Sanza ya 5
Mwaminei, 1 sanza ya 5
Nzala moko monene ekoya. —Mis. 11:28.
Ntango nzala moko makasi eyaki na “mabele mobimba oyo bato bafandi,” ezwaki mpe bakristo ya siɛklɛ ya liboso. Na ntembe te, baboti bakómaki kobanga mpo bazalaki koyeba te ndenge oyo bakokokisa bamposa ya bato ya mabota na bango. Bongo bilenge oyo bazwaki bibongiseli mpo na kosala mingi na mosala ya kosakola? Mbala mosusu bazalaki komituna soki basengeli kozela nzala yango esila bongo bakokokisa mikano na bango. Ezala makambo ya bomoi na bango ezalaki ndenge nini, bakristo yango babatelaki makanisi malamu. Bakobaki kosakola na lolenge nyonso oyo bakokaki, mpe batindelaki bandeko na bango bakristo oyo bazalaki na Yudea biloko ya kobikela oyo bazalaki na yango. (Mis. 11:29, 30) Baoyo bazwaki lisungi bamonaki mpenza ete Yehova nde asungaki bango. (Mat. 6:31-33) Kozanga ntembe, bakómaki lisusu na boninga makasi ná bandeko yango oyo basalisaki bango. Lisusu, ezala baoyo bapesaki makabo to baoyo bapesaki mabɔkɔ na mosala yango ya kosunga bandeko, bayokaki esengo oyo eutaka na kopesa.—Mis. 20:35. w23.04 16 par. 12-13
Mwamitano, 2 sanza ya 5
Toyebi ete tokozwa biloko oyo tosɛngi, mpamba te tosɛngi ye yango.—1 Yoa. 5:15.
Na bantango mosusu, Yehova akoki kosalela bato oyo basambelaka ye te mpo na koyanola na mabondeli ya basaleli na ye. Na ndakisa, atindaki mokonzi Artazerezese andima makambo oyo Nehemia asɛngaki ye ya kozonga na Yerusaleme mpo na kotonga lisusu engumba yango. (Neh. 2:3-6) Lelo oyo mpe, Yehova akoki ata kosalela bato oyo basambelaka ye te mpo na kosalisa biso ntango tozali na bosenga. Mbala mingi Yehova ayanolaka na mabondeli na biso te na ndenge ya likamwisi. Kasi biyano oyo apesaka ezalaka mpenza oyo tosengeli na yango mpo tótikala sembo epai ya Tata na biso ya likoló. Na yango, luká koyeba ndenge Yehova ayanolaka na mabondeli na yo. Mbala na mbala, tɛlɛmáká mpe kanisáká ndenge Yehova azali koyanola na mabondeli na yo. (Nz. 66:19, 20) Tomonisaka kondima kaka te ntango tobondelaka Yehova kasi mpe ntango tondimaka eyano oyo apesaka na mabondeli na biso ezala eyei na lolenge nini.—Ebr. 11:6. w23.05 11 par. 13; 12 par. 15-16
Mwapɔsɔ, 3 sanza ya 5
Ee Nzambe na ngai, nasepeli kosala mokano na yo.—Nz. 40:8.
Ntango tomipesaki na Yehova, tosalaki elako mpo na kosambela ye mpe mpo na kosala mokano na ye. Tosengeli kokokisa elako yango. Kokokisa elako na biso ya komipesa ezali kilo te. Nyonso wana ezali mpo Yehova akelaki biso mpo na kosala mokano na ye. (Em. 4:11) Akelaki biso na mposa ya koyeba mpe kosambela ye, mpe akelaki biso na elilingi na ye. Yango wana, tozalaka na likoki ya kopusana penepene na ye mpe ya kosepela kosala mokano na ye. Longola yango, ‘topemaka’ ntango tosalaka mokano ya Nzambe mpe tolandaka Mwana na ye. (Mat. 11:28-30) Na yango kobá kokómisa makasi bolingo na yo mpo na Yehova na komanyoláká na makambo nyonso ya malamu oyo asalelá yo mpe mapamboli oyo akopesa yo. Wana bolingo na yo mpo na Nzambe ezali kokola, ekozala pɛtɛɛ mpo otosa ye. (1 Yoa. 5:3) Yesu alongaki kosala mokano ya Nzambe mpo azalaki kobondela Yehova asalisa ye mpe akobaki kotya makanisi na mbano oyo akozwa. (Ebr. 5:7; 12:2) Lokola Yesu, bondeláká Yehova apesa yo makasi mpe kobá kobatela na makanisi elikya ya bomoi ya seko. w23.08 27-28 par. 4-5
Mwalomingo, 4 sanza ya 5
Ozali nde kotyola bonene ya boboto na ye, ya ezaleli na ye ya kokanga motema mpe ya motema molai na ye, mpo oyebi te ete Nzambe, na boboto na ye alingi komema yo obongola motema?—Rom. 2:4.
Biso nyonso tosepelaka na bato ya motema molai. Tosepelaka na bato oyo bazelaka likambo na motema moko kozanga ete básilika. Tozalaka na botɔndi mingi ntango bato mosusu bamoniselaka biso motema molai ntango tosalaka mabunga. Lisusu, tozalaka na botɔndi mingi na motema molai oyo bandeko oyo bateyaki biso Biblia bamoniselaki biso ntango tozalaki kobundabunda mpo na koyekola, kondima, mpe kosalela mateya oyo tozalaki koyekola. Oyo eleki nyonso, tozalaka na botɔndi mingi ndenge Yehova Nzambe amoniselaka biso motema molai! Atako toyokaka esengo ntango bato mosusu bamonisaka motema molai, ekoki kokóma mpasi mpo biso moko tómonisa ezaleli yango. Na ndakisa, ekoki kozala mpasi tómonisa motema molai ntango tosali molɔngɔ mpo na kozela motuka, mingimingi soki tozali mpenza na retare. Tokoki kosilika ntango moto moko apesi biso nkanda. Mpe, na bantango mosusu, ekoki kozala mpasi kokoba kozela mokili ya sika oyo Yehova alaki biso. Kasi na bantango ya bongo, tozalaka na mposa ya komonisa lisusu motema molai mingi. w23.08 20 par. 1-2
Mwayambo, 5 sanza ya 5
Azongisaki mibali yango mosusu ya Yisraele ndako. Atikalaki kaka na mibali 300.—Bas. 7:8.
Yehova asɛngaki Gideone azongisa basoda na ye mingi na ndako. Mbala mosusu akokaki kokanisa boye: ‘Mbongwana oyo ezali mpenza na ntina? Ekosimba?’ Atako bongo, Gideone atosaki. Lelo oyo, bankulutu bamekolaka Gideone na ndenge batosaka ntango ebongiseli ya Yehova esɛngaka bango básala makambo na kolanda mbongwana oyo euti kosalema. (Ebr. 13:17) Gideone atosaki Yehova atako azalaki kobanga mpe mokumba yango ezalaki likama mpo na ye. (Bas. 9:17) Nsima ya kolendisama na Yehova, Gideone amindimisaki mpenza ete Yehova Nzambe akosalisa ye mpo abatela basaleli na ye. Bankulutu oyo bafandaka na bikólo oyo mosala na biso epekisami bamekolaka Gideone. Na mpiko nyonso, batambwisaka makita mpe mosala ya kosakola atako balukaka kokanga bango, kosambisa bango, kosala bango mabe to mpe kobungisa misala na bango. Na ntango ya bolɔzi monene, bankulutu bakozala na mposa ya mpiko mpo na kotosa malako oyo bakozwa, atako kosala bongo ekoki kobimisela bango makama. w23.06 5-6 par. 12-13
Mwamibale, 6 sanza ya 5
Baoyo bazali kopesa ngai lokumu, ngai mpe nakopesa bango lokumu.—1 Sa. 2:30.
Yehova asalaki ete lisolo ya Nganga-nzambe monene Yehoyada ekomama na Biblia mpo eteya biso. (Rom. 15:4) Longola yango, ntango Yehoyada akufaki, azwaki lokumu moko monene ya kokundama “na Sité ya Davidi esika moko na bakonzi, mpo asalaki malamu na Yisraele mpo na Nzambe ya solo mpe ndako na Ye.” (2 Nt. 24:15, 16) Lisolo ya Yehoyada ekoki kosalisa biso nyonso tóyekola kobanga Nzambe. Babateli ya mpate bakoki komekola Yehoyada soki bazali ntango nyonso ekɛngɛ mpe bazali kobatela etonga ya Nzambe na bosembo nyonso. (Mis. 20:28) Ndakisa ya Yehoyada ekoki koteya mibange ete, soki bazali kobanga Yehova mpe kotikala sembo epai na ye, akoki kosalela bango mpo bákokisa mokano na ye. Bilenge bakoki koyekola ndenge Yehova asalelaki Yehoyada makambo mpe komekola Yehova soki bazali kosalela mibange ya sembo makambo na limemya mpe na lokumu, mingimingi baoyo basali mingi na mosala ya Yehova. (Mas. 16:31) Tiká ete na bosembo nyonso tópesa mabɔkɔ na “baoyo bazali kokamba” biso na kotosáká bango.—Ebr. 13:17. w23.06 17 par. 14-15
Mwamisato, 7 sanza ya 5
Mbɛbu ya moto ya sembo eleisaka bato mingi.—Mas. 10:21.
Salelá bososoli mpo na koyeba mbala boni okopesa biyano na makita. Soki ozali kotombola lobɔkɔ mbala na mbala, okoki kotya ndeko oyo azali kotambwisa boyekoli mbamba mpo aponaka kaka yo mbala na mbala atako bato mosusu bazwi naino libaku ya koloba te. Bandeko mosusu bakoki kolɛmba kotombola mabɔkɔ. (Mos. 3:7) Ntango bandeko mingi batomboli lobɔkɔ na ntango ya boyekoli, ekoki kozala mpasi tópesa biyano mbala mingi ndenge tozalaki kokanisa. Na bantango mosusu, ndeko oyo azali kotambwisa akoki kopona biso te. Yango ekoki kolɛmbisa biso nzoto, kasi tosengeli kosala makasi tósilika te. (Mos. 7:9) Soki ozwi libaku te ya kopesa biyano mbala mingi ndenge ozalaki kokanisa, ekozala malamu oyoka bandeko mosusu na likebi ntango bazali kopesa biyano mpe na nsima ya makita, pesá bango longonya mpo na biyano na bango. Longonya oyo okopesa bandeko ekolendisa bango kaka ndenge biyano oyo olingaki kopesa elingaki kosala yango. w23.04 23-24 par. 14-16
Mwaminei, 8 sanza ya 5
Ee Nzambe, motema na ngai ezali kotengatenga te.—Nz. 57:7.
Tángáká Liloba ya Nzambe mpe manyoláká yango. Nzete ekoki kotɛlɛma makasi soki ezali na misisa oyo epikami makasi. Yango wana soki tozali na kondima makasi epai ya Yehova, tokozala na likoki ya kotikala ngwi. Ntango nzete ekolaka, misisa na yango epikamaka makasi mpe epanzanaka. Ntango toyekolaka mpe tomanyolaka Liloba ya Nzambe, tokómisaka kondima na biso makasi mpe tondimaka mpenza ete banzela ya Nzambe eleki malamu. (Kol. 2:6, 7) Kanisáká na mozindo ndenge malako, litambwisi mpe libateli ya Yehova esalisaki basaleli na ye ya ntango ya kala. Na ndakisa, Ezekiele atyaki mpenza likebi ntango anzelu moko azalaki kozwa mezire ya makambo mikemike ya tempelo ya emonaneli. Emonaneli yango epesaki Ezekiele makasi, mpe epesi biso mateya oyo ebongi na oyo etali ndenge oyo tokoki kopesa mabɔkɔ na mibeko ya Yehova mpo na losambo ya pɛto. (Ezk. 40:1-4; 43:10-12) Biso mpe tozwaka matomba na ndenge tozwaka ntango mpo na koyekola mpe komanyola na makambo ya mozindo ya Liloba ya Nzambe. Biso mpe tokoki kozala na motema oyo ezali kotengatenga te, mpe kotyela Yehova motema mobimba.—Nz. 112:7. w23.07 18 par. 15-16
Mwamitano, 9 sanza ya 5
Batelá . . . likoki ya kokanisa.—Mas. 3:21.
Biblia etondi na bandakisa mingi ya malamu oyo bilenge mibali bakoki komekola. Mibali yango ya ntango ya kala balingaki Nzambe mingi mpe bakokisaki mikumba ndenge na ndenge mpo na kobatela basaleli ya Nzambe. Okoki mpe kozwa ndakisa ya malamu epai ya bakristo oyo bakɔmɛli na elimo na libota na yo moko mpe na lisangá. (Ebr. 13:7) Ozali mpe na ndakisa ya kokoka, ya Yesu Kristo. (1 Pe. 2:21) Wana ozali koyekola bandakisa yango na likebi, talelá bizaleli ya malamu oyo bamonisaki. (Ebr. 12:1, 2) Na nsima, kanisá ndenge okomekola mibali yango. Mobali oyo azali na likoki ya kokanisa atalelaka na likebi makanisi na ye liboso ya kosala likambo. Yango wana, salá makasi mpo okóma na likoki yango mpe obatela yango. Bandá na koyekola mitinda ya Biblia mpe kanisá ntina oyo mitinda yango ezali mpo na bolamu na yo. Na nsima, salelá mitinda yango mpo esalisa yo ozwa bikateli oyo ekosepelisa Yehova. (Nz. 119:9) Yango ekosalisa yo mpo okóma ndeko mobali oyo akɔmɛli na elimo.—Mas. 2:11, 12; Ebr. 5:14. w23.12 24-25 par. 4-5
Mwapɔsɔ, 10 sanza ya 5
Bózalaka ntango nyonso pene mpo na koloba liboso ya moto nyonso oyo atuni bino ntina ya elikya oyo bozali na yango, kasi bósalaka bongo na boboto mpe na limemya makasi.—1 Pe. 3:15.
Baboti bakoki koteya bana ndenge ya komonisa motema pɛtɛɛ mpo na koyanola moto oyo atyeli bindimeli na bango ntembe. (Yak. 3:13) Basusu basalaka bilakiseli ná bana na losambo na kati ya libota. Balobelaka mituna oyo ekoki kobima na eteyelo, bamonisaka bana ndenge ya kopesa eyano, mpe bateyaka bango ndenge ya komonisa motema pɛtɛɛ mpe ya koloba na ndenge oyo ekosepelisa ntango bazali koyanola. Komekameka ndenge ya kopesa eyano ekoki kosalisa bakristo bálobela mateya na bango na mpiko mpe bango moko bámindimisa ete bazali na ntina ya kondima yango. Masolo oyo ebimaka na jw.org na eteni “Mituna oyo bilenge batunaka” ezali mpe na nkasa mpo na bilenge. Nkasa yango ebongisami mpo na kosalisa bilenge báyeba malamu bindimeli na bango mpe bábongisa biyano na maloba na bango moko. Soki tozali koyekola masolo yango na kati ya libota, biso nyonso tokoki koyekola ndenge ya kolobela bindimeli na biso na boboto, na ndenge oyo ekosepelisa. w23.09 17 par. 10; 18 par. 15-16
Mwalomingo, 11 sanza ya 5
Tótika te kosala oyo ezali malamu, mpo na ntango oyo ebongi tokobuka mbuma soki tolɛmbi te.—Gal. 6:9.
Osí omityela mokano moko boye ya elimo kasi olongaki te kokokisa yango? Soki ezali bongo, yebá ete ozali yo moko te. Na ndakisa, Philip azalaki na mposa ya kozwaka ntango mingi mpo na kobondela mpe kobongisa lisusu mabondeli na ye, kasi mbala mingi azalaki kozwa ntango te mpo na kosala yango. Erika amityelaki mokano ya kokómaka na makita na ngonga ya malamu; kasi, mbala mingi azalaki kokóma kaka na retare. Soki omityelaki mokano moko oyo okokisi naino te, tobondeli yo olɛmba nzoto te. Kokokisa ata mokano moko ya moke esɛngaka ntango mpe milende mingi. Kaka mposa oyo ozali na yango ya kokokisa mokano oyo omityeli, ezali komonisa ete ozwaka na motuya mingi boyokani na yo na Yehova mpe olingi kosala oyo okoki na mosala na ye. Yehova asepelaka na milende oyo ozali kosala. Kutu, asɛngaka biso te koleka oyo tokoki kopesa ye. (Nz. 103:14; Mika 6:8) Na yango, omityela mokano oyo okozala na likoki ya kokokisa. w23.05 26 par. 1-2
Mwayambo, 12 sanza ya 5
Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akolonga biso?—Rom. 8:31.
Bato ya mpiko bakoki kobanga, kasi batikaka te kobanga epekisa bango básala oyo ezali malamu. Danyele azalaki elenge moko ya mpiko mpenza. Azalaki koyekola makomi ya basakoli ya Nzambe, ezala mpe bisakweli ya Yirimia. Boyekoli yango esalisaki Danyele na nsima asosola ete etikalaki moke bokangami molai ya Bayuda ekóma na nsuka. (Dan. 9:2) Danyele amonaki ete maloba ya Yehova ekokisamaka ntango nyonso, mpe yango esalaki ete akóma lisusu kotyela Yehova motema mingi, mpe baoyo bazali na kondima makasi epai ya Nzambe bákoka kozala na mpiko mpenza. (Talá mpe Baroma 8:32, 37-39.) Likambo eleki ntina, Danyele azalaki kobondela Tata na ye ya likoló mbala na mbala. (Dan. 6:10) Ayambolaki masumu na ye epai ya Yehova mpe ayebisaki ye ndenge azalaki komiyoka. Lisusu, Danyele asɛngaki lisalisi. (Dan. 9:4, 5, 19) Azalaki moto lokola biso, abotamaki na mpiko te. Kasi, akolisaki ezaleli yango ntango azalaki koyekola, kobondela, mpe kotyela Yehova motema. w23.08 3 par. 4; 4 par. 7
Mwamibale, 13 sanza ya 5
Tiká ete pole na bino engɛnga liboso ya bato, mpo bámona misala na bino ya malamu mpe bápesa Tata na bino oyo azali na likoló nkembo.—Mat. 5:16.
Kotosa bakonzi oyo bazali liboso ememelaka biso ná basusu bolamu. Ndenge nini? Na ndakisa, tokozwa te etumbu oyo bapesaka bato oyo babuki mobeko. (Rom. 13:1, 4) Botosi na biso ekoki kosala ete bakonzi bátalela Batatoli ya Yehova nyonso na ndenge ya malamu. Na ndakisa, eleki bambula mingi na Nigeria, basoda bakɔtaki na Ndako ya Bokonzi moko ntango makita ezalaki kosalema, mpo na koluka bato oyo basalaki mobulu mpo na koboya kofuta mpako. Kasi mokonzi oyo atalelaka makambo ya mpako ayebisaki basoda yango bálongwa wana, alobaki: “Batatoli ya Yehova baboyaka kofuta mpako te.” Mbala nyonso oyo otosi mobeko, okoki komatisa lokumu ya basaleli ya Yehova, mpe mokolo mosusu yango ekoki kosalisa mpo na kobatela bandeko. w23.10 9 par. 13
Mwamisato, 14 sanza ya 5
Bosengeli kozala na ezaleli ya koyika mpiko, mpo nsima ya kosala mokano ya Nzambe, bózwa eloko oyo alakaki.—Ebr. 10:36.
Batatoli ya Yehova mosusu bazelaka nsuka ya mokili oyo banda bambula mingi. Bato mosusu bamonaka ete Nzambe azali koumela mpo na kokokisa elaka na ye. Yehova ayebi ndenge basaleli na ye bamiyokaka. Yango wana, alobaki na mosakoli Habakuku boye: “Emonaneli ezali naino mpo na ntango oyo etyamá, mpe ezali koya mbangumbangu kino na nsuka, mpe ekobuka lokuta te. Ata soki eumeli, zelá yango kaka; mpo ete kozanga ntembe yango ekokokisama. Ekokóma nsima ya ngonga te!” (Hab. 2:3) Nzambe alobaki maloba wana kaka mpo na litomba ya Habakuku? To maloba na ye ezali mpe na ntina mingi mpo na biso lelo oyo? Na nzela ya litambwisi ya elimo ya Nzambe, ntoma Paulo asalelaki maloba yango epai ya bakristo, oyo bazali kozela mokili ya sika. (Ebr. 10: 37) Ya solo, tokoki kondima ete ata soki ezali komonana lokola kosikolama na biso ezali koumela, “kozanga ntembe yango ekokokisama. Ekokóma nsima ya ngonga te!” w23.04 30 par. 16
Mwaminei, 15 sanza ya 5
Bayisraele nyonso babandaki koimaima mpo na Moize. —Mit. 14:2.
Bayisraele baboyaki elembo ya polele oyo emonisaki ete Yehova azalaki kosalela Moize lokola momonisi na Ye. (Mit. 14:10, 11) Mbala na mbala, baboyaki kondima esika ya Moize. Mpo na yango, Yehova aboyaki ete Bayisraele ya eleko yango bákɔta na Mokili ya Ndaka. (Mit. 14:30) Nzokande, Bayisraele mosusu balandaki litambwisi ya Yehova. Na ndakisa, Yehova alobaki: “Kalebe . . . atosaki ngai na motema na ye mobimba.” (Mit. 14:24) Nzambe apesaki Kalebe mbano, apesaki ye kutu esika oyo ye moko aponaki na mokili ya Kanana. (Yos. 14:12-14) Bayisraele oyo bayaki na nsima bapesaki mpe ndakisa malamu na oyo etali kolanda litambwisi ya Yehova. Ntango Yosua atyamaki mokambi ya Bayisraele na esika ya Moize, “Bayisraele bakómaki kopesa ye limemya bomoi na ye mobimba.” (Yos. 4:14) Na yango, Yehova apambolaki bango na ndenge akɔtisaki bango na mokili oyo alakaki.—Yos. 21:43, 44. w24.02 21 par. 6-7
Mwamitano, 16 sanza ya 5
Moto oyo alingaka Nzambe asengeli mpe kolinga ndeko na ye.—1 Yoa. 4:21.
Ndenge kaka monganga akoki koyeba ndenge motema ezali ntango atalaka ndenge makila ezali koleka, biso mpe tokoki koyeba soki bolingo na biso mpo na Yehova ezali makasi soki tozali kotalela ndenge oyo tomoniselaka basusu bolingo. Soki tomoni ete bolingo na biso mpo na bandeko ekiti, yango ekoki komonisa mpe ete bolingo na biso mpo na Nzambe mpe ekómi kokita. Kasi soki tozali mbala na mbala komonisela bandeko na biso bolingo, ekomonisa ete bolingo na biso mpo na Nzambe ezali makasi. Tosengeli komitungisa soki bolingo na biso mpo na bandeko na biso ekómi kokita. Mpo na nini? Mpo yango ekomonisa ete boyokani na biso ná Yehova ezali lisusu makasi te. Ntoma Yoane amonisi yango polele ntango akundweli biso ete: “Moto oyo alingaka ndeko na ye te, oyo ye amoni, akoki te kolinga Nzambe, oyo ye amoni te.” (1 Yoa. 4:20) Yango ezali koteya biso nini? Yehova asepelaka na biso kaka soki tozali “kolingana.”—1 Yoa. 4:7-9, 11. w23.11 8 par. 3; 9 par. 5-6
Mwapɔsɔ, 17 sanza ya 5
Tata na yo ná mama na yo bakosepela.—Mas. 23:25.
Ntango azalaki elenge, Mokonzi Yehoashe azwaki ekateli moko ya malamu. Lokola azalaki na tata te, alandaki litambwisi ya Yehoyada, nganga-nzambe monene ya sembo. Ateyaki Yehoashe lokola mwana na ye moko. Na yango, Yehoashe azwaki ekateli ya kosalela Yehova mpe ya kosalisa basusu básala mpe bongo. Kutu, Yehoashe azwaki bibongiseli mpo na kobongisa lisusu tempelo ya Yehova. (2 Nt. 24:1, 2, 4, 13, 14) Soki baboti na yo to moto mosusu azali koteya yo olinga Yehova mpe otosa mibeko na ye, yebá ete bazali kopesa yo likabo ya motuya mingi. (Mas. 2:1, 10-12) Baboti na yo bakoki koteya yo na ndenge mingi. Soki ozali kosalela toli ya Biblia oyo ozali kozwa, okosepelisa baboti na yo. Oyo eleki ntina, okosepelisa Nzambe mpe boninga na yo ná ye ekokóma makasi. (Mas. 22:6; 23:15, 24) Yango nde ntina oyo osengeli kolanda ndakisa ya Yehoashe ntango azalaki elenge. w23.09 8-9 par. 3-5
Mwalomingo, 18 sanza ya 5
Ngai nakoyoka bino.—Yir. 29:12.
Yehova alaki ete akoyoka mabondeli na biso. Nzambe na biso alingaka basaleli na ye ya sembo, na yango akoki ata moke te koboya koyoka mabondeli na bango. (Nz. 10:17; 37:28) Kasi, yango elingi koloba te ete akopesa biso nyonso oyo tosɛngi. Tosengeli mbala mosusu kozela tii na mokili ya sika mpo na kozwa makambo mosusu oyo tosɛngi. Yehova atalaka ndenge makambo oyo tosɛngi eyokani na mokano na ye mobimba. (Yis. 55:8, 9) Likambo moko na kati ya mokano na ye ezali ya kotondisa mabele na mibali mpe basi oyo na esengo nyonso bazali na bomoko na nse ya boyangeli na ye. Kasi Satana alobaka ete bato bakozala malamu koleka soki bazali komitambwisa bango moko. (Eba. 3:1-5) Mpo na komonisa ete Satana alobaki lokuta, Yehova atiki bato bámiyangela bango moko. Kasi, boyangeli ya bato ebimisi mikakatano mingi oyo tozali na yango lelo oyo. (Mos. 8:9) Toyebi malamu ete Yehova akolongola te mikakatano yango nyonso sikoyo. w23.11 21 par. 4-5
Mwayambo, 19 sanza ya 5
Natye yo tata ya bikólo mingi. —Rom. 4:17.
Yehova alakaki ete bikólo mingi ekopambolama na nzela ya Abrahama. Nzokande, ntango Abrahama akómaki na mbula 100 mpe Sara mbula 90, mwana oyo alakamaki abotamaki naino te. Na ndenge ya bomoto, emonanaki ete ekoki kosalema te ete Abrahama ná Sara bábota mwana. Yango ezalaki mpenza komekama mpo na Abrahama. Kasi “azalaki na elikya mpe na kondima ete akokóma tata ya bikólo mingi.” (Rom. 4:18, 19) Mpe nsukansuka, elikya yango ekokisamaki. Abrahama akómaki tata ya Yisaka, mwana oyo azalaki kozela banda kala. (Rom. 4:20-22) Nzambe akoki kondima biso mpe kotánga biso bato ya sembo lokola baninga na ye, ndenge asalaki na Abrahama. Kutu, Paulo alobelaki likambo yango, akomaki: “Maloba ‘batángaki ye’ ekomamaki kaka mpo na ye moko [Abrahama] te, kasi mpe mpo na biso baoyo tokotángama bato ya sembo, mpo tondimelaka ye oyo asekwisaki Yesu Nkolo na biso uta na bakufi.” (Rom. 4:23, 24) Ndenge moko na Abrahama, tosengeli kozala na kondima, komonisa yango na misala mpe kozala na elikya. w23.12 7 par. 16-17
Mwamibale, 20 sanza ya 5
Omoni mpasi na ngai; oyebi mozindo ya mpasi na ngai.—Nz. 31:7.
Ntango okutani na komekama oyo ezali kobangisa yo, kobosana te ete Yehova azali komona yango mpe ayebi ndenge oyo ozali komiyoka. Na ndakisa, Yehova amonaki kaka te mabe oyo Baezipito bazalaki kosala Bayisraele kasi mpe ‘bampasi oyo Bayisraele bazalaki komona.’ (Kob. 3:7) Kasi, mbala mosusu okoki komituna ndenge oyo Yehova asungaka yo ntango ozali kobanga. Na yango, sɛngá ye asalisa yo omona lisungi na ye. (2 Bak. 6:15-17) Na nsima, kanisá naino: Oyokaki lisolo to eyano moko na makita oyo epesaki yo makasi? Mokanda, video, to nzembo moko ya TV JW elendisaki yo? Ndeko moko ayebisaki yo likambo to atángelaki yo vɛrsɛ moko oyo ekitisaki yo motema? Ezalaka mpasi te tómona ete lisangá na biso ya bandeko ya bolingo mpe bilei ya elimo oyo tozwaka ezali makambo oyo tomeseni na yango. Nzokande, ezali makabo ya kokamwa oyo Yehova apesi biso. (Yis. 65:13; Mrk. 10:29, 30) Emonisaka ete atyelaka yo likebi. (Yis. 49:14-16) Emonisaka mpe ete abongi otyela ye motema. w24.01 4-5 par. 9-10
Mwamisato, 21 sanza ya 5
Pesá baombo na yo likoki ya kokoba koloba liloba na yo na mpiko mpenza.—Mis. 4:29.
Liboso azonga na likoló, Yesu akundwelaki bayekoli na ye mokumba oyo bazwaki ya kopesa litatoli mpo na ye “na Yerusaleme mpe na Yudea mobimba mpe na Samaria mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8; Luka 24:46-48) Mwa moke na nsima, bakonzi ya Bayuda bakangaki ntoma Petro ná Yoane, mpe bamemaki bango liboso ya Sanedrina. Basɛngaki mibali wana ya sembo bátika kosakola mpe babangisaki bango. (Mis. 4:18, 21) Petro ná Yoane balobaki boye: “Soki ezali boyengebene na miso ya Nzambe ete tóyoka bino na esika ya koyoka Nzambe, bino moko bókata likambo. Kasi biso, tokoki kotika te kolobela makambo oyo tomoni mpe toyoki.” (Mis. 4:19, 20) Ntango batikaki Petro ná Yoane, bantoma babondelaki Yehova na mongongo makasi mpo bákoba kosala mokano na ye. Yehova ayanolaki libondeli na bango oyo eutaki na motema.—Mis. 4:31. w23.05 5 par. 11-12
Mwaminei, 22 sanza ya 5
Oyo azali Mwana na ngai, ya bolingo.—Mat. 17:5.
Na ntango oyo molai na yango eyebani te, Yehova ná Mwana na ye basalaki boyokani makasi mpe balinganaki mpenza. Boyokani yango eumeli koleka nyonso. Yehova alobaki polele ete alingaka Yesu, ndenge emonisami na mokapo ya mokolo ya lelo. Yehova akokaki kaka koloba ete, ‘Oyo moto oyo nandimi.’ Kasi, alingaki tóyeba ete alingaka Yesu mingi, yango wana abengaki ye “Mwana na ngai, ya bolingo.” Yehova azalaki kosepela na Yesu mpe ndenge andimaki kopesa bomoi na ye. (Ef. 1:7) Mpe Yesu azalaki ata na ntembe moke te ete Tata na ye alingaka ye. Yesu andimaki mpenza ete Yehova alingaki ye mpe motema na ye eyebaki yango. Alobaki mbala na mbala na kondima nyonso ete Tata alingaka ye.—Yoa. 3:35; 10:17; 17:24. w24.01 28 par. 8
Mwamitano, 23 sanza ya 5
Luká kozala na nkombo malamu na esika ya ebele ya bomɛngo.—Mas. 22:1.
Kanisá naino: Moto oyo olingaka alobi likambo moko ya mabe mpenza mpo na yo. Oyebi ete alobi lokuta; kasi bato mosusu bandimi yango. Ya mabe koleka, babandi mpe kolobaloba makambo yango ya lokuta, mpe bato mosusu mingi bandimi yango. Okoyoka ndenge nini? Na ntembe te mpenza, makambo wana ya lokuta ekopesa yo mpasi mingi! Ndakisa wana ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge oyo Yehova ayokaki ntango babebisaki lokumu na ye. Moko ya bana na ye ya elimo akoselaki ye makambo epai ya Eva, mwasi ya liboso. Eva andimaki lokuta yango. Lokuta yango etindaki baboti na biso ya liboso bátombokela Yehova. Na yango, lisumu mpe liwa ekɔtaki na libota ya bato awa na mabele. (Eba. 3:1-6; Rom. 5:12) Makambo nyonso oyo tomonaka na mokili, liwa, bitumba, mpe mpasi, ezali mpo na lokuta oyo Satana apanzi. Yehova ayokaki mpasi mpo na lokuta yango mpe makambo oyo yango ebimisá? Ntembe ezali te! Atako bongo, Yehova akómá mawamawa, to nkandankanda te. Kutu, azali kaka “Nzambe ya esengo.”—1 Tim. 1:11. w24.02 8 par. 1-2
Mwapɔsɔ, 24 sanza ya 5
Ndenge nini nakoki kosala mabe monene boye mpe kosalela mpenza Nzambe lisumu?—Eba. 39:9.
Ndenge nini okoki kozala na ekateli lokola oyo ya Yozefe? Okoki komibongisa banda sikoyo mpo na oyo okosala soki omekami. Yekolá koboya mbala moko kosala makambo oyo Yehova ayinaka, ata mpe kokanisa yango. (Nz. 97:10; 119:165) Yango ekosalisa yo okwea te ntango omekami. Mbala mosusu oyebi ete ozwi solo mpe ete olingi kosalela Yehova na motema na yo mobimba, kasi eloko moko ezali kopekisa yo omipesa na Yehova mpe ozwa batisimo. Ndakisa ya Mokonzi Davidi ekoki kosalisa yo. Okoki kosɛnga Yehova boye: “Ee Nzambe, talá ngai malamumalamu mpe yebá motema na ngai. Talá ngai malamumalamu mpe yebá makanisi oyo etungisaka ngai. Moná soki kati na ngai ezali na nzela moko oyo eyokisaka mpasi, mpe tambwisá ngai na nzela ya seko.” (Nz. 139:23, 24) Yehova apambolaka baoyo “bazali koluka ye na mposa makasi.” Soki ozali kosala makasi omipesa na Nzambe mpe ozwa batisimo emonisi ete ozali koluka ye.—Ebr. 11:6. w24.03 6 par. 13-15
Mwalomingo, 25 sanza ya 5
Azali na ntina te ya kopesa bambeka mokolo na mokolo.—Ebr. 7:27.
Nganga-nzambe monene azalaki momonisi ya bato liboso ya Nzambe. Nganga-nzambe monene ya liboso na Yisraele ezalaki Arona; Yehova atyaki ye na molulu ya bofungoli tabernakle. Kasi, ndenge ntoma Paulo amonisaki yango, “mingi basengelaki kokóma banganga-nzambe nsima ya bamosusu mpo liwa ezalaki kopesa bango nzela te ya kokoba kozala bongo.” (Ebr. 7:23-26) Mpe lokola bazalaki bato ya kozanga kokoka, banganga-nzambe yango basengelaki mpe kopesa bambeka mpo na masumu na bango moko. Yango nde bokeseni kati na nganga-nzambe monene ya Yisraele mpe Yesu Kristo, Nganga-nzambe Monene oyo aleki banganga-nzambe misusu nyonso. Yesu Kristo, nganga-nzambe na biso monene, azali “mosaleli, . . . na hema ya solosolo, oyo Yehova atongaki, kasi moto te.” (Ebr. 8:1, 2) Paulo alobaki ete “lokola [Yesu] azali na bomoi libela na libela, azali na bakitani te na bonganga-nzambe na ye.” Paulo abakisaki ete Yesu azali “na mbindo te, akabwani na basumuki” mpe na bokeseni na banganga-nzambe ya Yisraele, “azali na ntina te ya kopesa bambeka mokolo na mokolo” mpo na masumu na ye moko. w23.10 26 par. 8-9
Mwayambo, 26 sanza ya 5
Likoló ya kala mpe mabele ya kala elekaki.—Em. 21:1.
“Likoló ya kala” ezali baguvɛrnema oyo etambwisami na Satana ná bademo na ye. (Mat. 4:8, 9; 1 Yoa. 5:19) Biblia esalelaka mpe liloba “mabele” mpo na kolobela bato oyo bafandi na mabele. (Eba. 11:1; Nz. 96:1) Na yango, “mabele ya kala” ezali komonisa bato mabe oyo bazali lelo na mabele. Yehova akosuka kaka te na kobongisa “likoló” mpe “mabele” oyo ezali lelo oyo; kasi akobebisa yango mpe akotya mosusu na esika na yango. Akolongola likoló ná mabele oyo ezali lelo mpe akotya na esika na yango “likoló ya sika ná mabele ya sika,” elingi koloba, guvɛrnema moko ya sika ná bato ya sembo oyo yango ekoyangela. Yehova akosala ete mabele mpe bato bázala ya sika na ndenge akokómisa bato mpe mabele ya kokoka. Ndenge Yisaya asakolaki yango, mabele mobimba ekokóma elanga moko kitoko, oyo ekokani na elanga ya Edene. Tokokóma mpe sika, to Yehova akozongisa biso, na ndenge akobikisa mpenza mokomoko na biso. Batɛngumi, bato oyo bakufá miso, mpe baoyo bakufá matoi bakobika, ata bakufi bakozonga na bomoi.—Yis. 25:8; 35:1-7. w23.11 4 par. 9-10
Mwamibale, 27 sanza ya 5
Bómilɛngɛla.—Mat. 24:44.
‘Bolɔzi monene’ ekobanda na mbalakaka. (Mat. 24:21) Na kokesana na makama mosusu oyo esalemaka, bolɔzi monene ekosutukisa bato nyonso te. Eleki sikoyo mbula soki 2000, Yesu ayebisaki bayekoli na ye bámilɛngɛla mpo na mokolo yango. Soki tomibongisi malamu, ekozala mpasi te mpo tóyika mpiko na makambo oyo ekosalema na ntango yango ya mpasi mpe kosalisa basusu básala mpe bongo. (Luka 21:36) Ekosɛnga tózala na ezaleli ya koyika mpiko mpo tótosa Yehova mpe tótya motema ete akobatela biso. Tokosala nini soki bandeko na biso babungisi biloko na bango ya kobikela? (Hab. 3:17, 18) Ekosɛnga tómonisa motema mawa mpo na kosunga bango. Tokosala nini soki bikólo esangani mpo na kobundisa basaleli ya Nzambe mpe esali ete tókóma kofanda esika moko na bandeko na biso bakristo mpo na ntango molai? (Ezk. 38:10-12) Ekosɛnga tómonisa bolingo makasi mpo na bango mpo biso nyonso tóyika mpiko na ntango yango ya mpasi. w23.07 2 par. 2-3
Mwamisato, 28 sanza ya 5
Bókeba mpenza ete ndenge na bino ya kotambola ezala te lokola bato bazangá bwanya kasi lokola bato ya bwanya, bósalela ntango na bino malamu mpenza.—Ef. 5:15, 16.
Mwasi ná mobali bakoki kozwa mateya mingi na ndakisa ya Akila ná Prisile, babalani oyo bakristo mingi na siɛklɛ ya liboso bazalaki komemya. (Rom. 16:3, 4) Bango mibale basalaki elongo na mosala ya kosakola, na kosalisa bato, mpe na misala mosusu. (Mis. 18:2, 3, 24-26) Kutu, na Biblia okokuta esika moko te batángi nkombo ya Akila kozanga kotánga mpe nkombo ya Prisile. Ndenge nini babalani bakoki kolanda bango? Kanisá makambo mingi oyo yo ná molongani na yo bosengeli kosala. Bokoki kosala makambo yango bino mibale na esika moto moko kaka nde asala yango? Na ndakisa, Akila ná Prisile bazalaki kosakola elongo. Bino mpe bobongisaka mbala na mbala programɛ mpo na kosakola elongo? Akila ná Prisile basalaki mpe mosala elongo. Mbala mosusu yo ná molongani na yo bosalaka mosala moko te, kasi bokoki kosala misala mosusu ya ndako elongo. (Mos. 4:9) Ntango bozali kopesana mabɔkɔ mpo na kosala misala lokola wana, bokomona ete bozali mpenza ekipi mpe bokozala na libaku ya kosolola mingi. w23.05 22-23 par. 10-12
Mwaminei, 29 sanza ya 5
Ntango nazali kobanga natyelaka yo motema.—Nz. 56:3.
Moto nyonso abangaka na bantango mosusu. Na ndakisa, ntango Mokonzi Saulo alukaki koboma ye, Davidi azwaki ekateli ya kokima na Gate, engumba ya Bafilistia. Eumelaki te Akishe mokonzi ya Gate ayokaki ete Davidi azalaki elombe ya etumba oyo bato bayembelaki nzembo ete abomaki “bankóto zomi zomi” ya Bafilistia. Na yango, Davidi ‘akómaki kobanga mingi.’ (1 Sa. 21:10-12) Azalaki kobanga likambo oyo Akishe akosala ye. Ndenge nini Davidi alongolaki kobanga? Na Nzembo 56, Davidi amonisi ndenge oyo azalaki komiyoka ntango azalaki na Gate. Loyembo yango emonisi ete Davidi azalaki kobanga, kasi emonisi mpe ndenge oyo alongolaki kobanga yango. Ntango Davidi azalaki kobanga, azalaki kotyela Yehova motema. (Nz. 56:1-3, 11) Davidi azalaki na ntina mpenza ya kotyela Yehova motema. Na lisalisi ya Yehova, asalelaki mayele moko ya kokamwa kasi oyo esimbaki mpenza: Asalaki lokola azali ligboma! Na yango, Akishe amonaki ete Davidi azali likama te mpo na ye kasi nde eloko ya kopesa nkanda. Bongo Davidi alongaki kokima.—1 Sa. 21:13–22:1. w24.01 2 par. 1-3
Mwamitano, 30 sanza ya 5
Baoyo babengami mpe baponami mpe oyo bazali sembo, bango mpe bakolonga.—Em. 17:14.
Mokapo ya lelo elobeli banani? Bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo basekwi! Na yango, ntango bakristo ya nsuka oyo batyami mafuta na elimo bakokende likoló pene na nsuka ya bolɔzi monene, moko ya mikumba na bango ya liboso ekozala ya kobunda. Nsima ya kokende likoló, bakosala elongo na Kristo mpe baanzelu na ye mosantu, bakobundisa banguna ya Nzambe na etumba ya nsuka. Kanisá naino! Awa na mabele, bakristo mosusu oyo batyami mafuta bakómi mibange, kutu makasi esili. Kasi, ntango bakosekwa na likoló, bakozala bikelamu ya elimo ya nguya mpe oyo ekoki kokufa te; bakozwa mokumba ya kobunda elongo na Yesu Kristo, Mokonzi ya limpinga na bango. Nsima ya etumba ya Armagedone, bakosala elongo mpo na kosalisa bato bákóma bato ya kokoka. Kozanga ntembe, bakosalela bandeko na bango ya bolingo awa na mabele makambo mingi ya malamu uta na likoló, koleka ndenge bakokaki kosala yango ntango bazalaki bato ya kozanga kokoka! w24.02 6-7 par. 15-16
Mwapɔsɔ, 31 sanza ya 5
Bókoba kotambola na kolanda litambwisi ya elimo mpe bokokokisa ata mposa moko te ya nzoto. —Gal. 5:16.
Basusu bakoki mpo na komipesa mpe kozwa batisimo, kasi babangaka. Bakoki komituna: ‘Bongo soki na nsima nasali lisumu ya monene mpe balongoli ngai na lisangá?’ Soki obangaka likambo yango, yebá ete Yehova akopesa yo nyonso oyo osengeli na yango mpo ‘omitambwisa na ndenge oyo ebongi na ye mpo osepelisa ye mpenza.’ (Kol. 1:10) Akopesa yo mpe makasi ya kosala oyo ezali malamu. Asili kosalisa bato mosusu mingi mpo básala oyo ezali malamu. (1 Ko. 10:13) Yango wana bato moke kaka nde balongolamaka na lisangá. Yehova apesaka basaleli na ye oyo esengeli mpo bátikala sembo. Moto nyonso ya kozanga kokoka ayokaka mposa ya kosala makambo ya mabe. (Yak. 1:14) Kasi, yo moko nde okopona soki okokokisa mposa yango to te. Mpo na koloba solo, yo nde okopona ndenge oyo okotambwisa bomoi na yo. Bato mosusu bandimaka likambo yango te, kasi yebá ete okoki kotambwisa bamposa na yo. w24.03 5 par. 11-12