Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/7 nk. 15-20
  • Salá makasi mpo na lobiko ya libota na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salá makasi mpo na lobiko ya libota na yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Baboti baklisto mpe mikumba na bango
  • Kokokisa bamposa na bango ya maoki
  • Kokokisa bamposa na bango ya elimo
  • Kopesa disipilini kati na boyengebene
  • Libota oyo litikali na moboti moko mpe libota oyo baboti babali lisusu
  • Bólanda kosala makasi mpo na lobiko ya mabota na bino!
  • Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Mabota oyo mazali na moboti sé moko makoki mpe kolónga!
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Baboti​—Bóbɔkɔla bana na bino na bolingo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Bótyela bana likebi oyo basengeli na yango
    Lamuká!—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/7 nk. 15-20

Salá makasi mpo na lobiko ya libota na yo

“Bólanda kobɔkɔla bango kati na kosembolama mpe na mateya ya Yehova.”​—BAEFESE 6:4, NW.

1, 2. Mikakatano nini baboti bazali kokutana na yango lelo oyo?

ZULUNALO moko oyo eyebani mingi ebéngaki yango mbongwana. Ezalaki kati na lisoló oyo lizaki kolobela mabongwani ya kokamwa oyo masalemaki kati na libota na bambula oyo euti koleka. Balobelaki yango lokola “mbuma ya kopalangana ya koboma libala, ya kobala lisusu, ya koboma lisusu libala, ya bana oyo batata na bango bayebani te, mpe matáta ya motindo ya sika kati na mabota oyo makabwani te.” Mitungisi mpe matáta motindo wana ezali kokamwisa biso te, mpamba te Biblia esakolaki ete bato bakokutana na “ntango ya mpasi” na boumeli ya “mikolo ya nsuka.”​—2 Timoté 3:1-5.

2 Na mikolo na biso, baboti bazali kokutana na mikakatano oyo kala miyebanaki te. Atako baboti mosusu kati na biso babɔkɔlaki bana na bango kati na banzela ya Nzambe “uta bomwana,” nzokande mabota mingi mabandi bobele sikawa “kotambola kati na solo.” (2 Timoté 3:15; 3 Yoane 4) Ekoki kozala ete bana na bango basilaki kokóla ntango baboti babandaki koteya bango banzela ya Nzambe. Lisusu, mabota oyo matikali bobele na moboti moko to mabota oyo baboti babalaki lisusu mazali ntango nyonso sé kobakisama kati na biso. Atako ezalela na yo ezali nini, toli oyo ya ntoma Paulo ezali na ntina: “Bólanda kobɔkɔla bango kati na kosembolama mpe na mateya ya Yehova.”​—Baefese 6:4, NW.

Baboti baklisto mpe mikumba na bango

3, 4. (a) Makambo nini masili kolɛmbisa mokumba ya tata? (b) Mpo na nini batata baklisto basengeli te kosuka bobele na komema mbongo na ndako?

3 Tokoki komona ete Paulo akomaki maloba na ye oyo mazali na Baefese 6:4 libosoliboso na “batata.” Mokomi moko alobaki ete kati na mabota ya ntango na kala “koteya bana bizaleli malamu mpe makambo ya elimo etalaki batata na bango; kolakisa bana ezalaki mokumba ya batata na bango. . . . Kasi kobima ya bakompanyi ya minene elongolaki boyokani wana ya penepene; batata batikaki bilanga mpe babutiki na bango, batikaki bandako na bango mpo na kosala na baizine mpe na nsima kati na biro. Bamama bakokisaki mikumba mingi oyo kala mizalaki ya batata. Mokemoke, litambwisi ya tata lizalaki komonana lisusu te.”

4 Mibali baklisto: Bósuka te bobele na komema mosolo na ndako, kotikáká mokumba ya koteya mpe kobɔkɔla bana epai na basi na bino. Masese 24:27 elendisaki batata ya ntango na kala ete: “Bɔngisa mosala na yɔ na libanda, omikokisela yango kati na elanga; boye na nsima, [lendisa] ndako na yɔ.” Bobele bongo lelo oyo, soki osalaka mosala ya mosuni, ekoki kozala ete osengeli kosala mingi mpe ntango molai mpo na koleisa libota na yo. (1 Timoté 5:8) Nzokande, na nsima, zwá ntango ya ‘kolendisa libota na yo’​—na maoki mpe na elimo.

5. Lolenge nini basi baklisto bakoki kosala mpo na lobiko ya mabota na bango?

5 Basi baklisto: Bino mpe bosengeli kosala makasi mpo na lobiko ya mabota na bino. Masese 14:1 elobi ete: “Mwasi na mayɛlɛ akotonga ndako na ye.” Lokola ozali moninga ya mobalani na yo, ozali kokabola na ye mokumba ya koteya bana na bino. (Masese 22:6; Malaki 2:14) Yango ekoki kosɛnga kopesa disipilini na bana na bino, kobongisa bango mpo na makita ya boklisto mpe mpo na mosala ya kosakola, ata mpe kotambwisa boyekoli ya libota ntango mobali na yo azali na likoki te ya kosala yango. Okoki lisusu kosala mingi mpo na koteya bana na bino misala ya ndako, limemya, bopɛtɔ ya nzoto, mpe makambo mosusu mingi ya ntina. (Tito 2:5) Ntango mibali mpe basi bazali kosala elongo motindo oyo, bakoki malamu mpenza kokokisa bamposa ya bana na bango. Wapi bamoko na bamposa yango?

Kokokisa bamposa na bango ya maoki

6. Mokumba nini bamama mpe batata bazali na yango mpo na oyo etali bokóli ya maoki ya bana na bango?

6 “Wana mama oyo azali kobɔkɔla bana na ye azali komonisela bango bolingo,” bakomiyoka na kimya, na libateli, mpe balingami. (1 Batesaloniki 2:7; Nzembo 22:9) Bobele ntalo moke ya bamama nde bakoki kotɛmɛla mposa makasi ya kotya likebi mingi epai na bana na bango. Mosakoli Yisaya atunaki ete: “Mwasi akoki nde kobosana mwana [na ye oyo azali komelisa? Akoyoka, NW] mawa tɛ mpɔ na mwana mobali [oyo abimi, NW] na libumu na ye?” (Yisaya 49:15) Na yango, bamama bazali kokokisa mokumba moko monene kati na bokóli ya maoki ya bana. Nzokande, batata mpe bazali na mokumba monene na likambo yango. Paul Lewis, Molakisi na makambo ya libota alobi ete: “Namoná naino te mosemboli moko oyo ayokaki epai na mwana moko [ya mobulu] ete azalaki koyokana malamu elongo na tata na ye. Ata moko te kati na nkámá mingi.”

7, 8. (a) Elembeteli nini tozali na yango oyo emonisi bokangami makasi oyo ezali kati na Yehova Nzambe mpe Mwana na ye? (b) Lolenge nini batata bakoki kolóna bokangami makasi elongo na bana na bango?

7 Na yango, ezali ntina mingi ete batata baklisto bátya likebi mpenza na kokólisa mpe kobatela bolingo elongo na bana na bango. Na ndakisa, totalela Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto. Ntango Yesu azwaki batisimo, Yehova alobaki ete: “Yɔ [ozali] Mwana na ngai na bolingo, nasepeli [na] yɔ mingi.” (Luka 3:22) Maoki mingi mamonisami kati na maloba wana moke! Yehova (1) andimaki Mwana na ye, (2) amonisaki polele bolingo na ye mpo na Yesu, mpe (3) amonisaki ete asepeli na ye. Nzokande, wana ezalaki mbala bobele moko te oyo Yehova amonisaki bolingo na ye mpo na Mwana na ye. Na nsima Yesu alobaki na Tata na ye ete: “Olingaki ngai liboso na kojalisama na mokili.” (Yoane 17:24) Ya solo, bana mibali nyonso mpe bana basi nyonso ya botosi bazalaka mpenza na mposa ya komona ete batata na bango bandimi bango, balingi bango mpe basepeli na bango?

8 Soki ozali tata, okoki kosala mingi mpo na kokólisa bolingo kati na yo mpe bana na yo wana ozali mbala na mbala komonisela bango bolingo na lolenge lobongi, na kosimbáká bango na nzoto mpe na kolobeláká bango maloba ya bolingo. Ezali solo ete, mpo na mibali mosusu, ezali mpasi komonisa bolingo ya motema, mingi mpenza soki batata na bango bamoniselaki bango bolingo ya motema te. Kasi komeka ata moke komonisa bolingo epai na bana na yo ekoki kozala na bopusi monene. Mpamba te, “bolingo ekolendisaka.” (1 Bakolinti 8:1) Soki bana na yo bamiyoki ete bazali na kimya mpo na bolingo na yo ya tata, bakopusama na kozala mpenza ‘bana mibali mpe bana basi’ mpe bakobanga te koyebisa yo makambo na bango.​—Masese 4:3.

Kokokisa bamposa na bango ya elimo

9. (a) Lolenge nini baboti Bayisraele, oyo bazalaki kobanga Nzambe, bazalaki kokokisa bamposa ya elimo ya mabota na bango? (b) Mabaku nini baklisto bazali na yango mpo na koteya bana na bango?

9 Bana bazali mpe na bamposa ya elimo. (Matai 5:3) Mose alendisaki baboti Bayisraele ete: “Maloba oyo malakeli ngai yɔ lɛlɔ makojala na motema na yɔ, mpe okolakisa yango na etingia na bana na yɔ mpe okosolola mpɔ na yango wana ekofanda yɔ na ndako, mpe wana ekotambola yɔ na njela, mpe wana ekolala yɔ, mpe wana ekotɛma yɔ.” (Dutɛlɔnɔmɛ 6:6, 7) Soki ozali moboti moklisto, okoki kosala mingi mpo na koteya na mabaku nyonso malamu, ndakisa “wana ozali kotambola na nzela.” Ntango oyo bolekisi elongo na libota wana bozali na mobembo, kosomba biloko, kotambola, to kosakola elongo na bana na bino na mosala ya ndako na ndako, ezali kopesa mabaku mingi ya koteya bango na esengo nyonso. Ntango ya kolya ezali mpe ntango malamu mingi mpo na mabota mpo na kosolola elongo. Moboti moko alimboli ete: “Tosalelaka ntango ya kolya mpo na kosolola likoló na makambo malekaki na moi.”

10. Mpo na nini mbala mosusu boyekoli ya libota ezalaka mokakatano monene, mpe ekateli nini baboti basengeli kozala na yango?

10 Nzokande, kolakisama oyo epesami na nzela ya boyekoli ya Biblia poso na poso elongo na bana na bino ezali mpe na ntina mingi. Ɛzali solo ete, “ebɛbɛ ejuami na motema” ya bana. (Masese 22:15) Baboti mosusu balobaki ete bana na bango batyaka mobulu na nkó nyonso mpo na kobebisa boyekoli ya libota. Lolenge nini? Bakofandaka esika moko te, bakokosaka ete bazali komiyoka malamu te, bazali kopɛngwisa likebi ya basusu (ndakisa kowélana na bandeko na bango), to bazali koboya koyanola, kosaláká lokola bayebi te mateya ya moboko ya solo ya Biblia. Soki ekómi lokola ntembe kati na bino baboti mpe bango bana, esengeli ete bino baboti bolónga ntembe yango. Baboti baklisto basengeli kolemba te mpe bakotika nzela te na bana ete báyangela libota.​—Kokanisá na Bagalatia 6:9.

11. Lolenge nini boyekoli ya libota ekoki koyeisama elengi?

11 Soki bana na bino bazali kosepela na boyekoli ya libota te, mbala mosusu mwa mbongwana esengeli kosalema. Na ndakisa, boyekoli esalelami nde lokola mwango mpo na kokundola mabungá nyonso oyo bana na bino bautaki kosala? Mbala mosusu ekozala malamu mingi kolobela yango na nkúku. Boyekoli na bino esalemaka poso na poso? Soki botyaka boyekoli pembeni mpo na kolanda masoló to masano ya televizyó oyo bolingaka, bana na bino bakomona mpenza te ete boyekoli ezali na ntina mingi. Omonisaka mposa makasi mpe esengo na lolenge na yo ya kotambwisa boyekoli yango? (Baloma 12:8) Ee, boyekoli esengeli kosepelisa. Meká kosala ete bana nyonso bakoka kosangana na yango. Zalá na maloba ya koyikisa mpiko mpe ya kolendisa, pesá longonya na bana na esengo nyonso mpo na biyano na bango. Ya solo, bosengeli te bobele koyekola paragrafe mingi, kasi koluka kosimba mitema.​—Masese 23:15.

Kopesa disipilini kati na boyengebene

12. Mpo na nini disipilini ezalaka ntango nyonso etumbu ya nzoto te?

12 Bana bazali mpe na mposa makasi ya kozwa disipilini. Lokola ozali moboti, osengeli kotyela bango bandelo. Masese 13:24 elobi ete: “Ye oyo aboyi [kosalela] mpimbo abebisi mwana na ye, kasi ye oyo alingi ye akopɛsa ye etumbu na ntango ekoki.” Nzokande, Biblia elobi te ete etumbu esengeli ntango nyonso kopesama na mpimbo. Masese 8:33, NW elobi ete: “Yoka disipilini,” mpe epai mosusu, elobamaki na biso ete “mpamela ekoingela mosika kati na moto na mayɛlɛ; koleka [kobɛta zoba] mbala mokama.”​—Masese 17:10.

13. Lolenge nini disipilini esengeli kopesama?

13 Mbala mosusu, esengeli kobɛta mwana na mpimbo mpenza. Nzokande, soki epesami na nkanda, ekoki mpenza kolekisa ndelo mpe ekozala na bopusi te. Biblia epesi likebisi oyo ete: “Bino batata, botumolaka bana na bino tɛ, na ntina ete balɛmba tɛ.” (Bakɔlɔsɛ 3:21) Mpamba te, “minyɔkɔ ikokomisa moto na mayɛlɛ na bolema.” (Mosakoli 7:7) Elenge oyo ayokisami nkanda akoki ata kotombokela mitindá ya sembo. Baboti basengeli bongo kosalela Makomami mpo na kosembola bana na bango kati na boyengebene kasi na bokatikati, atako basengeli kosimba ngwi bikateli na bango. (2 Timoté 3:16) Etumbu oyo eyokani na mokano ya Nzambe ekopesama na bolingo mpe na bopɔlɔ.​—Talá na 2 Timoté 2:24, 25.a

14. Baboti basengeli kosala nini soki bazali kooka ete bapusami na kosilika makasi?

14 Ya solo, “biso banso tokobɛtaka mabaku mbala na mbala.” (Yakobo 3:2, NW) Ata moboti oyo amonisaka bolingo mingi akoki kolemba mpo na mitungisi ya mikolo na biso oyo mpe akoki kobimisa liloba mabe to kosala likambo oyo emonisi kosilika na ye. (Bakolose 3:8) Soki yango ekómi boye, tiká te ete moi elala wana mwana na yo azali kati na mawa monene to wana yo moko ozali na kosilika. (Baefese 4:26, 27) Silisá matáta yango elongo na mwana na yo, kosengáká bolimbisi soki yango esengeli. (Kokanisá na Matai 5:23, 24.) Komonisa komikitisa motindo yango ekobɛlɛmisa mwana penepene na yo. Soki ozali kooka ete okoki te kopekisa elimo na yo mpe okomitika na kosilika, luká lisalisi ya bankulutu oyo batyami kati na lisangá.

Libota oyo litikali na moboti moko mpe libota oyo baboti babali lisusu

15. Lolenge nini ebongi kosalisa bana oyo bazali kati na mabota oyo matikali bobele na moboti moko?

15 Nzokande, bana nyonso te bazali kozwa lisungi ya baboti nyonso mibale. Na Etats-Unis, mwana moko kati na bana minei atikali bobele na moboti moko. ‘Bana mibali bazangi tata’ bazalaki mingi na ntango ya kala mpe komibanzabanza na ntina na bango elobelami mbala mingi kati na Makomami. (Exode 22:22) Bobele bongo, lelo oyo, mabota ya boklisto oyo matikali na moboti bobele moko mazali kokutana na mitungisi mpe mikakatano, kasi mazali kozwa kobondisama na koyebáká ete Yehova azali “tata ya bana mibali bazangi tata mpe mosambisi ya basi-bakufeli-mibali.” (Nzembo 68:5, NW) Baklisto balendisami na “kotalaka bitike mpe basi-bakufeli-mibali kati na mpasi na bango.” (Yakobo 1:27) Baklisto mosusu bakoki kosala mingi mpo na kosalisa mabota oyo matikali bobele na moboti moko.b

16. (a) Moboti oyo azali kobɔkɔla bana sé ye moko asengeli kosala nini mpo na bolamu ya libota na ye? (b) Mpo na nini kopesa etumbu ekoki kozala mpasi, kasi mpo na nini esengeli kopesa yango?

16 Soki ozali kobokola bana na yo sé yo moko, okoki kosala nini mpo na litomba ya libota na yo? Osengeli kozala na molende kati na boyekoli ya Biblia na libota, koyangana na makita mpe na mosala ya kosakola. Nzokande, kopesa etumbu ekoki mpenza kozala ntembe monene mpo na yo. Mbala mosusu ozali naino kooka mpasi mpo na kufa ya mobalani na yo. To ekoki kozala ete ozali naino kobunda na maoki ya kokweisama to kosilika na ntina na bokabwani na bino. Soki bino nyonso mibale bopesameli nzela ya kobatela bana, okoki ata kobanga ete mwana apona kofanda epai na mobalani oyo akabwani na yo to oyo bobomi libala elongo na ye. Makambo motindo oyo makoki kosala ete kopesa etumbu na lolenge ya bokatikati ekóma mpasi. Nzokande, Biblia eyebisi biso ete “mwana oyo atikami epai na ye mɔkɔ akokomisa mama na ye na nsɔni.” (Masese 29:15) Na yango, komitika te na maoki ya kokweisama, na mawa, to na bopusi ya mobalani na yo ya kala. Tyá mibeko mibongi mpe oyo mizali bongolabongola te. Kobuka mitinda ya Biblia te.​—Masese 13:24.

17. Lolenge nini mikumba ya basangani ya libota mikoki koyebana lisusu malamu te kati na libota oyo litikali bobele na moboti moko, mpe esengeli kosala nini mpo na kopɛngola ezalela yango?

17 Nzokande, mikakatano mikoki kobima soki mama oyo atikali bobele ye moko azali kotalela mwana na ye ya mobali lokola mobalani-mokitani​—nkolo ya ndako⁠—​to soki azali kotalela mwana na ye ya mwasi lokola moninga oyo ayebisaka ye basɛkɛlɛ́, kopesáká ye mokumba mpambampamba na makambo matali bomoi ya libala. Kosala bongo ebongi te mpe ekotya mwana na mobulungano. Ntango mokumba ya moboti mpe mokumba ya mwana ezali lisusu koyebana malamu te, disipilini ekopesama lisusu te. Monisá polele ete yo nde ozali moboti. Soki ozali mama oyo azali na mposa ya toli ya Biblia, luká yango epai na bankulutu to epai na ndeko mwasi moko oyo akɔmeli.​—Kokanisá na Tito 2:3-5.

18, 19. (a) Mikakatano nini mabota oyo baboti babali lisusu mazali kokutana na yango? (b) Lolenge nini baboti mpe bana oyo bazali na mabota oyo baboti babali lisusu bakoki komonisa mayele mpe bososoli?

18 Bobele bongo, mabota oyo baboti babáli lisusu mazali mpe kokutana na mikakatano. Mbala mingi, tata ya sika to mama ya sika amonaka ete “bolingo ya motema” kati na ye mpe bana ya mobalani na ye ezalaka mpenza te. Na ndakisa, bana oyo mobalani moko ayei na bango to akuti wana, bakoki kotungisama nokinoki na ntina na oyo bakanisi ete ezali koponapona ya moboti mosusu mpo na bolamu bobele ya bana oyo ye moko aboti. (Kokanisá na Genese 37:3, 4.) Ya solo, bana oyo moko kati na baboti na bango abali lisusu bakoki kotungisama naino na mpasi na ntina na moboti oyo atiki bango mpe bakoki kobanga ete komonisa bolingo epai na mobali ya sika ya mama na bango to ya mwasi ya sika ya tata na bango ekozala mabe na miso ya moboti oyo asili kotika bango. Tata ya sika oyo akomeka kosembola bana ya mwasi na ye, akoki kozwa eyano oyo mabe ete, ‘Ozali tata na ngai te!’

19 Masese 24:3 elobi ete: “Ndako ekotongama malamu na njela na mayɛlɛ; ekokokisama na njela na bosɔsɔli.” Ee, esengeli na mosangani nyonso kosalela mayele mpe bososoli mpo ete libota oyo lisangisami na nzela ya libala ya sika ya baboti likoka kolónga. Na nsima, bana basengeli kondima ete makambo masili kobongwana, atako mbala mingi yango epesaka mpasi. Bobele bongo baboti oyo babali lisusu basengeli koyekola komonisa motema pɛtɛɛ mpe kookela mawa, kasi kosilika nokinoki te mpo ete babwakami. (Masese 19:11; Mosakoli 7:9) Liboso ya kokamata mokumba ya kopesa disipilini na bana ya mobalani na yo, salá naino makasi mpo na kokóma moninga ya bana yango. Na kozeláká ete boyokani motindo wana esalema, ebongi kotikela tata to mama moboti mpenza ete apesa bango disipilini. Wana matáta mabimi, esengeli kosala milende mpo na kosolola. Masese 13:10 elobi ete: “Mayele mazali epai na baoyo bayebi kososola, [NW].”c

Bólanda kosala makasi mpo na lobiko ya mabota na bino!

20. Batata ya mabota ya boklisto basengeli kolanda kosala nini?

20 Mabota ya boklisto oyo mazali makasi masalemaka yango moko te. Bino batata ya mabota bosengeli kosala makasi mpo na lobiko ya mabota na bino. Bózala na bokɛngi, bósosola bizaleli mabe to mimeseno ya mokili. Bópesa ndakisa malamu na etamboli, na bolingo, na kondima, mpe na bopɛtɔ. (1 Timoté 4:12) Bómonisa mbuma ya elimo na Nzambe. (Bagalatia 5:22, 23) Motema pɛtɛɛ, limemya, kolimbisana, mpe bolingo ekotombola milende na bino ya koteya bana na bino banzela ya Nzambe.​—Bakolose 3:12-14.

21. Lolenge nini tokoki kobatela ezalela ya esengo mpe ya mɔ́tɔ kati na libota?

21 Na lisalisi ya Nzambe, bósala makasi mpo na kobatela elimo ya esengo mpe ya mɔ́tɔ kati na libota na bino. Bólekisa ntango elongo na libota, bósala makasi ete bólyaka elongo ata mbala moko na mokolo. Makita ya boklisto, mosala ya kosakola, boyekoli ya libota ezali mpe na ntina. Nzokande, ezali lisusu na “ntango [mpo] na kosɛka . . . mpe ntango [mpo] na kobina.” (Mosakoli 3:1, 4) Ee, bóbongisa bantango ya kominanola na lolenge ya kolendisa. Kokende kotala ebombelo ya biloko ya kala, mapango ya banyama mpe bisika mosusu ya motindo oyo epesaka bosepeli kati na libota mobimba. To bokoki kokanga televizyó mpe kolekisa ntango na koyemba, koyoka miziki, kosala masano mpe kosolola. Yango ekoki kosalisa libota na kozala na boyokani ya penepene.

22. Mpo na nini bosengeli kosala makasi mpo na lobiko ya libota na bino?

22 Tiká ete bino nyonso baboti baklisto bólanda kosala makasi mpo na kosepelisa mpenza Yehova “wana ezali bino kolanda kobota mbuma na misala nyonso malamu mpe kokóla kati na boyebi ya sikisiki ya Nzambe.” (Bakolose 1:10, NW) Botonga mabota na bino likoló na moboko makasi ya botosi na Liloba ya Nzambe. (Matai 7:24-27) Mpe bóndimisama ete milende na bino mpo na kobɔkɔla bana na bino “kati na kosembolama mpe na mateya ya Yehova” ekosepelisa ye.​—Baefese 6:4.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá lisoló “Likanisi ya Biblia: ‘Mpimbo mpo na kosembola’​—Ezali likambo ya kala?” kati na Réveillez-vous! ya 8 Septembre 1992.

b Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Dɛsɛ́mbɛ 15, 1980 (na Lifalansé), nkasa 15-26.

c Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Ɔkɔtɔ́bɛ 15, 1984 (na Lifalansé), nkasa 21-5.

Okopesa eyano nini?

◻ Lolenge nini babalani bakoki kosala na bomoko mpo na kolendisa libota na bango?

◻ Wapi mwa bamposa ya maoki oyo bana bazalaka na yango, mpe lolenge nini kokokisa yango?

◻ Lolenge nini batata ya mabota bakoki koteya bana na bango, ezala na ntango oyo esilaki kobongisama to mpe na libaku malamu?

◻ Lolenge nini baboti bakoki kosembola kati na boyengebene?

◻ Nini ekoki kosalema mpo na litomba ya mabota oyo matikali bobele na moboti moko mpe mabota oyo baboti babali lisusu?

[Elilingi na lokasa 16]

Bolingo mpe bosepeli ya tata ezali na ntina mingi mpo na bokóli ya maoki ya mwana

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto