Ndimá Yehova Nzambe oyo azali mpenza
Osilá komona ebele ya minzoto na butu ntango likoló ezali na mapata te? Na makanisi na yo, nani asalaki minzoto yango?
NA KATI ya butu, na ntango oyo makɛlɛlɛ ezalaki te, Davidi, mokonzi ya Yisalaele ya kala, ayokaki lokola nde minzoto ezali koloba na ye, yango wana akomaki boye: “Likoló ekosakolaka nkembo ya Nzambe, lola ekoyebisaka misala ya mabɔkɔ na ye.” (Nzembo 19:1) Ya solo, Mozalisi abongi mpenza “kozwa nkembo, na lokumu, na nguya,” kasi ebongi te kopesa yango na biloko oyo ye akelá.—Emoniseli 4:11; Baloma 1:25.
Biblia elobi ete: ‘Motongi na nyonso ezali Nzambe.’ (Baebele 3:4) Nzambe ya solo, “oyo nkombo na ye ezali Yehova, azali Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.” (Nzembo 83:18, NW) Nzambe yango azali makanisi mpamba te. Yesu Klisto alobaki mpo na Yehova, Tata na ye ya likoló ete: “Ye oyo atindaki ngai azali mpenza.”—Yoane 7:28, NW.
Yehova akokisaka mikano na ye
Na kati ya Makomami ya Liebele, nkombo ya Nzambe Yehova, ezali na bisika soki 7 000. Kaka nkombo na ye mpamba ezali komonisa ete azali mpenza. Nkombo ya Nzambe elimboli “Ye oyo akómisaka.” Elingi koloba ete Yehova Nzambe akokisaka mikano na ye. Ntango Mose atunaki Nzambe nkombo na ye, Yehova alimbolaki yango boye: “Nakozala oyo ngai nakozala.” (Exode 3:14, NW) Biblia ya Rotherham (na Lingelesi) ebongoli yango boye: “Nakokóma ndenge nyonso oyo nakosepela.” Yehova azalaka to aponaka kokóma ndenge nyonso oyo esengeli mpo na kokokisa mikano mpe bilaka na ye ya sembo. Yango wana azali na ebele ya batitre lokola Mozalisi, Tata, Nkolo Mokonzi, Mobateli ya mpate, Yehova na bibele, Moyoki ya mabondeli, Mosambisi, Moteyi Monene, Mosikoli.—Basambisi 11:27; Nzembo 23:1; 65:2, NW; 73:28, NW; 89:26; Yisaya 8:13, NW; 30:20, NW; 40:28, NW; 41:14.
Kaka Nzambe ya solo nde abongi kozala na nkombo Yehova, mpamba te bato bakoki te koyeba liboso soki makambo oyo bakani ekosalema mpenza. (Yakobo 4:13, 14) Kaka Yehova nde akoki koloba ete: “Lokola mbula mpe mbula-mpɛmbɛ ikolongwa na lola mpe ikozonga kuna te kasi ikopɔlisa mabele, ete ibimisa biloko na yango mpe itoisa yango, kopesáká mbóto epai na mokoni mpe kwanga epai na molei, boye liloba oyo ekobima na monɔkɔ na ngai; ekobutwa epai na ngai mpamba te, kasi ekosukisa oyo ekani ngai, ekolonga na likambo litindaki ngai yango.”—Yisaya 55:10, 11.
Ntango Yehova azali kokokisa likambo oyo akanaki, akakatanaka ata moke te ete mbala mosusu ekolonga te; yango wana, ata makambo oyo bato bakoki komona ete ekoki kozala te, na miso na ye ezalaka. Bambula ebele nsima ya liwa ya Abalayama, ya Yisaka, mpe ya Yakobo, Yesu alobaki likambo moko mpo na bato yango ete: “[Yehova] azali Nzambe ya bakufi te, kasi ya bato ya bomoi, mpo ete mpo na ye bato nyonso bazali na bomoi.” (Luka 20:37, 38) Nzambe akani ete akosekwisa bato wana misato oyo bakufá kala. Lokola mokano yango ekoki kozanga te kokokisama, ye amonaka lokola nde bazali na bomoi ata sikoyo. Mpo na Yehova, kozongisa na bomoi bato wana ya sembo ya ntango ya kala ezali likambo ya mpasi te, lokola mpe kokela moto ya liboso na mputulu ya mabele ezalaki likambo ya mpasi te mpo na ye.—Genese 2:7.
Ntoma Paulo apesi ndakisa mosusu oyo ezali komonisa ete soki Nzambe akani kosala likambo akokisaka yango. Na kati ya Makomami, bazali kobenga Abalayama “tata ya mabota mingi.” (Baloma 4:16, 17) Na ntango oyo Abalama azalaki naino na mwana te, Yehova apesaki ye nkombo mosusu: Abalayama, oyo elimboli “Tata ya bato ebele.” Atako Abalayama na mwasi na ye Sala bakómaki mibange, bayaki kobota mwana na likamwisi ya Nzambe; na ndenge yango, ndimbola ya nkombo ya Abalayama ekokisamaki.—Baebele 11:11, 12.
Lokola Yesu Klisto azwaki nguya mpe bokonzi monene, alobaki makambo oyo elekaki makanisi ya bato. Moninga na ye Lasalo akufaki; kasi, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Moninga na biso Lasalo asili kolala mpɔngi; kasi nakokenda [kolamwisa ye na mpɔngi, NW].” (Yoane 11:11) Mpo na nini Yesu alobaki ete moto yango alali mpɔngi, nzokande akufaki mpenza?
Ntango Yesu akómaki na Betania, mboka oyo Lasalo azalaki kofanda, akendaki na lilita mpe atindaki ete bálongola libanga oyo ezipaki monɔkɔ ya lilita. Yesu abondelaki na mongongo makasi; na nsima alobaki ete: “Lazalo, bimá libándá.” Bato nyonso oyo bazalaki wana bazalaki kotala lilita, mpe mbala moko “moto oyo akufaki abimaki, biteni ya bilamba elingami na makolo na mabɔkɔ, mpe elongi na ye elingami na elamba.” Na nsima, Yesu alobaki ete: “Bófungola ye mpe bótika ye akende.” (Yoane 11:43, 44, NW) Yesu asekwisaki Lasalo, to na maloba mosusu, azongisaki ye na bomoi, ye moto oyo akufaki banda mikolo minei! Klisto akosaki te ntango alobaki ete moninga na ye azali kolala mpɔngi. Atako moto yango akufaki mpenza, mpo na Yehova mpe Yesu, azalaki se lokola moto alali mpɔngi. Yesu na Tata na ye ya likoló batalelaka makambo oyo ezali solo.
Yehova akoki kosala makambo alaki biso
Nzambe ya solo akeseni mpenza na bikeko ya mpambampamba! Bato oyo basambelaka bikeko bamikosaka, bakanisaka ete bikeko yango ezali na nguya oyo eleki nguya ya bato. Kasi, ata soki bazali kokumisa bikeko yango ndenge nini, yango te nde ekopesa bikeko yango nguya ya kosala makamwisi. Nzokande, ntango Yehova Nzambe azali koloba mpo na basaleli na ye oyo bakufá kala, akoki kosalela maloba oyo ezali komonisa lokola nde bazali na bomoi, mpamba te akoki kozongisa bango na bomoi. “[Yehova] azali Nzambe ya solo,” mpe ata mokolo moko te akosá basaleli na ye.—Yilimia 10:10.
Koyeba ete na ntango oyo ye moko Yehova aponi, bato oyo bakufá oyo ye akanisaka bango, bakosekwa, to na maloba mosusu, bakozonga na bomoi, ezali mpenza kolendisa biso! (Misala 24:15) Bato oyo bakosekwa bakozala mpe na makoki na bango nyonso oyo bazalaki na yango liboso bákufa. Mozalisi oyo azali na mayele mpe na nguya oyo ezangi nsuka akozala na mokakatano moko te mpo na koyeba lisusu likambo ya moto mokomoko oyo akufá mpe kozongisela ye yango. (Yobo 12:13; Yisaya 40:26) Yehova azali na bolingo mingi mpe azali na bɔɔngɔ oyo ekoki kobosana likambo te; yango wana, akozongisa bato na bomoi na kati ya paladiso awa na mabele na bomoto mpenza oyo bazalaki na yango liboso bákufa.—1 Yoane 4:8.
Mokili ya Satana etikali na mikolo ya kotánga; bato nyonso oyo bandimaka Nzambe ya solo bazali na elikya mpo na mikolo ezali koya. (Masese 2:21, 22; Danyele 2:44; 1 Yoane 5:19) Mokomi ya nzembo alobi na biso boye: “Nsima ya mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te . . . Nde bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo.” (Nzembo 37:10, 11) Mobulu mpe kobomana ekozala lisusu te. Bosembo ekozala na mokili mobimba mpe mikakatano ya mbongo ekosila. (Nzembo 37:6; 72:12, 13; Yisaya 65:21-23) Bato bakokabwana lisusu te mpo bazali na bozwi ndenge moko te to bakeseni mposo to ekólo to monɔkɔ oyo balobaka. (Misala 10:34, 35) Bitumba mpe mindoki ekolimwa. (Nzembo 46:9) Na ntango wana, “mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na maladi.” (Yisaya 33:24) Moto nyonso akozala nzoto kolɔngɔnɔ. (Emoniseli 21:3, 4) Etikali moke mabele ekóma paladiso. Yehova akani yango!
Etikali moke bilikya nyonso oyo Biblia epesi ekokisama. Tótika te ete biloko ya mokili oyo bato bazali kosambela ekosa biso, tótya elikya na biso mobimba nde na Yehova! Mokano na ye ezali ete “bato ya lolenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timote 2:3, 4, NW) Tóbebisa ntango na biso mpe biloko na biso na makanisi ya mpamba te ya mokili oyo mpe banzambe na yango, tóluka koyeba Nzambe ya solo malamumalamu mpe tóndima ye na motema na biso mobimba.—Masese 3:1-6; Yoane 17:3.
[Elilingi na lokasa 6]
Mpo na Yehova mpe Yesu, Lasalo alalaki mpɔngi
[Bililingi na lokasa 7]
Etikali moke mabele ekóma paladiso