Banakelasi ya mbala ya 108 ya Gileadi balendisami ete básala mosala ya bulɛɛ
NA KATI ya Biblia, mbala mingi mpo na kolobela losambo ya Nzambe basalelaka maloba “mosala ya bulɛɛ.” Liloba ya Greke oyo ebongolamaka na “mosala ya bulɛɛ” ezali na likanisi ya kosalela Nzambe mosala. (Baloma 9:4) Bato 5 562 oyo balandaki likita oyo ebongisamaki mpo na kopesa banakelasi ya mbala ya 108 ya Gileadi, Eteyelo ya Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia, badiplome bayokaki ndenge oyo balobi bapesaki toli malamu oyo ekosalisa banakelasi básala mosala ya bulɛɛ oyo ekosepelisa Yehova Nzambe.a
Theodore Jaracz, ye azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, akambaki likita yango. Likita ebandaki na loyembo 52 oyo ezali na motó ya likambo ete “Nkombo ya Tata na biso.” Molɔngɔ ya mibale ya nzembo yango elobaka ete: “Biso mpe tokokumisa nkombo na yo monene mpe biso tosali yango na molende mingi bɛɛ.” Yango emonisaki mpenza mposa makasi oyo banakelasi oyo bazwaki badiplome, bazali na yango (bautaki na mikili 10) mpo na kosalela mateya oyo bazwaki na bisika bakotinda bango lokola bamisionɛrɛ. Bakotinda bango na mikili 17.
Na maloba na ye ya ebandeli, Ndeko Jaracz alobelaki makambo oyo elekaki na sanza mitano oyo banakelasi bayekolaki Biblia na mozindo mpe yango ebongisaki bango mpo na kokende kosala na mikili ya bapaya. Yango esalisaki bango mpo ‘bámeka makambo nyonso,’ elingi koloba, báluka koyeba na mozindo na lisalisi ya Liloba ya Nzambe makambo oyo bayekolaki liboso mpe ‘bákangama makasi na makambo ya malamu.’ (1 Batesaloniki 5:21) Alendisaki bango bázala sembo mpe bákangama na Yehova, na Liloba na ye, mpe na mosala oyo, mpo na yango, bauti kozwa mateya. Nini ekosalisa bango mpo básala nyonso wana?
Bazwi toli mpo básala mosala ya bulɛɛ malamu
Lon Schilling, ye azali na Komite ya Misala ya Betele, asalaki lisolo oyo ezali na motó ya likambo ete, “Bokolonga na komekama na likambo etali kozala na makambo makasi te?” Alobelaki mingi ntina ya kozala na makambo makasi te, ezaleli yango emonisaka mayele ya Nzambe. (Yakobo 3:17) Kozala na makambo makasi te esɛngaka kotika makambo mosusu, koponapona te, kolekisa ndelo te, komitya na esika ya bamosusu, mpe kokanga motema. Ndeko Schilling alobaki ete: “Moto oyo azali na makambo makasi te asɛngaka na bamosusu makambo ebele ebele te. Ye moko mpe alekisaka ndelo te.” Nini ekoki kosalisa misionɛrɛ azala na makambo makasi te? Komitalela ete ozali moto monene te, koluka koyoka mpe koyekola makambo epai ya bato mosusu, mpe kondima makanisi ya bato mosusu soki yango ebuki mobeko ya Nzambe te.—1 Bakolinti 9:19-23.
“Bóbosana kolya te!” ezalaki motó ya lisolo ya mibale oyo Ndeko Samuel Herd asalaki. Ndeko Herd azali mpe na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Alobelaki mingi ntina ya kolyaka malamu na elimo mpo na kozala makasi ntango nyonso mpe kozala na makasi ya kosala mosala ya bulɛɛ. Ndeko Herd alobaki ete: “Lokola bokokɔta na mosala na bino ya kosakola mpe ya koteya, ekoumela te, bokokóma na mosala ya elimo mingi mpenza. Na yango, bosengeli kobakisa mposa na bino ya kolya bilei ya elimo mpo bótɛngatɛnga te mpe bózala makasi na elimo.” Kolya malamu na elimo ekoki kosalisa misionɛrɛ mpo atungisama te na elimo mpe akanisaka mboka na ye ntango nyonso te. Yango esalisaka moto mpo na kozala na esengo mpe kokangama na mosala na ye ya bulɛɛ.—Bafilipi 4:13.
Molakisi moko ya Gileadi, Lawrence Bowen, alendisaki bayekoli na lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Tózonga na ebandeli.” Alingaki koloba nini? Asɛngaki bayangani nyonso báfungola Masese 1:7, oyo elobaka ete: “Ebandeli ya boyebi ezali kotosa [Yehova].” Alimbolaki ete: “Eloko nyonso oyo eboyaka kondima ete Yehova azali, bakoki soko moke te kobenga yango boyebi mpe ekoki kopesa bososoli ya solosolo te.” Ndeko Bowen akokanisaki bandimbola ya Biblia, Liloba ya Nzambe na biteni mikemike ya fɔtɔ moko. Ntango biteni yango ekangisami malamu esika moko, elilingi mobimba ekosalema. Soki biteni yango bizali mingi, elilingi ekozala monene mpe polele mpe moto akosepela na yango mingi. Yango ekoki kosalisa biso nyonso na kosalela Nzambe mosala ya bulɛɛ.
Wallace Liverance, sɛkrɛtɛrɛ ya Eteyelo ya Gileadi, asalaki lisukulu ya nsuka oyo ezalaki na motó ya likambo ete, “Bópesa matɔndi lokola mbeka na bino epai ya Nzambe.” Alobelaki lisolo oyo Yesu abikisaki bato zomi ya maladi ya maba. (Luka 17:11-19) Kaka moko nde azongaki mpo na kokumisa Nzambe mpe apesaki Yesu matɔndi. Ndeko Liverance alobaki boye: “Na ntembe te bamosusu mpe basepelaki lokola bakómaki pɛto. Bamimonaki malamu, kasi emonani ete eloko bazalaki na mposa na yango ezalaki se ete nganga aloba na bango ete bakómi pɛto.” Soki moto ayekoli solo akómaka na bopɛto ya elimo mpe yango esengeli kotinda ye na kopesa Nzambe matɔndi mpo na boboto na ye. Balendisaki banakelasi ya mbala ya 108 ya Gileadi ete bákanisaka misala nyonso mpe boboto ya Nzambe mpo ete mosala mpe mbeka na bango emonisa ete bazali kopesa Nzambe matɔndi.—Nzembo 50:14, 23; 116:12, 17.
Mwa makambo bandeko bakutanaki na yango mpe bayanolaki na mituna mpo na mosala ya bulɛɛ
Mark Noumair, molakisi mosusu ya Gileadi, akambaki eteni ya mibale ya likita. Eteni yango etalelaki makambo banakelasi bakutanaki na yango na mosala ya kosakola na mikolo oyo bazalaki kolanda mateya. Mwanakelasi mokomoko asalaki mbula pene na 12 na mosala ya ntango nyonso liboso aya na Gileadi. Ntango bazalaki na eteyelo, babandaki koyekola Biblia na bato ndenge na ndenge mpe yango emonisaki ete bayebaki ndenge ya “[kokóma] ndenge nyonso epai ya bato nyonso.”—1 Bakolinti 9:22.
Nsima na yango, Charles Molohan na William Samuelson, batunaki bandeko mosusu ya libota ya Betele na bakɛngɛli-batamboli oyo bakɔtá kelasi ya Gileadi mituna. Moko na bandeko oyo batunaki mituna ezali Robert Pevy, ye asalaki na Philippines nsima ya kozwa diplome na kelasi ya mbala ya 51 na Gileadi. Ayebisaki banakelasi ete: “Ntango nyonso oyo likambo ebimi, moto na moto apesaka likanisi na ye mpo na koluka ndenge ya kosilisa yango. Moto oyo ayebi mingi koleka yo akozanga te, moto yango nde oyo akopesa likanisi oyo eleki malamu. Kasi soki oluki na kati ya Biblia mpe omeki koyeba ndenge Nzambe atalelaka likambo yango, moto te akopesa likanisi eleki oyo ya ye. Eyano ya Biblia ekozala ntango nyonso ya malamu.”
Mpo na kosukisa likita yango ya makambo ya elimo, John Barr, ye mpe azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi asalaki lisukulu oyo ezali na motó ya likambo ete, “Bósalela Yehova mosala ya bulɛɛ oyo akondima.” Amonisaki ndenge oyo mosala ya bulɛɛ ekoki komonana na mosala ya kosakola mpo na kosalisa bato ya mitema sembo básambela Nzambe na lolenge oyo akondima. Nsima ya kofungola Matai 4:10 mpe kotánga maloba ya Yesu, Ndeko Barr alobaki ete, “Soki tolingi kosambela kaka Yehova, tosengeli koboya lolenge nyonso ebombami ya losambo ya bikeko, na ndakisa bilulela, mposa ya bomɛngo, mpe komitombola. Tozali na esengo ya koyeba ete bamisionɛrɛ na biso banda na ebandeli ya bambula ya 1940 bapesi ndakisa malamu na likambo yango! Mpe tokanisi ete bino banakelasi ya mbala ya 108 ya Gileadi bokolanda ndakisa malamu oyo bango bapesi. Bokosalela Yehova mosala ya bulɛɛ, mpamba te ye nde abongi kozwa yango.”
Lisolo wana kitoko nde esukisaki likita yango ya kolendisa. Ekómaki ntango ya koyoka bambote ya bandeko oyo eutaki na mokili mobimba, kopesa banakelasi badiplome, mpe kotánga mokanda oyo banakelasi bakomaki mpo na komonisa botɔndi na bango mpo na mateya bazwaki. Balendisaki banakelasi bázala sembo na teritware na bango mpe na mosala ya Yehova. Bayangani nyonso, bakisa bato oyo babengisamaki oyo bautaki na mikili 25, basanganaki mpo na kosukisa likita na loyembo mpe na libondeli.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Likita yango esalemaki mokolo ya 11 Marsi 2 000, na Esika Monene ya Mateya ya Watchtower, na Patterson, na etúká ya New York.
[Etanda na lokasa 23]
MAKAMBO MATALI BANAKELASI
Bauti na bikólo: 10
Batindami na bikólo: 17
Banakelasi bazalaki: 46
Mwayene ya mbula ya kobotama: 34
Mwayene ya mbula balekisi kati na solo: 16
Mwayene ya mbula balekisi kati na mosala ya ntango nyonso: 12
[Elilingi na lokasa 24]
Kelasi ya mbala ya 108 ya Gileadi, Eteyelo ya Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia
Bankombo na bango ekomami awa na nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ; banda na moto ya liboso na lobɔkɔ ya mwasi; mpe banda na molɔngɔ ya liboso tii na molɔngɔ ya nsuka.
(1) Amadori, E.; Cook, O.; Byrne, M.; Lee, A. (2) Newsome, D.; Pederzolli, A.; Bigras, H.; Kato, T.; Gatewood, D. (3) Eade, D.; Eade, J.; Wells, S.; Jamison, J.; Gonzales, M.; Gonzales, J. (4) Kato, T.; Lohn, D.; Niklaus, Y.; Preiss, S.; Foster, P.; Ibarra, J. (5) Amadori, M.; Manning, M.; James, M.; Boström, A.; Gatewood, B.; Newsome, D. (6) Foster, B.; Jamison, R.; Hifinger, A.; Koffel, C.; Koffel, T.; Byrne, G. (7) Hifinger, K.; Manning, C.; Cook, J.; Boström, J.; Lohn, E.; Pederzolli, A. (8) James, A.; Wells, L.; Preiss, D.; Niklaus, E.; Lee, M.; Ibarra, P.; Bigras, Y.