Ondimaka makambo oyo okoki komona na miso te?
SOKI moto moko alobi ete, ‘Ngai nandimaka kaka makambo oyo namonaka,’ azali kolobela mpenza te komona na miso. Mpo biso nyonso tondimaka ete biloko mosusu ezali atako tokoki komona yango na miso te.
Na ndakisa, mbala mosusu na kelasi bosalaki elakiseli moko mpo na komonisa ete biloko mosusu ezalaka na nguya ya kobenda biloko mosusu (champ magnétique). Elakiseli yango esalemaka boye: Bakopanzapanza bibende mikemike likoló ya papye. Na nsima bakotya papye yango likoló ya ema. Ntango bazali koningisa papye yango, okomona biteni ya bibende yango ezali kosangana esika moko likoló ya ema mpe ekolanda esika ema ezali. Soki osalaki elakiseli yango, omonaki nguya ya ema na miso? Te, kasi misala na yango likoló ya biteni ya libende ezalaki polele, mpe yango endimisaki yo ete nguya oyo ebendaka biloko ezali.
Tondimaka biloko mosusu oyo tokoki komona na miso te. Ntango tozali kotala liyemi (tableau) to ekeko moko ya kitoko, totyaka ntembe te ete ezali na moto oyo asalaki liyemi yango to ekeko yango. Na bongo ntango totalaka mai ezali kokita likoló ya ngomba to ntango moi elalaka, motema na biso esengeli kotinda biso na kokanisa ete biloko wana ezali misala ya Moyemi Monene, boye te?
Ntina oyo bato mosusu bandimaka te
Likambo ya kokamwa, bato mosusu bandimaka lisusu te ete Nzambe azali, mpo na makambo oyo bateyaki bango na ndakonzambe. Ezalaki bongo mpo na moto moko ya ekólo Norvège oyo bateyaki ye ete Nzambe atumbaka bato mabe na lifelo. Moto yango amonaki ete ekoki kosalema te mpe alobaki ete oyo Nzambe ya ndenge nini anyokolaka bato boye? Yango wana atikaki kondima Nzambe.
Kasi, na nsima, moto yango andimaki ete Motatoli ya Yehova moko asalisa ye mpo na koyeba soki mateya yango ezali solo na kati ya Biblia. Akamwaki na koyeba ete Biblia eteyaka te ete bato mabe banyokwamaka na lifelo ya mɔ́tɔ. Biblia ekokanisi liwa na mpɔngi. Na kati ya lilita, moto ayokaka mpasi te; ayebaka mpe eloko moko te. (Mosakoli 9:5, 10) Moto yango ayaki koyeba lisusu ete bato oyo Nzambe amoni ete balingi kotika mabe te, soki bakufi, bakotikala libela na lilita. (Matai 12:31, 32) Bato mosusu oyo bakufá bakosekwa na ntango oyo Nzambe abongisi, mpe bakopesa bango libaku ya kozala na bomoi ya seko na Paladiso. (Yoane 5:28, 29; 17:3) Amonaki ete ndimbola yango ezali solo. Yango eyokani na likambo oyo Biblia elobaka ete “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Moto yango ya motema sembo alandaki koyekola Liloba ya Nzambe, mpe na nsima, akómaki kolinga Nzambe oyo Biblia eteyaka.
Bato mosusu bandimaka te ete Mozalisi ya bolingo azali soki batali ndenge bampasi ekómi mingi na mokili mpe bosembo ezali lisusu te. Bato yango bazali na makanisi ndenge moko na moto moko ya ekólo Suède, oyo, mokolo moko atalaki na likoló mpe atuni boye: “Ndenge nini Nzambe mozwi-na-nguya nyonso mpe oyo atondi na bolingo akoki kofanda kuna na ntango oyo mabe etondi awa na mabele?” Lokola moto ya kopesa ye eyano na motuna yango azalaki te, atikaki kondima Nzambe. Na nsima, abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Ayebaki ete Liloba ya Nzambe ezali kopesa eyano ya malamu na motuna oyo bato bamitunaka banda kala ete: Mpo na nini Nzambe atiki nzela na mabe?a
Moto yango ya motema sembo ayekolaki ete lokola mabe ezali, elingi koloba te ete Nzambe azali te. Tópesa ndakisa: Moto moko akoki kosala mbeli mpo bákataka na yango misuni. Kiliya moko akoki kosomba mbeli yango mpe asaleli yango mpo na kokata mosuni te, kasi mpo na koboma moto. Tokoki koloba te ete lokola basaleli mbeli yango na ndenge ya mabe emonisi ete ezali na moto moko te oyo asalaki yango. Ezali mpe bongo, lokola mabele ezali kosalelama te na mokano oyo basalaki yango emonisi te ete mabele ezali na Mozalisi te.
Biblia eteyaka ete mosala ya Nzambe ezali ya kokoka. Azali “na mabe te, ye moyengebene mpe mosembwi.” (Deteronome 32:4) Nzambe apesaka moto makabo malamu, kasi moto asalelaka makabo mosusu na ndenge ya mabe, yango nde ebimisi ebele ya bampasi. (Yakobo 1:17) Kasi, Nzambe akosilisa bampasi. Na nsima, “bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, . . . mpe bakofanda wana libela.”—Nzembo 37:11, 29.
Moto ya Suède oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo ayokaki mawa na motema na komona ndenge bato bazali konyokwama. Ya solo, ndenge azali komibanzabanza mpo na bato, emonisi ete Nzambe azali. Ndenge nini?
Mpo na bato mingi, na esika bándima ete Nzambe azali, bamonaka ete ebongi bándima liteya ya evolisyo. Bato oyo bateyaka liteya ya evolisyo balobaka ete “oyo akokoka ye nde akobika,” elingi koloba ete ezala moto to nyama, mpo azala na bomoi, asengeli kosala makasi mpo na kobatela bomoi na ye. Baoyo basalaka makasi babikaka; baoyo basalaka makasi te, bakufaka. Balobaka ete yango etangamá bongo. Kasi soki yango “etangamá” ete moto oyo alɛmbá akufa mpo na kotikela bato ya makasi esika, ndenge nini tokoki kolimbola likambo oyo, lokola mobali wana ya Suède, ete, bato mosusu ya makasi bayokaka mawa na komona baninga na bango bato bazali konyokwama?
Ndenge ya koyeba Nzambe
Tokoki komona Nzambe te mpamba te azali na nzoto lokola ya moto te. Atako bongo, Nzambe alingi ete tóyeba ye. Nzela moko oyo ekosalisa biso tóyeba ye malamumalamu ezali soki totali biloko ya kokamwa oyo akelá; biloko oyo tokokanisi yango na “mayemi” mpe na “bikeko.” Na Baloma 1:20 (NW), Biblia elobi ete: “Bizaleli ya [Nzambe] oyo emonanaka te emonani polele na biloko bizalisami oyo bizali na mokili, mpamba te yango emonisami na biloko oyo akelá, ezala nguya na ye ya seko mpe Bonzambe na ye.” Ya solo, se lokola kotala liyemi to ekeko moko ekoki kosalisa yo oyeba mayele ya moyemi, soki okanisi malamu mpenza misala ya kokamwa ya Nzambe ekoki kosalisa yo oyeba mpenza mayele na ye.
Ya solo, tokoki te kozwa biyano na mituna nyonso oyo etungisaka biso na bomoi kaka soki totali biloko oyo Nzambe akelá. Kasi tokoki kozwa biyano na mituna yango soki tolukiluki na kati ya Biblia, Liloba ya Nzambe. Mibali mibale oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo oyo bayaki kondima ete Nzambe azali mpe amibanzabanzaka mpo na makambo oyo ekómelaka biso mpo batángaki Biblia na mposa ya koyeba solo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu mpo na ntina oyo Nzambe azali kotika nzela na mabe, tosɛngi yo otala mokanda Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous?, mokapo 10, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 28]
J. Hester and P. Scowen (AZ State Univ.), NASA