Ndenge nini tokoki kolona bizaleli malamu?
KOZALA na “bizaleli malamu” elimboli “kokanisa mpe kosala misala oyo elongobani”; elimboli “kozala na bomoto oyo ebongi.” Marvin Vincent, molimboli ya maloba ya lokota, alobi ete ndimbola ya libosoliboso ya liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “bizaleli malamu” ezali “nyonso oyo ezali malamu mingi.” Yango wana, na bileko ndenge na ndenge, bizaleli lokola bokɛngi, mpiko, koyeba kozala na bokonzi likoló na makanisi na yo moko, boboto, motema mawa, kolendendela, bosembo, mpe komikitisa, ebengamaki bizaleli malamu. Kozala na bizaleli malamu elimboli mpe “kolanda mitinda ya malamu.”
Nani asengeli kopesa mitinda ya bizaleli malamu mpe ya sembo oyo tosengeli kolanda? Zulunalo moko (Newsweek) elobaki boye: “Makanisi oyo bato mingi bandimaka na oyo etali bizaleli malamu elobaka ete filozofi ya Kongɛnga ebimisaki elimo ya kotyela likambo nyonso ntembe liboso ya kondima, yango wana mabe na malamu ekómaki ndenge moto na moto asepeli to ndenge oyo bato ya mboka moko baponi.” Kasi, lolenge ya malamu mpo na kokesenisa malamu na mabe ezali nde ya kolanda oyo motema elingi? Te. Mpo tólona bizaleli malamu, tozali na mposa mpenza ya mitinda oyo ezali komonisa mabe na malamu, mitinda oyo ekoki mpenza kokata ete likambo boye, ezaleli boye to eloko boye ezali malamu to mabe.
Molakisi ya solosolo ya bizaleli malamu kaka moko
Ezali se na Moto moko oyo akoki kolakisa bizaleli nini ezali mpenza malamu: Mozalisi ya bato, Yehova Nzambe. Ntango kaka akelaki Adama mobali ya liboso, Yehova Nzambe apesaki moto mobeko ete: “Yo okoki kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga, nde mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe okoki kolya te. Zambi mokolo okolya yango okokufa solo.” (Genese 2:16, 17) Yehova Nzambe apesaki nzete yango nkombo wana mpo na komonisa ete kaka ye nde azali na lotomo ya kokata soki likambo boye ezali malamu to mabe mpo na bikelamu na ye. Yango wana, mpo na kokata to kotalela misala, makanisi mpe bomoto esengelaki kolanda mitinda ya Nzambe oyo elakisaka malamu na mabe. Soki mitinda yango ezali te, tokolonga te kokesenisa malamu na mabe na ndenge oyo ebongi mpenza.
Mobeko oyo Nzambe apesaki mpo na nzete ya koyeba malamu na mabe esɛngaki na Adama na Eva bápona soki bakotosa to bakotosa te. Mpo na bango, kozala na bizaleli malamu elimbolaki kotosa mobeko yango. Na nsima, Yehova ayebisaki makambo oyo esepelisaka ye mpe oyo esepelisaka ye te, mpe akomisaki yango na Biblia mpo na biso. Yango wana, kolona bizaleli malamu elimboli kotosa mitinda ya sembo oyo Yehova amonisi na kati ya Makomami.
Tóyeba mitinda ya Nzambe malamumalamu
Lokola Yehova Nzambe aponi oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe mpe amonisi yango na kati ya Biblia, ebongi mpenza biso tóyeba yango malamumalamu, boye te? Ntoma Paulo akomaki boye: “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba mpo na koteya, mpo na kopamela, mpo na kobongisa makambo, mpo na kosembola kati na boyengebene, ete moto na Nzambe azala mpenza oyo akoki, oyo asɛlingwi mpenza mpo na mosala nyonso malamu.”—2 Timote 3:16, 17, NW.
Na ndakisa, tótala likambo Kunihito, moto oyo tolobelaki na lisolo eleki, akutanaki na yango ntango asalaki likambo oyo, na mboka na bango, emonanaka lokola koboya komilakisa. Koyekola Makomami malamumalamu esalisaki ye akóma na makanisi oyo ebongi. Ya solo, Biblia ezali kolendisa biso tózala na bopɔlɔ mpe ezali kopesa toli ete tómityelaka motema na koleka ndelo te mpe tóboya lolendo. (Masese 11:2; Mika 6:8) Kasi, ntango ntoma Paulo amonisaki masɛngami mpo na “mosala ya mokɛngɛli,” alobaki ete esengeli ‘kozala na mposa’ ya mokumba yango. (1 Timote 3:1) Nzokande, “mposa” yango esengeli kozala na lofundo te to na lolendo te, kasi esengeli mpe te komikitisa na ndenge oyo eleki ndelo.
Biblia elobi nini mpo na bizaleli malamu na makambo ya mombongo? Lelo oyo, na makambo ya mombongo, bato mingi bazali kosalela mayele mabe to koluka banzela mokuse mpo na kobuka mibeko ya Leta mpe kokima kofuta mpako. Kasi, ata soki bato mosusu bazali kosala makambo nini, Biblia elobi ete tosengeli kozala na “mposa ya kosalaka malamu na makambo nyonso.” (Baebele 13:18) Yango wana, soki tozali kosala makambo na bosembo mpe tozali na koponapona te epai ya bankolo misala, bato ya mosala, bakiliya mpe Leta, yango ekomonisa ete tozali kolona bizaleli malamu. (Deteronome 25:13-16; Baloma 13:1; Tito 2:9, 10) Kozala sembo etindaka bato mosusu bátyela biso motema mpe bápesa biso lokumu. Mpe lisusu, kokoma makambo nyonso oyo boyokani na mikanda elongolaka mindɔndɔ mpe mikakatano oyo “makambo ekanami te” ekoki kobimisa.—Mosakoli 9:11, NW; Yakobo 4:13, 14.
Tosengeli mpe kolona bizaleli malamu na likambo etali molato mpe ndenge ya kosala monzɛlɛ. Bato ya mboka na mboka bazali na ndenge oyo basepelaka kolata, mpe tokoki kozala na mposa makasi ya kolanda midɛlɛ oyo ezali kobima sika. Kasi, ezali mpenza na ntina tólandaka modɛlɛ nyonso oyo ebimi sika? Biblia epesi biso toli ete ‘tólandaka makambo ya ntango oyo te.’ (Baloma 12:2) Ntoma Paulo apesaki mibeko te, kasi, na kopemama na elimo santu, akomaki boye: “Basi bámilatisa nzoto na bango na lolenge ya bopɔlɔ mpe na makanisi malamu, na kotongatonga nsuki te, na wolo te, na mabanga ya motuya te, na bilamba na motuya monene te, kasi na misala ya kitoko lokola ebongi na basi baoyo bayamboli ete bazali kondima Nzambe.” (1 Timote 2:9, 10) Etinda yango etaleli na mibali na basi. Atako bongo, moto na moto azali na likoki ya kopona molato ya malamu na ndenge ya mboka na bango to ndenge oyo asepeli.
Biblia eyebisi mpe misala ya mabe oyo Nzambe aboyi. Na 1 Bakolinti 6:9, 10, tozali kotánga likebisi oyo: “Boyebi te ete bato ya masumu bakosangola libula ya Bokonzi ya Nzambe te? Bómizimbisa te, moto ya pite mpe basambeli ya bikeko mpe bato ya ekobo mpe bakembi na nsɔni mpe mibali bamibebisi na mibali mpe bayibi mpe bato ya bilulela mpe balangi ya masanga mpe batuki mpe babɔtɔli bakosangola Bokonzi ya Nzambe te.” Mokapo yango esalisaki Maria, elenge mwasi oyo tolobelaki na lisolo oyo eleki, na komona ete, na kotalela mitinda ya bizaleli malamu oyo Mozalisi apesi, boninga na ye na Juan ebongaki te mpe asengelaki kokata yango soki alingi ete Nzambe asepela na ye. Nyonso wana esalisi biso na komona ete mpo na kolona bizaleli malamu, tosengeli koyeba mitinda ya Yehova malamumalamu.
Tósalela motema mpo na koyekola
Kozala na bizaleli malamu elimboli kaka te koboya kosala makambo ya mabe. Bizaleli malamu etindaka moto na misala ya malamu. Moto oyo azali na bizaleli malamu asalaka makambo ya malamu. Molakisi moko alobaki ete “esɛngaka kosalela motema mpe motó mpo na koyekola bizaleli malamu.” Yango wana, kolona bizaleli malamu ezali kaka te likambo ya koyeba Liloba ya Nzambe mingi. Esɛngaka kokanisa na bozindo mpenza makambo oyo ekomami na Liloba ya Nzambe mpo na kokóma na botɔndi epai ya Yehova mpe kozala na mposa ya kotosa toli ya Makomami na bomoi na biso.
Mokomi ya nzembo alobaki ete: “Nalingi Mobeko na yo na bolingo [mingi]! Nakobanzaka yango mokolo mobimba.” (Nzembo 119:97) Mokonzi Davidi mpe akomaki boye: “Nakobanza mikolo ya kalakala; nakokanisa misala na yo [elingi koloba Nzambe] nyonso; nakobanza misala ya mabɔkɔ na yo.” (Nzembo 143:5) Biso mpe tosengeli kokanisaka na bozindo mpe kobondelaka ntango tozali koyekola Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia.
Ya solo, kozwa ntango ya koyekola mpenza mpe ya kokanisa makambo na bozindo ekoki kozala mpasi. Kasi mpo na kolona bizaleli malamu ezali kosɛnga ete tósomba ntango oyo tolekisaka na makambo mosusu. (Baefese 5:15, 16) Aaron azali na mbula 24, mpo na kosomba ntango, alamukaka miniti 30 liboso ya ngonga oyo azalaki kolamuka liboso. Alobi boye: “Liboso, nazalaki kolekisa miniti 30 nyonso wana na kotánga Biblia. Na mikolo euti koleka nde namonaki ntina ya kokanisa na bozindo. Yango wana, sikoyo natikaka miniti soki 15 mpo na kokanisa na bozindo makambo oyo natángi. Yango epesi ngai matomba mingi.” Tokoki koluka ata ntango mosusu mpo na kokanisa na bozindo. Na kati ya nzembo moko mpo na kokumisa Yehova, Davidi ayembaki boye: ‘Nakobanzabanza makambo na yo na ntango ya butu.’ (Nzembo 63:6) Biblia elobi mpe ete: “Yisaka abimaki kotambola mpo na komanyola na elanga na mpokwa.”—Genese 24:63, NW.
Kokanisa makambo na bozindo ezali na ntina mingi mpo na kolona bizaleli malamu, mpamba te esalisaka biso tómona makambo ndenge oyo Yehova amonaka yango mpe tózwa makanisi na ye. Na ndakisa, Maria ayebaki ete Nzambe apekisi pite. Kasi mpo na ‘koyina oyo ezali mabe mpe kokangama na oyo ezali malamu,’ esɛngaki akanisa na bozindo bavɛrsɛ mosusu ya ntina na kati ya Biblia. (Baloma 12:9) Nsima ya kotánga Bakolose 3:5, nde amonaki ntina oyo asengeli kobongwana; vɛrsɛ yango elobi na biso ete ‘tóboma bizaleli ya nzoto na biso oyo euti na pite, bosɔtɔ, mposa ya nzoto, mposa mabe, na lokoso.’ Maria amitunaki boye: ‘Bamposa nini ya nzoto nasengeli koboma? Makambo nini oyo ekoki kolamwisa bamposa ya mabe na motema na ngai oyo nasengeli koboya? Makambo nini nasengeli kotika na ndenge na ngai ya kofanda na bana mibali?’
Kokanisa na bozindo esɛngaka mpe kotalela mbuma oyo etamboli moko ebotaka. Paulo alendisi baklisto ete bákima pite mpe báyeba komipekisa mpo ete ‘moto moko te akóma tii na kosalela ndeko na ye mabe to kobebisa lotomo na ye.’ (1 Batesaloniki 4:3-7, NW) Talá mituna malamu ya komituna: ‘Mabe nini oyo nakomisalela to oyo nakosalela libota na ngai, mpe bato mosusu soki nasali likambo yango? Ekosala nini na elimo, na makanisi mpe na nzoto na ngai? Bato mosusu oyo babukaki mobeko ya Nzambe basukaki ndenge nini?’ Lokola kokanisa ndenge wana elendisaki motema ya Maria, yango ekoki mpe kolendisa oyo ya biso.
Tózwa mateya na bandakisa
Bizaleli malamu ekoki koteyama na kelasi? Banda kalakala, motuna yango etungisaka bato ya mayele. Platon, moto ya filozofi na Grèce, azalaki kokanisa ete bakoki koteya bizaleli malamu na kelasi. Nzokande, Aristote, azalaki kokanisa ete moto ayekolaka bizaleli malamu na komimesenisa. Mokomi moko ya zulunalo alobaki boye: “Na mokuse, moto ye moko akoki te koyekola bizaleli malamu. Bakoki mpe koteya yango na mikanda te. Moto akómaka na bizaleli malamu ntango afandi na bato . . . oyo balendisaka bizaleli malamu mpe bapesaka mbano mpo na yango.” Kasi, epai wapi okoki komona bato oyo bazali na bizaleli malamu? Atako mboka na mboka etángaka bato na yango oyo bazalaki na bizaleli malamu na masapo to na masolo na bango, kasi Biblia ezali kolobela ebele ya bato ya bizaleli malamu oyo bazalaki mpenza na bomoi.
Yehova nde azali kopesa ndakisa ya bizaleli malamu oyo eleki bandakisa nyonso. Yehova asalaka ntango nyonso makambo na ndenge ya malamu mpe asalaka makambo ya sembo mpe ya malamu. Tokoki kolona bizaleli malamu soki ‘tolandi ndakisa ya Nzambe.’ (Baefese 5:1, NW) Mpe lisusu, Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, ‘atikelaki biso elakiseli ete tólanda matambe na ye.’ (1 Petelo 2:21) Longola yango, Biblia ezali na masolo ya bato ya sembo lokola Abalayama, Sala, Yosefe, Luta, Yobo, na Danyele mpe baninga na ye Baebele misato. Tobosani mpe te bandakisa ya bizaleli malamu ya ebele ya basaleli ya Yehova na mikolo na biso.
Tokoki kolonga
Tokoki mpenza kolonga kosala makambo ya malamu na miso ya Nzambe? Lokola batikelá biso ezaleli ya kozanga kokoka, ntango mosusu etumba ekoki kozala kati na elimo mpe nzoto na biso; kati na mposa ya kosala malamu mpe kolanda bamposa na biso ya masumu. (Baloma 5:12; 7:13-23) Kasi, Nzambe akoki kosalisa biso na kolonga etumba yango. (Baloma 7:24, 25) Yehova apesi biso Liloba na ye mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia. Soki tomipesi na koyekola Makomami, kokanisa na bozindo mpe kobondela, tokoki kokóma na motema ya pɛto. Motema yango ekobota makanisi, maloba mpe misala ya malamu. (Luka 6:45) Na kolanda ndakisa ya Yehova Nzambe na Yesu Klisto, tokoki kolona bomoto oyo esepelisaka Nzambe. Tokoki mpe kozwa mateya mingi na bandakisa ya bato oyo bazali kosalela Nzambe na bosembo lelo oyo.
Ntoma Paulo alendisaki batángi ya mokanda na ye ete ‘bákanisaka’ bizaleli malamu mpe makambo mosusu ya lokumu. Soki tozali kosala bongo, na ntembe te Nzambe akopambola biso. (Bafilipi 4:8, 9) Na lisalisi ya Yehova, tokoki kolonga kolona bizaleli malamu.
[Elilingi na lokasa 6]
Zalá na momeseno ya komanyola ntango ozali koyekola Biblia
[Elilingi na lokasa 7]
Mpo na kolona bizaleli malamu, tosengeli kolanda ndakisa ya Klisto Yesu