Mpo na nini Nzambe azali na motema molai?
TALA nzoto oyo elɛmbi ya mwana oyo alyaka malamu te. Tala nzoto na ye ekɔndi mpe libumu livimbi. Kanisa mpo na bilei oyo azali na yango mposa nde akozwa te mpe tala saani mpamba oyo ye asimbi na lobɔkɔ. Na ntembe te, mama na ye oyo miso ekɔti mingi mpenza, azali kotala likambo oyo; elongi ya mwasi yango mpe ezangi elikya. Sikawa, pekisa mawa na yo mpe tika kolela.
Likambo oyo lizali komonana mingi mpenza na etando mobimba ya Sahel, Etúká oyo enyokwami na nzala. Etúká Sahel ezali na molai ya bakilometele 4 800 na Afrika, na ngele ya esobé ya Sahara, uta mokili ya Sénégal, na mopanzipanzi ya mai monene Atlantique kino na mokili ya Etiopia, na la Mer Rouge. Kasi nzala ezali mpe konyokola ntalo monene na bafandi ya mikili misusu. Rapport ya OMS (lisangá likotalelaka makambo ya kolongono ya nzoto na mokili mobimba) elakisi ete pene na 1,1 milliard ya bato na mabelé, bazali mpenza na maladi makasi to bazali kolya malamu te.
Nzala ezali bobele moko na bampasi ya bato. Bato bazali kobebisa etando na biso, mpe biso tozali kozwa mpasi euti na yango. Biyangeli ya politike bipesi nzela na bokeseni mpe na bitumba oyo bizali kobebisa bomoi ya bato mingi to mpe koboma bango. Mpo na nini Nzambe apesi nzela na makambo motindo oyo? Azali solo komibanzabanza mpo na biso?
Nzambe azali mpenza kobanza biso
Mozalisi na biso azali komibanzabanza mpo na biso. Tozali na bilembeteli mingi ya bolingo oyo azali na yango epai na biso mpe na likoki na ye ya kosala makambo mpo na bolamu na biso mpe kopesa lolenge na bomoi ya kimya epai na bikelamu na ye nyonso. Na ndakisa, na elilingi oyo ezali awa na likoló, tala nzoi oyo ezali likoló na folólo ya nzeté moko ekobotaka mbuma. Nzoi azali na mposa na mai na folólo wana, oyo ezali bongo bilei mpo na ye. Nzeté ezali mpe na mposa na mputulú na mbótó (pollen) oyo euti na nzeté mosusu ya motindo na yango, nzokande mputulú yango ememami na nzoto na nzoi. Ezali bongo nde folólo ekozwaka mputulú na mbótó, na eleko oyo ekobotisaka mbuma. Nzeté nyonso ekobotaka mbuma ezwaka mputulú bobele lolenge wana te, kasi mpo na lolenge oyo tolobeli awa, ezali Nzambe nde asilaki kobongisa boyokani wana ya kokamwa. Litomba ya ezaleli na malamu ne ye ezali mbuma oyo tokolyaka mpo na esengo na biso mpe mpo na bolamu na biso.
Nzoi ye moko azalaka kati na etuluku monene ya banzoi koleka 30 000 oyo ebongisami malamu. Mosusu ekobatelaka ndako na yango, nzokande mosusu ekopɛtolaka yango to mpe kopepela yango mopepe. Mpe mosusu ekomemaka mai na folólo mpe mputulú na mbótó ekoleisaka bana na bango to mpe koluka bisika mosusu epai bakoki kozwa bilei. Mpo na kosepelisa monoko na biso, Nzambe ye moko asilá kobongisa makambo mpo ete tokoka kozwa mafuta na nzoi na elengi mingi mpe ekokembisaka nzoto, oyo euti na nzoi wana ekosala mosala mingi.
Likamwisi oyo lizali bongo boyokani kati na nzoi mpe nzeté, mpe kati na nyama mike wana bango moko, ezali bobele moko na ebele na bilembeteli bimonisi ete Mozalisi azali mpenza na makoki ya kosala boyokani wana kati na bikelamu ya bomoi. Ebongi mpenza na koloba ete “Nzambe azali na mobulu te, kasi na kimya.” (1 Bakolinti 14:33) Lokola ezali bongo, mpo na nini Nzambe atiki ete bato bazala kati na mobulu, likambo oyo lizali kobimisa mpasi mingi mpo na ebele na bato? Soki Nzambe azali komibanzabanza mpo na biso, mpo na nini azali kozela uta ntango molai ete abongisa likambo oyo? Na elobeli mosusu, mpo na nini Nzambe azali na motema molai?
Biblia, Liloba na Nzambe, eyanoli na mituna wana. Mokanda yango kitoko moyebisi ete Jéhovah Nzambe azali na bantina malamu ya kozala na motema molai. Bantina yango ezali nini? Kino ntango nini Nzambe akomonisa lisusu motema molai?