Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/1 nk. 10-19
  • Luká ekimelo epai na Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Luká ekimelo epai na Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Loyembo na nguya ya basakoli ya Bokonzi
  • Esika makasi epai tokoki kofanda
  • Kosakola na elikya nyonso
  • ‘Malamu, eloko ya motuya oyo ebombami’
  • ‘Bókima epai ya nkombo ya Yehova’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/1 nk. 10-19

Luká ekimelo epai na Yehova

“Ɛ [Yehova], naluki ekimelo epai na yɔ.”​—NJEMBO 31:1.

1. Lolenge nini Nzembo 31 emonisi kotya motema na makoki oyo Yehova azali na yango mpo na kopesa ekimelo?

MONGONGO kitoko moyembaki na ntina na mobali oyo, atako alɛmbaki na makanisi mpe na nzoto, kasi amipesaki epai na Yehova. Maloba na ntɔ́ki ya loyembo wana ya bulee mayebisi ete, kondima ekolónga. Mobali wana azwaki ekimelo kati na mabɔkɔ na kobikisa ya Mozwi-na-Nguya-Nyonso longwa na banyokoli baoyo bazalaki kolanda ye. Loyembo na ye elandi ete: “Ɛ [Yehova], naluki ekimelo epai na yɔ. Tika ete libela nayoka nsɔni te. Na boyɛngɛbɛnɛ na yɔ, bikisa ngai.”​—Njembo 31:1.

2. (a) Likoló ya makambo mibale nini oyo tokoki kotya motema epai na Yehova lokola ebombamelo na biso? (b) Yehova azali Nzambe ya lolenge nini?

2 Mokomi na Nzembo azalaki na ekimelo​—oyo eleki malamu! Ata makambo mosusu mabɛtɛlami ntembe, kasi likambo oyo likoki kobɛtɛlama ntembe te: Yehova azali ebombamelo na ye, ndako makasi na ye. Elikya na ye etyamaki likoló na miboko mibale ya solo. Ya liboso, kondima na ye, oyo Yehova akookisa yango nsɔni te, mpe ya mibale, boyengebene ya Yehova, oyo elimboli ete Ye akotika soko moke te mosaleli na Ye mpo na libela. Yehova azali Nzambe oyo akookisaka nsɔni te epai na basaleli na ye ya sembo; akozangisaka bilaká te. Kasi azali nde Nzambe ya solo mpe mopesi na mbano epai na baoyo bazali kotya elikya epai na ye na motema moko. Na nsuka, kondima ekozwa mbano! Lobiko ekoya!​—Nzembo 31:5, 6.

3. Lolenge nini mokomi na Nzembo akumisaki Yehova?

3 Kosaláká miziki na ye na mingongo mikeseni oyo miuti na mayoki mozindo ya mpasi mpe ya mawa na ye kino na mayoki ya nsuka mpo na kotyela motema, mokomi na Nzembo azwaki nguya kati na ye. Akumisi Yehova mpo na bolingo na Ye ya sembo. Ayembi ete: “Tika ete Yehova apambolama, mpo ete amonisaki motema-boboto ya kokamwa epai na ngai kati na mboka na mpasi.”​—Nzembo 31:21, NW.

Loyembo na nguya ya basakoli ya Bokonzi

4, 5. (a) Bayembi nini ya nguya oyo bazali kokumisa Yehova na mikolo na biso, mpe lolenge nini basalaki yango na boumeli ya mbula ya mosala oyo euti koleka? (Talá etánda na nkasa 12-15.) (b) Lolenge nini motuya ya bayangani na Ekaniseli molakisi ete ezali na bato mingi oyo balingi kosangana na loyembo ya basakoli ya Bokonzi? (Talá etánda.) (c) Kati na lisangá na bino, etuluku nini na bato oyo bazali komilɛngɛla mpo na kosangana na molɔngɔ́ na bayembi?

4 Lelo, maloba oyo ya mokomi na Nzembo mazali kozongelama. Nzembo ya kopesa lokumu na Yehova ekoki te kopekisama na motɛmɛli moko, soko na makámá na biloko bizalisami, to na mpasi ya makambo na nkita; ya solo, motema-boboto ya Yehova esili komonisama na kokamwa mingi epai na libota na ye. Na mbula ya mosala oyo euti koleka, na bipai binso na mokili, mongongo ya nguya ya bayembi 4 709 889 kati na mikili 231, moyembaki nsango ya Bokonzi ya Nzambe. Bokonzi ya Yehova na likoló, oyo boyangelami na Klisto Yesu, ezali ekimelo oyo ekookisa bango nsɔni te. Na mbula eleki, basakoli wana ya Bokonzi na masangá 73 070 balekisaki motuya ya bangonga 1 057 341 972 kati na mosala ya kopalanganisa nsango malamu. Yango ebimisaki litomba ya bato 296 004 baoyo bamonisaki elembo ya komipesa na bango epai na Nzambe na kozwáká batisimo na mai. Yango ekamwisaki mpenza baoyo nyonso bazalaki na liyangani ya mikili mingi ya mateya mauti na Nzambe, oyo esalemaki na Kiev, na Ukraine, na sanza ya Augústo oyo euti koleka. Bamonaki likambo ya ntina mingi oyo lisalemaki naino te kati na lisoló ya Batatoli ya Yehova​—motuya moleki monene ya batisimo ya baklisto ya solo! Lokola yango esakolamaki na Yisaya 54:2, 3 (NW), libota ya Nzambe lizali kopanzana na motuya oyo moleki monene.

5 Nzokande, baoyo balingi kobakisama na bato ya Bokonzi ya Nzambe, bazali kozela ngala na bango ete basangana na molɔngɔ́ ya bayembi. Na mbula eleki, Ekaniseli ya liwa ya Yesu ezalaki na motuya ya kokamwa ya bayangani 11 865 765. Elikya ezali ete, mingi kati na bango bakosɛlingwa mpo na koyemba loyembo ya Bokonzi ndako na ndako na boumeli ya mbula ya mosala oyo. Bokóli wana bosengeli mpenza kopesa nkanda monene epai na monguna na solo, Satana Zabolo!​—Emoniseli 12:12, 17.

6, 7. Limbola lolenge nini mobali moko oyo amonisaki bosepeli asikwaki na mitungisi ya demó mpo na lisungi ya Yehova.

6 Satana akomeka kopekisa basusu ete basangisa mingongo na bango te na loyembo wana ya nguya. Na ndakisa, basakoli ya Thaïlande bakutanaka na ebele na bato oyo batungisami mingi na bademó. Atako bongo, mingi na bato na sembo basikwamaki na lisalisi ya Yehova. Nsima na kokende kotala ngangankisi moko mpo na koyeba lolenge makambo masalemaka, mobali moko atyamaki na nsé na nguya ya bademó na boumeli ya mibu zomi. Alukaki kosikwa na nguya na bango na lisalisi ya mokonzi moko ya lingomba, kasi amonaki mbongwana ya malamu te. Motatoli moko ya Yehova oyo azalaki mosaleli ya ntango nyonso, abandaki boyekoli ya Biblia elongo na mobali wana mpe, na lisalisi ya Biblia, alakisaki ye mwango bobele moko ya kosikwa na nguya ya bademó​—kozala na boyekoli ya sikisiki na solo, kozala na kondima epai na Yehova Nzambe, mpe kobondela ye na malɔmbɔ.​—1 Bakolinti 2:5; Baefese 4:6, 7; 1 Timoté 2:3, 4.

7 Na butu, nsima ya lisoló yango, mobali wana alɔtaki ndɔ́tɔ kati na yango, tata na ye oyo akufa azalaki kotungisa ye ete azongela ngangankisi. Libota na ye libandaki kozwa mpasi. Lokola andimaki yango te, mobali wana alandaki koyekola mateya na ye ya Biblia mpe abandaki koyangana na makita. Na boumeli na boyekoli moko, mobongisi-nzela alimbolaki ete, mbala mingi biloko oyo bisalelamaka na milúlú ya bongangankisi, ekoki kopesa nzela na bademó ete batungisa baoyo bazali komeka kolongwa na nsé na nguya na bango. Mobali wana amikundolaki ete azalaki na mwa mafuta ya bikelákela oyo azalaki kosalela kala. Asosolaki sikawa ete asengelaki kobwaka yango. Nsima ya kolongola yango, atungisamaki lisusu te na bilimu mabe. (Kokanisá na Baefese 6:13; Yakobo 4:7, 8.) Ye mpe mwasi na ye bazali kosala bokóli malamu na nzela na boyekoli na bango mpe na koyangana mbala na mbala na makita mpo na mateya ya Biblia.

8, 9. Mikakatano mosusu nini oyo basakoli ya Bokonzi balóngaki yango?

8 Mikakatano misusu mikoki kopekisa mongongo ya nsango malamu. Mpo na mpasi makasi na makambo na nkita na mboka Ghana, basáli mingi balongolamaki na mosala. Ntalo ya biloko emataki mingi, na boye ete ezalaki mokakatano monene mpo na kozwa biloko bisengeli mpo na kobikela. Lolenge nini libota ya Yehova balóngaki? Na kotyáká elikya, epai na bango moko te, kasi epai na Yehova. Na ndakisa, mokolo mosusu, mobali moko atikaki na mesá ya esika bakoyambaka bato na biro ya filiale líbenga ya mokanda oyo ekangamaki. Kati na líbenga ya mokanda, ezalaki na badolare 200, lifuti ya sanza misato. Líbenga ya mokanda wana ezalaki likabo ya moto moko oyo ayebisaki nkombo na ye te, kasi likoló na ezipeli, ezalaki na makomi oyo ete: “Nabungisaki mosala na ngai, kasi Yehova asalaki ete nakoka kozwa mosala mosusu. Nazali kotɔndo ye mpe Mwana na ye, Klisto Yesu. Mpo na kosangana na bokóli ya nsango malamu ya Bokonzi liboso ete nsuka eya, napesi mwa likabo wana moke.”​—Kokanisá na 2 Bakolinti 9:11.

9 Koyangana na makita ezali kosalisa mpo na kobongisa baoyo bazali kosangana na loyembo ya nguya mpo na kopesa lokumu na Yehova. (Talá Nzembo 22:22.) Bongo, na Súdi ya mboka Honduras, ezali na lisangá moko ya moke oyo babéngi El Jordán. Likambo nini ya ntina oyo lizali na etuluku wana moke? Bosembo na bango ya koyangana na makita. Kati na basakoli 19, 12 bakatisaka ebale monene mpo na koyangana na makita ya poso na poso. Yango ezali mpasi mingi te na ntango ya elanga, mpo ete bakoki kokatisa ebale na koleláká likoló na mabangá. Kasi, makambo makobongwanaka na boumeli ya eleko ya mbula. Esika oyo ezalaki bobele mwa etando moke ya mai ekokóma mokɛlɛ monene oyo makokumbaka biloko binso na nzela na yango. Mpo na kolónga mokakatano wana, bandeko mibali mpe basi basengelaki kozala banyanyi (nageurs) malamu. Liboso na kokatisa, bazali kotya bilamba na bango ya makita kati na tina (engbóngóló na linzanza), na nsima bakokanga yango na ezipeli ya motópe. Monyanyi malamu mpenza akosalela tina lokola engbóngóló ya kauka mpe akokamba etuluku mpo na kokatisa. Ekokóma bango na ngámbo mosusu, bakomikausa, bakotala bilamba, mpe bakokóma na Ndako ya Bokonzi na esengo mpe na bopɛto nyonso!​—Nzembo 40:9.

Esika makasi epai tokoki kofanda

10. Mpo na nini tokoki kotalela Yehova na ntango tobulungani na makanisi?

10 Ata otungisami mpenza na demó to obulungani na makasi mpo na bantina mosusu, Yehova akoki kozala ebombamelo na yo. Belelá ye kati na libondeli. Akoyokamelaka ata kokimela moke ya libota na ye. Mokomi na Nzembo amonaki ete yango ezali solo mpe akomaki ete: “Tyá litoi na yo epai na ngai, bikisa ngai na lombango. Zalá mpo na ngai ebombamelo ya libangá, ndako ya bibombamelo mpo na kobikisa ngai. Mpo ete yo ozali libangá na ngai mpe ebombamelo na ngai; mpe mpo na nkombo na yo, okokamba ngai mpe okotambwisa ngai. Okobimisa ngai na monyámá oyo batyeli ngai, mpo ete yo ozali esika makasi na ngai.”​—Nzembo 31:2-4, NW.

11. Limbola mpo na nini esika makasi ya Yehova ezali mpo na ntango mokuse te.

11 Yehova azali kopesa bobele ekimelo ya ntango mokuse te, kasi esika makasi mingi epai tokoki kofanda na kimya. Litambwisi na ye mpe toli na ye ekozangaka te epai na libota na ye. Nguya ya Nzambe ekobebisa misala mabe ya Satana mpe limpinga na ye. (Baefese 6:10, 11) Lokola totii elikya epai na Yehova na motema mobimba, akobikisa biso longwa na mitambo ya Satana. (2 Petelo 2:9) Na boumeli ya mibu minei oyo miuti koleka, bamboka 35 endimaki mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova. Lisusu, na bitúká ya mokili epai makambo matali ezalela ya bomoi ya bato, nkita, to makambo ya politiki epekisaki mosala ya kosakola nsango malamu, bato mosusu oyo bakokani na bampate bakendaki kofanda epai kuna bakokaki kozala na bonsomi mingi. Japon ezali moko na bisika motindo wana.

12. Lolenge nini mobongisi-nzela (pionnier) moko na Japon akómisaki Yehova ebombamelo na ye?

12 Na Japon, ezali na ebele na basáli baoyo bautaki na mikili misusu, mpe masangá mingi na nkótá ya bapaya esili kosalema. Likambo oyo liyebisami na ndeko mobali moko ya lisangá moko ya Japon, limonisi lolenge elanga na nkótá ya bapaya ezali kobota mbuma. Alingaki kokenda epai mposa ezalaki monene. Nzokande, azalaki naino kotambwisa boyekoli ya Biblia zomi epai azalaki. Moko na baninga na ye alobaki na ye na lisɛki ete: “Soki okei epai mposa ezali monene, kuna okotambwisa boyekoli ya Biblia 20!” Aponamaki mpe akendaki na engumba Hiroshima. Kasi, nsima ya sanza minei, azalaki bobele na boyekoli ya Biblia moko. Mokolo moko, akómaki epai na mobali moko ya mboka Brésil, oyo ayebaki koloba bobele Portugais. Lokola ndeko mobali akokaki te kosolola elongo na mobali wana, asombaki mokanda mpo na koyekola Portugais. Nsima na koyekola mwa maloba ya pɛtɛɛ mpo na kososola, akendaki lisusu kotala mobali wana. Ntango ndeko mobali apesaki ye mbote na Portugais, mobali wana akamwaki mpe, afungolaki ndako mpe asɛngaki ye akɔta, wana azalaki kosɛka. Boyekoli ya Biblia ebandaki. Mosika te, ndeko mobali akómaki kotambwisa boyekoli ya Biblia 22, 14 na lokótá ya Portugais, 6 na Espagnol, mpe 2 na Japonais!

Kosakola na elikya nyonso

13. Mpo na nini moto moko te asengeli kotindika biso kati na mosala ya Yehova?

13 Libota ya Yehova bazali koyemba loyembo ya Bokonzi na motema mobimba wana eyebi bango ete Yehova azali ekimelo na bango. (Nzembo 31:14) Bakooka nsɔni te​—Yehova akookisa bango nsɔni te, mpo ete akokokisa liloba na ye. (Nzembo 31:17) Zábolo mpe limpinga ya bademó na ye nde bakookisama nsɔni. Lokola basaleli ya Yehova bazali na mokumba ya kosakola nsango oyo ezali na nsɔni te, batindikami na bato mosusu te kati na mosala ya kosakola. Wana ezali te lolenge oyo Yehova, to Mwana na ye, bazali kopusa bato mpo na kosambela Ye. Ntango mitema ya bato mitondi na kondima mpe na botɔ́ndi mpo na malamu mpe motema-boboto ya Yehova, ezalela malamu ya mitema nde ekopusa minoko na bango na koloba. (Luka 6:45) Lisusu, ata ntango boni tozali kolekisa kati na mosala ya sanza na sanza, mingi mpenza soki ntango yango emonisi nyonso oyo tokokaki mpenza kosala, ezali malamu, ezali likambo ya nsɔni te. Lomea ya mwasi-mokufeli-mobali endimamaki mpenza na Yesu mpe na Tata na ye, boye te?​—Luka 21:1-4.

14. Nini tokoki koloba na ntina na mosala ya mobongisi-nzela? (Talá lisusu etánda.)

14 Mpo na ntalo ya basakoli oyo ezali sé kobakisama, komipesa na molimo mobimba kati na losambo esangisi kosala na mosala ya babongisi-nzela (pionniers)​—bazalaki 890 231 na mbula eleki! Soki bokóli kitoko ya mbula oyo eleki ekei bobele liboso, motuya oyo mokoleka mpenza 1 000 000. Likambo oyo lilandi, limonisi lolenge ndeko mwasi moko ya Nigéria akɔtaki na molɔngɔ́ ya babongisi-nzela. Akomaki ete: “Wana nazalaki pene na kosilisa bakelasi ya secondaire, nakendaki kopesa lisungi mpo na kolambela baoyo bakɔtaki na eteyelo mpo na babongisi-nzela ya Batatoli ya Yehova. Kuna, nakutanaki na bandeko basi mibale baoyo bazalaki mikóló koleka nkɔ́kɔ na ngai ya mwasi. Ntango nayaki koyeba ete bazalaki babongisi-nzela baoyo bayaki kokɔta na eteyelo, namitunaki ngai moko ete: ‘Soki baoyo mibale bakoki kozala babongisi-nzela, mpo na nini ngai te?’ Bongo, nsima na kosilisa kelasi, ngai mpe nakómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza (pionnier permanent).”

15. Na lolenge nini litatoli na libaku malamu ekoki kobongisa nzela ete basusu bazwa ekimelo epai na Yehova?

15 Bato banso bakoki kozala babongisi-nzela te, nzokande banso bakoki kopesa litatoli. Na Belgique, ndeko mwasi moko ya mibu 82 akendaki kosomba nyama. Amonaki ete mwasi ya motɛki nyama atungisamaki mingi na yikiyiki na makambo ya politike oyo mautaki koleka. Bongo, ndeko mwasi akɔtisaki trakte Bindimeli ya ba Témoins de Jéhovah ezali nini? elongo na mbongo oyo afutaki mpo na nyama wana. Ntango ndeko azongaki lisusu na esika wana bakotɛkaka nyama, nokinoki mwasi ya motɛki nyama atunaki ye oyo Biblia elobi na ntina na Etumba ya Misala ya mokili mobimba. Ndeko mwasi amemelaki ye búku La paix et la sécurité véritables: comment est-ce possible? Nsima ya mwa mikolo, wana mobangé ndeko mwasi akendaki lisusu na esika oyo bakotɛkaka nyama, mwasi ya motɛki nyama azalaki na mituna mingi mpo na kotuna ye. Ndeko mwasi aokelaki mwasi yango mawa; asɛngaki bobele ete alakisa ye Biblia, mpe mwasi yango andimaki. Sikawa, mwasi ya motɛki nyama alingi kozwa batisimo. Ezali boni mpo na motɛki nyama? Atangaki trakte wana, ye mpe azali sikawa koyekola Biblia.

‘Malamu, eloko ya motuya oyo ebombami’

16. Lolenge nini Yehova asili kobomba malamu, eloko ya motuya, mpo na libota na ye?

16 Na boumeli na mikolo ya nsuka oyo ya mpasi, Yehova “amonisaki motema-boboto ya kokamwa” epai na baoyo bazwaki ekimelo epai na ye, boye te? Lokola Tata ya bolingo, Yehova, oyo akobatelaka, abombi malamu, eloko ya motuya mpo na bana na ye awa na mabelé. Asili kosopa bolamu likoló na bango liboso na bato nyonso, lokola mokomi na Nzembo alobaki ete: “Malamu na yɔ ejali monɛnɛ mingi mpenja, oyo yɔ obombeli bango bakotosaka yɔ; mpe oyo obɔngiseli bango bakokima epai na yɔ liboso na bana na bato.”​—Njembo 31:19, 21.

17-19. Na Ghana, litomba nini malamu libimaki mpo na mobangé mobali oyo akendaki kokomisa libala na ye na mikanda ya Leta?

17 Yango wana, bato ya mokili bazali komona kolongobana ya baoyo bazali kosambela Yehova, mpe bazali kokamwa. Na ndakisa, na mboka Ghana, mobali moko ya mibu 96 akendeki na biro oyo bakokomisaka mabala na mikanda ya Leta mpe asɛngaki ete libala na ye oyo lisalemaki na lolenge ya bonkɔ́kɔ uta mibu 70, likomama sikawa kati na mikanda ya Leta. Mokomi na mabala kati na mikanda ya Leta akamwaki mpe atunaki ye ete: “Wana ezali mpenza likambo oyo olingi kosala? Na mbula na yo?”

18 Mobali wana alimbolaki ete: “Nalingi kozala Motatoli ya Yehova mpe kosangana kati na mosala ya ntina mingi liboso na nsuka ya mokili​—mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Mosala wana mozali komema kino bomoi ya seko. Batatoli ya Yehova batosaka mibeko ya Leta, kati na yango mobeko ya kokomisa libala na mikanda ya Leta. Na yango, nasɛngi bino bokomisa libala na ngai na mikanda ya Leta.” Mokomi na mabala kati na mikanda ya Leta akamwaki. Akomisaki libala na ye, mpe mobangé mobali azongaki na esengo ete azalaki sikawa na libala lindimami na Leta.​—Kokanisá na Baloma 12:2.

19 Nsima na yango, mokomi na mabala kati na mikanda ya Leta akanisaki likoló ya makambo oyo ayokaki. “Motatoli ya Yehova . . . mosala ya ntina mingi . . . nsuka ya mokili . . . Bokonzi ya Nzambe . . . bomoi ya seko.” Lokola azalaki koyeba te ndimbola oyo makambo wana ekokaki kozala na yango kati na bomoi ya mobali oyo azalaki na mibu 96, azwaki ekateli ya koluka Batatoli mpo na kotalela makambo yango na bozindo. Andimaki boyekoli ya Biblia mpe asalaki bokóli ya nokinoki. Lelo oyo, mokonzi wana na esika bakokomisaka mabala azali Motatoli oyo asili kozwa batisimo. Yango wana, ntango tozali kotosa Yehova ata na makambo oyo bato mosusu bakoki kotalela ete ezali makambo mike, yango ekoki kobimisa matomba malamu mingi mpo na biso mpe mpo na baoyo bazali komona etamboli na biso.​—Kokanisá na 1 Petelo 2:12.

20. Na Myanmar, lolenge nini ezaleli ya kolongobana ya elenge ndeko mwasi moko epesaki litatoli malamu?

20 Mikóló oyo bazali komitika ete solo ebongola bango mpo bakóma bato na kolongobana, bazali kopesa ndakisa malamu epai na bilenge kati na mokili oyo mozangi kolongobana. Elenge ndeko mwasi moko ya mboka Myanmar, alandaki ndakisa wana. Abotami na libota ya babólá mpe ya lokumu te oyo ezalaki na bana zomi. Tata na ye oyo azali mosilasanza (retraité), azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Mokolo moko na eteyelo, ndeko mwasi alokotaki lopɛtɛ ya diamá, oyo amemaki nokinoki epai na molakisi na ye ya mwasi. Mokolo molandaki, liboso ya kelasi, molakisi ayebisaki kelasi mobimba lolenge lopɛtɛ wana lomonanaki lisusu mpe lozongisamaki epai na nkolo na yango. Bongo, asɛngaki elenge ndeko mwasi ete atɛlɛma liboso ya kelasi mobimba mpe alimbola mpo na nini asalaki bongo, wana ayebaki ete soki ezalaki bana mosusu mbɛlɛ babombaki yango. Ndeko mwasi alimbolaki ete azali Motatoli ya Yehova mpe ete Nzambe na ye alingi boyibi te soko ezaleli ezangi kolongobana. Eteyelo mobimba eyokaki lisoló yango, likambo oyo lipesaki nzela na elenge ndeko na biso ya mwasi na kopesa litatoli epai na balakisi mpe bayekoli lokola.

21. Wana bilenge bazali kotya elikya epai na Yehova, lolenge nini etamboli na bango ezali komonisa ye?

21 Na Belgique, molakisi moko alobaki likambo malamu na ntina na Batatoli ya Yehova. Atalaki etamboli ya moko na banakelasi na ye, oyo azalaki mpe elenge ndeko mwasi, mpe alobaki ete: “Sikawa, nakómi na likanisi mosusu na ntina na Batatoli ya Yehova. Nazalaki kokanisela bango mabe ete bazali mpenza na limemya mpo na makanisi ya bato mosusu te. Bamonisaki ete bazali mpenza na limemya makanisi ya bato mosusu, nzokande bakobukaka mitinda na bango te.” Mbula na mbula, balakisi bapesaka mbano epai na banakelasi na bango ya mayele mingi. Kati na yango, ezalaki mpe na mbano mpo na bizaleli malamu. Mpo na mbula misato elandanaki, mbano misato ya liboso epesamaki epai na bana ya Batatoli ya Yehova. Mbala mingi, esalemaka bongo mpo na baoyo bazali kotya elikyá na bosembo nyonso epai na Yehova.​—Nzembo 31:23.

22. Maloba kitoko nini ya bosukisi oyo mazwami na Nzembo 31, mpe lolenge nini yango ezali kosalisa biso na mikolo ya nsuka ya ebongiseli ya ntango oyo?

22 Nzembo 31 eyokisi mongongo na bosukisi oyo kitoko, ete: “Bózala na mpiko, mpe tika motema na bino mozala na nguya, bino banso baoyo bazali kozela Yehova.” (Nzembo 31:24, NW) Na yango, awa tobɛlɛmi na nsuka ya mikolo ya ebongiseli mabe ya Satana, na esika na kotika biso, Yehova abɛlɛmi na biso mpenza mpe azali kopesa biso nguya na ye. Yehova azali sembo mpe akolɛmbaka te. Azali ekimelo na biso; azali ndako na biso ya makasi.​—Masese 18:10.

Ozali komikundola?

◻ Mpo na nini tokoki kozwa ekimelo na biso epai na Yehova na motema mobimba?

◻ Likambo nini limonisi ete etuluku ya bayembi ya nguya bazali koyemba na mpiko mpo na kokumisa Bokonzi?

◻ Mpo na nini tokoki kotya motema ete mitambo ya Satana mikokanga libota ya Yehova te?

◻ Eloko nini ya motuya oyo Yehova abombeli baoyo bazwi ekimelo epai na ye?

[Etanda na lokasa 12-15]

LAPOLO YA BATATOLI YA YEHOVA NA MOKILI MOBIMBA MPO NA MBULA YA MOSALA 1993

(Talá na zulunalo oyo ebimisamaki)

[Bililingi na lokasa 16, 17]

Baoyo bazwi ekimelo epai na Yehova bazali etuluku ya bayembi basakoli ya Bokonzi na nguya​—4 709 889!

1. Sénégal

2. Brésil

3. Chili

4. Bolivie

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto