Tiká ete libala na bino lizala ekanganeli ya seko
“Oyo nde Nzambe asili kokangisa esika moko tiká te ete moto akangola yango.”—MATAI 19:6, NW.
1. Nini ezali moboko ya bolóngi ya libala epai na baklisto ya solo na mikolo na biso?
BANKÓTO mingi kati na libota ya Yehova bazali lelo oyo na mabala ya kosepelisa mpe oyo mazali koumela. Nzokande, bolóngi motindo yango oyo epalangani mingi eyaka yango moko te. Mabala ya baklisto malóngaka wana babalani nyonso mibale (1) bazali komemya likanisi ya Nzambe na ntina na libala (2) bazali kosala milende mpo na komitambwisa na kolanda mitindá ya Liloba na ye. Ezali polele ete, Nzambe nde asalaki ebongiseli wana ya libala. Azali Ye ‘oyo mabota nyonso na likoló mpe na nsé mazwi nkombo uta na ye.’ (Baefese 3:14, 15) Mpo ete Yehova ayebi oyo tosengeli kosala mpo na kolónga kati na libala, tokomizwela matomba soki tolandi litambwisi na ye.—Yisaya 48:17.
2. Wapi makámá oyo mazali kouta na kozanga kosalela mitindá ya Biblia kati na libala?
2 Nzokande, kozanga kolanda mitindá ya Biblia ekoki komema mawa kati na libala. Bato mosusu ya mayele bakanisi ete ndambo mibale na misato ya baoyo babáli lelo oyo na Etats-Unis bakosuka na koboma libala. Ata mpe baklisto bazwaka mitungisi mpe mikakatano ya “ntango oyo ya mpasi.” (2 Timoté 3:1) Mikakatano ya nkita mpe mitungisi na esika ya mosala ekoki kozala na bopusi mabe likoló na mabala nyonso. Baklisto mosusu baokaki mawa mingi wana babalani na bango bazali koboya kotosa mitindá ya Biblia. Ndeko mwasi moko moklisto alobi ete: “Nalingi Yehova, kasi libala na ngai lizalaki mpenza na mikakatano mingi na boumeli ya mibu 20. Mobali na ngai alukaka bobele matomba na ye moko mpe alingi kobongwana te. Nazali kooka ete nazwami na motambo.” Mibali to basi baklisto mwa mingi bazali komonisa maoki motindo yango. Mabungá mazali kouta wapi? Mpe nini ekoki kopɛngola ete libala ekoka komema na kozanga boyokani to na koswana ya makasi?
Libala lisengeli koumela seko
3, 4. (a) Wapi mitindá ya Nzambe na ntina na libala? (b) Mpo na nini likambo oyo ete libala lisengeli koumela seko lizali sembo mpe lizali kopesa matomba?
3 Ata kati na ezalela eleki malamu, libala lizali ntango nyonso ekanganeli ya bato bazangi kokoka. (Deteronome 32:5) Yango wana ntoma Paulo alobaki ete “baoyo bazali [kobala] bakozwa mitungisi kati na nzoto.” (1 Bakolinti 7:28, NW) Mikakatano misusu oyo mileki mpasi mikoki komema na bokabwani to na koboma libala. (Matai 19:9; 1 Bakolinti 7:12-15) Nzokande, mbala mingi, baklisto basalelaka toli oyo ya Paulo: “Mwasi alongwa na mobali tɛ . . . , mpe mobali alongola mwasi na ye tɛ.” (1 Bakɔlinti 7:10, 11) Ya solo, libala lisalemaki mpo ete liumela seko, mpamba te Yesu Klisto alobaki ete: “Oyo nde Nzambe asili kokangisa esika moko tiká te ete moto akangola yango.”—Matai 19:6, NW.
4 Mpo na moto oyo azali kooka ete azwami na motambo ya libala ya mindɔndɔ́ to ya libala oyo ezangi bolingo, mitindá ya Yehova mikoki komonana lokola ete mizali makasi mpenza to mizangi bososoli. Kasi ezali bongo te. Ezalela ya libala lokola ekanganeli ya libela epusaka babalani oyo bazali kobanga Nzambe na kosolola polele mpe na koluka kosilisa mikakatano na bango, na esika ya kosundola nokinoki mikumba na bango wana matata mabimi. Mobali moko oyo aumeli mibu koleka 20 na libala amonisaki likambo yango boye: “Okoki te kopɛngola bantango ya mikakatano. Bokoki te kozala ntango nyonso na esengo elongo na moto oyo akeseni na yo. Ezali mpo na yango nde likanisi ya bokangami lizali na ntina mingi.” Ya solo, babalani baklisto bazali libosoliboso kooka ete bazali na mokumba epai na Yehova Nzambe, Mobandisi ya libala.—Kokanisá na Mosakoli 5:4.
Bokonzi mpe botosi
5. Batoli nini Paulo apesaki na mibali mpe na basi oyo basili kobala?
5 Na yango, wana mikakatano mibimi, ezali ntango te ya koluka kokima yango, kasi ya koluka lolenge eleki malamu ya kosalela batoli ya Liloba na Nzambe. Na ndakisa, talelá maloba oyo ya Paulo, oyo mazwami na Baɛfɛsɛ 5:22-25, 28, 29: “Bino basi botosaka babali na bino pelamɔkɔ epai na Nkolo mpɔ ete mobali ajali motó na mwasi pelamɔkɔ Klisto ajali motó na [lisangá, NW]. Ye wana ajali mobikisi na njoto. Kasi pelamɔkɔ [lisangá, NW] bakotosaka Klisto, bongo tika ete basi batosa babali na bango na makambo yɔnsɔ. Bino babali, bolingaka basi na bino pelamɔkɔ Klisto alingaki [lisangá, NW] mpe amipɛsaki ye mɔkɔ mpɔ na bango. Bongo ekoki na babali ete balinga basi na bango lokola njoto na bango mpenja. Ye oyo alingi mwasi na ye ajali komilinga ye mɔkɔ. Jambi moto tɛ akoyina mosuni na ye mɔkɔ nde akoleisa yango mpe akobatela yango pelamɔkɔ Klisto epai na [lisangá, NW].”
6. Lolenge nini mibali baklisto basengeli kokesena na mibali ya mokili?
6 Mbala mingi, mibali basalelaka bokonzi na bango na lolenge ya mabe mpe banyokolaka basi na bango. (Genese 3:16) Nzokande, Paulo alendisaki mibali baklisto ete bakesena na mibali ya mokili, na kozala lokola Klisto, na kopɛngola mimeseno ya kolandela makambo mikemike nyonso ya basi na bango. Na ntembe te, Yesu Klisto azalaki soko moke te na makambo makasi to ya konyokola. Atalelaki bayekoli na ye na lokumu mpe na limemya, kolobáká ete: “Boya liboso na ngai, bino yɔnsɔ bojali kolɛmba na mosala mpe kokumba bojito mpe nakopemisa bino. Bokamata ekanganeli na ngai likolo na bino mpe boyekola na ngai; jambi ngai najali na bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi.”—Matai 11:28, 29.
7. Lolenge nini mobali akoki kopesa mwasi na ye lokumu wana esengeli ete mwasi asala mosala ya mosuni?
7 Mobali moklisto apesaka mwasi na ye lokumu lokola na mbeki ya motau. (1 Petelo 3:7) Na ndakisa, soki mwasi na ye asalaka mosala ya mosuni. Asengeli kotya likebi na yango, na kosalisáká ye mpe na kopesáká ye limemya oyo esengeli. Moko na bantina minene ya koboma libala oyo basi bamonisaki ezali ete mibali na bango bazali na bopotu mpo na oyo etali kotalela bana mpe libota. Na yango, mobali moklisto akoluka kozala mosungi ya mwasi na ye na ndako kati na makambo mingi mpo na matomba ya libota mobimba.
8. Botosi ya basi baklisto ezali kosɛnga nini?
8 Kopesa basi baklisto lokumu ezali kokómisa pɛtɛɛ botosi oyo basengeli komonisa epai na mibali na bango. Nzokande, yango elimboli te konyokola. Nzambe apesaki etindá ete mwasi azala moombo te, kasi “mosungi” (“mokokani,” maloba na nsé ya lokasa na NW, ebimeli ya Lingelesi), komonisáká bongo eloko oyo ebongi na mobali. (Genese 2:18) Na Malaki 2:14, mwasi abéngami ete “moninga” ya mobali. Yango emonisi ete, na ntango ya kala basi ya mabala bazalaki na bonsomi mingi mpe na mabaku ya kopona. Na ntina na “mwasi ya molende,” Biblia elobi ete: “Motema na mobali na ye ekondima ye libela.” Ya solo, apesamelaki mikumba na makambo lokola kobongisa misala ya ndako, kosomba bilei, kosala boyokani mpo na kozwa bilanga, mpe kosala mwa mombongo moke.—Masese 31:10-31.
9. (a) Lolenge nini basi oyo bazalaki kobanga Nzambe na ntango ya kala bazalaki komonisa botosi ya solo? (b) Nini ekoki kosalisa mwasi moklisto na komonisa botosi lelo oyo?
9 Nzokande, basi ya kobanga Nzambe bazalaki kondima bokonzi ya mibali na bango. Na ndakisa, Sara “atosaki Abalayama, wana ezali ye kobyanga ye ‘nkolo,’” ezalaki te bobele mpo na komonisa bonkondé, kasi mpo na komonisa botosi na ye ya sembo. (1 Petelo 3:6; Genese 18:12) Na bolingo na ye moko, atikaki ndako na ye kitoko na engumba ya Ulu mpo ete akoka kofanda elongo na mobali na ye kati na hema. (Baebele 11:8, 9) Kasi botosi elimboli te ete mwasi asengeli te kozwa bikateli na makambo mosusu soki yango esengeli. Ntango Mose azangaki kotosa mibeko ya Nzambe na ntina na kokata ngenga, mwasi na ye, Zipola, apɛngwisaki likámá na kosaláká na ekateli nyonso. (Exode 4:24-26) Yango ezali na ntina koleka, kasi etali te bobele kosepelisa mobali azangi kokoka. Basi na mabala basengeli “kotosa babali na bango lokola mpɔ na Nkolo.” (Baɛfɛsɛ 5:22) Soki mwasi moklisto alingi kobatela boyokani na ye elongo na Nzambe, yango ekosalisa ye na kobosana mabungá mpe bikweli mikemike ya mobali na ye, motindo moko mobali mpe asengeli kosala bongo epai na mwasi na ye.
Kosolola—bomoi ya libala
10. Na meko nini kosolola ezali na ntina monene kati na libala?
10 Ntango batunaki mosáli moko ya Leta oyo atalelaka makambo ya koboma libala, wapi ntina monene moko oyo babalani bapesaka mpo na kokabwana, ayanolaki ete: “Kozanga kosolola na kolongobana nyonso moko na mosusu, kozanga komonisa makanisi polele mpe kotalela mosusu lokola moninga ya malamu koleka.” Ee, kosolola ezali bomoi ya libala ya makasi. Ezali lokola Biblia emonisi yango ete, “miango ikokufa wana bato na toli bajangi.” (Masese 15:22) Mibali mpe basi basengeli kozala ‘baninga ya motema,’ oyo bazali na boyokani ya mɔ́tɔ mpe ya penepene. (Masese 2:17) Nzokande, babalani mingi bakokaka te kosolola elongo mpe yango esalaka ete babombaka nkanda kino ekobimisa koswana monene. To babalani bakoki komonana na libandá ete bazali na limemya moko mpo na mosusu, nzokande na maoki bazali mosika moko na mosusu.
11. Lolenge nini mobali mpe mwasi na ye bakoki kobongisa kosolola kati na bango?
11 Moko na bantina ya mikakatano ezali ete mibali mpe basi bakeseni na lolenge na bango ya kosolola. Mbala mingi basi basepelaka mingi kolobela maoki, nzokande mibali balingaka mpenza kolobela makambo oyo mazali komonana. Mbala mingi basi balingaka komitya na esika ya moninga mpe kolendisa ye, nzokande mibali balukaka mpe bamonisaka lolenge ya kobongisa makambo. Atako bongo, makoki ya kosolola malamu mazali wana babalani nyonso mibale bazali na ekateli ya “koyoka nɔki nde na koloba malɛmbɛ, na koyoka mpe nkɛlɛ malɛmbɛ lokola.” (Yakobo 1:19) Bótalanaka na miso mpe bótyelanaka mpenza likebi. Bólobisana na bonsomi nyonso na nzela ya mituna ya limemya. (Kokanisá na 1 Samwele 1:8; Masese 20:5.) Na esika ya koluka kobongisa nokinoki likambo wana mobalani na yo azali komonisa yo mokakatano moko, yoká nde na likebi nyonso wana ozali kokanisa likoló na lolenge ya kosilisa mikakatano yango. Mpe bóbondela esika moko na komikitisa nyonso mpo na koluka litambwisi ya Nzambe.—Nzembo 65:2; Baloma 12:12.
12. Lolenge nini babalani baklisto bakoki kosomba ntango ya kozala elongo?
12 Mbala mosusu mitungisi mpe mikakatano ya bomoi mikoki kotikela babalani bobele ntango moke mpe nguya moke mpo na kosolola. Nzokande, soki baklisto balingi ete libala na bango ezala ya lokumu mpe soki balingi kobatela yango na makambo ya mbindo, basengeli kozala penepene moko na mosusu. Basengeli kotalela ekanganeli na bango lokola eloko ya motuya mingi, mpe basengeli kosomba ntango mpo na komipesa moko epai na mosusu. (Kokanisá na Bakolose 4:5.) Na mabaku mosusu, mpo na kozwa ntango ya kosolola malamu bakoki bobele kokanga televizyó. Komela tii to kafé elongo mbala na mbala ekoki kosalisa babalani na koyokanisa ntango nyonso maoki na bango. Na mabaku motindo wana bakoki ‘kotunana makanisi’ na makambo mingi matali libota. (Masese 13:10) Mpe ezali mpenza likambo ya bwanya kolóna momeseno ya kosolola likoló na matáta mpe kozanga koyokana ya mikemike liboso ete ekóma ntina na mikakatano, boye te?—Kokanisá na Matai 5:23, 24; Baefese 4:26.
13. (a) Ndakisa nini Yesu apesaki mpo na oyo etali kosolola ya polele mpe na kolongobana nyonso? (b) Mabaku nini babalani bazali na yango mpo na kozala na boyokani ya penepene?
13 Mobali moko ayambolaki ete: “Ezalaka mpasi mpo na ngai, mbala mingi ete, namonisa mpenza makanisi na ngai nyonso mpe nayebisa [mwasi na ngai] lolenge ya sikisiki oyo nazali kooka.” Nzokande, koyebisa makanisi na yo ezali likambo ya ntina mingi mpo na kokólisa boyokani ya penepene. Talelá lolenge ya polele mpe ya kolongobana oyo Yesu azalaki koloba na baoyo basengelaki kokóma basangani ya kelasi ya mwasi na ye. Alobaki ete: “Nakobianga bino lisusu baombo tɛ, jambi moombo ayebi yango ekosalaka nkolo na ye tɛ. Nde nasili kobianga bino baninga, jambi nayebisi bino makambo yɔnsɔ mayoki ngai epai na Tata na ngai.” (Yoane 15:15) Boye talelá mobalani na yo lokola moninga. Tyelá mobalani na yo motema kati na maoki na yo. Salá milende mpo na koloba “maloba ya bolingo” ya pɛtɛɛ mpe ya sembo. (Loyembo na Solomo 1:2) Mbala mosusu kolobana polele ekoki komonana lokola nsoni, kasi soki babalani basali milende makasi, bakokokisa makambo mingi mpo ete libala na bango lizala ekanganeli ya seko.
Bɔ́silisa mikakatano
14, 15. Lolenge nini kowelana ekoki kopɛngolama?
14 Mikakatano mikozanga te kobima na bantango mosusu. Kasi ntina ezali te ete ndako na bino ekóma ‘ndako etondi na kowelana.’ (Masese 17:1) Bókeba ete bólobela makambo ya sɛkɛlɛ́ te wana bana bakoki koyoka yango, mpe monisá limemya mpo na maoki ya mobalani na yo. Ntango Laele amonisaki mpasi ya bokomba na ye mpe asɛngaki na Yakobo ete apesa ye bana, Yakobo ayanolaki ye na kosilika nyonso ete: “Ngai najali na esika na Njambe, oyo akangi libumu na yɔ?” (Genese 30:1, 2) Soki mikakatano mibimi kati na bino, bóluka lolenge ya kosilisa mikakatano yango, kasi koluka kobwaka mabe likoló na mobalani na yo te. Na masoló na bino, bópengola ‘maloba makoswaka’ to ezaleli ya kokata mobalani na yo maloba mpambampamba.—Masese 12:18.
15 Ya solo, okoki kozala na maoki makasi na ntina na likanisi na yo, kasi yango esengeli komonisama kozanga “makambo na bololo mpe likunya mpe nkanda mpe kongala mpe [kofinga].” (Baɛfɛsɛ 4:31) Mobali moko alobi ete: “Bólobela mikakatano na bino na mongongo ya kokita. Soki moto moko atomboli mongongo, bókata naino lisoló. Bózongela yango na nsima na mwa ntango moke. Bóbandela lisusu.” Masese 17:14, epesi toli kitoko oyo ete: “Tika yango naino kowelana ebimi tɛ.” Bómeka lisusu kolobela makambo yango wana bino nyonso bozali na motema ya kokita.
Bózala sembo moko epai na mosusu
16. Mpo na nini ekobo ezali likambo mabe mpenza?
16 Baebele 13:4 eyebisi ete: “Tika ete libala likumisama kati na bato yɔnsɔ mpe [mbeto ya libala, NW] ejala na mbindo tɛ. Mpɔ ete Njambe akosambisa bato na pite mpe na ekobo.” Ekobo ezali lisumu epai na Nzambe. Ezali lisusu kobebisa libala. (Genese 39:9) Mwasi moko mopesi-toli na makambo ya libala alobaki ete: “Ntango yango eyebani, ekobo eningisaka libota mobimba lokola mopepe monene, kobebisáká mabota, kolongoláká kotyelana motema mpe limemya ya moto ye moko, kotyáká bana na likámá.” Zemi to bokɔnɔ oyo bopalanganaka na kosangisa nzoto ekoki lisusu kozala matomba mabe na yango.
17. Lolenge nini kopɛngola to kobwaka mposa ya ekobo?
17 Bato mosusu balónaka mposa ya kosala ekobo wana bazali komileisa na makanisi ya mokili na ntina na kosangisa nzoto na lolenge yango emonisami na mikanda, na televizyó, mpe na bafilime. (Bagalatia 6:8) Nzokande, balukiluki balobi ete, ekobo eutaka mbala mingi bobele na mposa ya kosangisa nzoto te kasi na mposa oyo moto azali na yango ya komonisa ete azali naino kitoko to na mposa ya kooka ete balingi ye mingi. (Kokanisá na Masese 7:18.) Ezala mpo na bantina nini, moklisto asengeli kobwaka makanisi ya mbindo. Lobelá na bosembo nyonso maoki na yo elongo na mobalani na yo. Soki esengeli, luka lisalisi epai na bankulutu ya lisangá. Kosala bongo ekoki mpenza kopɛngola kokwea na lisumu. Lisusu, baklisto basengeli kozala na bokɛngi kati na boyokani na bango elongo na basi to mibali. Engebene Makomami, ezali mabe mpo na moto oyo asili kobala ete abanda kotala moto mosusu na mposa mabe. (Yobo 31:1; Matai 5:28) Baklisto basengeli mpenza kokeba mingi ete bakangana te na mayoki makasi elongo na baninga na bango ya mosala. Zalá na boyokani malamu elongo na bango, kasi yango esengeli kozala bobele mpo na mosala.
18. Mbala mingi nini ezalaka ntina ya mikakatano mpo na oyo etali kosangisa nzoto kati na libala, mpe lolenge nini yango ekoki kosilisama?
18 Libateli eleki malamu ezali boyokani ya esengo, ya polele elongo na mobalani na yo. Balukiluki balobi ete mikakatano na makambo ya kosangisa nzoto kati na babalani mitali mpenza nzoto te, kasi mbala mingi mitali nde kozanga kosolola ya malamu. Mikakatano ya lolenge yango mimonanaka mingi te epai na babalani oyo basololaka polele mpe bakokisaka bamposa na bango kati na libala lokola elembo ya bolingo na esika ete ezala mokumba.a Na kosaláká boye, kosangisa nzoto ekoki koyeisa makasi nsinga ya libala.—1 Bakolinti 7:2-5; 10:24.
19. Nini ezali “ekanganeli ekoki mpenza,” mpe yango ekoki kozala na bopusi nini likoló na libala?
19 Bolingo nde ezali “ekanganeli oyo ebongi mpenza” kati na lisangá ya boklisto. Na kolónáká bolingo, babalani oyo babangaka Nzambe bakoki ‘koyika mpiko moko mpo na mosusu, kolimbisana na motema moko.’ (Bakolose 3:13, 14) Bolingo oyo etambwisami na mitindá elukaka bolamu ya mozalani. (1 Bakolinti 13:4-8) Bólóna bolingo motindo yango. Ekosalisa bino na koyeisa nsinga ya libala na bino makasi. Bósalela mitindá ya Biblia kati na libala na bino. Soki bokosala bongo, libala na bino likozala ekanganeli ya seko oyo ekosanzola mpe ekokumisa Yehova Nzambe.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lisoló “Kosolola—Ezali bobele na maloba te,” oyo ebimaki na Mosenzeli ya Augústo 1, 1993, emonisaki ete babalani bakoki kolónga mikakatano ya motindo wana.
Okopesa eyano nini?
◻ Mpo na nini libala esengeli kozala ekanganeli ya seko?
◻ Likanisi ya Biblia lizali nini na ntina na bokonzi mpe botosi?
◻ Lolenge nini babalani bakoki kobongisa kosolola kati na bango?
◻ Lolenge nini babalani bakoki kosilisa mikakatano na lolenge ya boklisto?
◻ Nini ekosalisa na koyeisa makasi nsinga ya libala?
[Elilingi na lokasa 12]
Soki mwasi na ye asalaka mosala ya mosuni, mobali moklisto akotika te ete misala mileka ye ndelo