Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/1 nk. 3-4
  • Ondimaka Nzambe oyo azali mpenza?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ondimaka Nzambe oyo azali mpenza?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Banzambe oyo ‘bakoki kobikisa te’
  • “Moto moko te apesaki eyano”
  • Losambo ya Baala: Etumba monene na mitema ya Bayisalaele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Bózongela losambo ya Yehova
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
  • Alongisaki losambo ya solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Nzambe andimaka losambo ya motindo nyonso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/1 nk. 3-4

Ondimaka Nzambe oyo azali mpenza?

Ebongiseli moko ya bato ya mayele oyo bayekolaka makambo ya kala (Musée américain d’histoire naturelle) etindaki bato na kɔntina ya Arctique mpo na koyekola mokili oyo Robert Peary, moto moko oyo azalaki kosala mibembo na bamboka ya mosikamosika mpo na koyekola makambo na yango amonaki mbula nsambo liboso, na 1906.

ROBERT PEARY azalaki na nɔrdi-wɛsti ya Amerika ya Nɔrdi na esika oyo babengi Cape Colgate; azalaki kotala na kɔntina babengi Arctique oyo ezalaka na nɔrdi mpenza ya mabele mpe amonaki lokola esika moko oyo ezalaki na bangomba oyo ezalaki komonana mpɛmbɛ. Apesaki yango nkombo Mokili ya Crocker; Crocker ezali nkombo ya moto moko ya bozwi oyo azalaki mpe kopesa ye mbongo mpo na mosala na ye. Bato yango basepelaki mingi ntango bamonaki na mosika, lokola mokili moko oyo ezali na bangomba, mabwaku mpe bansɔngɛ ya ngomba ezipami na mbula-mpɛmbɛ! Kasi, mwa moke na nsima bamonaki ete bazalaki komikosa, bazalaki komona nde londende mpamba, eloko moko ezalaki te. Peary mpe akosamaki, amonaki nde londende mpamba ntango azalaki kotala na mosika. Bato yango nyonso babebisaki ntango na bango, makasi na bango, mpe biloko na bango mpo na kokende koyekola eloko moko oyo ezalaki te.

Lelo oyo, bato mingi bazali komipesa mpe bazali kopesa ntango na bango mpo na banzambe oyo bango bazali kokanisa ete bazali mpenza. Na ntango ya bantoma ya Yesu, bato bazalaki kosambela banzambe lokola Eleme mpe Zeu. (Misala 14:​11, 12) Lelo oyo, bandimi ya Lingomba ya Shinto, ya Hindu, mpe ya mangomba mosusu na mokili, basambelaka banzambe ebele. Ndenge Biblia elobi yango, “banzambe . . . bazali mingi mpe bankolo bazali mingi.” (1 Bakolinti 8:​5, 6) Kasi, banzambe nyonso wana bazalaka mpenzampenza?

Banzambe oyo ‘bakoki kobikisa te’

Tótalela naino likambo ya kosalela bililingi to bikeko mpo na kosambela. Bato oyo bandimaka bikeko yango to basalelaka yango mpo na kobondela, bamonaka mpenza ete bikeko yango ekoki kobikisa bango mpo ezali na nguya oyo eleki nguya ya bato mpe ekoki kosalisa bango to kobikisa bango na makama. Kasi, bikeko yango ekoki mpenza kobikisa? Mokomi ya nzembo ayembaki ete: “Bikeko ya bapakano bizali wolo mpe palata, mosala ya mabɔkɔ ya bato. Bizali na minɔkɔ, kasi bikolobaka te, bizali na miso, kasi bikomonaka te, bizali na matoi, kasi bikoyokaka te, kopema izali na bibebu na yango te.” Ya solo, bikeko ezali banzambe oyo ‘bakoki kobikisa te.’​—⁠Nzembo 135:​15-17; Yisaya 45:​20, NW.

Baoyo basalaka bikeko yango bakoki koloba ete bikeko yango ezali na bomoi mpe ezali na nguya. Bato oyo mpe basambelaka bikeko batyelaka yango mpenza motema. Mosakoli Yisaya alobaki ete: “Bakotombola [ekeko] na mapeka na bango, bakokumba yango, bakotya yango na esika na yango mpe ekotɛlɛma wana. Eyebi kolongwa na esika na yango te. Soko moto akoganga na yango, ekozongisa monɔkɔ te, ekobikisa ye na mpasi na ye mpe te.” (Yisaya 46:⁠7) Ekeko ezalaka eloko ya bomoi te ata soki bato oyo bazali kotyela yango motema bazali na kondima makasi ndenge nini. Bikeko ya ndenge wana oyo bato basali na mabɔkɔ, ezala na nzete, na wolo to na palata ezali “banzambe oyo ezangi ntina.”​—⁠Habakuku 2:​18, NW.

Lelo oyo, bato mingi bazali kokumisa bavɛdɛti ya miziki mpe ya masano, bazali kokumisa makambo ya politiki mpe bakonzi ya mangomba; bazali ata kofukamela to mpe kosambela bango. Mpo na bato mingi, mbongo mpe ekómi nzambe na bango. Banzambe yango bazali te na makambo nyonso oyo bato bakanisaka ete bazali na yango. Bakokisaka ata elikya moko te ya bato oyo bandimelaka bango; bakoki mpe kokokisa yango te. Na ndakisa, moto akoki kokanisa ete soki azali na mbongo, mikakatano na ye nyonso ekosila, nzokande bozwi ekosaka. (Malako 4:19) Moto moko ya mayele atunaki motuna oyo: “Ndenge nini eloko oyo bato mingi balingaka mpe oyo bakanisaka ete ezali nkisi oyo ekoki kosilisa mikakatano nyonso, kasi soki bazwi yango, bamosusu balɛmbaka nzoto, bamosusu bakómaka komitungisa mingi?” Ya solo, soki moto amipesi na koluka bozwi, akoki kobosana makambo oyo ezali mpenza na ntina, lokola kobatela bokolɔngɔnɔ ya nzoto, kozala na libota ya malamu, kozala na baninga ya solosolo, mpe kozala na boyokani malamu na Mozalisi. Mpo na moto ya ndenge yango, nzambe na ye wana ezalaka ‘ekeko ya bokosi’!​—⁠Yona 2:​8, NW.

“Moto moko te apesaki eyano”

Ezali mpenza bozoba kobenga eloko moko oyo ezali te ete ezali. Bato oyo bazalaki kosambela nzambe Baala na mikolo ya mosakoli Eliya bamonaki naino mpasi liboso bákanga ntina ya likambo yango. Bato yango bazalaki mpenza kondima ete Baala akoki kobimisa mɔ́tɔ na likoló mpo eya kozikisa nyama oyo bapesaki mbeka. “Babelelaki nkombo ya Baala banda ntɔngɔ tii midi, bazalaki koloba ete: ‘Baala, pesá biso eyano!’ ” Baala yango azalaki na matoi mpo na koyoka mpe monɔkɔ mpo na koloba? Lisolo yango elobi lisusu boye: “Mongongo moko eyokanaki te, mpe moto moko te apesaki eyano.” Ɛɛ, “batyelaki bango ata likebi te.” (1 Mikonzi 18:​26, 29, NW) Baala azalaki nzambe ya solo te, azalaki mpe te mpe asalaki ata eloko moko te.

Nyonso oyo emonisi biso ete tosengeli koluka koyeba mpe kosambela Nzambe oyo azali mpenza! Kasi, Nzambe yango nde nani? Mpe bolamu nini tokoki kozwa soki tozali kondima ye?

[Bililingi na lokasa 3]

Egingwah, moninga ya Peary azali kotala mokili moko na mosika

Robert Peary

[Eutelo ya bafɔtɔs]

Egingwah: Euti na buku The North Pole: Its Discovery in 1909 Under the Auspices of the Peary Arctic Club, 1910; Robert Peary: NOAA

[Bililingi na lokasa 4]

Bato mingi bazali komikosa, bazali kosambela biloko oyo mokili ekómisi yango banzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto