Bantina oyo bato mosusu bandimaka Nzambe te
TOZALI kobika kati na mokili oyo etondi na mikakatano; kobwaka liso mwa moke likoló na makambo oyo mazali kokomama na bazulunalo ezali komonisa yango mokolo na mokolo. Ezalela ya kozanga elikya oyo ezali kati na mokili na biso esili kopusa bato mingi na kotya ntembe likoló na bozali ya Nzambe. Basusu, baoyo bamilobelaka ete bandimaka Nzambe te, bazali nkutu koangana Nzambe. Ezali mpe bongo mpo na yo?
Kondimela to kozanga kondimela Nzambe ekoki mpenza kozala na bopusi monene likoló na lolenge na yo ya kotalela makambo matali mikolo mizali koya. Soki Nzambe azali te, boye, kobika ya bato etaleli bobele bato bango moko—oyo ezali bongo likanisi moko ya esengo te, na kotalela likoki ya komibebisa oyo moto azali na yango. Soki mpenza ondimaka ete Nzambe azali, boye, ekoki mpenza kozala ete ozali kondima ete bomoi kati na etando oyo ezali solo na mokano—mokano oyo, nsukansuka, ekokokisama na nsima.
Atako na boumeli ya lisoló ya bato koangana Nzambe ezalaki mingi, kasi ezali bobele na bikeke oyo biuti koleka nde koboya kondima Nzambe esili kopalangana makasi. Oyebi soki mpo na nini?
Tótala bantina na yango
Komona nzeté ya molai mingi ekamwisaka mpenza. Nzokande, liso ekomonaka bobele nkasa, bitape, mpe mobímbí na yango. Bantina to misisa—eutelo ya bomoi ya nzeté—ezalaka ya kobombama na nsé ya mabelé.
Ezali lolenge moko na ezaleli ya koboya kondima Nzambe. Lokola nzeté moko molai, bobele bongo mpe koangana Nzambe ekolaki na lolenge ya kokamwisa liboso mpe na boumeli ya ekeke ya 19. Bomoi mpe mɔlɔ́ngɔ́ ekokaki nde kozala soki Mobandisi wa Yambo, ye oyo aleki bato na nguya, azalaki te? Kosambela Mozalisi motindo wana ezali bobele kobebisa ntango mpamba? Biyano ya bafilozofe minene ya ekeke ya 19 bipesamaki na nguya nyonso mpe na kozanga kokakatana. Friedrich Nietzsche alobaki ete: “Lokola tozali lisusu na mposa ya mibeko ya bizaleli malamu te, bobele bongo mpe, tozali lisusu na mposa ya makambo ya Nzambe te.” Ludwig Feuerbach alobaki ete: “Makambo ya Nzambe mazali ndɔ́tɔ oyo ezalaka kati na makanisi ya bato.” Mpe Karl Marx, oyo babúku na ye ezalaki na bopusi makasi na bambula oyo elandaki nsima na ye, alobaki na nguya nyonso ete: “Nalingi kokólisa bonsomi ya makanisi mpo na kolongola yango na minyololo ya lingomba.”
Likebi ya bato mingi elamukaki. Nzokande, oyo bamonaki ezalaki bobele nkasa, bitape, mpe mobímbí ya ezaleli ya koboya kondima Nzambe. Bantina ezalaki na nsé mpe ebandaki kobima liboso mpenza ya ekeke ya 19. Likambo ya kokamwa ezali oyo ete, na mikolo na biso, ezali bongo mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba nde elendisi bokóli ya ezaleli ya koboya kondima Nzambe! Ndenge nini? Na ntina na mabe na yango mangomba wana elongolaki elikya epai na bato mpe ebimisaki ntembe.
Mbóto elonami
Na boumeli ya eleko ya Moyen Âge, Lingomba ya Katolike ezalaki na nguya makasi likoló na basangani na yango. Búku The Encyclopedia Americana elobi ete: “Emonanaki lokola ete bakonzi na yango bazalaki na makoki mingi te mpo na kotalela bamposa ya elimo ya bato. Bakonzi minene ya Lingomba, mingimingi baepiskopo, bazalaki koponama kati na bato ya bozwi mingi mpe bazalaki kotalela mosala na bango lokola eloko ya komizwela na yango lokumu mpe nguya.”
Basusu, lokola John Calvin mpe Martin Luther, bamekaki kokɔtisa mbongwana na lingomba. Nzokande, myango na bango ezalaki ntango nyonso te lokola oyo ya Klisto; kozanga komemya makanisi ya basusu mpe kosopa makila ezalaki kati na makambo oyo emonanaki mingi na boumeli ya Mbongwana. (Kokanisá na Matai 26:52.) Minyoko mosusu oyo babimisaki ezalaki mabe mingi na boye ete bikeke misato na nsima, Thomas Jefferson, prezidá ya misato ya Etats-Unis, akomaki ete: “Mbɛlɛ ekoki malamu kondima Nzambe soko moke te, na esika ya kotuka ye mpo na minyoko oyo Calvin abimisaki.”a
Emonani polele ete Mbongwana ezongisaki losambo ya pɛto te. Nzokande, ekitisaki nguya ya Lingomba ya Katolike. Vatican ezalaki lisusu na bokonzi likoló na bato banso te, na ntina etali losambo mpe kondima. Bato mingi bamikɔtisaki na mangomba mikemike ya Protestá oyo eutaki kosalema sika. Basusu, lokola lingomba ekokisaki elikya na bango te, bakómisaki mayele ya bato eloko na bango ya losambo. Elimo ya lipandá ebimaki, kopesáká nzela na kobimisama ya makanisi makeseni na ntina na Nzambe.
Elimo ya kobɛta ntembe ebimi
Na ekeke ya 18, mayele ya bato ekumisamaki mingi lokola ete yango nde ekoki kosilisa mikakatano ya mokili. Immanuel Kant, ye filozofe mpe mobotamá ya mboka Allemagne, alobaki ete kokangama ya bato kati na makambo ya politiki mpe ya losambo mpo na koluka litambwisi ezali kopekisa bokóli na bango. Alendisaki bato ete: “Bósala makasi mpo ete bókóma na boyebi mingi! Bózala na mpiko ya kosalela mayele na bino moko!”
Ezaleli oyo emonanaki mingi na boumeli ya eleko oyo ebengamaki Siècle des lumières, oyo ebéngamaki mpe Âge de la raison. Eleko yango ezalaki na boumeli mobimba ya ekeke ya 18; na eleko yango, bato bazalaki komipesa mpenza mpo na koluka boyebi. Búku Milestones of History (Mibɔkɔ ya lisoló ya bato) elobi ete: “Ezaleli ya kobɛta ntembe eyaki koyingela na esika ya ezaleli ya bindimandima. Bindimeli mpe mimeseno nyonso ya kala ebɛtɛlamaki ntembe.”
Moko ‘na mimeseno ya kala’ oyo esengelaki kotalelama malamu ezalaki bongo lingomba. Búku The Universal History of the World (Lisoló ya makambo ya kala ya molɔ́ngɔ́ mobimba) elobi ete: “Bato babongolaki lolenge na bango ya kotalela lingomba. Bazalaki lisusu kosepela te na elaka ya kozwa mbano na likoló; bakómaki kosɛnga bomoi malamu awa na mabelé. Bakómaki kolongola kondima na bango kati na nguya oyo eleki bato.” Ya solo, bafilozofe mingi ya eleko oyo ebéngamaki Siècle des lumières bazalaki kotyola lingomba. Mingimingi, bazalaki kopamela bakonzi ya mangomba ya Katolike oyo bazalaki na lokoso ya koyangela mpo ete bazalaki kokangisa bato kati na kozanga boyebi.
Lokola lingomba ekokisaki mposa ya bato te, mingi kati na bafilozofe yango bakómaki ba déistes; bazalaki kondimela Nzambe, kasi bazalaki koloba ete Nzambe amibanzabanzaka mpo na bato te.b Ndambo na bango bamimonisaki polele lokola bato oyo baboyi kondima Nzambe; na ndakisa, filozofe Paul Henri Thiry Holbach, ye alobaki ete lingomba ezalaki “eutelo ya bokabwani, nkanda, mpe mobulu.” Wana bambula ezalaki koleka, bato mingi bakómaki kosepela lisusu te na boklisto ya nkombo mpamba mpe bandimaki makanisi ya Holbach.
Oyo nde likambo ya kokamwa na komona ete Boklisto ya nkombo mpamba nde elendisaki bokóli ya ezaleli ya koboya kondima Nzambe! Michael J. Buckley, ye molakisi ya teoloji, alobaki ete: “Mangomba ezalaki efandelo malamu ya ezaleli ya koboya kondima Nzambe. Lisosoli ya bato mingi na Mpótó mpe na Amerika litungisamaki mpe bayinaki mangomba minene. Mangomba mpe mikabwano na yango ebebisaki mikili ya Mpótó, kobomáká bato, basɛngaki mbongwana na nzela ya lingomba, bamekaki kobengana bakonzi ya mboka na lingomba to kolongola bango bokonzi.”
Koboya kondima Nzambe epalangani makasi
Na ekeke ya 19, ezaleli ya koangana Nzambe ekómaki komonisama polele mpe makasi. Bafilozofe mpe bato ya siansi bazalaki kokakatana te mpo na kosakola na mpiko nyonso makanisi na bango. Moto moko oyo andimaka te ete Nzambe azali alobaki ete: “Monguna na biso ezali bongo Nzambe. Koyina Nzambe ezali ebandeli ya mayele. Mpo ete mokili ekóma na bokóli ya solo, esengeli kozala na mobɔko likoló na ezaleli ya koboya kondima Nzambe.”
Nzokande, na lolenge ya mayele mabe, mbongwana moko esalemaki na boumeli ya ekeke ya 20. Ezaleli ya koboya kondima Nzambe etikalaki lisusu makasi te; lolenge mosusu ya koboya kondima Nzambe ebandaki kopalangana, kosaláká bopusi ata mpe likoló na baoyo bamilobaka ete bandimaka Nzambe.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mangomba mikemike ya Protestá oyo ebimaki na Mbongwana ebatelaki mateya mingi euti na Makomami te. Talá Lamuká! ya Augústo 22, 1989 (ebimeli ya Lifalansé), nkasa 16 kino 20, mpe Sɛtɛ́mbɛ 8, 1989, nkasa 23 kino 27.
b Ba déistes balobaki ete, motindo moko na mosáli montre, Nzambe abongisaki bozalisi na ye ete esalaka yango moko mpe na nsima apesaki yango mokongo, azalaki kotalela makambo na yango lisusu te. Engebene búku The Modern Heritage, ba déistes “bazalaki kondima ete ezaleli ya koboya kondima Nzambe ezalaki libunga oyo eutaki na kozanga elikya kasi ebongiseli ya bokonzi na Lingomba ya Katolike mpe makambo makasi ya mateya na yango elekaki mabe.”
[Elilingi na lokasa 3]
Karl Marx
[Elilingi na lokasa 3]
Ludwig Feuerbach
[Elilingi na lokasa 3]
Friedrich Nietzsche
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]
EZIPELI: Earth: By permission of the British Library; Nietzsche: Copyright British Museum (talá mpe lokasa 3); Calvin: Musée Historique de la Réformation, Genève (Photo F. Martin); Marx: U.S. National Archives photo (talá mpe lokasa 3); Planets, instruments, crusaders, locomotive: The Complete Encyclopedia of Illustration/J. G. Heck; Feuerbach: The Bettmann Archive (talá mpe lokasa 3)