Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/1 lok. 3
  • Mpo na nini kolona bizaleli malamu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini kolona bizaleli malamu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini tokoki kolona bizaleli malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Ozali kolanda komonisa bizaleli malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Lolenge nini tokoki kobakisa bizaleli bibongi likoló na kondima na biso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Tómonisa kondima kati na bilaká ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/1 lok. 3

Mpo na nini kolona bizaleli malamu?

KUNIHITO, mobali moko ya mbula soki 50 alongwaki na mboka na ye Japon mpe akendaki kofanda na États-Unis.a Mwa bapɔsɔ na nsima, akutanaki na likambo moko oyo ekokaki kobebisa mosala na ye. Yoká ndenge oyo ye moko Kunihito alobi yango: “Ntango mokonzi na ngai na mosala atunaki ngai soki nakondima mokumba moko oyo alingaki kopesa ngai, namonaki malamu ete nakokoka yango. Kasi, lokola bateyá ngai ete komilakisa te ezali ezaleli malamu, nalobaki ete: ‘Nayebi te soki nakokoka, kasi nakomeka kaka nzoto.’ Mpo na mokonzi na ngai moto ya Amerika, maloba na ngai ezalaki lokola nde nayebi mosala te mpe nayebi komityela motema te. Ntango nayaki koyeba yango, namonaki ete nasengeli kobongola lolenge na ngai ya kotalela makambo.”

Maria afandaka na New York. Azali na mayele mingi na kelasi mpe asepelaka kosalisa baninga na ye ya kelasi. Juan azali moninga na ye ya kelasi, azalaki mpe ntango mosusu kosɛnga Maria asalisa ye. Kasi, Juan akómaki kolula Maria mpe alukaki kobenda likebi na ye. Atako Maria azalaki na mposa ya kozala na etamboli ya pɛto, alandaki maloba ya Juan mpe akweaki na pite.

Lokola bato na bato bazali na mimeseno na bango mpe lokola makambo ya mabe ekómi mingi na moi ya lelo, komonisa bizaleli malamu ezali likambo moke te. Yango wana, motuna ezali kotunama boye: Mpo na nini kolona bizaleli malamu? Mpamba te Nzambe asepelaka na bizaleli malamu, mpe mingi kati na biso tolingaka ete Nzambe asepela na biso.

Biblia, Liloba ya Nzambe ezali kolendisa bato oyo batángaka yango ete bálona bizaleli malamu. Na ndakisa, ntoma Paulo akomaki boye: “Soko [bizaleli] malamu ezali mpe soko lisanzoli ezali, bókanisa makambo yango.” (Bafilipi 4:8) Mpe lisusu, ntoma Petelo alendisi biso tótya ‘molende mpo na kobakisa bizaleli malamu likoló ya kondima na biso.’ (2 Petelo 1:5, NW) Kasi, bizaleli malamu ezali nini? Bizaleli malamu ekoki koteyama na kelasi? Ndenge nini tokoki kolona yango?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi bango bankombo mosusu.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto