Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/7 nk. 3-4
  • Lingomba likabwani​—Mabe na yango ezali wapi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lingomba likabwani​—Mabe na yango ezali wapi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Na meko nini lingomba ekabwani?
  • Kosalela mibeko na bokesene
  • “Bokabwana kati na bino tɛ”
  • Lingomba likabwani​—Likoki koumela?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/7 nk. 3-4

Lingomba likabwani​—Mabe na yango ezali wapi?

“LOKOLA libota moko monene oyo libulungani, oyo lizali kofanda kati na ndako moko ya kala esilá kobeba mpe efelo na yango ya liboso ekweaki na pwasa, makɛlɛlɛ makasi mayokami kuna lokola nde ezali kati na eteni moko na moko na yango​—elongo na kobɛta mbonda, lingomba oyo ebéngami ete bana ya Yesu, bazali konganga mpo na bato ya Lingomba ya Katoliki ya Angleterre oyo balati sutani kitoko ya swá ya moindo, baoyo basangisaka nzoto mibali na mibali.”​—Engebene zulunalo The Sunday Times, Londres, Apríli 11, 1993.

Libota yango ezali bongo Lingomba ya Angleterre. Makɛlɛlɛ makasi wana mabimisami mpo na likambo litali kondima ete basi bakóma basángó. Elobeli oyo ya elilingi mpo na komonisa bokabwani monene, ezali mpe kosalelama mpo na mangomba nyonso ya boklisto ya nkombo mpamba. Epai kuna batata ya mabota ya lingomba ya Orthodoxe mpe pápa bazali kokweisa ekateli ya kopesa nzela ete basi bakóma basángó, lapólo moko elimboli ete, nyonso oyo emonani ezali ete “elikya ya kosangana lisusu na eteni mosusu ya Boklisto ya nkombo mpamba ekómi moke mpenza koleka na liboso.”

Na meko nini lingomba ekabwani?

Lokola tozali kotánga yango kati na Matai 7:21, Yesu Klisto alobaki ete bato mingi bakoloba ete bandimeli ye lokola Nkolo, nzokande ‘bazali kosala mokano ya Tata na ye’ te. Zulunalo Maclean’s emonisi ete: “Batángi ya mokanda ya Matai oyo bazali koluka lobiko bakoki kolimbisama mpo na mobulungano oyo bazali na yango ya koluka koyeba nini ezali mpenza mokano ya Nzambe, mpo ete baklisto, mpe mangomba na bango, bazali na bokeseni makasi likoló na likambo oyo.” Na kotalela bolukiluki oyo esalemaki epai na bato ya mboka Canada, zulunalo yango epesaki esukiseli oyo ete ezali na “bokabwani monene kati na baklisto ya Canada na ntina etali bindimeli mpe misala ya boklisto​—ya solo, bokabwani makasi ezali kati na basangani ya lingomba moko, koleka kati na mangomba yango moko.”

Bolukiluki yango emonisi ete bakatoliki 91 kati na monkámá bandimi ete myango misalemi na bato mpo na kopekisa kobota ezali malamu, atako lingomba na bango ezali kokweisa yango; bakatoliki 78 kati na monkámá bandimi ete baklisto basɛngeli kopesamela nzela ya kokóma basángó; mpe bakatoliki 41 kati na monkámá bandimi ete na “mabaku mosusu,” kosopa zemi ezali mabe te. Zulunalo Maclean’s elobi ete kozanga boyokani kati na bato ya mangomba makeseni na ntina na “ebele ya makambo matali mateya ya lingomba, ezali koyeisa makasi bokabwani oyo bozali kopanza mangomba minene.”

Kosalela mibeko na bokesene

Kosalela mibeko na bokesene mpe mibeko ya bongolabongola ezali kati na makambo matali bizaleli malamu. Bamoko bazali koloba ete bazali kobatela mitinda ya Biblia, kasi basusu bazali kotyola yango. Na ndakisa, molulu ya “libala” oyo mosalemaki na Lingomba ya Metropolité ya Toronto mpo na basi mibale oyo babalanaki, eyokani na mokano ya Nzambe? Na ntembe te, basi yango bakanisaki ete ezalaki bongo. Balobaki ete: “Tolingi komonisa bolingo na biso liboso ya bato banso mpe liboso ya Nzambe.”

Mokomi ya zulunalo moko atunaki soki mpo na nini “Episkɔ́pɔ wa lokumu ya Katoliki oyo afundamaki mbala na mbala, atindaki basángó oyo babebisaka bana mike, na ndakonzambe mosusu epai kuna bakokaki kozwa bilenge mibali mosusu oyo bakoyembaka na misa.” Sángó Andrew Greeley amonisi ete, ekoki kozala ete kobanda na basángó 2 000 kino basángó 4 000 basilá kobebisa bana mike 100 000, mpe mingimingi etumbu epesamelaka bango te.

Lingomba oyo likabwani ekosalaka ete bandimi na yango mpe bazala na bokabwani. Na mikili ya Balkans, “baklisto” ya mboka Serbie mpe ya Croatie bakanisaka ete Klisto azali elongo na bango kati na etumba na bango ya “sembo.” Mingi na bango balataka ekulusu na ntango bazali kati na etumba; eyebisami ete moko na bango nkutu “azalaki kotya ekulusu na ye na monoko soki etumba ekómi makasi mingi.”

“Bokabwana kati na bino tɛ”

Ya solo, Biblia epesi nzela ete makambo mosusu mátalelama engebene lisosoli ya moto na moto, kasi yango esɛngeli te kopesa nzela na bokabwani motindo oyo. Ntoma Paulo alobi polele ete: “Bino yɔnsɔ bolobaka [mpe bosalaka] na motindo mɔkɔ; bokabwana kati na bino tɛ.”​—1 Bakɔlinti 1:10; Baefese 4:15, 16.

Soko mibu nkóto mibale ya kotalela “boklisto” na bosembo nyonso, nsima wana ntoma Paulo akomaki maloba oyo, ebimisi mituna mingi ya ntina. Mpo na nini “baklisto” bakabwani boye? Lingomba likabwani motindo oyo ekoki koumela? Mokolo mosusu boklisto ekokóma na bomoko? Lisoló lilandi likotalela mituna oyo.

[Elilingi na lokasa 3]

Basángó batambolaki na balabála mpo na kotɛmɛla likambo ya kosopa zemi

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Cover and above: Eleftherios/Sipa Press

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto