Koangana Nzambe na ekeke oyo ya ntuku mibale
“Bato bazali kondima ete Nzambe azali te mpe bomoi na bango bazali kokamba yango bango moko, ata soki yango ezali kobimisa mbuma ya motindo nini, mpe na kozanga kotalela Nzambe.”—One Hundred Years of Debate Over God—The Sources of Modern Atheism.
ATAKO komona nzeté ya molai mingi ekokamwisaka mpo na mbala ya liboso, kasi na nsima, ekotalelamaka lisusu te lokola eloko ya kokamwisa. Komona yango ekómi momeseno; bolai na yango ezali lisusu kobenda likebi ya bato te.
Ezali mpe lolenge moko mpo na ezaleli ya koboya kondima Nzambe. Atako ebimisaki ntembe mingi na boumeli ya ekeke ya 19, koangana bozali ya Nzambe ezali lisusu kotungisa te, soko mpe kobulunganisa makanisi te lelo oyo. Eleko oyo ya komemya makanisi ya basusu etikaki nzela na ezaleli ya koboya kondima Nzambe, ete efanda na kimya nyonso esika moko na ezaleli ya kondimela Nzambe.
Yango elimboli te ete bato mingi bazali koangana Nzambe na polele nyonso; nzokande, bolukiluki oyo esalemaki na mikili 11 kati na Amerika, na Mpótó, mpe na Azia emonisi ete, mwa moke koleka 2% nde balobi ete bandimaka Nzambe te. Atako bongo, elimo ya koboya kondima Nzambe ezali makasi—ata kati na ebele ya bato oyo bandimaka ete Nzambe azali. Lolenge nini yango ekokaki kosalema boye?
Koangana bokonzi ya Nzambe
Búku The Encyclopedia Americana emonisi ete: “Na bantango mosusu, ezaleli ya kozanga kondima Nzambe elimbolaka bongo misala oyo emonisaka koboya to kozanga kotalela Nzambe.” Mpo na yango, búku The New Shorter Oxford English Dictionary epesi ndimbola ya mibale ya liloba “athéiste”: “Moto oyo aanganaka Nzambe kati na etamboli na ye; motúki Nzambe.”—Biso nde tolalisi maloba mosusu.
Ee, koboya kondima Nzambe ekoki kolimbola bongo koangana bozali ya Nzambe to koangana bokonzi na ye, to mpe makambo oyo nyonso mibale. Biblia emonisi motindo wana ya koboya kondima Nzambe kati na Tito 1:16: “Balobi ete bayebi Njambe nde na misala na bango bajali koangana ye.”—Kokanisá na Njembo 14:1.
Likambo motindo wana litali kobwaka lotómo ya koyangela ya Nzambe ebandaki epai na babalani mibale ya liboso. Eva ayebaki ete Nzambe azali; kasi, alingaki “kojala pelamɔkɔ Njambe, koyeba malamu mpe mabe.” Yango elimbolaki ete Eva alingaki kokóma ‘mokonzi likoló na ye moko’ mpe komityela ye moko mibeko ya bizaleli malamu. Na nsima, Adama alandaki Eva kati na ezaleli na ye ya koangana bokonzi ya Nzambe.—Genese 3:5, 6.
Ezaleli oyo ezali komonana mingi lelo oyo? Ee. Kozanga koyeba, ezaleli ya koboya kondima Nzambe emonanaka na koluka lipandá. Búku One Hundred Years of Debate Over God—The Sources of Modern Atheism (Mbula nkama ya kotyana ntembe na ntina na Nzambe—Mikanda ya koboya kondima Nzambe na mikolo na biso) elobi ete: “Lelo oyo bato balɛmbi kozala na nsé ya litambwisi ya Nzambe. Balingi . . . kozala na bonsomi.” Mibeko ya bizaleli malamu oyo ezwami kati na Biblia eboyami, lokola nde ebongi te, eyokani te na makambo ya solo ya bomoi. Makanisi ya bato mingi ekokani mpenza na oyo ya Falo ya Ezipito oyo alobaki na lolendo nyonso ete: “[Yehova] azali nani ete nayoka monɔkɔ na ye . . . ? Ngai nayebi [Yehova] tɛ.” Abwakaki lotómo ya koyangela ya Nzambe.—Esode 5:2.
Boklisto ya nkombo mpamba ezali koangana Nzambe
Koangana Nzambe oyo eleki mpenza mabe euti epai na bakonzi ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba, oyo basili kotya mibeko ya bato na esika ya makambo ya solo ya Biblia. (Kokanisá na Matai 15:9.) Lisusu, basili kopesa mabɔkɔ na bitumba oyo etangisi makila ya ebele ya bato na ekeke oyo ya ntuku mibale; na yango, bazali kobwaka etindá ya Biblia na ntina etali komonisa bolingo ya solo.—Yoane 13:35.
Bakonzi ya mangomba basili koangana lisusu Nzambe na koboyáká kolanda mibeko na ye na ntina na bizaleli malamu—lokola yango emonisami, na ndakisa, kati na kosambisama ya basángó oyo bafundami mpo na kosangisa nzoto elongo na bana mike. Ezaleli ya boklisto ya nkombo mpamba ekokani na oyo ya Yisraele mpe Yuda ya ntango ya kala. Mosakoli Ezekiele ayebisamelaki ete: “Mokili etondi na makila, mpe mboka etondi na bikateli na sembo tɛ, mpɔ ete bakolobaka ete, [Yehova] asili kotika mokili oyo, mpe [Yehova] atali tɛ.” (Ezekiele 9:9; Kokanisá na Yisaya 29:15.) Likambo ya kokamwa ezali te na komona ete bato mingi basili kotika mangomba mpenza ya boklisto ya nkombo mpamba! Kasi basengeli bongo kotika kondimela Nzambe?
Bazali na bantina malamu ya koboya kondima Nzambe?
Ezala bamonaki bokosi ya lingomba to te, bato mingi oyo baboyaka kondima Nzambe bakoki te koyokanisa likambo litali kondima Nzambe na bampasi ya mokili. Simone de Beauvoir alobaki mokolo mosusu ete: “Ezali pɛtɛɛ mpo na ngai kokanisa na ntina na mokili oyo mozangi mozalisi na esika ete nakanisa mozalisi oyo atondi na bongolabongola oyo ezali na mokili.”
Bokesene oyo ezali kati na mokili—bakisa mpe oyo ebimisami na bato ya mangomba oyo batondi na bokosi—ezali komonisa ete Nzambe azali te? Kanisá naino: Soki mbeli esalelami mpo na kokanela, kozokisa, mpe ata koboma moto oyo asali likambo te, yango elimboli ete mbeli ezali na moto te oyo asalaki yango? Yango ezali nde komonisa ete eloko yango esalelami na lolenge mabe, boye te? Bobele bongo, mingi na bampasi ya bato ezali komonisa ete bato bazali kosalela na lolenge mabe makoki oyo Nzambe apesi bango mpe mabelé yango moko.
Nzokande, basusu bazali kokanisa ete ebongi te kondimela Nzambe, mpo ete tokoki komona ye te. Kasi ezali bongo mpo na mopepe, mongongo, mpe nsolo? Tokoki te komona biloko motindo oyo, kasi toyebi ete biloko yango bizali. Mampúlúlú, matoi, mpe zolo na biso ezali koyebisa biso yango. Ya solo, tondimelaka biloko oyo tokoki komona te soki tozali na elembeteli ete yango ezali.
Nsima ya kotalela malamu bilembeteli ya biloko bizali komonana—bakisa mpe ba électrons, protons, atomes, acides aminés, mpe lolenge ya kokamwa ya bɔɔngɔ—Irving William Knobloch, ye moto ya siansi, apusamaki na koloba ete: “Ngai nandimaka Nzambe mpamba te Bonzambe na ye ezali ndimbola bobele moko ya sikisiki mpo na lolenge biloko bizali.” (Kokanisá na Nzembo 104:24.) Bobele bongo, physiologiste Marlin Books Kreider alobi ete: “Ezala lokola moto nyonso, ezala mpe lokola moto oyo apesi bomoi na ye mpo na boyekoli mpe bolukiluki ya siansi, nazali na ntembe soko moke te na ntina na bozali ya Nzambe.”
Ezali bobele bango moko te nde bazali kondima ete Nzambe azali. Engebene molakisi ya zébi ya physique, Henry Margenau, “soki otali kati na bato ya siansi oyo bazali mpenza na mayele mingi, okomona ete bobele moke kati na bango nde baboyaka kondima ete Nzambe azali.” Ezala bokóli ya makambo ya siansi, soko mpe kozanga bolóngi ya mangomba esengeli te kozala ntina ya kopusa biso ete tóboya kondimela Mozalisi. Tiká totalela soki mpo na nini.
Lingomba ya solo ekeseni
Na 1803, Thomas Jefferson, prezidá ya Etats-Unis, akomaki ete: “Nazali mpenza kotɛmɛla makasi kobeba ya boklisto; kasi, nazali kotɛmɛla te malako ya solo ya Yesu ye moko.” Ee, bokeseni bozali kati na boklisto ya nkombo mpamba mpe boklisto ya solo. Mingi kati na malako ya boklisto ya nkombo mpamba matongami likoló na mibeko ya bato. Nzokande, boklisto ya solo ezwi moboko ya bindimeli na yango bobele likoló na Biblia. Na yango, Paulo akomaki epai na Bakolose ya ekeke ya liboso ete basengelaki kokóma na “boyebi ya sikisiki,” “bwanya,” mpe bososoli na elimo.—Bakolose 1:9, 10, NW.
Ezali yango nde tosengeli komizela epai na baklisto ya solo, mpamba te Yesu apesaki etinda epai na bayekoli na ye ete: “Bokɛnda kojalisa bayekoli na mabota yɔnsɔ, kobatisa bango . . . , kolakisa mpe bango ete batosa yɔnsɔ esili ngai kolaka bino.”—Matai 28:19, 20.
Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali kokokisa etindá wana kati na mikili 231 na mabelé mobimba. Basili kobongola Biblia na minɔkɔ 12 mpe basili konyata ba Biblia koleka 74 000 000. Lisusu, na nzela ya ebongiseli ya boyekoli ya Biblia na bandako ya bato, bazali sikawa kosalisa bato koleka 4 500 000 ete bátosa makambo ‘oyo Yesu alakaki.’
Ebongiseli oyo ya koteya ezali kobimisa matomba minene. Ezali kopesa engengiseli ya solo, mpo ete ezwi moboko na yango likoló na makanisi ya bato te, kasi likoló na mayele ya Nzambe. (Masese 4:18) Lisusu, ezali kosalisa bato ya mabota nyonso mpe ya mposo nyonso na kosala oyo “Engengiseli” ya bato ekoki kokokisa soko moke te—kolata “bomoto na sika” oyo ezali kosalisa bango na kokólisa bolingo ya solo moko na mosusu.—Bakɔlɔsɛ 3:9, 10.
Lingomba ya solo ezali kolónga na boumeli ya ekeke na biso oyo ya ntuku mibale. Ezali koangana Nzambe te—soko mpe bozali na ye to bokonzi na ye. Tozali kosɛnga na yo ete yo moko otalela yango na kokendáká na moko ya Bandako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova.
[Etanda na lokasa 6]
ALENDISAKI BANTINA YA KOBOYA KONDIMA NZAMBE
Na katikati ya ekeke ya 18, filozofe Denis Diderot apesamelaki mokumba ya kobongola búku moko monene ya Lingelesi na Lifalanse. Nzokande, asalaki mingi koleka oyo nkolo ya mosala atindaki ye. Diderot alekisaki pene na mbula ntuku misato mpo na kokangisa Encyclopédie na ye, búku monene ya mikanda 28 oyo emonisaki polele mimeseno ya bato ya eleko na ye.
Atako Encyclopédie yango ezalaki na makambo mingi ya ntina, ezalaki kolobela mingimingi bwanya ya bato. Engebene liboke ya babúku oyo ezali na motó ya likambo Great Ages of Man (Bileko ya ntina ya bato), “emekaki koteya makanisi makasi [ya bafilozofe] oyo ete moto akoki kobongisa ezalela ya makambo na ye soki aluki komitambwisa na mayele na ye moko na esika ya kondimela Nzambe.” Elobaki soko moke te na ntina na Nzambe. Búku The Modern Heritage (Libula ya mikolo na biso) elobi ete: “Na liponi ya masoló na bango, bakomi bamonisaki polele ete lingomba ezali te moko na makambo oyo moto asengelaki koyeba yango.” Likambo ya kokamwa ezali te na komona ete mangomba malukaki kolimwisa Encyclopédie wana. Mokonzi oyo akotalaka makambo matali bosembo na mboka alobaki ete yango ezalaki kobebisa makambo ya politiki, makambo matali bizaleli malamu mpe lingomba.
Atako ezalaki na banguna mingi, bato pene na 4 000 basɛngaki Encyclopédie ya Diderot—oyo ezalaki motuya monene mpenza, na kotalela ete ezalaki kotekama na ntalo makasi. Ata ndele ezaleli wana ya koboya kondima Nzambe oyo ezalaki bobele na nsé esengelaki kokóla kino kokóma ezaleli ya koangana Nzambe na polele mpenza.