Basakoli ya lokuta
Ndimbola: Bibongiseli mpe bato oyo basakolaka nsango oyo bango moko balobaka ete euti na nguya moko boye, oyo eleki ya bato, nzokande nsango yango euti mpenza na Nzambe ya solo te mpe eyokani te na mokano na ye.
Ndenge nini bato bakoki koyeba basakoli ya solo mpe ya lokuta?
Basakoli ya solo bamonisaka ete bandimelaka Yesu, kasi basukaka te na koloba ete basakolaka na nkombo na ye
1 Yoa. 4:1-3: “Bómekaka maloba yango mpo na komona soki euti mpenza na ye, mpo ebele ya basakoli ya lokuta babimi na mokili. Bokoyeba liloba ya elimo oyo euti na Nzambe na likambo oyo: Liloba nyonso ya elimo oyo endimi Yesu Kristo ete ayaki na nzoto ya mosuni euti na Nzambe, kasi liloba nyonso ya elimo oyo endimi Yesu te euti na Nzambe te.”
Mat. 7:21-23: “Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai: ‘Nkolo, Nkolo,’ nde bakokɔta na bokonzi ya likoló, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Tata na ngai oyo azali na likoló. Na mokolo yango, bato mingi bakoloba na ngai: ‘Nkolo, Nkolo, tosakolaki na nkombo na yo te . . . ?’ Nzokande nakoyebisa bango polele ete: Nayebi bino ata moke te! Bólongwa mosika na ngai, bino bato oyo bobukaka mibeko.”
Basakoli ya solo balobaka na nkombo ya Nzambe, kasi kotuta ntolo ete ozali momonisi na ye ekoki te
Mib. 18:18-20: “Nakotɛlɛmisela bango mosakoli moko oyo akouta na kati na bandeko na bango, lokola yo [Moize]; mpe nakotya mpenza maloba na ngai na monɔkɔ na ye, mpe akoyebisa bango mpenza mitindo nyonso oyo nakopesa ye. Mpe ekosalema mpenza boye: moto oyo akoyoka te maloba na ngai oyo akoloba na nkombo na ngai, ngai moko nakosɛnga ye azongisa monɔkɔ. Kasi, mosakoli oyo, na lofundo mpenza, azali koloba na nkombo na ngai liloba oyo napesi ye mitindo te ya koloba to azali koloba na nkombo ya banzambe mosusu, mosakoli yango asengeli kokufa.” (Talá Yirimia 14:14; 28:11, 15.)
Yesu alobaki boye: “Nasalaka eloko moko te na likanisi na ngai moko, kasi kaka ndenge Tata ateyaki ngai, ndenge mpe nazali koloba makambo oyo.” (Yoa. 8:28) Alobaki lisusu: “Nayei na nkombo ya Tata na ngai.” (Yoa. 5:43) Yesu alobaki mpe ete: “Moto oyo alobaka makambo oyo euti na ye moko alukaka nkembo na ye moko.”—Yoa. 7:18.
Soki bibongiseli to bato bazali kotuta ntolo ete bazali bamonisi ya Nzambe, kasi bazali koboya kosalela nkombo mpenza ya Nzambe, mpe bazalaka na momeseno ya koteya makanisi ya bango moko, bato ya ndenge wana bakokisi mpenza lisɛngami yango ya ntina mpo na kozala basakoli ya solo?
Kobimisa “bilembo minene” to kosala “makamwisi” yango moko emonisaka mpenza te ete moto azali mosakoli ya solo
Mat. 24:24: “Ba-Kristo ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima mpe bakobimisa bilembo minene [“makamwisi,” LL] mpe bakosala makamwisi mpo na kokosa ata bato oyo baponami, soki likoki ezali.”
2 Tes. 2:9, 10: “Kozala ya mobuki mibeko eyokani na mosala ya Satana elongo na misala nyonso ya nguya mpe bilembo ya lokuta mpe makamwisi oyo ezali komonisa makambo oyo ekoya mpe na bokosi oyo euti na makambo nyonso oyo ezangi boyengebene mpo na baoyo bazali kobeba nyɛɛ, lokola lifuti na ndenge bamonisaki te ete balingi mpenza solo mpo bábikisama.”
Moize mpe asalaki makamwisi, kasi asalaki yango na lisalisi ya Yehova. (Kob. 4:1-9) Yehova apesaki mpe Yesu nguya ya kosala makamwisi. (Mis. 2:22) Nzokande, kaka makamwisi te nde emonisaki ete Nzambe moto atindaki Moize ná Yesu.
Makambo oyo basakoli ya solo basakolaka ekokisamaka, kasi bayebaka te ntango nini mpe ndenge nini yango ekokokisama
Dan. 12:9: “Kende, Danyele, mpo maloba yango ebombami sekele mpe ekangami na elembo tii na ntango ya nsuka.”
1 Pe. 1:10, 11: “Basakoli . . . bazalaki kolukaluka koyeba eleko nini mpenza to na eleko ya ndenge nini makambo oyo elimo oyo ezalaki na kati na bango ezalaki kolakisa mpo na Kristo ekokoka. Ezalaki kotatola libelalibela bampasi ya Kristo mpe nkembo oyo esengelaki koya nsima na yango.”
1 Ko. 13:9, 10: “Tozali na boyebi ya ndambo mpe tosakolaka kaka na ndambo; kasi ntango eloko ya mobimba ekoya, oyo ya ndambo ekolongolama.”
Mas. 4:18: “Nzela ya bayengebene ezali lokola pole oyo ezali kongɛnga, oyo ezali kongɛnga se kongɛnga kino moi ekokóma makasi.”
Ntango mosusu, bantoma ná bayekoli ya siɛklɛ ya liboso bazalaki na bilikya oyo eyokani te na mokano ya Nzambe, kasi Biblia elobi te ete bazalaki “basakoli ya lokuta.”—Talá Luka 19:11; Yoane 21:22, 23; Misala 1:6, 7.
Mosakoli Natane alendisaki Mokonzi Davidi akokisa mposa oyo azalaki na yango ya kotongela Yehova ndako ya losambo. Kasi na nsima, Yehova alobaki na Natane ayebisa Davidi ete ye te moto akotongela ye ndako yango. Yehova aboyaki Natane te mpo na likambo oyo ayebisaki Davidi liboso, kasi akobaki kosalela Natane mpo amikitisaki mpenza mpe andimaki Yehova asembola ye ntango ayebisaki ye mokano na ye.—1 Nt. 17:1-4, 15.
Makambo oyo basakoli ya solo balobaka etombolaka losambo ya solo mpe eyokanaka na mokano ya Nzambe
Mib. 13:1-4: “Soki mosakoli moko to molɔti ndɔtɔ moko oyo alɔti ndɔtɔ abimi epai na yo mpe apesi yo elembo moko to likamwisi moko ya komonisa makambo oyo ekoya, mpe elembo yango to likamwisi yango ya komonisa makambo oyo ekoya ekokisami, oyo alobelaki yo ete: ‘Tólanda banzambe mosusu, oyo yo oyebi te, mpe tósalela bango,’ osengeli te koyoka maloba ya mosakoli yango to ya molɔti ndɔtɔ yango oyo alɔti ndɔtɔ, mpamba te Yehova Nzambe na bino azali komeka bino mpo na koyeba soki bozali kolinga Yehova Nzambe na bino na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba. Yehova Nzambe na bino nde bokolanda, mpe ye nde bokobanga, mpe mitindo na ye nde bokotosa, mpe mongongo na ye nde bokoyoka, mpe ye nde bokosalela, mpe bokokangama kaka na ye.”
Lokola Biblia elobi ete kozala “moninga ya mokili” elimboli kozala monguna ya Nzambe, bakonzi ya mangomba oyo bazali kolendisa bandimi na bango bámikɔtisa na makambo ya mokili, bazali mpenza kotombola losambo ya solo? (Yak. 4:4; 1 Yoa. 2:15-17) Nzambe ya solo alobaki ete bikólo “bakoyeba mpenza ete nazali Yehova,” mpe Biblia emonisi ete Nzambe asengelaki kobimisa na kati ya bikólo “ekólo moko mpo na nkombo na ye,” kasi mangomba oyo ezali komona ete kosalela nkombo mpenza ya Nzambe ezali na ntina te, ezali mpenza kosala makambo oyo eyokani na mokano ya Nzambe? (Ezk. 38:23; Mis. 15:14) Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka mpo na Bokonzi ya Nzambe mpe Biblia ekebisi biso ete tótyela bato ya mabele motema te; na yango bibongiseli ya politiki to bakonzi ya mangomba oyo balendisaka bato bátyela boyangeli ya bato motema, bazali mpenza basakoli ya solo?—Mat. 6:9, 10; Nz. 146:3-6; talá Emoniseli 16:13, 14.
Basakoli ya solo mpe ya lokuta bakoki koyebana na mbuma oyo bango ná bandimi na bango bamonisaka na bomoi na bango
Mat. 7:15-20: “Bókeba na basakoli ya lokuta oyo bazali koya epai na bino balati mposo ya mpate, kasi na kati bazali nde bambwa ya zamba ya lokoso. Bokoyeba bango na mbuma na bango. . . . Ndenge moko mpe nzete nyonso ya malamu ebotaka mbuma ya malamu, kasi nzete nyonso ya mabe ebotaka mbuma ya mabe . . . Yango wana, ya solo mpenza, bokoyeba bato wana na mbuma na bango.”
Makambo nini basalaka na bomoi na bango? “Misala ya nzoto ezali komonana polele, mpe ezali pite, mbindo, etamboli ya nsɔni, losambo ya bikeko, misala ya bilimo mabe, koyinana, koswana, zuwa, nkanda makasimakasi, kowelana, bokabwani, mwa mangomba, likunya, kolangwa masanga, bafɛti ya lokoso mpe makambo oyo ekokani na oyo wana. . . . Baoyo basalaka makambo ya ndenge wana bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te. Nzokande, mbuma ya elimo [ya Nzambe] ezali bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, bolamu, kondima, motema pɛtɛɛ, komipekisa.”—Gal. 5:19-23; talá mpe 2 Petro 2:1-3.
Batatoli ya Yehova basalá mabunga na mateya na bango te?
Batatoli ya Yehova batutaka ntolo te ete elimo ya Nzambe elobaka na bango ndenge ezalaki koloba na basakoli ya kala. Basalá mpe mabunga. Ndenge moko na bantoma ya Yesu Kristo, ntango mosusu bango mpe bazalaki na bilikya oyo eyokani na mokano ya Nzambe te.—Luka 19:11; Mis. 1:6.
Biblia emonisi makambo oyo ekoki kosalisa mpo na koyeba ntango oyo kozala ya Kristo ekobanda, mpe Batatoli ya Yehova bayekolaki makambo yango na likebi mpenza. (Luka 21:24; Dan. 4:10-17) Yesu mpe alobelaki elembo moko oyo ezali na makambo mingi, oyo ntango bisakweli na yango ekokokisama ekosalisa bato báyeba libota oyo ekomona nsuka ya mokili mabe oyo ya Satana. (Luka 21:7-36) Batatoli ya Yehova bapesi bilembeteli oyo emonisi ete elembo yango ezali kokokisama. Ezali solo ete na mikolo eleki, Batatoli bakangaki ntina malamu te to bayebaki malamu te ndenge oyo makambo esengelaki kosalema na nsuka ya bileko mosusu, kasi basalaki te libunga ya kozanga kondima to kotika kotya likebi na kokokisama ya mikano ya Yehova. Bakobaki kobatela na makanisi na bango toli oyo Yesu apesaki ete: “Yango wana, bósɛnzɛlaka mpo boyebi te mokolo Nkolo na bino akoya.”—Mat. 24:42.
Makambo oyo basembolá ezali moke mpenza soki tokokanisi yango na ebele ya mateya ya solo ya Biblia oyo bakangá ntina na yango malamu mpe babimisá na mikanda. Na kati ya makambo yango tokoki kotánga: Yehova azali Nzambe ya solo kaka moko. Yesu Kristo azali persona ya Bosato te kasi azali nde Mwana ya Nzambe, mwana na ye se moko oyo abotamaki. Moto akoki kosikolama na lisumu kaka soki andimi mbeka ya lisiko ya Kristo. Elimo santu ezali moto te kasi ezali nde nguya ya Yehova oyo esalaka mosala, mpe mbuma na yango esengeli komonana polele na bomoi ya basambeli ya solo. Bapakano ya ntango ya kala bazalaki koteya ete molimo ekufaka te, kasi Biblia elobi bongo te, mpe elikya ya bomoi mpo na mikolo ezali koya ezali nde na lisekwa. Nzambe atiki mabe ezala mpo na kosilisa ntembe oyo ebimaki mpo na boyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Bokonzi ya Nzambe ezali elikya kaka moko mpo na bato. Banda 1914, tozali kobika na mikolo ya nsuka ya mokili mabe oyo. Kaka bakristo ya sembo 144 000 nde bakozala bakonzi mpe banganga-nzambe elongo na Kristo na likoló, mpe bato mosusu ya botosi bakozwa bomoi ya seko na paradiso awa na mabele.
Likambo mosusu ya kotalela na mateya ya Batatoli ya Yehova yango oyo: Mateya na bango esalisi mpenza bato bákóma na bizaleli malamu? Bato oyo balandaka mateya na bango bakesanaka na bato mosusu ya mboka na bango mpo na bosembo na bango? Mateya yango ezali mpenza kobongisa mabota na bango? Yesu alobaki ete bato bakoyeba bayekoli na ye na bolingo oyo bakozala na yango na kati na bango. (Yoa. 13:35) Ezaleli wana ya monene emonanaka polele epai ya Batatoli ya Yehova? Makambo oyo basalaka endimisi yango.
Soki moto alobi—
‘Sango (to pastɛrɛ) na biso alobaki ete Batatoli ya Yehova bazali basakoli ya lokuta’
Okoki koyanola: ‘Tiká natuna yo naino: Alakisá yo ata vɛrsɛ moko oyo emonisi ete makambo oyo toteyaka to tosalaka endimisi ete tozali basakoli ya lokuta? . . . Okosepela nalakisa yo ndenge Biblia elobeli basakoli ya lokuta? (Na nsima salelá likanisi to makanisi mingi oyo ezali na nkasa 67-70.)’
To okoki koloba: ‘Nakanisi ezali malamu te kokosela bato likambo monene boye soki bilembeteli ezali te. Sango (to pastɛrɛ) na bino atángaki mwa makambo ya sikisiki mpo na kondimisa bifundeli na ye? (Soki moto oyo ozali kosolola na ye alobi ete ezali na makambo mosusu oyo tolobaki kasi ekokisamá te, salelá makanisi oyo ezali na lokasa 68-71.)’
Ndenge mosusu ya koloba: ‘Nakanisi ete soki bakoseli yo likambo ya ndenge wana, okolinga kolimbolela moto yango makanisi na yo, boye te? . . . Na yango, nakoki kolakisa yo na Biblia . . . ?’