Bolingo mpo na Nzambe, nguya oyo ezali kopusa bato na kosala malamu
BATO ya motema malamu bazali mpenza koyeba ntina ya kopekisa pite oyo ezali komonana mingi koleka. Lokola ministre moko ya lingomba ya Kanada oyo ebengami Eglise unifiée alobaki yango, “ntango bato to ekolo moko ezali koboya kondima mitinda ya bizaleli malamu, mbano ezalaka ya mabe koleka: bitumba, kokwea ya mosolo, mobulu mpe kozanga kotosa bokonzi”. Lokola lisolo oyo euti koleka emonisi yango, mangomba minene emimonisi te mpenza nguya oyo ezali kopusa bato na kosala malamu. Na bongo, mpo na biso, soki tolingi kozala na bomoi ya malamu, esengeli na biso koluka epai mosusu nguya oyo ezali kopesa bokasi yango mpe komimonisa ete tozali pene mpo na kotosa yango.
Bopusi oyo nguya eleki banguya nyonso yango ezali kosala emonanaki polele kati na lisolo ya bomoi ya Yozefe, mosali mohebreu oyo azalaki kobatela biloko ya mosali na ndako ya mokonzi ya Ezipito. Ntango mwasi ya nkolo na ye alingaki kokweisa ye mpo na kosangisa nzoto elongo na ye, atemelaki ye mpe angangaki: “Bongo nakoka kosala mabe monene oyo mpe kosala lisumu epai na Nzambe boni?” (Genese 39:7-9) Yozefe azalaki na nguya ya koboya masengi ya mwasi yango mpamba te azalaki na mposa ya kosepelisa motema ya Nzambe mpe azalaki koyeba bokonzi na ye.
Mibu nkama mibale na nsima, libota na Yisraele, oyo esalamaki na bakitani ya Yakobo, tata na Yozefe, bazwaki Mibeko Zomi oyo ezalaki kati na Mibeko oyo epesamaki nsima na Moise. Kozanga kotosa Mibeko yango ezalaki kobendela Bayisraele nkanda ya Nzambe, nzokande botosi ezalaki komemela bango mapamboli ya Nzambe. Na bongo mibeko yango mizalaki motambwisi ya bizaleli malamu mpo na bango.
Mibeko Zomi: Nguya oyo ezali kopusa na kosala malamu
Mibeko Zomi ezalaki nguya makasi? Nguya na yango ezali naino koyokana lelo, na ekeke na biso oyo ya ntuku mibale. Na 1962, gouverneur général ya Nouvelle-Zélande alobaki: “Nazali na likanisi ete na miso ya bato mosusu Mibeko Zomi ekoma ya kala. Kasi ezali bozoba te na komona ete soki tozali mpenza kotosa yango biso banso lelo, mibeko ya sikoyo kati na mboka ekomonana ete ezali mingi koleka mpe ezangi ntina.”
Nzokande, na ntango ya lisolo moko elongo na elenge mokonzi moko ya bayuda, Yesu Klisto amonisaki ete ekoki bobele te na kobatela Mibeko Zomi. Elenge mobali atunaki ye: “Likambo nini ya malamu nasengeli kosala mpo nazwa bomoi ya seko?” Ntango Yesu ayanolaki ye ete ‘abatela mibeko, mokolo na mokolo’, mpe atangelaki ye mwa ndambo na yango, mokonzi wana azongiselaki ye maloba ete: “Natosi oyo nyonso; nini ezangi ngai lisusu?” Yesu alobaki na ye nde: “Kenda, tekisa biloko nyonso ezali na yo mpe pesa epai na babola mpe okozala na biloko na motuya na likolo; mpe yaka kolanda ngai.” Nzokande, lisolo ezali koyebisa lisusu, “eyoki elenge likambo yango alongwi na mawa mpamba te azalaki na biloko mingi”.—Matai 19:16-22.
Kokokanisa eteni yango elongo na lisolo ya motindo moko eyebisami kati na Luka 10:25-28 ezali kosalisa biso na koyeba mokakatano ya liboso ya elenge wana. Tozali kotanga: “Molakisi na mibeko moko atelemaki mpo na komeka ye (Yesu), mpe alobaki ete, ‘Molakisi nasala nini ete nazwa bomoi na seko?”’ Yesu asalisaki ye na kokanisa, mpe ete moto yango ye moko azwaki eyano na motuna na ye. Alobaki na mokuse: ‘Okolinga Jéhovah Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na nguya na yo mobimba, mpe na mayele na yo mobimba; mpe mozalani na yo lokola yo moko.” Na bongo Yesu asukisaki: “Sala boye mpe okozala na bomoi.”
Sikawa omoni nini ezalaki mokakatano ya elenge yango? Bolingo na ye mpo na Nzambe mpe mpo na mozalani na ye enyatamaki na bolingo na ye mpo na bozwi ya mosuni. Mawa! Mpo na yango, ata milende nini oyo azalaki kosala mpo na kobatela Mibeko Zomi, azalaki na likama ya kozanga kozwa bomoi na seko.
Bolingo mpo na Nzambe elimboli nini?
Tozali na bomoi na eleko moko oyo bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani enyatami na bolingo ya ngai liboso, ya bozwi na mosuni mpe ya pite. Mingi basili nkutu kotika endimeli ya Nzambe mozalisi mpo na kondima liteya oyo ezangi moboko ya évolution. Matomba nini yango ebimisi?
Uta bikeke mingi, bakonzi na mangomba ya boklisto na mokili bazalaki kosalela liteya oyo euti na Biblia te oyo ya lifelo na moto lokola lopango molai mpo na kotemela pite. Na ntina yango, tala oyo tokoki kotanga kati na Encyclopédie internationale (Angl): “Na ntango ya kala, nguya makasi oyo ezalaki kopusa bato ya libota to ekolo moko na kosala malamu ezalaki na ntembe te kobanga lifelo. Kobanga yango ezalaki koyangela ata mikonzi mpe bankumu na Lingomba mpe ezalaki mpenzampenza epekiseli bobele moko na bamposa na bango ya mabe.” Liteya wana ya lifelo ezalaki komonisa ete Nzambe azalaki mabe, ayokanaka na bato te mpe kobombela bato nkanda. Ya solo, ekoki kozala ete epekisi bato mosusu na kolekisa ndelo kati na bamposa na bango, kasi epengoli mpe bato mingi mosusu epai na Nzambe, kokomisaka bango baombo mpo na kondima mateya mpe makanisi oyo euti na Biblia te lokola évolution.
Nzokande, Biblia, ezali koteya te ete Nzambe azali konyokola milimo kati na moto ya lifelo. Ntoma Yoane ayebisi biso: “Nzambe azali bolingo.” “Ye azali sembo mpe moyengebene mpo na kolimbisa biso masumu na biso.” Na ngambo na ye, Moise akomaki: “Jéhovah Nzambe na mawa mpe na ngolu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo.” (1 Yoane 4:8; 1:9; Exode 34:6) Wana ezali bobele mwa bamoko na bizaleli kitoko ya Nzambe oyo ezali kobenda biso epai na ye. Bizaleli wana, mingimingi bolingo na ye, ezali kobenda biso na kolinga ye. “Biso tokolingaka mpo ete ye alingaki biso liboso.” (1 Yoane 4:19) Ee, bolingo mpo na Nzambe ezali moko na nguya makasi koleka oyo ezali kotinda bato na kosala malamu. Epai mosusu, ekoki kopesa biso bomoi na seko!
Bolingo ya solo mpo na Nzambe ezali ezaleli moko ezangi komonana te. Ezali kopusa mpe na kosala mpo na bolamu ya moninga. Ntoma Paulo azali kotanga mitindo mikeseni ya bolingo yango. Tala mwa ndambo: “Bolingo ezali na motema petee, bolingo ezali na boboto, ezali na zuwa te; bolingo ezali na lolendo te, ekomibimbisaka te, ekosalaka na nsoni te, ekolukaka malamu na yango mpenza te, ezali na nkanda te, ekobombaka mabe na motema te.” (1 Bakolinti 13:4, 5) Tomonisaka bolingo ya motindo boye mpamba te tolingi komekola Tata na biso ya likolo. Mpo na yango Yesu alobaki: “Mibeko nyonso mpe masakoli ekakemi na mibeko oyo mibale (olinga Nzambe mpe linga moninga na yo).” (Matai 22:40) Na maloba mosusu, soki tozali komonisa bolingo motindo yango, tokoyiba mozalani na biso te, tokoboma ye te, tokosala ekobo te elongo na mobalani na ye. Nkutu ntoma Yoane azali kondima likanisi yango na kolobaka: “Mpo ete bolingo na Nzambe ezali boye ete tokokisa malako na ye. Malako na ye mazali na bozito te.”—1 Yoane 5:3.
Bolingo mpo na Nzambe: nguya oyo ezali kopusa na kosala malamu
Na ekeke ya mibale, Tertullien amonisaki bopusi oyo bolingo na Nzambe ezalaki na yango likolo na baklisto ya liboso. Abyangaki banguna na ye bapakano na kotala kati na mikanda to baliste na bango ya bato mabe soki bakokuta ata nkombo ya moklisto moko. Lokola bamonisaki yango te, alobaki na bango: “Bobele biso moko nde, tozangi likambo.” Mokanda Le Monde romain antique (Mokili ya kala ya roma) (Angl.) ezali kondima likanisi yango na maloba oyo: “Ebele na matatoli oyo etali bomoi na bango ya ndakisa, bizaleli na bango ezangi efundeli.” Zulunalo Christianity Today ezali koyebisa maloba oyo ya mokomi na masolo ya bato Roland Bainton: “Kobanda na nsuka ya eleko ya Kondimana ya Sika kino na mibu zomi oyo milandi kati na 170—180, elembo ata moko ezali te ete baklisto bozalaki kosala mosala lokola basoda.” Bolingo mpo na Nzambe ezalaki kopusa bango na kotosa ye na kozalaka na bomoi ya kolongobana. Kasi mbala mosusu ozali komituna soki tokoki ntango nyonso komona misala malamu ya nguya yango ya bizaleli malamu lelo oyo.
Ekoki kosalama! Mokolo moko, mokomi na nsango na nkombo ya Mike McManus akomaki kati na zulunalo Herald & Review ete ayoka naino te lisolo moko ezali kokweisa kosangisa nzoto na libanda ya libala. Sanza moko na nsima, amonisaki ete kati na mikanda ya batangi ya zulunalo na ye akutaki mokanda moko eutaki epai na elenge mwasi moko ya mibu 14, Témoin de Jéhovah, oyo azalaki koloba ete: “Likanisi bobele moko bazali na likama ya kozwa maladi motindo oyo ekoki mpo na kolonga bato mingi ete bakima (kosangisa nzoto liboso ete babalana.) Kasi soki ba Témoins de Jéhovah bazali koboya, ezali mpo ete Jéhovah azali kosenga biso na kokima pite.” (Ezali biso nde tolalisi maloba oyo.) Nsima na kolobela mokanda yango, Mike McManus atunaki motuna oyo: “Kati na lingomba na yo, bilenge boni ya mibu 14 bakoki mpenza koloba na polele boye maloba ya santu Paulo (1 Bakolinti 6:18)?”
Ba Témoins de Jéhovah ya mikili mosusu bazali komonisa limemya ya motindo moko epai na mibeko ya Jéhovah lokola elenge mwasi oyo touti kolobela mpo na ye. Tala na mwa maloba mwa bamoko na mibeko ya Nzambe mizwami kati na Biblia: ‘Zala na kolongobana kati na makambo nyonso’, “Bobelema na bikeko te”, ‘Boboya biloko bipesameli bikeko, na makila, na ekobo’, ‘Bolobaka solo’, ‘Boteya bana na bino na banzela ya Nzambe’. (Baebele 13:18; 1 Yoane 5:21; Misala 15:29; Baefese 4:25; 6:4) Na zongazonga na yo to na esika na yo ya mosala, osili komona ete ba Témoins de Jéhovah bazali kosala nyonso mpo na komemya mitinda oyo? Naino omituna te mpo na nini bazali kosala bongo, mpo na nini bazali koboya ete bazongisa bango makila na nzoto, mpo na nini balingaka bitumba te, mpo na nini bayaka kotala bino na bandako na bino, na mokuse mpo na nini bakeseni na bato mosusu? Na bongo, ezali bolingo na bango mpo na Nzambe nde ezali kopusa bango na kosala nyonso wana.
Bolingo esilaka te
Kozalaka na mposa ya kosepelisa motema na Nzambe, Ba Témoins de Jéhovah bazali kondima na motema moko toli oyo: “Bobilaka makambo na ntango oyo te kasi bobongwana mpo na kozwa makanisi na sika kino bokokoka kososola mokano na Nzambe, yango malamu, yango bokoki koyamba, yango ebongi kwa.” (Baloma 12:2) Ntango bazali koyeba nini ezali “mokano na Nzambe” epai na bango, bazali kolinga kokokisa yango. Okanisi ete wana ezali likanisi ya mpamba, oyo ekoki kosalama na eleko na biso? Tala moke mwa masolo ya solo oyo malandi:
Jose, oyo azali kofanda na Sao Paulo, na Brézil, abandaki kofanda esika moko na 1963 elongo na Eugenia oyo abalaka liboso. Mibu mibale na nsima, bango mibale babandaki koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah. Na boumeli ya boyekoli na bango, bayekolaki ete ‘libala esengeli kokumisama liboso na bato banso’. (Baebele 13:4) Bayebaki ete esengelaki na bango kobalana, nzokande Eugenia azalaki libre te mpo na kobala José, mpe koboma libala endimami te na Brézil. Nzokande, na 1977, ntango mobeko moko ezalaki kopesa nzela na koboma libala endimamaki, asalaki nyonso oyo ebongi mpe, na 1980, babalanaki, kokokisaka bongo masengami ya Nzambe. Bolingo na bango mpo na Nzambe ezwaki litomba na yango.
lnire, oyo azali kofanda na New York, amekaki ba drogues ya lolenge nyonso mpe azalaki kofanda elongo na Ann, chérie na ye ya moke. Mokolo moko, mpo na kozwa mbongo, asengaki na ye ete atinda bafoto na ye na zulunalo moko mpo na mibali oyo bayebani mingi. Na bongo Ann balakisaki ye ebele na mosolo mpo ete bakanga ye bafoto ya bolumbu. Nzokande, na mikolo se wana, lnire abandaki koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah, mpe Ann alandaki ye na nsima. lnire atikaki komela drogue mpe, na nsima ya poso misato, bazwaki bango mibale ekateli ya kobalana. Mpe koyokaka ete engebene Biblia moklisto asengeli kolata na motindo mobongi, na lisosoli nyonso Ann azwaki ekateli ete akoki kondima te kotikala bolumbu mpo na zulunalo wana, ezala ata motuya nini ya mosolo oyo epesameli ye. (1 Timote 2:9) Na likanisi na yo, nini ebendaki lnire mpe Ann na kosala mbongwana ya motindo boye kati na bomoi na bango? Ann alimbolaki ete ntango amonaki ete kokoma Témoin de Jéhovah elimbolaki bobele te komikotisa kati na lingomba moko kasi kopesa bomoi na yo epai na Nzambe, ayebaki ete esengelaki na ye kobongola nokinoki motindo ya bomoto na ye. Na ntembe te, bolingo mpo na Nzambe ezali nguya makasi oyo ezali kopusa na kosala malamu.
Bamoko bazali mbala mosusu kokanisa ete ezali wana makambo mazali komonana bisika mokomoko. Nzokande, ezali bongo te. Makambo mingi ya motindo moko masalamaki bisika oyo ba Témoins de Jéhovah bazali kokokisa mosala na bango. Mpo na nini te kotalela likambo yango liboso mpenza? Soki osali yango, okomona yo moko ete bolingo mpo na Nzambe, ndenge yango ezali komonana kati na lisangá to lingomba ya solo, ezali ntango nyonso nguya oyo ezali kopusa na kosala malamu.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
Mokanda “Le monde romain antique” elobi na ntina na baklisto ya liboso: “Matatoli mazali mingi mpo na bomoi na bango ya ndakisa, etamboli na bango ya malamu.”
[Elilingi na lokasa 7]
Bolingo mpo na Nzambe ekoki kosalisa yo ete mpiko na masenginya