Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/2 lok. 3
  • Bokɛba na basakoli ya lokutá!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bokɛba na basakoli ya lokutá!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndimbola ya kosakola
  • Basakoli ya lokuta
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • “Bana na bino ya mibali ná bana na bino ya basi bakosakola”
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Esakweli ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Tókamata lokola elakiseli Basakoli ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/2 lok. 3

Bokɛba na basakoli ya lokutá!

NA MPOKWA moko, Mobrezilié moko mpe mwasi na ye basilaki kolala mpongi, nde bayokaki miyibi kokɔta epai na bango. Na kobanga nyonso, babalani wana babimaki na lininisa ya chambre mpe bakendaki kobenga bapolisié. Kasi makanisi ya mwasi mabulunganaki na makambo oyo ye amonaki kino akokaki lisusu kolala te epai na ye, mpe akendaki kolala epai na mama na ye.

Baoyo nyonso miyibi basili kokɔtela bango na ndako to basili koyiba bango eloko, bazali kososola liyoki ya mwasi oyo. Ezali makambo oyo makoki kobulunganisa moto, kasi, na mawa mpenza, bato mingi bazali kokutana na yango. Nzokande, ezali na motindo na moyibi mosusu oyo ezali kopesa makámá mabe mpenza.

Motindo na moyibi nini moleki mabe mpenza, mpe banani bazali miyibi? Yesu Klisto asili koyebisa biso na ntina na likambo yango, wana elobaki ye mpo na eleko na biso ete: “Basakoli mingi ya lokutá bakobima mpe bakopɛngwisa bato mingi.” (Matai 24:11, MN) Basakoli ya lokutá bazali miyibi. Na ndimbola nini? Bazali koyiba nini? Koyiba na bango etaleli makambo oyo bazali kosakola. Na yango, mpo na kokanga ntina ya likambo, tosengeli liboso koyeba oyo Biblia elobi na ntina na kosakola.

Ndimbola ya kosakola

Liloba “kosakola” ezali mbala mosusu kopesa yo likanisi ya “koyebisa likambo liboso mpo na mikolo mizali koya.” Wana ezalaki solo moko na mikumba ya basakoli na Nzambe na ntango na kala, kasi yango elekaki na ntina mingi te. Na ndakisa, na ntango mosakoli Ezekiele azwaki emonaneli mpo na ‘kosakola na mopepe,’ asengelaki bobele koyebisa mobeko na Nzambe. (Ezekiele 37:9, 10) Wana Yesu asambisamaki na banganganzambe, banyokoli na ye babwakelaki ye nsɔi na elongi mpe babɛti ye mbatá, mpe balobaki na ye mpo na kotyola ye ete: “Klisto, sakwela biso! Nani abɛti yo?” Basɛngaki na Yesu te ete ayebisa bango makambo matali mikolo mizali koya. Balukaki nde komona soki, na nguya na Nzambe, akokaki koyeba moto oyo abɛta ye.​—Matai 26:67, 68

Ya solo, kati na minoko oyo Biblia ekomamaki na ebandeli, maloba mabongolami na “kosakola” mpe “esakweli” emonisi mpenzampenza koyebisa likanisi na Nzambe na ntina na likambo moko to, kolobela “makambo minene na Nzambe,” lokola yango elobami na mokanda ya Misala. (Misala 2:11) Ezali na ndimbola wana nde basakoli ya lokutá bazali koyiba bato mingi.

Banani bazali bongo basakoli ya lokutá, mpe bazali koyiba nini? Mpo na koyanola na motuna oyo, tozonga na lisoló ya libota na Yisraele kino na ntango na Yilimia.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto