Tómonisa botɔ́ndi mpo na “Ndako ya Nzambe”
“NALƆMBI elɔkɔ mɔkɔ epai na [Yehova], nakolanda yango; yango ete, nafanda kati na ndako na [Yehova]; mikɔlɔ yɔnsɔ na bomɔi na ngai; [mpe namonisa botɔ́ndi mpo na tempelo na ye, NW].”—Njembo 27:4.
Mokonzi ya botɔ́ndi mingi Davidi atalelaki tempelo ya Yehova na esengo, to nsáí. Yo mpe ozali na maoki motindo moko na ntina na bisika oyo bizali ntéi ya losambo ya solo na mikolo na biso? Betele koleka 95 na ba filiales ya la Société Watch Tower ezali kati na bisika oyo bisalelami mpo na losambo ya Yehova na mikolo na biso.
Helga, oyo abandaki mosala na Betele ya Allemagne na 1948, alimboli ete: “Kokanisa mibu mingi ya mosala na ngai na Betele ezali kopesa ngai maoki ya botɔ́ndi ya mozindo mpe ya bosepeli monene, oyo ezali kokóla mbula na mbula.” Helga azali moko na basáli ya esengo 13 828 kati na Betele na mokili mobimba, baoyo na mobu ya mosala 1993 ‘batalaki boboto na [Yehova].’ Nkombo Betele elimboli mpenza nini? Lolenge nini mokomoko na Batatoli ya Yehova, ata azali kosalela Nzambe na Betele to libándá na yango, akoki kotalela ebongiseli wana na botɔ́ndi nyonso?
Nkombo oyo esɛngisi ezalela ya kosambela Nzambe
“Betele” ezali nkombo oyo ebongi mpenza, lokola liloba ya liebele Behth-ʼElʹ elimboli “Ndako ya Nzambe.” (Genese 28:19, maloba na nsé ya lokasa) Ee, Betele ekokani na ndako moko oyo ebongisami malamu, to ‘ndako etongami malamu na nzela ya boyebi,’ epai likebi mingi etyami likoló na Nzambe mpe mokano na ye. (Masese 24:3) Herta alobi na botɔ́ndi nyonso ete: “Ezali lokola kofanda kati na libota. Tozali na ebongiseli kitoko ya mokolo ya mosala.” Asili koumela mibu 45 na mosala ya Betele epai Helga azali kosala. Mosangani moko na moko ya libota monene wana azali na mosala na ye mpe na esika na ye, oyo ezali kopesa ye maoki ya esengo mpe ya libateli. Na boyokani na nkombo Betele, molɔngɔ́ mpe ebongiseli kitoko ezali komonana na bisika nyonso ya mosala. Yango ezali komema kimya, ezali kopesa nzela na mosala malamu ya kosakola nsango malamu, mpe ezali kopesa na masangá ntina malamu ya komemya mpenza “Ndako ya Nzambe.”—1 Bakolinti 14:33, 40.
Mpo na nini bisika wana bizali na ntina? Na ndakisa, zulunalo oyo esalamaki na enyateli ya mikanda ya Betele. Mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi mpe ya kokabola bilei ya elimo, oyo Yesu Klisto asakolaki, epesi ntina monene na bibongiseli lokola Betele—oyo esimbami na basáli ya bolingo malamu mpe etalelami na motuya mingi na basaleli nyonso ya Yehova.—Matai 24:14, 45.
Olingi koyeba makambo mingi na ntina na ebongiseli ya mosala ya mokolo na mokolo? Esika Helga mpe Herta bazali kofanda, ngonga moko ebɛtaka kati na ndako mobimba ya kolala na 6:30 ya ntɔ́ngɔ́, atako mingi kati na basáli koleka 800 oyo basalaka wana mikolo nyonso balamukaka nkutu liboso mpo na komibongisa mpo na mokolo ya mosala. Na 7:00 ya ntɔ́ngɔ́, kobanda mokolo mwa mosala moko kino mokolo ya pɔ́sɔ, libota liyanganaka mpo na kotalela mokapo ya mokolo na mokolo, to likita mpo na losambo ya ntɔ́ngɔ́. Bolei kitoko ya ntɔ́ngɔ́ elandaka. Mokolo nyonso ya mosala ebandaka na 8:00 ya ntɔ́ngɔ́ mpe eumelaka ngonga mwambe, oyo ekatamaka na ntango na bolei ya midi. (Mbala mingi libota likosalaka mosala bobele ndambo ya mokolo na mokolo ya pɔ́sɔ.) Ezala na kúku, na enyateli ya mikanda, na esukolelo ya bilamba, na atelié, na esika ya kotya ezipeli ya mikanda, to na esika mosusu ya mosala, ezali na makambo mingi ya kosala.
Na mpokwa mpe na wikende, basangani ya libota bayanganaka elongo na masangá ya penepene kati na makita mpe na mosala ya kosakola. Bandeko mingi ya Betele bazali bankulutu to basaleli ya misala kati na masangá wana. Bandeko kati na masangá basepelaka mpenza na lisungi yango, wana bituluku nyonso mibale bizali kosala esika moko kati na boyokani lokola nzoto moko, kati na limemya mpe bososoli. (Bakolose 2:19) Mosáli nyonso ya Betele ayebi ete mokumba na ye kati na “Ndako ya Nzambe” motyami liboso na misala misusu nyonso. Nzokande, esengo mpo na mosala ya kosakola mpe komibanzabanza mpo na lisangá, esika moko na ezaleli ya bokatikati ezali koyeisa elimo ya mosáli ya Betele makasi, ezali kokólisa esengo na ye, mpe ezali kokómisa ye mosangani ya libota oyo azali kosala mosala malamu. Bizaleli yango bizali mpenza na ntina mingi wana moto azali kosala kati na “ndako” oyo nkombo na yango ekangami na losambo oyo epesami na molimo mobimba!
Kolónga kati na mosala ya Betele
Nini esalisaki ebele ya Batatoli ya Yehova na kolónga kati na mosala ya Betele? Basangani ya libota ya Betele na France oyo baumeli mingi bapesaki makanisi oyo malandi: “Bolingo mpo na Yehova. Kozala na ekateli makasi ya kolendendela epai nyonso oyo atya biso; komikitisa, komisokisa, mpe botosi na litambwisi oyo la Société azali kopesa biso.” (Denise) “Nasili mpenza komona ntina ya kotosa etinda oyo epesami na Paulo kati na Baloma 12:10: ‘Mpɔ na lokumu, bokumisanaka.’ Mokapo oyo mozali komonisa ntina ya kokangama te na likambo moko mpo na kondimisa makanisi na biso moko, kasi nde ya kotalela makanisi na basusu. Na maloba mosusu, koluka te kozala na esika ya liboso.” (Jean-Jacques) Barbara alobi ete: “Limemya na biso mpo na mosala ya Betele ekoki kobeba soki totaleli makambo na lolenge ya mosuni, na likanisi ya bato, mpamba te yango ekoki komema biso na kobosana ete Yehova azali kotambwisa lisangá na ye. Limemya lolenge yango ekolimwa soki tobɛti libaku na ntina na kozanga kokoka ya basusu.”
Moto nyonso oyo azali na Betele azangi kokoka, na yango kosala boninga ezali kosɛnga likebi mingi. Bilenge to baoyo bayei sika basengeli te kosala boninga bobele elongo na bato ya mbula na bango to baoyo babandaki mosala elongo na bango. Baoyo bazali na momeseno ya komilelalela to na makanisi ya kozanga kolónga bazali baninga malamu te na Betele to kati na lisangá. Epai mosusu, komekola “mayele mauti na likoló,” oyo elobelami na Yakobo 3:17, ezali komema mapamboli. Yango ezali “liboso na mpɛtɔ, na nsima ejali na kimia na boboto, na kotosa nɔki, matondi na mawa mpe na mbuma malamu, na ntembe tɛ, na bokosi mpe tɛ.” Bizaleli oyo, elongo na motema molai mpe boboto ezali na ntina mingi kati na “Ndako ya Nzambe,” ezali kopesa esengo mpe elendiseli ya kofanda kuna. Ata bapaya oyo bazali Batatoli te bamonisaka makumisi na bango mpo na etamboli malamu, boninga, mpe elimo ya esengo ya basáli.
Anny, oyo azali na mibu koleka 70 mpe azali mosangani ya libota ya Betele na Allemagne uta mobu 1956, alimboli lolenge nini azali kobatela molende na ye mpo na mosala: “Mpo na bolamu na ngai ya elimo, nazali kosala molende mpo na kotambola elongo na mikanda ya la Société, koyangana ntango nyonso na makita, mpe kosangana ntango nyonso na mosala ya kosakola. Nalukaka lisusu kozala na kolɔngɔ́nɔ́ malamu na kosaláká ngalasisi ntɔ́ngɔ́ nyonso, naboyaka mbala mingi kosalela etómbola, mpe natambolaka na makolo mbala mingi wana nakoki kosala yango, mingimingi kati na mosala ya kosakola.”
Bandeko mingi oyo bameseni na bomoi ya Betele bakondima makanisi ya Anny. Batikaka soko moke te koyekola, batikaka te kosala mosala. Kolɔngɔ́nɔ́ malamu ya nzoto ezali kosɛnga ete bálala mpongi ya malamu mpe básala ngalasisi, mpe bazala na bokatikati na likambo ya kolya mpe komela. Oyo eleki mpenza ntina, bamonisaka bopotu te na kobondela bango moko mpe na koyekola Biblia.
Limemya monene mpo na mosala ya bulɛɛ na Betele
Motuna batunaka mbala mingi epai na basangani ya libota ya Betele ezali oyo: “Osalaka wapi?” Misala mizali ndenge na ndenge, kasi ebongi ete moto na moto atalela mosala nyonso na lokumu mingi. Mpo na nini? Mpamba te mosala nyonso—ezala kotambwisa enyateli ya bilei ya elimo, kosukola bilamba, kolamba mpe kotya bopɛto mpo na libota, to kokokisa misala na biro—ezali mosala ya bulɛɛ. Lokola elobamaki liboso, baklisto bazalaka na koponapona te. Omikundola ete misala nyonso ya ntina oyo banganga mpe balevi bazalaki kosala kati na tempelo, kati na lopango na yango mpe kati na bilyelo, mizalaki mosala ya bulɛɛ na miso na Yehova. Yango esangisaki mosala ya koboma mpe kobongisa nyama mpo na mbeka, kotya mafuta na miinda, ata nkutu kotya bopɛto mpe kozala sinzili. Bobele bongo, mosala nyonso na Betele ezali kopesa esengo mpe ezali mosala ya ntina “kati na mosala ya Nkolo,” mpe na yango ezali na litomba monene.—1 Bakolinti 15:58.
Talá mwa moke ezaleli oyo ekoki kopekisa biso na kotalela “Ndako ya Nzambe” na botɔ́ndi nyonso. Baklisto nyonso, ezala na Betele mpe libándá ya Betele basengeli komibatela na elulela mpe zuwa, oyo “ekopɔlisa mikwa.” (Masese 14:30) Moto moko te azali na ntina ya kolula mikumba ya basáli ya Betele. Lisusu, na Betele esika ezali te mpo na zuwa, oyo ezali moko na misala ya nzoto. Zelá na komikitisa nyonso—oyo ezali toli kitoko mpo na ye oyo akanisi ete bazali kobosana ye wana bazali kopesa basusu mikumba minene. Lisusu, bato oyo kala bakesenaki na bozwi ya mosuni bazali kofanda esika moko na Betele. Ezali mpenza mpasi soki moto moko ataleli ezalela na ye “na bokokanisi na oyo ya moto mosusu”! Kosepela na “bilei mpe bilamba” esalisaki bandeko mingi na kolanda kosala na bosembo nyonso na boumeli ya mibu mingi kati na “Ndako ya Nzambe.”—Bagalatia 5:20, 26; 6:4; 1 Timoté 6:8.
Batatoli ya Yehova mpe bamilió ya bato mosusu bazali kozwa matomba minene na mosala ya bolingo malamu oyo mosalami na Betele—mosala oyo mosalami mpo na bolingo ya Nzambe mpe ya bazalani. Bandako ya Betele mpe binyateli ya mikanda ya la Société Watch Tower, lokola bisika mosusu ya mosala ya teokrasi, esimbami na makabo ya bolingo. (2 Bakolinti 9:7) Lokola mokonzi Davidi mpe bankumu elongo na mikóló ya Yisraele, tokoki komonisa lokumu mpe botɔ́ndi mpo na “Ndako ya Nzambe” na kopesáká bilendiseli mpe lisungi ya mosolo mpo na la Société. (1 Ntango 29:3-7) Tótalela sikawa lolenge tokoki “kotala boboto na Yehova” na Betele.
Mapamboli kati na “Ndako ya Nzambe”
Wana ozali koyangana na mayangani, oyokaka bosepeli ya mozindo, wana ezingami yo na basaleli ya esengo ya Yehova, boye te? Kanisá naino, mosáli ya Betele azali na libaku kitoko ya kosalela Yehova kati na etuluku ya bandeko mikolo nyonso! (Nzembo 26:12) Oyo nde mabaku kitoko ya bokóli na elimo yango ezali kopesa! Ndeko moko amonaki ete ayekolaki na Betele na boumeli ya mobu moko makambo mingi oyo esalisaki ye na kobongisa bomoto na ye koleka oyo asalaki na boumeli ya mibu misato epai mosusu. Mpo na nini? Mpo ete ezali na esika mosusu te epai akokaki komona mpe komekola kondima ya ebele ya bomoto ya baklisto bakɔmɛli.—Masese 13:20.
Na Betele, na elobeli ya elilingi, ozingami na bapesi-toli ya makoki mingi. Longola yango, ozali na litomba ya koyoka bakomatere ebongisami malamu oyo epesami na likita ya losambo ya ntɔ́ngɔ́ mpe na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe koyoka masukúlu na mokolo mwayambo na mpokwa. Baoyo bakómi sika bazali kozwa mateya na Eteyelo mpo na Bato bakɔ́ti sika na Betele mpe basengeli kotánga Biblia mobimba kati na basanza 12 ya liboso.
Lapólo mpe makambo mayebisami na bandeko oyo bauti na mikili misusu mazali kopesa bilendiseli mingi. Lisusu, basangani mosusu ya Lisangani ya Mikólo-Bakambi to ya bamonisi na bango batalaka ba filiales. Helga akanisi ete: “Atako bazali na makambo mingi ya kosala, bandeko bazwaka ntango nyonso libaku ya kobimisa liloba moko ya boninga to ya kosɛkisa mwa moke.” Oyo nde elendiseli ya komona mpenza bizaleli ya kobɔndisama mpe ya bosɔkemi ya mibali wana ya sembo!
Na Betele tokoki mpenza komona malamumalamu lolenge lisangá ya Nzambe ezali kotambola mpe lolenge elimo na ye ezali kopusa mitema mpe mabɔkɔ na mosala. Ndeko moko oyo azali kosala na Betele ya France uta mobu 1949 alimboli ete: “Na Betele ozali komiyoka penepene ya ‘ntéi ya mosala.’” Alandisi ete: “Nakoki mpenza koloba ete mpo na ngai Betele ezali lolenge ya mosala ya ntango nyonso oyo ezali kopesa ngai makoki ya kopesa ntango mpe nguya mingi mpo na mosala ya Yehova mpe ya kosalela ntalo eleki monene ya bandeko.” Mpe ezali mpenza yango mokano na biso ya solo kati na bomoi—kosala mokano ya Nzambe, boye te? Na Betele okoki “kopesa masanzoli mokolo mobimba.” Oyo nde mapamboli!—Nzembo 44:8.
Lokola touti komona yango, moto oyo azali kosala na ndako moko ya Betele akoki komona boboto ya Yehova mpe kozwa ebele na mapamboli. (Baebele 6:10) Mosala kati na “Ndako ya Nzambe” ekoki mpenza kozala na ntina mingi mpo na yo? Baoyo kati na Batatoli ya Yehova oyo bazali na mibu 19 to koleka, oyo bazali na kolɔngɔ́nɔ́ malamu ya nzoto mpe ya elimo, mpe baoyo lokola Timoté, “bandeko batatoli malamu” mpo na bango bakoki kosɛnga mosala ya Betele. (Misala 16:2) Mingi basili kokómisa mosala ya Betele mosala ya bomoi na bango mobimba, lokola baoyo maloba na bango matángami awa na likoló. Mpo na bango mposa makasi oyo ya mokomi ya Nzembo—ya ‘kofanda kati na ndako ya Yehova mikolo nyonso ya bomoi na ye’—esili kokokisama.
Batatoli ya Yehova bazali na limemya monene mpo na elimo ya komipesa oyo ezali na bandeko mibali mpe basi na Betele, baoyo bazali kokokisa mikumba na bolingo malamu mpe na esengo. Ezala ete tozali kosalela Yehova na Betele to epai mosusu, moko na moko na biso azali na bantina ya kooka lokola mokonzi Davidi—kotalela “Ndako ya Nzambe” na botɔ́ndi nyonso, to na nsáí.
[Elilingi na lokasa 31]
Baklisto oyo basili kozwa esengo na mosala ya bulɛɛ na boumeli ya mibu mingi na Betele na Allemagne