Ndenge nini okoki kosala boyokani na Nzambe?
Yakobi 4:8 (Boyokani ya Sika) elobi ete: “Bopusana penepene na Nzambe mpe ye akoya penepene na bino.” Mpo na kolakisa ete alingaka mpenza ete bato báya epai na ye, Yehova Nzambe apesaki Mwana na ye mpo na kobikisa biso.
YOANE amonisaki botɔndi na ye mpo na bolingo wana mpe akomaki boye: “Biso tokolingaka [Nzambe] mpo ete ye alingaki biso liboso.” (1 Yoane 4:19) Kasi, mpo mokomoko na biso asala boyokani na Nzambe, ezali na mwa makambo oyo tosengeli kokokisa. Makambo yango ezali ndenge moko na makambo minei oyo tosalaka mpo na kokóma baninga ya bato mosusu, ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki. Tótalela naino makambo yango.
Tótya likebi na bizaleli malamu ya Nzambe
Nzambe azali na bizaleli malamu mingi, kasi oyo eleki kati na bizaleli yango ezali bolingo, mayele, bosembo, mpe nguya. Mayele mpe nguya ya Nzambe emonanaka mpenza, ezala na biloko oyo ezali mosika na kati ya molɔ́ngɔ́, to mpe na biloko oyo tozali komona zingazinga na biso, elingi koloba banda na bagalaksi mineneminene tii na atome oyo emonanaka kutu na miso te. Mokomi ya nzembo akomaki boye: “Likoló ekosakolaka nkembo ya Nzambe, lola ekoyebisaka misala ya mabɔkɔ na ye.”—Nzembo 19:1; Baloma 1:20.
Biloko oyo Nzambe akelá emonisaka mpe ete azali na bolingo. Na ndakisa, ndenge oyo asalá biso emonisaka ete Nzambe alingaka ete tózala na bomoi ya esengo. Apesa biso makoki ya komona langi ndenge na ndenge, ya koyoka elɛngi ya bilei mpe koyoka nsolo, ya kosepela na miziki, ya kosɛka, ya kotala biloko kitoko, mpe apesa biso makoki mosusu oyo, soki totali malamu, esimbi mpenza bomoi te. Nzambe akabaka, azali na boboto mpe azali na bolingo, bizaleli oyo esalaka ete azala “Nzambe ya esengo.”—1 Timote 1:11; Misala 20:35.
Yehova asepelaka lokola boyangeli na ye esimbami na bolingo mpe bikelamu na ye ya mayele bandimaka bokonzi na ye mpo na bolingo. (1 Yoane 4:8) Ya solo, Yehova azali Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, kasi asalelaka bato, mingimingi basaleli na ye ya sembo, makambo na ndenge oyo tata ya bolingo asalelaka bana na ye. (Matai 5:45) Apimelaka bango eloko moko te oyo ekoki kopesa bango bolamu. (Baloma 8:38, 39) Lokola tolobaki yango, andimaki ata kokaba bomoi ya Mwana na ye mobotami-bobele-moko mpo na biso. Soki lelo oyo tozali na bomoi mpe tozali na elikya ya bomoi ya seko, ezali mpo na bolingo ya Nzambe.—Yoane 3:16.
Yesu asalisaki biso tósosola malamumalamu bomoto ya Nzambe mpamba te amekolaki Tata na ye na ndenge ya kokoka mpenza. (Yoane 14:9-11) Ata mbala moko te Yesu alukaki matomba na ye moko, ayebaki komitya na esika ya bamosusu mpe azalaki kotalela bamposa na bango. Mokolo mosusu, bamemelaki Yesu moto moko oyo akufá matoi mpe azalaki na mokakatano ya koloba. Na ntembe te, moto yango azalaki motema likoló na kati ya bato ebele. Nzokande, Yesu asalaki likambo moko ya malamu: akendaki na ye pembeni, kaka bango mibale mpe abikisaki ye. (Malako 7:32-35) Osepelaka na bato oyo bayebaka komitya na esika na yo mpe bapesaka yo lokumu? Boye okolinga mpenza kozala moninga ya Yehova mpe ya Yesu soki oyebi makambo mingi mpo na bango.
Tókanisaka bizaleli ya Nzambe
Moto moko akoki kozala na bizaleli malamu kasi, mpo tósepela na moto yango, tosengeli kokanisaka ye. Ezali mpe bongo mpo na Yehova. Mpo na kosala boyokani na Yehova, likambo ya mibale ezali kokanisa bizaleli na ye. Mokonzi Davidi, moto oyo alingaki mpenza Yehova mpe azalaki “mobongi na motema ya [Yehova],” alobaki boye: “Nakobanza mikolo ya kalakala; nakokanisa misala na yo nyonso; nakobanza misala ya mabɔkɔ na yo.”—Misala 13:22; Nzembo 143:5.
Ntango ozali kotala biloko kitoko oyo Nzambe akelá to ozali kotánga Liloba ya Nzambe, Biblia, omanyolaka lokola Davidi, likoló ya makambo oyo azali komona mpe oyo ozali kotánga? Soki na ndakisa mwana moko azwi mokanda euti epai ya tata na ye ya bolingo, akotalela mokanda yango ndenge nini? Na ntembe te akotánga yango nokinoki te bongo na nsima abwaka yango na tirware. Te, akotánga yango na likebi nyonso, akolandela likanisi mokomoko. Ndenge moko mpe, Liloba ya Nzambe esengeli kozala na motuya na miso na biso, ndenge ezalaki na motuya na miso ya mokomi ya nzembo oyo alobaki ete: “Nalingi Mobeko na yo na bolingo [mingi]! Nakobanzaka yango mokolo mobimba.”—Nzembo 119:97.
Sololaká na ye malamu ntango nyonso
Kosolola malamu nde ebongisaka boyokani nyonso. Kosolola malamu elimboli koloba mpe koyoka, na makanisi kaka te, kasi mpe na motema. Biso tolobaka na Mozalisi na nzela ya libondeli; yango ezali lisolo oyo tosalaka na Nzambe na limemya nyonso. Yehova asepelaka na mabondeli ya bato oyo balingaka mpe basalelaka ye mpe oyo bandimaka Yesu Klisto lokola momonisi na Ye ya libosoliboso.—Nzembo 65:2; Yoane 14:6, 14.
Na ntango ya kala, Nzambe azalaki koloba na bato na ndenge ebele, lokola na bimonaneli, na bandɔtɔ, to mpe azalaki kotinda baanzelu. Kasi lelo oyo, alobaka na biso na nzela ya Biblia Mosantu, Liloba na ye oyo ekomami. (2 Timote 3:16) Liloba oyo ekomami ezali na matomba mingi. Moto akoki kotánga yango ntango nyonso oyo alingi. Moto akoki kotánga yango mbala na mbala ndenge oyo azongelaka kotánga mokanda oyo batindeli ye. Mpe lisusu, bakoki te kobalola maloba na yango ndenge oyo babalolaka maloba ya moto. Yango wana, talelaká Biblia lokola liboke ya mikanda oyo Tata na yo ya bolingo oyo azali na likoló atindeli yo mpe tiká ete alobaka na yo mokolo na mokolo.—Matai 4:4.
Na ndakisa, Biblia emonisi oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe na miso ya Yehova. Eyebisi mokano na ye mpo na bato mpe mpo na mabele. Biblia ezali mpe komonisa makambo oyo asalaki na bikólo mpe na bato ndenge na ndenge, ezala na basaleli na ye ya sembo to na banguna na ye mpenza. Lokola Yehova akomisaki makambo oyo asalelaki bato, amonisi mpe alimboli bomoto na ye polele mpenza. Amonisi makanisi mpe mayoki na ye lokola bolingo, esengo, mawa, nkanda, motema mawa, komibanzabanza, mpe ayebisi ntina oyo amonisaki yango, nyonso wana na ndenge oyo moto akoki kokanga ntina mbala moko.—Nzembo 78:3-7.
Ntango otángi lisolo moko na Liloba ya Nzambe, okosala nini mpo ozwela yango litomba? Mpe mingimingi, ndenge nini okoki kosala boyokani na Nzambe? Ya liboso, kanisá soki makambo oyo otángi mpe oyekoli eteyi yo nini mpo na Nzambe ye moko, mpe tiká makambo yango ekɔtela yo mpenza na motema. Na nsima, bondelá Yehova mpo na koyebisa ye makanisi na yo mpe ndenge oyo ozali koyoka na motema na yo mpo na makambo oyekoli mpe ndenge oyo okosala mpo ememela yo litomba. Yango wana nde kosolola. Kasi, soki mpe ozali na makanisi mosusu na motó, okoki koyebisa ye yango na kati ya libondeli na yo.
Salaká makambo elongo na Nzambe
Biblia elobi ete na ntango ya kala, bato mosusu ya sembo batambolaki elongo na Nzambe ya solo to batambolaki liboso na ye. (Genese 6:9; 1 Mikonzi 8:25) Yango elingi koloba nini? Elingi mpenzampenza koloba ete na bomoi na bango ya mokolo na mokolo, bazalaki komona lokola nde Nzambe azali pene na bango. Ya solo, bazalaki bato ya masumu. Kasi, bato yango balingaki mibeko ya Nzambe, mpe na kati ya bomoi na bango, bazalaki kotosa mokano na ye. Yehova asepelaka na bato ya ndenge yango mpe abatelaka bango, lokola Nzembo 32:8 emonisi yango ete: “Nakoteya yo mpe nakolakisa yo nzela ekoki na yo [kolanda]; nakopesa yo toli wana nazali kotala yo.”
Yo mpe okoki kokóma moninga ya motema ya Yehova, moninga oyo akotambola na yo elongo, akobatela yo, mpe akopesa yo toli lokola tata. Mosakoli Yisaya amonisaki ete Yehova azali “ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango.” (Yisaya 48:17) Ntango tokomona matomba yango, tokomona lokola nde Yehova azali “na lobɔkɔ na [biso] ya mobali,” ndenge Davidi amonaki yango.—Nzembo 16:8.
Nkombo ya Nzambe ezali komonisa bizaleli na ye
Mangomba mingi eteyaka nkombo ya Nzambe te mpe Babiblia mingi esaleli nkombo yango te. (Nzembo 83:18) Nzokande, na makomi ya ebandeli na monɔkɔ ya Liebele, tozali kokuta nkombo yango, Yehova, mbala soki 7 000! (Likambo ya kokamwa, babongoli mingi ya Biblia bazali kolongola nkombo ya Nzambe, kasi bazali kotika bankombo ya banzambe ya lokuta oyo ezali na makomi ya ebandeli lokola Baala, Bele, Melodaka, ata mpe Satana!)
Bato mosusu bakanisaka ete kolongola nkombo ya Nzambe ezali likambo mpenza te. Kasi, kanisá naino: Soki moto moko azali na nkombo te, ezali mpasi to ezali nde pɛtɛɛ mpo okóma moninga na ye ya motema mpe ya solosolo? Batitre lokola Nzambe mpe Nkolo (oyo babengaka na yango mpe banzambe ya lokuta) ekoki komonisa nguya, bokonzi, to lokumu ya Yehova, kasi kaka nkombo na ye nde ekesenisaka ye na ndenge oyo esengeli mpenza. (Exode 3:15; 1 Bakolinti 8:5, 6) Nkombo ya Nzambe ya solo emonisaka bizaleli mpe bomoto na ye. Walter Lowrie, moto ya teoloji, alobaki solo ete: “Moto oyo ayebi Nzambe na nkombo na ye te ayebi mpenza te ete Nzambe azali moto.”
Tózwa ndakisa ya Maria, ye azalaki mondimi ya molende na Lingomba ya Katolike na ekólo Australie. Ntango akutanaki na Batatoli ya Yehova mpo na mbala ya liboso, Maria andimaki Batatoli bálakisa ye nkombo ya Nzambe na kati ya Biblia. Asalaki nini ntango amonaki yango? “Ntango namonaki nkombo ya Nzambe na kati ya Biblia mpo na mbala ya liboso, nalelaki. Nasepelaki na komona ete nakoki koyeba mpe kosalela nkombo ya Nzambe.” Maria alandaki koyekola Biblia, mpe mpo na mbala ya liboso na bomoi na ye, ayebaki ete Yehova azali moto mpe azwaki likoki ya kokóma moninga na ye ya motema.
Ya solo, tokoki “kopusana penepene na Nzambe” atako tokoki komona ye na miso te. Tokoki “komona” bomoto na ye ya malamu mingi na makanisi mpe na mitema na biso mpe na ndenge yango tokolinga ye lisusu mingi. Bolingo ya ndenge wana “ezali ekanganeli ekoki mpenza.”—Bakolose 3:14.
[Bililingi na lokasa 7]
Kokanisa na biloko oyo Yehova akelá ezali moko na makambo mpo na kosala boyokani na ye