Balingami na yo oyo basili kokufa—Okomona bango lisusu?
JOHN azalaki bobele na mibu libwa ntango mama na ye akufaki. Na nsima, amikundolaki likambo oyo lisalamaki na ndako ya bibembe: “Nasalaki elilingi moko mpo na ye mpe nakomaki maloba mikuse likoló na yango oyo ezalaki kosɛnga na ye ete azela biso nyonso kuna na likoló. Napesaki yango na Papa ete atya yango kati na sanduku elongo na ye, mpe atako asilaki kokufa, nalingaka mingi kokanisa ete azwaki nsango wana ya nsuka oyo eutaki epai na ngai.”—How It Feels When a Parent Dies (Lolenge moto aokaka soki moboti moko akufi), ya Jill Krementz.
Ntembe moko ezali te ete John alingaki mama na ye mingi. Nsima ya kolobela bizaleli na ye, alobaki ete: “Mbala mosusu ezali bobele ete nalingaka te kokanisa makambo mabe, kasi nakoki te kokanisa likambo moko mabe na ntina na ye. Azalaki mwasi kitoko koleka oyo namoná naino te na bomoi na ngai.”
Lokola John, mingi bazali na makanisi kitoko na ntina na balingami na bango oyo basili kokufa mpe bazali kondima ete bazali na mposa makasi ya komona bango lisusu. Edith, oyo mwana na ye ya mobali ya mibu 26 akufaki na kanser, alobaki ete: “Nazalaka na mposa ya kondima ete mwana na ngai ya mobali azali na bomoi na esika moko, kasi nayebi te epai wapi. Nakomona ye lisusu? Nayebi te kasi nazali kolikya ete nakomona ye.”
Ya solo, Mozalisi ya moto oyo atondi na bolingo azangi te koyeba mposa wana oyo ezali epai na moto nyonso. Yango wana apesi elaka ete ntango ezali koya wana bamilió na bato bakokutana na balingami na bango oyo basili kokufa. Liloba ya Nzambe lizali na mitindami mingi oyo mizali kolobela elaka wana ya lisekwa ya bakufi na mikolo mizali koya.—Yisaya 26:19; Danyele 12:2, 13; Hosea 13:14; Yoane 5:28, 29; Emoniseli 20:12, 13.
Banani bazali kosekwa na likoló?
Tótalela elikya oyo ya John ete mama na ye molingami azali kozela ye na likoló. Bato mingi ya mangomba bazali na elikya to bindimeli wana. Kati na molende na bango ya kondimisa makanisi motindo yango, bakonzi ya mangomba mpe baoyo basungaka bato batungisami basalelaka mabe mikapo ya Biblia.
Na ndakisa, monganga moko mosungi na baoyo bakufeli moto, Elisabeth Krübler-Ross, alobaki kati na búku na ye On Children and Death (Mpo na bana mpe mpo na liwa) ete: “Kokufa elimboli bobele kotika nzoto na biso lokola tobwakaka kazaka ya kala oyo enzuluki, to lokola kolongwa na elalelo moko mpo na koleka na elalelo mosusu. Kati na Mosakoli 12:7, tozali kotánga ete: ‘Mpe mputulu ekojonga na mabele lokola ejalaki yango; mpe molimo ekojonga epai na Njambe oyo apɛsaki yango.’ Yesu alobaki ete: ‘Nakokɛnda kobɔngisela bino esika, ete esika ejali ngai, bino bojala wana lokola.’ Mpe epai na moyibi likoló na ekulusu: ‘Lelo okozala elongo na ngai na paladiso.’”
Mikapo oyo mitángami awa na likoló milingi solo komonisa ete balingami na biso oyo basili kokufa bazali sikawa na bomoi mpe bazali kozela biso na likoló? Tótalela mikapo yango malamumalamu, tokobanda na Mosakoli 12:7. Na ntembe te, moto na bwanya oyo akomaki maloba oyo alingaki te kokweisa oyo asilaki koloba kati na búku bobele moko wana ya Biblia: “Mpɔ ete bato na bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo tɛ.” (Mosakoli 9:5) Azalaki kolobela kufa ya bato banso. Ezali likambo ya mayele na kokanisa ete bato oyo baboyi kondima ete Nzambe azali mpe babomi na bato oyo balingi kobongwana te bakokende epai na Nzambe nsima na kufa na bango? Soko moke te. Ya solo, likambo oyo likoki te kolobelama bongo na ntina na moto moko kati na biso, atako tomitalelaka ete tozali malamu to mabe. Mpo ete moto moko te kati na biso azalaki liboso na likoló elongo na Nzambe, lolenge nini tokoki koloba ete tozali kozonga epai na ye?
Na bongo, mokomi ya Biblia alingaki kolobela nini wana alobaki ete, ‘elimo ekozonga epai na Nzambe ya solo’? Na kosaleláká liloba ya Liebele oyo ebongolami “elimo,” alingaki te komonisa eloko moko ya sikisiki oyo ezali kokesenisa moto moko na mosusu. Na esika na yango, na Mosakoli 3:19, mokomi bobele moko oyo apemamaki alimboli ete moto mpe nyama “bango yɔnsɔ bajali na [elimo, NW] moko.” Ya solo, amonisaki ete “elimo” ezali nguya ya bomoi kati na ba cellules oyo esali nzoto ya moto mpe nzoto ya nyama. Tozwaki elimo wana mbala moko na Nzambe te. Epesamelaki biso na nzela ya baboti na biso ntango tobandaki kati na zemi mpe na nsima ntango tobotamaki. Lisusu, elimo wana ekokatisaka etando te mpo na kozonga epai na Nzambe nsima na kufa. Maloba oyo ete, ‘elimo ekozonga epai na Nzambe ya solo, (NW),’ ezali lolenge mosusu ya komonisa ete elikya ya bomoi mpo na mokufi na mikolo mikoya ezali sikawa na mabɔkɔ ya Nzambe. Ezali ye nde akozwa ekateli soki akokanisa nani mpe akosekwisa mpenza nani. Talá yo moko lolenge Biblia ezali komonisa yango polele na Nzembo 104:29, 30.
Yehova Nzambe akanaki ete motuya moke ya bayekoli ya sembo ya Klisto, bobele 144 000, bakosekwisama mpo na bomoi na likoló lokola bana ya Nzambe ya elimo. (Emoniseli 14:1, 3) Bango basali boyangeli ya likoló elongo na Klisto mpo na kopesa bato mapamboli awa na mabelé.
Bato ya liboso na koyeba likambo yango ezalaki bantoma ya sembo ya Yesu, oyo ye alobaki na bango ete: “Na ndako na Tata na ngai bifandelo bijali mingi. Sɔkɔ bongo tɛ, mbe nasili koloba na bino; jambi nakokɛnda kobɔngisɛla bino esika. Mpe sɔkɔ nakokɛnda kobɔngisɛla bino esika, nakoya lisusu mpe nakoyamba bino epai na ngai ete esika ejali ngai, bino bojala mpe wana lokola.” (Yoane 14:2, 3) Bantoma wana mpe bayekoli mosusu ya liboso bakufaki mpe basengelaki kozela kati na kufa wana bazalaki koyeba eloko te kino koya na Yesu mpo na kofuta bango na lisekwa mpo na bomoi na likoló. Yango wana tozali kotánga na ntina na moklisto martirú ya liboso Setefano ete, “alalaki kati na kufa.”—Misala 7:60, NW; 1 Batesaloniki 4:13.
Lisekwa mpo na bomoi na mabelé
Kasi tokoloba nini na ntina na elaka ya Yesu epai na moto mabe oyo akufaki penepene na ye? Lokola Bayuda mingi ya eleko wana, mobali yango azalaki kondima ete Nzambe akotinda Masiya mpo na kotelemisa bokonzi mpe kozongisa kimya mpe libateli mpo na libota ya Bayuda na mabelé. (Kokanisá 1 Mikonzi 4:20-25 elongo na Luka 19:11; 24:21 mpe Misala 1:6.) Lisusu, mosáli na mabe wana andimelaki Yesu ete azali ye oyo Nzambe aponi mpo na kozala Mokonzi. Nzokande, na ntango wana mpenza, oyo Yesu abelemaki na kokufa lokola moto oyo akweisami, ekómisaki likambo yango lokola ete ekoki kosalama te. Yango wana Yesu andimisaki mosáli na mabe wana na kobandáká elaka na Ye na maloba oyo: “Solo nalobi na yo lelo ete, Okozala elongo na ngai kati na Paladiso.”—Luka 23:42, 43, NW.
Mabongoli ya Biblia oyo mazali kotya ekáti (virgule) liboso ya liloba “lelo” mazali kobimisa mokakatano mpo na bato oyo balingi kososola maloba ya Yesu. Yesu akendeki na paladiso moko te na mokolo wana. Alalaki nde kati na kufa kozanga koyeba likambo na boumeli ya mikolo misato kino Nzambe asekwisaki ye. Ata nsima ya lisekwa mpe kobuta ya Yesu na likoló, asengelaki kozela na lobɔkɔ ya mobali ya Tata na ye kino ntango oyo asengelaki koyangela likoló na bato. (Baebele 10:12, 13) Mosika te, Bokonzi ya Yesu ekomema kobɔndisama mpo na bato mpe ekobongola mabelé mobimba paladiso. (Luka 21:10, 11, 25-31) Na ntango yango Yesu akokokisa elaka oyo apesaki na mosáli na mabe na kosekwisáká ye mpo na bomoi na mabelé. Mpe Yesu akozala elongo na moto yango na boye ete akokokisa bamposa nyonso ya mobali yango, bakisá mposa ya kozala na motindo ya bomoi oyo eyokani na mibeko ya sembo ya Nzambe.
Lisekwa ya bato mingi
Lokola ekozala mpo na mosáli na mabe oyo abongolaki motema, lisekwa ya bato mingi ekosalama awa na mabelé. Yango eyokani na mokano ya Nzambe ntango asalaki moto. Mobali mpe mwasi ya liboso batyamaki kati na paladiso mpe bapesamelaki etindá ya koyangela mabelé. Soki babatelaka botosi na bango epai na Nzambe, mbɛlɛ bakokaki konuna te mpe kokufa te. Na ntango oyo eponami na Nzambe, mabelé mobimba malingaki kokómisama paladiso na etando mobimba mpo na Adama mpe bakitani na ye ya kokoka.—Genese 1:28; 2:8, 9.
Nzokande, mpo ete Adama na Eva basalaki lisumu na nkó, bamilukelaki kufa mpo na bango mpe mpo na bana na bango. (Genese 2:16, 17; 3:17-19) Yango wana Biblia elobi ete: “Na bongo, mabe ekɔtaki na mokili mpɔ na moto mɔkɔ [Adama] mpe kufa ekɔtaki mpɔ na mabe. Kufa mpe epalangani epai na bato yɔnsɔ mpɔ ete bato yɔnsɔ basali mabe.”—Baloma 5:12.
Ezalaki bobele na moto moko oyo abotamaki kozanga kosangola lisumu. Ezalaki Mwana ya kokoka ya Nzambe, Yesu Klisto, oyo bomoi na ye etindamaki uta na likoló kino libumu ya ngɔndo Moyuda, Malia. Yesu asalaki lisumu te mpe abongaki te na kobomama. Yango wana, kufa na ye ezali na motuya lokola mbeka mpo na “masumu ya mokili.” (Yoane 1:29; Matai 20:28) Yango wana Yesu akokaki koloba ete: “Ngai najali lisekwa mpe bomɔi. Ye oyo ajali kondima ngai, ata asili kokufa, akobika.”—Yoane 11:25.
Ee, okoki kozala na elikya ya kokutana lisusu na balingami na yo oyo basili kokufa, kasi yango ezali kosɛnga ete ondimela Yesu lokola Mosikoli na yo mpe otosa ye lokola Mokonzi oyo atyami na Nzambe. Mosika te Bokonzi ya Nzambe ekolongola mabe nyonso na mabelé. Bato nyonso oyo bakoboya kotosa bokonzi na ye bakobomama. Nzokande, bayangelami ya Bokonzi ya Nzambe bakobika mpe bakomipesa bango mpenza na mosala ya kobongola mabelé oyo ete ekóma paladiso.—Nzembo 37:10, 11; Emoniseli 21:3-5.
Na ntango yango nsaí monene ekozala mpo ete lisekwa likosila kobanda. Okozala wana mpo na koyamba bakufi? Yango etali oyo ozali kosala sikawa. Mapamboli kitoko mazali kozela baoyo nyonso bazali komikitisa na nsé na Bokonzi ya Yehova, oyo ye apesi yango na Mwana na ye, Yesu Klisto.