Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/1 nk. 9-18
  • Tosepelaka kati na Mozalisi na biso Monene

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tosepelaka kati na Mozalisi na biso Monene
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ˈEkoyeisama mbangoˈ
  • Komibanzabanza mpo na bokoli monene
  • Miliare moko ya bangonga!
  • Ebongiseli monene ya botongi
  • Kotonga bandako mpo na kokumisa Yehova
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Bokoli ezali kosɛnga ete bisika mosusu ya losambo etongama nokinoki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/1 nk. 9-18

Tosepelaka kati na Mozalisi na biso Monene

“Tika ete Yisraele esepela na Motongi na ye monene. Tika ete bana mibali na Siona bazala na esengo kati na Mokonzi na bango.”​—NZEMBO 149:2, MN.

1. Atako bato basakoli “bonsomi bouti kozwama,” ezaleli na makambo na bato ezali mpenza nini?

MOKILI ya lelo ezali na “bolozi“ mingi. Wana ezali maloba oyo Yesu asalelaki kati na esakweli na ye na ntina na “nsuka ya biloko ya ntango oyo,” ntango ya mpasi oyo ebandaki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba na 1914. (Matai 24:3-8) Bakonzi mingi ya politike bazali na elikya te mpo na mikolo mizali koya. Atako bato basakoli “bonsomi euti kozwama” na Europe de l’Est, prezida ya kala ya moko na mikili wana, alobaki na bokuse ete: “Kobakisama ya motuya ya bato, mopepe mongali na molunge makasi, kotobolama ya liboke ya mopepe mokobetaka biso oyo babengi ozone, SIDA, likama ya etumba ya nikleere mpe bokeseni monene kati na mikili ya bozwi na nord mpe oyo ya bobola na sud, nzala mpe kosilisama ya bikelamu ya bomoi mpe mabanga ya ntalo ya ezingelo na biso, bopusi ya bapiblisite makasi ya televizio likolo na bizaleli na bato mpe makama minene ya bitumba kati na bikolo​—nyonso oyo, bakisa mpe makambo mingi mosusu, ezali likama monene mpo na bato.” Nzokande, ata boyangeli moko te ya bato ekoki kosilisa likama wana monene.​—Yilimya 10:23.

2. Nani akoki kosilisa mpasi ya bato mpo na libela mpe litambe nini asili kosala?

2 Atako bongo, tokoki kosepela ete Mozalisi na biso Monene asili kozwa meko mpo na kosilisa yango libela. Esakweli na Yesu na ntina na “nsuka na biloko ya ntango oyo” ekangisami na “koya” na ye ezangi komonana. (Matai 24:3, 37-39) Mpo na kosala “makolo ya sika,” Jehovah atyaki Yesu na kiti na ye ya bokonzi lokola Mokonzi Masiya, oyo bilembeteli ya esakweli yango bimonisi ete likambo wana ya ntina mingi lisalemaki na makolo na mobu 1914.a (2 Petelo 3:13) Lokola mokonzi elongo na Nkolo Moyangeli Jehovah, Yesu apesameli sikawa mokumba ya kosambisa mabota mpe kokabola bato na komikitisa oyo bakokisami na bampate na mabele mpe bato ya mot6 makasi oyo bakokisami na bantaba. “Bantaba” wana mabe bazwi elembo mpo na “kolongolama ya seko” mpe “bampate” mpo na bomoi ya seko kati na mabele oyo makozala na nse na Bokonzi.​—Matai 25:31-34, 46.

3. Wapi ntina oyo baklisto ya solo bazali na yango mpo na kosepela?

3 Batikali na Yisraele ya elimo awa na mabele, baoyo basangani sikawa elongo na ebele monene na bampate wana ya botosi, bazali mpenza na bantina ya kozala na esengo kati na Jehovah, Mokonzi ya seko, na lolenge azali komema mikano na ye minene epai na nsuka na yango eleki monene na nzela ya Bokonzi ya Mwana na ye. Bakoki bongo koloba ete: “Nakosepela na Jehovah. Molimo na ngai mokozwa esengo kati na Nzambe na ngai. Mpo ete alatisi ngai bilamba ya lobiko . . . . Lokola mabele makobotaka milona na yango, mpe lokola bilanga bikobimisaka yango ekonami kati na yango, bobele bongo Nkolo Moyangeli Jehovah akobimisa boyengebene mpe masanzoli liboso ya mabota nyonso.“ (Yisaya 61:10, 11, MN) ˈKobimaˈ wana ezali komonana na bamilio na bato oyo bauti na mabota mpo na kosanzola Jehovah.

ˈEkoyeisama mbangoˈ

4, 5. (a) Lolenge nini koyanganisama ya libota ya Nzambe esakolamaki? (b) Bokoli nini monene oyo tomonaki na boumeli ya mbula ya mosala 1992?

4 Koyanganisama ezali kosalema na lombango mpenza awa nsuka ya ebongiseli ya Satana ezali kobɛlɛma. Mozalisi na biso Monene alobi ete: “Bato na yo nyonso bakozala bayengebene . . . , mboto ya elanga na ngai, mosala ya mabaka na ngai, mpo ete nakembisama. Oyo moke akokoma nkoto, mpe oyo aleki moke akokoma libota ya nguya. Ngai Jehovah, nakoyeisa yango mbango na ntango na yango.” (Yisaya 60:21, 22) Lombango wana emonani malamu mpenza na rapport ya mosala ya ba Temoins de Jehovah na mokili mobimba mpo na mbula ya mosala 1992, oyo ebimisami na lokasa 12 kino na lokasa 15 ya zulunalo oyo.

5 Likambo lileki monene kati na rapport oyo ezali motuya ya sika ya basakoli na Bokonzi 4 472 787, basakoli 193 967 babakisami likolo na motuya ya mbula eleki​—elingi koloba bokoli ya 4,5 %. Bato 301 002 baoyo bazwaki batisimo na boumeli ya mobu 1992, ezali motuya ya sika oyo emonisi lisusu ete bato mingi bazali kondima solo ya Biblia. Oyo nde esengo tozali na yango ete na “mikolo [oyo] ya molili mpe na kozanga pole, . . . ete libota monene mpe na nguya,” oyo, lokola lipata ya mayoyo, bazali kopalanganisa litatoli ya Bokonzi “na eteni eleki mosika ya mokili”! (Yoele 2:2, 25; Misala 1:8, MN) Longwa na Alaska, mboka ya malili mingi​—epai mpepo ya la Societe Watch Tower ekendaki mbala 50 mpo na kosakola na bateritware oyo nzela na yango ekangami na mabanga ya mbula mpembe​—kino na Mali mpe na Burkina Faso, mikili mikauki na molunge mingi, mpe na bisanga bipalangani ya Micronesie, basaleli ya Jehovah bazali kongɛnga lokola “miinda ya mabota, ete lobiko [na ye] ekoma kino na nsuka ya mokili.”​—Yisaya 49:6, MN.

6, 7. Mbongwana nini ya makambo esalemaki na bambula oyo euti koleka, mpe lolenge nini basaleli ya Jehovah basalaki mpo na yango?

6 Jehovah azalaki lokola ebombamelo mpe ndako molai na nguya mpo na kobatela mpe kosunga libota na ye. Na bisika mingi ya mokili, ba Temoins de Jehovah basili koyika mpiko na bambula mingi ya mpasi mpe na monyoko monene. (Nzembo 37:39, 40; 61:3, 4) Kasi kala mingi te, lokola nde likamwisi, bipekiseli mpe makambo nyonso oyo mazalaki kokangisa mosala na bango elongolamaki na mikili soko 21, na boye ete bakoki sikawa kosakola na bonsomi nyonso ete Mozalisi na biso Monene asili kotya Klisto lokola Mokonzi likol6 na mabele.​—Nzembo 2:6-12.

7 Basaleli ya Jehovah bazali kosalela malamu bonsomi oyo bauti kozwa? Tala etanda mpo na komona bokoli oyo bosalemaki na Bulgarie, na Roumanie, mpe na oyo ebengamaki liboso ete Union Sovietique, na Europe de l’Est mpe mpo na Angola, Benin, mpe na Mozambique kati na Afrika. Na Zaire mpe, bokoli bozali mpenza monene. Na esengo kati na mitema na bango, bandeko na biso oyo bazwi bonsomi bayanoli na libyangi oyo ete: “Ɛ bino mabota, botɔndo Jéhovah mpo ete azali malamu . . . ; epai na Mosali na biloko ya kokamwa mpe minene, mpo ete boboto na ye ekoumela seko.” (Nzembo 136:1, 4, MN) Botondi yango emonisamaki na molende na mosala ya koyanganisa bato mosusu bakokani na bampate ete bamitya na ngambo ya Bokonzi.

8. Lolenge nini basanzoli ya sika ya Jehovah “bazali kopumbwa lokola lipata” kati na Europe de lˈEst? mpe na Afrika?

8 Na boumeli ya eleko ya molunge euti koleka na mikili ya Mpoto, ba assemblees minene ya libota ya Jehovah oyo esalemaki na mikili ya kominisime, ezalaki na motoya monene na bayangani. Likambo likamwisi mingi mpenza ezali bongo moteya ya baoyo bazwaki batisimo kati na mikili wana. Bobele bongo, na mboka Togo, na Afrika, epekiseli elongolamaki na le 10 decembre 1991. Na sanza oyo elandaki, assemblee nationale esalemaki. Atako mwayene ya sanza na sanza ezali ya basakoli 6 443 ya milende, nzokande motuya ya bayangani na assemblee wana emataki kino 25 467, elongo na bato 556 oyo bazwaki batisimo​—oyo emonisi bongo 8,6 % na motuya ya basakoli. Lokola Yisaya 60:8 emonisi yango, basanzoli ya sika ya Jehovah “bazali kopumbwa lokola lipata mpe lokola bibenga epai na ndako na yango” kati na masanga ya libota ya Jehovah.

9. Bibongiseli nini bikamatamaki mpo ete baklisto oyo bazali na mikili oyo bazwi bonsomi bakoka ˈkolya mpe batondaˈ?

9 Lisusu, nzala mpo na biloko ya elimo esili kokita na Europe de lˈEst mpe na Afrika. Binyateli ya la Société Watch Tower na Allemagne, na Italie, mpe na Afrique du Sud ezali mbala na mbala kotinda mituka ya mikanda, na nkota mingi, na bamboka oyo ezangi bilei ya elimo. Liboso, mingi na Batemwe bazalaki kopesana bazulunalo ya kala, kasi bazali sikawa kozwa ebele ya bilei ya elimo. Bazali kosepela na kokokisama ya esakweli oyo ete: “Bokolya mingi mpenza mpe bokotonda, bokosanzola mpe nkombo na Jehovah, Nzambe na bino; ye oyo asali makambo na kokamwa na bino elongo.”​—Yoele 2:26.

Komibanzabanza mpo na bokoli monene

10. Na kotalela motoya ya bayangani na Ekaniseli libyangami nini lipesami na baoyo nyonso basepeli na solo?

10 Oyo ezali mpenza kokamwisa ezali nde motuya ya bayangani na Ekaniseli ya liwa na Yesu, 11 431 171, kobakisama ya bato 781 013, to mpe 7,3 % likolo na motuya ya mbula euti koleka. Boyei malamu na bino nyonso bato ya sika! Oyo nde esengo ekoki kozwama soki bato wana ya sika basepeli ete ba Temoins de Jehovah bayekola Biblia elongo na bango! (Tala Yisaya 48:17.) Rapport ya mbula ya mosala emonisi boyekoli 4 278 086 etambwisamaki sanza nyonso, oyo ezalaki bongo boko1i kitoko ya 8,4 %. Nzokande, mingi bakokaki bango moko kosangana na mosala wana. Ba Temoins de Jéhovah bazali na esengo ya kotambwisa boyekoli ya Biblia ya mbala na mbala elongo na bato oyo basepeli, mpo na kosalisa bango ete batelema ngwi kati na nzela ya bomoi ya seko. (Yoane 3:16, 36) Mpo na nini te kosenga ete bayekola Biblia elongo na yo? Mpe yeba ete, boyambi ya esengo ezali kozela yo na Salle du Royaume!​—Nzembo 122:1; Baloma 15:7.

11, 12. (a) Nkaka nini ezali komonana na mikili mingi? (b) Na mwango nini “bokokani” ezali kosalema kati na mikili ya bozwi mpe oyo na bobola?

11 “Masanga mazali na ba Salles du Royaume ya kitoko mapambolami mingi mpenza. Makambo mazali lolenge moko te na mikili epai kuna Batemwe ya sembo bayikaki mpiko na boumeli ya bambula mingi ya bipekiseli, epai makita mazalaki kosalema na nkuku kati na bituluku ya mike. Mingi na mikili yango basili kozwa bonsomi, kasi bazali na ba Salles du Royaume mingi te. Na ndakisa, na mokili moko ya Afrika, masanga mazali 93 nzokande ba Salles du Royaume ezali bobele misato. Makita mosusu esalemaka na libanda. Lisanga moko likoki kozala na bato 160 kino na bato 450 oyo bazali koyangana mbala na mbala na makita.

12 Na Europe de lˈEst ezali mpasi mpo na kosomba to kotonga ndako, kasi bokoli ezali se kosalema. Bofungoli bandako ya sika ya filiale na Pologne esalemaki na le 28 novembre 1992. Makabo ya bolingo malamu mapesami mpo na mosala ya ba Temoins de Jehovah masalelami mpo na kosunga botongi ya ba salles mpe ba filiales. Na yango, “bokokani” ezali kosalema kati na bokabi ya bandeko oyo bazali kopesa lisungi ya “oyo eleki mingi” na biloko na bango ya mosuni mpo na bamposa ya elimo ya masanga na mikili ya bobola.​—2 Bakolinti 8:13, 14.

Miliare moko ya bangonga!

13. Ngonga boni elekisamaki kati na mosala ya kosakola mpe ya koteya na mobu 1992, mpe yango emonisi milende ya banani?

13 Mbele osali nini na miliare ya bangonga? Baoyo nyonso bakozwa bomoi ya seko bakozala na makoki ya kolekisa bangonga mingi boye, mpe ata koleka, kati na mosala mokobotaka mbuma mpe ya esengo mpo na Jehovah. Kasi kanisa ete basangisi bangonga wana nyonso bobele na mobu moko! Ezali yango nde li-bota ya Jehovah ekokisaki na boumeli ya mobu 1992. Na kotalela ba rapports ya basakoli nyonso ya Bokonzi, tozwi motuya ya sika ya bangonga 1 024 910 434 oyo elekisamaki na lolenge malamu mpenza​—kosanzola Mozalisi na biso Monene, na “kolakisa . . . kati na koyangana mpe na ndako na ndako.” (Misala 20:20) Na mwayene, Batemwe 4 289 865 bapesaki rapport na bango sanza na sanza. Bauti na miti-ndo nyonso ya bomoi. Basusu bazali na makoki te ya kopesa bangonga mingi mpo na kosangana na mosala ya Bokonzi. Ezalaki bongo mpo na batata ya mabota, baoyo basengeli kokokisa bamposa ya libota na bango; mibange mpe bandeko mingi oyo bazali na kolongono malamu te, bakisa mpe bana oyo bazali naino na kelasi. Atako bongo, rapport epesami na moko na moko emonisaki bolingo ya solo mpo na Jéhovah.​—Tala Luka 21:2-4.

14. Lolenge nini bilenge bazali ‘kokanisa Mozalisi na bango Monene’?

14 Bilenge mingi bazali kokola kati na mosala ya Jehovah, mpe ezali likambo ya esengo na komona ete, mingi kati na bango bazali kosalela maloba oyo ya Salomo mazwami na Mosakoli 12:1 (MN): “Kanisa Mozalisi na yo Monene na mikolo ya bolenge na yo.” Bazali kokokisa misala na bango na eteyelo, mpe bazali kobongisama lisusu kati na elimo na baboti na bango oyo bamipesi na Nzambe. Ezalaki esengo na komona ntalo monene ya bilenge kati na bato oyo bazwaki batisimo na ba assemblees oyo euti kosalema kala mingi te. Ezali lisusu esengo na koyeba ete, na koyekolaka mwa mi-sala ya mabako, mingi bazali komibongisa mpo na mosala ya pionnier wana bakosilisa kelasi. Na bongo, bakokoka kokokisa bamposa na bango, lokola ntoma Paulo oyo azalaki kotonga hema mbala na mbala.​—Misala 18:1-4.

15, 16. Lolenge nini ba pionniers mpe basaleli mosusu ya ntango nyonso bazali kosangana mpo na kokolisa mosala ya Bokonzi, mpe mingi kati na bango bazwaki mapamboli nini?

15 Oyo nde mosala monene mokokisamaki na ba pionniers mpe basaleli mosusu ya ntango nyonso mpo na kokolisa mosala ya Bokonzi! Molongo ya ba pionniers mobakisamaki kino na motuya ya 931 521 na mbula oyo euti koleka. Lokola bazali kosakola ndako na ndako mpe kotambwisa boyekoli ya Biblia, bazali kokoma na makoki mingi mpo na kosalela Makomami. Lisusu, mingi bakokisaki masengami mpo na kokota na Eteyelo mpo na ba pionniers na boumeli ya poso mibale, oyo esalisaki bango na kolona makoki mingi mpe esengo kati na mosala ya Nzambe.

16 Mokomoko na ba pionniers wana ya sembo akoki kosimba maloba oyo mazwami na Yisaya 50:4 (MN), ete: “Nkolo Moyangeli Jehovah asili kopesa ngai lolemo na baoyo balakisami, ete nayeba koyanola na ye oyo alembi.“ Lelo oyo, ezali na ntalo monene na bato oyo balembisami na mokili ya mabe oyo mozingi bango, nde bazali kozwa libandisi na maloba oyo ba pionniers ya sembo bazali koyebisa bango.​—Tala Masese 15:23; Ezekiele 9:4.

Ebongiseli monene ya botongi

17. Longola botongi ya elimo, botongi nini ya mosuni oyo bosalemi na bambula oyo euti koleka?

17 Bokoli na elimo ya ba Temoins de Jehovah kati na mokili mobimba esengi mpe bokoli ya biloko ya mosuni. Kobakisa bandako ya binyateli, babiro, mpe bandako ya ba Bethels mpe kotonga ba Salles du Royaume mpe ba Salles dˈassemblées ezali likambo ya ntina monene. Na yango ba Témoins de Jéhovah basengeli kokoma batongi na ndimbola na yango mpenza. Lolenge ya mosala wana ya botongi esalemaki na mikolo ya mokonzi Salomo. Salomo atongaki tempelo mpo na losambo ya Jehovah engebene “mwango ya botongi ... oyo azwaki na kopemama,” mwango oyo Jehovah apesaki yango epai na tata na ye, mokonzi Davidi. (1 Ntango 28:11, 12, MN) Na bongo, Salomo asukaki te bobele na kolendisa bayoki na ye na maloba kitoko ya mayele, kasi atambwisaki lisusu misala ya botongi boleki kitoko ya ndako oyo ekokanaki na mosusu te.​—1 Mikonzi 6:1; 9:15, 17-19.

18, 19. (a) Bibongiseli nini ya botongi bizali kosalema nokinoki kati na lisanga ya Jehovah na mikolo na biso? (b) Lolenge nini elimo ya Jehovah emonisami kati na botongi ya mosuni mpe na botongi ya elimo?

18 Lelo oyo, ba Temoins de Jehovah bazali te kotonga bandako na lisalisi ya myango mipemami na Nzambe, kasi bazali kosala na elimo ya Nzambe. Lokola na mikolo na Yisraele, yango ezali kopusa bango na kosala botongi na lolenge oyo ezali kokamwisa bato ya mokili. (Zakaria 4:6) Ntango ezali mokuse. Esengeli kotonga nokinoki ba Salles du Royaume mpe bandako mosusu. Na mikili misusu, botongi ya ba Salles du Royaume ezali kosalema na lombango mpenza. Na ndakisa, na mibu 10 oyo mileki, Canada elobeli botongi ya ba Salles 306, oyo moko na moko na yango ekokisaki ata mikolo mibale te. Lokola mosala ya Jehovah mozali kokola na lombango kati na mokili mobimba, bandako 43 ya sika to oyo eyeisami monene na ba filiales, ezali kotongama sikawa to mpe myango misili kosalema mpo na kotonga yango. Epai mosusu, na Brooklyn, ndako ya 30 etages, oyo ezali na biteni ya kofanda nkoto mpo na basali ya Bethel, elingi kosila. Lisusu, na ekolo ya New York, na Patterson, botongi ya ndako mpo na Eteyelo ya Biblia, ebongiseli monene oyo la Société Watch Tower akamata naino liboso te, ezali kosalema na lombango mingi koleka elaka ekanamaki.

19 Lombango oyo misala mizali kosalema mpe bonzenga ya bandako ezali kokamwisa bakompanyi ya mokili. Mpo na nini? Mpo ete misala nyonso wana mikokisami na makabo ya ba Temoins de Jehovah ya molende. Elimo na ye ezali kopusa bango bobele na kopesa lisungi ya mosuni te, kasi lisusu na kopesa ntango mpe makasi na motema na bango mobimba. Bisika na botongi bitondi na basali oyo bayebi mosala malamu mpe bazali na molende. Basali bakoboyaka mosala te, mpe bakolekisaka ntango mpamba te. Elimo ya Jehovah ezali kopusa bango lokola yango ezalaki kopusa batongi ya tabernakle na ntango ya Moize mpe baoyo batongaki tempelo na mikolo ya Salomo. Kolongono malamu ya elimo ezali lisengisami mpo na basali wana.​—Tala Exode 35:30-35; 36:1-3; 39:42, 43; 1 Mikonzi 6:11-14.

20. (a) Na meko nini nsango malamu esengeli nai-no kosakolama? (b) Libota ya Jehovah bazali kozela mapamboli nini?

20 Salomo alandaki ebongiseli na ye ya kotonga, nsima na kosilisa mpenza botongi ya tempelo. (2 Ntango 8:1-6) Toyebi te soki litatoli likopalangana kino etando nini na mikolo na biso​—oyo yango esengi ete ba salles mpe bandako mosusu etongama. Nzokande, toyebi mpenza ete wana nsango malamu ya Bokonzi ekosakolama kino na etando oyo etyami na Jehovah, bongo nsuka, “bolozi monene,” ekoya. (Matai 24:14, 21) Kati na mabele oyo mabebisami lisusu te na bato ya lokoso, ebongiseli ya Jehovah na ntina na “makolo ya sika mpe mabelé ya sika” ekopesa bongo bolamu mingi epai na bato. Tokoki nde ‘kosepela mpe kozala na esengo libela kati na oyo Nzambe azali kozalisa,’ na kopesaka masanzoli nyonso epai na Mozalisi na biso Monene!​—Yisaya 65:17-19, 21, 25.

Footnotes

a Tala mokanda “Que ton Royoume vienne!”, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., nkasa 105-16, 186-9.

Bozongeli

◻ Bantina nini tozali na yango mpo na kosepela kati no Mozalisi na biso Monene?

◻ Bokoli nini bozwamaki na boumeli ya mbula ya mosala 1992?

◻ Mapamboli nini mazwamaki na mikili epai epekiseli elongolamaki mpo na mosala ya kopesa litotali?

◻ Lolenge nini bilenge mpe ba pionniers bazali kosangana mpo na bokoli ya lisanga ya Jéhovah?

◻ Lolenge nini libota ya Jehovah bazali komipesa kati na mosala ya botongi ya mosuni mpe oyo ya elimo?

[Etanda na lokasa 17]

Na mbula eleki, bangonga koleka miliare moko elekisamaki kati na mosala ya kosakola mpe ya koteya

[Etanda na lokasa 12-15]

LAPOLO YA BATATOLI YA YEHOVA NA MOKILI MOBIMBA MPO NA MBULA YA MOSALA 1992

(Talá na zulunalo oyo ebimisamaki)

[Elilingi na lokasa 10]

Bankama mingi yo nkoto na bato oyo bazwaki batisimo na mbula eleki, bamonisaki mapamboli ya Jéhovah kati na mosala ya kosakola mpe ya koteya

[Elilingi na lokasa 16]

Ntalo monene ya bilenge bazali ˈkokanisa Mozalisi na bango Moneneˈ

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto