Moboko malamu mpo na kozala na makanisi ya kolónga lelo oyo
HERBERT G. WELLS, nganga-mayele ya istware mpe sosioloji, oyo abotamá na mobu 1866, asalaki bopusi mingi likoló na makanisi ya bato na ekeke ya 20. Na nzela ya babúku oyo akomaki, apalanganisaki bindimeli na ye ete eleko ya bolamu mpo na bato ekoya nzela moko na bokóli ya siansi. Mpo na yango, búku Collier’s Encyclopedia ezali kokundola “elikya ezangi ndelo” oyo Wells azalaki na yango wana azalaki kosala nyonso mpo na kolóngisa makanisi na ye. Kasi búku yango ezali mpe komonisa ete elikya na ye esilaki ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki.
Engebene búku Chambers’s Biographical Dictionary, ntango Wells asosolaki ete “siansi ekoki kosala makambo mabe mpe makambo malamu, kondimisama na ye esilaki, mpe akómaki kokanisa ete bolóngi ezali te.” Mpo na nini esalemaki bongo?
Kondimisama mpe elikya ya Wells etongamaki bobele likoló na misala ya bato. Ntango asosolaki ete bato bakoki te kosala mokili malamu oyo ye akanisaki, azalaki na esika mosusu ya kotya elikya te. Nokinoki kozanga elikya ebongwanaki makanisi ya kozanga kolónga.
Lelo oyo, bato mingi bazali kokutana na likambo motindo moko mpe na ntina yango moko. Batondi na makanisi ya kolónga ntango bazali naino bilenge kasi wana bakóli, bazali kokóma na makanisi ya kozanga kolónga. Kutu, ezali na bilenge oyo bazali kotika bomoi “malamu,” mpe bazali komipesa na kosalela bilangwiseli, na pite, mpe na lolenge mosusu ya bomoi oyo ezali kobebisa bango. Lolenge nini kosilisa mokakatano yango? Talelá bandakisa ya ntango ya lisoló ya Biblia mpe talá nini ezali moboko ya kozala na makanisi ya kolónga—ezala na ntango ya kala, lelo oyo, mpe na mikolo mizali koya.
Abalayama azwaki mbano ya kozala na makanisi ya kolónga
Na mobu 1943 L.T.B., Abalayama alongwaki na Halana, akatisaki Ebale Pelata, mpe akendaki na mokili ya Kanana. Abalayama abéngami “tata na bango nyonso bazali kondima,” mpe atikaki mpenza ndakisa malamu!—Baloma 4:11.
Abalayama azalaki elongo na Lota, mwana etike ya ndeko na ye, mpe libota ya Lota. Na nsima, ntango nzala ekɔtaki na mokili yango, mabota yango mibale ekendaki na Ezipito, mpe na nsima, bazongaki elongo. Na ntango yango Abalayama mpe Lota basilaki kokóma na bozwi mingi, mpe na bitonga minene ya bibwele. Ntango koswana ebimaki kati na babateli ya bitonga na bango, Abalayama abimisaki likanisi mpe alobaki ete: “Tiká [matata] ezala kati na biso na yo te, soko kati na babateli na ngai mpe babateli na yo te, mpo ete biso tozali bandeko. Mokili mobimba ezali liboso na yo te? Bongo kabwaná na ngai. Soko okokenda na lobɔkɔ na mwasi, ngai nde nakokenda na lobɔkɔ na mobali; soko yo okokenda na lobɔkɔ na mobali nde ngai nakokenda na lobɔkɔ na mwasi.”—Genese 13:8, 9.
Lokola Abalayama azalaki mokóló, akokaki kosala ete ye nde azwa esika ya malamu koleka, mpe Lota, mpo na komonisa limemya epai na tata na ye, alingaki sé kondima liponi ya Abalayama. Nzokande, “Lota [atombolaki] miso mpe atalaki ete mokili polele na Yaladene ezalaki na mai mingi bipai nyonso, lokola na elanga na [Yehova], lokola na mokili na Ezipito epai na Soali. Oyo ebimaki naino ebebisaki [Yehova] Sodomo na Gomola te. Bongo Lota aponaki mpo na ye mpenza mokili polele nyonso na Yaladene.” Na kosaláká liponi wana, Lota azalaki na bantina nyonso ya kozala na makanisi ya kolónga. Kasi ezalaki boni mpo na Abalayama?—Genese 13:10, 11.
Abalayama azalaki nde kosala makambo na kozanga bokɛngi, kotyáká bolamu ya libota na ye na likama? Te. Makanisi malamu ya Abalayama mpe elimo na ye ya bokabi ememelaki ye matomba minene. Yehova alobaki na Abalayama ete: “[Tombolá] miso na esika ezali yo, mpe talá epai na likoló mpe epai na ngɛlɛ mpe epai na ebimelo na ntango mpe epai na kolimwa na ntango. Mpo ete mokili nyonso mokomona yo, nakopesa yango na yo mpe na bana na yo seko.”—Genese 13:14, 15.
Makanisi ya kolónga epai ya Abalayama matongamaki likoló na moboko malamu. Etongamaki likoló na elaka ya Nzambe ete akobimisa libota monene uta na Abalayama na boye ete “mpo na [Abalayama] mabota nyonso na nsé bakopambolama.” (Genese 12:2-4, 7) Biso mpe tozali na ntina ya kozala na elikya, koyebáká ete “Nzambe akosalana mosala mpo na malamu kati na makambo nyonso epai na bango bakolingaka ye.”—Baloma 8:28.
Banɔ́ngi mibale oyo bazalaki na makanisi ya kolónga
Koleka mbula 400 na nsima, libota ya Yisalaele ezalaki pene na kokɔta na mokili ya Kanana, “mokili moleki na [miliki, NW] mpe na mafuta na nzoi.” (Exode 3:8; Deteronome 6:3) Mose atindaki bankumu 12 mpo na ‘kotala motindo na mokili mpe koyebisa bango nzela ebongi na bango mpo na kobuta, mpe bamboka oyo bakokóma.’ (Deteronome 1:22; Mituya 13:2) Banɔ́ngi yango 12 balobaki ndenge moko na ntina na malamu ya mokili, kasi banɔ́ngi 10 kati na bango bapesaki lapólo emonisaki ete bazalaki na makanisi ya kolónga te oyo ebimisaki kobanga na mitema ya bato.—Mituya 13:31-33.
Nzokande, Yosua mpe Kalebe bayebisaki bato nsango oyo emonisaki likanisi ya kolónga mpe basalaki nyonso oyo ekoki mpo na kolongola bango bobangi. Makanisi na bango mpe lapólo na bango emonisaki ete batyaki motema mobimba na makoki oyo Yehova azali na yango mpo na kokokisa maloba na ye matali kokómisa bango na Mokili ya Ndaka—kasi balóngaki te. Kutu, “[lisangá, NW] mobimba nde balobaki mpo na kobola bango na mabanga.”—Mituya 13:30; 14:6-10.
Mose alendisaki bato ete bátya motema na Yehova, kasi baboyaki koyoka. Lokola bakangamaki na likanisi na bango ya komonisa ete bakolónga te, libota mobimba lisengelaki koyengayenga na boumeli ya mbula 40 kati na mokili mokauki. Kati na banɔ́ngi yango 12, bobele Yosua mpe Kalebe nde bazwaki mbano ya komonisa makanisi ya kolónga. Mokakatano ezalaki mpenza nini? Kozanga kondima, lokola bato batalelaki mayele na bango moko.—Mituya 14:26-30; Baebele 3:7-12.
Kokakatana ya Yona
Yona azalaki na bomoi na ekeke ya libwa L.T.B. Biblia emonisi ete azalaki mosakoli ya sembo ya Yehova epai na bokonzi ya mabota zomi ya Yisalaele, na eleko ya boyangeli ya Yelobama II. Kasi aboyaki mokumba ya kokende kosakola mpo na kokebisa bato ya Ninive. Josèphe, mokomi ya makambo ya kala, alobi ete Yona “akanisaki ete eleki malamu kokima” mpe kokende na Yafo. Kuna, akɔtaki na masuwa mpo na kokende na Talasisi, ekoki kozala ekólo Espagne ya mikolo na biso. (Yona 1:1-3) Ntina oyo Yona azwaki makanisi ya kozanga kolónga motindo wana na mokumba oyo bapesaki ye elimbolami na Yona 4:2.
Nsukansuka, Yona andimaki kokokisa mokumba na ye, kasi asilikaki ntango bato ya Ninive babongolaki motema. Na bongo, Yehova apesaki ye liteya malamu na ntina na motema mawa na ndenge akaukisaki mpe abomaki nkamba na libɔkɛ oyo Yona amibombaki na nsé na yango. (Yona 4:1-8) Mawa ya Yona mpo na kokufa ya nkamba esengelaki mpenza komonisama mpo na bafandi 120 000 ya Ninive oyo ‘bayebaki kokabola kati na lobɔkɔ na bango na mobali mpe lobɔkɔ na bango na mwasi te.’—Yona 4:11.
Liteya nini tokoki kozwa na lisoló ya Yona? Tosengeli te kozalaka na makanisi ya kozanga kolónga kati na mosala ya bulɛɛ. Soki tososoli litambwisi ya Yehova mpe tolandi yango na kotyáká motema mobimba, tokolónga.—Masese 3:5, 6.
Tózala na makanisi ya kolónga na kati na minyoko
Mokonzi Davidi alobaki ete: “Omitungisa te mpo na bato na masumu; yokelá basáli na mabe zuwa te.” (Nzembo 37:1) Ya solo, wana ezali toli ya mayele, mpamba te lelo oyo bokesene mpe kozanga kolongobana ezali komonana bipai nyonso.—Mosakoli 8:11.
Nzokande, ata soki toyokeli bato mabe zuwa te, tokoki mpenza koyoka nkanda ntango tozali komona bato oyo basali eloko te bazali konyokolama na bato mabe to ntango bazali kosalela biso moko bokesene. Makambo motindo wana makoki ata komema biso na kokólisa ezaleli ya kolɛmba nzoto to na komona ete makambo makolónga te. Ntango tozali na mayoki motindo wana, tosengeli kosala nini? Ya liboso tóyeba malamu ete moto mabe akokóba komindimisa te ete etamboli na ye ekomemela ye etumbu te. Nzembo 37 endimisi biso lisusu na vɛrsɛ́ 2 ete: “[Basáli na mabe] bakolimwa mbango lokola matiti; bakokaoka lokola matiti mobesu.”
Lisusu, tokoki kokóba kosala makambo malamu, kotikala bato ya makanisi ya kolónga, mpe kotalela Yehova. Mokomi na nzembo alobaki lisusu ete: “Tiká mabe mpe salá malamu ete obika libela. Mpo ete [Yehova] alingi sembo; akobatela bayengebene na ye.”—Nzembo 37:27, 28.
Makanisi ya kolónga ya solosolo!
Ezali boni mpo na mikolo mizali koya? Biblia, na mokanda ya Emoniseli, eyebisi biso “makambo makobima noki.” Kati na makambo yango, momati na mpunda motane—oyo ezali komonisa etumba—eyebisami ete ayei ‘kolongola kimya na mokili.’—Emoniseli 1:1; 6:4.
Na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, likanisi moko ya kolónga epalanganaki mingi na ekólo Angleterre ete etumba yango ekozala etumba monene ya nsuka. Na 1916, David Lloyd George, moto ya politiki na Angleterre azalaki na makanisi ya bokatikati mpenza. Ye alobaki ete: “Etumba oyo, lolenge moko na etumba oyo ekoya, ezali etumba oyo ekosilisa bitumba.” (Biso nde totɛngisi makomi.) Azalaki na elónga. Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebakisaki nde myango ya sika mpo na koboma bato mingi koleka. Koleka mbula 50 na nsima, tozali komona ete elikya ya kosilisama ya bitumba na mikolo mizali koya ezali komonana te.
Kati na mokanda yango ya Emoniseli, tozali kotánga mpe na ntina na bamati na mpunda mosusu—oyo ezali elilingi ya nzala, maladi, mpe liwa. (Emoniseli 6:5-8) Makambo mosusu mazali mpo na komonisa elembo ya ntango.—Matai 24:3-8.
Yango ezali bantina ya kozanga makanisi ya kolónga? Soko moke te, mpamba te emonaneli elobeli mpe “mbalata mpɛmbɛ, mpe mofandi na yango azalaki na litimbo. Motole epesami na ye, mpe abimi kolónga mpe kolónga lisusu.” (Emoniseli 6:2) Ezali bongo Yesu Klisto, Mokonzi na Bokonzi ya likoló oyo azali kolongola mabe nyonso, azali kotambola mpo na kotya kimya mpe molɔngɔ́ na mokili mobimba.a
Ntango azalaki naino na mabelé, lokola Mokonzi oyo aponami, Yesu Klisto ateyaki bayekoli na ye ete básambelaka mpo na koya ya Bokonzi wana. Mbala mosusu yo mpe osilaki koteyama kosala libondeli ya “Tata na biso,” to Libondeli ya Nkolo. Kati na yango tobondelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya, mpe ete mokano na ye esalema awa na nsé lokola na likoló.—Matai 6:9-13.
Na esika ya komeka kosembola ebongiseli ya biloko oyo, Yehova, na nzela ya Yesu Klisto, Mokonzi mpe Masiya, akolongola yango nyonso. Na esika ya ebongiseli yango, Yehova alobi, “Nazali kotonga lola na sika mpe mokili na sika; mpe makambo na liboso makokanisama te, makoya mpe na motema te.” Na nsé ya boyangeli ya Bokonzi ya likoló, mabelé makokóma efandelo ya kimya mpe esika oyo bato bakozala na bolamu, epai bomoi mpe mosala ekozala ntango nyonso ya esengo. Yehova alobi ete: “Bósepela mpe bóyoka esengo libela na yango ezali ngai kotonga; . . . baponami na ngai bakosepela kino ntango molai mpo na misala na mabɔkɔ na bango.” (Yisaya 65:17-22) Soki otongi elikya na yo mpo na mikolo mizali koya likoló na elaka wana oyo ekozanga kokokisama te, okozala na bantina nyonso ya kozala na makanisi ya kolónga—sikawa mpe mpo na libela!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na kozwa bandimbola mingi ya emonaneli yango, tolɔmbi yo ete otala búku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi! na mokapo 16, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Elilingi na lokasa 4]
Herbert G. Wells
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Corbis-Bettmann