“Kolɔ́ba” kati na mai ya Fidji
FIDJI—nkombo oyo ezali kopesa likanisi ya paladiso ya Mai Monene ya Súdi. Mai ya langi bulé pɛ́ɛ, bangomba ya pauni, nzeté ya kokoti oyo ezali koningana, bangomba ezipami na matiti, mbisi ya mikili ya molungé, mbuma mpe bafololo oyo euti mosika. Okoki kozwa ebele ya biloko wana nyonso na etuluku ya bisanga 300 oyo ezali bakilomɛtɛlɛ soko 1 800 na nɔ́rdì ya Nouvelle Zélande na Pacifique ya Sudí. Na yango, okozanga te kondima ete Fidji ekoki kopesa moto nyonso mposa makasi ya paladiso na mikili ya molungé.
Nzokande, Fidji ezali kosepelisa bobele mpo na kitoko ya ezingelo na yango te. Ya solo, lokola ezali na mitindo mikeseni ya mbisi na bangomba ya pauni, ezali mpe na mitindo mikeseni ya biloko likoló na mabelé. Mbala mosusu, bokeseni oyo bozali kati na bikólo ndenge na ndenge ya Fidji, bozali mpenza na bokokani te na Pacifique ya Súdi. Bituluku mibale bileki minene ya bafandi soko 750 000 ya mboka Fidji bisangisi bafandi ya liboso ya Fidji, baoyo bautaki na Mélanésie, mpe ba Indiens oyo babotami na Fidji, bakitani ya basáli oyo bautaki na Inde na eleko ya boyangeli ya Grande Bretagne. Kasi ezali lisusu na bafandi ya esanga Banaba, na ba Chinois, na Mindɛlɛ oyo bautaki na Mpótó, na ba Gilbertains, ba Rotumiens, ba Tuvaluans, mpe basusu.
Kati na etuluku oyo ezali na mimeseno ndenge na ndenge, Batatoli ya Yehova bamipesi mingi na mosala ya “kolɔ́ba.” (Malako 1:17) Ezali mpenza ntembe kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe kati na etuluku oyo ezali na bikólo mingi. Ya liboso, esengeli kolónga bipekiseli ya nkótá mpe ya mimeseno. Atako Lingelesi ezali lokótá oyo eyebani na bato mingi, mbala mingi basalelaka Fidjien, Hindi, Rotumien, to nkótá mosusu.
Esengeli mpe kotalela makambo makeseni mpo na kosolola elongo na bato oyo bauti na mangomba makeseni. Ntalo monene ya bafandi ya liboso ya Fidji mpe ya bafandi mosusu ya bisanga yango bazali bato ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba. Bato oyo bautaki na Inde bazali ba Hindous, Bamizilmá, mpe ba Sikhs, kasi ba Hindous nde baleki mingi. Bandakonzambe etondi na bingumba mpe na bamboka, kasi na bisanga bileki monene ya Fidji, makambo makeseni na ntina na ebele ya batempelo ya ba Hindous mpe na bamoské ya Bamizilmá.
Mingi na bato ya Fidji oyo bazali Batatoli balobaka nkótá minene misato—Lingelesi, Fidjien, mpe Hindi. Kozala na makoki wana ezali litomba monene kati na mosala ya “kolɔ́ba.” Mbala mosusu bato bakamwaka na koyoka moto na ekólo Fidji koloba malamu lokótá ya Hindi to komona Mohindu oyo azali koloba malamu lokótá Fidjien. Na ntina na bokeseni ya mimeseno, ya mangomba mpe ya nkótá, esengeli mpenza koyeba kobongola masoló mpo na kozala “mokaboli ya [nsango malamu] elongo na basusu.”—1 Bakolinti 9:23, NW.
“Kolɔ́ba” kati na bamboka mike ya Fidji
Bafandi ya liboso ya Fidji bazali bato ya boboto mingi mpe bayambi ya bapaya. Ezali mpasi kokanisa ete koleka mwa moke ekeke bobele moko na liboso, bitumba kati na bikólo bizalaki kosalama mingi. Ya solo, na ntango oyo bafandi ya liboso ya Mpótó bakómaki, Fidji eyebanaki lokola bisanga epai balyaka bato. Na nsima, ntango moto moko akómaki mokonzi monene kuna mpe andimaki boklisto, bitumba mpe kolya bato esilaki. Bokeseni kati na bikólo etikali bobele na nkótá mingi oyo ezwami kati na bitúká bikeseni, atako lokótá Bau eyebani na bisika mingi.
Longola Suva, mboka-mokonzi, ezali na bingumba mingi kati na Fidji. Ntalo monene ya ba Fidjiens bafandi na bamboka mike na nsé ya bokonzi ya turaga ni koro, to mokonzi. Wana bazali kokɔta na mboka mpo na kobanda mosala ya “kolɔ́ba,” momeseno ezali ete basengeli kosolola na mobali yango mpo na kosɛnga nzela na kokende na ba bures nyonso, to bandako ya mboka yango. Ndingisa eboyamaka mpenza te, bobele na bantango mosusu lokola na momeseno na ntina na bakonzi ya mangomba oyo bazali kotɛmɛla Batatoli ya Yehova. Kosakola na ndako ya ba Fidjiens elekaka mpenza lolenge nini?
Wana tokɔti na bure, tozali kofanda na nsé togunzi makolo. Maloba ya ebandeli oyo mabongisami na likebi mingi mpo na kolamwisa mposa ya bato lokola na mikili ya Wɛ́sti mazali na ntina mingi te awa. Moto nyonso oyo ayei koloba na ntina na Nzambe ayambami malamu. Wana osɛngi ye Biblia, molobani akotɛlɛma nokinoki mpe, na maloba ya bonkóndé “tulou” (limbisá ngai), akokamata na ebombelo ya mikanda Biblia moko na lokótá Fidjien mpe akotánga na motema moko mikapo mikeseni oyo mosakoli azali kolakisa. Nzokande, ezaleli ya boyambi mpe ya limemya ya ba Fidjiens ezali kobimisa mikakatano ya motindo mosusu. Esengeli mpenza bososoli mpe takte mingi mpo na komema balobani kati na masoló, kolendisa bango na kolanda makanisi oyo ozali komonisa, to kosalisa bango na kokanga ntina ya kokokanisa bindimeli na bango na mateya ya Biblia.
Ba Fidjiens basepelaka mingi na masoló matali bindimeli koleka makambo to mikakatano etali bomoi na bato. Ya solo, mingi kati na Batatoli ya Yehova ya Fidji oyo baleki 1 400 basepelaki na solo ya Biblia na nzela ya lisoló litali mituna lokola: Lifelo ezali nini? Nani akendeka na likoló? Mabelé makobomama? Nzokande, kolandela mposa oyo moto amonisaki ezali kosɛnga komiyokanisa na makambo na ye mpe kolendendela. Wana ozongeli ye na ngonga oyo boyokanaki, okokuta ete nkolo ndako asilaki kokende na teitei (elanga) to epai mosusu. Yango elimboli te ete bazali kosepela te na bozongeli yango, kasi ezali bobele mpo ete lolenge na bango ya kotalela ntango ekeseni. Na momeseno, yango ezali mpenza mikakatano te mpo na Batatoli oyo bazali bato ya mboka yango. Balendendelaka na kozongáká na ntango mosusu. Balabála ezali na nkombo te mpe bandako ezali na nimero te oyo esengeli kokoma, na yango esengeli kozala na makoki malamu ya komikundola makambo mpo na kosala bozongeli ya sika.
“Kolɔ́ba” na motindo ya ba Polynésiens
Sikawa, tiká ete tókende “kolɔ́ba” elongo na mokɛngɛli-motamboli, to mokɛngɛli ya zongazonga, wana azali kokende kotala lisangá ya Rotuma. Etuluku wana ya bisangá ya bangomba na mɔ́tɔ ezali na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ 500 na nɔ́rdi ya Fidji. Mpo na kokóma kuna tokopumbwa kati na mpepo moko oyo ezali na bisika 19. Esanga ya monene ezali bobele na etando ya 50 kilomètres carrés, elongo na motango mobimba ya bafandi penepene 3 000. Nzela moko ya zɛlɔzɛlɔ elandi mai monene, oyo ekutanisi bamboka mike 20. Rotuma eyangelami na Fidji kasi ezali na mimeseno mpe lokótá ekeseni. Lokola bautaki na Polynésie, bato na yango bakeseni na ba Fidjiens oyo bautaki na Mélanésie. Mpo na oyo etali mangomba, ntalo monene na bango bazali Bakatolike to ba Méthodistes.
Wana mpepo ezali kobɛlɛma na mabelé mpe koluka kokita na libándá ya mpepo, tomoni zámba monene ya esanga wana oyo ezali ntango nyonso na langi ya mai ya mpondu. Mandalala ya nzeté ya kokoti oyo ekokani na nsala ezali komonana bipai binso. Ebele ya bato bazali wana mpo na koyamba mpepo oyo eyaka bobele mbala moko na pɔ́sɔ. Etuluku ya Batatoli ezali kati na bango. Bapesi biso mbote na esengo mingi, mpe bapesi biso bakokoti minene ya mobesu oyo “etobɔlami” mpo ete tokitisa mposa na biso ya mai.
Nsima ya kotambola mwa moke, tokómi na esika na biso ya kolala. Bilei oyo elambami na litúká oyo lityami kati na mabelé esilaki kobongisama. Nyama ya ngulu oyo bakalingi, nsoso, mbisi ya kokalinga, nsáníá, mpe liyíká, mbala oyo balonaka kuna, etyami liboso na biso. Oyo nde elambo, mpe esika kitoko lokola paladiso na nsé ya banzeté mike ya kokoti!
Na mokolo molandi, tokei kotala bato na bamboka, oyo ebéngami ho’aga na lokótá ya Rotuma. Wana tozali kobɛlɛma na ndako ya liboso, mwana ya ngulu moko oyo ebimi na moko ya bibokwelo ya bangulu eleki na mbangu makasi, na kongánga. Nkolo ndako asili komona biso koya mpe na komungamunga monene afungoli ekuke, kopesáká biso mbote na “Noya!” na lokótá ya Rotuma, mpe bongo abyangi biso ete tófanda. Saani ya bitabe ya kotela etyami liboso na biso, mpe tobyangami lisusu na komela mai ya kokoti ya mobesu. Na Rotuma boyambi ezali na esika ya liboso.
Bato oyo balobaka ete bayebi te soki Nzambe azali to azali te mpe bato oyo bandimaka évolution bazali awa te. Moto nyonso azali kondima Biblia. Masoló lokola mokano ya Nzambe mpo na mabelé ezali kobenda likebi nokinoki. Nkolo ndako akamwi na koyoka ete mabelé ekobomama te kasi ekofandama na bato ya sembo baoyo bakozala na bomoi wana mpo na libela. (Nzembo 37:29) Azali kolanda sikisiki wana mikapo ya Biblia oyo mizali kosimba likambo yango mizali kotángama, mpe azwi na esengo nyonso mikanda mikolimbolaka Biblia oyo tolakisi ye. Wana tozali komibongisa mpo na kokende, atɔ́ndi biso mpo toyei kotala ye mpe akabeli biso saki ya plastiki etondi na bitabe ya kotela oyo tokoki kolya na nzela. Moto akoki kokóma monene nokinoki soki azali kosakola awa!
Komiyokanisa na etuluku ya ba Indiens
Atako mikili mingi ya bisanga ya Pacifique ya Súdi mizali na bato ya mposo ekeseni, Fidji eleki mpenza na likambo yango. Longola bikólo ya ba Mélanésiens, ba Micronésiens, mpe ba Polynésiens, ezali na ekólo moko oyo eutaki na Azia. Kati na 1879 mpe 1916, basáli ya mokili ya Inde bakumbamaki wana mpo na kosala na bilanga ya nkokó. Ebongiseli wana, ebéngami girmit (boyokani), ememaki bankóto ya ba Indiens na Fidji. Bakitani ya basáli wana bazali eteni moko monene ya bato na mboka wana. Bakangamaki na mimeseno, na lokótá mpe na lingomba na bango.
Likoló na esanga monene ya Fidji, na ngámbo oyo mopepe moutaka ezali na engumba Lautoka. Yango ezali ntéi ya baizine ya sukali ya Fidji mpe ezali mboka ya ba Indiens mingi ya Fidji. Basangani ya masangá misato ya Batatoli ya Yehova oyo bazali awa basengeli koyeba komiyokanisa na makambo bakutani na yango na mosala na bango ya “kolɔ́ba.” Wana ozali kokende ndako na ndako, osengeli komibongisa na kobongola masoló na kotalela loposo mpe lingomba ya nkolo ndako. Tiká tólanda etuluku moko ya Batatoli oyo bazali bato ya mboka yango wana bazali kokende na bandako oyo epalangani kati na bilanga ya nkokó na libándá ya Lautoka.
Wana tozali kobɛlɛma na ndako ya liboso, tomoni liboso na lopango nzeté molai ya likeke oyo bakangi biteni ya elamba motane na nsɔ́ngɛ́ na yango. Yango ezali komonisa libota yango ete bazali ba Hindous. Ntalo monene ya bandako na ba Hindous ekembisami na bililingi ya banzambe na bango. Mingi bazali na nzambe oyo balingaka mingi, lokola Krishna, mpe mbala mingi ezalaka na mwa ndakonzambe moke.a
Ntalo monene ya ba Hindous bakanisaka ete mangomba nyonso mazali malamu mpe mazali bobele banzela ekeseni ya kosambela. Na yango, nkolo ndako akoki koyoka na bonkóndé nyonso, akoki kozwa mikanda, kopesa bimeli mpe kokanisa ete akokisi mokumba na ye. Mpo na kobimisa mituna oyo mibongi mpo na kobenda bankolo ndako na masoló, esengeli koyeba mwa masoló oyo matali bindimeli na bango. Na ndakisa, koyebáká ete masapo wana mazali komonisa banzambe na bango lokola bazali komipesa na makambo oyo bato mingi bakondima yango te, tokoki kotuna motuna: “Okondima ete mwasi (to mobali) na yo amitambwisa bongo?” Mbala mingi eyano ekozala ete: “Te, soko moke te!” Bongo, okoki kotuna motuna oyo epai na moto yango: “Boye, nzambe akoki kosala makambo ya motindo yango?” Masoló ya lolenge oyo mazali mbala mingi kopesa nzela ya komonisa motuya ya Biblia.
Bindimeli bitali kobotama lisusu kati na nzoto mosusu, oyo ezali likambo mosusu ya ntina ya lingomba ya ba Hindous, ezali likambo kitoko mpo na lisoló. Batunaki mwasi moko Hindou oyo atángi mingi, oyo tata na ye akufaki kala mingi, ete: “Okolinga komona lisusu tata na yo lokola azalaki mpenza liboso?” Ayanolaki ete: “Ee, yango ekozala kitoko mingi.” Kati na eyano na ye mpe na lisoló oyo lilandaki nsima, ezalaki polele ete andimaki mpenza te bindimeli oyo ete tata na ye azali sikawa na bomoi epai mosusu na motindo mokeseni mpe ete akoki lisusu koyeba ye te. Kasi liteya kitoko ya Biblia na ntina na lisekwa lisimbaki motema na ye.
Ba Hindous bazalaka na mituna mpe bazali koluka biyano na yango oyo bibongi. Ntango Motatoli moko akendeki na ndako ya Hindou moko, mobali yango atunaki ye ete: “Nkombo ya nzambe na yo ezali nani?” Motatoli atángelaki ye Nzembo 83:18 mpe alimbolaki ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova mpe ete Baloma 10:13 elobi ete mpo na kobika tosengeli kobelela nkombo yango. Mobali yango akamwaki mpe alingaki koyeba makambo mingi. Ya solo, azalaki mpenza na mposa mingi ya koyeba. Alimbolaki ete tata na ye, oyo azalaki moto na kosambela mingi ekeko ya libota, azwaki bokɔnɔ nsima ya kosambela liboso na yango mpe akufaki mwa moke na nsima. Ezalaki mpe bongo mpo na ndeko na ye ya mobali. Na nsima abakisaki ete: “Ekeko oyo ezali komemela biso kufa, kasi bomoi te. Na bongo kosambela yango ezali na likambo moko mabe. Ekoki kozala ete, Nzambe oyo, Yehova, akoki kosalisa biso na kozwa nzela ya bomoi.” Na yango, boyekoli ya Biblia ebandaki elongo na ye, na mwasi na ye mpe na bana na ye. Bakólaki nokinoki mpe baumelaki te kozwa batisimo. Basili kotika bikeko na bango mpe bazali sikawa kotambola na nzela ya Yehova, Nzambe ya bomoi.
Na nsima tokómi na ndako ya libota moko ya mizilmá. Elimo motindo moko ya boyambi emonani polele, mpe nokinoki tofandi mpe tozali na bimeli ya malili na mabɔkɔ. Tomoni bililingi te na efelo longola bobele molɔngɔ́ moko na ekomeli ya Arabe oyo etyami kati na etandá moke. Tomonisi ete ezali na likambo moko oyo eyokanisi Biblia mpe Coran, tata ya libota Abalayama, mpe ete Nzambe alakelaki Abalayama ete na nzela ya mombóto na ye mabota nyonso ya mabelé malingaki kopambolama. Elikya wana ekokokisama na nzela ya Yesu Klisto, Mwana na Ye. Bamizilmá mosusu bandimaka te likanisi oyo ete Nzambe azali na mwana. Tolimboli ete motindo moko lokola moto ya liboso, Adama, abéngamaki mwana ya Nzambe mpo ete asalamaki na Nzambe, bobele bongo, Yesu azali Mwana ya Nzambe. Nzambe azali na mposa ya mwasi ya mosuni te mpo na kobota bana motindo yango. Mpo ete Bamizilmá bandimaka liteya ya Bosato te, tosaleli likanisi wana oyo ezali koyokanisa biso mpo na komonisa ete Yehova Nzambe aleki biloko binso.
Sikawa tokómi na midi, mpe basangani ya etuluku na biso bazali kobima na nzela, longwa na bilanga ya nkokó, mpo na kozela motuka oyo ezali kozonga na vili. Atako tolɛmbi mwa moke, banso tozali na esengo mpo na mosala ya “kolɔ́ba” oyo mosalemi na ntɔ́ngɔ́. Molende oyo mosalemi mpo na komiyokanisa na makambo mpe bindimeli bikeseni oyo tokutani na yango mozali mpenza na ntina mingi.
Mai mpe ngomba ya mabangá ya Fidji etondi na mbisi ndenge na ndenge. Mpo na kolónga, gonedau (molɔ́bi) ya Fidji asengeli kozala na makoki mingi kati na mosala na ye. Yango ezali mpe ndenge moko mpo na mosala ya “kolɔ́ba” oyo Yesu Klisto apesaki na bayekoli na ye. Baklisto “balɔ́bi ya bato” basengeli kozala na makoki mingi, koyokanisa masoló mpe bilembeteli na bindimeli ya bato. (Matai 4:19) Yango esɛngami mpenza na Fidji. Mpe mbano na yango ezali komonana polele na mayangani ya Batatoli ya Yehova kati na mbula, epai ba Fidjiens, ba Indiens, ba Rotumiens, mpe bato bauti na bosangisi ya bikólo mingi bazali kosambela Yehova Nzambe kati na bomoko. Ee, mapamboli na ye mazali likoló na mosala ya “kolɔ́ba” na mai ya Fidji.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá búku L’humanité à la recherche de Dieu, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., nkasa 115-17.
[Karte na lokasa 23]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Viti Levu
Vanua Levu
Suva
Lautoka
Nandi
0 100 km
0 100 mi
18°
180°
[Elilingi na lokasa 24]
Bure, to ndako moko ya mboka yango
[Elilingi na lokasa 24]
Tempelo moko ya Hindou na Fidji
[Bililingi na lokasa 25]
“Kolɔ́ba bato” ezali kopesa mbano kitoko na Fidji
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 24]
Fiji visitors Bureau