Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/5 nk. 3-4
  • Mabe kati na mokili oyo mabebisami na mobulu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mabe kati na mokili oyo mabebisami na mobulu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini okoki kokima basali na mabe kati na mokili oyo mabebisami na mobulu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mpo na nini mabe ekomi mingi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Nsuka ya mabe nyonso ebelemi!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/5 nk. 3-4

Mabe kati na mokili oyo mabebisami na mobulu

MABE ezali likambo ya sika te. Koboma ya yambo esalemaki esili koleka bambula mingi, ntango Kaĩna abomaki ndeko na ye Abele. Kobebisa basi na makasi mpe kosangisa nzoto mibali na mibali elobelami lisusu kati na Makomami na hébreu. (Genese 4:8; 19:4, 5; 34:1-4) Na ekeke ya liboso, bato bazalaki kobetana, lokola yango emonisami na lisese ya Mosamaria na motema malamu. (Luka 10:29-37) Kasi, na mikolo na biso, makambo mazali motindo moko te.

Bafandi na bingumba minene ya etando na biso, ezala New York, Londres, calcutta to Bogotá, bazali na mayoki ete mabe ezali sé kopalangana mpe ekómi likámá monene. Ankete moko ya zulunalo lndia Today oyo ezali na motó na likambo “Losambo ya mobulu,” elobaki ete: “Mobulu, kozanga botósi mpe ezaleli ya kobuka mibeko ezali kotómbolama mpo na kotyama na molongó ya losambo. Bokóli wana ya mobulu ezali kobebisa boyokani bokembisami te oyo bozali kati na bizaleli mpe makambo na bato, oyo ekosalaka ete mboka ezala na bomoko.” Mbala mosusu ata bapolisié bakobukaka mibeko mpe bakosalelaka myango ya basali na mabe oyo bango moko bazali kopekisa. Lisoló wana libimaki na lnde, oyo touti kotanga elobi ete: “Bato oyo bakangami kati na boloko bazali kokufa mbala na mbala mpe nsango yango ezali ntango nyonso na minoko na bato.” Yango ezali mpe komonana na mikili misusu.

Likoki ya kopengola mabe ezali sé kokóma moke. Engebene ankete moko esalemaki na Etats​—Unis, “na 1988, ndako moko ya Amerike kati na minei eyibamaki to ezwaki likámá na basali na mabe.” Oyo eleki ezali ete, basali na mabe wana bazali bobele bilenge. Na Amérique Latine, zulunalo Vision elobi ete “kati na ba sicarios [bato oyo bakofutamaka mbongo mpo na kobomal zomi, libwa bazali bobele bilenge. [Bazali mpenzal ‘bana’ mpe mpo na yango babatelami na mibeko.” Mabe monene oyo makosalemaka na bilenge ezali mpe likambo ya mokili mobimba.

Esili koleka mibu 2 000, Biblia elobaki boye: “Kasi ososola likambo oyo ete, na mikolo na nsuka, ntango na mpasi ekoya. Mpo ete bato bakozala bamikumisi na bango mpenza, baluki na mosolo, . . . bato bazangi bosembo, bato bazangi bolingo, . . . bato bazangi komikanga motema, babomi, baoyo bakolingaka malamu te, bakósi, bato na nkɔ, babimbi na lolendo, . . . Nde bato mabe mpe bakósi bakozimbisa mpe bakozimbisama.”​—2 Timoté 3:1-4, 13.

Uta 1914, bilembeteli mingi bimonisi ete tozali kobika na mikolo yango ya mpasi. Uta bitumba mibale ya mokili mobimba bisalemaki mpe matáta mosusu minene, nzela ya koyangela mokili ezali te kati na makambo mingi; ebebisami mpenza na mobulu. Mabe mazali kosalema mingi mpenza. Na bamboka mingi, basali na mabe basili kozwa bisika ya likoló mpe bazali kobulunganisa bomoi ya ba citoyens oyo bakotosaka mibeko. Dépité moko ya lokumu na Amerike alobaki ete: ’’Ezali na bantina mingi ya kozala na bobangi na mikolo na biso, makambo oyo liboso ezalaki kotungisa biso te. Tozali mbala mosusu na bobangi mingi lokola nde tokangami na boloko, nzokande baoyo basengeli kokangama bazali kotambola na bonsomi nyonso.”

Na yango, bato bazali sikawa kozwa bibongiseli oyo na mibu 20 to mibu 30 eleki, ezalaki na ntina te. Bikuke bisili kotyama bafungola mibale to misato ya minene mpe bibende. Na bisika mosusu, bato bakotambolaka ntango nyonso na mwa mbongo mingi na elikya ya komibikisa na maboko na moto oyo akolinga kosala bango mabe mpe bongo, kopengola matumoli ya moyibi oyo azwi eloko moko ya koyiba te. Soki butu ekómi, babalabala mingi ekozalaka na bato te. Baoyo bakotambolaka bobele baoyo bayebi likambo te, baoyo na bokengi te, to baoyo basengeli kotambola wana likoló na makambo oyo mabimeli bango; bato wana nyonso bazali lokola bilei mpo na basali na mabe oyo bazali kotambolatambola kati na bisika ya molili ya bingumba

Tokoki kosala nini mpo na kopengola likámá ya mabe kati na mokili oyo mabebisami na mobulu mpe na yikiyiki? Ndenge nini tokoki kokima yango?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto