Mwango moleki malamu
BATATOLI YA YEHOVA bazali komibanzabanza na ntina na kobeba ya bizaleli ya elimo na mokili mpe na ntina na kozanga elikya na makambo ya losambo mpe na misala ya mbindo oyo mizali kobebisa libota ya bato. Mpo na yango, bazali ntango mosusu kobéngama batingami. Kasi bazali solo batingami? Te. Atako bazali na bindimeli makasi na makambo ya losambo, bazali batingami te na ndimbola oyo liloba yango lizali kosalelama. Basalaka bopusi soko moke te epai na bakonzi ya politiki mpo na kondimisa likanisi moko, mpe basalelaka te myango lokola kotambola na balabála to mpe kosala mobulu mpo na komonisa mayoki na bango epai na baoyo bazali na bango na boyokani ya makanisi te. Basili komona mwango moleki malamu. Bazali komekola Motambwisi na bango, Yesu Klisto.
Batatoli ya Yehova bandimisami makasi ete solo ya lingomba ezali, oyo ezwami kati na Biblia. (Yoane 8:32; 17:17) Kasi Biblia ezali koteya baklisto ete bázala bato na boboto, bato malamu, bato na bopɔlɔ, mpe bato na makambo makasi te—bizaleli oyo bipesi nzela te na kozala na molende mabe. (Bagalatia 5:22, 23; Bafilipi 4:5) Na mokanda ya Yakobo, kati na Biblia, baklisto balendisami ete bázwa “mayele mauti na likoló,” oyo emonisami ete mazali “liboso na pɛto, na nsima ezali na kimya na boboto, na kotosa noki, matondi na mawa mpe na mbuma malamu.” Yakobo abakisaki ete: “Mbuma na boyengebene ikokonama na kimya na bango bakosalaka kimya.”—Yakobo 3:17, 18.
Batatoli ya Yehova bazali komikundola ete Yesu azalaki komibanzabanza mingi mpo na solo. Ayebisaki Ponto Pilata ete: “Ngai nabotami mpo na ntina oyo mpe nayei na mokili ete nátatola mpo na solo.” (Yoane 18:37) Atako azalaki mokɔteli monene ya solo, alukaki te kondimisa bato mosusu makanisi na ye na makasi. Kútu, alukaki nde kosimba makanisi mpe mitema na bango. Ayebaki ete Tata na ye ya makoló, ye Nzambe na “malamu mpe na boyengebene” akokata lolenge mpe ntango oyo akolongola mabe mpe bokɛsɛne na mabelé. (Nzembo 25:8) Na yango, alukaki te konyokola baoyo baboyaki makanisi na ye. Kútu, ezali nde bakonzi ya mangomba ya kalakala ya eleko na ye nde balukaki konyokola Yesu.—Yoane 19:5, 6.
Batatoli ya Yehova bazali na bindimeli makasi na ntina na mateya ya lingomba, mpe bapesaka motuya monene na makambo ya etamboli malamu. Na ndakisa ya ntoma Paulo, bandimisami ete ezali na “Nkolo moko, kondima moko, kobatisa moko.” (Baefese 4:5) Bazali mpe koyeba malamu maloba oyo ya Yesu ete: “Ekuke ezali na nkaka mpe nzela ekangani oyo ekoleka na bomoi mpe baoyo bakomona yango bazali mingi te.” (Matai 7:13, 14) Kasi, bazali komeka te kotindika basusu na makasi ete bálanda bindimeli na bango. Nzokande, bazali komekola Paulo mpe “kolɔ́mba” na baoyo nyonso balingi yango ete ‘bábutwa na bondeko na Nzambe.’ (2 Bakolinti 5:20) Wana ezali mwango moleki malamu. Ezali mwango ya Nzambe.
Kotingama na bindimeli ya kala ya lingomba, lokola ezali kosalelama lelo, ekeseni mpenza. Batingami bazali kosalela myango ebele—kati na yango mobulu—mpo na kondimisa bato mitindá na bango na makasi. Na kosaláká bongo, bamikomisi mpenza eteni ya ebongiseli ya politiki. Nzokande, Yesu alobaki ete bayekoli na ye basengeli kozala “bato na mokili te.” (Yoane 15:19; 17:16; Yakobo 4:4) Na boyokani na maloba oyo, Batatoli ya Yehova bazali kobatela ezaleli ya kozanga komikɔtisa na kowelana ya politiki. Mpe, lokola zulunalo ya mboka Italie Fuoripagina endimi yango, “bazali soko moke te kondimisa moto ata likanisi moko na makasi; moto na moto azali na bonsomi ya kondima to koboya oyo bazali koloba.” Litomba na yango nini? Nsango ya kimya oyo euti na Biblia oyo Batatoli bazali koteya ezali kobenda bato ya lolenge nyonso, ata baoyo bazalaki liboso batingami.—Yisaya 2:2, 3.
Mokili oyo ezali na mitindá mikoumela
Batatoli bayebi ete bato bakoki te kosilisa mikakatano oyo batingami bazali komitungisa na yango. Okoki te kotindika moto na makasi ete andimela Nzambe to akóma na bindimeli na yo. Likanisi oyo ete likambo wana likoki kosalema ebimisaki bamoko ya makambo ya nsɔmɔ na lisoló ya bato, lokola ba croisades, Inquisitions na eleko ebéngami Moyen-Âge, mpe “kobongolama” ya baɛndyɛ́ ya Amerika. Nzokande, soki ozali na kondima epai na Nzambe, okozala pene ya kotika makambo nyonso na maboko na ye.
Engebene Biblia, Nzambe asilá kotya ndelo na ntango oyo apesi nzela ete bato bábuka mibeko na ye mpe báyeisa mpasi mpe minyoko. Ntango yango ekomi pene ya kosila. Yesu asili kobanda koyangela lokola Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe na likoló, mpe mosika te Bokonzi yango ekosala mosala mpo na kolongola biyangeli ya bato mpe kozwa esika ya biyangeli oyo bizali lelo. (Matai 24:3-14; Emoniseli 11:15, 18) Nsuka na yango ekozala paladiso na mokili mobimba epai kuna kimya mpe boyengebene ekotónda. Na ntango yango ntembe ekozala lisusu te na ntina na lolenge ya kosambela Nzambe. “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” (Nzembo 37:29) Bizaleli ya motuya mpe ya seko lokola boboto, solo, boyengebene, mpe malamu ekolónga mpo na bolamu ya bato na botosi.
Kokanisáká na eleko yango, mokomi na Nzembo alobi na maloba ya ntɔ́ki ete: “Boboto mpe sembo bazali kozwana, boyengebene mpe kimya bapesani mpwepwe. Sembo abimi na mabelé mpe boyengebene akotala na nsé longwa kuna na lola. [Yehova] mpe akopesa oyo ezali malamu mpe mabelé na biso ekobota mbuma. Boyengebene akotambola liboso na ye mpe akolakisa nzela ekolekaka matambe na ye.”—Nzembo 85:10-13.
Atako tokoki kobongola mokili te, kasi tokoki, moto na moto, kokolisa bizaleli ya bonzambe ata na mikolo na biso oyo. Na yango, tokoki kosala molende ya kozala lolenge ya bato oyo Nzambe akozala na mposa na bango lokola basambeli na ye na mokili ya sika. Bongo tokozala kati na bato na bopɔlɔ oyo mokomi na nzembo alobi na ntina na bango ete: “Bato na bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya na solo.” (Nzembo 37:11) Nzambe azali kosunga mpe kopambola baoyo bazali kosala mokano na ye, mpe alaki makambo kitoko na mikolo mizali koya mpo na bango. Ntoma Yoane alobaki ete: “Mokili mozali mpe kolongwa mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumelaka seko.”—1 Yoane 2:17.
[Maloba na elilingi ya lokasa 7]
Batatoli ya Yehova bazali kobyanga bato nyonso ete báyeba nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe