Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/7 nk. 22-25
  • Bomoi oyo epesaka ngai mawa soko moke te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoi oyo epesaka ngai mawa soko moke te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndakisa malamu ya Mama
  • Mosala mpe bokóli na elimo
  • Mosala na Betele na eleko ya yikiyiki
  • Mosala ya mobongisi-nzela na eleko ya bitumba
  • Mabaku malamu mingi ya kosepelisa
  • ‘Jéhovah azali Nzambe na ngai mpe nakolikya epai na ye’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Betele ezali na mposa ya basali na bolingo malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Yo mpe okoki komipesa?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Yango ekoki kozala mosala oyo ebongi na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/7 nk. 22-25

Bomoi oyo epesaka ngai mawa soko moke te

LISOLÓ YA PAUL OBRIST

Na mobu 1912, wana nazalaki na mbula motoba, Mama akufaki na ntango azalaki kobota mwana na ye ya mitano. Pene na mbula mibale na nsima, Berta Weibel, elenge mwasi oyo azalaki mwana ya mosala, akómaki kosalisa libota na biso. Na mbula oyo elandaki, Tata abalaki ye, mpe biso bana tosepelaki kozala lisusu na mama.

TOZALAKI kofanda na Brugg, engumba moke ya ekólo Suisse na eteni oyo balobaka lokótá Allemand. Berta azalaki mpenza moklisto, mpe nazalaki kolinga ye mingi. Asilaki kobanda koyekola mikanda ya Bayekoli ya Biblia (Batatoli ya Yehova) na 1908, mpe azalaki koyebisa bato mosusu makambo oyo azalaki koyekola.

Na 1915, mwa moke nsima ya kobalana ya Berta mpe Tata, nakendaki elongo na ye kotala “Photo-drame de la Création.” Filime wana mpe badiapositive oyo elakisamaki na bayekoli ya molende ya Biblia esimbaki motema mpe makanisi na ngai. Bato mosusu mpe basepelaki na yango mingi. Ndako epai yango elakisamaki na engumba Brugg etondaki na bato mɛkɛ́ na boye ete bapolisi bakangaki bikuke mpe bazongisaki bato mosusu oyo bazalaki koya. Na bongo bato mingi bamekaki kokɔta na lininisa moko na komatáká na sikalié mpe mwa ndambo balóngaki kokɔta.

Ndakisa malamu ya Mama

Etumba ya Liboso ya Mokili mobimba ezalaki kongala na mikili ya Mpótó, mpe bato bazalaki kobanga na ntina na mikolo mizali koya. Na yango, kosakola nsango ya kobɔndisa ya Bokonzi ya Nzambe ndako na ndako, lolenge Mama azalaki kosala, ezalaki mpenza mosala ya motuya. Bantango mosusu nazalaki kokende na ye, mpe nazalaki kosepela na yango mingi. Nsukansuka, na mobu 1918, Mama azwaki likoki ya komonisa komipesa na ye epai ya Yehova na nzela ya batisimo ya mai.

Tata atɛmɛlaki losambo ya Mama te kino ntango azwaki batisimo, kasi nsima na yango, abandaki kotɛmɛla ye. Mokolo moko azwaki mikanda na ye mikolimbolaka Biblia mpe abwakaki yango na mɔ́tɔ. Mama alóngaki kobimisa na mɔ́tɔ bobele Biblia na ye. Kasi oyo asalaki na nsima ekamwisaki mpenza. Akendaki epai ya Tata mpe ayambaki ye. Abombelaki ye nkanda soko moke te.

Tata akamwaki mpenza mpe atikaki kosilika. Nzokande, mbala na mbala, azalaki kongalisa botɛmɛli na ye, mpe tosengelaki koyikela kotomboka na ye mpiko.

Mosala mpe bokóli na elimo

Na mobu 1924, nsima ya kolekisa mbula misato na koyekola mosala ya kokata nsuki, nalongwaki na ndako mpe nazwaki mosala na eteni ya ekólo Suisse epai balobaka Lifalansé. Yango epesaki ngai libaku ya kokólisa boyebi na ngai ya Lifalansé. Atako ndenge nalongwaki na ndako elɛmbisaki mwa moke bokóli na ngai ya elimo, nabungisaki soko moke te bolingo na ngai mpo na solo ya Biblia. Na yango, mbula motoba na nsima, ntango nazongaki na ndako, nabandaki koyangana na makita ya lisangá ya boklisto na engumba Brugg.

Mwa moke na nsima, nakendaki kofanda na Rheinfelden, engumba moke na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 40. Kuna nazalaki kosala na ndako ya kokata nsuki ya ndeko na ngai ya mwasi mpe nakobaki bokóli na ngai ya elimo na koyanganáká na etuluku moke ya Bayekoli ya Biblia. Mokolo moko, wana azalaki kosukisa boyekoli na biso ya kati ya pɔ́sɔ, ndeko Soder, nkulutu ya etuluku, atunaki ete: “Nani akobima na mosala ya kosakola mokolo ya lomingo?” Nandimaki, kokanisáká ete nakozala na moto mosusu mpe bakolakisa ngai lolenge ya kosala mosala yango.

Ntango tokómaki na mokolo ya lomingo mpe tokendaki na teritware na biso, ndeko Soder alobaki ete, “Monsieur Obrist akosakola epai kuna.” Atako motema na ngai ezalaki kobɛta makasi, nabandaki kosolola na bato na bandako na bango na ntina na Bokonzi ya Nzambe. (Misala 20:20) Uta ntango wana, ata mbala moko te nalɛngaki lisusu na ntango ya kokokisa mosala oyo Yesu alobaki ete esengeli kokokisama liboso ete nsuka ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo eya. (Matai 24:14) Na mokolo ya 4 Mársi 1934, wana nazalaki na mbula 28, namonisaki komipesa na ngai epai na Yehova Nzambe na batisimo ya mai.

Mbula mibale na nsima nazwaki mosala ya kokata nsuki na Lugano, engumba moko na eteni ya Suisse epai balobaka lokótá Italien. Nokinoki nabandaki kosakola nsango malamu kuna, atako nayebaki koloba lokótá Italien mingi te. Kasi, mokolo ya lomingo ya liboso oyo nabimaki na mosala ya kosakola, nakabolaki mwa babúku 20 oyo nazalaki na yango. Na nsima, nakokaki kosangisa mwa etuluku ya bato bazalaki komonisa bosepeli mpo na koyekola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Bamoko kati na bango bazwaki batisimo, mpe na Febwáli 1937 tosalaki lisangá ya Batatoli ya Yehova na engumba Lugano.

Sanza mibale na nsima, na Apríli 1937, nazwaki nkomá oyo ebongolaki mpenza bomoi na ngai. Ezalaki libyangami ya kokende kosala na Betele, lolenge tobengaka biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova. Nandimaki libyangami yango kozanga kokakatana​—ekateli oyo epesaka ngai mawa soko moke te. Boye, nabandaki mosala ya ntango nyonso oyo kati na yango nalekisaki mbula 60 ya bomoi na ngai.

Mosala na Betele na eleko ya yikiyiki

Na ntango wana Betele ya ekólo Suisse ezalaki na Berne, engumba-mokonzi. Kuna tozalaki konyata babúku, mwa babúku, mpe bazulunalo na nkótá 14, mpe ezalaki kotindama na mikili nyonso ya Mpótó. Mbala mosusu, nazalaki kosalela pusupusu mpo na kokende kotika mikanda oyo minyatámi na esika ya bozeli engbunduka, mpamba te na eleko yango mbala mingi tozalaki kozanga motuka moke ya kokumba biloko. Mosala na ngai ya liboso na Betele ezalaki na departemá ya “composition,” epai tozalaki kobongisa lolenge oyo makomi makobima na mikanda minyatámi. Mwa moke nsima nakómaki kosala na esika ya boyambi bato, nasalaki mpe lokola mokati nsuki ya basangani ya libota ya Betele.

Na sanza ya Sɛtɛ́mbɛ 1939, Etumba ya Mibale ya Mokili mobimba ebandaki, mpe matumoli ya ba Nazis ebangisaki Mpótó mobimba. Ekólo Suisse emikɔtisaki na ngámbo moko te kati na bikólo oyo bizalaki kobundana. Na ebandeli, tokobaki mosala na biso ya boklisto kozanga nkaká. Kasi na nsima, na mokolo ya 5 Yulí 1940, na ngonga ya mibale nsima ya nzánga, wana nazalaki na biro na ngai na ekɔtelo, mobali moko oyo azali sivili ayaki, elongo na sodá moko oyo azalaki na mondóki oyo ezalaki na mbeli na nsuka na yango.

Mobali yango angangaki ete “Zürcher azali wapi?” Na eleko yango Franz Zürcher azalaki mokɛngɛli ya filiale ya mosala na biso ya kosakola.

Natunaki ete “nani azali koluka ye?” Mbala moko bakangaki ngai mpe batindikaki ngai na basikalié ya etaze, kolobáká ete nakenda na bango na biro ya Zürcher.

Basɛngisaki libota mobimba ya Betele​—tozalaki pene na bato 40​—ete tóyangana na ndako ya kolya. Batɛlɛmisaki mandóki minei ya mitrailleuse na libándá mpo na kobangisa moto nyonso oyo akomeka kokima. Na kati, basodá pene na 50 babandaki kolukaluka kati na ndako. Na bokeseni na oyo bakanisaki, bamonaki elembeteli te ete Batatoli ya Yehova bazalaki kolendisa koboya mosala ya sodá. Atako bongo, bakamataki ebele na mikanda mpe bakumbaki yango na mituka mitano ya basodá.

Ntango toboyaki ete bakonzi ya Letá bátalelaka naino Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli liboso ete ebima, kobimisama na yango elandanaki lisusu malamu te na Suisse. Elingi koloba ete Betele ezalaki lisusu na mposa ya bato mingi te, mpe balendisaki basangani oyo bazalaki bilenge ete bábima na Betele mpe bákóma babongisi-nzela, ndenge tobéngaka Batatoli ya Yehova basakoli ya ntango nyonso.

Mosala ya mobongisi-nzela na eleko ya bitumba

Na sanza ya Yulí 1940, nazongaki na eteni ya Suisse epai balobaka lokótá Italien pene na engumba Lugano, epai nazalaki kofanda liboso ya kokende na Betele. Teritware yango etondi na bato bakangami makasi na Lingomba ya Katolike, oyo na eleko yango ezalaki mpe na bopusi makasi ya politiki ya Fascisme, ekómaki teritware na ngai mpo na mosala ya mobongisi-nzela.

Pene na mikolo nyonso nazalaki kokutana na bapolisi oyo bazalaki kopekisa mosala na ngai ya kosakola. Mokolo moko, wana nazalaki kosolola na mwasi moko na ekɔtelo ya elanga na ye, mobali moko oyo alataki bilamba ya sivili abéndaki ngai na mokɔngɔ, amemaki ngai na motuka ya basodá oyo basalaka ekombela, mpe akendaki na ngai kino na engumba Lugano. Kuna apesaki ngai na mabɔkɔ ya bapolisi. Ntango bazalaki kotuna ngai mituna, nalimbolaki ete Yehova Nzambe atindaki biso ete tósakola.

Mokonzi ya basodá ayanolaki na lofundo nyonso ete “awa na mabelé, biso nde topesaka mitindo, Nzambe akoki kopesa mitindo na likoló!”

Na boumeli ya etumba, ezalaki na ntina mingi mpenza ete tótya likebi na toli ya Yesu ya ‘kozala na mayele lokola banyoka mpe na bopɔlɔ lokola bibenga.’ (Matai 10:16) Na yango, nazalaki kobomba mikanda na ngai mingi na mabenga ya kati ya simisi na ngai. Mpe mpo na komindimisa ete eloko moko te ekokwea, nazalaki kolata bakaputula oyo ezalaki kokanga makasi na nsé ya mabolongo.

Na nsima, batindaki ngai na lobwaku ya Engadine, epai lisano ya mpoko na nyau ekobaki kati na ngai na bapolisi. Lobwaku yango kitoko ezali na ɛ́sti ya bangomba ya Suisse, oyo na eleko ya mpiɔ ezipamaka na ebele ya mbula-mpɛmbɛ (neige), na yango batindelaki ngai bisaleli ya kotambola na moselu ya ngalasi (ski) mpo na kosalisa ngai na kotambola na teritware.

Ba gants ya malili ezali na ntina mingi mpo na kosala mobembo likoló ya ngalasi na eleko ya mpiɔ makasi. Lokola nazalaki kosalela yango mbala na mbala, oyo ya ngai ebandaki kobeba. Oyo nde botɔ́ndi nazalaki na yango mokolo moko ntango nazwaki liboke oyo batindelaki ngai na nzela ya pósita mpe kati na yango ezalaki na tiliko ya malili na ba gants ya malili! Ndeko moklisto moko ya mwasi na lisangá na ngai ya kala na Berne nde atongaki yango. Ata kino sikawa soki nakanisi yango, nazalaka na botɔ́ndi.

Mabaku malamu mingi ya kosepelisa

Na mobu 1943, makambo mabandaki kokóma mwa malamu na ekólo Suisse, mpe babéngaki ngai lisusu ete nazonga kosala na Betele. Na ntina na mwa mikakatano mosusu na lisangá ya lokótá Lifalansé na engumba Lausanne oyo ezali na ntáká ya pene na kilomɛtɛlɛ 100 na Betele, batindaki ngai ete natalaka engumba yango mbala na mbala mpo na kosalisa basakoli ete bázala na likanisi lilongobani na ntina na lisangá ya Nzambe.

Na nsima nasalaki lokola mokɛngɛli ya zongazonga na boumeli ya mwa ntango na masangá nyonso ya Lifalansé na ekólo Suisse mobimba. Na ebandeli ya pɔ́sɔ, nazalaki kosala na Betele, kasi nazalaki kolekisa mokolo ya mitano, mokolo ya pɔ́sɔ, mpe mokolo ya lomingo na kotaláká lisangá moko nsima na mosusu pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mpo na kosunga bango na elimo. Lisusu, ntango lisangá moko ya Lifalansé esalemaki na engumba Berne, na mobu 1960, nakómaki mokɛngɛli-mokambi na lisangá yango. Nasalaki mosala yango kino na mobu 1970, ntango Betele elongwaki na engumba Berne mpo na kokóma na esika kitoko oyo yango ezali lelo na engumba Thun.

Nasepelaki kokuta mwa etuluku moke ya Batatoli ya lokótá Italien na Thun, mpe nabandaki kosangana na bango na mosala. Na nsima, lisangá ebotamaki, mpe nasalaki lokola mokɛngɛli-mokambi na lisangá yango na boumeli ya bambula mingi kino bandeko mosusu oyo bazalaki baleki na ngai bakómaki na makoki mpo na komema mokumba yango.

Oyo natalelaki yango lokola libaku malamu ya esengo ezali kozala na mayangani ya mikili mingi ya libota ya Yehova. Na ndakisa, na mobu 1950, na Yankee Stadium, na engumba New York, ezalaki na liyangani oyo nakoki kobosana yango te, na motó na likambo ete: “Bokóli ya Teokrasi.” Botali ya biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, na engumba New York, etikala na makanisi ngai libela. Nakoki mpe kobosana soko moke te lisukúlu ya ndeko Milton G. Henschel na mobu oyo molandaki na liyangani oyo esalamaki na engumba Londres, na ekólo Angleterre, na motó na likambo ete “Losambo ya pɛto,” oyo elobelaki mingi maloba ya Yesu ete “Nalobi na bino ete soko baoyo bakozala nyɛɛ, mbɛ mabanga makonganga.” (Luka 19:40) Ndeko Henschel atunaki ete, “Bokanisi ete mabanga makonganga?” Nazali naino koyoka na matoi na ngai lokito ya eyano “Te!” oyo eutaki na ebele ya mingongo ya bayangani.

Ntango nazongaki na Betele na mobu 1937, tata na ngai, oyo ayokaki ete bazalaki kopesa biso sé mwa mosolo moke, atunaki na komitungisa mpenza ete, “Mwana, okobikela ndenge nini na bobangé na yo?” Nayanolaki ye na kozongeláká maloba ya Davidi, mokomi na nzembo ete: “Naino namoni moyengebene te oyo atikami, to mwana na ye oyo akolɔmbaka kwanga.” (Nzembo 37:25) Na ntembe te maloba yango makokisamaki mpenza mpo na ngai.

Oyo nde esengo nazali na yango ete esili koleka sikawa mibu 80, kobanda Tata abalaki Berta Weibel mpe na lisalisi ya ndakisa mpe litambwisi na ye nayebaki Yehova mpe bomoto na ye! Atako bandeko mosusu ya libota bazalaki kosɛka ye, asalelaki Yehova na bosembo nyonso kino na ntango akufaki na mobu 1983. Amonisaki mawa soko moke te ete asalelaki Nzambe na ye, Yehova; ngai mpe lokola nazali na mawa te mpo ete natikalaki monzemba mpe napesaki bomoi na ngai mobimba na mosala ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 25]

Mosala na Betele

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto