Tobongisa makambo kati na Nzambe mpe biso
‘Ata masumu na bino ezali motane lokola ngola, ekokoma pee lokola mbula mpembe.’—Yisaya 1:18.
1, 2. (a) Okokanisa nini soki moto moko alobi na yo: ‘Yakani, tolobana likambo elongo moko.’ (b) Mpo na nini tosengeli kozala na elikya te ya kolobana elongo na nzambe?
EKOKI kozala ete ozali na boyokani ya malamu te elongo na moto moko na ntina na matata moko ya kala; kasi okosala nini soki moto yango alobi na yo ete: ‘Boye, tolobana elongo mpo na likambo yango.’ Ekoki kozala libyangi mpo na lisolo, kozalaka pene na kosala boyokani. Moto na moto asengeli koloba makanisi na ye mpe kondima libunga na ye kati na nkembo oyo esalamaki to kati na matata.
2 Nzokande, okanisi ete Mozalisi akoki koloba na yo na lolenge oyo: ‘Boye, tolobana likambo elongo moko’, mpo na kozongela elobeli oyo mabongoli mosusu ye Biblia bazali kobongola na yango Yisaya 1:18? Te. Soki moke te. Moto moko te kati na biso akoki kolikya ‘kolobana’ (TOB) elongo na Jéhovah, lokola soki nde Nzambe azalaki na libunga ya kondima to akoki kondima ete abuki mobeko. Na ntina yango, eloko nini tosengeli kosala, engebene Yisaya 1:18, soki tolingi kozala na kimya elongo na Nzambe?
3. Ndimbola ya yambo ya liloba na hébreu ebongolami mbala mosusu na kolobana kati na Yisaya 1:18 ezali nini?
3 Liloba na hébreu ebongolami na ‘tolobana’ elimboli mpenzampenza “kozwa ekateli, kosambisa, kondimisa”. Ezali na boyokani na ndimbola ya kosambisa mpe ezali kokende mosika koleka mwa lisolo moke kati na bato mibale. Ezali kotalela ekateli esengeli na kokamataa. (Genese 31:37, 42; Yobo 9:33; Nzembo 50:21; Yisaya 2:4) Boyekoli mpo na oyo etali maloba ya Kondimana ya Kala (Angl.) ya Wilson ezali kopesa ndimbola oyo: “Kozala sembo; kokanisa, komonisa oyo ezali sembo mpe malamu.” Mpo na koloba malamu, Nzambe apesaki motinda oyo: “Yakani mpe tozongisa makambo na molongo kati na biso.”
4-6. Yisaya azalaki nani, mpe na eleko nini azalaki mosakoli?
4 Jéhovah Nzambe asalelaki mosakoli Yisaya mpo na koyebisa nsango yango ya nguya. Yisaya azalaki nani, mpe mpo na nini nsango na ye ebongaki mpenza mpo na eleko na ye? Lisusu, ndenge nini tokoki kozwela yango litomba?
5 Lelo oyo, bato mingi bazali kokanisa ete “mosakoli” azalaki elenge oyo azali mpenza kolanda makambo ya mokili te mpe nsango na ye, ezalaki mpenza komonisa makambo ndenge yango ezalaki koleka te. Bamosusu bakokanisa na mobange moko oyo amitangoli mosika na bato nyonso mosusu oyo azalaki na mosala ya kosambisa bato ya ntango na ye. Mpo na koloba solo, Yisaya azalaki mobali akoki mpe ya mayele, oyo Jéhovah Nzambe asalelaki mpo na kokoma mokanda ya Biblia oyo ezali na nkombo na ye.
6 “Yisaya, mwana na Amosa”, afandaki na Yuda mpe, asalelaki Jéhovah na molende na boumeli ya mibu 40 “na mikolo na Ujiya mpe Yotama mpe Ahaja mpe Hizikiya, mikonzi na Yuda”. Amonisaki elembo ya bopolo na koyebisaka makambo mingi te likolo na ye moko. Makambo ya kala mazali komonisa ete azalaki kati na libota ya bakonzi. Toyebi malamumalamu ete azalaki na mwasi mpe azalaki na bana mibale. Na nsima, ekoki kozala ete mwasi na ye akufaki, mpe abalaki lisusu mwasi mosusu mpe abotaki mwana mobali mosusu, oyo abengamaki na lolenge ya esakweli Emmanuel.—Yisaya 1:1; 7:3, 14; 8:3, 18.
7. Mpo na nini tosengeli kotya motema na biso na bisakweli ya Yisaya?
7 Eleko na biso ezali komonisa bilembo motindo moko na oyo ya Yisaya. Moto nyonso akoki komona yango, tozali na bomoi kati na yikiyiki ya mokili mobimba. Na bisika mingi, bitumba ezali kongala. Bakambi mosusu ya politike to ya mangomba, baoyo bazali koloba ete bazali kosambela Nzambe, bazali komitalisa lokola ndakisa, nzokande bazulunalo, radio mpe télévizio ezali koyebisa mbala na mbala bizaleli mabe na bango mpe ndenge bazali koyiba mosolo ya Leta. Nzambe azali kokanisa nini mpo na bato yango, mingi mpenza mpo na baoyo bazali kati na boklisto ya mokili oyo? Likambo nini ezali kozela bango, bango mpe baoyo bazali nsima na bango? Tozali kokuta kati na mokanda ya Yisaya makanisi ya Nzambe oyo mazali kotalela mpenzampenza makambo yango ya ntango oyo. Baoyo nyonso kati na biso bazali kosala makasi moto na moto mpo na kosalela Nzambe bakoki mpe kozwa matomba kati na yango.
Mosakoli ya libota moko ezwami na likambo
8. Makambo mazwami kati na mokanda ya Yisaya mazali nini, mpe na lolenge nini yango ekomamaki?
8 Mokanda na Yisaya ezali komonisa polele ngámbo na Yuda mpe na Yelusaleme, ezali kopesa bandimbola ya sikisiki ya makambo maleka kala likolo na mobulu ya banguna mpe ezali koyebisa mpasi ya mikili ya pembeni; tozali mpe kokuta lisusu bisakweli ya kolendisa mpo na kotongama lisusu mpe kobikisama ya libota na Yisraele. Mokanda yango ekomami na lolenge moko ya elilingi mpe ya kosepelisa. Na ntina yango 1. Slotki azali koloba: “Babongoli na Biblia bazali mpenza kopesa lokumu mingi na makanisi kitoko ya Yisaya, na bonzenga ya bandimbola na ye, na mayele na ye mpo na kosalela malamu bililingi, oyo alingi ete ezala na nguya, na motindo ya kozongela likambo moko na moko, bakisa mpe na lolenge kitoko na ye ya kokoma mpe kobongisa maloba. Na ndakisa, totalela mokapo ya 1 ya mokanda na Yisaya.
9. Likambo nini toyebi mpo na eleko oyo mokapo 1 ya Yisaya ekomamaki mpe na ezaleli oyo ezalaki komonana na eleko yango?
9 Mosakoli azali koyebisa mpenza sikisiki te eleko oyo akomaki mokapo yango, nzokande toyebi ete Yisaya 6:1-13 ekomamaki na mbula oyo mokonzi Ozias akufaki. Na ntina yango, soki Yisaya akomaki mikapo ya liboso mwa mikolo mingi liboso, ekoki kozala ete mikapo yango mizali kotalela na bozindo ezaleli oyo ezalaki komonana na nse ya boyangeli ya Ozias. Kati na makambo nyonso, Ozias (829-777 liboso ya ntango na biso) “azalaki kosala oyo ezali sembo na miso na Jéhovah”; yango wana Nzambe apambolaki boyangeli na ye. Nzokande, toyebi ete makambo nyonso mazalaki kotambola malamu te, mpamba te, liboso ete Nzambe apesa etumbu ya maba epai na Ozias, to Azaria mpo amimonisaki moto na lolendo na kotumbaka mpaka na malasi na tempelo, “bato bakabelaki mpe batumbaki mpaka na malasi na bisika na likolo”. (2 Ntango 26:1-5, 16-23; 2 Mikonzi 15:1-5) Mabe oyo ezalaki kosalama na lolenge ya kobombama na eleko ya Ozias mbala mosusu ezali yango nde ebimaki polele epai na nkoko na ye ya moke, mokonzi Akaza (762-745 liboso ya ntango na biso); mpe mbala mosusu ezali mabe oyo nde Yisaya azali koyebisa. Nzokande, likambo ya ntina monene koleka date ya sikisiki oyo mokapo yango ya liboso ekomamaki ezali ntina oyo ebendaki Nzambe na koloba: “Tobongisa makambo kati na biso.”
10. Ezaleli nini ezalaki komonana na Yuda, mpe mingimingi kati na mikolo, na eleko ya mokonzi Akaza?
10 Yisaya asakoli na bosolo nyonso: “E libota na masumu, bato bakumbi bozito na mabe, libota na basali na masumu, bana baoyo bazali kokosa; batiki Jéhovah, batioli Oyo na Bulee na Yisraele, bozongisami nsima. . . . Moto mobimba etondi na maladi, motema mobimba na bolembu. Longwa na litambe na lokolo kino moto nguya malamu ezali te.” (Yisaya 1:4-6) Mibu zomi na motoba oyo boyangeli ya Akaza eumelaki eyebanaki mpenzampenza na ntina na losambo ya bikeko ya nsoni koleka. Akaza “atumbaki bana na ye lokola likabo kobila makambo mabe na mabota . . . Akabelaki mbeka mpe atumbaki mpaka na malasi na bisika na likolo mpe na ngomba mpe na nse na nzete nyonso mibesu.” (2 Ntango 28:1-4; 2 Mikonzi 16:3, 4) Bokesene, kanyaka mpe pite ezalaki komonana mingi epai na mikolo to ba princes, makambo masengelaki bobele ete masalama na Sodome ya kala. (Yisaya 1:10,21-23; Genese 18:20, 21) Ata na lolenge moko te Nzambe akokaki kondima bango. Na mikolo ya motindo wana na moto to liboso na na bango, libota esengelaki kozala na ezaleli motindo nini?
11. Ndenge nini tokoki kosimba ndimbola ya Yisaya 1:29, 30?
11 Mosakoli Yisaya amonisaki na motindo ya elilingi ezalela ya mawa kati na yango libota ezwamaki na kolobelaka banzete mpe bilanga ya bulee epai kuna Bayisraele bazalaki kopesa mbeka na bango mpo na losambo ya bikeko mpe kotumba mpaka na malasi mpo na lokumu ya banzambe na bapakano. (Yisaya 1:29; 65:3) Kokokisaka elilingi ya nzete na basambeli na bikeko bango moko, Yisaya akomaki: “Bokozala lokola nzete na ela oyo lokasa na yango ekaoki, mpe lokola elanga oyo ezangi mai.” (Yisaya 1:30) Na yango, baoyo bazalaki kotika Jéhovah ‘bakosilisama nyee”. Bakokoma lokola eteni eleki monene ya nzete ezali kozika, mpe banzambe na bango lokola mikalikalina bongo bango nyonso bakozika.—Yisaya 1:28, 31.
12, 13. Bokokani nini tozali komona kati na eleko na biso mpe oyo ya Yisaya?
12 Kasi tokokanisa makambo yango elongo na ezalela ya mokili oyo ya lelo. Tala oyo bayebisi na nsango bamonisaki na Etats-Unis na boumeli ya sanza moko: Kandida moko oyo azalaki kowela ebonga ya président to mokambi, atako azalaki moto monene, amilongolaki na ntina na likambo ya nsoni oyo esalamaki na ntango bayaki koyeba ete azalaki na mwasi mosusu ya pembeni; Pastere moko oyo ayebana mingi abungisaki mikumba na ye nsima na kondima ete asalaki ekobo mpe afundamaki ete asanganaki na mobali mosusu, kosanzé basi mpe koyiba mosolo mpo na kokanga monoko ya elenge mwasi oyo azalaki kosala na ye mabe. (Na kotalela maloba ya zulunalo Time ya 11 mai 1987, “kobanda 1984, asengelaki kozwa motuya ya 4,6 millions ya badolare lokola mbano.”) Na Ostrali, mobu moleki, abbé ya Rein ‘alongolamaki mikumba mpe afundamaki mpo ayibaki 6 millions ya badolare ntango akendaki kosomba ndako mpe na ntango ya feti moko oyo ebongisamaki mpo na koyamba basangani ya libota ya mokonzi ya kala mpe ya bilenge basi baoyo mabota na bango ezali na mosolo mingi te’. Bokoki mpe kopesa bandakisa mosusu ya makambo mabe kati na yango bato minene to ya lokumu bazwamaki. Mpo na bino, ndenge nini Nzambe azali kotalela bato yango?
13 Mpo na oyo etali bato banso, mangomba ezali kokabola bango ntango nyonso na biteni mibale bikeseni. Bamosusu bazali kokima yango mpo ete bayini yango to baboi kokota na makambo yango; na ndakisa, bobele 3 % ya ba Anglais bazali koyangana na makita ya Lingomba na misioni. Na kokesena, tomoni ete makambo mazali kobeba se kobeba kati na mangomba. Likambo oyo ezali kokola ntango nyonso ezali komonana kati na Mangomba ya karismatike, oyo bazali kosalela mayoki ya bato mpo na kolaka bango “lobiko”, na kolobaka na minoko mosusu to na kosalaka bikamwiseli ya “kobikisa” bato. Ebele na bato bazali kosopana na bisika mosantu na elikya ya kozwa lobiko nsima ya ekamwiseli. Bamosusu bazali komonisa “kondima” na kopesaka mbeka, lokola baoyo bazali kotambola na mabolongo na bango oyo ezali kobimisa makila mpo na kotala Ngondo Mosanto ya Guadalupe, na Mexico. Bato bakokaki kotanga boye kati na zulunalo moko oyo ebimaka mokolo na mokolo: “Atako kozala na ye mpe molende oyo bato basambeli ye na yango ezali komonana na lolenge ya polele na miso ya baoyo basangani na losambo yango te lokola bosangani to kosangisama ya boklisto mpe bopakano, tokoki koloba ete Ngondo Mosanto azali na lokumu mingi mpo na bakatolike ya Mexico.”
Ndenge nini tokoki kondimama epai na ye?
14. Ndenge nini, na nsima na Yisaya, Jéhovah azali komonisa polele ete azali kondima te baoyo bazali kosambela ye na lokuta?
14 Jéhovah Nzambe azali kobomba ata likambo moko te mpo na lolenge oyo azali kotalela bato oyo bazali kokanisa ete bazali kosambela ye, nzokande ‘bazali kosambela Tata na bisambeli na elimo mpe na solo te’. (Yoane 4:23) Soki libota moko, lisangá ya Nzambe to moto moko azali kosala ndenge mikano ya Nzambe misengi te, milende oyo azali kosala mpo na kosambela ezali ya mpamba. Na ndakisa, bilambo to bafeti mpe kopesa mbeka ezalaki kati na losambo ya solo ya Yisraele ya kala. (Levitike mikapo 1-7, 23) Nzokande, Yisaya azali komonisa likanisi ya Nzambe kati na likambo yango: Bayuda oyo bazalaki sembo te kasi bazalaki kotosa to kobatela mitinda yango bandimamaki te epai na ye. Nzambe alobi: “Ekosembola bino maboko na bino, nakobombela bino miso na ngai; ata bokobondela mabondeli mingi mpenza nakoyoka te.” (Yisaya 1:11-15) Ezali mpe ndenge moko mpenza lelo. Na esika ya kosala bilembo ndenge na ndenge to koloba makambo oyo moto asila kosimba kati na motema, Nzambe azali kosenga mabondeli mpe misala ya sembo, oyo euti na motema.
15. Elikya nini Yisaya 1:18 ezali kopesa biso, mpe ndimbola ya etinda “yaka mpe tobongisa makambo nyonso elongo” ezali nini?
15 Koyeba etinda oyo ezali kopesa epai na bato elikya ya kokoka kondimama epai na Nzambe. Ndenge nini? Toyoka toli ya Yisaya: “Bomisukola, bomipetola, balongola mabe na makambo masalaki bino liboso na miso na ngai; botika kosala mabe, yekola kosala malamu, luka boyengebene.” Ezali nde na ntango yango Yisaya alobaki etinda ya Nzambe: “Boye, tolobana likambo elongo moko.” Na ntina yango, Jéhovah asengaki lisolo te kati na bato oyo bakokani epai oyo moto na moto akosala nyonso mpo na koluka boyokani. Nzambe ayebi oyo ezali malamu, mpe oyo ezali na molongo. Esambiseli oyo azalaki koloba ezalaki oyo: ezalaki bato nde basengelaki kobongola bizaleli na bango mpe komitambwisa na boyokani na mitinda na ye. Mpe ezali motindo moko lelo. Likoki ya kobongola bizaleli mpe kondimama epai na Nzambe ezali. Ata moto oyo etamboli na ye ezalaki mabe koleka akoki kobongwana. Yisaya akomaki: “Ata masumu na bino ezali motane lokola ngola, ekokoma pee lokola mbula mpembe.”—Yisaya 1:16-18.
16. Litomba nini batoli mosusu ya Biblia oyo etali mabe ezwaki likolo na baklisto mosusu?
16 Nzokande, bamosusu bazali kotya likebi na batoli yango, kasi bazali na momeseno ya koloba ete yango ezali kotalela bato mosusu. Ekoki kozala ete Bayuda mingi na eleko ya Yisaya, bazalaki koloba mpe ndenge yango. Mpo na koloba solo, moto na moto asengelaki komitalela. Soki moklisto moko akwei na libunga monene, lokola lokuta, bokosi, pite to lisumu mosusu, ezali mpenza na ntina monene ete abongola motema na ye mpe asala misala oyo mibongi mpo na kobongola motema. (Misala 26:20) Tokoki kokumisa baoyo ‘babongisaki makambo nyonso kati na Jéhovah mpe bango’. La Tour de Garde ya le 15 Avril 1985 ezalaki na bongo komonisa ndenge ya kolonga mabunga oyo bato mosusu bakoki koyeba yango te, kasi oyo Nzambe azali komona yango. (Matai 6:6; Bafilipi 4:13) Elobelaki mingi makambo misato: Kondima makila na nkuku, masturbation mpe komela masanga mingi. Nsima na koyekola likambo yango, ntalo monene ya batangi bakomelaki biso mpo na kotondo biso. Bandimaki ete bazalaki kala na mabunga yango; nzokande, makambo oyo batangaki etindaki bango na kobongola motema mpe na kotika yango libela.
17. Ata soki tozali kosala masumu minene te, ndenge nini Yisaya 1:18 ekoki kotalela biso mpe kosalisa biso?
17 Ya solo, mingi kati na baklisto baoyo bazali kotanga lisolo oyo basalaki mabunga minene te; nzokande, nsango ya Yisaya esengeli kotinda biso nyonso na kotalela motema na biso. Ekoki kozala ete tozali na makambo ya kobongisa elongo na Nzambe? Moko na makambo ya ntina ya toli na Yisaya ezalaki mikano malamu ya motema. Na yango, tokoki komituna boye: ‘Mabondeli na ngai eutaka na nse ya motema? Eske nasalaka nyonso ekoki na ngai mpo ete misala na ngai miyokana na mabondeli na ngai?’ Bamoko kati na baoyo bamitunaki mituna oyo bayaki koyeba bokoli oyo basengelaki kosala. Na yango, bazalaki kosambela mpo na kozwa boyebi mingi ya mokano na Nzambe, kasi bazalaki kolekisa ngonga moke na boyekoli ya Biblia mpe ya mikanda ya la Société. Bamosusu bazalaki kosambela mpo ete balekisa ngonga mingi kati na mosala ya kosakola, kasi bazalaki na ‘bomoi moko oyo ezalaki kopesa bango nzela te na kokitisa ba dépenses na bango mpe, mpo na yango, ntango oyo bazalaki kolekisa mpo na kosala. Osambelaka Nzambe mpo ete asalisa yo na kozalisa bayekoli? Na yango, kino na meko nini ozali kosala mpo na kokoma molakisi ya makoki koleka? Obakisaka na motema moko ntalo ya bayekoli ya sika ya Biblia oyo ozali kotala bango mpe ozali na ntango to ozali pene mpo na kosalela ntango na yo mpo na kotambwisa ntango nyonso boyekoli moko ya Biblia? Na kosala nyonso ekoki mpo na koyokanisa bomoi na yo elongo na mabondeli oyo ozali kosala, ozali komonisa mposa na yo ya solo ya kolinga koyokama epai na Nzambe.
18. Mpo na nini tosengeli kosenzela na kozongisa makambo nyonso na molongo kati na Nzambe mpe biso?
18 Ezali na ntina ete moko na moko kati na biso asala milende mpo na ‘kobongisa makambo nyonso’ elongo na Nzambe, Mozalisi, kati na mitindo nyonso ya bomoi na ye. Na likambo yango, Yisaya azali kopesa toli oyo: “Ngombe ayebi Nkolo na ye mpe mpunda ayebi efandelo ya nkolo na ye, nde Yisraele ayebi te, bato na ngai basosoli te.” (Yisaya 1:3) Moko te kati na biso akolinga kotalelama lokola azali na boyebi mingi te to botondi mingi te lokola ngombe to lokola mpunda. Nzokande tosengeli kotalelama motindo yango soki tokanisi ete tozali na ntina te ya kosala milende mpo na koyeba Mozalisi na biso mpe mitinda to mibeko na ye, mpe mpo na kozala na bomoi na boyokani na makambo oyo tozali koyekola
19. Elikya nini Yisaya azali kopesa epai na baoyo bazali kobongisa makambo elongo na Nzambe, mpe motuya nini nsango wana ezali na yango mpo na biso?
19 Yisaya azalaki kopesa epai na Bayisraele bantina ya kozala na elimo ya kolonga, kolobaka ete bakoki kobongwana mpe komonana peto liboso na Jéhovah, lokola elamba motane oyo esengeli kokoma mpembe lokola matiti na mpate to mbula mpembe oyo ezalaki kozipa ngomba ya Hermona. (Yisaya 1:18; Nzembo 51:7; Danyele 7:9; Emoniseli 19:8) Ata soki kati na bango nyonso Bayuda bayanolaki te na libyangi oyo, mpe ete mboka to ekolo ebomamaki mpe bato mosusu bakendaki boombo, mwa litika moke ya bato na sembo ezongaki kati na mboka. Biso mpe tokoki kondimama to kozwa boboto ya Jéhovah, mbala mosusu nsima ya lisalisi ya bakengeli ya motema malamu baoyo bazali ‘basambisi mpe bapesi-toli’ batondi na bolingo kati na lisangá. (Yisaya 1:20, 24-27; 1 Petelo 5:2-4; Bagalatia 6:1, 2) Na bongo, bozala na elikya, bokoki kobongisa makambo nyonso kati na Mozalisi mpe bino. To soki ozali sikawa kozwa litomba na boboto ya Nzambe, okoki koyeisa penepene bikangeli oyo bizali kosangisa yo elongo na ye. Likambo yango ebongi mpenza na milende nyonso oyo ekoki na yo kosala mpo na ntina yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a E. Plumptre alimboli ete “(libongoli ya Version du roi Jacques) ezali na likanisi ya lisolo kati na bato mibale bakokani, nzokande liloba na hébreu ezali etinda to mobeko, lokola mosambisi (zuzi) azali koloba epai na moto azali kosamba.
Bozongeli
◻ Etinda oyo etali ‘koya mpe kobongisa makambo’ elongo na Nzambe elimboli nini?
◻ Na likambo nini eleko na Yisaya ekokanaki na oyo ya biso?
◻ Na kolandaka maloba na Yisaya, motindo nini tokoki kondimama epai na Nzambe?
◻ Soki tolongoli masumu minene, na makambo nini mosusu tokoki kozala na mposa ya kobongisa makambo kati na Nzambe mpe biso?
[Elilingi na lokasa 8]
Ngomba ya Hermon na ba neiges. Na mosika tozali komona libulu monene to lobwaku na Yordani mpe ngomba na Galilai.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Photos, pages 10, 31: Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Elilingi na lokasa 13]
Yisaya alobaki ete ’mpunda ayebi efandelo ya nkolo na ye. Liteya nini tokoki kozwa na maloba yango?