Lingomba likabwani—Likoki koumela?
BAOYO nyonso bazali kosakola solo ya boklisto oyo ezali kopesa lobiko bazali kati na Lingomba oyo ezali komonana. Bokabwani ya Boklisto ya nkombo mpamba—kati na lingomba Ɛ́sti mpe lingomba Wɛ́sti, mpe kati na Katoliki ya Loma mpe lingomba ya baluki mbongwana—yango ezali bobele bokabwani kati ya Lingomba moko.” (búku Christians in Communion [Baklisto kati na bomoko]) Ezali na motindo wana nde mokomi moko atalelaka boklisto—lokola libota moko ya mangomba oyo mapalangani bipai na bipai, banso bazali koloba ete bazali na lolenge ya kondima epai na Yesu Klisto.
Nzokande, ezali libota oyo likabwani, ezali na boyokani te mpo na oyo etali bindimeli mpe mibeko ya bizaleli malamu. Moto moko alobaki ete: “Bokilsto ya ntango oyo . . . ezali na mibeko ya botau mingi mpo na basangani na yango koleka mibeko oyo misɛngeli mpo na komata na bísi.” Na yango, tokoki koloba nini mpo na ezalela na yango ya elimo? Basil Butler, episkɔ́pɔ wa Katoliki, asukisi ete: “Boklisto oyo esili kokabwana ezali mpenza na bokɔnɔ makasi.” (Búku The Church and Unity [Lingomba mpe bomoko]) Lolenge nini bokɔnɔ yango ebandaki? Elikya ya kobikisama na yango ezali?
“Motyoli na mibeko”
Ntoma Paulo apesaki likebisi ete kozanga boyokani ekokóla. Epai na baklisto ya Tesaloniki, baoyo bazalaki kokanisa ete kozala ya Klisto ekómaki pene, akomelaki bango ete: “Tika te ete moto alengola bino na motindo moko to mosusu, mpo ete [mokolo ya Yehova] mokoya te bobele ete lipɛngwi eyei liboso mpe motyoli na mibeko amonisami, ye mwana na libebi.”—2 Batesaloniki 2:3, NW.
“Motyoli na mibeko” wana akɔ́tisaki lipɛngwi mpe botomoboki kati na lisangá ya boklisto. Ezali nani? Ezali moto moko te, kasi ezali nde kelasi ya bakonzi ya mangomba ya Boklisto ya nkombo mpamba. Kelasi yango emitombolaki yango moko likoló na lisangá oyo lipɛngwaki, mwa moke nsima na liwa ya bantoma na Yesu, mpe na nsima, ebandaki kolakisa mateya ya bapakano, lokola Bosato mpe molimo ekufaka te. (Misala 20:29, 30; 2 Petelo 2:1-3) Motindo moko na mikrobe mabe oyo ekobomaka, kelasi yango ebebisaki lisangá oyo lizalaki komibénga ete ya Boklisto na makanisi euti na badémo oyo ekokaki bobele kobimisa bokabwani.—Bagalatia 5:7-10.
Kobebisama yango ebandaki kopalangana uta na eleko ya ntoma Paulo. Akomaki ete: “Ee, nguya ya botyoli na mibeko yango ezali kosala mosala; kasi kino ekolongwa ye oyo azali kosala sikawa lokola mopekisi.” (2 Batesaloniki 2:7, NW) Bantoma bapekisaki gɛngɛ mabe oyo ete lipɛngwi epalangana te. Nzokande, na ntango bopusi na bango ya kobatela bomoko elongolamaki, lipɛngwi oyo ekokaki kopekisama lisusu te epalanganaki lokola mpotá mabe ekolyaka nzoto.—1 Timoté 4:1-3; 2 Timoté 2:16-18.
Misala ya “motyoli na mibeko” yango mizali sé kokóla. Na lapólo moko oyo euti kobima kala mingi te na ntina na “lingomba moko lizali komitungisa mpo na makambo matali kosangisa nzoto mpe mateya ya lingomba,” bazongeli maloba ya episkɔ́pɔ-mosungi moko ya Lingomba ya Angleterre oyo amilelaki ete: “Makanisi mapesamaki mpo na kopekisa bakonzi ya mangomba ete bámipesa te kati na makambo matali kosangisa nzoto na libándá ya libala eboyamaki. Baoyo basangisaka nzoto mibali na mibali bazali kokula bonganga. Bakómisi malamu mabe mpe mabe ekómi malamu.”—Zulunalo The Sunday Times Magazine, Londres, Novɛ́mbɛ 22, 1992.
Nganu mpe matiti mabe
Yesu Klisto ye moko ateyaki ete Boklisto ya solo esɛngelaki kolimwa mpo na mwa ntango. Alobaki ete kobandisama ya lisangá ya Boklisto ekokani na mosala ya moto oyo alónaki mombóto malamu na elanga na ye. Kasi, Yesu alobaki ete ‘moyini na ye ayaki mpe alonaki matiti mabe.’ Ntango baombo na ye batunaki ye soko bakokaki komeka kopikola matiti mabe, nkolo ya elanga alobaki ete: “Tɛ, ete wana ekolɔkɔta bino matiti mabe [bópikola nganu te elongo na yango, NW].” Kosangana wana ya nganu esika moko na matiti mabe esɛngelaki koumela ntango boni? Nkolo ya elanga alobaki ete: “Tika yɔnsɔ mibale kokóla esika mɔkɔ kino ntango na kobuka [mbuma, NW].”—Matai 13:25, 29, 30.
Baklisto ya nkombo mpamba bayikanaki esika moko na baklisto ya solo kino “ntango na kobuka [mbuma, NW]” to ntango ya kokabola na boumeli na mikolo ya nsuka ya “ebongiseli ya biloko.” (Matai 28:20) Satana Zábolo asalelaki bapɛngwi mpo na kosala lisangá ya Boklisto ya nkombo mpamba oyo ebebisami mpe oyo ezali na bokabwani. (Matai 13:36-39) Babimisaki lolenge mosusu ya mabe mpe ya nsoni ya Boklisto. (2 Bakolinti 11:3, 13-15; Bakolose 2:8) Lokola lingomba ebandaki kokabwanakabwana na boumeli ya bikeke, ekómaki mpasi mingi mpenza mpo na koyeba baklisto ya solo.
Bokabwani ya sika
Búku The Testing of the Churches—1932-1982 (Komekama ya mangomba—1932-1982) elobi ete “mangomba ya sika mabimi, mingimingi etuluku ya kalízima, oyo ezali kopesa motuya mingi likoló ya kondima mpe boyebi ya moto ye moko.” Likambo ya kokamwa ezali ete basusu bazali kotalela mangomba ya kalízima oyo ebotami lisusu lokola bilembo ya kobikisama na elimo, kasi lokola bokabwani ya sika te. Na ndakisa, kobotama lisusu ya motindo wana esalemaki mpe na Irland du Nord na bambula 1850. Bilikya makasi bibimisamaki. Lapólo moko elobelaki “lisangani ya bondeko . . . kati na baí-lingomba ya Presbytérien, ya Méthodiste ya John Weslay, mpe bateyi oyo bakabwaná na mangomba mosusu” mpe alobaki ete “mokolo na mokolo ezalaki komema balapólo ya sika ya kosɛnzwa na makanisi, mpongi, bimonaneli, ndɔ́tɔ mpe makamwisi.”—Religious Revivals (Kobotama lisusu ya mangomba).
Bato mingi batalelaka misala wana ya kokamwisa lokola elembeteli ete elimo ya Nzambe ezali kosala mpo na kolamwisa lisusu Lingomba na ye. Moto moko oyo akotalelaka makambo ya mokili alobaki ete “Kati na bitúká na biso, lingomba ya Nzambe esekwisami mpenza.” Nzokande, atako kosekwisama wana elobelamaki lokola “eleko ya nkembo mpe oyo emonaná naino te na lisoló ya engumba Ulster,” yango, mpe kosekwisama mosusu lokola oyo, ekokaki te kopesa bomoko ya losambo kati na bato oyo bazali kolobela kobotama lisusu kati na elimo.
Bato motindo wana bakoki koloba ete bazali na bomoko kati na makambo oyo ya ntina mingi. Nkutu, bato ya mangomba mosusu ya Boklisto ya nkombo mpamba balobelaka, bango bakanisaka ete “uta kala makambo oyo mazali kosangisa baklisto ezali na ntina mingi koleka makambo oyo mazali kokabola bango kino lelo oyo.” (Búku The Church and Unity [Lingomba mpe bomoko]) Boklisto ya nkombo mpamba emilobaka ete: “Bomoko na biso ya mobɔkɔ elongo na moko na mosusu mpe elongo na baninga na biso nyonso baklisto, euti na likambo oyo ete biso banso tobatisami kati na Klisto.” (Christians in Communion [Baklisto kati na bomoko]) Nzokande, koloba ete bokabwani ezali likambo monene te mpo ete bango nyonso bazali na kondima moko kati na Yesu ezali lokola bazali nde koloba ete ata soki moto azali na bokono ya canser, likambo ya mpasi ezali te soki motema mozali mpenza kɔ́lɔngɔnɔ.
Likambo ya solo ezali oyo ete, mangomba oyo ya sika mayei kobakisa mobulungano mpe ebimisi mobulu makasi kati na elimo na ntango bateyi-balengoli bazali kobenda bandimi epai na bango. Jim Jones mpe David Koresh bazali bandakisa oyo euti komonana kala mingi te, na ntina na bakambi ya mangomba oyo basili kozimbisa ebele ya bato. (Matai 15:14) Moteyi moko ya lingomba ya Baptiste azali mokambi ya mwa lingomba moko oyo libéngami Ku Klux Klan. Azali koloba ete kampanye na ye ya kotombola Mindɛlɛ ezali kosekwisama ya lingomba mpe azali koloba ete baoyo bazali kosangana na yango “bakolendisama na litambwisi ya Nzambe, bakozwa mpiko ya ye oyo akufaki na ekulusu [Yesu Klisto].”
Ezali boni mpo na makamwisi, misala ya nguya, mpe bilembo oyo esalemi na nkombo ya Yesu? Omikundola likebisi makasi ya Yesu Klisto, oyo ete: ezali te baoyo balobaka bobele ete “Nkolo, Nkolo” nde bazali kondimama epai na ye, kasi, ezali nde ‘baoyo bakosalaka mokano ya Tata na ye.’ Bato mingi lelo bayebi ata nkombo ya Tata na ye te, Yehova. Yesu apesaki likebisi na ntina na baoyo ‘bakobimisa [bademó, NW] na nkombo na ye, mpe bakosala misala ya nguya na nkombo na ye’ nzokande bakozala “bato na misala na [kotyola mibeko, NW].”—Matai 7:21-23.
“Bino bato na ngai bobima na ye”
Elikya nini ezali mpo na Boklisto ya nkombo mpamba oyo ezali na maladi? Elikya ezali soko moke te. Na yango, tosɛngeli nde kolanda toli ya Butler, episkɔ́pɔ wa Katoliki, mpo na “kokɔ́ta na [lingomba] kozanga kokakatana mpe kopesa lisungi na biso mpo na ‘kopɛtolama’ na yango oyo ezali kolanda kosalema kati na basangani na yango”? Te! Boklisto ya nkombo mpamba oyo ezali na bokabwani mpe ezali kopusa na bokabwani ekoumela te. (Malako 3:24, 25) Ezali kati na lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba, oyo ebéngami ete Babilone Monene. (Emoniseli 18:2, 3) Ebongiseli wana ya losambo oyo ezali na nyongo ya makila etikali moke ebebisama libela na lobɔkɔ ya Nzambe.
Biblia eyebisi te ete baklisto ya solo bátikala kati na ebongiseli ya losambo oyo esili kobeba mpe bámeka kobongisa yango wana ezali bango na kati na yango. Na esika ya kosala bongo, epesi nde toli oyo, ete: “Bino bato na ngai bobima na ye, ete bosangana na masumu na ye tɛ, ete bojua mɔkɔ na malɔji na ye mpe tɛ. Mpɔ ete libondo na masumu na ye likomi kuna na likolo mpe Njambe asili kokanisa misala mabe na ye.”—Emɔnisɛli 18:4, 5.
‘Kobima’ mpo na kokende wapi? Omikundola ete, Yesu alakaki ete na ntango ya kobuka mbuma, baklisto ya solo bakoyanganisama lisusu esika moko mpo na kozala na bomoko kati na mokili mobimba. Mosakoli Mika mpe asakolaki koyanganisama motindo wana na maloba oyo, ete: “Nakotia bango elɔngɔ mɔkɔ lokola bampate Bɔsala.” (Mika 2:12) Yango esili kosalema?
Ee! baklisto ya solo bazali sikawa koyanganisama na bondeko ya bomoko na mabelé mobimba. Ezali banani? Ezali bongo lisangá ya Boklisto ya Batatoli ya Yehova, baoyo bazali kosakola nsango ya Bokonzi ya Nzambe na bomoko kati na mikili 231. Basili kobwaka mateya ya Boklisto ya nkombo mpamba oyo ezali kopusa na bokabwani mpe bazali koluka kosambela Nzambe na boyokani na solo ya Liloba na ye.—Yoane 8:31, 32; 17:17.
Tosɛngi yo na esengo nyonso ete ósolola elongo na bango. Soki olingi koyeba makambo mosusu na ntina na Batatoli ya Yehova, okokutana na bango na mboka oyo yo ofandi to tindá nkomá na adresi oyo ebongi na yo kati na oyo ezwami na lokasa 2 ya zulunalo oyo.
[Elilingi na lokasa 7]
“Njambe asili kokanisa misala mabe na ye”