nyonso oyo bakei. Basalelaki yango mbula pene na 500, tii tempelo etongamaki na Yerusaleme. (Kob. 25:​8, 9; Mit. 9:22) Tabernakle ezalaki esika oyo Bayisraele bazalaki koyangana mpo na kopesa Nzambe bambeka mpe kosambela ye. (Kob. 29:​43-46) Kasi, tabernakle ezalaki mpe komonisa eloko ya malamu. Ezalaki “elili ya makambo oyo ezali na likoló,” mpe ezalaki komonisa tempelo monene ya Yehova ya elimo. Ntoma Paulo alobaki ete “hema yango [to, tabernakle] ezali ndakisa mpo na ntango oyo.” (Ebr. 9:9) Na yango, ntango akomelaki bakristo wana Baebre, tempelo ya elimo esilaki kokóma likambo ya solo mpo na bakristo. Ekómaki likambo ya solo na mobu 29 T.B. Na mobu yango, Yesu azwaki batisimo mpe akómaki “nganga-nzambe monene oyo aleki banganga-nzambe minene nyonso” na tempelo ya Yehova ya elimo.—Ebr. 4:14; Mis. 10:​37, 38. w23.10 25-26 par. 6-7

Mwamitano, 25 sanza ya 4

Bato nyonso báyeba ete bozalaka makambo makasimakasi te. —Flp. 4:5.

Tosengeli kozalaka makambo makasimakasi te ntango makambo ya bomoi na biso ebongwani mpo tókoba kosalela Yehova na esengo. Na ndenge nini? Tosengeli kozalaka makambo makasimakasi te mpo tómesana ntango makambo ya bomoi na biso ebongwani, mpe tómemya makanisi mpe bikateli ya basusu. Lokola tozali basaleli ya Yehova, tolingaka kozala makambo makasimakasi te. Tolingaka mpe kozala na komikitisa mpe boboto. Yehova abengami “Libanga” mpo apikamá makasi, mpe aninganaka te. (Mib. 32:4) Kasi, azalaka mpe makambo makasimakasi te. Lokola makambo ezali kobongwana na mokili oyo, Nzambe na biso azali kokoba kobongola makambo mpe kosala ete makambo nyonso oyo alaki ekokisama. Yehova akelaki bato na elilingi na ye mpe apesaki bango makoki ya komesana na makambo ntango makambo ya bomoi na bango ebongwani. Apesi biso mitinda ya polele oyo ezali na Biblia oyo esalisaka biso tózwaka bikateli ya malamu, ata soki tokutani na mikakatano ya ndenge nini. Ndakisa ya Yehova mpe mitinda oyo apesi biso ezali komonisa ete atako azali “Libanga,” Yehova azalaka makambo makasimakasi te. w23.07 20 par. 1-3

Mwapɔsɔ, 26 sanza ya 4

Ntango natungisamaki koleka ndelo, obɔndisaki ngai mpe okitisaki ngai motema.—Nz. 94:19.

Na Biblia, Yehova amikokanisi na mama oyo alingaka mwana na ye. (Yis. 66:​12, 13) Kanisá mama ya bolingo oyo azali kolɛngɛla mwana na ye ya moke mpe mama asaleli ye oyo esengeli. Ndenge moko mpe, ntango tozali na mawa, tótya motema na bolingo ya Yehova. Aboyaka biso te ntango tosali likambo ya mabe. (Nz. 103:8) Ekólo Yisraele esalelaki Yehova mabe mbala na mbala; kasi Yehova akobaki kolinga bato na ye oyo babongolaki motema; alobaki na bango: “Lokola okómi na motuya na miso na ngai, okumisami, mpe nalingi yo.” (Yis. 43:​4, 5) Bolingo ya Nzambe ebongwani te. Ata soki tosali mabunga ya minene, ntango tobongoli motema mpe tozongeli Yehova, tokomona ete alingaka biso kaka. Alaki ete “akolimbisa mpenza.” (Yis. 55:7) Biblia elobi ete soki tolimbisami, “bileko ya kopema [eutaka] epai ya Yehova ye moko.”—Mis. 3:19. w24.01 27 par. 4-5

Mwalomingo, 27 sanza ya 4

Yehova Nzambe na ngai azalaki elongo na ngai.—Ezr. 7:28.

Yehova akoki kosalisa biso ntango tozali na mikakatano. Na ndakisa, ntango tosɛngi patrɔ na biso konje mpo tóyangana na liyangani to ntango tosɛngi ye abongola programɛ ya mosala mpo tókoka koyanga na makita nyonso, tomipesi libaku ya komona lobɔkɔ ya Yehova na bomoi na biso. Tokoki kokamwa mbala mosusu makambo malamu oyo yango ekobimisa. Yango ekosala ete tótyela Yehova motema lisusu mingi. Na komikitisa nyonso, Ezera abondelaki Yehova asalisa ye. Ntango nyonso oyo azalaki komitungisa na mokumba na ye, na komikitisa nyonso Ezera azalaki kobondela Yehova. (Ezr. 8:​21-23; 9:​3-5) Lokola Ezera atyelaki Yehova motema, baoyo bazalaki elongo na ye bapesaki ye mabɔkɔ mpe bamekolaki kondima na ye. (Ezr. 10:​1-4) Ntango tozali komitungisa mpo na biloko ya kobikela oyo tosengeli na yango to mpo na libota na biso, tosengeli kobondela Yehova mpe kotyela ye motema. w23.11 18 par. 15-17

Mwayambo, 28 sanza ya 4

[Abrahama] andimelaki Yehova, mpe Nzambe atángaki ye moto ya sembo.—Eba. 15:6.

Yehova alobi te ete mpo atánga biso bato ya sembo to bayengebene, tosengeli kosala kaka oyo Abrahama asalaki. Mpo na koloba solo, ezali na ndenge mingi oyo tokoki komonisa na misala na biso ete tozali na kondima. Tokoki koyamba bato ya sika na lisangá, kosalisa bandeko basi mpe mibali oyo bazali mpenza na bosɛnga, mpe kosalela bato ya mabota na biso makambo ya malamu; nyonso wana ezali makambo oyo Nzambe akondima mpe akopambola. (Rom. 15:7; 1 Tim. 5:​4, 8; 1 Yoa. 3:18) Mosala ya ntina mingi oyo emonisaka kondima na biso ezali kosakola nsango malamu na molende. (1 Tim. 4:16) Biso nyonso tokoki komonisa na misala na biso ete tozali na kondima ete bilaka ya Yehova ekokokisama mpe ete ndenge na ye ya kosala makambo nde eleki malamu. Mpe soki tosali bongo, tóyeba ete Nzambe akotánga biso bato ya sembo to bayengebene mpe akobenga biso baninga na ye. w23.12 2 par. 3; 6 par. 15

Mwamibale, 29 sanza ya 4

Zalá makasi mpe monisá ete ozali mobali.—1 Bak. 2:2.

Liboso akufa, Mokonzi Davidi ayebisaki Salomo maloba oyo ezali likoló. (1 Bak. 2:​1, 3) Ezali malamu bandeko mibali nyonso bakristo lelo oyo básalela toli yango. Mpo na kolonga, basengeli koyekola kotosa mibeko ya Nzambe mpe kosalela mitinda ya Biblia na makambo nyonso ya bomoi na bango. (Luka 2:52) Mpo na nini ezali mpenza na ntina bandeko mibali ya bilenge bákóma bakristo oyo bakɔmɛli na elimo? Ndeko mobali mokristo azalaka na mikumba ya ntina mingi na libota mpe na lisangá. Na ntembe te, bino bilenge mibali bokanisaka mikumba oyo bokoki kozwa na mikolo ezali koya. Okoki mbala mosusu komityela mokano ya kosala mosala ya ntango nyonso, kokóma mosaleli na misala mpe na nsima kokóma nkulutu na lisangá. Okoki mpe kosepela kobala mpe kobota bana. (Ef. 6:4; 1 Tim. 3:1) Mpo na kokokisa mikano yango mpe kolonga, osengeli kokóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo. w23.12 24 par. 1-2

Mwamisato, 30 sanza ya 4

Ntango ekozanga ngai soki nalobeli lisusu Gideone.—Ebr. 11:32.

Na lisangá, bankulutu bazali na mokumba ya kobatela bampate ya Yehova mpo bazali na motuya mingi na miso na ye. Mibali yango oyo bamipesaka mpo na bampate ya Yehova, bazwaka na motuya mingi mpenza mokumba na bango ya kosalela bandeko, mpe basalaka makasi mpo bázala ‘babateli oyo baleisaka bampate.’ (Yir. 23:4; 1 Pe. 5:2) Tozalaka na botɔndi ndenge tozalaka na mibali ya ndenge wana na masangá na biso! Bankulutu bakoki kozwa mateya na ndakisa ya mosambisi Gideone. (Ebr. 6:12) Azalaki mobikisi mpe mobateli ya basaleli ya Nzambe. (Bas. 2:16; 1 Nt. 17:6) Lokola Gideone, bankulutu baponamaka mpo na kobatela basaleli ya Nzambe na ntango ya mpasi mpenza. (Mis. 20:28; 2 Tim. 3:1) Tokoki kozwa mateya na bopɔlɔ, komikitisa, mpe botosi oyo Gideone amonisaki. Ezalaki mpasi ayika mpiko ntango azalaki kokokisa mikumba na ye. Tózala bankulutu to te, tokoki koyekola komonisa botɔndi mpo na bankulutu na biso. Tokoki kosalisa mibali wana oyo basalaka makasi mpo na kobatela biso na lisangá.—Ebr. 13:17. w23.06 2 par. 1; 3 par. 3

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto