Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!—Bazulunalo oyo eyebisaka solo na ntango na yango
“Osili kosikola ngai, Ɛ Yehova Nzambe na solo.”—NZEMBO 31:5, NW.
1, 2. (a) Mayoki nini ndeko mwasi moko azalaki na yango na ntina na likambo oyo atangaki kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli? (b) Mituna nini mizali kotunama na ntina na bazulunalo na biso?
NDEKO mwasi moko akomaki ete: “Natɔ́ndi bino mingi mpo na mateya kitoko oyo mabimisamaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, na lisoló ‘Okoki kozwa libɔndisi na ntango ya mpasi.’a Makambo mingi oyo bomonisaki, makokanaki mpenza na oyo nazalaki kokanisa; ezali lokola nde lisoló yango likomamaki mpo na ngai. Mbala ya liboso oyo natangaki yango, mpisoli ebimaki na miso na ngai. Ezali esengo na koyeba ete moto moko ayebi makanisi na ngai! Nazali na esengo ya kozala Motatoli ya Yehova. Soki bongo te, esika mosusu ezali te oyo tokoki kozwa elikya ya kozala na bomoi ya seko kati na Paladiso oyo ekoya mosika te, mpe kozala uta sikawa na libɔndisi mpo na milimo na biso! Natɔ́ndi bino. Natɔ́ndi mbala nkóto.”
2 Osilá kozala na mayoki motindo oyo? Ekómelá yo naino te ete makambo mosusu mazwami kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to na Lamuká! mamonana lokola nde makomamaki mpenzampenza mpo na yo? Makambo nini mazali kati na bazulunalo na biso oyo mazali kosimba mitema ya bato? Lolenge nini tokoki kosalisa bato mosusu ete bazwa litomba na nsango oyo ekobikisaka, oyo ezwami kati na yango?—1 Timoté 4:16.
Bazulunalo oyo ezali kolóngisa solo
3. Ntina nini malamu mpo na yango bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ezali kosimba mitema ya batangi mingi?
3 Yehova azali “Nzambe na solo.” (Nzembo 31:5, NW) Liloba na ye, Biblia, ezali búku ya solo. (Yoane 17:17) Bato na motema sembo bazali koyamba solo. (Kokanisá na Yoane 4:23, 24.) Moko na bantina oyo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ezali kosimba mitema ya bamilió ya batangi, ezali oyo ete yango ezali bazulunalo oyo eteyaka bosembo mpe solo. Nkutu, ezalaki mpo na bosembo na ntina na solo ya Biblia nde Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebandaki kobimisama.
4, 5. (a) Makambo nini mamemaki C. T. Russell na kobimisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli? (b) Lolenge nini zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli esalelami na “moombo na sembo mpe na mayele”?
4 Na 1876, Charles T. Russell asalanaki elongo na Nelson H. Barbour, ya engumba Rochester, na New York. Russell apesaki mosolo mpo na bonyati Herald of the Morning (Ntomá ya ntɔ́ngɔ́), zulunalo ya Barbour mpo na makambo na losambo; Barbour azalaki mokomi-mokambi mpe Russel azalaki mokomi-mosungi. Kasi, soko mbula moko na ndambo na nsima, na nimero ya Augústo 1878 ya Herald, Barbour akomaki lisoló oyo liboyaki kondima motuya ya mbeka na lisiko na liwa ya Klisto. Russell, oyo azalaki elenge liboso na Barbour soko na mibu 30, ayanolaki kati na lisoló ya nimero elandaki, epai alóngisaki mbeka ya lisiko oyo ye abéngaki yango ete “moko na mateya ya ntina mingi ya Liloba ya Nzambe.” (Matai 20:28) Nsima na kosala makasi mpo na kososola elongo na Barbour kati na Makomami, Russell azwaki ekateli ya kokata boyokani nyonso elongo na zulunalo Herald. Kobanda nimero ya Yúni 1879 ya zulunalo wana, nkombo ya Russell ezalaki kobima lisusu te lokola mokomi mosungi. Sanza moko na nsima, Russell, oyo azalaki na mibu 27, abandaki kobimisa zulunalo Zion’s Watch Tower and Herald of Christ’s Presence (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona mpe Ntomá na kozala ya Klisto, oyo eyebani lelo na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova), oyo uta ebandeli na yango, ezali kolóngisa solo ya Makomami, lokola liteya mpo na lisiko.
5 Uta mibu 114, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, lokola molobeli ya makoki mingi, emikómisaki molóngisi na makambo na solo mpe na mateya ya Biblia. Na bongo, esili kondimama na bamilió na batangi ya botɔ́ndi. Kino lelo oyo, ezali kokɔtɛla mbeka na lisiko na nguya nyonso. (Na ndakisa, talá nimero ya Febwáli 15, 1991.) Mpe ezali naino esaleli ya “moombo na sembo mpe na mayele” mpe ya Lisangani ya mikóló-bakambi (Collège central) na yango mpo na kosakola Bokonzi na Yehova oyo esili kotyama mpe mpo na kokabola bilei ya elimo “na ntango na yango.”—Matai 24:14, 45.
6, 7. Mokano ya ebandeli ya L’Age d’Or mozalaki nini, mpe nini emonisi ete bato na bososoli bayambaki nsango na yango?
6 Ezali boni mpo na Lamuká!? Uta ebandeli na yango, Lamuká! ezali mpe kolóngisa solo. Liboso mpenza, ezalaki kobéngama L’Age d’Or, zulunalo oyo esalemaki mpo na kokabwela bato nyonso. Na kotalela mokano na yango, nimero ya liboso oyo ya Ɔkɔtɔ́bɛ 1, 1919, eyebisaki ete: “Ntina na yango ezali mpo na komonisa polele, na nzela ya mayele mauti na Nzambe, ndimbola ya solo ya makambo minene mazali koleka na mikolo na biso mpe kolakisa bilembeteli ya solo mpe ya sikisiki epai na bato na bososoli mpo na komonisa ete mosika te, bato bakozwa mapamboli mingi.” Bato na bososoli bayambaki nsango ya L’Age d’Or. Na boumeli ya bambula mingi, ekabolamaki mingi koleka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.b
7 Nzokande, bosepeli oyo bato bazali na yango mpo na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe na Lamuká! ezali te bobele na likambo oyo ete, yango ezali koyebisa mateya ya solo mpe ezali kopesa ndimbola na bisakweli ya makambo mazali koleka na mokili. Mingimingi, uta mibu zomi soko mibu ntuku mibale oyo miuti koleka, ezali na ntina mosusu oyo bazulunalo na biso ezali kosimba mitema ya bato.
Masoló oyo mabimi na ntango na yango, oyo mazali kosimba bomoi ya bato
8. Maloba nini Yuda akomaki wana abongolaki makanisi na makambo oyo alingaki koloba, mpo na kolendisa batangi na ye ete batɛmɛla bopusi bozalaki kati na lisangá?
8 Soko mibu 30 nsima ya kufa mpe lisekwa na Yesu Klisto, Yuda, mokomi na Biblia, akutanaki na nkaká monene. Bato na mbindo, baoyo bazalaki lokola banyama bamikɔtisaki kati na baklisto. Yuda alingaki kokomela baninga na ye baklisto mpo na liteya ya moboko—lobiko oyo baklisto bapakolami nyonso bazali na yango. Na esika na kosala bongo, na litambwisi ya elimo santu, amonaki malamu kopesa toli na batangi na ye ete batɛmɛla bopusi mabe oyo bozalaki kati na lisangá. (Yuda 3, 4, 19-23) Yuda amiyokanisaki na ezalela wana mpe apesaki batoli na ntango na yango, oyo ekokisaki bamposa ya bandeko na ye baklisto.
9. Makambo nini matalelami kati na masoló mabimisami na ntango na yango na bazulunalo na biso?
9 Bobele bongo, kobongisa masoló masengeli kobima na ntango na yango kati na bazulunalo na biso, ezali mokumba monene. Bileko bizali kobongwana, mpe bato lokola—bamposa na bango mpe makanisi na bango ezali lolenge moko te na oyo ezalaki na mibu zomi soko mibu ntuku mibale oyo misili koleka. Kala mingi te, mokɛngɛli-motamboli (surveillant itinérant) moko, alobaki ete: “Ntango nakómaki Motatoli na bambula 1950, mwango na biso ya koyekola Biblia elongo na bato ezalaki bobele kolakisa mateya ya moboko—koteya bango solo na ntina na Bosato, na lifelo, molimo, mpe bongo na bongo. Kasi sikawa, emonani ete, bato bazali na makambo mingi mpe na mikakatano mingi ya bomoi na boye ete tosengeli koteya bango lolenge ya kozala na bomoi.” Mpo na nini bongo?
10. Mpo na nini tosengeli kokamwa te awa makambo ya bato mazali sé kobeba uta 1914?
10 Na ntina na “mikolo ya nsuka,” Biblia esakolaki ete: “Bato mabe mpe bakosi bakokóla longwa na mabe kino yango eleki mabe; bakozimbisa mpe bakozimbisama.” (2 Timoté 3:1, 13, NW) Na bongo, tosengeli kokamwa te awa makambo na bato mazali sé kobeba uta ntango ya nsuka ebandaki na 1914. Satana, oyo ntango na ye etikali mpenza mokuse, asopi nkanda na ye likoló na bato koleka na liboso. (Emoniseli 12:9, 12) Yango esali ete bizaleli mpe bomoi ya mabota ekesena na oyo ezalaki liboso esili koleka mibu 30 soko mibu 40. Bato bazali komipesa lisusu na losambo te lokola na liboso. Mabe mazali bipai binso, na yango bato bakómi komibatela na motindo oyo mozalaki kosalema liboso te, eleki bobele mibu 20 soko mibu 30.—Matai 24:12.
11. (a) Makanisi na bato mazali kati na makambo nini, mpe lolenge nini kelasi ya moombo na sembo mpe na mayele ezali koyanola na bamposa na bango? (b) Pesá ndakisa ya lisoló moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to ya Lamuká! oyo esimbaki bomoi na yo.
11 Na bongo, ezali likambo ya kokamwa te ete bato mingi batungisami na mikakatano na mayoki, na ezalela ya bomoi na bato, mpe mikakatano na mabota. Kelasi ya moombo na sembo mpe na mayele ezali koyanola na molende nyonso kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! na kobimisáká, na ntango na yango, masoló oyo mazali kolobela bamposa mpenza ya bato mpe oyo ezali mpenza kosimba bomoi na bango. Totalela mwa bandakisa.
12. (a) Mpo na nini masoló na ntina na mabota oyo mazali bobele na moboti moko mabongisamaki mpo na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na 1980? (b) Lolenge nini ndeko mwasi moko amonisaki botɔndi na ye mpo na masoló malobelaki mabota oyo mazali bobele na moboti moko?
12 Mikakatano na libota. Ntango lapólo ya mokili mobimba emonisaki bokóli ya nokinoki na motuya ya mabota oyo mazali bobele na moboti moko, masoló mabimisamaki na motó ya likambo “Lolenge nini okoki kobɔkɔla bana yo moko,” mabongisamaki mpo na nimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Desɛ́mbɛ 15, 1980 (na Lifalansé). Masoló yango mazalaki na mikano mibale: (1) mpo na kosalisa baoyo bazali kobɔkɔla bana bobele bango moko kozanga mobalani, ete balónga mokakatano wana mpe (2) mpo na kosalisa basusu na koyeba lolenge malamu bakoki komitya ‘na esika na bango’ mpe ‘kosunga’ mabota oyo mazali bobele na moboti moko. (1 Petelo 3:8; Yakobo 1:27) Batangi mingi bakomaki mikanda ya botɔ́ndi mpo na masoló wana. Mwasi moko oyo azalaki kobɔkɔla bana ye moko akomaki ete: “Mpisoli ekitaki longwa na miso na ngai ntango namonaki ezipeli, mpe ntango nafungolaki zulunalo mpe natangaki yango, motema na ngai mofulukaki na botɔ́ndi mpo na Yehova na lolenge apesaki malako ya motindo wana na ntango na yango.”
13. Botaleli nini bosalemaki na bozindo na ntina na konyokwama na makanisi, oyo ebimaki kati na Réveillez-vous! [Lamuká!] na 1981, mpe motangi moko alobaki nini na ntina na yango?
13 Mikakatano na mayoki. Lisoló ya konyokwama na makanisi lilobelamaki kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! uta bambula 1960. (1 Batesaloniki 5:14) Kasi etaleli ya sika mpe ya malamu na likambo wana elobelamaki kati na molɔngɔ́ ya masoló oyo ete “Okoki kobundisa konyokwama na makinisi!” na Lamuká! ya Desɛ́mbɛ 8, 1981 (na Lifalansé.) Mikanda ya botɔ́ndi mitindamaki na la Société Watch Tower longwa na bipai binso ya mokili. Ndeko mwasi moko akomaki ete: “Lolenge nini nakoki kokoma mayoki oyo nazali na yango na motema? Nazali na mibu 24, mpe na mibu zomi oyo miuti koleka, nazalaki konyokwama mingi na makanisi. Kasi, sikawa nazali komiyoka ete nazali pene na Yehova mpe nazali na botɔndi na lolenge azali koyanola na bamposa ya bato banyokwami na makanisi na nzela ya masoló oyo matondi na bolingo, mpe nalingaki koyebisa bino yango.”
14, 15. (a) Lolenge nini lisoló ya kobebisa bana elimbolamaki kati na bazulunalo na biso? (b) Masoló nini ya zulunalo oyo mazalaki na bopusi epai na motamboli moko na mpunda na mboka Australie?
14 Mikakatano mitali ezalela ya bomoi ya bato. Biblia esakolaki ete “na mikolo ya nsuka, . . . bato bakozala balingi na bango mpenza, . . . bazangi bolingo ya motema, . . . bazangi komipekisa, babomi, bato baboyi malamu.” (2 Timoté 3:1-3, NW) Na yango, tosengeli kokamwa te ete ntalo monene ya bana babebisami mingi lelo. Likambo yango lilobelamaki polele kati na lisoló “Lisungi mpo na baoyo basangisi nzoto na bandeko na bango” kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Ɔkɔtɔ́bɛ 1, 1983. Mbula mwambe na nsima, molɔngɔ́ ya masoló “Lolenge ya kolónga mpasi euti na kobebisama na bomwana” kati na Lamuká! ya Ɔkɔtɔ́bɛ 8, 1991 (na Lifalansé) ebongisamaki malamu mpo na kopesa bososoli mpe elikya epai na baoyo babebisamaki mpe kolakisa bato mosusu lolenge oyo bakoki kopesa bango lisungi malamu. Molɔngɔ́ ya masoló wana mapusaki batangi na kokoma mikanda mingi koleka na lolenge esalemi naino te uta bazulunalo na biso ebandaki kobimisama. Motangi moko akomaki ete: “Oyo ezalaki na bopusi monene likoló na kobika na ngai, ezalaki makanisi ya kobɔndisa mpe mikapo ya Makomami oyo mizwami kati na masoló yango. Koyeba ete Yehova azalaki kotalela ngai na lolenge mabe te, ezalaki libɔndisi monene. Koyeba ete nazalaki ngai moko te, ezalaki mpe libɔndisi monene.”
15 Longwa na ntaká molai, na engumba Melbourne, na Australie, motamboli moko na mpunda abyangaki Biro ya la Société Watch Tower, ya Sydney, na nzela na telefone mpo na koyebisa lolenge aokaki mpii mpo na kosala bimekaneli na mpunda. Alobaki ete autaki kotanga masoló ya Lamuká! ya Mársi 8, na motó ya likambo “Kobebisa basi na makasi—Ndɔtɔ́ ya nsɔmɔ mpo na basi” mpe nandimaki te ete zulunalo ya kitoko motindo oyo ekokaki kozala. Atunaki mituna na boumeli ya miniti 30 mpe asepelaki na biyano oyo azwaki.
16. Motindo nini okoki komonisa botɔndi mpo na bazulunalo na biso?
16 Ezali boni mpo na yo? Lisoló moko libimisamaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to na Lamuká! lisilaki kosimba bomoi na yo? Soko bongo, na ntembe te ozali na botɔ́ndi mingi mpo na bazulunalo na biso. Lolenge nini okoki komonisa botɔ́ndi na yo? Ezali mpenza na kotangáká nimero na yango moko na moko. Okoki lisusu kokabola mingi mpenza bazulunalo wana ya ntina. Lolenge nini?
Kabolá yango elongo na basusu!
17. Masangá makoki kosala nini mpo na kobakisa kokabolama ya bazulunalo?
17 Liboso, ezali na likambo moko oyo lisangá moko na moko ekoki kosala. Moyebisi nsango (lelo Mosala na biso ya Bokonzi) ya Ɔkɔtɔ́bɛ 1952, elobaki ete: “Mwango moleki malamu ya kokabola bazulunalo ezali kokende ndako na ndako mpe magazini na magazini. Na yango, la Société alendisaki ete banzela wana ya bokaboli bazulunalo esalelama mbala na mbala na Mokolo ya mosala ya Bokaboli bazulunalo.” Toli oyo ezali na ntina mingi lelo. Masangá makoki kopona Mokolo ya Bokaboli bazulunalo mbala na mbala, mokolo oyo mobongisami libosoliboso mpo na kopesa litatoli na bazulunalo. Mpo na masangá mingi, ntembe ezali te ete mikolo ya Poso mosusu nde ebongi mpo na yango. Ee, tika ete lisangá moko na moko lipona mikolo ya sikisiki to bampokwa mpo na kopesa litatoli na bazulunalo—na ndako na ndako, magazini na magazini, na balabála, mpe na banzela ya bokaboli bazulunalo. Lisusu, bokoki kosala nini, bino basakoli ya Bokonzi, mpo na kobakisa kokabolama ya bazulunalo?
18, 19. (a) Lolenge nini kotalela Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! liboso, ezali kosalisa yo mpo na kokabola bazulunalo? (b) Maloba ya mokuse, oyo mabongi mazali na litomba nini na ntango ya kolakisa bazulunalo? (c) Nini emonisi ntina ya koingisa bazulunalo na bandako ya bato?
18 Kotalela “Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli” mpe “Lamuká!” liboso, ezali litambe ya yambo. Kotanga bazulunalo mwa bantango liboso. Wana ezali yo kotanga lisoló moko na moko, omituna ete: ‘Lisoló oyo likoki kosepelisa nani?’ Kanisá likoló na mwa maloba oyo okoki kosalela mpo na kolamwisa mposa ya moto kati na lisoló. Longola kosangana mbala na mbala na Mokolo ya Bokaboli bazulunalo, mpo na nini te kozala na bazulunalo mosusu, mpo na kosimba mabaku nyonso ya kokabola yango epai na bato mosusu—wana tozali na mobembo to wana tokei na zándo mpe wana tozali kosolola elongo na baninga ya mosala, na bato bafandi pene na biso, na baninga ya kelasi, to na balakisi?
19 Kozala na maloba ya pɛtɛɛ ezali likambo ya mibale oyo lisɛngami. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Máí 15, 1957 (na Lifalansé), liyebisaki ete: “Maloba mokuse, oyo mabongi, mazali lolenge malamu ya kopesa zulunalo. Mokano ezali ya kokabola bazulunalo mingi. Yango moko ‘ekoloba.’” Basakoli mosusu bamonaka malamu kopona likanisi moko kati na lisoló, kotya yango na mwa maloba mpo na kolakisa bazulunalo. Wana ezali yango kati na ndako, bazulunalo ekoki “koloba” na bato mosusu longola baoyo bazwaki yango epai na yo. Na Irlande, elenge mwasi moko moyekoli na université, atangaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Sɛtɛ́mbɛ 1, 1991, oyo tata na ye azwaki epai na Motatoli moko. Masoló na ntina na kosolola mpe makambo mosusu malamwisaki mposa na ye. Nokinoki nsima na kotanga zulunalo, abyangaki Batatoli na nzela ya telefone, na kolandáká búku ya banimero ya telefone. Boyekoli ya Biblia ebandaki nokinoki, mpe elenge mwasi azwaki batisimo na Liyangani ya Etúká “Mateya mauti na Nzambe,” na Yúli 1993. Ya solo, tika ete toingisa bazulunalo na bandako ya bato, epai kuna yango moko ekoki “koloba” na bato! Mokɛngɛli-motamboli moko apesaki toli mosusu ya pɛtɛɛ: “Bimisá bazulunalo na sáki na yo.” Ya solo, soki makambo mazali yo koloba mabendi likebi ya molobani na yo te, bililingi kitoko bizali na ezipeli ya bazulunalo bikokabola yango mpo na yo.
20, 21. (a) Lolenge nini okoki kobongola maloba wana ezali yo na mosala ya kokabola bazulunalo? (b) Nini okoki kosala mpo na kokabola bazulunalo mingi na sanza na sanza?
20 Likanisi ya misato ezali ya koyeba kobongola masoló. (Kokanisá na 1 Bakolinti 9:19-23.) Bongisá mwa masoló ya mokuse. Na makanisi na yo, tyá lisoló moko oyo likosepelisa mibali, mosusu mpo na basi. Mpo na bilenge, okoki kolakisa lisoló lizwami na motó ya likambo “Mituna oyo bilenge bazali kotuna . . .” Ebongi lisusu koyeba kobongola masoló na ntango ozali na mosala ya kokabola bazulunalo. Longola Mokolo ya Bazulunalo, okoki komona ete kopesa litatoli na mpokwa ezali na mabaku malamu mpo na kopesa bazulunalo ndako na ndako.
21 Likanisi ya minei ezali ya komityela mokano. Lisoló “Bazulunalo oyo ezali komonisa nzela ya bomoi,” oyo ebimaki na lokasa lobakisamaki na Mosala na biso ya Bokonzi ya Mársi 1984 (na Lingelesi), liyebisaki ete: “Na ndakisa, basakoli bakoki mbala mosusu kozala na mokano ya kokabola bazulunalo 10 na sanza, na kotalela ezalela ya makambo na bango; babongisi-nzela bakoki kokabola bazulunalo 90. Ya solo, basakoli mosusu bazali na makoki ya kokabola bazulunalo mingi na sanza mpe na yango, bakolinga komityela mokano monene. Nzokande, na ntina na kolongono mabe na nzoto, mpo na ezalela ya teritware, to na bantina mosusu ebongi, mokano ya basusu mokoki kozala moke. Atako bongo, mosala na bango mpo na Yehova mozali na motuya mingi. (Mat. 13:23; Luka 21:3, 4) Likambo ya ntina mingi ezali ya kozala na mokano.”
22. Motindo nini tokoki komonisa botɔ́ndi na biso epai na Yehova mpo na bazulunalo na biso oyo ekoyebisaka solo na ntango na yango?
22 Oyo nde botɔ́ndi tozali na yango mpo na Yehova, “Nzambe na solo,” lokola asalelaki kelasi ya moombo na sembo mpe na mayele mpe Lisangani na yango ya Mikóló-bakambi mpo na koleisa biso na nzela na bazulunalo oyo ebimaka na ntango na yango! (Nzembo 31:5) Engebene mokano ya Yehova, bazulunalo oyo ekolanda kokokisa bamposa ya sikisiki ya bato. Ekolóngisa mitinda mitombwani na bizaleli ya Yehova. Ekotika te kotómbola mateya ya solo. Mpe ekolanda kobenda likebi ya bato likoló na kokokisama ya bisakweli oyo bimonisi ete tozali kobika na ntango oyo Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela mpe oyo mokano ya Nzambe mozali kosalema awa na mabelé koleka na liboso, na basambeli ya solo ya Yehova baoyo motuya na bango mozalaki sé kobakisama. (Matai 6:10; Emoniseli 11:15) Oyo nde biloko ya motuya tozali na yango kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tika tosimba mabaku ya kokabwela bato na motema sembo bazulunalo ya ntina mingi oyo ezali kosimba bomoi ya bato mpe ezali kolóngisa makambo ya solo ya Bokonzi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Yúli 15, 1992, nkasa 19-22.
b Na boumeli ya bambula mingi, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli litalelamaki lokola zulunalo oyo ekomamaki mingimingi mpo na baklisto bapakolami. Kasi, kobanda 1935, nsɛtɛ ebɛtamaki makasi mpo na kolendisa “ebele monene,” baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na mabelé, ete bazwaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe batangaka yango. (Emoniseli 7:9) Mwa bambula na nsima, na 1940, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli lizalaki kopesama mbala na mbala epai na bato na balabála. Na nsima, kokabolama na yango ekólaki nokinoki.
Okopesa eyano nini?
◻ Nini emonisi ete Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ezali bazulunalo ekoyebisaka solo?
◻ Lolenge nini Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! esimbaki bomoi ya bato?
◻ Nini masangá bakoki kosala mpo na kobakisa kokabolama ya bazulunalo?
◻ Makanisi nini makoki kosalisa yo mpo na kokabola bazulunalo mingi?
[Etanda na lokasa 22]
Mwa masoló oyo masimbaki bomoi ya bato
Na boumeli ya bambula, batangi mingi bamonisaki botɔ́ndi na bango mpo na masoló mabimaki kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Awa na nsé, ezali bobele na mwa ndambo kati na ebele ya masoló oyo masimbaki mitema ya batangi na biso. Masoló oyo, to mosusu, mabongolaki bomoi na yo?
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli
“Ndimá lisalisi ya Nzambe mpo na kolónga mabungá na yo mabombami” (Apríli 15, 1985)
“Tomonisa ezaleli ya kobanga Nzambe epai na baboti na biso bakómi mibangé” (Yúni 1, 1987)
“Ntina ya kelasi mpe kolakisama” (Novɛ́mbɛ 1, 1992)
Lamuká! (na Lifalansé)
“Okoki kolónga maladi ya konyokwama na makanisi!” (Sɛtɛ́mbɛ 8, 1981)
“Ntango moto oyo olingaka akufi . . .” (Apríli 22, 1985)
“Bóbatela bana na bino!” (Ɔkɔtɔ́bɛ 8, 1993)
[Elilingi na lokasa 23]
Na Canada—mosala ya ndako na ndako elongo na bazulunalo
[Elilingi na lokasa 24]
Na Myanmar—kolakisama ya bazulunalo oyo ezali komonisa nzela ya bomoi